بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَـٰنِ ٱلرَّحِيمِ
    Al-Quran Multilingual
    The Holy Quran
    Lingala
    Translation: lin-zakariyamuhamme
    Author: Zakariya Muhammed Balingongo
    Source: https://quranenc.com/en/browse/lingala_zakaria
    Generated on February 14, 2026
    Free • Open Source • Ad-Free
    About Al-Quran Multilingual

    Our Mission: We're on a mission to make the Holy Quran accessible to every Muslim worldwide, regardless of their native language, technical expertise, or economic situation.

    Al-Quran Multilingual is a free, open-source, and ad-free application offering 470+ editions in 90+ languages from verified Islamic scholars and institutions.

    Core Values:

    • ✓ Free Forever - No premium features or paywalls
    • ✓ Ad-Free Experience - Your spiritual journey uninterrupted
    • ✓ Open Source - Complete transparency and community contributions
    • ✓ Privacy & Respect - No data collection, no tracking
    Support This Project

    This app is maintained by volunteers dedicated to serving the Muslim community. If you find this helpful, please consider supporting our mission to keep it free and accessible for everyone.

    UPI Payment (India)
    8870358783@ybl
    Every contribution, no matter how small, helps us serve the Muslim Ummah better. May Allah reward you.
    Table of Contents
    1.Bofungoli
    2.Ngombe Mwasi
    3.Libota ya Imraan
    4.Basi
    5.Eloko ya kolia
    6.Bibwele
    7.Bisika ya likolo
    8.Biloko ya bitumba
    9.Koyambola
    10.Yunus
    11.Hud
    12.Yusuf
    13.Nkake
    14.Ibrahim
    15.Esika ya mabanga
    16.Nzoi
    17.Mobembo ya butu
    18.Libulu
    19.Maria
    20.Taha
    21.Baprofeta
    22.Mobembo ya kokende na Mekka
    23.Bandimi
    24.Pole
    25.Mopesi ya ndingisa
    26.Basani ya nzembo
    27.Liyoyo
    28.Masese
    29.Liyenge
    30.Baloma
    31.Luqman
    32.Kogumbama
    33.Basangani
    34.Saba
    35.Mobandisi
    36.Yasin
    37.Baoyo batyami na molongo
    38.Sad
    39.Bitongisa
    40.Molimbisi
    41.Elimbisami na Bosikisiki
    42.Botuni
    43.Biloko ya kobongisa ya wolo
    44.Milinga
    45.Kofukama
    46.Bisobe ya zelo
    47.Muhammad
    48.Elongi
    49.Biteni
    50.Qaf
    51.Mopepe ya kopupola
    52.Ngomba
    53.Minzoto
    54.Sanza
    55.Ya bolamu
    56.Ya solo
    57.Ebende
    58.Mwasi ya kosenga
    59.Bobengani
    60.Ye oyo asengeli kotalama
    61.Molongo
    62.Mokolo ya mitano
    63.Bakosi
    64.Bokosi ya moto na moto
    65.Koboma libala
    66.Kopekisa
    67.Bokonzi
    68.Ekomeli
    69.Bosolo
    70.Nzela ya komata
    71.Nuhu
    72.Bilima
    73.Ye oyo azingami
    74.Ye oyo azipi
    75.Lisekwa
    76.Ntango
    77.Bamitindami
    78.Nsango
    79.Baoyo babendi libanda
    80.Abukaki elongi
    81.Kobwaka na nse
    82.Kopasuka
    83.Kokosa
    84.Kofungwama
    85.Bituluku ya minzoto
    86.Minzoto ya ntongo
    87.Oyo aleki likolo
    88.Kozinda
    89.Ntongo
    90.Engumba
    91.Moyi
    92.Butu
    93.Ntango ya ntongo
    94.Lisungi
    95.Figi
    96.Ligombo
    97.Nguya
    98.Elembeteli ya polele
    99.Konikana ya mabele
    100.Batambwisi
    101.Makama
    102.Komekana na bokoli ya mokili
    103.Mokolo oyo ezali kokita
    104.Mokosi
    105.Nzoku
    106.Ba Quresh
    107.Boboto ya mike
    108.Ebele
    109.Bapani
    110.Lisungi
    111.Lolemo ya moto
    112.Bosembo
    113.Ntongo
    114.Bato
    Surah 1
    Bofungoli

    [1] Okombo ya Allah wa boboto atonda ngolu

    [2] Matondi na Allah Nkolo ya mikili

    [3] Atonda boboto Mpe ngolu

    [4] Mokonzi ya mokolo ya Lifuta

    [5] Yonde (Allah) tozali kobondela mpe epai nayo tozali kosenga lisalisi

    [6] Kamba biso na nzela ya nsemba

    [7] Nzela ya baye bazwa bolamu nayo ezala te nzela ya baye osilikela bango, ezala mpe te nzela ya baye babunga

    Surah 2
    Ngombe Mwasi

    [1] Alif, Lâm, Mîm

    [2] Buku eye ezali na ntembe te okati na yango ezali kokamba baye babangi (Allah)

    [3] Ba oyo bandimi na mabombami mpe batelemisi losambo mpe kowuta na maye topesaki bango bazali kobimisa

    [4] Mpe ba oyo bazali kondima na maye makitisamaki epai nayo mpe na maye makitisamaki liboso nayo mpe bazali kondima na mokolo ya suka

    [5] Bango nde bakambami kowuta epai ya Nkolo wa bango mpe bango nde balongi

    [6] Ya sôló ba oyo bapengwa bazali bobele bongo, okebisa bango to okebisa bango te bakondimaka te

    [7] Allah asila kokanga mitema mia bango mpe boyoki na bango, mpe azipi bomoni na bango mpe bakozua etumbu enene

    [8] Mpe okati ya bato basusu bazali koloba ete tondimi na Allah, mpe na mokolo ya suka, mpe bango bazali bandimi te

    [9] Bakanisi ete bazali kokosa Allah na bandimi, nzoka nde bazali komikosa sé bango moko kasi bazali koyeba te

    [10] Okati ya mitema mia bango mitondi na bokono, mpe Allah akobakisela bango bokono ya makasi; mpe bazali na etumbu ya makasi na maye bazalaki kokosa

    [11] Mpe soki bayebisi bango bobebisa te okati ya mokili, bakolobaka ete: Ya sôló biso tozali babongisi

    [12] Kasi bango bazali babebisi, mpe bango bazali komiyeba te

    [13] Mpe soki bayebisi bango, bondima ndenge bato bandimi, bakoloba ete: Boye, tondima lokola bazoba bandimi? Mpe ya sôló bango nde bazoba kasi bazali komiyeba te

    [14] Mpe soki bakutani na ba oyo bandima bakolobaka: Tondimi, soki bakutani epai ya bazabulu na bango, bakolobaka ete: Biso tozali elongo moko na bino, ya sôló tozali sé kotiola bango

    [15] Allah akotiolaka mpe bango, mpe akobakisela bango bopengwi na ntango molayi

    [16] Bango nde basila kosomba libungi batiki bokambemi, kasi mombongo mwa bango mozali na lifuti te, mpe bakokambama te

    [17] Ndakisa na bango ezali lokola moto oyo apelisi móto, mpe na tango móto engali zinga zinga na yango Allah abungisi bongengi bwa bango, mpe atiki bango okati ya molili, bakomonaka te

    [18] Bakoyokaka bosembo ata moke te, mpe bakolobelaka yongo ata moke te, mpe bakomona yango ata moke te, mpe bakozongaka na bosembo te

    [19] Lokola mapata ya moyindo lolenge mbula eyaka mpe na lokito ya nkake na bazali kotia misapi na matoyi mia bango mpo na bobangi lokito ya nkake mpe mpona bobangi ete bakufa, mpe Allah azali mozingi ya bapengwi o bisika binso

    [20] Etikalaki sé moke eboma miso na bango mikalali, tango inso bongengi wana ekomeli bango bakotambola, mpe soki molili mozongi batelemi, kasi soki Allah alingaki nde abomi boyoki mpe bomoni bwa bango, ya sôló Allah azali na nguya likolo lia biloko binso

    [21] Eh bino bato! Bobondela Nkolo wa bino oyo akeli bino mpe akeli ba oyo balekaki liboso na bino mpo bozwa bobangi

    [22] Ye nde oyo akeli mpo na bino mabele lokola mbeto, mpe likolo lokola etando, mpe azali kokitisa mayi kowuta likolo, mpe azali kobimisa na yango bambuma ya lolenge nyonso ezala bozwi mpo na bino, mpe bozuela Allah basangisi te wana bosili koyeba

    [23] Mpe soki bozali na ntembe na maye tokitisaki epai ya mowumbu na biso, boya na suratu lolenge na yango mpe bobenga banzeneneke na bino na botiki Allah soki bozali bato ya bosembo

    [24] Mpe soki bosali yango te, mpe bokokoka kosala yango te, bobanga móto oyo nkoni na yango ekozala bato na mabanga, elengelami mpona bapengwi

    [25] Mpe pesa sango ya malamu epai na ba oyo bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, ya sôló bakozala na bisika mingala mikotiola na nsé na yango. Ntango inso bazali koleisama na bambuma, bakoloba ete: Oyo nde (mbuma) toleisamaki liboso kasi, ekozala na lolenge mosusu. Mpe okati ya lola bakozala na basi baye bapetolama mpe kuna, bakozala seko na seko

    [26] Ya sôló, Allah azalaka na nsoni te ya kopesa ndakisa na eloko songolo oyo ye alingi ata soki ezali eloko moke lokola ngungi to mpe ndakisa mosusu likolo na yango. Mpe mpona ba oyo bandima bazali koyeba ete yango ezali bosembo kowuta epai ya Nkolo na bango. Mpe baye bapengwa, bakoloba ete nini Allah alingi koloba na bandakisa eye? Mpona yango bayike bakozala na bobungi mpe bayike bakokambama, kasi, sé bato mabe nde bazali kobungisama na yango

    [27] Baye bazali kokata boyokani eye bayokanaki na Allah, mpe bazali kokabola maye Allah apesaki ndingisa ete ekangisama, mpe bazali kobebisa okati ya mabele; bango nde bazali bazangi

    [28] Ndenge nini bokopengwa na Allah mpe bozalaki bibembe mpe apesi bino bomoyi? Sima akoboma bino, sima akosekwisa bino mpe epai naye nde bokozongisama

    [29] Ye nde akeli mpo na bino maye manso mazuami o mabele, sima amitalisi na mapata, mpe akeli mapata nsambo, ye nde azali na boyebi ya biloko binso

    [30] Mpe tango Nkolo wa yo alobaki na ba anzelu ete: Ya sôló ngai nalingi kotia na mabele mokitani. Bayanolaki ete: Olingi otia kati na mabele oyo akobebisa mpe akosopa makila? Mpe biso tozali kokumisa yo mpe tozali kokumisa bosantu bwayo. (Allah) alobaki ete: Ya sôló ngai nazali na boyebi na maye bino boyebi te

    [31] Mpe atangisaki Âdam bankombo ya bikelamu binso, nsima atiaki yango liboso ya ba anzelu mpe alobaki: Botangela ngai bankombo ya bikelamu biye soki ya sôló bozali na bosembo

    [32] Bayanoli: Lokumu nayo! Tozali na boyebi te kaka na maye otangisaki biso. Ya sôló yo ozali moyebi ya manso mpe otondi na bwanya

    [33] Alobaki: Eh Âdam! tangela bango bankombo ya bikelamu biye. Mpe na tango atangelaki bango bankombo na yango, (Allah) alobaki: Nayebisaki bino te ete ya sôló ngai nayebi mabombami ya likolo na ya nsé mpe nayebi maye bobimisaka polele na maye bobombaka

    [34] Mpe na tango toyebisaki na ba anzelu bogumbamela Âdam, banso bagumbamaki longola sé ibilisi oyo atondisamaki na lolendo mpe azalaki okati ya bapengwi

    [35] Mpe tolobaki: Eh Âdam! Fanda na mwasi nayo okati ya lola, mpe bolia binso biye bokolinga, mpe bobeleme te penepene na nzete oyo, soki bobelemi penepene na yango bokozala elongo ya babubi

    [36] Mpe na sima satana akosaki bango mpe abimisaki bango o esika eye bazwamaki. Mpe tolobaki bokita bino na bino bokozala banguna mpe bokozala o mabele na bisengo ya ngonga moke

    [37] Mpe Âdam azuaki maloba ya bolimbisi epai ya Nkolo wa ye, mpe (Allah) alimbisaki ye, ya sôló ye azali moyoki tubela mpe atonda ngolu

    [38] Mpe tolobaki: Bokita bino banso, kowuta nakati na yango! mpe ya sôló tango inso bokambami ekokomela bino uta epayi na ngai, ba oyo bakolanda bokambami bwa ngai, bakozala na bobangi te, mpe bakozala na mawa te

    [39] mpe baye bapengwa mpe bazali kobuka lokuta na mikapo na biso, bango nde bato ya lifelo. Bakozala seko o kati na yango

    [40] Eh bana ya Isalayele! Bokanisa bolamu na ngai oyo napesaki bino, mpe bokokisa elaka na ngai na kokisa elaka na bino. Mpe ngai nde esengeli bobanga

    [41] Mpe bondima maye nakitisaki, ezali kondima na maye bozali nayango, mpe bozala te bato ya liboso mpona koboya yango. Mpe boteka te mikapo mia ngai na ntalo moke, mpe nga nde esengeli bobanga

    [42] Mpe bosangisa bosembo na lokuta te, mpe bozali kobomba bosembo mpe na bino bozali koyeba

    [43] Mpe botelemisa losambo, mpe bobimisa zakat, mpe bogumbama elongo na bagumbami

    [44] Bozali kotinda bato na bolamu mpe bozali komibosana bino moko, mpe bino bozali kotanga buku? Boye bozali na bososoli te

    [45] Boluka lisalisi na koyika mpiko mpe na losambo, pamba te yango ezali mpasi te epai ya babangi (Allah)

    [46] Baye bazali kolikia ete ya sôló bakokutana na Nkolo na bango, mpe ya sôló epai naye nde bakozongaka

    [47] Eh bino bana ya Isalayele! Bokanisa bolamu na ngai napesaki epai na bino, mpe ya sôló ngai napesa bino lokumu likolo ya mokili mobimba

    [48] Mpe bobanga mokolo moye molimo moko mokosalisaka mosusu ata na eloko moko te, mpe bobondeli ekondimama te, mpe bosikoli ekoyambama te, mpe bakozua lisungi te

    [49] Mpe ntango tobikisaki bino epai ya bato ya falo, bazalaki konyokola bino na bitumbu binene, bazalaki kokata bakingo ya bana na bino mpe bazalaki kotika basi na bino na bomoyi mpe bozalaki na mimekano minene kowuta epai ya Nkolo wa bino

    [50] Mpe tango tokabolaki ebale mpo na bino (bokatisa ngambo esusu), mpe ya sôló tobikisaki bino mpe tozindisaki bato ya falo okati ya mayi, na bino bozalaki komona

    [51] Mpe tango topesaki elaka epai ya Mûssa babutu ntuku minei, mpe bobondelaki mwana ngombe sima naye, mpe bozalaki babubi

    [52] Sima, tolimbisaki bino na yango, mpo ete bokoka kotondo

    [53] Mpe tango topesaki Mûssa buku mpe bososoli mpo ete bino bokambama

    [54] Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye: Eh bino bato na ngai! ya sôló bino bomibubaki bino moko mpona kobondela mwana ngombe mpe botubela epai na Nkolo na bino, bomiboma kati kati na bino, wana nde ezali malamu epai ya Nkolo na bino. Mpe ayambi tubela na bino, ya sôló ye nde molimbisi atonda ngolu

    [55] Mpe tango bolobaki: Eh Mûssa! Tokoki kondimela yo te kino tomona Allah polele, lokito ya nkake ebetaki bino, mpe bino bozalaki kotala

    [56] Sima, tosekwisaki bino sima ya bino kokufa mpo ete bokoka kotondo

    [57] Mpe tobombaki bino okati ya elili ya londende, mpe tokitiselaki bino manna mpe salwa, bolia bilei ya malamu biye bipesamaki mpona bino, mpe babubaki biso te kasi bango moko bamibubaki

    [58] Mpe o tango tolobaki: Bokota na etuka eye, mpe bolia okati na yango ndenge bokosepela, mpe bokota na ekuke na bofukami, mpe boloba maloba ya bolimbisi, tokolimbisa mbeba na bino mpe tokobakisela bato ya malamu bolamu

    [59] Mpe babubi bayaki na liloba mosusu bayebisaki bango te, mpe tokitiselaki bango etumbu na likolo mpo na mabe bazaliki kosala

    [60] Mpe tango Mûssa alukaki lolenge ya komelisa bato naye (mayi), mpe tolobaki naye: beta lingenda nayo likolo ya libanga. Mpe tango abetaki ekabwanaki na biteni zomi na mibale ya mingala, bato banso bayebaki bisika bakomela, bolia mpe bomele kowuta na bozui oyo Allah apesi bino, kasi botia mobulu okati ya mabele te

    [61] Mpe bino bokanisa tango bolobaki: Eh Mûssa! biso tolembi kolia bilei sé moko. Bondela na Nkolo nayo (Allah) mpo abimisa pona biso bilei kowuta na mabele ebimisa: Ndunda, maboke, hayi, solo mpe matungulu, alobi: Bolingi bobalola oyo ya malamu koleka na oyo ya mokie? Boye bokita(bokende) na engumba eye bino bolingi, mpe bino ya sôló bokozua oyo bozali kosenga. Mpe minyoko mibetaki bango bozangi, mpe bokono mpe kanda ya Allah ekitelaki bango. Nyonso wana mpo ya sôló bango bazalaka kopengwa na bilembo ya Allah, mpe bazalaki koboma bantoma mpamba. Nyonso wana mpo bazalaka koboya kotosa mpe balekisaki ndelo

    [62] Ya sôló, baye bandima mpe baye bamikomisi bayuda mpe baklisto na baswâbi-îna oyo akondima na Allah mpe na mokolo mwa suka mpe asali misala ya malamu, bakofutama epai ya Nkolo wa bango, mpe bakozala na bobangi te, mpe mawa te

    [63] Mpe bokanisa mikano miye tozuelaki bino, mpe totombolaki likolo na bino ngomba, bosimba maye topesi bino makasi mpe bokanisa maye mazali na kati na yango mpo ete bozala na bobangi (ya Allah)

    [64] Sima bopesaki yango mokongo, mpe soki ezalaki bolamu ya Allah likolo ya bino mpe mawa naye te, nde bolingaki bozala na molongo ya bazangi

    [65] Mpe ya sôló boyebaki baye oyo balekisaki ndelo na kati ya bino mpona mokolo mwa mposo, mpe tolobaki na bango: bozala bamakako biloko bizangi ntina

    [66] Mpe totiaki yango ezala ndakisa mpona bingumba biye bizalaki zingazinga na yango mpe ezalaki toli mpona babangi

    [67] Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye: Ya sôló, Allah apesi na bino mobeko ete: Boboma ngombe. Balobaki: yo ozali kozua biso na maseki? (Mûssa) alobaki ete: Na mibateli epai ya Allah mpo ete nazala te na molongo ya bazoba

    [68] Balobaki: Sengela biso Nkolo nayo alakisa biso ngombe wana ezali ndenge nini. (Mûssa) alobi: Ya sôló ye Nkolo alobi: Ya sôló ngombe wana ezali mobange te mpe elenge te, ezali na kati kati ya wana. Mpe bosala maye botindami

    [69] Balobaki: Sengela biso Nkolo wa yo alakisa biso polele langi na yango ezali nini. (Mûssa) alobaki: Ya sôló ye Nkolo na bino alobi: Ya sôló ngombe wana ezali na langi ya mosaka ya makasi esepelisa bato tango bakomona yango

    [70] Balobaki: Sengela biso Nkolo wa yo alakisa polele ngombe yango, ya sôló, epai na biso bangombe bazali lolenge moko. Mpe ya sôló biso na bolingi ya Allah tokokambama

    [71] (Mûssa) alobaki: Ya sôló Nkolo wa bino alobi: Ya sôló ngombe yango ezala te oyo enuni na mosala ya bilanga, ezala te mpe ngombe ya makolo matengama to mabukama te. Balobaki: sika oyo nde olobi bosembo, mpe basasaki yango, pe bazalaki mpenza na posa ya kosala yango te

    [72] Mpe tango bobomaki moto, mpe moko na moko kati na bino abandaki koluka koyeba nani mobomi, mpe Allah nde mobimisi maye bino bozali kobomba

    [73] Mpe tolobaki: bobeta ye na ndambo na yango, na ndenge wana nde Allah akosekwisa bawei, mpe Allah azali kolakisa bino bilembo biye mpo ete bino bososola

    [74] Sima mitema mia bino mikomaki makasi. Lokola mabanga to makasi koleka mabanga, pamba te ya sôló kati ya mabanga, misusu mingala mizali kobima kati na yango, mpe mabanga misusu mizali kopasuka mpe mibimisi mayi, mpe ya sôló okati ya mabanga misusu ekweyaka mpona bobangi Allah. Mpe Allah abosani te maye bozali kosala

    [75] Boye bozali kolikia (bamizilima) ete bato ya motindo wana (bayuda), bakondimela bino? Mpe ya sôló lisanga ezalaki kati na bango bazalaki koyoka maloba ya Allah, mpe babaloli yango sima na bango kozua mayele, mpe bango bazali koyeba

    [76] Mpe tango bakokutana (bayuda) na baye bandima (bamizilima), bakolobaka: Tondimi; mpe soki bazali bango na bango (bayuda), bakolobaka: Bokoyebisa bango mpona maye Allah afungoleli bino? Mpo bazala na maloba ya elonga Likolo na bino liboso lia Nkolo wa bino, Boye bozali na mayele te

    [77] Boye bazali koyeba te, ya sôló Allah ayebi maye bazali kobomba mpe maye bazali kobimisa polele

    [78] Mpe na kati na bango, ezali na baye bayebi kotanga te mpe kokoma te, mpe bayebi buku te, bobele komizwa, mpe bango bazali bobele na makanisi

    [79] Mpe mawa mpona ba oyo bazali kokoma buku bobele na maboko na bango, sima bazali koloba ete: Oyo ewuti epai ya Allah mpe bazali koteka yango na ntalo moke, mpe mawa na bango na maye maboko na bango mazali kokoma, mpe mawa na bango na maye bazali kozua lokola mbano

    [80] Mpe balobaki móto ekosimba biso te bobele mikolo miye miyebani. Loba: Boye bino bozuaki elaka epai ya Allah, mpe Allah azangisaka te na elaka naye? To boye bozali koloba likolo ya Allah maye boyebi te

    [81] Kasi, moto oyo asalaki mabe mpe masumu naye ezingi ye, mpe baye wana bakozala bato ya móto libela na libela

    [82] Mpe ba oyo bandimaki mpe basalaki misala ya malamu, baye wana bakozala bato ya lola mpo na libela

    [83] Mpe na tango tozuaki mikano epai ya bana ya isalayele, ete bobondela sé bobele Allah, mpe bosala bolamu na baboti na bino, mpe mabota ya pembeni, mpe bana bitike, mpe babola, mpe boloba na bato liloba ya malamu, mpe botelemisa losambo mpe bofuta zakat. sima bopesaki mokongo na mibeko topesaki bino, bobele moke na kati na bino nde balandaki mibeko

    [84] Mpe bokanisa tango tozuaki mikano mpona bino ete: Bosopa makila te, mpe bobimisa bino na bino na bandako na bino te, sima bondimaki yango mpe bozalaki bino moko banzeneneke

    [85] Sima ya mikano, bobandi kobomana, mpe bozali kobimisa misusu kati na bino na bandako na bango, mpe bozali kosalisa basusu kati na masumu mpe na kimonguna likolo na basusu. Soki bandeko na bino ya lingomba bayeli bino bakangami ya bitumba, bozali kokangola bango na mbongo mpe bino boyebi ete yango ezali lisumu; Pona kobimisa bango. Bozali kondima na ndambu ya buku mpe bozali kopengwa na ndambu? Lifuta nini ekozala likolo ya oyo akosala yango kati na bino kaka azala mutu ya mpamba na bomoyi ya mokili, mpe na mokolo ya suka, bakozongisama na etumbu ya makasi, mpe Allah abosani te maye bozali kosala

    [86] Ba oyo bazali kosomba bomoyi ya nsé kotika bomoyi ya lobi. Mpe tokokutola etumbu na bango te mpe bakosungama te

    [87] Mpe ya sôló topesaki epai ya Mûssa buku, mpe totindaki sima naye batindami balandani. Mpe topesaki Issa mwana ya Maryam bilembo polele, mpe tolendisaki ye na molimo mosantu: Boye na tango inso motindami akoyela bino maye masepelisi bino te, bosalaki lolendo mpe bozuaki bango bato ya lokuta mpe bobomaki basusu

    [88] Mpe balobi ete: Mitema mia biso mizali ya kokangama, kasi Allah alakeli bango botutu na ntina ya bopengwi na bango, mpe kondima na bango ezali ya moke

    [89] Mpe na tango buku eyelaki bango kowuta epai ya Allah mpona kolakisa bosôló na maye bazalaki na yango, mpe liboso bazalaki koluka kozala likolo ya ba oyo bapengwa, mpe tango ekomelaki bango na maye bango bayebaki bapengwaki mpo na yango, mpe botutu bwa Allah ezali likolo ya bapengwi

    [90] Ezali mabe mpona maye milimo na bango misombaki yango ete bapengwa na maye Allah akitisaki, kotomboka ete Allah akitisa bolamu naye likolo ya bawumbu naye oyo Alingi, mpe bawumelaki na kanda likolo ya kanda, mpe mpona bapengwi bakozua etumbu ya mabe

    [91] Mpe soki balobi na bango: bondima na maye Allah akitisaki, bakolobaka: Tondimi na maye makitaki epai na biso, mpe bazalaki kopengwa na maye mazali koya sima, nzoka nde yango ezali bosembo oyo endimi maye bazali na yango; loba: Mpona nini bozalaki koboma bantoma ya Allah liboso, soki bozalaki bandimi

    [92] Mpe ya sôló Mûssa ayelaki bino bilembo, mpe sima naye, bozuaki mwana ngombe mpona kobondela mpe bozali babubi

    [93] Mpe na tango tozuaki elaka na bino mpe totombolaki likolo na bino ngomba (ya sinai): bozua na bokasi maye topesaki bino mpe boyoka, balobaki: Toyoki mpe toboyi, mpe mitema mia bango misepelaki na kosambela mwana ngombe mpo na bopengwi na bango, loba: Kondima na bino etindi bino na mabe, soki ya sôló bozali bandimi

    [94] Loba: Soki efandeli ya mokolo ya suka epai na Allah ezali sé mpo na bino moko bato mosusu te, bosenga liwa soki bozali na bosembo

    [95] Mpe bakondimaka yango te na mbeba oyo basalaki. Mpe Allah nde moyebi ya babubi

    [96] Mpe ya sôló, okokuta bango bazali nabokengeli makasi mpona bomoyi ya nsé koleka kutu basambeli bikeko. Moko kati na bango akosepela ete awumela mbula nkoto moko; kasi yango ekobatela ye na etumbu te soki awumeli mingi; mpe Allah azali komona maye bazali kosala

    [97] Loba: Oyo akozala monguna ya (anzelu) djibril, kasi ya sôló ye akitisaki yango na motema nayo na ndingisa ya Allah, mpe ezali kondima na maye ekitaki liboso; yango ezali bokambemi mpe bopesi sango elamu mpona bandimi

    [98] Oyo akozala monguna na Allah, mpe ba anzelu naye, mpe batindami naye, mpe Djibril na Mîkâl, mpe ya sôló Allah azali monguna ya bapengwi

    [99] Mpe tosilaki kokitisa epai nayo bilembo bia polele. Mpe bakopengwaka na yango te sé bobele bato ya mabe

    [100] mpe tango inso bazali kozua elaka; eteni mosusu kati na bango bazali kobebisa yango? Kasi ebele na bango bazali kondima te

    [101] Mpe tango motindami ayelaki bango kowuta epai ya Allah, na bosôló ya maye bazalaki na yango, molongo moko okati ya ba oyo bazuaki buku ya Allah babwaki yango sima ya mikongo mia bango, lokola bango bayebi te

    [102] Mpe balandaki mabe oyo basatana balobaki na bokonzi ya Suleyman. Mpe Suleyman apengwaki te, kasi basatana nde bapengwaki na kolakisa bato bonganga na oyo ekitaki epai ya ba anzelu mibale na babilona Hârût na Mârût, mpe bakotangisa moto te kino bakolobaka: Ya sôló mpenza biso tozali momekano ya mabe kasi bopengwa te. Mpe bazali kotanga epai na bango maye makokabola kati kati ya moto na mwasi naye. Mpe mabe na bango ekozua moto te sé na ndingisa ya Allah. Mpe bazali koyekola maye makonyokolo bango mpe makosunga bango te. Mpe basilaki koyeba ete oyo akosomba yango akozala na eloko te na mokolo ya suka, oyo nde mombongo ya mabe basali yango mpona milimo na bango soki bayebaki

    [103] Mpe soki ata bandimaki mpe babangaki, mbele bazuaki lifuta linene epai ya Allah, soki bazalaki koyeba

    [104] Eh bino bandimi! boloba te ete Râ-inâ, kasi boloba ete: Unzurna (botala biso). Mpe boyoka, mpe mpona bapengwi bakozalaka na etumbu enene

    [105] Ba oyo bapengwa kati na baye bazua buku mpe basangisi Allah basepelaka te ete bolamu ekitela bino kowuta epai ya Nkolo na bino, nzoka nde Allah apesaka ngolu naye na oyo ye alingi. Allah nde azali Nkolo bolamu ya monene

    [106] Soki tobongoli mokapo to tolongoli yango, tokoya na mosusu koleka, to lokola yango. Boye oyebi te ya sôló Allah azali na makoki ya biloko binso

    [107] Boye oyebi te ete ya sôló Allah azali na bokonzi ya likolo na mabele, mpe bozali na mobateli mosusu te, mpe mosalisi te liboso ya Allah

    [108] To boye, bolingi kotuna motindami na bino ndenge moko Mûssa atunamaka liboso? Mpe moto oyo akobalola kondima na bopengwi ya sôló ye wana asili kobunga nzela

    [109] Mpe ebele okati ya bato ya buku, bazali kolinga kozongisa bino na sima ya bondimi bwa bino bapengwi na likunya kowuta epai na bango, na sima ya koyebisa bango bosembo, bolimbisa mpe bobosana, kino mibeko mia Allah mikoya, ya sôló Allah azali na bokoki likolo ya biloko binso

    [110] Mpe botelemisa losambo, mpe bopesa zakat. mpe bolamu nyoso bokobimisa mpo nabino, bokokuta yango epai ya Allah, ya sôló Allah azali komona manso bozali kosala

    [111] Mpe balobaki: Moto moko akokota lola te sé azala moyuda to moklisto. Wana ezali makanisi na bango ya lokuta, loba: Bopesa bilembetele bia bino soki bozali na bosembo

    [112] Te, kasi oyo akomisokia epai na Allah, mpe azali mobongisi, ya sôló ye akozala na lifuta epai ya Nkolo naye. Bobangi mpe mawa ekozala te mpo na bango

    [113] Mpe bayuda balobaki: Baklisto bazali na eloko te, mpe baklisto balobaki: Bayuda bazali na eloko te, mpe bazali kotanga buku. Ndenge moko na ba oyo bayebi eloko te bazali koloba maloba lokola bango, kasi ya sôló Allah akosambisa bango o mokolo ya suka na maye bazalaki kokabwana

    [114] Nani oyo azali mabe koleka moto oyo apekisi ba masâdjid ya Allah, ete batanga nkombo naye na kati, mpe aluki kobebisa yango? Bango wana bazali na ndingisa te ya kokota okati na yango. Longola sé ba oyo bazali kobanga; bakokitisama awa na nsé na kozanga lokumu, mpe o mokolo ya suka bakozala na etumbu enene

    [115] Moniele na eloli ezali ya Allah, mpe esika nyoso bokobaluka, bokokuta elongi ya Allah. Ya sôló Allah azali moyebi monene

    [116] Mpe balobaki: Allah azali na mwana! bopeto naye! Kasi maye mazali olikolo mpena nsé mazali ya ye; nyoso esengeli kotosa ye

    [117] Ye mokeli ya likolo mpe na nsé, mpe tango akani likambo, mpe ya sôló oyo akoloba: yango nde ekozalisama

    [118] Mpe baye batanga te balobaki ete: Mpona nini Allah asolisi biso (polele) te, too mpe elembo eyela biso? Na boye nde, bato balekaki liboso na bango, bazalaki koloba lolenge ya maloba na bango. Mitema na bango ekomaki na bokokani. Ya sôló tosili kolimbola bilembo mpo bato bazala na kondima

    [119] Ya sôló, totindaki yo na bosembo, mopesi sango elamu, mpe mokebisi, mpe okotunama te na ntina ya bato ya lifelo

    [120] Mpe bakosepela nayo te, bayuda mpe baklisto kino olanda lingomba na bango. Loba: Ya sôló, bokambi bwa Allah yango nde bokambi ya sôló. Mpe soki yo olandi mposa na bango na sima ya oyo ekomeli yo kati ya boyebi, okozala na mobateli te mpe mosungi na botiki Allah

    [121] Ba oyo topesaki bango buku bazali kotanga yango na botangi ya sôló, ba oyo wana bandimi na yango. Mpe baye bakopengwa na yango, bango nde bazangi

    [122] Eh bana ya isalayele! Bokanisa bolamu na ngai, oyo natiaki likolo na bino. Mpe ya sôló natombolaki bino likolo na mikili

    [123] Mpe bobanga mokolo moye molimo moko mokosalisa molimo mosusu te, mpe bosikoli ekoyambama te, mpe bobondeli ekozala na ntina te mpe bakosungama mpe te

    [124] Mpe tango Nkolo ya Ibrâhîm amekaki ye na liloba, mpe akokisi yango, mpe alobi ete: Ya sôló nalingi kotia yo mokambi ya bato. Alobaki ete: Mpe na bakitani na ngai? Alobiete: Elaka na ngai ekomelaka bato ya mabe te

    [125] Mpe tango totiaki ndako ezala esika ya bozongi mbala na mbala, mpe ezala esika ya kimia mpona bato. Mpe bato basambela esika Ibrâhîm atelemaki. Mpe topesaki motindo na Ibrâhîm na Ismâïl ete: Bopetola ndako na ngai mpona bato ya kobaluka pembeni na yango, mpe na baye bakobombana okati mpona mabondeli, mpe na bagumbami mpe na bafukami

    [126] Kanisa tango Ibrâhîm alobaki ete: Eh! Nkolo, tia mboka oyo ezala na kimia, mpe opesa bato na yango bomengo na bambuma ya ndenge na ndenge, baye bakondima na Allah mpe na mokolo ya suka, (Nkolo naye) azongisaki eyano ete: Oyo okati na bango akompegwa, nakopesa ye minyokoli mpe bomoyi mokuse, mpe etumbu ya móto, mpe oyo nde bozongi ya mabe

    [127] Mpe tango Ibrâhîm atombolaki makonzi ya ndako elongo na Ismâïl mpe balobaki ete: Eh Nkolo! Ndimela biso, ya sôló ozali moyoki mpe moyebi

    [128] Eh! Nkolo na biso tia biso mibale tozala bandimi, mpe na bakitani na biso bazala umma mpo nayo, mpe lakisa biso lolenge na biso ya kokumisa yo, mpe ndima tubela na biso. Ya sôló ozali moyambi tubela mpe moyoki mawa

    [129] Nkolo wa biso, tinda na kati na bango motindami, atangela bango mikapo mia yo, to mpe bilembo, atangisa bango buku mpe bwanya, apetola bango. Ya sôló yo nde ozali na nguya mpe bwanya

    [130] Mpe oyo akoboya lingomba ya Ibrâhîm, ye wana nde asili kobwaka molimo naye na bozoba? Ya sôló toponaki ye awa na nsé, mpe ya sôló na mokolo ya suka akozala elongo moko na bato ya malamu

    [131] Mpe tango Nkolo naye alobaki naye ete: Misokia, alobaki: Namisoki mpona Nkolo wa molongo mobimba

    [132] Mpe Ibrâhîm apesaki yango mitindo na bana naye, mpe lolenge moko na Ya’qûb alobaki na bana naye: Eh bana na nga!, ya sôló Allah aponeli bino lingomba. Bokufa te bobele bozala nakati ya komisokia

    [133] Boye bozalaki banzeneneke tango liwa ekomelaki Ya’qûb mpe alobaki na bana naye ete:nani bokobondela sima na nga? Balobaki ete: Tokobondela Nzambe nayo, mpe Nzambe ya batata nayo Ibrâhîm, Ismâïl mpe Is’hâq, ye azali Nzambe sé moko oyo tomisoki epai naye

    [134] Ba oyo wana nde umma eleka. Bazali na lifuti ya maye basalaki, bino mpe bozali na lifuti ya maye bosalaki. Mpe bokotunama te natina ya maye bango basalaki

    [135] Mpe balobaki: Bozala bayuda to baklisto bokokambama na nzela ya semba. Loba: lingomba ya Ibrâhîm nde ezali nzela ya semba, mpe azalaki te elongo na basambeli bikeko

    [136] Boloba: Tondimi na Allah, na maye makitaki epai na biso, mpe na maye makitaki epai ya Ibrâhîm, mpe na Ismâïl, mpe Is’hâq, mpe Ya’qûb, mpe mabota malandami, mpe na maye mapesamaki na Mûssa na Issa, mpe na maye mapesamaki na bantoma kowuta epai ya Nkolo wa bango, tokoki kotia bokeseni te kati ya moko wa bango, mpe biso tomisokie epai naye

    [137] Mpe soki bandimaki na oyo bondimi na yango, ya sôló balingaki kokambama, mpe soki bapesi mokongo, ya sôló bango bakozala okati ya bokabuani, mpe Allah akobatela yo mpona bango mpo ete azali moyoki mpe moyebi

    [138] Tozali kolanda lingomba ya Allah, na boye nani azali malamu lokola Allah na lingomba lia ye? Mpe mpona ye nde tozali kobondela

    [139] Loba: Bozali kosuanisa biso mpona Allah, ye nde Nkolo wa biso mpe Nkolo wa bino? Biso na misala na biso, bino mpe na misala na bino. Mpe tomipetwami epai naye

    [140] Too bokoloba ete: Ya sôló Ibrâhîm, na Ismâïl, na Is’hâq, mpe Ya’qûb, mpe mabota bazalaki bayuda too baklisto? Loba: Bino nde boyebi mingi, too Allah? Nani azali mabe koleka moto oyo abombi bosembo ya Allah epai naye? Mpe Allah abosani te maye bozali kosala

    [141] Ba oyo wana nde umma baye baleka. Bakofutama na maye basalaki, bino mpe bokofutama na maye bosalaki. Bokotunama te na ntina na maye bango basalaki

    [142] Bazoba okati ya bato bakolobaka ete: Nini ebalusi bango kowuta na etaleli na bango, oyo bazalaki kotala liboso na tango ya losambo? Loba: moniele mpe eloli ezali ya Allah, akambaka oyo alingi na nzela ya semba

    [143] Mpe mpona wana totiaki bino bozala umma ya kati kati mpo bozala banzeneneke epai na bato, mpe motindami azala nzeneneke likolo na bino. Mpe totiaki te etaleli oyo ozalaki na yango bobele toyeba nani akolanda motindami mpe nani akopesa ye mokongo. Mpe yango ezali mpasi te na baye Allah asungi bango. Mpe Allah azali te mpona kobungisa boyambi na bino, ya sôló Allah azali malamu atonda na mawa epai ya bato

    [144] Ya sôló tozalaki komona yo ozali kobalola balola elongi nayo na likolo. Mpe tokopesaka yo ndingisa ya etaleli oyo osepelaki na yango. Balola elongi nayo o ndako esantu ya makkah (ka’aba), mpe bisika binso bokozala, bobalola bilongi bia bino epai wana(makkah). Mpe ya sôló ba oyo bapesamaki buku liboso na bino bazali koyeba yango, ya sôló ezali bosembo kowuta epai ya Nkolo wa bango. Mpe Allah abosani te maye bazali kosala

    [145] Mpe soki ata oyeli ba oyo bazuaki buku (liboso na bino) bilembo binso, bakolanda te etaleli nayo, mpe yo kolanda te etaleli ya bango. mpe ndambu okati na bango bakolanda te etaleli ya basusu. Mpe soki yo olandi bamposa na bango na sima ya kozua boyebi, ya sôló, okozala okati ya babubi

    [146] Ba oyo topesaki bango buku, bayebi yango lokola bayebi bana ba bango. Mpe ya sôló lisanga moko kati na bango, babombaka bosôló, mpe bango bazali koyeba

    [147] Epai ya Nkolo wa yo nde bosembo ezali. Kozala o ntei ya bato ya tembe te

    [148] Lingomba na lingomba ezali na etaleli na yango o esika babalukaka mpona losambo.Mpe bowela na kosala bolamu. Bisika binso bokozala, Allah akozongisa bino epai naye. Ya sôló Allah azali na nguya likolo ya biloko binso

    [149] Mpe bisika binso o kobima, balola elongi nayo o ndako esantu (ya makkah). Mpe ya sôló yango ezali bosôló kowuta epai na Nkolo wa yo. Mpe Allah abosani te maye bozali kosala

    [150] Mpe bisika binso okobima balola elongi nayo o ndako esantu. Mpe bisika binso bokozala bobalola bilongi na bino epai wana (ya makkah), mpo ete bato bazala te na bilembetele likolo na bino, bobele bato ya mabe kati na bango. Bobanga bango te kasi bobanga nde ngai mpo nakokisela bino bolamu na ngai, mpo ete bokoka kokambama

    [151] Ndenge moko, totindaki kati na bino motindami kowuta na bino moko, atangela bino mikapo mia biso, mpe apetola bino, mpe atangisa bino buku mpe bwanya mpe atangisa bino maye bozalaki koyeba te

    [152] Bokanisa ngai, nakokanisa bino. Mpe botondo ngai kasi bopengwa te

    [153] Eh bino bandimi! Boluka lisalisi okati ya losambo mpe na koyika mpiko. Mpamba te Allah azali elongo na bakangi mitema

    [154] Mpe boloba te ete: baye bakufa na nzela ya Allah bazali bibembe, kasi bazali na bomoi, kasi bozali koyeba te

    [155] Mpe ya sôló, tokomeka bino na eloko kowuta na bobangi, mpe na nzala, mpe kokutola misolo, mpe milimo, mpe milona na bino; mpe pesa sango elamu na baye bakangi mitema

    [156] Ba oyo o tango mpasi ekomeli bango, bakolobaka: Ya sôló tozali ya Allah mpe ya sôló epai naye nde tokozonga

    [157] Ba oyo wana bakozua mapamboli mpe ngolu kowuta na Nkolo wa bango, mpe bango nde bakambami

    [158] Ya sôló ngomba ya Swafâ na Mar’wa ezali kati ya bilembo ya Allah. Mpe oyo akosala mobembo enene o ndako esantu, too mobembo eke, ezali lisumu te mpona ye kotambola kati kati ya ngomba wana mibale. Kasi oyo akobakisa bolamu mosusu, ya sôló Allah azali wa botondi atonda boyebi

    [159] Ya sôló ba oyo bazali kobomba maye tokitisaki kowuta na polele mpe bokambi na sima ya kolakisa polele na yango mpona bato okati ya buku, bango nde bakozua botutu ya Allah, mpe balakeli bakolakela bango botutu

    [160] Longola sé ba oyo bakotubela, mpe babongisi, mpe balimboli bosôló, bango wana nde ngai nakondima tubela na bango, mpe ngai nde moyambi ya tubela moyoki mawa

    [161] Ya sôló baye bapengwi mpe liwa ezui bango na kati ya bopengwi bango wana nde botutu ya Allah, na ba anzelu na ya bato nyonso ezali likolo na bango

    [162] Libela o kati na móto, etumbu na bango ekokutolama ata moke te mpe bakopemisama te

    [163] Mpe Nzambe na bino azali sé Nzambe moko. Mosusu azali te sé ye, azali wa ngolu atonda boboto

    [164] Ya sôló, okati ya bokeli mapata mpe mabele, mpe na bokeseni ya butu na moyi, mpe masuwa oyo ezali kotambola o kati ya ebale, na yango ezali na litomba mpona bato, mpe na maye Allah azali kokitisa kowuta na likolo mpe azali kopesa mabele bomoyi sima ya kokufa na yango, mpe azali kobimisa banyama ndenge na ndenge kowuta na mabele, mpe na etamboli ya mopepe na londende ya mbula mobongisami na kati kati ya mapata na mabele, Nyonso wana bilembo mpona bato ya mayele

    [165] Mpe nakati ya bato ezali na ba oyo bazali kozuela Allah bambanda mpe balingi bango lokola bolingo ya Allah, mpe ba oyo bandima bazali na bolingo ya Allah makasi. Mpe tango babubi bakomona etumbu, bakoyebaka ete ya sôló bokasi bonso bozali ya Allah mpe Allah apesaka etumbu makasi

    [166] Tango bakambi bakomona etumbu bakoboya ba oyo balandaki, mpe bondeko bokokatana

    [167] Mpe baye balandaki bakoloba: Soki tozongaka, tolingaki kowangana bango lolenge bawanganaki biso. Ya sôló yango wana Allah alakisi bango misala mia bango ya mabe, mpe bango bakobimaka na móto te

    [168] Eh Bino bato! bolia biye bizali na mabele, biye bizali malamu mpe bilingisami mpona bino, kasi bolanda banzela ya satana te, pamba te azali monguna na bino ya polele

    [169] Ya sôló azali kotinda bino na mabe. Mpe kosala masumu minene, mpe boloba na Allah maye boyebi te

    [170] Mpe soki balobi na bango ete: bolanda maye Allah akitisi, bakolobaka ete: Biso tokolanda sé bonkoko ya batata na biso, ata soki batata na bango bazalaki na mayele te mpe babunga nzela

    [171] Mpe ndakisa ya baye bapengwa ezali lokola bibwele oyo eyokaka mbela te sé makelele ya mpamba. Bazali na matoyi kasi makangama, miso mizipama, minoko mikangama, bango bakanisaka te

    [172] Eh bino baye bondima! bolia biloko ya malamu biye topesaki bino, mpe botondo Allah soki ya sôló bozali kobondela ye

    [173] Ya sôló (Allah), apekisaki bino kolia nyama eye bakati kingo te, mpe makila, mpe mosuni ya ngulu, mpe oyo bakati yango kingo kasi batangi nkombo ya Allah te. Kasi oyo azui mpasi na nzala ya makasi mpe alei yango na nko te mpe alekisi ndelo te azali na lisumu te, mpamba te ya sôló Allah azali molimbisi mpe moyoki mawa

    [174] Ya sôló, baye bazali kobomba maye Allah akitisaki kowuta na buku mpe bazali koteka yango na ntalo moke, bango nde bazali kolia móto ya lifelo o kati na mabumu ma bango. Mpe Allah akolobisa bango te o mokolo ya suka, mpe akopetola bango te, mpe bakozala na etumbu ya makasi

    [175] Bango nde babongoli bosembo na libunga. Mpe babongoli bolimbisi na etumbu, mpe boye nini ekosala mpo ete bakanga mitema okati ya móto

    [176] Yango wana na bosôló mpenza, Allah akitisaki buku. mpe ya sôló ba oyo bakesanaki mpe babuaki maye mazali okati ya buku, bazali na bokeseni monene

    [177] Bolamu ezali te ete bobalola bilongi na bino o moniele mpe eloli. Kasi bolamu ezali na moto oyo andimi na Allah, mpe na mokolo ya suka, mpe andimi na ba anzelu, mpe na babuku mpe andimi na ba ntoma, mpe abimisi mosolo na bolingo na yango mpona mabota naye, mpe mpona bana bitike, mpe mpona babola, mpe mpona moleki nzela, mpe mpona basengi lisalisi, mpe mpona kokangola bawumbu ya bandimi. Mpe baye bakangami okati ya boloko ya bitumba, mpe kotelemisa losambo, mpe kofuta zakat. mpe baye bazali kokokisa elaka na bango eye balakaki, mpe baye bazali kokanga mitema tango makama na bokono bozwi bango, bango wana nde bato ya bosembo mpe bango nde babangi (Allah)

    [178] Eh Bino baye bondimi! esilaki kokomama mpona bino mibeko ya koboma: bonsomi na bonsomi, mowumbu na mowumbu, mwasi na mwasi, mpe oyo kati na bino ndeko naye akolimbisa ye, esengeli naye kobongisa yango naboyokani ya malamu, mpona kofuta yango na ndenge ya malamu, wana ezali bokutoli ya etumbu ewuti epai na Nkolo na bino mpe ngolu naye, kasi oyo akobebisa sima na yango akozua etumbu ya makasi

    [179] Mibeko ya koboma nde ezali kobatela bomoyi ya bino, eh bino bato ya mayele, mpo ete bozwa bobangi

    [180] Esilaki kokomama mpona bino lotomo too mobeko ete: oyo okati na bino liwa ekokuta ye, soki atiki bozui ebele esengeli naye kotika malako ya malamu mpona baboti naye. Na mabota naye na ndenge elongobani. Wana nde lotomo likolo ya babangi

    [181] Na oyo akobongola yango sima ya koyoka, ya sôló lisumu wana ekozala likolo ya baye babongoli yango, mpamba te Allah azali moyoki mpe moyebi

    [182] Kasi soki mokaboli nkita ya mowei abangeli ye libunga too lisumu, mpe abongisi kati na bakitani naye, ezali lisumu te, ya sôló Allah azali molimbisi, atonda mawa

    [183] Eh bino baye bondimi! Ngizi ekomameli likolo na bino ndenge moko ekomamelaki likolo na ba oyo bazalaki liboso na bino, na ntina ete bakoka kobanga

    [184] Mikolo mia botangi. Oyo akozala na bokono too mpe mobembo okati na bino, afuta o mikolo misusu. Mpe mpona baye bazali na bokoki te; baleisa babola. Mpe na oyo akobakisa mpona bolamu. ezali malamu mingi mpona ye, mpe soki bokangi ngizi, ezali malamu mingi mpona bino, soki bozali koyeba

    [185] Okati ya sanza ya ramadani nde eyambaki bokiti ya kurani ezali bokambi mpona bato, mpe nzela polele na ntina ya ekambemi malamu mpe bososoli. Oyo okati na bino sanza wana ekokuta ye esengeli naye kokanga ngizi, kasi oyo azali na bokono too azali na mobembo, akanga yango mikolo misusu. Allah alingeli bino mpete kasi alingeli bino mpasi te. Mpe bokokisa mikolo (ya ngizi), mpe bokumisa bonene ya Allah na ntina ete asungi bino na nzela ya semba, mpe mpo ete bopesa ye botondi

    [186] Mpe soki bawumbu na ngai batuni yo mpona ngai, ya sôló ngai nazali penepene ya koyanola na tango mobengi abengi. Bayanola mbela na ngai mpe bandimela ngai, mpo ete bango bakambama malamu

    [187] Elingisami mpona bino kosangana na basi na bino o butu bwa ngizi; bango bazali bilamba bia bino. Bino bozali bilamba bia bango. Allah ayebi ya sôló bino bozalaki kosala yango na kobombana mpe ayambi tubela na bino mpe alimbisi bino. Mpe sik’oyo bosangana na bango mpe boluka bolamu na maye Allah asali mpona bino. Mpe bolia mpe bomela kino boyeba bokeseni ya tongo na butu. Sima bokokisa ngizi kino butu. Bosangana na bango te na bino bozali ya kobombana okati ya ba masâdjid. Mpe wana ezali ndelo ya Allah. Bopusana mpembeni na yango te. Na boye nde Allah azali kolakisa polele bilembo bia ye mpona bato, mpo ete bakoka kobanga

    [188] Mpe bolia misolo mia bino te kati na bino na lolenge ya mabe, mpe bosalisa te bazuzi na bofuti bango kanyaka mpona kolia ndambu ya misolo mia bato na mabe, mpe bino boyebi

    [189] Bazali kotuna yo na ntina ya basanza ya sika, loba ete: Yango bizali kosalisa bato mpona koyeba bangonga mpe mpona hajj. Ezali lolenge ya malamu te ete bozonga epai na bino sima ya mikongo ya bandako. Kasi lolenge ya malamu ezali na moto oyo azali kobanga (Allah). Bokota na bandako na minoko na yango mpe bobanga Allah mpo ete bolonga

    [190] Mpe bobundisa baye bazali kobundisa bino na nzela ya Allah, mpe bolekisa ndelo te; ya sôló Allah alingaka te baye bazali kolekisa ndelo

    [191] Mpe boboma bango o esika nyoso bokuti bango, mpe bobimisa bango bisika biye babimisaki bino. Mpe komekama ezali mabe koleka koboma. Mpe bobundisa bango te pembeni ya ndako esantu, sé soki babundisi bino okati na yango. Mpe soki babundisi bino boboma bango, na boye nde lifuta ya bapagano

    [192] Mpe soki batiki, ya sôló Allah azali molimbisi atonda mawa

    [193] Mpe bobundisa bango kino komekama ekosila, mpo ete lingomba ezala bobele ya Allah, kasi soki batiki, botika kobunda, longola sé babubi soki babundisi

    [194] Sanza esantu na sanza esantu, mpe biloko bisantu ezali na mibeko lolenge moko, moto oyo akobundisa bino, bobundisa ye lolenge abundisi bino kasi bolekisa te. Mpe bobanga Allah mpe boyeba ete ya sôló Allah azali elongo na baye bazali kobanga

    [195] Mpe bobimisa na nzela ya Allah kasi bomibebisa te na maboko na bino moko, mpe bobongisa. Ya sôló Allah alingaka babongisi

    [196] Mpe bosala hajj na umra mpona Allah. Mpe soki bozui mpasi mpona kokokisa yango, bobimisa likabo na ndenge bokoki. Kasi bokata basuki ya mitu na bino te liboso ete nyama ekoma na esika ya kosasa. Soki moko kati na bino azali na bokono too azali koyoka mpasi na mutu naye (mpe esengeli akata suki), afuta lomande na kokanga ngizi too apesa mabonza too afuta mbeka sima ya kosala umra, otango bokozwa kimia, moto nionso oyo azwi mpasi te sima ya umra liboso ya kosala hajj esengeli naye kobonzela Allah oyo akokoka. Na oyo azali na makoki wana te akanga ngizi mikolo misato na tango azali na hajj, mpe mikolo sambo tango bokozonga, wana nde mikolo zomi ya kokoka. Wana ezali mpona moto oyo libota naye ezali te zingazinga na ndako esantu ya Makkah. Mpe bobanga Allah, mpe boyeba ete ya sôló Allah azali makasi na etumbu

    [197] Hajj ezali na basanza biye biyebani, oyo akosala hajj asangana na mwasi te, mpe asala mabe te, aswana te. Mpe na maye bozali kosala ya malamu Allah ayebi yango. Mpe bomilengele, komilengela ya malamu ezali nde bobangi. Bobanga ngai eh bino baye botondi na mayele

    [198] Ezali lisumu te mpona bino koluka bolamu epai ya Nkolo wa bino. Mpe soki bowuti na arafât, bobondela Allah na bisika bisantu. Mpe bokanisa ye na ntina ete asili kokamba bino na nzela ya semba, pamba te bino bozalaki liboso babungi nzela

    [199] Sima, boleka na bisika biye bato balekaki, mpe bosenga Allah bolimbisi, ya sôló Allah azali molimbisi moyoki mawa

    [200] Mpe soki bosilisi mabondeli na bino ya hajj, bokanisa Allah ndenge bokanisaka baboti na bino, to bokanisa (Allah) makasi koleka. Mpe ezali na bato basusu awa na mokili balobaka ete: Eh Nkolo! Pesa biso bomengo ya nsé. Mpe bango bakozala na eloko te na mokolo ya suka

    [201] Mpe basusu okati na bango, bazali koloba: Eh Nkolo na biso! pesa biso bomengo ya malamu awa na nsé, mpe bombela biso bomengo ya malamu okati ya lola, mpe obatela biso na etumbu ya móto ya lifelo

    [202] Ba oyo wana nde bazali na mbano na maye basalaki; mpe Allah azali lombango na kofuta

    [203] Bokanisa Allah na mikolo miyebani. oyo akofanda mikolo mibale azali na lisumu te, mpe oyo akozelisa akokisi mikolo misato azali mpe na lisumu te. Ezali sé na oyo azali na bobangi (Allah), mpe bobanga Allah mpe boyeba ete ya sôló, epai naye nde bokosangisama

    [204] Mpe okati ya bato, liloba naye ezali kokamwisa yo na bomoyi ya nsé mpe azali kotia Allah nzeneneke na maye mazali omotema naye, mpe ye nde moto ya tembe makasi ya ntina te

    [205] Mpe soki apesi mokongo akei kotia mobulu na mokili, mpe koboma bibwele mpe kobebisa bilanga. Kasi Allah alingaka mobulu te

    [206] Mpe soki balobi naye banga Allah, asali lolendo ya mabe ya lisumu. Lifelo ekoki naye mpe oyo nde mbeto ya mabe

    [207] Mpe okati ya bato, oyo azali koteka molimo naye mpona koluka kosepelisa Allah. Mpe Allah azali na mawa mingi likolo na bawumbu naye

    [208] Eh bino baye bondima! bokota mobimba o nzela ya islamu, mpe bolanda nzela ya satana te, ya sôló ye azali monguna wa bino ya polele

    [209] Mpe soki bobaloli bosembo o sima ya koyela bino bilembo, boyeba ete Ya sôló Allah azali wa bokasi atonda bwanya

    [210] Bazali kozela, sé Allah akoyela bango okati ya elilingi kowuta na mapata mpe ba anzelu mpona kokata likambo? Mpe epai na Allah, makambo manso makozongisama

    [211] Botuna bana ya isalayele boni topesaki bango bilembo ya polele? Mpe oyo akobongola bolamu bwa Allah sima ya koyela ye, ya sôló Allah azali mopesi etumbu ya makasi

    [212] Bomoyi ya nsé esila kongengisama mpona baye bapengwa mpe bazali kotiola bandimi. Kasi, babangi bakozala likolo na bango o mokolo ya suka. Mpe Allah apesaka bozui na oyo alingi oyo ezali na suka te

    [213] Bato bazalaki umma moko kati ya bondimi (wuta na ebandeli). Na sima Allah atindaki bantoma bazala bapesi sango malamu mpe bakebisi. Mpe akitisaki elongo na bango buku ya sôló, mpona kokata makambo kati kati na bato okati na maye makabolaki bango. Kasi ba oyo buku ekitelaki bango nde bakabwani na tango bilembo ya polele biyelaki bango mpona likunya okati na bango. Na sima Allah akambaki bandimi likolo ya maye bakabwanaki na yango kowuta na bosembo na ndingisa naye, mpe Allah akambaka oyo alingi na nzela ya semba

    [214] Boye bokanisi ete bokokota na lola na tango oyo ndakisa ya baye balekaki liboso na bino naino ekomeli bino te? Mpasi ya bozangi mpe minyokoli na bokono mizuaki bango, mpe baningisamaki kino motindami na bandimi baye bazalaki naye balobaki ete: Lisungi ya Allah ekoya ntango nini? TEE! Ya sôló elonga ya Allah ezali pembeni

    [215] Bazali kotuna yo nini bakoki kobimisa? Loba na bango ete: Oyo bokobimisa ya malamu ezali mpona baboti mibale, mpe bato ya libota, na bana bitike, na bazangi, na moto ya mobembo. Oyo bokosala mpona bolamu, ya sôló Allah azali moyebi manso

    [216] Kobunda na nzela ya Allah epesamela bino lotomo. Mpe bino bosepeli na yango te, tango mosusu oyo bozali komona mabe yango nde ezali malamu mpona bino, mpe oyo bozali komona malamu yango nde ezali mabe mpona bino. Mpe Allah nde ayebi, bino boyebi te

    [217] Bazali kotuna yo mpona bitumba okati ya sanza esantu. Loba ete: Kobunda okati ya sanza esantu ezali lisumu monene, mpe kopekisa bato na nzela ya Allah, mpe kopengwa na yango, mpe kobengana baye bazali na ndako esantu (ya makkah) ezali lisumu linene koleka epai ya Allah. Mpe kosangisa Allah ezali mabe mpenza koleka koboma, mpe bakotika kobundisa bino te kino bokopengwa na lingomba na bino soki bazalaki na makoki wana, mpe kati na bino oyo akotika lingomba naye mpe liwa ezui ye mpe ye azali mopagano, bango wana nde misala mia bango mibebisami awa na nsé mpe na mokolo ya suka. Mpe bango wana bazali bato ya lifelo bakozala na kati seko na seko

    [218] Ya sôló baye bandimi mpe babimi na nzela ya Allah mpe babundi, bango wana bazali kolikia ngolu ya Allah. Mpe Allah nde molimbisi, atonda ngolu

    [219] Bazali kotuna yo mpona masanga mpe mpona masano ya mbongo. Loba ete: Yango nyoso ezali na lisumu linene mpe litomba mpona bato. Kasi lisumu na yango ezali munene koleka litomba wana, mpe bazali kotuna yo nini bakoki kobimisa (mpona Allah)? Loba ete: Oyo bokoyoka mpasi te na mitema mpona kobimisa yango. Na boye nde Allah azali kolimbola bino bilembo mpo ete bozala na bososoli

    [220] Kati na mokili mpe na mokolo ya suka. Mpe bazali kotuna yo mpona bana bitike. Loba ete: Kosalisa bango ezali na bolamu mingi, soki bosangani na bango, bazali bandeko na bino. Mpe Allah ayebi mobebisi mpe mobongisi. Mpe soki Allah alingaki, nde apesaki bino pasi. Ya sôló Allah azali na bokasi atonda bwanya

    [221] Mpe bobala te basi oyo basangisi (Allah) kino bakondima, mowumbu ya mwasi mondimi aleki mosangisi (Allah) ya mwasi ata soki asepelisi bino. Bobalisa te na mibali basangisi (Allah) tee kino bandima, mowumbu ya mobali mondimi aleki mopengwi, ata soki asepelisi bino. Baye wana bazali kobenga bato na nzela ya móto. Mpe Allah azali kobenga na lola mpe bolimbisi na ndingisa naye. Mpe azali kolimbola bilembo bia ye na bato mpo bakoka kokanisa

    [222] Mpe bazali kotuna yo mpona makila. Loba ete: Yango ezali mbindo. Bozelisa basi o tango wana, mpe bopusana kosangana na bango te kino bakokoma mpeto. Soki bakomi mpeto, bosangana na bango nzoto na bolandi mibeko ya Allah, ya sôló Allah alingaka baye basengaka tubela mpe bamipetolaka

    [223] Basi na bino bazali bilanga bia bino. Bokota o bilanga bia bino ndenge nyonso bolingi, mpe bosala misala ya malamu mpona milimo na bino. Mpe bobanga Allah, mpe boyeba ete ya sôló bokokutana naye. Pesa sango ya malamu epai ya bandimi

    [224] Mpe botia nkombo ya Allah te mpona kolapalapa na bino mpo na koluka nzela ya komipekisa kosala (misala) ya malamu, mpe kobanga mpe kobongisa okati na bato. Mpe Allah azali moyoki moyebi ya manso

    [225] Allah azali kosilika na bino te na ba ndayi oyo ezali kobima na lolemu na bino, kasi akosilika na bino na oyo bozui kowuta na mitema na bino. Allah azali molimbisi atonda bolamu

    [226] Mpona baye bazali kolapa ndayi likolo ya basi na bango, ete bakosangana na bango te bakozelisa sanza minei. Kasi soki balongoli kolapa ndayi na bango, ya sôló Allah azali molimbisi atonda mawa

    [227] Mpe soki batelemi na ndayi na bango ya kokabwana na basi na bango, ya sôló Allah azali moyoki mpe moyebi

    [228] Mpe basi baye bakufeli mabala bakobima na ndako ya libala te kino bakomono makila mbala misato. Mpe esengeli te na bango kobomba maye Allah asili kokela okati ya mabumu na bango, soki ya sôló bazali kondima na Allah mpe na mokolo ya suka. Mpe na tango wana, mibali na bango bakomi na ndingisa ya kozongela bango, soki bazali na posa ya kobongisa, bazali na lotomo ndenge moko mpe mibali bazali na lotomo, kasi mibali bazali na bokonzi likolo na bango basi. Mpe Allah azali bokasi atonda bwányá

    [229] Bokabwani ya libala ezalaka sé mbala mibale. Na sima, bakoki kozongana na ndenge elongobani, to mpe kokabwana na lolenge ya malamu. Mpe esengeli te na bino mibali kobotola maye bopesaki bango na libala, sé soki babangi ete bakokoka te kobatela mibeko ya Allah. Mpe soki bobangi ete bango mibale bakotelemisa mibeko ya Allah te, na bongo ezali lisumu te likolo na bango ete mobali andima kozua mwa lompata oyo mwasi apesi mpona komikangola, wana nde mibeko ya Allah. Bobuka yango te, oyo akobuka mibeko mia Allah bango wana nde bazali bato mabe

    [230] Mpe soki mobali aboyi mwasi mpona mbala ya misato, akoki kozongela mwasi wana te kino akobala mobali mosusu. Soki bakabwani, nde mobali ya liboso akoki kozongela ye, soki bazui likanisi ya kobatela mibeko ya Allah. Wana ezali mibeko ya Allah azali kolimbola yango mpo ete bato bayeba

    [231] Mpe soki boboyani na basi na bino mpe bango basili kokokisa eleko ya kozela, bozongisa bango na libala na lolenge ya malamu, to botika bango bakende na lolenge ya malamu, kasi bokanga bango te na ndenge ya mabe mpona konyokolo noki bokobuka mibeko. Oyo akosala bongo ye wana asili kobuba molimo naye. Kasi bozua bilembo mpe mikapo mia Allah na maseki te. Mpe bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, kowuta na buku mpe bwanya oyo akitiseli bino, mpona kolendisa bino na yango. Mpe bobanga Allah, mpe boyeba ete ya sôló Allah azali moyebi ya biloko binso

    [232] Mpe soki bokabwani na basi na bino, sima bakokisi eleko na bango, bopekisa bango te ete babalana na mibali misusu, soki basili koyokana kati na bango. Na lolenge ya malamu, na boye nde ezali malendisi mpona oyo kati na bino azali kondima na Allah mpe na mokolo ya suka. Wana ezali mpeto mpe malamu mpona bino, Allah nde ayebi, mpe bino boyebi te

    [233] Mpe bamama, bakomelisa bana na bango mabele mbula mibale mobimba mpona baye balingi kokokisa komelisa bana mpenza. Mpe esengeli na tata ya mwana koleisa mpe kolatisa bamelisi wana na lolenge ya malamu, molimo amemaka te mokumba oyo eleki ye kilo. Mama anyokolama te mpona mwana naye; tata mpe anyokolo nzoto naye te mpona mwana. Mpe soki tata na mwana azali te, esengeli na mokitani naye amema mokumba wana lolenge moko tata azali kosala mpona mwana naye. Mpe soki baboti balingi kokata mwana mabele na bosepeli mpe boyokani kati na bango mibale ezali mabe te, mpe soki bolingi komelisa bana na bino o bipai bisusu, ezali mpe mabe te, soki bofuti bamelisi ya bana na ndenge elongobani. Mpe bobanga Allah, mpe boyeba ete ya sôló Allah azali komona maye bozali kosala

    [234] Mpe baye liwa lizui bango okati na bino mpe batiki basi ba bango, esengeli bazela sanza minei na mikolo zomi eleka. Mpe soki bakokisi elaka na bango ezali lisumu te epai na bino na lotomo eye bango moko bakokisi na banzoto na bango na ndenge ya malamu. Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala

    [235] Mpe ezali mabe te likolo na bino, soki boyebisi bakufeli mibali, mpona libala to bobombi yango na mitema na bino Allah ya sôló ayebaki ete bokokanisa bango. Kasi bolaka bango te na bokuku sé ezala maloba ya malamu. Mpe bozua mikano ya libala te kino mikolo mia bango ya sanza minei na mikolo zomi mikoka. Mpe boyeba ete ya sôló Allah ayebi maye mazuami okati ya milimo mia bino mpe bokeba naye, mpe boyeba ete ya sôló Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [236] Ezali mabe te likolo na bino soki bokabwani na basi na bino oyo nanu bosangani na bango te, to bopesi bango mahr te. Bopesa bango mwa eloko. Moto ya bozui na bokoki naye mobola mpe na bokoki naye na ndenge elongobani. Ezali lotomo epai ya bato ya malamu

    [237] Mpe soki bokabwani na bango liboso ete bosangana na bango, na sima ya koyokana na mahr, bopesa bango ndambo ya mahr sé soki bango moko baboyi kozua yango, to moto oyo azalaki Nkolo ya libala, mpe soki bolimbisi, wana nde ezali malamu pembeni ya bobangi (Allah). Mpe bobosana te bosalisani kati na bino, ya sôló Allah azali komona maye bozali kosala

    [238] Bobatela basambela, mpe sambela ya sima ya nzanga. Mpe botelema na limemia liboso ya Allah

    [239] Mpe soki bobangi bosambela ya kotelema to likolo ya bampunda. Kasi soki bozui kimia bosambela Allah na ndenge atangisi bino maye boyebaki te

    [240] Baye kati na bino liwa lizui bango mpe batiki basi, esengeli batikela bango malako. Mpe basala bango malamu mobu moko, kasi babengana bango na ndenge ya mabe te. Soki bango moko babimi mpe bakei, ezali mabe te likolo nabino na maye bango moko baponi na bolamu.Mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya

    [241] Mpe mpona basi bakufeli mabala esengeli kosalela bango limemia na lolenge ya malamu, ezali lotomo likolo ya babangi

    [242] Na boye nde Allah azali kolimbola bino bilembo naye, mpo ete bososola

    [243] Ozali komona te baye babimaki na bandako na bango bazalaki bankoto mpe bango babangi liwa? Mpe Allah alobi na bango: bokufa. Sima asekwisi bango. Ya sôló, Allah aleki kosalela bato bolamu, mpe kasi bato ebele bazali kotondo ye te

    [244] Mpe bobunda na nzela ya Allah, mpe boyeba ete ya sôló Allah azali moyoki moyebi ya manso

    [245] Oyo azali kosalela Allah mosala malamu, akobakisela ye mbala ebele, mpe Allah akangaka bozui mpe afungolaka. Mpe epai naye nde bokozongisama

    [246] Oyokaki te lisapo ya bakulaka kati na bana ya isalayele na sima ya Mûssa, tango balobaki na moko kati ya bantoma na bango: ponela biso mokonzi mpo tobunda na nzela ya Allah. Alobaki: Soki bakomeli bino bitumba boko boya kobunda?, bazongisaki eyano ete: Ndenge nini tokobunda na nzela ya Allah te mpe biso tosili kobimisama na bandako na biso, na bana na biso elongo? Tango bitumba biyelaki bango babalolaki mokongo, longola sé moke kati na bango nde babundaki. Allah ayebi malamu bato ya mabe

    [247] Mpe ntoma na bango alobaki na bango ete: Ya sôló Allah aponeli bino mokonzi nkombo naye Twâlût. balobaki ete: Ndenge nini ye akozala na bokonzi likolo na biso? Mpe biso nde tobongi na bokonzi likolo naye, mpe ye azali na bozui te. (ntoma) ayanoli ete: Ya sôló, Allah aponi ye mpe atomboli ye likolo na bino, mpe abakiseli ye mayele na nguya na bokasi ya nzoto. Allah apesaka bokonzi naye na oyo alingi, mpe Allah azali moyebi koleka

    [248] Mpe ntoma wa bango ayebisi bango ete: Ya sôló elembo ya bokonzi bwa ye ezali ekoyela bino sanduku, kati na yango ezali na kimiya ezali kowuta na Nkolo wa bino, na makambo misusu, mabota na Mûssa na mabota ya Hâruna batikaki oyo ba anzelu bazali komema, ya sôló wana ezali elembo mpona bino, soki bozali bandimi

    [249] Mpe, tango Twâlût alingaki kokende na mapinga, alobaki ete: Ya sôló Allah akomeka bino na mayi ya ebale. Oyo kati na bino akomela yango azali ya ngai te, mpe oyo akomeka yango te yende azali wa ngai, longola sé oyo akotoka mwa moke na loboko naye. Kasi ebele na bango bamelaki mayi, sé moke kati na bango bandimaki naye. Mpe tango ye na bandimi baye bazalaki naye bakatisaki ebale, balobaki ete: Biso lelo tozali na nguya te liboso ya Djâlût na mampinga naye. Kasi misusu kati na bango bakanisaka ete bakokutana na Allah balobaki ete: Boniboni mapinga moke malongi mapinga ya monene na ndingisa ya Allah? Mpe Allah azali elongo na baye bazali koyika mpiko

    [250] Mpe tango bakutani na Djâlût na mampinga naye, balobaki ete: Eh Nkolo! pesa biso motema makasi, mpe lendisa matambi ma biso mpe opesa biso elonga likolo ya bapagano

    [251] Balongaki bango na ndingisa ya Allah, mpe Dâwud abomaki Djâlût. Mpe Allah apesaki ye bokonzi mpe bwanya, mpe atangisaki ye makambo misusu ye (Allah) alingaki. Mpe soki Allah akotelaka bato likolo ya misusu te, nde mokili molingaki kokoma na mobulu, kasi Allah nde azali Nkolo ya bolamu okati ya mikili

    [252] Wana ezali mikapo mia Allah tozali kotangela yo yango na bosôló. Mpe ya sôló ozali moko okati ya batindami

    [253] Na bantindami wana, basusu Allah apesaki bango bolamu mingi. Mpe basusu Allah asololaki na bango mpe amatisaki basusu lokumu koleka, mpe topesaki Issa mwana ya Maryam bilembo ya polele mpe totondisaki ye na molimo mosantu. Mpe soki Allah alingaki, nde baye bayaki sima na bango babomanaki te, na tango polele esili kokomela bango. Kasi bazalaki nde na bokabwani kati na bango. Na yango basusu kati na bango bandimaki mpe basusu bapengwaki. Mpe soki Allah alingaki, mbele babomanaki te. Kasi Allah asalaka sé oyo ye alingi

    [254] Eh Bino baye bondimi! bobimisa na maye topesaki bino, yambo ete eyela bino mokolo moye koteka kimoninga. Mpe liloba ekozala te. Kasi bapagano nde bato mabe

    [255] Allah! Nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye, azali na bomoyi, amikoka naye moko, animbaka te mpe alalaka te. Maye manso mazali o’likolo mpe o’mabele mazali ya ye. Nani oyo azali na makoki ya kosengela moto epai ya Allah soki na ndingisa naye te? Ayebi maye maleka na maye makoya. Bakozuaka eloko moko te na boyebi naye sé na maye alingi, kursy naye ezali monene koleka mapata na mabele, mpe ayokaka mpasi te mpona kobatela yango azali likolo mpe monene koleka

    [256] Bakokanga moto na makasi te mpona kokota na lingomba ya Allah. Nzela ya semba esili koyebana na nzela ya libungi. Moto oyo akompegwa na motomboki. mpe andimi na Allah, ye wana nde asili kosimba singa ya makasi oyo ekatanaka te, Allah azali moyoki mpe moyebi

    [257] Allah nde azali Nkolo ya bandimi, azali kobimisa bango na molili mpe kotia bango na nzela ya mwinda, kasi baye bapengwi basatana nde bazali bankolo na bango, bazali kolongola bango na nzela ya mwinda mpe komema bango na molili, bango wana nde bato ya móto, bakozala na kati seko na seko

    [258] Boye oyebi te oyo Allah apesaki bokonzi asuanisaki Ibrâhîm mpona Nkolo naye? Tango Ibrâhîm alobaki naye ete: Nkolo na ngai nde oyo apesaka liwa mpe bomoyi, alobaki na Ibrâhîm ete: Ngai mpe na pesaka liwa mpe bomoyi. Ibrâhîm alobaki naye lisusu ete: Kasi ya sôló, Allah abimisaka mwese na moniele, yo mpe bimisa yango na eloli. Na sima ye mopagano azangaki eloko ya kosala. Mpe Allah akambaka bato ya mabe te

    [259] To mpe lokola moto oyo Alekaki mboka moko boye ezalaki ya kokufa, alobaki ete: Ndenge nini Allah akozongisa yango na bomoyi sima ya liwa? Mpe Allah abomaki ye moto wana, mpe awumelaki na mabele mbula nkama moko. Na sima Allah asekwisi ye, mpe atuni ye: Osali mikolo boni awa? Azongisaki eyano ete: Nasali mokolo moko to ndambu ya mokolo, (Allah) alobi naye ete: Yo osali mbula nkama moko awa, tala bilei nayo na mayi nayo ya komela ezali ya kobeba te, mpe tala epai ya himar nayo etikali sé mikuwa. Mpe mpo totia yo ozala elembo epai ya bato, kasi tala epai ya mikuwa ndenge ngai (Allah) nazali kozongisa yango na sima nalatisi yango misuni. Mpe tango amonaki ete Allah asekwisi himar naye, alobaki ete: Ya sôló Allah azali na nguya likolo ya biloko binso

    [260] Mpe tango Ibrâhîm alobaki ete: Nkolo! lakisa ngai ndenge nini okosekwisa bawa, (Allah) Alobaki ete: Eh Ibrâhîm! naino ondimi te? Alobaki na ndimi, kasi wana ezali mpona kolendisa motema na ngai. (Allah) alobi naye, zua bandeke minei, kata bango biteni biteni, sima tia yango likolo ya bangomba, sima obenga bango bakoyela yo na lombango, mpe yeba ete ya sôló, Allah azali makasi atonda bwanya

    [261] Ndakisa ya baye bazali kobimisa misolo na bango na nzela ya Allah, ezali lokola mbuma elonami sima ebimisi bitape sambo, mpe na etape moko ezali na bambuma nkama moko, mpe Allah abakisaka mbano ebele na oyo ye alingi, mpe Allah azali na ebele ya bozui, azali moyebi koleka

    [262] Bato oyo bazali kobimisa misolo na bango na nzela ya Allah, sima balandisi yango te na maloba ya komizua, to maloba ya mabe na maye mabebisi, bazali na lifuta na bango epai na Nkolo wa bango. Bakozala na bobangi te, mpe na koyimayima te

    [263] Liloba ya kitoko mpe bolimbisi, ezali malamu koleka likabo liye lilandisami na liloba ya mabe. Allah azali na bosenga na eloko te, mpe atonda bolamu

    [264] Eh Bino bandimi! bobebisa mabonza na bino te na kolandisa yango na maloba mabe, mpe na monyokoli, lokola moto oyo azali kobimisa mosolo naye mpo bato bamona ye mpe ye andimi na Allah te, andimi mpe na mokolo ya suka te. Ndakisa naye moto wana ezali lokola libanga monene ezipami na zelo, mpe tango mbula ya makasi enoki, etiolisi zelo nyoso mpe etiki libanga mpamba. Bango bakozua lifuta moko te na maye babimisaki na mabonza, mpe Allah akokamba te bato oyo basili kopengwa

    [265] Mpe ndakisa ya ba oyo bazali kobimisa misolo mia bango na bondimi bonso mpona Allah, mpe mitema mia bango mizali kimia bazali lokola elanga ezuami na mabele ya kitoko na esika etombwami, mbula makasi enokeli yango, mpe epesi mbuma na yango mbala mibale koleka. Ata soki mbula ya makasi ebeti te, matanga ya mike ekoki na yango. Mpe Allah azali momoni maye bozali kosala

    [266] Boye moko kati na bino akolinga kozala na elanga ya naghil mpe ya a’nâb eye mingala mizali kotiola na nsé na yango, mpe ezali kopesa ye mbuma inso ya ndenge na ndenge, na sima mobange ekomeli ye, mpe bana naye bazali mike naino bakoli te, mpe mopepe ya monene ya makasi ya móto ekoti na elanga wana mpe ezikisi yango nyoso? Na lolenge ya boye nde Allah azali kolimbolela bino bilembo bia ye mpo ete bokanisa

    [267] Eh bino bandimi! Na bozui bozali na yango bobimisa ya malamu mpona nzela ya Allah mpe ndenge moko na milona miye topesi bino kowuta okati ya mabele. Kasi bopona te ya mabe mpona kobimisa na nzela ya Allah oyo soki bapesaki bino yango bokolinga kozua yango te kaka mpona nsoni mpe na kokanga miso. Mpe boyeba ete ya sôló Allah asanzolama atonda bomengo

    [268] Satana azali kobangisa bino kimobola mpe azali kotinda bino na makambo ya mbindo mpe ya bonsoni, kasi Allah azali kolaka bino bolimbisi mpe lisalisi kowuta epai naye. Mpe Allah atonda bomengo azali moyebi koleka

    [269] (Allah) apesaka bwanya na moto oyo ye alingi. Na oyo apesi ye bwanya ayeba ete asili kozua bolamu ebele koleka. Kasi sé bato ya mayele nde bazali kokanisa

    [270] Nyoso oyo bokobimisa to elaka bino bolakaki, ya sôló Allah asili koyeba yango. Mpe babubi baza na basungi te

    [271] Soki bopesi mabonza to mpe makabo na bino na miso ya bato ezali malamu, kasi soki bopesi yango na babola na kobombama wana nde ezali malamu mıngi koleka. Mpe akolongola masumu na bino, mpe Allah azali na sango ya maye bozali kosala

    [272] Yo moto okokamba bango te, kasi Allah nde akambaka oyo alingi. Na nyoso oyo bokobimisa ya bolamu ekozala sé na mbano ya milimo mia bino, bobimisa te sé ezala mpona koluka elongi ya Allah. Na nyoso oyo bokobimisa ezali kolukela bino bolamu mpe bokobubama te

    [273] Mpona babola baye bakangamaki na nzela ya Allah, bazali na makoki te yakotambola na mokili mpona koluka bozui, bato bazanga boyebi bakokanisa ete bango bazali na bomengo, mpona nsoni bazali na yango mpona kosenga. Kasi okoyeba bango ete bazali babola na bilembo na bango, ete balembisaka bato te na bisenga senga. Mpe eloko nyoso bobimisi mpona Allah, ya sôló (Allah) ayebi yango

    [274] Ba oyo bazali kobimisa misolo mia bango butu na moi, polele mpe na kobombama, lifuti na bango ezali epai ya Nkolo wa bango, mpe bakozala na bobangi te mpe bakoyimayima te

    [275] Baye bazali kolia mbongo ya ekotama, bakotelema te (kowuta na lisekwa na malita na bango), sé lokola kotelema ya moto oyo zabulu asimbi ye na liboma. Mpo ete bango balobaki ete: Ekotama ezali sé lokola mombongo. Kasi Allah apesi ndingisa ya kosala mombongo, mpe apekisi ekotama. Mpe oyo okati na bino malendisi ya Nkolo naye ekomeli ye mpe atiki ekotama azali na masumu te na maye maleka liboso, mpe likambo naye ezali epai na Allah. Kasi baye bakozongela yango, bango wana nde bazali bato ya móto bakozala na kati seko na seko

    [276] Allah azali kobebisa ekotama mpe azali kopambola mbongo ya makabo. Mpe Allah alingaka bapengwi te basumuki

    [277] Ya sôló baye bandimi na Allah, mpe bazali kosala misala ya malamu, mpe bazali kotelemisa losambo mpe bazali kobimisa zakat, lifuta lia bango lizali epai ya Nkolo wa bango. Bakozalaka na bobangi te mpe bakozala na mpasi te

    [278] Eh bino bandimi! Bobanga Allah, mpe botika kozua ndambu ya mosolo ya ekotama, soki ya sôló bozali bandimi

    [279] Mpe soki bosaleli yango te, bozua elaka ya etumba kowuta epayi ya Allah mpe na motindami naye. Mpe soki botubeli, bokozala na mitu ya misolo mia bino, bobuba bato te bino mpe bobubama te

    [280] Mpe soki moto azali na nyongo na bino azali na kpokoso mpona kofuta yango, bokozelisa ye kino azua yango. Mpe soki botiki yango likabo, ezali malamu mpona bino soki boyebaki

    [281] Mpe bobanga mokolo moye bokozonga epai ya Allah, sima molimo nyoso mokofutama na manso asalaki, mpe bakobubamaka te

    [282] Eh bino bandimi! Soki bopesani nyongo ekofutama na mokolo moyebani, bokoma yango. Mokomi akoma yango na bosembo kati na bino, kasi ye mokomi aboya kokoma yango te lolenge Allah asili kotangisa ye. Akoma mpe moto azali na nyongo aloba mpe abanga Allah Nkolo naye, akutola eloko moko te. Mpe soki moto azali na nyongo azali zoba to azali na makasi te to mpe ayebi kokoma te, molobeli naye alobela ye na bosembo. Mpe bozua banzeneneke mibale ya mibali kati na bino, mpe soki mibali mibale bazuami te. Bokozua mobali moko na basi babale, baye bokosepela na bango mpona kozala banzeneneke mpo ete soki moko kati na bango mibale abungi to abosani mosusu azongisa ye na nzela. Mpe soki bato babengami ete bazala banzeneneke baboya te koyanola na mbela wana. Mpe bozala na bolembu te mpona kokoma yango, ya moke to mpe ya monene kino ngoga na yango, wana ezali semba epai ya Allah mpe lolenge ya malamu ya kofuta nyongo mpo ete boyimayima te. Kasi soki ezali koteka na kosomba oyo ezuami kati na bino, bozali na lisumu te soki bokomi yango te, kasi bozua banzeneneke tango bozali koyokana na ntalo. Mokomi anyokwama te monzeneneke anyokwama mpe te, mpe soki bosali yango mpona konyokolo bango ekozala mabe mpona bino, mpe bobanga Allah Allah akotangisa bino, mpe Allah azali moyebi na biloko nyoso

    [283] Mpe soki bozali na mobembo, mpe bozui moto te mpona kokoma nyongo, mozui nyongo akosimbisa nkolo mbongo mwa eloko (eye ekofandisa ye na kimia). Soki mpe boyokani bino na bino na lolenge ya malamu, moto azali na nyongo esengeli naye kofuta mobimba na ndenge azuaki (adefaki). Mpe abanga Allah Nkolo naye, mpe bobomba litatoli te moto oyo akobomba yango ya sôló motema naye ezali na bokono ya lisumu. Mpe Allah ayebi maye manso bozali kosala

    [284] Nyoso ezali o likolo mpe o nsé ezali ya Allah. Nyoso oyo bozali kobimisa polele ya mitema mia bino to bozali kobomba yango, Allah akotunaka bino. Mpe akolimbisa na oyo alingi, mpe akopesa etumbu na oyo alingi. Mpe Allah azali na bokoki na biloko binso

    [285] Motindami andimi na maye makiteli ye kowuta epai na Nkolo naye, na bandimi mpe lokola; bango banso bandimi na Allah, na ba anzelu naye, na babuku bia ye, na batindami naye, to kotia bokeseni te okati ya moko kati ya bantindami naye. Mpe balobi ete: Toyoki mpe totosi. Eh Nkolo wa biso! Tosengi nayo olimbisa biso. Mpe epai nayo nde tokozonga

    [286] Allah apesaka moto mokumba sé oyo ekoki naye. Akofutamaka na maye asalaki, mpe akofutama na mabe maye asalaki. Eh Nkolo! kopesa biso etumbu te soki tobosani to mpe lisumu tosali yango na libaku. Eh Nkolo! Komemisa biso mokumba te ndenge o memisaki baye baleka liboso na biso. Eh Nkolo! Komemisa mpe biso te mokumba moye moleki biso kilo. Longola mabe mabiso limbisa biso, mpe yokela biso mawa. Ozali mobateli na biso, pesa biso elonga likolo na bapagano

    Surah 3
    Libota ya Imraan

    [1] Alif, Lâm, Mîm

    [2] Allah, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye, azali na bomoyi, amikoka naye moko

    [3] Akitiselaki yo buku na bosôló, ezali kondima na babuku ekitaka liboso. Mpe akitisi torah mpe indjil

    [4] Babuku biye bizalaki bokambi mpona bato. Na sima tokitisaki bososoli (eye ezali kokabola bosôló na lokuta). Ya sôló baye bazali kopengwa na bilembo to mpe mikapo mia Allah, bakozala na etumbu ya makasi. Allah azali makasi atonda nguya nakopesa etumbu

    [5] Ya sôló eloko moko te ebombami epai na Allah. Ezala na nsé to na likolo

    [6] Ye nde azali kopesa bino balolenge kowuta na mabumu ya bamama na bino yambo ete bobotama ndenge alingi. Nzambe mosusu azali te sé ye wa bokasi atonda bwányá

    [7] Ye nde akitiseli yo buku kati na yango ezali na mikapo mia polele ya mibeko, mikapo wana nde mizali misisa ya buku, mpe mikapo misusu mizali na bokokani kati na yango. Na yango bato baye bazali na bokono ya libungi o mitema mia bango, bazali sé kolanda mikapo miye mikokana mpona koluka bomekano to mpe koluka ndimbola na yango, kasi moto moko te ayebi ndimbola na yango, sé ye moko Allah. Nzoka nde, banganga Nzambe (Allah) baye batonda mayele balobaka ete: Biso tondimi na yango. Nyoso ewuti epai na Nkolo na biso, sé bato baye bazali na mayele nde bazali kokanisa mpe kondima na yango

    [8] Eh Nkolo wa biso! Kobongola bosôló o mitema mia biso te, sima ya kokamba biso. Mpe pesa biso ngolu nayo. Ya sôló yo ozali mopesi

    [9] Eh Nkolo wa biso! Yo okosangisa bato o mokolo mwa mbano moye mokozala na ntembe te; ya sôló Allah azangisaka elaka naye te

    [10] Ya sôló baye bapengwa, misolo na bango na bana na bango ekosalisa bango na eloko te epai na Allah. Mpe bango bakozala bankoni ya lifelo

    [11] Ndenge ezalaki na bomeseni ya falo na bato naye, ndenge moko na baye bazalaki liboso na bango. Bazuaki bilembo mpe mikapo mia biso na lokuta. Mpe baboyaki kondima na yango, mpe Allah azuaki bango na masumu na bango. Allah azali makasi mpona kopesa etumbu

    [12] Loba na baye bapengwa ete: Bokobetama mpe bokokitisama, na sima bokosangisama o kati ya lifelo. Mpe oyo nde esika ya mabe ya kofanda

    [13] Ezalaki ya sôló elembo mpe ekamwiseli mpona bino okati ya mapinga mibale makutanaki na bitumba; moko ezalaki kobunda mpona Allah, mosusu ezalaki na bopengwi. Na sima mapinga ya bandimi ekomaki komimona ete bakomaki mbala mibale koleka. Allah asalisaka oyo ye alingi na elonga naye moko. Ya sôló wana ezali liteya mpona bato bazali na miso ya komona

    [14] Engengisami mpona bato mposa ya basi, mpe ya bana, mpe bankita ya wolo mpe palata, mpe na bampunda, mpe an’âm, mpe bilanga. Wana nyoso bisengo ya mokili, nzoka nde bozongi ya malamu mpe ya kitoko ezali epai Allah

    [15] Loba: Bolingi nalakisa bino eloko ya malamu koleka maye bozali na yango? Mpona baye babangi (Allah) bazali na paladiso ya nkembo, epayi ya Nkolo wa bango, okati na yango mingala mizali kotiola, bakozala libela na kati mpe bakozala na basi baye bapetuama, mpe esengo kowuta epai na Allah. Allah azali komona bawumbu naye

    [16] Baye bazali koloba: Nkolo wa biso! Ya sôló tondimi, limbisa masumu ma biso, mpe tia biso mosika na etumbu ya lifelo

    [17] Baye bazali kokanga mitema, mpe bato ya bosembo, mpe bato ya botosi, mpe baye babimisaka mpona Allah, mpe baye basengaka Allah bolimbilisi yambo ete ntongo etana

    [18] Allah asila kotatola ete nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye mei, ndenge moko na ba anzelu, na banganga ya mayele, Mpe (Allah) atonda bosembo Nzambe mosusu azali te sé ye Allah wa bokasi atonda bwanya

    [19] Ya sôló, lingomba liye lindimami epai ya Allah lizali Islam (komisokia). Mpe baye bazuaki buku liboso bakabwanaki te, sé na tango boyebi ekomelaki bango na likunya kati na bango. Oyo akopengwa na mikapo mia Allah, ya sôló Allah afutaka na lombango

    [20] Mpe soki basuanisi yo, loba na bango ete: Namisoki mobimba epai na Allah, na baye banso balandi ngai. Mpe loba na baye bazuaki buku mpe na baye batanga te: Bomisoki? Soki bamisoki, basili kokambama. Mpe soki bapesi mokongo, yo ozali na eloko ya kosala te sé kokomisa sango. Mpe Allah azali komona bawumbu naye

    [21] Ya sôló baye bazali kopengwa na mikapo mia Allah, mpe bazali koboma bantoma mpamba, mpe bazali koboma baye bazali kotinda na bosembo, o kati ya bato pesa bango sango ya etumbu ya makasi

    [22] Bango wana nde misala mia bango mibebisami awa na nsé, mpe o’mokolo ya suka, mpe bakozalaka na mosungi te

    [23] Ozali komona te mpona baye bapesamaki buku ndenge basalaki, soki babengami ete bakata makambo kati na bango na buku ya Allah, sima basusu kati na bango bapesi mokongo mpe bakimi

    [24] Na bongo nde balobaki ete: Móto ekozwa biso sé mikolo mike ya kotanga. Mpe lokuta na bango ekosaki bango na lingomba na bango, na ntina na maye bazalaki kosala ya mabe

    [25] Mpe ekozala ndenge kani tango tokosangisa bango o mokolo moye mokozala na ntembe te, mpe molimo na molimo akofutama engebene na maye asalaki? Mpe bakobubama te

    [26] Loba ete: Eh Allah! Mokonzi ya bakonzi, opesaka bokonzi na nani olingi, mpe olongalaka bokonzi na nani olingi, opesaka nguya na nani olingi. Mpe okitisaka nani olingi, bolamu nyoso ezali na maboko nayo, ya sôló ozali na bokasi likolo ya biloko binso

    [27] Okotisaka butu kati na moyi mpe okotisaka moyi kati na butu. Mpe obimisaka moto ya bomoyi kowuta na liwa mpe obimisaka moto ya liwa kowuta na bomoyi. Mpe opesaka bozui nayo na moto oyo olingi, na motango moyebani te

    [28] Esengeli te na bandimi kotika bandeko na bango bandimi, mpona kozua bapagano bazala baninga na bango. Oyo akosala lolenge wana akozala na eloko te epai na Allah, sé soki bozali koluka komibatela mpo na bango. Allah azali kokebisa bino mpona ye moko. Mpe epai naye Allah nde bozongi ezali

    [29] Loba ete: Soki bobombi maye mazali kati ya mitema mia bino to bobimisi yango polele, Allah ayebi yango. Mpe ayebi maye mazali na likolo mpe na nsé. Mpe Allah azali na nguya likolo ya biloko binso

    [30] Mokolo molimo nyonso ekozua makambo ya malamu maye esalaki. Mazali komonana na maye manso esalaki ya mabe, akolikia ata sókó ezalaka kati ya oyo na oyo kuna ndelo ya mosika, mpe Allah azali kokebisa bino mpona ye moko mpe Allah atondi na ngolu mpona bawumbu naye

    [31] Loba ete: Soki bolingi Allah, bolanda ngai. Allah akolinga bino mpe akolimbisa masumu ma bino. mpe Allah azali molimbisi moyoki mawa

    [32] Loba ete: Botosa Allah na motindami naye, mpe soki bapesi mokongo, ya sôló Allah alingaka bapengwi te

    [33] Ya sôló, Allah aponaki Âdam, mpe Nûh, mpe libota ya Ibrâhîm mpe libota ya Imrân, likolo ya mokili

    [34] Bakitani na bakitani kati na bango, mpe Allah azali moyoki atonda boyebi

    [35] Kanisa tango mwasi ya Imrân alobaki ete: Eh Nkolo! Ya sôló ngai nalaki yo mokumba eye ezali na libumu na ngai. Mpe nabonzeli yo ye na bonsomi nyoso mpo ete azala mosali nayo, eh Nkolo! Ndima kolela na ngai, ya sôló ozali moyoki otonda boyebi

    [36] Mpe tango abotaki ye, alobaki ete: Eh Nkolo! Naboti ye mwana mwasi. Mpe Allah ayebaki mbotama wana, kasi mwana mwasi azali lokola mwana mobali te. Na yango napesi ye nkombo ya Maryam, mpe ngai ya sôló nati ye na libota naye, na nsé ya libateli nayo likolo na satana oyo alakelama mabe

    [37] Nkolo naye andimelaki ye na bondimeli ya malamu mpe akolisi ye kokola ya malamu. Mpe apesaki ye, na Zakariya mpo ete abokolo ye. Na tango inso Zakariya azalaki kokota na mihrâb epai naye (Maryam) akokuta ye na bilei. Mpe akotuna ye eh Maryam! Ozui bilei biye wapi? Akozongisa eyano ete: Ewuti epai na Allah. Ya sôló, Allah apesaka bozui na moto oyo ye alingi na motango te

    [38] Na tango wana, Zakariya asengi Nkolo wa ye, alobaki ete: Nkolo, pesa ngai libota ya malamu kowuta epai nayo. Ya sôló ozali moyoki Mabondeli

    [39] Ba anzelu babengaki ye tango ye atelemaki azali kosambela na kati ya Mihrab, balobaki naye ete: Ya sôló Allah apesi yo sango elamu ya mbotama ya Yahya, ye oyo akondima na liloba ya Allah. Mpe akozala mokonzi mpe moto ya kilikili te, mpe moto ya ekobo te, mpe akozala ntoma o’kati ya bato ya malamu

    [40] Mpe alobi ete: Eh Nkolo! Ndenge nini nakozua mwana mpe ngai nasili kokoma mobange, mpe mwasi na ngai abotaka te? (Allah) alobi: Ndenge wana nde, Allah asalaka oyo alingi

    [41] (Zakariya) alobaki ete: Nkolo! Pesa ngai elembo na yango. (Allah) alobi ete: Elembo nayo ete mikolo misato okosolola na bato te sé na bilembo. Na sima okanisa Nkolo wayo mingi, mpe sanzola ye na ntongo mpe mpokua

    [42] Mpe lisusu kanisa tango ba anzelu balobaki: Eh Maryam! Ya sôló Allah aponi yo mpe apetoli yo, mpe atomboli yo yambo ya basi banso ya mokili

    [43] Eh Maryam! Zala na botosi epai na Nkolo nayo, gumbama mpe fukama (o tia elongi nayo na mabele) elongo moko na bagumbami

    [44] Wana ezali basango mabombami tozali kopesa yo yango. Mpe ozalaki te epai na bango tango bazalaki ko buaka bikomeli bia bango mpona koyeba nani akozua mokumba ya kobokolo Maryam, mpe yo ozalaki te tango bazalaki kosuana

    [45] kanisa tango ba anzelu balobaki: Eh Maryam! Ya sôló, Allah azali kopesa yo sango elamu ya liloba kowuta epai naye (Allah), nkombo naye ekozala Masiya Issa, mwana ya Maryam, akozala na lokumu awa na nsé mpe na lola, mpe azali moko kati na baye bazali penepene (na Allah)

    [46] Mpe Akoloba na bato wuta mbotama naye, mpe tango akokola, mpe azali kati na bato ya malamu

    [47] (Maryam) alobi: (Nkolo ya sôló ndenge nini nakobota mpe ngai nasangani na mobali te?). Alobi: (Anzelu) (ndenge wana nde Allah akelaka maye alingi. Soki azwi mokano ya likambo, akoloba: “Zala”, Mpe lizalisami)

    [48] Mpe akotangisa ye buku, mpe bwanya, mpe torah mpe indjil

    [49] Mpe motindami epai ya bana Isalayele, (akoloba na bango été): Ya sôló, ngai nayeli bino elembo mpe ekamwiseli kowuta epayi na Nkolo wa bino. Ete ngai nakosalela bino mabele ya potopoto na lolenge ya ndeke, mpe nakofula na kati mpe ekokoma ndeke na ndingisa ya Allah. Mpe na kobikisa bato bakufa miso, mpe ya bokono ya maba. Mpe na kosekwisa bawa na ndingisa ya Allah. Mpe nakoyebisa bino bilei nini bokolia mpe bankita bozali kosangisa yango okati ya bandako na bino. Ya sôló nyoso wana ezali elembo mpe mateya mpona bino, soki ya sôló bozali bandimi

    [50] Mpe nandimi na maye mazuamaki na torah mpe nakopesa bino ndingisa mpona kolia maye bapekisaki bino. Mpe nayeli bino elembo kowuta na Nkolo wa bino. Mpe bobanga Allah mpe botosa ngai

    [51] Ya sôló, Allah azali Nkolo na ngai mpe Nkolo na bino. Bobondela ye, oyo nde nzela ya semba

    [52] Mpe tango Issa amonaki bopengwi na bango, alobaki ete: Banani bakosunga ngai na nzela ya Allah? Bayekoli naye bayanolaki na koloba été: Biso tozali basungi nayo na nzela ya Allah tondimi na Allah. Mpe yo (Issa) zala nzeneneke na biso ete ya sôló tosili komisokia

    [53] Nkolo na biso tondimi na maye okitisaki mpe tolandi motindami. Tia biso elongo na batatoli ya sôló

    [54] Mpe basalaki likita ya mabe, Allah mpe asalaki likita, kasi Allah nde azali likolo ya makita nyoso

    [55] Kanisa tango Allah alobaki: Eh Issa! Ya sôló, ngai nakozwa yo mpe nakomatisa yo epai na ngai mpe na kopetola yo okati ya bapagano. Mpe na kotia baye balandi yo likolo ya bapagano, kino suka ya molongo, sima epai na ngai nde bino nioso bokozonga. Mpe na ko sambisa bino okati ya maye bozalaki na bokabwani

    [56] Kasi mpona baye bapengwi, nakopesa bango etumbu ya makasi okati ya mokili mpe na mokolo ya suka, mpe bakozua basalisi te

    [57] Mpe mpona baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, akopesa bango lifuta na bango. Mpe Allah alingaka babubi te

    [58] Wana ezali kati ya mikapo tozali kotangela yo mpe Emoniseli ya bwányá

    [59] Ya sôló, ndakisa ya Issa epai na Allah ezali lolenge moko na Âdam akelaki ye na mabele, na sima alobaki naye: “Zala”, mpe azalisamaki

    [60] Bosembo ezali nde epai na Nkolo nayo. Kasi kozala te elongo na baye bazali na koyimayima

    [61] Kasi oyo akotia yo ntembe, mpe kosuanisa yo na ntina na (Issa) mpe yo osili kozua boyebi, loba na bango ete: Boya tokutana, mpe tobenga bana na biso mpe bana na bino, basi na biso mpe basi na bino, biso mpe bino, na sima tomisenga ete botutu ya Allah ekitela bato ya lokuta kati na biso

    [62] Ya sôló, oyo nde masapo ya bosembo. Mpe ezali na Nzambe mosusu te sé Allah. Ya sôló, Allah ye nde azali na bokasi, atonda bwanya

    [63] Mpe soki bapesi mikongo, ya sôló mpenza Allah ayebi babebisi

    [64] Loba: Eh bino bato baye bozua buku! Boya na liloba moko oyo ekosangisa biso na bino ete: Tobondela Nzambe mosusu te sé Allah, mpe tosangisa ye na eloko te, mpe tozua ba Nkolo misusu te na botıki Allah. Soki bapesi mokongo, boloba na bango ete: Bozala banzeneneke ete biso nde tozali bandimi

    [65] Eh bino bato bozua buku! Mpona nini bozali kosuana mpona Ibrâhîm? Mpe bino boyebi ete torah mpe indjil mikitaki sé sima naye (Ibrâhîm)? Boye bino bozali kososola te

    [66] Tala bino, bozali kosuana na likambo oyo bino boyebi, kasi mpona nini bozali kosuana na likambo oyo boyebi te? Mpe Allah ayebi kasi bino boyebi te

    [67] Ibrâhîm azalaki moyuda mpe moklisto te. Kasi azalaki nde hanifa mondimi, mpe azalaki te elongo na baye basangisaki (Allah)

    [68] Ya sôló bato bakotuta ntolo mpona Ibrâhîm, bazali ba oyo balandaki ye na ntoma oyo (Muhammad) na bandimi. Allah nde azali mobateli ya bandimi

    [69] Lisanga ya bato kati na baye bazwa buku balukaka kopengwisa bino, bakopengwisa sé milimo mia bango moko, nzoka nde bazali koyeba te

    [70] Eh bino baye bozua buku! Mpona nini bozali kopengwa na mikapo mia Allah mpe bino bozali banzeneneke

    [71] Eh bino baye bozua buku! Mpona nini bozali kosangisa mabe na bosôló, mpe bozali kobomba bosôló mpe bozali na kati ya koyeba

    [72] Mpe lisanga ya bato kati na baye bazua buku, balobi na bato na bango ete: Bondima na maye ekitisama epai ya bandimi na ebandeli ya mokolo, mpe soki ekomi na mpokwa bopengwa na yango, mpo ete bango bazonga

    [73] Bondima na bato mosusu te sé na oyo alandi lingomba na bino. Loba: Ya sôló, lisungi na nzela ya semba ezali oyo ya Allah. Mpo ete moko te azua mpe lokola bino, to atelemela bino na yango epai ya Nkolo na bino? Loba: Ya sôló bolamu ezali na maboko ya Allah, apesaka yango na oyo ye alingi, mpe Allah atonda bomengo azali na boyebi koleka

    [74] (Allah) apesaka ngolu naye na nani alingi. Mpe Allah nde atonda bolamu koleka

    [75] Mpe ezali okati ya baye bazua buku, soki obombi eloko epai naye, akobatela yango kino okoya kozua. Mpe ezali na basusu, soki obombi mwa lopata epai naye, akozongisa yango te kino okolemba na kotelema mpe kotambola epai naye, mpamba te bango balobaka ete: Baye batanga te bakosala biso eloko te. Mpe bazali kobukela Allah lokuta mpe bango bazali kati na koyeba

    [76] Ya sôló, oyo akokokisa elaka naye mpe abangi, ya sôló Allah alingaka babangi

    [77] Ya sôló, baye bazali koteka elaka oyo bazwaki na Allah na ntalo moke, mpe bazali kolapa ndayi (ya lokuta), bango wana nde bakozala na eloko te na mokolo ya suka. Mpe Allah akolobisa bango te, mpe akotala bango te mokolo ya suka. Mpe akopetola bango te. Mpe bakozala na etumbu ya makasi

    [78] Mpe ya sôló, okati na bango basusu bazali kolekisa lolemu na bango mpona kotanga buku mpo bandimela bango ete bazali bato ya buku, kasi wana ewuti kati na buku te. Mpe bazali koloba ewuti epai ya Allah kasi yango ezali ya Allah te, mpe bazali koloba lokuta mpona Allah mpe bango bazali na kati ya koyeba

    [79] Esengeli te na moto oyo Allah apesi buku, mpe bwanya mpe bontoma, sima aloba na bato ete: Bozala bawumbu na ngai kasi bawumbu ya Allah te, kasi: Bozala ba nganga ya mayele mpo ete bozali kotangisa buku mpe na oyo bozalaki kotanga

    [80] Mpe atinda bino te mpo ete bozua ba anzelu mpe bantoma bankolo na bino. Akotinda bino na bopengwi na tango bozalaki baye bamisoki

    [81] Mpe tango Allah azuaki elaka oyo na bantoma ete: Na tango inso, nakopesa bino buku mpe bwanya, mpe na sima motindami mosusu akoya mpona kondima na maye bozali na yango, esengeli na bino kondima naye mpe kosalisa ye alobi na bango: Boye bondimi mpe bozui mokano na ngai? Bazongisi ete: Tondimi, mpe bozala banzeneneke ngai mpe nazali elongo na bino na kati ya banzeneneke

    [82] Mpe oyo akopesa mokongo sima na yango, bango nde bato mabe

    [83] Bazali koluka lingomba mususu, mpe batiki lingomba ya Allah ya sôló, ye oyo bikelamu binso bizali na likolo mpe na nsé, bazali komikitisa, balinga balinga te, mpe epai naye nde bakozongisama

    [84] Loba: Tondimi na Allah, mpe tondimi na maye makitisameli biso, ndenge moko na maye makitisamaki epai na Ibrâhîm, na Ismâïl, na Is’hâq, mpe Ya’qûb mpe mabota, tondimi mpe na maye mapesamaki epai na Mûssa mpe Issa mpe bantoma, kowuta epai na Nkolo na bango, tokotia bokeseni moko te kati na bango, mpe epai naye nde to misoki

    [85] Na moto oyo akozua lingomba mosusu, mpe atiki islamu, bakondimela ye yango te. Mpe na mokolo ya suka akozala elongo moko na bazangi

    [86] Ndenge nini Allah akokamba bato baye bapengwi na sima ya kondima, mpe bamoni ete motindami azali na bosôló, mpe bilembo biyelaki bango? Mpe Allah akambaka babubi te

    [87] Ba oyo wana lifuta lia bango ya sôló bakozua botutu bwa Allah, na ya ba anzelu na ya bato banso

    [88] Libela na kati na yango (lifelo). Bakokutola bango etumbu te, mpe bakopemisama ata moke te

    [89] Longola sé ba oyo basali tubela sima na yango mpe babongisi. Ya sôló, Allah azali molimbisi atonda mawa

    [90] Ya sôló baye bapengwi sima ya bondimi bwa bango, sima bakobi na bopengwi, tubela na bango ekondimama te. Mpe bango nde babungi

    [91] Ya sôló, baye bapengwi mpe liwa lizui bango na bopengwi, bakondimelaka te moko kati na bango ata soki bapesi mabele etondi na wolo ekokangola ye te, mpe bakozala na etumbu enene mpe bakozala na basungi te

    [92] Bokozwa bolamu te kino bokobimisa ya malamu okati ya maye bolingaka. Mpe na nyoso oyo bobimisaka, ya sôló Allah ayebi yango

    [93] Bilei binso bindimamaki kolia mpona bana ya isalayele, longola sé biye isalayele amipekisaki yambo ete torah ekita, loba na bango ete: Boya na torah mpe botanga yango soki ya sôló bozali bato ya bosembo

    [94] Mpe oyo akobukela Allah lokuta sima na yango, bango wana bazali babubi

    [95] Loba: Allah olobi bosembo ete: Bolanda bosôló ya lingomba ya Ibrâhîm na kati ya bomoko ya Allah, kasi (Ibrâhîm) azalaki te elongo na baye basangisaki (Allah)

    [96] Ya sôló, ndako ya yambo oyo etiamaki na mokili mpona bato, ezali ndako esantu ya Makkah, oyo epambolama, yango ezali nzela ya bokambi mpona mokili mobimba

    [97] Kati na yango bilembo bizali, ndakisa esika eye Ibrâhîm atelemaki. Oyo akokota na kati na yango abatelami. Mpe esengeli na bato kosala hajj pona Allah na ndako wana, mpo na moto oyo azui makoki ya kokoma kuna. Kasi oyo akoboya, ya sôló, Allah atonda bomengo koleka mokili mobimba

    [98] Loba: Eh bino baye bozua buku! Mpona nini bozali kopengwa na mikapo mia Allah, mpe Allah azali nzeneneke na maye bozali kosala

    [99] Loba: Eh baye bozua buku! Mpona nini bozali kopekisa bandimi na nzela ya (Allah) mpona koluka kotia mbilinga mbilinga mpe bino bozali banzeneneke? Mpe Allah abosani te na maye bozali kosala

    [100] Eh bino bandimi! Soki botosi lisanga kati ya baye bazua buku liboso, bakozongisa bino na bopengwi sima ya kondima na bino

    [101] Ndenge nini bino bokopengwa mpe bino boyokaka mikapo mia Allah mizali kotangama, mpe bozali na motindami naye okati na bino? Oyo akomipesa na Allah ye wana nde asili kokambama na nzela ya nsemba

    [102] Eh bino baye bondimi! Bobanga Allah bobangi ya sôló, mpe liwa ekuta bino te sé bozali Na kati ya komisokia

    [103] Mpe bokangama lisanga o singa ya Allah mpe bokabwana te. Bokanisa bolamu bwa Allah eye apesi bino na tango bozalaki koyinana bino na bino, mpe akangisi mitema na bino, mpe na bolamu naye, bokomaki bandeko. Mpe bozalaki pembeni ya libulu ya mòtò na sima abikisaki bino na yango. Na boye nde Allah azali kolimbola bino mikapo naye, mpo ete bokambama na nzela ya semba

    [104] Mpe ezala okati na bino, umma bazali kobenga na bolamu mpe bazali kotinda na kosala bolamu mpe bazali kopekisa mabe. Mpe bango nde balongi

    [105] Kasi bozala te lokola ba oyo basuanaki mpe bakabwanaki sé na tango ndimbola bisilaki ko komela bango. Bango wana nde bazali na etumbu ya monene

    [106] Mokolo oyo bilongi bikongenga mpe bilongi bisusu bikoyinda. Kasi mpona ba oyo bilongi bikoyinda (bako tunama), bopengwi lisusu sima ya kondima na bino? Na bongo bozua etumbu na ntina na bopengwi na bino

    [107] Kasi mpona ba oyo bilongi na bango bikongenga, bakozala o’kati ya ngolu ya Allah epai kuna bakozala seko na seko

    [108] Wana ezali mikapo mia Allah tozali kotangela yo yango na bosôló. Mpe Allah alingaka kobuba te na Mokili

    [109] Mpe manso mazali olikolo mpe na nsé mazali ya Allah. Mpe Epai na Allah Makambo manso makozongisama

    [110] Bino bozali umma ya malamu oyo ebimisamaki okati ya bato: Mpamba te botindaka bato basala malamu, mpe bopekisaka bato kosala mabe mpe bondimi na Allah. Kasi soki Baye Bazwa Buku bandimaka, nde ezalaki malamu mpona bango. Moke kati na bango bazali bandimi, kasi ebele nde bazali bato mabe

    [111] Bakokoka te komonisa bino mpasi ya minene, sé ya mikemike. Mpe soki babundisi bino, suka suka bakopesa mokongo mpe bakokima, mpe bakosalisama te

    [112] Bisika binso bazuamaki, babetamaki mpe bakitisamaki, sé soki ezali boyokani kowuta epai na Allah mpe boyokani kowuta epai na Bato. Nkanda ya Allah ezali likolo na bango, mpe bampasi na bampasi, mpo ete baboyaki kondima na mikapo mia Allah mpe bazali koboma ba ntoma mpamba. Mpo ete bazangaki botosi mpe bazalaki kolutisa ndelo

    [113] Bazali nyoso ndenge moko te. Na kati na baye bazwa buku, ezali na umma moko etelemaka na butu mpona kotanga buku ya Allah, mpe bazali kofukamela ye

    [114] Bandimaka na Allah mpe na mokolo ya suka, mpe batindaka kosala malamu mpe bapekisaka kosala mabe, mpe bazalaka na lombango mpona kosala misala ya malamu. Bango wana nde bazali elongo moko na bato ya malamu

    [115] Mpe maye manso ya malamu bakosala makoboyama te, mpe Allah ayebi babangi

    [116] Ya sôló baye bapengwi, bomengo na bongo na bana na bango ekosalisa bango na eloko moko te epai na Allah. Bango nde bato ya môtô mpe bakozala kuna seko

    [117] Ndakisa ya maye bazali kobimisa yango mpona bomoyi ya nsé, ezali lokola mopepe ya malili makasi ebebisi elanga ya libota moko oyo basalaki lisumu na milimo mia bango moko, mpe Allah asalaki bango mabe te, kasi bango moko nde bamisalaki mabe

    [118] Eh Bino bandimi! Tika ete bozua sÓkÓ moke te baninga libanda na bino, balembaka te na kotia potopoto kati na bino, basili kolakisa bino kimonguna kowuta na minoko na bango, kasi oyo bazali kobomba na mitema ezali mabe koleka. Na boye tosili kolimbolela bino bilembo, soki bokozala na bososoli

    [119] Bino nde bozali kolinga bango mpe bango balingi bino te: Mpe bozali kondima na buku mobimba na yango, mpe soki bakutani na bino, balobaka: Tondimi (na Allah), kasi soki batikali bango na bango, bazali kosua misapi na bango mpona kolakisa nkanda. Loba: Bokufa na mitema mabe na bino na koyina. Ya sôló, Allah ayebi mabombami ya mitema

    [120] Soki bolamu (ya Allah) ezui bino basiliki, mpe soki mpasi ezui bino basepeli. Kasi soki bokangi mitema mpe bobangi (Allah), likita na bango ya mabe ekosala bino eloko moko te. Ya sôló, Allah ayebi maye manso bazali kosala

    [121] Mpe tango otikaki libota nayo na ntongo, okei mpona kolakisa bandimi bisika bakotelema mpona kobunda. Mpe Allah azali Moyoki atonda boyebi

    [122] Tango biteni mibale okati ya lisanga na bino bakani kozonga sima. Mpe Allah nde azali mosungi wa bango, mpe epai na Allah nde esengeli na bandimi kotia elikia na bango

    [123] Mpe ya sôló, Allah asili kolongisa bino na bitumba ya Badr. Na tango oyo bozalaki makasi te. Na yango esengeli na bino kobanga Allah mpo bokoka kotondo ye botondi

    [124] Tango ozali koyebisa na bandimi été: Ekoki na bino te été Nkolo na bino akitisa ba anzelu nkoto misatu mpona kosunga bino

    [125] Ezali sé bongo, kasi soki boyiki mpiko mpe bobangi (Allah) ete bango bazongeli bino lisusu na tango wana, Nkolo na bino mpe akobakisela bino ba anzelu nkoto mitano bakokita na bilembo na bango ya bitumba

    [126] Mpe Allah atiaki yango te sé mpona kopesa bino sango elamu mpe mpona kokitisa mitema mia bino. Mpe elonga ewutaka sé na Allah, Nkolo bokasi atonda bwanya

    [127] Mpo akoka kokweisa mpe kobebisa basusu baye bapengwi to akitisa bango mpe bayoka nsoni

    [128] Ozali na eloko moko te na kati ya likambo oyo, to akolimbisa bango to akopesa bango etumbu, mpo ete bazali bato mabe

    [129] Manso mazali o’likolo na nsé mazali ya Allah. Alimbisaka na oyo alingi. Mpe apesaka etumbu na oyo alingi, mpe Allah azali molimbisi mpe moyoki mawa

    [130] Eh bino bandimi! Bolia misolo mia ekotama te na bobakisi misolo mia bino, mpe bobanga Allah mpo bokoka kolonga

    [131] Mpe bobanga mòtò ya lifelo oyo ebongisamaki mpona bapagano

    [132] Mpe botosa Allah na motindami, mpo ete boyokama mawa

    [133] Bowela kosala misala ya malamu miye mikopesa bino bolimbisi epai na Nkolo wa bino, mpe paradizu eye monene na yango ezali lokola likolo mpe mabele, Eye ebongisamaki mpona babangi

    [134] Baye babimisaka na tango ya bisengo mpe na tango ya mpasi, mpe baye bakokaka kokanga nkanda te mpe baye balimbisaka bato, Mpe Allah alingaka bato ya bolamu

    [135] Mpe baye bazali soki basali mbeba to bamisali mabe, bakanisi Allah mpe basengi bolimbisi mpona yango, mpe moko te alimbisaka masumu bobele Allah, mpe batingamaka te na maye bazalaki kosala ya mabe, na bango bazali na kati ya koyeba

    [136] Bango wana nde lifuta na bango ezali bolimbisi kowuta epai ya Nkolo na bango, mpe baparadizu wapi epai mingala mizali kotiola, bakozala libela na kati, oyo nde lifuta ya basali malamu

    [137] Makambo ebele esilaki koleka liboso na bino, botambola na mokili mpe bomona ndenge nini bato ya mabe basukaki

    [138] Oyo ezali mateya ya polele mpona bato, mpe lisungi na malendisi mpona babangi

    [139] Botika babeta bino te mpe bomikitisa te mpo bozali likolo na bango, soki ya sôló bozali bandimi

    [140] Soki bozoki mpota, bango mpe bazoki lokola. Na boye tozali kotambuisa mikolo okati na bato mpo ete Allah ayeba bandimi, mpe azua okati na bino baye bawei mpona kobunda na nzela naye, mpe Allah alingaka bato ya mabe te

    [141] Mpe mpo ete Allah apetola bandimi mpe alimwisa bapagano

    [142] Bozali kolikia kokota na lola mpe naino Allah ameki te ba nani kati na bino babundaki, mpe banani bakangi mitema

    [143] Mpe bozalaki kolikia liwa yambo ete eyela bino. Kasi bosilaki komona yango, mpe bozali kotala

    [144] Mpe Muhammad azali sé motindami. Mpe batindami ebele balekaki liboso naye. Soki akufi to babomi ye na bitumba, bokozonga lisusu na bopagano? Oyo kati na bino akozonga na bopagano, ekotungisa Allah na eloko moko te, mpe Allah akofuta baye bazali kotondo ye botondi

    [145] Mpe moko te akoki kokufa sé ezala na mokano ya Allah mpe elaka eye asilaki kotiela ye. Mpe oyo akolinga lifuta lia mokili, tokopesa ye yango Mpe oyo akolinga lifuta lia mokolo ya suka tokopesa ye yango, mpe tokofutaka baye bazali kotondo Allah botondi

    [146] Mpe ebele kati ya bantoma babundaki elongo na balandi ye, ebele ya banganga Nzambe, babangaki te na oyo ezuaki bango o kati ya nzela ya Allah, mpe balembaki te mpe batikaki ntaka te, mpe Allah alingaka bakangi mitema

    [147] Liloba na bango ezalaki sé ete: Eh Nkolo! Limbisa biso masumu na biso mpe maye tolutisi ndelo na yango, mpe lendisa matambi na biso mpe pesa biso elonga likolo na baye bapengwi

    [148] Mpe Allah apesaki bango mbano ya malamu awa na nsé mpe ya kitoko koleka o mokolo ya suka. Mpe Allah alingi bato ya malamu

    [149] Eh bino bandimi! Soki botosi bapengwi, bakozongisa bino na bopagano mpe bokozanga

    [150] Allah azali mosungi wa bino. Mpe ye azali mosungi ya malamu

    [151] Tokotia kobanga na mitema ya bapagano mpo ete bango basangisaki Allah na maye bazalaki na bilembetele na yango te kowuta epai naye. Na yango efandelo na bango ekozala okati ya môtô, oyo nde esika ya mabe mpona bato ya mabe

    [152] Ya sôló, Allah akokisaki elaka naye epai na bino, tango bobomaki bango ebele na ndingisa naye, kino tango bolembaki, mpe bokomaki kosuana, mpe bozangaki botosi na tango eye alakisaki bino maye bolingaka. Kati na bino basusu balingaki mokili, mpe basusu balingaki mokolo ya suka. Azongisaki bino sima liboso na bango mpo ete ameka bino mpe asila kolimbisa bino. Kasi Allah nde atonda bolamu likolo ya bandimi

    [153] Tango bokimaki (kobunda) bozongaki sima te mpona kosalisa ata moto moko, mpe motindami (Muhammad) azali kobenga bino. Mpe (Allah) apesaki bino mawa likolo na mawa mpo ete boyoka mpasi te na mitema mpona biloko bozangaki kozua, mpe na makambo mazuaki bino. Mpe Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala

    [154] Sima ya ba mpasi, (Allah) akitiseli bino kimia, mpe mpongi ezuaki lisanga kati na bino, kasi basusu kati na bino bazuaki mpasi o mitema mia bango, mpe bakaniselaki Allah makanisi ya mabe, makanisi ya bopagano ya kala, bazali koloba ete: Litomba nini tozali na yango Bazali kobimisela yo te maye mabombami o mitema mia bango, bazali koloba ete: Soki tozalaki na litomba na likambo oyo, nde banguna bakokaki te koboma biso na esika oyo. Loba: Ata soki bofandaki na bandako na bino, baye mikolo na bango ya liwa ekoki bakobima, mpe bakei na bisika bibongisamaki mpona liwa na bango. Yango ezali komekama mpo Allah ayeba maye mazali okati ya mitema na bino, mpe mpo apetola maye mazali o mitema na bino. Mpe Allah ayebi mpenza maye mafandi na mitema.mpona likambo oyo? Loba na bango ete: Ya sôló likambo yango nyoso lizali mpona Allah

    [155] Baye okati na bino bazongaki sima mokolo mampinga mibale ya bitumba makutanaki, satana nde akosi bango na komekama na maye bazuaki na ntina ya masumu na bango. Allah asili kolimbisa bango. Ya sôló, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [156] Eh bino bandimi! Bozala lokola bapagano te baye balobaki na bandeko na bango soki basali mobembo to bazali na kati ya bitumba ete: Soki batikalaki epai na biso, nde bakufaki te to mpe babomamaki te. Allah, atie yango ezala mpasi mpe likama o’mitema mia bango. Mpe Allah apesaka bomoyi mpe liwa, mpe Allah azali komona maye bozali kosala

    [157] Mpe soki bobomami na nzela ya Allah to soki bokufi, bolimbisi mpe ngolu ya Allah yango nde ezali malamu koleka manso bazali kozua awa na mokili

    [158] Soki bokufi to bobomami, kasi epai ya Allah nde bokosangisama

    [159] Mpe mpona ngolu ya Allah atia na motema nayo, ozalaki mpete mpe malamu na bango. Kasi soki ozalaki na makambo ya makasi mpe motema makasi nde bakimaki nyonso pembeni nayo. Limbisa bango mpe sengela bango bolimbisi, mpe yokana na bango (liboso ozwa mokano) na likambo. Mpe soki ozwi mokana tia elikia epai ya Allah, ya sôló Allah alingaka baye batiaka elikia naye

    [160] Soki Allah apesi bino lisungi, moko te akoki kolonga bino. Soki asundoli bino, nani mosusu sima naye akosunga bino? Epai ya Allah nde bandimi batia elikia

    [161] Ntoma azali te oyo akolekisa ndelo na bozui (biloko ya bitumba), mpe oyo akolekisa ndelo na bozui, akoya na oyo alekisaki ndelo mokolo ya suka, sima moto na moto akozua mbano eye molimo mwa ye mosalaki, bakobubama te

    [162] Boye oyo azali kotambola engebene na mibeko mia Allah azali lokola moto oyo nkanda ya Allah ezali likolo naye? Mpe esika naye ekozala na lifelo, oyo nde bozongi ya mabe

    [163] Bazali na lokumu ndenge moko te epai na Allah, mpe Allah azali komona maye bazali kosala

    [164] Ya sôló, Allah apesi lokumu likolo ya bandimi tango atindi epai na bango motindami kowuta na kati na bango, azali kotangela bango mikapo mia ye, mpe azali kopetola bango mpe kotangisa mpe kolakisa bango buku mpe bwanya. Mpe ata soki kala bazalaki na kati ya libungi ya polele

    [165] Nini! Tango mpasi ezui bino, boyeba ete bomonisaki bango mpasi mbala mibale na oyo ezui bino, na sima bolobaki ete: Oyo ewuti wapi? Loba na bango ete: Ewuti epai na bino moko, ya sôló Allah azali na nguya ya biloko binso

    [166] Mpe oyo ezuaki bino mokolo mampinga mibale makutanaki na ndingisa ya Allah, mpo ayeba banani bazali bandimi

    [167] Mpe ayeba bato ya bilongi mibale, mpe babengami ete; boya kobunda na nzela ya Allah, to mpe bobengana monguna, balobi ete: Soki toyebaki ete bitumba bizali ya sôló, nde tolandaki bino te. Mokolo wana bazalaki pembeni ya bopengwi mosika na boyambi, bazali koloba na minoko na bango maye mazali o mitema mia bango te. Mpe Allah, nde ayebi na bolamu bonso maye bazali kobomba

    [168] Baye batikalaki na bandako na bango mpe balobaki na bandeko na bango ete: Soki batosaki biso nde babomamaki te. Loba ete: Bolongola liwa ezala mosika na bino soki ya sôló bozali bato ya bosembo

    [169] Mpe bokanisa te ete: Baye babomami na nzela ya Allah bazali bibembe, kasi bazali nde na bomoyi pembeni na Nkolo wa bango. Batondi na bomengo

    [170] Basepeli na bolamu oyo Allah asali bango, mpe bazali na esengo na mitema mpona baninga na bango batikali na sima nakopesa bango sango elamu ete; babanga te mpe bayimayima te

    [171] Bazali na Esengo na bolamu ya Allah mpe na lokumu naye, mpe ya sôló, Allah akobungisa te mbano ya bandimi

    [172] Baye bayanolaki na mbela ya Allah na ya motindami sima ya bango kozoka ba mpota. Kasi mpona ba oyo basalaki malamu kati na bango, mpe babangi (Allah), bakozala na lifuta linene

    [173] Baye bato balobaki na bango ete: Ya sôló, bato basili kosangana mpona kosala bino mabe bobanga bango, mpe ebakiselaki bango bondimi mpe balobaki: Allah akoki na biso, mpe oyo nde mobateli ya malamu

    [174] Mpe bazongaki na bolamu mpe ngolu kowuta epai na Allah. Mpe likama moko ya banguna ezuaki bango te, mpe balandaki maye mazali kosepelisa Allah, mpe Allah atonda bomengo koleka

    [175] Ya sôló, satana nde azali kobangisa bino na Lisungi ya bato naye, bobanga bango te, kasi bobanga ngai soki bino bozali bandimi

    [176] Koyoka mpasi o’motema te mpona baye bakei na lombango na kati ya bopengwi. Ya sôló, bango bakopesa Allah mpasi soki moke te. Allah akani kopesa bango eloko soki moko te o’mokolo ya suka. Bango bakozua etumbu monene

    [177] Ya sôló, baye basombi bopagano o’esika ya bondimi, batungisi Allah na eloko soki moko te, mpe bango nde bazui etumbu enene

    [178] Baye bapengwi, bakanisa te ete ngonga eye totikela bango ezali nkita epai na bango. Kasi topesi bango tango, mpo babakisa masumu mpe bango bakozua etumbu elongobani

    [179] Allah akotika bandimi te na lolenge bozali na yango, kino akabola mabe na malamu. Allah akolakisa bino mabombami te, kasi Allah akopona o’kati ya batindami naye oyo ye alingi. Bondima na Allah na batindami naye, mpe soki bondimi mpe bobangi (Allah), bokozala na lifuta linene

    [180] Mpe baye bazali koboya kokaba na bozui oyo Allah apesi bango, bakanisa te ete wana ezali malamu mpona bango. Ezali nde mabe mpona bango, na mokolo ya suka, bomengo wana, bikozinga bango, mpe nkita ya likolo mpe ya mabele nyonso ezali ya Allah. Mpe Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala

    [181] Ya sôló, Allah asili koyoka maloba ya baye balobaki: Ya sôló, Allah azali mobola mpe biso tozali bazui. Tobombi maloba na bango. Mpe bango bazalaki koboma ba ntoma mpamba mpe tokoyebisa bango: Bomeka etumbu ya móto ya makasi

    [182] Wana na ntina mpenza oyo maboko na bino masalaki kala, mpe ya sôló Allah akobuba te bawumbu naye

    [183] Baye balobaka: Ya sôló tozui elaka epai ya Allah ete tokoki kondima ata na motindami moko te kino na tango akomemela biso libonza móto elia yango, Loba: Batindami liboso na ngai bayelaki bino bilembo mpe maye botunaki bango, Kasi boni bobomaki bango, soki bino bozali bato ya bosembo

    [184] Mpe soki bazui yo moto ya lokuta, ya sôló basilaki kozwa batindami liboso nayo bato ya lokuta, bayelaki bango bilembo bia polele, mpe malendisi mpe buku ya bongengi

    [185] Molimo nyoso mokomeka liwa. Kasi mokolo mwa lisekwa, bokozua lifuta lia bino. Na oyo bakotia ye mosika na móto mpe bakotisi ye na paradizu, ye wana nde alongi. Bomoyi ya mokili ezali sé bisengo ya tango moke

    [186] Ya sôló, bokomekama mingi kati na bozui na bino mpe na banzoto na bino. Mpe bokoyoka maloba ebele ya mabe kowuta epai ya baye bazua buku liboso na bino, ndenge moko na basambeli ya bikeko. Mpe soki bokangi mitema, mpe bobangi (Allah). Ya sôló, wana ezali lolenge ya malamu ya kosilisa makambo

    [187] Mpe tango Allah azuaki elaka epai ya baye bazuaki buku mpo balimbola yango polele epai ya bato, mpe babomba ata eloko moko te na kati na yango, bazui yango babwaki sima ya mikongo na bango mpe bateki yango na ntalo moke, mombongo nini ya mabe oyo basali

    [188] Ya sôló kokanisa te ete baye bazali kosepela na maye (ya mabe) bazali kosala, mpe bazali kolinga ete bato bakumisa bango na maye basali te, kokanisa te ete bango bakolonga na etumbu. Kasi, bakozala na etumbu ya makasi

    [189] Mpe maye manso mazali o’likolo mpe na nsé, mazali ya Allah, mpe Allah azali na nguya likolo ya biloko binso

    [190] Ya sôló, na kati ya bokeli likolo mpe mabele, mpe bokeseni ya butu na moyi, ezali bilembo mpona bato ya mayele

    [191] Baye bazali kokanisa Allah ya kotelema mpe kofanda, mpe ya kolala na mipanzi na bango, mpe bazali kososolo okati ya bokeli likolo mpe mabele eh Nkolo na biso! Maye manso tozali komona okeli yango mpamba te, nkembo nayo, mpe bikisa biso na etumbu ya móto

    [192] Eh Nkolo wa biso! Oyo okotisi ye na móto, ye wana nde osili kosambwisa ye, mpe bato mabe bakozua lisungi te

    [193] Eh Nkolo wa biso! Ya sôló toyoki mobeleli azali kobelela mpona bondimi ete: Bondima na Nkolo na bino mpe tondimi. Nkolo na biso, limbisa biso masumu ma biso mpe longola mabe ma biso, mpe boma biso elongo na bato ya malamu

    [194] Eh Nkolo na biso! Pesa biso maye olakaki biso epai ya batindami nayo, mpe kosambwisa biso te na mokolo ya suka. Mpamba te ozangisaka elaka nayo te

    [195] Mpe Nkolo wa bango Andimelaki bango ete: Ya sôló ngai na kobungisa te mosala ya moko kati na bino, mobali to mpe mwasi bino na bino, kasi mpona ba oyo babimaki na nzela ya Allah, mpe babimisaki bango na ba ndako na bango, mpe banyokwamaki na nzela ya ngaï, mpe babundaki, mpe babomamaki na nzela na yango, na kolongola masumu na bango nyonso, mpe na kokotisa bango na lola wapi epai mingala mizali kotiola, lifuta kowuta epai ya Allah. Mpe Allah azali na lifuta ya malamu

    [196] baye bapengwi, bakosa yo te na lolenge ya misala mia bango okati ya bamboka

    [197] Esengo ya moke, sima esika na bango ya kofanda ekozala móto, oyo nde esika ya mabe

    [198] Kasi baye babangi Nkolo wa bango, bakozala na kati ya lola eye mingala mizali kotiola o’nse na yango seko na seko, efandelo kowuta epai ya Allah. Mpe maye mazuami epai ya Allah mazali kitoko mpona bato ya malamu

    [199] Mpe ya sôló baye bazuaki buku, na kati na bango basusu bandimi na Allah, mpe na maye ekitaki epai na bino, mpe na maye ekiti epai na bango, bazali kobanga Allah. Mpe bazali koteka te mikapo mia Allah na ntalo moke. Bango wana lifuta na bango lizali epai ya Nkolo wa bango. Ya sôló Allah afutaka na lombango

    [200] Eh bino bandimi! Boyika mpiko mpe botingama na koyika mpiko, mpe botingama na bitumba, mpe bobanga Allah mpo ete bolonga

    Surah 4
    Basi

    [1] Eh Bino bato! Bobanga Nkolo na bino oyo akeli bino na molimo moko, mpe akeli na molimo wana mwasi Naye. Mpe abimisi o’kati na bango mibali ebele mpe basi, mpe bobanga Allah oyo bozali komitunana ba mposa ya bino. Mpe bobanga kokata bondeko ya makila. Ya sôló Allah azali mokengeli wa bino

    [2] Mpe bopesa bana bitike misolo mwa bango, mpe bobongola mabe na bolamu te, mpe bolia misolo mia bango te na misolo mia bino. Ya sôló, maye wana mazali masumu minene

    [3] Mpe soki bobangi ete bokozala na bosembo te kati kati ya bana bitike, esengeli na bino kobala basi baye bosepeli na bango, mibale, to mpe misato to mpe minei, kasi soki bobangi ete bokokoka te mpe bokozala semba kati na bango te, ezali malamu kozala na moko, to mpe bawumbu na bino baye bazali na maboko mabino, wana nde ezali malamu mpo ete bobunga te na kokweya na masumu

    [4] Mpe bopesa basi misolo mia bango ya libala na motema ya malamu, ezali lotomo mpona bango, kasi soki bango moko batikeli bino eloko na kati na yango, bolia yango na esengo

    [5] Mpe bopesa bazoba misolo mia bino te, oyo Allah atia yango mpona kotelemisa bomoyi bwa bino, mpe boleisa bango o kati ya maye wana, mpe bolatisa bango mpe boloba na bango maloba malamu

    [6] Bomeka mayele ya bana bitike mpona koyeba ete bakoli to naino bakoli te, mpe soki bomoni ete bakomi na kibomoto, bopesa bango misolo mia bango. Kasi bowela na lombango te mpona kolia misolo mia bango na lolenge ya mabe, na bango bazali naino bana mike, mpe oyo kati na bino azali na bozui naye, amipesa lokumu ete alia mbongo ya bana bitike te, kasi oyo azali na bozui te, alia yango na lolenge ya malamu, mpe soki bolingi kozongisela bango bozui na bango esengeli ezala liboso ya banzeneneke, mpe Allah akoki na motango moye bokopesa bango

    [7] Mibali bakozua eteni na kati ya bozui eye baboti batikaki, mpe bato ya libota, basi mpe bazali na eteni okati ya bozui eye baboti batikaki, lolenge mpe bato basusu ya libota, bozui yango ezala moke to ebele ezali eteni ya lotomo

    [8] Mpe soki bato ya zinga zinga ya libota, Mpe bana bitike mpe babola bayei kotelema na mokolo ya kokabola nkita ya bawei, esengeli kopesa bango mwa eloko okati ya nkita wana. Mpe bolobela bango maloba ya malamu

    [9] Kasi baye bazali na mikumba ya bana bitike babanga konyokolo bango lolenge moko babangaka kokufa, mpe kotika bana na bango ya mike na sima ete banyokwama te, esengeli na bango kobanga Allah, mpe balobaka na bana bitike maloba ya malamu

    [10] Ya sôló baye bazali kolia misolo ya bana bitike na lolenge ya mabe, ya sôló bazali kolia móto okati ya mabumu na bango. Mpe bakokota okati ya móto oyo ezali kopela

    [11] Allah atieli bino mobeko mpona bana na bino (na likambo litali bokitani): Mwana mobali akozua bozui ya motuya ya bana basi mibale. Mpe soki bana basi bazali Mibale to Koleka, bakozua mibale ya misato ya maye moweyi atikaki, mpe soki azali sé ye moko mwana mwasi akozua kati kati ya bozui, kasi baboti ya moweyi moko na moko akozua moko ya motoba ya maye mowei atikaki, soki moweyi atikaki mwana, kasi soki atikaki mwana te mama naye akozua moko ya misato, mpe soki azali na bandeko, mama naye akozua moko ya motoba, wana ekozala sima yako futa nyongo to mpe malako atikaki; batata na bino na bana na bino boyebi te nani kati na bango akosalisa bino, wana ezali lotomo kowuta epayi ya Allah, ya sôló Allah azali na boyebi atonda bwanya

    [12] Bokozua kati kati ya bozui oyo basi na bino batikaki, soki bazali na bana te. Kasi soki bazalaki na bana, bino mibali na bango bokozua moko na minei, sima ya kofuta nyongo atikaki to mpe elaka alakaki; bango basi mpe bakozua moko na minei na bozui oyo botikaki soki bozalaki na bana te, kasi soki bozalaki na bana, bango basi na bino bakozua moko na mwambe ya maye botikaki, wana sima ya bofuti nyongo botikaki to mpe elaka bolakaki. Kasi soki mowei mobali to mpe mwasi azali na baboti te, azali mpe na bana te, mpe ye azali na ndeko ya mobali to mpe ndeko ya mwasi, moko na moko akozua moko na motoba, kasi soki bazali ebele, basi mpe mibali, bakosangana okati ya moko na misato, sima ya kofuta nyongo ya mowei to mpe elaka alakaki yango na limemia nyoso, kasi na monyokoli te, wana ezali mobeko mowuti epayi ya Allah, mpe Allah azali boyebi atondo ngolu

    [13] Oyo nde mibeko mia Allah. Mpe moto oyo atosi Allah na motindami wa ye, akokotisa ye na lola o’kati na yango mingala mizali kotiola seko na seko. Oyo nde elonga ya monene

    [14] Mpe oyo aboyi kotosa Allah na motindami naye. Mpe alekisi ndelo, Allah akokotisa ye o’kati ya móto libela, mpe akozua, etumbu ya makasi

    [15] Otei ya basi na bino baye bakokweya na ekobo, boya na banzeneneke minei okati na bino, mpe soki batatoli yango bofandisa bango o’kati ya bandako kino liwa eyela bango to mpe Allah atia mobeko mosusu likolo na bango

    [16] Mpe mibale kati na bino bakwei na ekobo, bogangela bango, kasi soki batubeli mpe babongisi, botika kotungisa bango. Mpamba te Allah ya sôló, azali moyambi ya tubela mpe atonda ngolu

    [17] Ya sôló, tubela epai ya Allah ezali mpona baye basali mbeba na boyinga, mpe bawelisi na kotubela. Ba oyo wana nde Allah akondima tubela na bango. Mpe Allah azali na boyebi atonda bwanya

    [18] Tubela ezali te, na baye bazali kosala mbeba tii kino liwa likomeli moko na bango. Akoloba: Ya sôló, ngai natubeli sika oyo. Mpe (tubela) ezali te na baye bazali kowa mpe bango bazali bapagano; baye wana nde tobongisi mpona bango etumbu ya makasi

    [19] Eh bino bandimi! Bozua nkita ya basi te sé na ndingisa na bango. Mpe bopekisa bango te kobala sima ya liwa ya mibali na bango, na likanisi ya kozua ndambu ya misolo bopesaki bango na libala. Longola sé soki basali likambo ya mabe, lokola ekobo oyo emonani polele. Kasi soki bongo te, bofanda na bango na lolenge ya malamu, mpe soki bozali kosepela na bango te, kasi boyeba ete soki bozali koyina eloko tango mosusu Allah asili kotia bolamu ebele okati na yango

    [20] Mpe soki bolingi kotia mwasi ya sika na esika ya oyo bosilaki kokabuana naye, mpe ata soki bopesaki moko na bango misolo ebele bozua eloko moko na kati te, bolingi kozua yango na kobuba mpe lisumu monene

    [21] Ndenge nini bokozua yango mpe bino bosilaki kosangana na bango, mpe bango bandima kozua mokumba ya kofanda na bino ya bosembo

    [22] Mpe bobala te basi baye ba tata na bino babalaki, longola sé na maye maleka, ya sôló maye wana mazali bosoto mpe lisumu mpe nzela ya mabe

    [23] Epekisami epai na bino ete: bobala ba mama ba bino, mpe bana na bino ya basi, mpe ba ndeko na bino ya basi, mpe ba tata mwasi na bino, mpe ba ndeko ya mama na bino ya basi, mpe bana basi ya ndeko na bino ya mobali, mpe bana basi ya ndeko na bino ya mwasi, mpe ba mama baye bamelisaki bino mabele, mpe bandeko na bino ya basi baye bomelaki na bango mabele moko, mpe ba mama ya basi na bino, mpe bana basi ya basi na bino baye bafandaka na bandako na bino baye bosangana na bango nzoto, kasi soki bosanganaki na bango nzoto te, ezali lisumu te ete bobala bana na bango, mpe basi ya bana na bino baye babimi na mikongo na bino, mpe lisusu epekisami ete bosangisa bandeko basi mibale na libala moko, longola sé na maye maleka liboso, ya sôló Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [24] Mpe kobala basi ya mabala, longola sé bawumbu baye bosomba bango na mbongo na bino. Manso wana ezali mibeko mia Allah likolo na bino. Kasi bozali na ndingisa ya kobala basi banso batangami te okati ya mikapo miye. Kasi botambola na bango na mobulu te na ekobo te; bopesa bango misolo mia bango ya libala mpo ete bofanda na bango na maye bosepeli na yango kati na bango; mpe soki bosili kopesa bango misolo mia bango, bozali na lisumu te mpo ete bosili koyokana na bango; ya sôló Allah azali moyebi atonda bwanya

    [25] Mpe oyo okati na bino azui makoki te ya kobala ba nsomi kati ya basi ya bandimi, akoki kozua na kati ya bawumbu nabino bana basi ya bandimi. Mpe Allah ayebi bondimi kati na bino, mpo bozali bino na bino. Bobala bango na ndingisa ya baboti na bango, mpe bopesa bango mbongo ya libala na ndenge ya malamu. Mpo ete bazali basi ya malamu, kasi boluka bango te na ndenge ya kobatama to mpe na ndenge ya ekobo. Mpe soki basili kokota na libala mpe bakwei na ekobo, bakozua kati kati ya etumbu ya basi ya bonsomi. Wana ezali nzela epesamelaki bino mpona baye bazali kobanga kokweya na ekobo. Kasi soki bokangi mitema ezali malamu mingi mpona bino, mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [26] Allah alingi kolimbolela bino, mpe alingi kokamba bino na nzela ya baye balekaki liboso na bino, mpe andima batubela na bino. Mpe Allah azali moyebi atonda bwanya

    [27] Mpe Allah alingi kondima tubela ya bino, kasi baye bazali kolanda bamposa na bango ya nzoto, bazali kolinga ete bobunga libunga moko ya monene

    [28] Allah alingi alembisela bino mibeko, mpe moto Akelamaki motawu

    [29] Eh bino bandimi! Bolia mbongo na bino te kati kati na bino na lolenge ya mabe. Kasi ezala nde nzela ya mombongo molongobani na bosepeli kati na bino. Mpe bomiboma te, mpamba te Allah azali na mawa na bino

    [30] Mpe oyo akosala maye wana na kibonguna mpe na mabe, tokokotisa ye na móto. Mpe wana ezali mpasi te mpona Allah

    [31] Soki bomitie mosika na masumu ya minene na maye miye bapekisi bino yango, tokoboma masumu na bino mpe tokokotisa bino na ekoteli ya malamu

    [32] Bosala likunya te na maye Allah apesi baninga kati na bino, mibali bazali na eteni ya lifuta na maye basalaki, basi mpe bazali na lifuta na maye basalaki, bosenga nde Allah apesa bino bolamu naye. Ya sôló, Allah azali na boyebi likolo na biloko binso

    [33] Mpe totiaki libota na libota bakitani kowuta na maye baboti batiki to mpe ba ndeko okati ya libota, kasi, mpona bato basusu baye bopesaki bango elaka, bopesa bango nkita eye bolakaki bango, ya sôló Allah azali nzeneneke likolo ya biloko binso

    [34] Mibali bazali na bokonzi likolo ya basi, na ntina na lokumu oyo Allah apesi bango koleka basi. Mpe mpona misolo mia bango, babimisaka mpona basi; basi ya malamu bazali baye batosaka mibali na bango mpe babatelaka oyo esengeli ebatelama ata na tango oyo mibali na bango bazali te, maye Allah atiaki yango ete ebatelama, kasi baye bozali kobangela bango ete bazangi botosi bopesa bango ntoli to mpe bozala mosika na bango na mbeto, to mpe bobeta bango, soki bayoki mpe batosi bino bolukela bango lisusu mindondo te. Pamba te Allah azali monene azali likolo koleka

    [35] Mpe soki bobangi bokeseni kati na bango, botinda mosemboli moko kowuta na libota lia mobali mpe mosemboli mosusu kowuta na libota lia mwasi, mpe soki balingi boyokani, Allah akoyokanisa bango mibale. Ya sôló, Allah azali na boyebi atonda ba sango

    [36] Mpe bobondela Allah mpe bosangisa ye na eloko mosusu te, mpe bosala malamu na baboti mpe bandeko ya libota mpe bana bitike, mpe babola mpe baninga ya libota lia penepene, mpe mozalani ya mosika mpe moninga mpe moto wa mobembo oyo makoki maye masili, mpe na bawumbu na bino. Ya sôló, Allah alingaka te oyo azali komimonisa mpe azali lolendo likolo ya bato

    [37] Baye bazali kopima mpe bazali kotinda bato basala bopimi, mpe bazali kobomba maye Allah apesaki bango kowuta na bolamu naye, biso tolengeli mpona bapagano etumbu makasi

    [38] Mpe na baye bazali kobimisa mbongo na bango mpona komilakisa epai na bato, mpe baboyi kondima na Allah mpe na mokolo mwa suka. Mpe moto oyo azali moninga ya satana mpe oyo nde molongani ya mabe

    [39] Mpasi nini ezali kosala bango soki bandimaki na Allah mpe na mokolo ya suka, mpe babimisi na misolo miye Allah apesi bango (na nzela ya Allah)? Kasi ya sôló, Allah ayebi bango malamu

    [40] Ya sôló, Allah abubaka moto te na mosala naye ata moke lokola mbuma. Mpe soki ezali mosala ya malamu, (Allah) akobakisela bango mbala ebele. Mpe akopesa mbano enene kowuta epai naye

    [41] Mpe ekozala ndenge nini mokolo moye tokobimisa umma nyonso na nzeneneke na yango, mpe tokoya nayo ete ozala nzeneneke na bango banso

    [42] Mokolo moye baye baboyaki kondima mpe baboyi kotosa motindami, mposa na bango ekozala ete mabele makunda bango, mpe bakokoka kobombela Allah ata na liloba moko te

    [43] Eh bino bandimi! Bopusana na losambo te tango bozali na molangwa, kino bokososola maye bozali koloba, mpe tango bozali na mbindo kino bokosukola, longola sé oyo azali na nzela ya mobembo, kasi soki bozali na bokono to mpe bozali na mobembo to mpe moko kati na bino awuti na nzongo ya monene to nzongo ya moke, to mpe bosangani na basi, mpe bozui mayi te mpo ya kopetola nzoto, bosimba mabele ya mpeto mpe bopangusa yango na bilongi na bino, mpe maboko ma bino. Yasôló, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [44] Oyebaki te ete baye eteni ya buku epesamelaki bango bazali kosomba libunga, mpe bazali kolinga ete bobunga nzela lokola

    [45] Mpe Allah nde ayebi banguna na bino. Allah akoki na bino lokola mokonzi; mpe Allah akoki na bino mpona lisalisi

    [46] Ezali o’kati ya bayuda baye bazali kobongola liloba na esika na yango. Mpe balobaka ete: Toyoki mpe toboyi kotosa, mpe balobi lisusu: Yoka kasi bapesa yo te ndenge ya koyokela, mpe pesa biso litomba, bazali kobimisa lolemu na bango mpona kofinga lingomba (ya Allah)! kasi soki balobaka ete: Toyoki mpe totosi, mpe balobi na bato ete: Yoka mpe tala biso, nde ezalaki malamu mpe semba mpona bango. Kasi Allah alakeli bango botutu na ntina na bopagano na bango; mpe bakondimaka te sé moke kati na bango

    [47] Eh bino baye bozua buku! Bondima na maye tokitisaki mpe ezali kondima na maye bozalaki na yango liboso ete tolimwisa bilongi, mpe tokobalola yango na sima mpe tokolakela bango ndenge tolakelaki bato ya Saba botutu. Mpamba te, mokano ya Allah ekokisamaka

    [48] Ya sôló, Allah akolimbisa te oyo akosangisa ye na eloko. Mpe azali kolimbisa masumu misusu na moto oyo ye alingi. Mpe oyo asangisi Allah, ya sôló mpenza ye akwei na lisumu linene

    [49] Omoni te, baye wana batatoli ete bango bazali petoa? Kasi Allah nde akopetolaka oyo ye alingi, mpe bakosala bango mabe ata moke te lokola Fatîl

    [50] Tala lolenge kani bazali kobuka lokuta likolo ya Allah. Lokuta oyo wana ekoki na lisumu oyo ezali polele

    [51] Omonaki te epai ya ba oyo bazuaki eteni ya buku? bazali kondima na bonganga mpe bazali kondima na tarut, mpe bazali koloba na ba oyo basali bopagano: bango nde bazali na nzela ya semba koleka ba oyo bandimi

    [52] Baye wana nde, Allah atieli bango botutu; mpe moto oyo Allah akotiela botutu akozuaka lisungi te

    [53] To, boye bazali na eteni ya bokonzi? Bakopesaka bato eloko moke te ata ezalaki lokola mokokoli ya tamru

    [54] To bazali kosala bato likunya likolo ya maye Allah apesaki bango kowuta na ngrásia naye? Ya sôló, tosilaki kopesa libota lia Ibrâhîm buku, mpe bwanya, mpe topesaki bango bokonzi ya monene

    [55] Mpe kati na bango ezali na oyo andimi na yango, mpe na kati na bango ezali na oyo amipekisi na yango. Mpe lifelo ekoki mpo na bango mpo bazikisama

    [56] Ya sôló, baye bapengwi na bilembo bia biso, tokomema bango na kati ya móto. Tango inso loposo na bango ekozika, tokozongisa yango na loposo ya sika mpo ete bayoka etumbu mpenza. Ya sôló Allah azali na nguya atonda bwanya

    [57] Mpe mpona baye bandimi mpe basali misala ya malamu, tokokotisa bango na lola epai wapi mingala mizali kotiola o’nse na yango, mpe bakozala okati na yango seko na seko. Okati na yango ezuami mpona bango basi ya mpetoa. Mpe tokokotisa bango o esika ya mpio tango inso

    [58] Ya sôló, Allah atieli bino lotomo ete: Bozongisa biloko ya bato epai na bakolo na yango, mpe soki bokati makambo kati na bato, bokata na bosembo. Ya sôló, Allah atonda bolamu azali kolendisa bino na yango. Ya sôló, Allah azali moyoki mpe azali momoni

    [59] Eh bino bandimi! Botosa Allah mpe botosa motindami mpe bakonzi na bino awa na nsé. Mpe soki bozui kpokoso na likambo kati na bino, bozongisa yango epai na Allah na motindami, soki ya sôló bozali kondima na Allah mpe na mokolo ya suka. Wana nde ezali kitoko mpe lolenge ya malamu ya kosilisa likambo

    [60] Omoni te ete baye bakobete ntolo ete bango bandimi na maye tokitiselaki yo, mpe na maye tokitisaki epai ya baye bayaki liboso nayo? Bango balingaka kosambisa mambi ma bango epai ya motomboki. nzoka nde batindamaki ete bapengwa na yango. Kasi satana alingi kobungisa bango na libunga moko ya mosika

    [61] Mpe soki babengi bango ete: Boya epai na maye Allah akitisa mpe epai ya motindami, okomona bato ya bilongi mibale bakimi yo bakei mosika

    [62] Mpe ndenge nini soki mpasi ezui bango kowuta na maye maboko na bango moko esalaki, sima bakoyela yo mpe bakolapa na nkombo ya Allah ete: Tolingaki sé bolamu na boyokani

    [63] Bango wana nde Allah ayebi maye mazuami o’mitema mia bango. Kolanda makambo na bango te, mpe lendisa bango, mpe lobela bango maloba ya polele ya bosembo

    [64] Mpe totindaki motindami moko te epai ya bato bobele ete batosa ye sé na ndingisa ya Allah. Mpe bango tango basalaki milimo na bango mabe, bayaki epai nayo mpona kosenga Allah bolimbisi, mpe motindami asengela bango bolimbisi, balingaki kokuta Allah moyambi monene ya tubela mpe moyoki mawa

    [65] Mpe na nkombo ya Nkolo wayo, bakozala bandimi te kino bako tia yo zuzi ya likambo likwei kati na bango mpe bakoyoka mpasi te na mitema mpona likambo okateli bango, mpe na sima bandima mpe batosa yango

    [66] Mpe soki totielaki bango mobeko ete: Bomiboma to bomibimisa na bandako na bino, mbele balingaki kosala yango te, longola sé ndambu moke kati na bango. Kasi soki basalaka maye bateyamaki na yango, nde elingaki ezala malamu mpona bango, mpe lilendisi ya makasi

    [67] Nde topesaki bango litomba ya monene kowuta epai na biso

    [68] Nde tokambaki bango na nzela ya semba

    [69] Oyo akotosa Allah na motindami, bango wana nde bakozala elongo na baye Allah atondisela bango bolamu naye kati na bantoma, mpe bato ya bosembo, mpe baye bakufaki na kobunda na nzela na Allah, mpe bato ya malamu, oyo nde balongani ya kitoko

    [70] Wana ezali bolamu kowuta epai na Allah. Mpe Allah nde akoki na yango lokola moyebi

    [71] Eh bino bandimi! Bobongama mpe bokende na bitumba na bokabwani to mpe na lisanga

    [72] Mpe okati na bino ezali na basusu akolekisa tango mpona kotikala na sima, mpe soki likama ezui bino na bitumba akoloba ete:Ya sôló, Allah asili kosala ngai malamu na ntina ete nazalaki na bango elongo te, mpo noki nalingaki nakufa na bitumba

    [73] Kasi soki bolamu ya Allah ekiteli bino, akoloba lokola bolingo ezalaki kati na bino te, eh! Ngai mawa na ngai soki nazalaki na bango elongo nde nazui elonga ya monene

    [74] Babundisa na nzela ya Allah, baye bazali kotekisa lola na ntalo moke mpona kozua bomoyi na nsé, kasi oyo akobunda na nzela ya Allah, mpe akufi na bitumba to alongi bitumba, tokopesa ye lifuta ya monene

    [75] Eloko nini ekopekisa bino kobunda na nzela ya Allah, mpe mpona baye bazangi makasi kati ya mibali mpe basi, mpe bana mike bazali koloba: Eh Nkolo na biso! Bimisa biso na mboka oyo bato na yango bazali mabe. Pesa biso mokonzi kowuta epai nayo, mpe tiela biso mosungi kowuta epai nayo

    [76] Bandimi babundaka na nzela ya Allah, kasi bapagano babundaka na nzela ya motomboki. Bobundisa balandi ya satana; mpamba te likita ya satana ezalaka makasi te

    [77] Oyebaki te ete: Bato baye tango balobaki na bango, botika kobunda, kasi botelemisa losambo mpe bofuta zakat. Na sima tango motindo mokweyaki ete babunda, eteni moko kati na bango bakomaki kobanga bato ndenge moko babangaka Allah to mpe koleka wana, mpe balobaki ete: eh Nkolo wa biso! mpona nini otindi biso na bitumba? Soki okoki kozongisa yango ata sima, loba: Bisengo ya mokili bizali moke kasi mokolo ya lobi nde ezali malamu mpona oyo abangi. Mpe bakobuba bango ata na eleko moke te

    [78] Bisika nyoso bokozuama liwa ekokomela bino, ata soki bozalaki na kati ya bandako ya milayi oyo etongami na mabanga. Mpe soki bolamu ezui bango balobaka ete: Oyo ewuti epai na Allah, kasi soki mpasi ezui bango balobi ete: Oyo ewuti epai nayo, loba: Nyoso ewuti epai na Allah. Mpe oyo bato ya motindo nini bazalaka na bososoli ya likambo te

    [79] Bolamu oyo ekokomela yo ewuti epai na Allah; mpe mabe soki ezui yo ewuti nayo moko. Mpe totindaki yo ozala motindami epai ya bato. Allah nde akoki nayo lokola nzeneneke

    [80] Mpe oyo akotosa motindami, ye wana asili kotosa Allah; kasi oyo akopesa mokongo, totindaki yo te ozala mokengeli na bango

    [81] Bazali koloba ete: Totosi, mpe soki babimi epai nayo, bakei na kati na butu lisanga kati na bango bazali koloba maye yo olobaki te. Kasi, Allah azali kokoma maye bazali kosala na butu. Zala mosika na bango, mpe pesa elikia nayo epai na Allah, Allah akoki nayo lokola mobateli

    [82] Bango bazali kososola Kurani te? Soki ewutaki epai na Allah te, nde bakutaki bokeseni ebele kati na yango

    [83] Mpe soki sango ya kimia to ya bobangi eyeli bango, babimisi yango. Soki bazongisaki yango epai ya motindami mpe epai ya bato bazali na mitindo kati na bango, nde bato ya mayele kati na bango bayebaki yango. Soki mpona ngolu ya Allah te mpe bolamu naye te likolo na bino, nde bolandaki satana, longola sé moke ya bato kati na bino

    [84] Mpe bunda na nzela ya Allah. Ozali kokonza sé nzoto nayo moko (kasi basusu te). Mpe olendisa bandimi (mpona kobunda). Mpo ete Allah akosukisa nkanda ya bapagano, Allah atonda nguya koleka mpe azali makasi na etumbu

    [85] Oyo okati na bino akozala molobeli ya malamu akozua lifuta ya malamu, kasi oyo mpe akozala molobeli ya mabe, akozua mpe lifuta ya mabe. Ya sôló Allah azali na nguya likolo ya biloko binso

    [86] Soki bopesami losako, bozongisa yango na malamu koleka to mpe bozongisa ndenge bapesi bino. Ya sôló, Allah azali na motango likolo ya biloko binso

    [87] Allah, nzambe mosusu azali te sé ye. Akosangisa bino mokolo ya suka, wana ezali na tembe te, mpe nani yango aleki Allah na maloba ya bosembo

    [88] Mpona nini bolingi kokabwana na biteni mibale mpona bato ya bilongi mibale? Mpe Allah asilaki kobengana bango na ntina ya maye basalaki. Bino bolingi bosembola bato oyo Allah asili kobungisa? Na moto oyo Allah abungisi, okoki te kozongisa ye na nzela

    [89] Balingi bopengwa ndenge bapengui, mpo ete bozala ndenge moko. Mpe bozua te kati na bango ba ninga kino babima na nzela ya Allah. Mpe soki bapesi mokongo bokanga bango mpe boboma bango bipai binso bokokuta bango. Mpe bozua kati na bango moninga te mpe mosalisi te

    [90] Longola sé baye bakokota na lisanga ya bato oyo boyokani ezali kati na bino na bango, to mpe bayeli bino mitema ya komata ete babundisa bino, to mpe kobundisa bato na bango. Mpe soki Allah alingaki, nde apesaki bango nguya likolo na bino, mpona kobundisa bino. Kasi soki batelemi na kati kati mpe babundisi bino te, mpe bazali kotindela bino losako, Allah apesi bino nzela te yako bundisa bango

    [91] Bokokuta basusu kati na bango bazali koluka ete bosepela na bango mpe libota na bango. Kasi tango inso bakozua komekama bakokweyisama ebele okati ya bopagano, na yango soki batelemi na kati kati te, mpe bapesi bino losako te, mpe balongoli maboko na bango likolo na bino te, bozua bango mpe boboma bango na bisika binso bokokuta bango. Mpe topesi bino bokonzi monene likolo na bango

    [92] Esengeli te na mondimi koboma mondimi, sé soki asali yango na libaku. Na moto oyo abomi mondimi na libaku, esengeli naye akangola mowumbu moko ya mondimi mpe afuta makila ya mowei epayi ya libota naye, longola sé soki bango moko baboyi kozua lifuta yango. Kasi soki mowei, azali moto ya libota oyo ezali monguna na bino, mpe azali mondimi, mobomi akokangola sé kaka mowumbu ya mondimi. Kasi soki mowei azali moto ya libota oyo boyokani ezali kati na bino na bango, mobomi akofuta makila ya mowei epai na libota naye mpe akokangola mowumbu moko ya mondimi; kasi mpona oyo azui makoki te, esengeli naye akanga ngizi sanza mibale ya kolandana tubela mpona ye kowuta epayi ya Allah, mpe Allah azali na boyebi atonda bwanya

    [93] Mpe oyo akoboma mondimi na nko lifuti naye ezali lifelo. Akozala libela na kati na yango, mpe Allah asilikeli ye mpe alakeli ye botutu mpe abongiseli ye etumbu ya monene

    [94] Eh bino bandimi! Soki bokei na bitumba na nzela ya Allah bososola. Kasi boloba te na moto oyo bokutani naye apesi bino mbote ya kimia ete: Ozali mondimi te, bozali koluka na yango bomengo ya mokili. Mpe epai ya Allah nde bomengo ezali ebele. Bino mpe bozalaki liboso lokola bango, mpe na ngolu ya Allah likolo na bino asali ete bokoma bandimi, bososola, ya sôló, Allah ayebi mpe azali na sango ya maye manso bozali kosala

    [95] Mapinga kati ya bandimi baye babundi na nzela na Allah na misolo mia bango mpe na milimo mia bango, bakokani te na baye bafandi na bandako na bango longola sé ba oyo bazali na kpokoso. Allah atomboli baye ya mapinga likolo na baye bafandi na nsé, kasi na bango nyoso Allah alaki bolamu. Kasi Allah atondisi bolamu naye mingi likolo na mapinga naye mpe lifuta linene

    [96] Bakozua lopete ya lokumu epai naye, bolimbisi mpe ngolu kowuta epai na Allah. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [97] Ya sôló, baye bamisalaki mabe, ba anzelu bazali kolongola milimo mia bango na koloba ete: Bozalaki lolenge nini? Bakozongisa eyano ete: Biso tozangaki makasi likolo ya mabele, (ba anzelu) bakoloba ete: Mabele ya Allah ezalaki monene te ete bokimela? Bango wana efandeli na bango ekozala lifelo. Oyo nde esika ya mabe

    [98] Longola sé baye bazangaki bokasi kati na mibali, basi mpe bana, oyo bazalaki na makoki ata moke te ya kozua nzela ya kokima

    [99] Ba oyo wana nde Allah na mawa naye akoki kolimbisa bango. Mpe Allah azali na mawa atonda bolimbisi

    [100] Mpe moto oyo akotika mboka naye mpona Allah, akozua esika ya komibatela, mpe akofunguama. Mpe oyo abimi na ndako naye akei epai na Allah na motindami naye, mpe liwa lizui ye, ya sôló, lifuta naye ezali epai ya Allah. Mpe Allah azali molimbisi atonda mawa

    [101] Mpe soki bozali na mobembo; ezali lisumu te mpona bino soki bokutoli losambo, soki bozali kobanga komekama ya bapagano. Ya sôló, baye bampengwi. Bazali na kimonguna ya polele likolo na bino

    [102] Mpe soki ozali na kati na bango, mpe ozali kosambelisa bango, eteni moko kati na bango etelema elongo nayo, mpe bazala na minduki na bango. Mpe soki basilisi ko ngumbama, bazonga na sima, mpe basusu baya oyo naino ba sambeli te batelemisa losambo elongo nayo, bamilengela mpe bazua mindoki na bango, bapagano bakosepela komona bino botiki mandoki mpe mikumba mia bino mpo ete bakwela bino mbala moko. Mpe ezali lisumu te likolo na bino soki ezui bino minioko ya mbula to mpe bozali na bokono, botika mandoki na bino, na ntango wana bomilengele, ya sôló, Allah abongisi etumbu ya makasi pona bapagano

    [103] Mpe soki bosilisi kotelemisa losambo, botanga nkombo ya Allah, ya kotelema to ya kofanda to na mipanzi na bino na kolala, mpe soki bozui kimia, botelemisa losambo na lolenge na yango. Ya sôló, losambo ezali lotomo mpona bandimi ete etelemisama na ngonga na yango

    [104] Bozala na bolembu te na kolanda banguna, soki boyoki mpasi bango mpe bayoki mpasi lokola bino; bozali na elikia epai na Allah. Kasi bango bazali na elikia te, Allah azali na boyebi atonda bwanya

    [105] Ya sôló, tokitisaki buku epai nayo na bosembo nyoso mpo ete okata na yango likambo na kati kati ya bato na ndenge Allah akolakisa yo. Kasi kozala mosalisi ya bato mabe te

    [106] Mpe senga Allah bolimbisi, ya sôló, Allah azali molimbisi. Atonda mawa

    [107] Kokotela bato ya mabe te oyo bazali komisalela bango moko mabe, Allah alingaka bato ya masumu te baye bazali koteka bandeko na bango

    [108] Mpe bazali koluka kobombana bato, kasi bakokoka kobombana Allah te, mpe ye azali na bango bisika nyoso bazali, bazali koloba na butu liloba ezali kosepelisa Allah te, mpe Allah azingi bango bisika binso bazali na maye bazali kosala

    [109] Bino nde ba oyo bato bozali kosuana mpona bango mpona bomoyi ya nsé; kasi nani akosuanisa na Allah mpona bango na mokolo ya suka? To nani akozala mobateli na bango

    [110] Mpe oyo akosala mabe to abubi molimo naye, sima asengi Allah bolimbisi, akokuta Allah azali molimbisi atonda mawa

    [111] Oyo akosala lisumu ayeba ete asali yango na molimo naye. Mpe Allah azali moyebi atonda bwanya

    [112] Kasi oyo akosala mbeba to lisumu, sima akoseli yango moto mosusu, ayeba ete asili komema masumu ya monene

    [113] Mpe soki ezalaki bolamu ya Allah mpe mawa naye te likolo nayo, nde lisanga kati na bango balukaki kobungisa yo. Kasi bakomibungisa sé bango moko. Mpe bakosala yo mabe moko te. Mpe Allah akitisi buku epai nayo na bwanya. Mpe atangisi yo maye ozalaki na boyebi na yango te. Mpe lisalisi ya Allah ezali epai nayo ebele

    [114] Litomba ezali te na ebele ya makita na bango bazali kosala, sé na moto oyo azali kotinda na bokabi mpe na bolamu to mpe boyokani kati ya bato. Oyo akosala yango na koluka bosepelisi ya Allah, tokopesa ye lifuta linene

    [115] Kasi oyo akosala bokeseni na motindami sima na polele mpe lisungi esili koyela ye, mpe alandi nzela ya bandimi te, tokopesa ye maye azali koluka, mpe tokomema ye na lifelo, mpe oyo nde bozongi ya mabe

    [116] Ya sôló, Allah alimbisaka te soki basangisi ye na banzambe misusu, kasi alimbisaka masumu masusu na moto oyo ye alingi. Mpe oyo asangisi Allah asili kobunga libunga ya mosika

    [117] Bazali kobelela bikeko batiki ye (Allah), biye bazali kobelela bizali sé basi, bazali kobelela sé santana motomboki

    [118] Allah alakela ye mabe, mpe alobaki (na Allah) ete: Nakobanda kozua epai ya bawumbu nayo biteni ya lotomo

    [119] Ya sôló, nako bungisa bango. Mpe nakopesa bango elikia ya lokuta, mpe nakotindaka bango bakotobolaka matoyi ya bibwele mpe nakotindaka bango bakobongola lolenge ya bikelamu ya Allah, mpe oyo akozwa satana moninga atiki Allah, ya sôló yende asili kozanga bozangi ya polele

    [120] Azali kolaka bango elaka ya lokuta, mpe satana apesaka sé elaka ya lokuta

    [121] Bango wana nde esika na bango ya kofanda ekozala lifelo, mpe bakozua eloko ekokimisa bango na yango te

    [122] Kasi ba oyo bandimi mpe basali misala ya malamu, tokokotisa bango na kati ya paradizu, wapi epai mingala mizali kotiola. Na kati bakozala seko na seko. Elaka ya Allah ezali ya sôló. Nani yango akoloba bosembo koleka Allah

    [123] Oyo ezali kowuta na mposa na bino te ezali mpe kowuta na mposa ya baye bazua buku liboso na bino te. Oyo akosala mosala ya mabe akofutama na yango, mpe akozua mobateli te na botiki Allah, mpe akozua mosalisi te

    [124] Oyo akosala misala ya malamu, azala mondimi ya mobali to ya mwasi, bango wana nde bakokota na kati ya lola, mpe bakobubama ata moke te

    [125] Nani azali na lingomba ya kitoko koleka moto oyo amisoki mpe apesi elongi naye epai ya Allah, mpe ye azali moto malamu, mpe alandi lingomba ya Ibrâhîm ya bomoko ya Allah, kasi Allah azuaki Ibrâhîm moninga naye

    [126] Mpe maye manso mazuami o’likolo mpe o’nse mazali ya Allah, mpe Allah azali mozingi ya biloko binso

    [127] Bakotunaka yo mpo ete olimbola bango likambo litali basi, loba: Allah atie mobeko na likolo na yango, mpe na maye masilaki kotangema okati ya buku likambo ya bitike ya basi bozali kopesa bango te maye ekomami mpo na bango. Mpe bozali kolikia ete bobala bango, mpe lisusu bana mike baye bakomi naino makasi te. Esengeli na bino kozala semba kati kati na bana bitike. Kasi maye manso ya malamu, bozali kosala Allah ayebi, mpe azali komona yango

    [128] Mpe soki mwasi azali kobanga ete mobali naye asundola ye, ezali lisumu te ete bayokana na likambo moko boye ya malamu, mpe boyokani nde ezali malamu; mpamba te, mpo milimo ya bato emesana mingi na mabe, mpe soki bobongisi mpe bobangi Allah, ya sôló, Allah ayebi mpe azali na sango ya maye bozali kosala

    [129] Bokokoka te kozala semba kati kati ya basi na bino ata bosali ndenge nyoso. Kasi bopesa mokongo te na mosusu nakosundola ye mobimba. Mpe soki boyokani mpe bobangi, ya sôló, Allah azali molimbisi atonda mawa

    [130] Mpe soki bakabwani, Allah akopesa moko na moko bomengo kowuta epai naye. Mpamba te, Allah azali wa bomengo atonda bwanya

    [131] Mpe maye manso mazali o’likolo mpe o’nse mazali ya Allah. Mpe nasilaki kopesa ntoli epai ya baye bazuaki buku liboso na bino, mpe bino mpe lokola, ete bobanga Allah; mpe soki bopengwi boyeba ete ya sôló maye manso mazali o’likolo mpe o’nse mazali ya Allah. Mpe Allah asanzolama atonda bomengo

    [132] Mpe maye manso mazali o’likolo mpe o’nse mazali ya Allah. Mpe Allah akoki lokola mobateli

    [133] Soki alingi, mbele alongoli bino, eh bino bato! Mpe akokela bato basusu. Mpamba te Allah azali na nguya ya kosala yango

    [134] Moto oyo akolinga lifuta ya bomoyi ya mokili, ayeba ete lifuta ya bomoyi ya mokili na ya mokolo ya suka ezali epai na Allah. Mpe Allah azali moyoki mpe momoni

    [135] Eh bino bandimi! botelema ngwii na bosembo bozala banzeneneke ya Allah, ata likolo ya banzoto na bino, to baboti na bino to mpe mabota ma bino, ata moto yango azali na bozui to azali mobola, Allah azali na bokonzi likolo na bango. Bolanda bamposa ya nzoto te oyo ekotikisa bino bosembo, soki bomemi litatoli ya lokuta to mpe boboyi kotatola, kasi boyeba ete ya sôló, Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala

    [136] Eh bino bandimi! Bondima na Allah mpe na motindami naye, mpe na buku eye akitisaki epai ya motindami naye mpe buku eye akitisaki liboso na bino. Kasi oyo akopengwa na Allah na ba anzelu naye na babuku naye, mpe na batindami naye mpe na mokolo ya suka, ya sôló, ye wana nde asili kobunga libunga moko ya mosika

    [137] Ya sôló, ba oyo bandimi sima bapengwi, sima bandimi sima bapengwi lisusu, sima bamibakisi bopengwi, Allah akolimbisa bango te akokamba mpe bango na nzela ya semba te

    [138] Pesa sango epai ya bato ya bilongi mibale ete ya sôló bakozala na etumbu ya makasi

    [139] Baye bazali kotika bandimi bazali kozua bapagano baninga na bango. Nini bazali koluka epai na bango, nguya? Bayeba ete nguya nyoso ezali ya Allah

    [140] (Allah) asilaki kokitisa epai na bino o’kati na buku ete soki boyoki bazali kopengwa na mikapo mia Allah to bazali kotiola yango, bofanda esika moko na bato wana te kino bakotika, mpe kozua lisolo mosusu. Noki te bokozala lokola bango. Ya sôló, Allah akosangisa bato ya bilongi mibale na bapagano na esika moko na lifelo

    [141] Bango bazali kokengele bino na mayele mabe, sókó elonga ekomeli bino kowuta epai ya Allah, bango bakoloba ete: Tozali na bino elongo te? Sókó bapagano bazui elonga bakoloba biso nde tolongisi bino, mpe tobateli bino likolo ya bandimi? Allah azali zuzi likolo na bino o mokolo mwa lisekwa, mpe Allah akopesa bapagano nzela te likolo ya bandimi

    [142] Bato ya bilongi mibale bazali koluka kokosa Allah, kasi (Allah) azali kobalola kokosa na bango. Mpe soki batelemi mpona kosambela, bakotelema na bolembu, bazali koluka bato bamona bango, mpe bazalaka koluka kokanisa Allah mingi te

    [143] Bazali mbilinga mbilinga, bazali epai ya bandimi te epai ya bapagano mpe te, moto oyo Allah apengwisi ye okozongisa ye na nzela te

    [144] Eh bino bandimi! Botika bandimi te mpona kozua bapagano baninga na bino. Bolingi kotiela Allah elembo polele likolo na bino

    [145] Bato ya bilongi mibale ya sôló, bakozala na nsé ya moto ya lifelo. Mpe bakozuaka mpona bango mosungi te

    [146] Longola sé baye batubeli mpe babongisi, sima bakangami na Allah, mpe babongisi lingomba na bango mpona Allah; bango wana nde bazali na bandimi elongo mpe Allah akopesa bandimi lifuta ya monene

    [147] Allah akopesa bino etumbu te soki bopesi ye botondi mpe bondimi naye. Mpe Allah atonda botondi azali moyebi

    [148] Allah alingaka te basakola maloba ya mabe, sé soki na moto oyo abubami Allah azali oyo ayokaka atonda boyebi

    [149] Soki bobimisi bolamu polele to bobombi yango, to mpe bolimbisi mabe, ya sôló Allah atonda nguya atonda bolimbisi

    [150] Ya sôló, baye bazali kompengwa na Allah na batindami naye, mpe balingaka kokabola Allah na batindami naye, mpe balobaka ete: Tondimi na ndambu mpe tompengwi na ndambu, mpe balukaka na yango nzela ya kobimela

    [151] Bango wana nde bazali bapagano ya sôló; mpe tosili kobongisela bapagano etumbu ya makasi

    [152] Mpe ba oyo bandimi na Allah na batindami naye, mpe bakaboli kati na batindami naye te, bango wana nde bakozua lifuta na bango. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [153] Baye bazua buku bazali kotuna yo ete okitisela bango buku kowuta na likolo. Basilaki kotuna Mûssa ya monene koleka wana. Mpe balobaki naye ete: Lakisa biso Allah tomona ye polele! Na sima nkake ya makasi ebetaki bango na ntina na mabe na bango. Mpe basambelaki mwana ngombe sima ya maye bazalaki na ndimbola na yango, mpe tolimbisaki bango, na sima topesaki Mûssa bokonzi ya polele

    [154] Mpe totombolaki likolo na mitu na bango ngomba mpona elaka tozuaki na bango, mpe tolobaki na bango ete: bokota na monoko ya ndako na kofukama. Mpe tolobaki na bango lisusu ete: Bobebisa mobeko ya mokolo ya mposo te (saba), mpe tozuaki na bango elaka moko ya makasi

    [155] Mpe na ntina ete tolakeli bango mabe mpona kozanga botosi na elaka na bango, mpe mpona bopagano na bango ya koboya kondima na emoniseli ya Allah, mpe mpona bizaleli na bango ya koboma ba ntoma na ntina te, mpe na maloba na bango: Mitema mia biso mikangama, kasi Allah nde abeteli yango mpalata mpona bopagano na bango, bakondimaka te sé bato moke kati na bango

    [156] Mpe na bopengwi na bango na maloba na bango ya mabe koleka likolo ya Maryam

    [157] Mpe na maloba na bango: Ya sôló biso tobomi Issa masiya mwana na Maryam motindami ya Allah, kasi babomaki ye te, mpe babakaki ye te, nzoka nde eyelaki bango elongi lokola ye, mpe ba oyo bakabwanaki mpona ye batikalaki na kati na koyimayima, bazali na boyebi na likambo yango mpenza te sé makanisi, kasi ya sôló mpenza babomaki ye te

    [158] Kasi Allah amatisaki ye (Issa) epai naye, mpe Allah atonda bokasi mpe bwanya

    [159] Moko te kati ya baye bazua buku sé akondima naye liboso ete akufa, mpe mokolo ya suka akozala nzeneneke likolo na bango

    [160] Mpona mabe ya baye bamibenga bayuda topekisaki bango bilei ya malamu biye bilingisamaki mpona bango, mpe mpo ete bango bazalaki kopekisa mingi nzela Allah

    [161] Mpe bazali kozua ekotama, na bango basilaki kopekisama na yango mpe kolia misolo ya bato na lokuta, mpe tolengeli bapagano kati na bango etumbu ya makasi

    [162] Kasi baye batonda mayele kati na bango na bandimi bazali kondima na maye ekiti epai nayo na maye makiti liboso nayo, mpe baye batelemisaka losambo, mpe bapesaka zakat, mpe bandimaka na Allah na mokolo ya suka, bango wana nde tokopesa bango lifuta ya monene

    [163] Ya sôló tokitisi epai nayo emoniseli ndenge moko tokitisàki epai na Nûh na bantoma sima naye, mpe tokitisaki epai na Ibrâhîm, mpe Ismâïl na Is’hâq na Ya’qûb na bamabota, ndenge moko mpe tokitisaki epai ya Issa na Ayûb na Yûnus na Hâruna mpe Suleyman, mpe topesaki Dâwud zabur

    [164] Mpe batindami tobeteli yo sango na bango liboso, mpe basusu tobeteli yo sango na bango te, mpe Allah asololaki na Mûssa maloba polele

    [165] Batindami baye bazali bapesi sango malamu, mpe bakebisi mpona etumbu mpo ete bato bazala lisusu na likambo ya koloba te liboso na Allah sima ya boyei ya batindami, mpe Allah atonda bokasi mpe bwanya

    [166] Kasi Allah azali kotatola na maye akitisi yango epai nayo ete akitisaki yango na boyebi naye moko, mpe ba anzelu bazali kotatola na yango, mpe Allah akoki lokola motatoli

    [167] Ya sôló baye bapengwi mpe bazali kopekisa nzela ya Allah, basili kobunga libungi ya mosika

    [168] Ya sôló baye bapengwi mpe basali mabe Allah akolimbisa bango te, mpe akokamba bango na nzela ya semba te

    [169] Sé nzela ya lifelo wapi epai bakozala seko na seko, mpe yango ezali mpasi te epai na Allah

    [170] Eh! Bino bato, ya sôló motindami asili koyela bino bosembo kowuta epai na Nkolo na bino bondima na yango ezali malamu mpona bino, kasi soki boboyi, boyeba ete ya sôló maye manso mazali na likolo mpe na nsé mazali ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya

    [171] Eh! Bino bozwa buku bolekisa ndelo te na lingomba na bino, mpe bolobela Allah sé bosembo, ya sôló Masiya Issa mwana ya Maryam azali sé motindami ya Allah mpe liloba naye oyo atia epai ya Maryam mpe molimo kowuta epai naye, bondima na Allah na batindami naye, kasi boloba te ete azali misato, soki botiki ezali malamu mpona bino, ya sôló Allah azali Nzambe moko nkembo naye ete azala na mwana, maye manso mazali o’likolo mpe o’nse mazali ya ye, Allah ye nde azali mobateli oyo akoka

    [172] Masiya akoyoka nsoni te ete azala mowumbu ya Allah ndenge moko na ba anzelu (naye) ya pembeni, na moto oyo akoyoka nsoni na mabondeli naye (Allah) mpe asali lolendo, bayeba ete ye (Allah) akosangisa bango nyonso epai naye

    [173] Kasi mpona baye bandimi mpe basali misala ya malamu akopesa bango lifuta na bango mpe akobakisela bango bolamu naye, kasi ba oyo bayokaki nsoni, mpe basali lolendo, akopesa bango etumbu ya makasi mpe bakozua mobateli te mpe mosungi te liboso ya Allah

    [174] Eh! Bino bato ya sôló bilembetele esila kokomela bino kowuta epai na Nkolo wa bino, mpe tokitisaki epai na bino bongengisi ya polele (mwinda)

    [175] Mpe mpona baye bandimi na Allah mpe bakangami naye akokotisa bango na ngolu mpe bolamu kowuta epai naye, mpe akokamba bango epai naye na nzela ya semba

    [176] Bakotunaka yo loba: Allah azali kopesa bino mobeko naye mpona kalâlat, soki mobali akufi azali na mwana te kasi azali na ndeko ya mwasi akozua kati kati ya biloko ya mowei atiki, kasi ye akokitana naye na biloko nyoso oyo ndeko mwasi atiki soki azali na mwana te, kasi soki atikaki bandeko mibale ya basi, bakozua mibale na misato, kasi soki atiki bandeko ya basi ebele na bandeko ya mibali ebele, eteni ya mobali ezali eteni ya basi mibale, naboye nde Allah azali kolimbola bino mpo ete bobunga te mpe Allah azali moyebi ya biloko binso

    Surah 5
    Eloko ya kolia

    [1] Eh bino baye bondimi! Bokokisa mikanu miye bozwi. Endimami na bino ebuele ya an’âm biye bozali kobokolo longola sé biye bapekisi bino koboma o ntango ya kobulisama. Ya sôló Allah akataka makambo na ndenge alingi

    [2] Eh bino bandimi! botiola bilembo ya Allah te, mpe ba sanza esantu te, ndenge moko na bibwele (mpona mbeka na makkah), ndenge moko mpe na bilembo bitiami likolo ya bibwele mpe na ba oyo bazali kokende na ndako esantu baye bayei koluka bolamu ya Nkolo na bango mpe esengo naye, soki bobimi na kobulisama bosala bokila (soki bozali na bosenga na yango). Kimonguna na motema mabe epekisa bino te kokata makambo na bosembo likolo na bato baye bapekisaki bino kokota na ndako esantu. Mpe bosalisana na bolamu mpe na bobangi (Allah), kasi na mabe na bonguna te. Mpe bobanga Allah, ya sôló, Allah azali mopesi etumbu ya makasi

    [3] Epekisami likolo na bino (kolia) nyama oyo ekufi yango moko, mpe makila, mpe mosuni ya ngulu, mpe oyo babomi na nkombo ya Allah te, mpe oyo ekufi na kokamola kingo, mpe oyo babeti yango (na nzete to libanga), mpe oyo ekwei kowuta likolo, mpe oyo ba bundi na maseke na bango kino liwa, mpe oyo ba nyama ya mino balei, longola sé bokuti yango naino ekufi te, mpe bokati yango kingo, mpe oyo ekatami mpona bikeko, mpe kobendana na makonga mpona koyeba mambi na bino ya mabombami, nyoso wana ezali mabe. Boyeba ete lelo bapagano bazangi elikia na lingomba na bino, na yango bobanga bango te kasi bobanga nde ngai. Lelo nakokisi lingomba na bino, mpe natondisi bolamu na ngai likolo na bino, mpe naponeli bino lingomba na nkombo ya islam (komisokia). Kasi oyo kati na bino akwei na nzala makasi mpe etindi ye alia bilei biye bipekisami na likanisi ya kosumuka te, ya sôló Allah azali molimbisi atonda mawa

    [4] Bazali kotuna yo mpona maye elingisami mpo na bango. Loba na bango ete: Elingisami mpo na bino bilei ya malamu, mpe bibwele bozali na yango na maboko (lokola ba mbwa) ya bokila, botangisa bango lolenge ya kokanga nyama lolenge Allah alakisaki bino. Soki bakangeli bino nyama, botanga nkombo ya Allah likolo na yango yambo ya kolia, mpe bobanga Allah, mpamba te ya sôló, azali na lombango mpona kofuta mbano

    [5] Lelo bozali na ndingisa ya kolia bilei ya malamu, mpe bozali na ndingisa ya kolia bilei ya baye bazuaki buku, bango mpe bazali na ndingisa ya kolia bilei na bino. Mpe lisusu bozali na ndingisa ya kobala basi ya malamu kati na bandimi, mpe basi ya malamu kati ya baye bazuaki buku liboso na bino, soki bopesi bango misolo na bango ya libala na lolenge ya malamu, kasi na potopoto ya ekobo te, kasi oyo akopengwa na bondimi, ye wana mosala naye esili kobebisama, mpe o mokolo ya suka akozala elongo na bazangi

    [6] Eh bino bandimi! Soki botelemi mpo na kosambela, bosukola bilongi na bino mpe na maboko ma bino tii na matonga, mpe bopangusa mitu na bino, mpe bosukola makolo ma bino tii na matonga, mpe sókó bozali na djanaba bomipetola. Mpe sókó bozali na bokono to na mobembo to moko wa bino awuti na zongo to sókó bosangani na basi ba bino, soki bozwi mayi ya kosukola te, bomipetola na zelo ya peto, bopangusa bilongi bia bino na maboko ma bino kowuta na yango. Allah alingi kosalela bino mpasi te. Kasi alingi kopetola bino, akokiseli bino bolamu bwaye, mpo ete bokoka kotondo (ye)

    [7] Bokanisa bolamu ya Allah oyo asalelaki bino, mpe elaka naye bozuaki tango bolobaki ete: Toyoki mpe totosi. Na yango bobanga Allah, mpamba te ya sôló, Allah ayebi maye manso mabombami o mitema

    [8] Eh bino ba oyo bondima! Bozala na bosembo mpo na kosalela Allah, banzeneneke ya semba, kibonguna ya bato epekisa bino te nakosala bosembo, na yango bosala bosembo, yango ezali pembeni na bobangi. Mpe bobanga Allah, ya sôló, Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala

    [9] Allah azali kopesa elaka na ba oyo bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, bazali na bolimbisi mpe lifuta linene

    [10] Mpe ba oyo bapengwa mpe babuki lokuta na mikapo mia biso, bango nde bato ya lifelo

    [11] Eh bino bandimi! Bokanisa bolamu ya Allah epai na bino, tango bato bazuaki mokano mpo na kosala bino mabe. Allah alingaki te mabe wana ezua bino, mpe bobanga Allah, mpe epai na Allah bandimi bamipesaka

    [12] Mpe Allah asilaki kozwa elaka na bana ya Isalayele, mpe totindelaki bango bakambi zomi na mibale. Mpe Allah alobi na bango ete: Ya sôló ngai nazali elongo na bino; soki botelemisi losambo mpe bopesi zakat, mpe bondimi nabatindami na ngai mpe bosalisi bango mpe bopesi Allah nyongo ya malamu; nakolimbisa mabe na bino, mpe nakokotisa bino lola eye ezali koleka na nsé na yango mingala. Oyo akopengwa sima na yango kati na bino, asili kobunga nzela ya semba

    [13] Na yango, mpo na kozanga na bango botosi malako, topesaki bango botutu, mpe totiaki mitema mia bango mizala makasi. Bazali kobongola maloba na lolenge mosusu, mpe babosani eteni ya malendisi maye bayebisaki bango (Mûssa).okomona tango inso kati na bango bizaleli mpe makanisi ya mabe, sé moke kati na bango. Limbisa bango mpe bosana, ya sôló, Allah alingaka babongisi

    [14] Mpe ba oyo bazali koloba: Tozali baklisto tozuaki elaka na bango, babosanaki misusu na maye toyebisaki na bango. Mpe totiaki kati kati na bango bonguna mpe koyinana kino mokolo ya suka, mpe Allah akoyebisa bango maye manso basalaki

    [15] Eh bino baye bozua buku! (bayuda na baklisto), ya sôló, motindami na biso asili koyela bino, mpona kolimbola bino ebele ya makambo maye bobombaki kati na buku. Mpe alimbisa bino na misusu: ya sôló, bongengi esili koyela bino na buku ya polele kowuta epai ya Allah

    [16] Buku oyo Allah azali kokamba na yango, baye balandi bosepeli naye banzela ya kimia. Mpe azali kobimisa bango na molili kotia bango na mwinda na ndingisa naye, mpe kokamba bango na nzela ya semba

    [17] Ya sôló, basıli kozala bapengui baye balobaka ete: Issa mwana ya Maryam ye nde Allah, loba ete: Nani akokoka kosala Allah eloko, soki alingi aboma Masia mwana ya Maryam, na mama naye, na bato nyoso bazali na mokili? Bokonzi ya likolo na ya nsé ezali ya Allah, na maye mazwani kati kati nayango. Azali kokela nyoso alingi, mpe Allah azali na nguya likolo ya biloko binso

    [18] Mpe bayuda na baklisto balobi ete: Tozali bana ya Allah mpe balingami naye, loba: Mpona nini azali kopesa bino etumbu na masumu na bino? Kasi bozali lokola bato banso ndenge akela. Alimbisaka na oyo alingi mpe apesaka etumbu na oyo alingi. Bokonzi ya likolo na ya nsé mpe maye mazuami kati kati na yango mazali ya Allah. Mpe epai naye nde bozongi ezali

    [19] Eh bino bato ya buku! Ya sôló, motindami na biso asili koyela bino mpo na kolimbolela bino, o sima ya bokatani na boyei ya batindami, mpo boloba te ete: Mopesi sango ya malamu mpe mokebisi ata moko ayelaki biso te. Mokebisi na mopesi sango ya malamu asila koyela bino. Mpe Allah azali na bokoki mpo na biloko binso

    [20] Mpe ntango Mûssa alobaki na bato naye: eh bato na ngai! Bokanisa bolamu ya Allah oyo asalelaki bino, atieli bino ba ntoma, mpe atiaki bino ba nkumu, mpe apesa bino oyo apesa bato ya mokili te

    [21] Eh bato na ngai! Bokota na mabele esantu eye Allah apesaki bino. Mpe bozongela bizaleli na bino te (ya koboya kobunda), noki te bokozanga

    [22] Balobaki: Eh Mûssa! Ya sôló, kati na yango ezali na bato ya makasi. Mpe ya sôló biso, tokokota yango te kino babima wana. Soki babimi nde biso tokoti

    [23] Bato mibale baye babangi Allah, baye bazali koyeba bolamu oyo Allah asaleli bango balobi ete: Bokota na yango na ekuke, mpe soki bokoti wana bokolonga. Mpe bomipesa na Allah soki bozali bandimi

    [24] Balobaki: Eh Mûssa! Ya sôló tango inso bato wana bazali, biso tokokota te. Kende yo na Nkolo nayo bobunda bino mibale, biso totikali awa tovandi

    [25] Alobi ete: Nkolo, nazali na bokoki te bobele likolo na ngai na ndeko na ngai, mpe kabola biso na bato mabe oyo

    [26] (Allah) alobi ete: Ya sôló, bazali lisusu na ndingisa te ya kozua mboka oyo kino mbula ntuku minei mikoka, wapi epai bakotelengana na mokili. Komona mpasi te na motema mpona bato mabe

    [27] Mpe betela bango lisapo na bosembo lia bana mibale ya Âdam: ntango bafungolaki kopesa mbeka (likabo) moko ba ndimelaki ye, mosusu bandimeli ye te (oyo bandimelaki ye te) alobi (na mosusu wana): na koboma yo mpeza (ndeko naye) alobi: Ya sôló, (Allah) andimelaka baye babangaka

    [28] Soki otomboli loboko nayo mpona koboma ngai, nakotombola loboko na ngai te epai nayo mpona koboma yo. Yasôló, ngai nazali kobanga Allah Nkolo ya mikili

    [29] Nalingi okende na masumu na ngai na oyo ya yo, mpe okozala kati ya bato ya moto, mpe wana nde lifuta lia babubi

    [30] Molimo mwa ye motombokisaki ye koboma ndeko naye, mpe abomaki ye mpe na sima akomaki elongo na bazangi

    [31] Mpe Allah atindaki kokombele abandi kotimola mabele liboso naye mpona kolakisa ye lolenge nini akokunda ebembe ya ndeko naye. Alobaki: Eh ngai! Mawa na ngai, nazangaki makasi mpe mayele kozala lokola Kokombele mpo nakoka kokunda Ebembe ya ndeko na ngai? Mpe akomaki moto ya makanisi ya mpasi

    [32] Yango wana tokomelaki bana ya isalayele ete, oyo akoboma molimo mosusu, to asali mbeba kati na mokili azali lokola abomi bato banso, mpe oyo akobikisa yango, azali lokola abikisi bato banso. Mpe ya sôló batindami na biso basilaki koyela bino bilembo na mikapo. Na sima ebele ya bato kati na bango bazali kobebisa kati ya mokili mpe kolutisa ndelo

    [33] Ya sôló, bato oyo bazali kobundisa Allah na motindami wa ye mpe bazali kotia mobulu awa na nsé, lifuta na bango ezali ete: Baboma bango to babakama (na nzete) to mpe bakata maboko na bango ya mibali mpe makolo na bango ya mwasi, to mpe babengana bango na mboka. Wana ezali bokitisami awa na mokili mpe na mokolo ya suka bakozala na etumbu ya monene

    [34] Longola sé baye batubeli yambo ete bokanga bango. Kasi boyeba ete: Ya sôló, Allah azali molimbisi, atonda mawa

    [35] Eh bino bandimi! Bobanga Allah, mpe boluka kosala eloko oyo ekopusanisa bino penepene na Allah, mpe bobunda na nzela naye mpo ete bozua elonga

    [36] Ya sôló, baye bapengwa soki ezalaki ete bomengo nyoso ezali na nsé ezali ya bango, mpe babakisa mosusu lokola yango, ete bakangolama na yango na etumbu mokolo ya suka, bakondimela bango yango te mpe bako zala na etumbu makasi

    [37] Bakolingaka kobima okati ya moto, kasi, bakokoka kobima kati na yango te mpe bakozalaka na etumbu ya libela

    [38] Moyibi ya mobali na moyibi ya mwasi, bokata maboko na bango mibale mpona maye basalaki. Mpe ezala lokola etumbu kowuta epaï ya Allah. Mpe Allah azali na nguya atonda bwanya

    [39] Mpe oyo akosala tubela sima ya mbeba naye mpe abongisi, ya sôló, Allah okoyamba tubela naye, ya sôló, Allah azali molimbisi mpe atondo ngolu

    [40] Boye, oyebi te ete ya sôló, bokonzi bwa likolo na nsé bozali ya Allah? Apesaka etumbu na oyo alingi, mpe alimbisaka na oyo alingi? Mpe Allah azali na bokoki mpo ya biloko binso

    [41] Eh! Motindami! Baye bazali kowela kokweya na bopagano, bapesa yo mpasi te. Bazali lisanga ya baye balobaka ete: Tondimi na balolemu na bango kasi na mitema na bango te, lolenge moko na bayuda, bazali kotia matoyi na koyoka lokuta ndenge moko bazali kotia matoyi na koyoka lokuta ya bato misusu oyo bayaki epai nayo te. Bazali kobalola liloba na esika na yango, mpe balobaka ete: Soki bapesi likambo oyo bozua, mpe soki bapesi bino te bokeba. Moto oyo Allah alingi komeka ye okosalisa ye na eloko moko te epai na Allah. Ba oyo wana nde Allah alingi kopetola mitema mia bango te. Bakokitisama awa na nsé mpe bakozua etumbu monene o mokolo ya suka

    [42] Bazali kotia matoyi na koyoka lokuta mpe kolia mbongo ya masumu. Soki bayeli yo, sambisa bango to kosambisa bango te. Soki otiki bango bakosalaka yo eloko te, soki mpe osambisi bango, sambisa bango na bosembo ya sôló, Allah alingi bato ya bosembo

    [43] Mpe ndenge nini bazali kotuna yo osambisa bango mpe bazali na torah kati na yango ezali na mobeko mwa Allah? Mpe na sima na yango babwaki bosambisi bwa yo, bato wana bazali bandimi te

    [44] Ya sôló, tokitisaki torah o kati na yango ezali na bokambi mpe polé, buku oyo bantoma baye batosaki (Allah) na banganga ya mayele bazalaki kokata na yango makambo ya bayuda na mokumba oyo bapesamaki ya kobatela buku ya Allah. Mpe bazalaki banzeneneke na yango. (bamonaki yango) na yango, bobanga bato te kasi bobanga nde ngai, mpe boteka mikapo mia ngai na ntalo ya moke te. Mpe bato oyo bakokata makambo na buku ya Allah te, bango nde bazali bapagano

    [45] Mpe tokomelaki bango okati na yango (buku) ete: Molimo ekofutama na molimo, liso na liso zolo na zolo, litoi na litoi, lino na lino, mpe oyo akozokisa bakozokisa ye lolenge azokisi, kasi na moto oyo akolimbisa, ezali malamu mpe tubela mpo naye. Kasi baye bakokata makambo te na maye Allah akitisi, bango wana nde bazali babubi

    [46] Mpe na sima na bango, totindaki Issa mwana ya Maryam ete andima na maye mazalaki liboso naye maye mazali okati ya torah. Mpe topesaki ye Indjil okati na yango bokambi mpe bongengi ezali kondima na maye mazalaki liboso na yango kowuta na torah, yango ezali bokambi mpe malendisi mpona baye bazali na bobangi

    [47] Mpe bato ya Indjil, bakata makambo na maye Allah akitisaki o kati na yango. Mpe baye bakokata makambo na maye Allah akitisaki te bango nde babebisi

    [48] Mpe tokitiselaki yo buku na bosôló, ezali kondima na maye mazalaki liboso kati na babuku mpe mobateli likolo na yango. Kata makambo kati na bango na maye Allah akitisi. Kasi kolanda mposa na bango te mpona kotika bosôló oyo eyeli yo, lisanga na lisanga totia mibeko mpe nzela ya kolanda. Soki Allah alingaki mbele atiaki bino umma moko, kasi ezali mpo ameka bino lisanga nini ekosala malamu. Bowelana mpona kosala bolamu. Epai na Allah nde bozongi na bino banso, mpe akoyebisa bino na ntina ya maye bozalaki na bokeseni na yango

    [49] Mpe kata makambo kati kati na bango na maye Allah akitisi, kasi kolanda bamposa na bango te, mpe keba na bango mpo ete bakomeka yo na ndambu ya maye Allah akitisi epai nayo. Mpe soki bapesi mokongo, yeba ete ya sôló Allah alingi kopesa bango etumbu na ndambu ya masumu na bango. Mpe ya sôló ebele ya bato bazali nde babebisi

    [50] Boye, mobeko ya boyinga nde balingi? Nani ayebi kokata makambo koleka Allah? Wana ezali mpona baye bazali na kondima ya sôló

    [51] Eh! Bino bandimi! Bozua bayuda na baklisto baninga te, bazali baninga bango na bango. Oyo okati na bino akozua bango baninga, ayeba ete asili kokoma moto na bango. Mpamba te Allah akambaka bato ya mabe te

    [52] Kasi, okomona baye bazali na bokono o mitema mia bango, bakokende na lombango epai na bango, bazali koloba ete: Tozali kobanga mpo basala biso mabe te. Nzoka nde, Allah tango mosusu akoya na elonga to makambo mosusu kowuta epai naye na sima, bakotikala na mpasi na makanisi ya mabe oyo babombi na kati ya mitema na bango

    [53] Mpe bandimi bakolobaka ete: Ba oyo nde ya sôló baye balapaki ndayi na bokasi bonso na nkombo ya Allah bazali na bino elongo? Misala mia bango mibebisami mpe bakomi bazangi

    [54] Eh bino bandimi! Oyo okati na bino akotika lingomba naye, ayeba ete Allah akoyakaka na bato mosusu, ye alingi bango, bango mpe balingi ye, bakozala malamu na bandimi, makasi mpe mawa te likolo ya bapagano. Bakobunda na nzela ya Allah mpe bakobangaka te ete balobela bango (to basuanisa bango). Wana ezali bolamu ya Allah. Apesaka yango moto ye alingi. Mpe Allah atonda bolamu koleka mpe moyebi ya manso

    [55] Ya sôló, Allah nde azali mosungi na bino na motindami naye, ndenge moko na bandimi baye batelemisaka losambo mpe bafutaka zakat mpe bagumbamelaka (Allah)

    [56] Mpe oyo akozua Allah mosungi mpe motindami naye, na baye bandima, ya sôló bango nde lisanga ya balongi

    [57] Eh bino bandimi! Baye bazali kozua lingomba na bino na liseki mpe kotiola yango kati na baye bazua buku liboso na bino, bozua bango na bapagano baninga te, mpe bobanga Allah soki ya sôló bozali bandimi

    [58] Mpe soki bobeleli mpona losambo, bazali koseka mpe kosalela yango litio. Mpamba te mpo ete bazanga mayele

    [59] Loba: Eh bino baye bozua buku liboso na biso! Bozali koyina biso sé mpo ete tondimi na Allah mpe na maye makiti epai na biso mpe na maye makitaki liboso? Ya sôló ebele kati na bino bozali babebisi

    [60] Loba: Bolingi nayebisa bino lifuta na yango ya mabe koleka epai na Allah? Ezali oyo Allah alakeli botutu mpe asilikeli ye, mpe abalolaki basusu kati na bango ba makako na ba ngulu, mpe babondelaki tarut. Ba oyo wana nde bazali na esika ya mabe mpe babungi nzela

    [61] Mpe soki bayei epai na bino, balobi: Tondimi, nzoka nde bakotaki epai na bino na bopagano, mpe babimi sé na yango, mpe Allah ayebi mpenza maye bazali kobomba

    [62] Mpe okomona ebele na bango bazali kosala na lombango mpo na kosala mbeba mpe bonguna na kolia misolo ya mabe, wana ezali mabe na maye bazali kosala

    [63] Soki bankumu na banganga nzambe na bango bazali kopekisa bango te maloba ya lokuta mpe kolia mbongo ya masumu! Ezali mpenza mabe oyo bazalaki kosala

    [64] Mpe bayuda balobi ete: Loboko ya Allah ezali ya kokangama. Tika maboko na bango nde makangama, mpe bazali na elakeli mabe na ntina ya liloba na bango oyo. Nzoka nde maboko naye (Allah) mazali ya kofungwama. Akabaka bozui naye ndenge alingi. Ebele kati na bango bazali kokola sé kokola na botomboki. Mpe bopagano na ntina ya oyo ekiteli yo kowuta epai na Nkolo nayo. Mpe totiaki kati na bango koyinana mpe na kosuana kino mokolo ya suka. Tango nyoso bazali kopelisa moto mpona bitumba, Allah azali koboma yango. Mpe bazali kotia bobebisi awa na mokili, kasi Allah alingaka babebisi te

    [65] Soki bato ya buku bazalaka na bondimi mpe bobangi, tolingaki kolimbisa bango, mpe tolingaki kokotisa bango na lola elamu

    [66] Mpe soki basalelaki torah na Indjil na maye makitelaki bango kowuta epai na Nkolo wa bango, mbele bazuaki bilei kowuta na likolo mpe na nsé ya makolo na bango. Kati na bango ezali na umma oyo batambolaka na bosembo, kasi ebele na bango bazali na misala ya mabe

    [67] Eh yo motindami! Komisa sango eye ekiteli yo epai ya Nkolo nayo, soki osali yango te, yeba ete okomisi etinda naye te. Allah nde akobatela yo okati ya bato. Mpamba te ya sôló, Allah akambaka bapagano te

    [68] Loba: Eh bino bato ya buku! Bokozala na eloko te kino bosalela torah na Indjil na maye manso makitelaki bino kowuta epai ya Nkolo na bino. Mpe ya sôló, ebele kati na bango bazali kokola sé kokola na bopengwi mpe botomboki na ntina ya oyo ekiteli yo kowuta epaï ya Nkolo nayo. Kasi komitungisama te mpona bato bapengwa

    [69] Ya sôló, baye bandimi, mpe bayuda na ba swâbi-ûna mpe baklisto, oyo akondima kati na bango na Allah mpe na mokolo ya suka mpe asali mosala ya malamu, bazala na bobangi te, bazala na mpasi mpe te na mitema na bango

    [70] Tosilaki kozua elaka na bana ya isalayele mpe totindelaki bango batindami. Tango inso motindami akoyela bango maye mazali kosepelisa bango te, bazui basusu bato ya lokuta, mpe basusu bazali koboma bango

    [71] Bakanisaki ete bakomekama te na etumbu ya Allah. Na sima miso mpe matoyi na bango makangamaki. Na sima Allah alimbisaki bango, sima lisusu ebele kati na bango bakangamaki miso mpe matoyi. Kasi Allah azalaki komona maye bazali kosala

    [72] Ya sôló, basili kopengwa baye bazali koloba ete: Masiya (Issa) mwana ya Maryam azali Allah. Mpe masiya (Issa) alobaki na bana ya isalayele ete: Bobondela Allah Nkolo na ngai mpe Nkolo na bino. Ya sôló, oyo akosangisa Allah, Allah asili kopimela ye paladizo (lola) mpe esika naye ekozala móto. Mpe bato mabe bakozua lisungi te

    [73] Basili kopengwa baye bazali koloba ete: Ya sôló, Allah azali moko ya ba nzambe misato, nzoka nde Nzambe mosusu Azali te sé Nzambe moko (Allah). Sókó batiki te maye bazali koloba, etumbu ya makasi ekozua bapengwi kati na bango

    [74] Boye bakotubela te mpe basenga Allah bolimbisi? Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [75] Masiya mwana ya Maryam azali sé motindami, batindami ebele balekaki liboso naye, mpe mama naye azalaki mwasi ya bosembo. Ye na mwana naye bazalaki kolia bilei. Tala ndenge nini tozalaki kolimbolela bango bilembo, lisusu tala ndenge nini bazali kopesa mokongo na koboya

    [76] Loba: Bozali kobondela biloko bisusu, botiki kobondela Allah, biloko biye bikosala bino mabe te mpe bolamu te, wana Allah nde moyoki atonda boyebi

    [77] Loba: Eh bino baye bozua buku! Bolekisa ndelo na lingomba na bino te sé bosembo, mpe bolanda te mposa ya baye basilaki kobunga liboso mpe babungisaki ebele ya bato mpe bango bamibungisi nzela

    [78] Baye bapengwa kati na bana ya isalayele, balakelamaki mabe na lolemu ya Dâwud mpe Issa mwana ya Maryam, mpo ete bazangaki botosi mpe bazalaki kolutisa ndelo

    [79] Bazalaki kopekisana te na mabe oyo bazalaki kosala, wana nde ezaleli ya mabe bazalaki na yango

    [80] Okomona ebele kati na bango bazali kozwa bapangano baninga. Milimo mia bango mibongiseli bango mabe na ntina ete Allah asilikelaki bango, mpe okati na etumbu nde bakozala seko na seko

    [81] Mpe soki bandimaki na Allah mpe na ntoma mpe na maye makitaki epai naye, balingaki te kokamata bango balingami (to balongani). Kasi ebele kati na bango bazali nde babebisi

    [82] Ya sôló, okokuta bayuda na basambeli ya bikeko bazali na bonguna makasi likolo ya bandimi, kasi okokuta ete baye balobaka sôló tozali ba klisto bazalaki pembeni mpona kolinga bandimi, mpo ete na kati na bango ezali na basângò mpe banganga mayele mpo ete bazalaka na lolendo te

    [83] Mpe na ntango bakoyoka na maye makitaki epai ya motindami, okomona miso na bango matondi na pizoli mpona bosôló oyo bayebi, mpe bakolobaka: Nkolo wa biso tondimi, tia biso elongo na batatoli

    [84] Mpona nini te ete tondima na Allah mpe na oyo eyeli biso ya bosembo mpe tolikia ete Nkolo na biso akotisa biso okati ya bato ya malamu

    [85] Mpe Allah afuti bango na maye balobaki lola eye ezali koleka na nsé na yango mingala libela kati na yango. Mpe wana ezali litomba lia babongisi

    [86] Kasi mpona ba oyo bapengwa mpe babuki lokuta na mikapo mia biso, bango bato ya moto ya djahim

    [87] Eh bino bandimi! Bopekisa te biloko ya malamu biye Allah apesi bino, mpe bolekisa ndelo te mpamba te Allah Alingaka balekisi ndelo te

    [88] Mpe bolia maye Allah Apesaki bino ya kitoko, Mpe elingisami. Mpe bobanga Allah oyo bolobi ete bondimi naye

    [89] Allah akopesa bino etumbu te nakolapa na bino oyo ebimaka na balolemu na bino. Kasi akopesa bino etumbu na kolapa oyo ewuti na mitema na bino, tubela na yango ezali koleisa babola zomi lolenge boleisaka mabota na bino, to mpe kolatisa bango, to mpe kokangola mowumbu. Oyo akozua makoki wana te, esengeli naye akanga ngizi mikolo misato. Wana nde tubela ya kolapa na bino na tango bosili kolapa, kasi bobatela bakolapa na bino. Na boye nde Allah azali kolimbola bino mikapo naye, mpo botondo ye

    [90] Eh bino Bandimi! Ya sôló, masanga, mpe masano ya mayele mabe, na mabanga mpe makonga mibongisami na tango ya bopagano, manso wana mazali mbindo kowuta na mosala ya satana, bozala mosika na yango mpo ete bolonga

    [91] Ya sôló, satana alingi kotia kati na bino koyinana mpe kosuana kowuta na masanga mpe masano ya mabe, mpe apekisa bino losambo mpe bokanisi Allah, boye bokotika yango

    [92] Mpe botosa Allah mpe botosa motindami mpe bokeba! Mpe soki bopesi mikongo, mpe boyeba ete ya sôló, motindami na biso azali na eloko mosusu te sé akomisa sango ya polele

    [93] Ezali lisumu te likolo na baye bandimi mpe basali misala ya malamu kowuta na oyo baliaki, soki babangi mpe bandimi mpe basali misala ya malamu, sima babangi lisusu mpe bandimi mpe babangi mpe babongisi, Allah alingaka babongisi

    [94] Eh bino bandimi! Allah akomeka bino na bokila, banyama bokoboma na maboko na bino mpe na makonga (to mandoki) na bino, mpo ete Allah ayeba nani kati na bino azali kobanga Allah na kobombana, oyo kati na bino akolekisa ndelo sima likambo oyo akozala na etumbu ya makasi

    [95] Eh bino bandimi! Bosala bokila te na tango ya kobulisama. Oyo akoboma nyama na tango wana na nko, lifuta naye ekozala apesa nyama ya bomoyi ndenge moko lokola oyo ye abomaki, bato mibale ya bosembo mpe ya mayele kati na bino bakata makambo yango, ekozala mbeka ekoma na ndako esantu ya Makkah mpona koleisa babola na yango, to mpe tubela ete aleisa babola to mpe lisusu akanga ngizi na mikolo mikoki na motuya ya nyama wana, na bongo mpo ayeba mpe ayoka ntina na lisumu naye. Allah asili kolimbisa oyo eleki, kasi oyo akozongela yango, Allah akopesa ye etumbu, Allah azali na nguya, azali na bokonzi nyoso ya kopesa etumbu

    [96] Bozui ndingisa ya kosala moluka na ebale mpe bolia belei na yango, bisengo mpona bino mpe mpo na bato ya mobembo. Kasi bozali na ndingisa te mpona kosala bokila na mokili kino bokolongwa na kati ya kobulisama. Mpe bobanga Allah oyo epai naye nde bokosangisama

    [97] Allah atiaki ka’aba ezala ndako esantu, ezala esika ya bosangani ya bato banso. Atiaki sanza esantu, mpe.mabonza, mpe bilembo wana ezali mpo boyeba ete Allah ayebi manso mazali o likolo mpe na nsé, mpe ya sôló Allah azali moyebi ya manso

    [98] Boyeba ete ya sôló, Allah apesaka etumbu ya makasi mpe ya sôló, Allah azali molimbisi atonda mawa

    [99] Motindami nyonso alekaki te sé akomisaki nsango ya maye totindaki ye nayango; Allah ayebi maye manso bomonisaka na maye bobombaka

    [100] Loba: Mabe na malamu ezali ndenge moko te ata soki mabe ezali kokamwisa mpona ebele na yango, eh bino bato ya mayele! Bobanga Allah mpo ete bokoka kolonga

    [101] Eh bino bandimi! Botuna mituna te ya biloko ebele oyo soki bapesi bino ndimbola na yango ekopesa bino kpokoso. Mpe soki botuni yango na tango oyo kurani ezali kokita, bokozua ndimbola. Allah alimbisi yango, Allah azali molimbisi atonda boboto

    [102] Baye balekaka liboso na bino batunaki tunaki yango sima bakomaki bapagano

    [103] Allah atiaki mobeko te mpona bahir, na saaiba, mpe te na wasuiila, na haami mpe te, sé bapagano nde bazali kobukela Allah lokuta, mpe ebele kati na bango bazanga mayele

    [104] Mpe soki bayebisi bango ete: Boya epai ya maye Allah akitisi, mpe epai ya motindami, bakoloba ete: ekoki biso maye tokutaki epai ya batata na biso, ata soki batata na bango bayebaki eloko te mpe bazalaki na nzela ya semba te

    [105] Eh! Bino bandimi! Bobatela milimo na bino. Soki bokambami na nzela ya semba, mabe moko te ekozua bino epai na moto oyo asila kobunga, epai na Allah nde bino banso bokozonga, na sima akopesa bino sango ya maye bozalaki kosala

    [106] Eh bino bandimi! Soki liwa ekomeli moko kati na bino, bokozua banzeneneke mibale ya bosembo kati na bino bandimi mpona kotikela bango malako, to mpe bokozua banzeneneke misusu mibale kati ya bapagano, soki bozalaki na mobembo na mokili mpe liwa ekuti bino. Bokotelemisa bango na sima ya losombo, mpe balapa na kombo ya Allah soki bozali na koyimayima (batatola ete): Tokoteka malako naye te mpe tokobomba malako ya Allah te ata ezalaki ya moto ya libota na biso. Soki tosali bongo, ya sôló, tokozala basumuki

    [107] Mpe soki eyebani ete ba nzeneneke mibale wana basali masumu, basusu mibale batelema na esika na bango, baye bazali na bokoki kati na bango, mpe bakolapa na Allah ete kolapa na biso ezali ya sôló koleka ya bango, mpe tokobebisa te, soki te tokozala kati na babubi

    [108] Wana ezali makoki malamu ya kolakisa bango ete bamema malako na lolenge elongobani, to mpe babanga ete bandaye eboyama na sima ya bandaye na bango na yango! Bobanga Allah mpe boyoka, Allah akambaka bato ya mabe te

    [109] (Kanisa) Mokolo oyo Allah akosangisa batindami banso mpe akoloba na bango ete: Eyano nini bato bapesaki bino? Batindami bakoloba ete: Biso tozali na boyebi wana te. Mpamba te ya sôló, yo nde moyebi ya mabombami

    [110] Mpe tango Allah akoloba:Eh Issa mwana ya Maryam! Kanisa bolamu na ngai likolo nayo mpe likolo ya mama nayo, tango natondisaki yo na molimo mosantu; olobaki na bato mokolo obotamaki, mpe na tango okolaki, kanisa tango natangisaki yo buku mpe bwanya, mpe natangisa yo torah lolenge moko na Indjil. Kanisa tango ozalaki kozua mabele ya potopoto osali yango lokola ndeke mpe ofuli na kati na ndingisa na ngai mpe ekomi ndeke. Mpe lisusu na ndingisa na ngai ozalaki kobikisa bato ya maba mpe bato bakufa miso wuta mbotama na bango. Kanisa lisusu tango ozalaki kosekwisa bawa na ndingisa na ngai. Mpe kanisa tango nabatelaki yo na tango bana ya isalayele balingaki kosala yo mabe wana osilaki koyela bango bilembo bia polele, mpe bapengwi kati na bango balobaki ete: Oyo ezali sé bondoki ya polele

    [111] Mpe tango namonisaki na bayekoli: bondimela ngai mpe motindami na ngai. Balobaki: tondimi. Mpe zala nzeneneke ete Ya sôló biso tomikitisi

    [112] (Kanisa tango) bayekoli balobaki: Eh! Issa mwana wa Maryam! Boye, Nkolo wayo akoki kokitisela biso mesa kowuta na likolo (etondi na) bilei? (Issa) azongiselaki bango eyano ete: Bobanga Allah soki ya sôló, bozali bandimi

    [113] (Bayekoli) bazongisaki ete: Tolingi kolia yango, mpo efandisa mitema mia biso, kimia, mpe toyeba ete oyebisaki biso bosembo, mpe tozala banzeneneke

    [114] Issa mwana ya Maryam alobaki ete: Eh! Allah Nkolo wa biso! Kitisela biso mesa kowuta na likolo, ezala eyenga mpona biso ya liboso mpe ya suka, mpe ezala elembo kowuta epai nayo. Leisa biso; mpamba te ozali moleisi ya malamu koleka

    [115] Allah alobi ete: Ya sôló, nazali kokitisela bino yango. Kasi, oyo akopengwa na sima na kati na bino, nakopesa ye etumbu oyo naino napesa moto moko te na mokili

    [116] Mpe (kanisa) tango Allah akoloba na Issa mwana ya Maryam ete: Yo nde olobaki na bato ete: Bozua ngai na mama na ngai ba nzambe mibale na esika ya Allah? (Issa) Akoloba ete: Nkembo mpe lokumu nayo! Esengeli na ngai te na loba maye nazali na yango ndingisa te!? Soki nalobaki yango, osilaki koyeba. Mpo oyebi maye mazali okati na ngai, kasi nayebi te maye mazali okati nayo. Mpo ya sôló, yo nde ozali na boyebi ya mabombami

    [117] Nalobelaki bango sé oyo otindaki ngai na yango ete: Bobondela Allah Nkolo wa ngai mpe Nkolo wa bino. Mpe nazalaki nzeneneke likolo na bango tango nazalaki na bango elongo. Kasi wuta osilaki komatisa ngai epai nayo, yo nde otikali mokengeli likolo na bango. Mpo ete ozali nzeneneke likolo ya biloko binso

    [118] Soki okopesa bango etumbu, bazali bawumbu nayo; mpe soki olimbisi bango, ya sôló, ozali wa bokasi otonda bwanya

    [119] Allah akoloba ete: Lelo ezali mokolo moye bato ya bosembo bakozua litomba ya bosembo na bango. Bakozala okati ya lola wapi epai mingala mizali kotiola, libela ókati na yango. Allah asepeli na bango, bango mpe basepeli na Allah. Wana nde elonga ya monene

    [120] Bokonzi ya likolo na ya nsé mpe maye mazuami na kati na yango mazali ya Allah. Mpe ye nde azali na bokoki likolo ya biloko binso

    Surah 6
    Bibwele

    [1] Lokumu na Allah oyo akela likolo na mabele, mpe atie molili mpe bongengi. Sima, baye bapengwi na Nkolo wa bango bazali kokokisa ye na bikelamu

    [2] Yende akela bino kowuta na mabele, sima ati elaka (mpona bino), mpe elaka etiyamaka sé epai naye. Sima, bozali kotia tembe

    [3] Mpe ye, azali Allah oyo azali o likolo mpe na nsé, ayebaka mabombami ma bino na maye bomonisaka polele. Mpe ayebi maye bozali kosala

    [4] Mpe elembo kati ya bilembo bia Nkolo wa bango ekomelaki bango te, sé baboya yango

    [5] Mpe basilaki koboya bosembo ntango eyelaki bango; mpe kala mingi te ekoyela bango bansango ya maye bazalaki kotiola

    [6] Boye, bazali kornona te bato boni tobomaki liboso na bango, tofandisaki bango kati na mokilina ndenge ya malamu ndenge tosalela naino bino te? Mpe tokitiselaki bango mbula ebele kowuta o likolo, mpe totiaki míngala mizalaki kotiola na nsé ya makolo ma bango, mpe tobomaki bango тропа masumu ma bango. Mpe sima na bango tokelaki lisanga mosusu ya bato ya sika

    [7] Ata soki tokitiselaka yo buku ekomami na lokasa eye bakoki kosimba na maboko ma bango, mbele bapengwi balingaki koloba: Oyó ezali sé bondoki bwa polele

    [8] Mpe bazali koloba: Mpona nini bakitiselaki ye anzelu te? Kasi soki tokitisaka anzelu, makambo malingaki makokisama, mpe nde bazelisamaki te

    [9] Mpe soki toponaka anzelu lokola (ntoma), tolingaki kopesa ye lolenge ya moto, mpe tolingaki kotiyela bango mikakatano na ndenge eye bazali na yango

    [10] Kasi ya soló, batiolaki batindami liboso lia yo; kasi, litio lizingaki bango moko mpona maye bazalaki kosakana na yango

    [11] Loba: Botambola na mabele, bótala ndenge ezalaki suka ya babuki lokuta

    [12] Loba: Nani azali kokonza maye mazuami o likolo na mabele? Loba: Allah. Asila komikatela kozala na ngolu. Akosangisaka bino o mokolo mwa suka moye mozali na tembe te o kati na yango. Baye bamizangisi bango moko, bango nde bandimaka te

    [13] Mpe maye manso mavandaka na butu mpe na moyi mazali ya ye. Mpe ye nde azali moyoki atonda boyebi

    [14] Loba: Boye natika Allah тропа kozua mosungi mosusu mokeli ya likolo na mabele, mpe yende moleisi, kasi baleisaka ye te? Loba: Bapesi ngai mobeko ete nazala moto ya yambo ya komisokia, kasi kozala te omolongo ya basangisi Allah

    [15] Loba: Ya soló, nazali kobanga soki nazangi Nkolo nangai botosi, ekozala etumbu enene mokolo yango

    [16] Oyó akobatelama na yango mokolo wana; ya sólo, (Allah) asili koyokela ye mawa: Мре wana nde elonga enene

    [17] Mpe soki Allah apesi yo mikakatano moto akolongola yango azali te kaka sé ye, тре soki apesi yo bolamu; yende oyoazali na nguya likolo ya biloko binso

    [18] Mpe ye nde mokonzi likolo ya bawumbu naye, mpe azali na bwanya atonda ba nsango

    [19] Loba: Eloko nini ezali monene koleka litatoli? Loba: Allah, azali nzeneneke kati na ngai na bino, mpe bakitiseli ngai kurani oyo mpo ete nakebisa bino na yango na bato banso ekokomela bango. Boye, bino bozali kotatola ete ezali na ba nzambe mosusu elongo na Allah? Loba: Nakotatola te. Loba: Azali solo Nzambe moko, mpe nazali mosika na maye bozali kosangisa ye na yango

    [20] Baye topesaki bango buku bayebi ye (Muhammad) ndenge bayebi bana na bango, baye bamizangisi bango moko, bango nde bandimaka te

    [21] Mpe nani azali mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta mpe azali koboya mikapo mia ye? Ya soló, babubi bakolonga te

    [22] Mpe mokolo oyo tokosangisa bango banso sima tokoloba na baye bazalaki kosangisa: Wapi basangisi na bino bozalaki kotutela tolo

    [23] Na masumu na bango, etikalaki te sé baloba ete: Nakombo ya Allah, Nkolo wa biso tozalaki basangisi te

    [24] Tala ndenge bakosi milimo na bango moko, mpe esundoli banga maye bazalaki kosangisa (na Allah)

    [25] Mpe okati na bango basusu bazali koyokamela yo, mpe tozipaki mitema na bango mpo ete bayeba yango te mpe matoyi na bango makangami. Mpe elembo nyoso bakomona yango bakondima na yango te. Kino bakoya epai nayo mpo na kosuanisa yo, bapengwi bazali koloba ete: Oyó ezali sé masapo ya bato ya kala

    [26] Mpe bazali kopekisa bato bapusana pembeni naye mpe bango moko bazali komipekisa. Nzoka nde bazali komiboma kasi bazali koyeba te

    [27] Mpe soki omona, ntango bakotelemisa bango liboso ya lifelo bakoloba ete: Eh biso mpasi! Tozonga lisusu na mokili tokoboya mikapo mia Nkolo na biso te, mpe tokozala okati ya bandimi

    [28] Te! Kasi maye bazalaki kosala mabimi polele, soki bazongisi bango na mokili, bakozongela sé maye bapekisaki bango. Ya soló, bazali nde bato ya lokuta

    [29] Mpe bazali koloba: Ezali sé bomoyi na biso ya nsé, mpe tokosekwa te

    [30] Mpe soki omonaka ntango bakotelemisama liboso ya Nkolo na bango, akoloba: Boye oyo ezali solo te? В akoloba: Iyo na Nkolo na biso! Akoloba: Bomeka etumbu ya maye bozalaki ко mpengwa na yango

    [31] Basili kozanga baye baboyi kondima na bokutani na Allah, kino ntango ekoyela bango mbalakaka. Bakoloba: Eh! Mawa na biso na maye oyo tomonaki mpamba na kati na yango! Mpe bako mema mikumba na bango na mikongo na bango, mpe oyo nde mikumba ya mabe

    [32] Mpe bomoyi ya nsé ezali sé liseki mpe lisano, kasi ndako ya lobi nde ezali malamu тропа babangi. Boye bokososola te

    [33] Tosili koyeba ya soló ete, ezali kosala yo mpasi maye bazali koloba. Bazali koboya yo te, kasi babubi bazali nde koboya mikapo mia Allah

    [34] Mpe basilaki koboya batindami liboso nayo, mpe bakangaki mitema na maye bazuaki bango na lokuta, mpe banyokuamaki, kino lisungi na biso eyaki. Kasi,mbongwana ezali te na maloba ya Allah. Мре ya soló nsango ya batindami esili kokomela yo

    [35] Mpe soki koboya na bango ezali kosala yo mpasi, mpe soki ozalaki na makoki, ya koluka nzela na mabele to mpe ozua emateli тропа kobuta na mapata тропа komemela bango bikamwiseli; mpe soki Allah alingaki nde atiaki bango banso na nzela ya semba, kasi kozala te o kati na baye bazanga mayele

    [36] Ya sólo, ezali sé baye bazali koyoka nde bayambaka mbela (ya bondimi); kasi тропа bawa, Allah akosekwisa bango. Mpe epai naye nde bakozongisama

    [37] Mpe balobi: Mpona nini elembo ekitelaki ye te epai na Nkolo naye? Loba: Ya sólo Allah azali na makoki ya kokitisa elembo, nzoka nde ebele na bango bazali koyeba te

    [38] Mpe ezali na nyama mokote ezali kotambola likolo na mabele, mpe ndeke moko te ezali kopumbwa na mapapu naye, sé kaka bazala na lisanga lokola bino. Mpe totikaki eloko moko te okati ya buku. Na sima, epai na Nkolo na bango nde bakosangisama

    [39] Mpe baye bazali kozua mikapo mia biso na lokuta, bazali lokola baye matoyi mpe minoko mia bango mikufa bazali okati ya molili: Allah azali kobungisa oyo alingi mpe azali kokamba oyo alingi na nzela ya semba

    [40] Loba: Boyebisa ngai soki etumbu ya Allah eyeli bino to mpe mokolo ya suka ekomeli bino? Bokobelela nzambe mosusu botika Allah soki bozali na bosembo

    [41] Te; ye nde bokobelela mpe akolongola maye bozalaki kobondela ye тропа yango soki alingi, mpe bokobosana maye bozalaki kosangisa ye na yango

    [42] Mpe ya soló, tosilaki kotinda epai ya bato liboso nayo, na sima tozuaki bango na bampasi ya makasi nzala mpe bamalali ya makasi mpo ete ntango mosusu bakolomba (ngolu na biso)

    [43] Ntango bampasi na biso eyelaki bango, тропа nini balombaki ngolu na biso te! Mitema na bango mikomaki makasi mpe satana abongisela bango maye bazalaki kosala

    [44] Мре ntango babosanaki maye bayebisaki bango, tofungolelaki bango bizipela ya biloko binso kino ntango basepeli na maye bazui, tozuaki bango mbalakaka, tala ndenge basilaki kozanga elikia

    [45] Boye nde lisanga ya babubi esilaki kopanzana, mpe matondi na Allah Nkolo ya mikili

    [46] Loba: Bomoni boni soki Allah azui koyoka na bino na kornona na bino mpe akangi mitema na bino? Nzambe mosusu nani akoyela bino yango na esika ya Allah? Tala ndenge tozali kolimbolela bango bilembo polele, kasi bazali sé kopesa mokongo

    [47] Loba: Bokanisi nini soki etumbu ya Allah eyeli bino mbalakaka to polele? Boye, ekobebisama sé bato mabe (babubi)

    [48] Mpe totindaka batindami te sé bazala bapesi nsango malamu to bakebisi. Na yango; oyo akondima mpe abongisi, babanga te mpe bazala na mawa te

    [49] Mpe ba oyo bakozua bilembo nabiso na lokuta, etumbu ekozua bango na ntina ya maye bazalaki kobebisa

    [50] Loba: Nakoki koyebisa bino te ete nazali na sanduku ya nkita ya Allah, mpe nayebi mabombami te, mpe nakoki koloba te ete na zali anzelu, nazali; kolanda sé maye makiteli ngai na emoniseli. Loba: Oyó azali na miso akokani na oyo akufa miso? Bokokanisa te

    [51] Mpe kebisa na yango baye bazali kobanga ete bakosangisama liboso ya Nkolo wa bango, bazali na mobateli te mpe molobeli te na botiki naye mpo ete babanga

    [52] Mpe kobengana te baye bazali kobondela Nkolo na bango ntongo mpe mpokwa bazali koluka elongi naye. Ozali na eloko te тропа lifuta na bango, bango mpe bazali na eloko te тропа lifuta пауо. Soki obengani bango okozala akati ya babubi

    [53] Na boye nde totiaki bango na bango na kati ya komekama mpo baloba ete: Ba oyo nde Allah apesi bango bolamu likolo na biso? Boye Allah te nde ayebi baye bapesaka melesi

    [54] Мре soki baye bandimi na mikapo na biso bayei epai nayo, mpe loba: Kimia ezala likolo na bino, Nkolo na bino akoma likolo naye ngolu ete oyo kati na bino akosala mabe nakozanga koyeba, sima atubeli mpe abongisi, ya soló azali molimbisi atonda ngolu

    [55] Ndenge wana nde tozali kolimbola mikapo, mpo ete nzela ya bato mabe ebima polele

    [56] Loba: Bapekisaki ngai kobondela baye bozali kobondela elongo na Allah. Loba: Ngai nakolanda ba mposa na bino te, noki nakobunga mpe nakozala kati ya bakambami te

    [57] Loba: Ya solo, nazali na polele ya Nkolo na ngai, mpe boboyi yango. Maye bozali kowelisa ezali na maboko na ngai te. Kokata makambo ezali sé mibeko ya Allah, azali kokata na bosembo mpe ye nde mokaboli ya malamu

    [58] Loba: Soki oyo bozali kowelisa (etumbu eya noki) ezalaki na maboko na ngai mbele esilaki kokata kati na ngai na bino, mpe Allah nde ayebi babubi

    [59] Mpe ye nde azali na bafungola ya mabombami, moko te ayebi yango sé ye, mpe ayebi mayemazali na mabele mpe na mayi; mpe lokasa moko te (ya nzete) ekokweya kino ayeba yango. Mpe ezali na mbuma moko te (ya moke) na kati na molili ya mabele, ezala ya mobesu to ya kokawka kino esila kokomama o kati ya buku ya polele

    [60] Mpe na kati ya butu ye nde azali kozua milimo na bino, mpe ayebi maye bosalaki na moyi. Sima azali kolamusa bino kati na yango mpo ete elaka ekokisama. Mpe epai naye bozongi na bino ezali, sima akoyebisa bino maye bozalaki kosala

    [61] Mpe azali mokonzi likolo na bawumbu naye. Mpe azali kotindela bino bakengeli. Kino liwa ekokomela moko kati na bino, batindami na biso (ba anzelu) bazali kolongola ye molimo na liseki te

    [62] Sima, bazongi epai na Allah mokonzi na bango ya soló, boye mobeko mozali ya ye te? Mpe azali lombango na kofuta

    [63] Loba: Nani akobikisa bino na molili ya mabele mpe ya mayi? Bokobelela ye na kokitisama mpe na kobanga ete soki abikisi biso na oyo, tokozala okati ya batondi

    [64] Loba: Allah nde akokangola bino kati na yango mpe na ba mpasi nioso, na sima, bozongi kosangisa ye lisusu (na binzambe nzambe)

    [65] Loba: Azali na makoki ya kotindela bino etumbu na likolo to na nsé, na makolo na bino to mpe azipa bino na mabulu ya bitumba mpe ayokisa bino mpasi ya bitumba bino nabino. Tala ndenge tozali kolimbola mikapo mia biso, ntango mosusu bakoki kososola

    [66] Mpe bato nayo bazui yango lokuta mpe yango ezali bosembo. Loba: Nazali mobateli na bino te

    [67] Nsango na nsango ezali na ngonga na yango, mpe kala mingi te bokoyeba

    [68] Mpe soki omoni baye bazali kotiola mikapo na biso, zala mosika na bango kino bakozua lisolo mosusu. Mpe soki esali ete satana abosanisi yo, koranda te sima ya bokundoli elongo na babubi

    [69] Mpe babangi (Allah) bazali na eloko te ya kofuta тропа bato ya lolenge wana, kaši ezali sé bokundoli ntango mosusu bakobanga

    [70] Tika baye bazui lingomba na bango na liseki mpe lisano, mpe bomoyi ya nsé ekosi bango. Mpe kundola na oyo mpo ete molimo moko te ebebisama na maye azuaki. Akozala na mobateli te lokola Allah mpe na molobeli te, likabo nyoso akoya na yango тропа kokangola ye ekondimama te. Ba oyo wana nde bamibebisaki bango moko тропа maye bazuaki, bakomela mayi ya moto mpe bakozala na etumbu ya makasi na ntina ya maye bazalaki kopengwa

    [71] Loba: Boye, tokobelela elongo na Allah oyo ekosalisa biso te mpe ekonyokolo biso te? Mpe tozonga sima wana Allah asili kokamba biso mpo tozala lokola moto oyo basatana basili kokweisa ye mpe azali kotelengana na mabele? Ata baninga bazali kobenga ye na nzela ya semba ete: Yaka epai na biso; lobamzela ya Allah ezali nzela ya semba mpe tobengamaki ete tomisokia epai na Nkolo ya mikili

    [72] Mpe ete botelemisa losambo mpe bobanga ye, mpe epai naye nde bokosangisama

    [73] Mpe yende akelaki likolo na mabele na bosembo, mpe mokolo akoloba zala mpe ekozala, liloba naye ya soló, ye nde mokonzi ya mokolo bakofula na kelelo, azali moyebi ya mabombami na makambo ya polele mpe azali wa bwányá atonda bansango

    [74] Mpe ntango Ibrâhîm alobaki na tata naye Azar: Ozali kozua bikeko banzambe? Ya solo nazali kornona yo na bato nayo na libunga ya polele

    [75] Lolenge wana nde tolakisaki Ibrâhîm bokonzi ya likolo na ya nsé mpo ete azala nakondima ya solo

    [76] Mpe ntango butu eyindelaki ye, amonaki monzoto mpe alobi: Oyo nde Nkolo na ngai, mpe ntango elimwaki, alobi: Nalingaka biloko ya kolimwa te

    [77] Mpe ntango amonaki sanza ebimi, alobi: Oyo nde Nkolo na ngai, mpe ntango elimwaki alobaki: Soki Nkolo na ngai akambi ngai te nakozala elongo na baye babunga

    [78] Mpe ntango amonaki mwese (moyi) alobi: Oyo nde Nkolo na ngai, oyo azali monene koleka! Mpe ntango elimwaki alobi: Ohbato na ngai! Ya soló, nazali mosika na bino na maye bozali kosangisa (Allah) nayango

    [79] Ya sólo, ngai na bongoli elongi na ngai epai ya oyo akeli likolo mpe mabele na bomoko bwaye, mpe nazali o kati ya basambeli ya bikeko te

    [80] Mpe bato naye basuanisi ye, alobi: Bokosuanisa ngai mpo na Allah naye asili kokamba ngai? Mpe nazali kobanga te maye bozali kosangisa ye na yango, sé oyo Nkolo na ngai alingi, Nkolo na ngai aleka biloko nyoso na boyebi, bokokanisa te

    [81] Mpe ndenge nini nakobanga maye bosangisi mpe bozali kobanga te ete bosangisi Allah na maye akitisela yango elembetele te? Na yango; Lisanga nini Esengeli ebatelama soki boyebi

    [82] Baye bandima mpe balatisi bondimi na bango mabe te, bango wana nde bazali na kimia (babatelami) mpe bango nde bakambami

    [83] Wana nde elembetele na biso eye topesaki na Ibrâhîm likolo ya bato naye. Totombolaka mpete ya nani tolingi, ya sólo, Nkolo nayo azali wa bwanya atonda boyebi

    [84] Мре Topesaki ye likabo yaIs’hâq na Ya’qúb, mpe tokambaki bango banso babale, тре Nûh tokambaki liboso, mpe na libota naye: Dâwud, Suleyman, Ayûb, Yûsuf, Mûssa mpe Hâruna. Na boye nde tofutaka bato malamu

    [85] Mpe Zakariya na Yahya mpe Issa mpe Il’yâs, nyoso bazalaki bato ya misala malamu

    [86] Mpe İsmail na Al-yasa’ mpe Yûnus na Loth, тре topesaki bango koleka bato awa na mokili

    [87] Mpe basusu kati ya batata na bango mpe bana na bango mpe bandeko na bango, toponaki bango mpe tokambaki bango na nzela ya semba

    [88] Wana nde bokambi ya Allah azali kokamba na yango nani alingi kati na bawumbu naye. Soki basangisaki (Allah) mbele misala na bango mibebisamaki

    [89] Ba oyo wana nde topesaki bango buku mpe mibeko тре bontoma, тре soki ba oyo bapengwi na yango, kaši tosili kopesa mokumba na yango epai na bato mosusu oyo bakopengwa na yango te

    [90] В a oyo wana nde Allah akambi bango, landa nzela na bango. Loba: Nazali kosenga bino yango lifuta te, yango ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba

    [91] Bapesi Allah lukumu naye te ndenge esengeli, ntango balobi ete: Allah akitisi eloko te apai na moto. Loba: Nani akitisaki buku oyo Mûssa ayaki na yango bongengi mpe bokambi тропа bato? Bokomaki yango na bamakasa bazali kobimisa yango mpe bozali kobomba ebele kati na yango. Etangisi bino na batata na bino maye boyebaki liboso te, loba: Allah, sima tika bango basakana na kati ya libunga na bango

    [92] Kaši buku oyo (kurani) tokitisi yango epambolami ezali kondima na oyo ekitaki liboso, mpe mpo ete okebisa na yango mama ya bituka na baye bazali zingazinga na yango. Mpe na baye bandimi na mokolo ya suka bazali kondima na yango mpe bazali kobatela losambo na bango

    [93] Mpe nani azali moto mabe koleka moto oyo alobi lokuta na nkombo ya Allah? То mpe azali koloba ete: Bapesi ngai emoniseli, nzoka nde bakitiseli ye eloko te? To mpe oyo akoloba: Nakokitisa emoniseli ndenge Allah akitisi? Mpe soki okomona bato mabe ndenge bakozala o kati ya molangwa ya liwa, mpe ba anzelu bakotandela bango maboko: Bobimisa milimo na bino, lelo bokozua etumbu ya kosilisa lokumu тропа maye bozalaki koloba bosembo te na nkombo ya Allah, mpe bozalaki kosala lolendo na mikapo naye

    [94] Bino wana boye liboso na biso lelo bino moko, ndenge tokelaki bino mbala ya liboso. Botiki sima na bino nyoso oyo topesaki bino mpe tozali kornona te banani bakolobela bino, baye bozalaki kotuta ntolo ete bozali na basangani, kosangana na bino esili kokatana, mpe baye bozalaki kotutela ntolo basundoli bino (lokola balobeli)

    [95] Ya soló, Allah nde azali kopasola mbuma mpe mokokoli. Azali kobimisa bomoyi kowuta na liwa mpe mobisi liwa kowuta na bomoyi. Wana nde Allah, ndenge nini bozali komibungisa

    [96] Ye nde azali kobimisa pole ya ntongo na molili ya butu mpe atia butu ezala bopemi, kasi moyi na sanza тропа koyeba motango. Oyo nde mokano ya Nkolo nguya atonda boyebi

    [97] Mpe ye nde atielaki bino minzoto mpo bokambama na yango na molili ya mokili mpe ya ebale. Tosili kolimbola bilembo polele тропа bato oyo bayebi

    [98] Mpe ye nde akeli bino ebele kowuta na molimo moko; mpe ezali na efandelo mpe ebombelo. Tosili kolimbola bilembo mpo na bato basosolaka

    [99] Mpe ye nde azali kokitisa mayi kowuta na likolo. Mpe tozali kobimisa na yango milona. Mpe tobimisi bamatiti, sima tozali kobimisa bambuma ekangami ekangami mpe nzete ya tamru na mutu na yango ezali kobimisa bambuma ya tamru bizembeli pembeni pona kobuka epai na epai, mpe bilanga ya a’nâb mpe ya zaîtûn mpe ya rumân, bikokana mpe bisusu bikokana te. Tala bambuma na yango ntango

    [100] Мре batieli Allah ba mbanda ya bilima тре yende akeli bango, тре bapesi ye bana basi na bana mibali na kozanga koyeba, nkembo naye na maye bazali kopesa ye

    [101] Mokeli ya likolo na nsé. Ndenge nini akozala na mwana azali na molongani te mpe yende akela biloko binso тре azali moyebi ya biloko binso

    [102] Wana Allah Nkolo na bino, nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ye, mokeli ya biloko binso bobondela ye, mpe azali mobateli ya biloko binso

    [103] Miso ekomonaka ye te kasi ye nde akomona mpe azali malamu atonda bansango

    [104] Bilembo ya polele bisili koyela bino epai ya Nkolo nabino, oyo akomona polele ezali тропа molimo naye, mpe oyo akozanga kornona ezali mpe тропа molimo naye, kasi na zali mokengeli likolo na bino te

    [105] Na boye nde tozali kolimbola mikapo mpo baloba ete otangaki, mpe tozali kolimbola yango polele тропа bato oyo bayebi

    [106] Landa maye makiteli yo epai ya Nkolo nayo, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye, mpe zala mosika na basangisi (Allah)

    [107] Mpe soki Allah alingaki mbele basangisaki ye na eloko te, mpe totiaki yo mokengeli likolo na bango te, mpe ozali mobateli na bango te

    [108] Mpe bofinga te baye bazali kobondela misusu batiki Allah, bakofinga Allah na nkanda kati na kozanga mayele, na boye nde tobongisaki mosala ya umma nionso, sima epai na Nkolo na bango nde bozongi na bango ezali nde akoyebisa bango na ntina ya maye bazalaki kosala

    [109] Mpe bazali kolapa na Allah na makasi ya bolapi na bango ete soki elembo eyeli bango bakondima na yango, loba: Ya soló bilembo bizali epai na Allah, mpe eloko nini ekotinda bino kokanisa ete soki yango eye bakondima te

    [110] Мре tokobalola mitema na bango mpe miso na bango mpo bandimaki mbala ya liboso te, mpe totiki bango o kati ya botomboki na bango nakozanga kornona

    [111] Mpe soki tokitisa ba anzelu likolo na bango, mpe bibembe bilobisa bango, mpe soki tosangisaki biloko binso liboso na bango, balingaki kondima sé soki Allah alingaki, nzoka nde ebele na bango bazangi koyeba

    [112] Mpe ndenge wana totiaki na ntoma nionso, monguna kati ya basatana ya bato mpe bilima. Bazali kopesana bimoniseli maloba ya kitoko mpe sukali maloba mazanga ntina; mpe soki Nkolo nayo alingaki nde basalaki yango te. Mpe tika bango na maye bazali kokosa

    [113] Mpe mpo ete mitema ya baye bandimi na mokolo ya suka te bikende epai na yango mpe basepela na yango mpe mpo bakotisa oyo balingi kokotisa

    [114] Na boye, naluka zuzi mosusu kotika Allah mpe ye nde akitisi epai na bino buku ya polele? Mpe baye napesaki buku bayebi ete yango ekiti ya soló kowuta epai ya Nkolo nayo na bosembo, kasi kozala te elongo na baye bazali kotia ntembe

    [115] Мре liloba ya Nkolo nayo ekokisami ya soló mpe na bosembo, mbongwana ezali te na maloba naye azali moyoki mpe moyebi

    [116] Mpe soki otosi ebele ya bato awa na nsé, bakobungisa yo nzela ya Allah. Bazali kolanda sé makanisi mpe bazali kosala sé balokuta

    [117] Ya solo Nkolo nayo ayebi banani babungi nzela naye mpe ayebi banani bakambami malamu

    [118] Mpe bolia maye batangeli yango nkombo ya Allah soki bozali kondima na mikapo naye

    [119] Mpona nini bokolia te maye batangeli yango nkombo ya Allah mpe asili kolimbolela bino maye mapekisami, longola sé soki bokutani na kpokoso ya makasi koleka? Mpe ya solo, ebele ya bato bazali kobungisa bato na bamposa na bango na kozanga boyebi. Ya solo, Nkolo nayo nde ayebi mpenza bato ya mabe (balekisi ndelo)

    [120] Mpe botika masumu ya polele na ya kobatama. Ya solo, baye bazali kosala masumu bakofutama na maye bazalaki kosala

    [121] Мре bolia te maye bat angelí yango nkombo ya Allah te mpo ete ezali mbindo. Mpe ya soló, basatana bazali kotinda bato na bango mpo na kosuanisa bino, mpe soki botosi bango bokozala basambeli ya bikeko

    [122] Boye! Moto oyo azalaki ebembe mpe topesi ye bomoyi mpe totieli ye bongengi azali kotambola na yango kati na bato, azali lokola moto oyo azali na molili akoki kobima kati na yango te? Lolenge wana nde babongisela bapengwi maye bazalaki kosala

    [123] Na boye nde totiaki na mboka moko moko batomboki ya minene minene тропа kosala bamwango, kasi bazali kosala yango sé na banzoto na bango moko kasi bazali koyeba te

    [124] Mpe soki elembo moko eyeli bango, balobi: Tokondima te kino tokozua likabo ndenge moko eyelaki batindami ya Allah. Allah ayebi esika nini akoki kotia bontoma naye baye basali mabe bakozala na ntina te epai ya Allah mpe bakozua etumbu ya makasi тропа bamwango bazalaki kosala

    [125] Moto oyo Allah alingi kokamba ye akofungola motema naye mpo na islam, mpe oyo alingi kobungisa, akotia motema naye ekangami ekomi moke lokola moto oyo azali kobunda mpo na komata na likolo. Ndenge wana Allah azali kotia mbindo (etumbu) likolo na baye bandimi te

    [126] Mpe oyo ezali nzela ya Nkolo nayo ya nsemba, tosili kolimbola mikapo тропа bato bakanisa

    [127] Bazali na ndako ya kimia epai na Nkolo na bango, mpe azali mobateli na bango na maye bazalaki kosala

    [128] Mpe mokolo akosangisa bango banso, eh bino bilima bosili! Konyokolo bato mingi, тре baninga na bango kati ya bato bakozongisa liloba ete: Eh Nkolo! Tozalaki kosalisana kati na biso kino tokomi na elaka na biso eye osilaki kotia. Akoloba na bango: Lifelo nde esika na bino ya kofanda libela, sé ndenge Allah akolinga. Ya soló, Nkolo nayo azali wa bwanya atonda boyebi

    [129] Lolenge wana nde tozali kopesa babubi bokonzi likolo na baninga na bango na ntina ya maye bazalaki kozua

    [130] Eh lisanga ya bilima mpe bato! Batindami baponamaki te kati na bino, bazali kolobela bino bilembo biangai mpe bazali kokebisa bino mpo na bokutani na bino ya lelo oyo? Bakoloba: Totatoli na nzoto na biso moko, mpe bomoyi ya nsé mokosi bango, mpe bamitatoli ete ya soló bazalaki bapengwi

    [131] Wana ezali mpo ete Nkolo nayo akoki koboma mboka moko te na ntango oyo bato na yango bakebisami te

    [132] Mpe moto na moto na lopete kati na maye basalaki, mpe Nkolo nayo abosani te na maye bazalaki kosala

    [133] Mpe Nkolo nayo azali na bomengo atonda ngolu, soki alingi akolongola bino mpe akokela basusu oyo alingi na esika na bino ndenge akelaki bino wuta na basusu mpe lokola

    [134] Maye balaka bino yango ekoya sólo, mpe bokokoka kokima te

    [135] Loba: Eh bato na ngai! Bosala na bisika na bino ngai mpe nazali kosala, mpe bokoyeba kala mingi te nani akofutama malamu mpo na lobi. Ya sólo, babubi bakoki kolonga te

    [136] Мре bazali kopesa Allah mwa eteni kati ya maye akela bibwele mpe milona тре balobi: Oyo ezali тропа Allah na makanisi na bango, тре oyo ezali тропа banzambe na biso, kasi oyo ya banzambe na bango ezali кокота epai na Allah te, mpe oyo ya Allah ezali кокота epai na banzambe na bango, mabe ndenge bazali kokata likambo

    [137] Mpe lolenge wana nde banzambe ya basambeli bikeko babongiselaki bango mabe ya koboma bana na bango тропа konyokolo bango mpe тропа kozipa bango miso na lingomba na bango, mpe soki Allah alingaki mbele basalaki yango te, mpe tika bango na maye bazali kosala

    [138] Mpe balobaki: Oyo bibwele mpe bilona biye bipekisami nakolia, sé na ba oyo tokolinga na makanisi na bango, mpe banyama biye mikongo na yango mipekisami, mpe banyama oyo batangeli yango nkombo ya Allah te nakobukela ye lokuta, akofuta bango na maye bazalaki kosala (ya lokuta)

    [139] Mpe balobi: Maye mazali o mabumu ya banyama oyo bizali sé тропа mibali kati nabiso, kasi bipekisami тропа basi na biso, тре soki yango ebimi ya kokufa tala bango basangani likolo na yango, akofuta bango na mibeko na bango, ya soló, azali na bwanya atonda boyebi

    [140] Basili kozanga; baye babomaki bana na bango na bozoba mpe kozanga mayele mpe bapekisaki bozui oyo Allah apesaki bango тропа kobukela Allah lokuta, basili kopengwa mpe bakambama te

    [141] Mpe ye nde abimisa bilanga ya kokangama mpe ya kokangama te, na banzete ya tamru mpe milona ya ndenge na ndenge na bambuma na yango na elengi na yango, mpe bazaítún na barumane mikokana mpe misusu mikokana te. Bolia ba mbuma na yango ntango eboti mpe bofuta zakat na yango na mokolo yango bizali kobukama mpe bolekisa ndelo te. Ya soló, alingaka babebisi te

    [142] Mpe banyama mosusu akela yango mpo na komatela, mpe bisusu тропа ba litomba ya ndenge na ndenge. Bolia na maye Allah apeși bino. Mpe bolanda makolo ya satana te. Mpo ete azali monguna na bino ya polele

    [143] Na bibwele akeli balongani mwambe, mibale ya bantaba mpe mibale ya bameme. Loba: Boye mibali mibale nde apekisi to ya basi mibale to mpe maye makangami na matilisi ya basi mibale? Bopesa ngai boyebi na yango soki bozali na bosembo

    [144] Mpe mibale kati ya bakamela mpe mibale kati ya bangombe. Loba:boye; apekisi ya mibali mibale to ya basi mibale to mpe lisusu maye makangami о mabumu ya oyo ya basi mibale, to bozalaki banzeneneke na ntango Allah azalaki kopesa bino mibeko oyo? Mpe nani azali moto mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta тропа kobungisa bato na kozanga mayele? Ya soló, Allah akambaka babubi te

    [145] Loba: Mpona maye makiteli ngai kati ya emoniseli, namoni epekisami te mpona kolia, longola nsé soki ezali ya kokufa to makila ebele oyo esopani to mpe mosuni ya ngulu mpo ete yango ezali mbindo to nyama eye babomi yango mpona Allah te, kasi moto oyo akokutana nakpokoso ya makasi koleka (mpe alei yango na nko te to alekisi ndelo te ayeba ete), ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [146] Mpe тропа baye bamibenga bayuda topekisaki bango nyama nyoso ya manzaka, mpe тропа bangombe na bantaba mpe bameme topekisaki bango bamafuta na yango, longola sé oyo ya mikongo na yango to тре ya mipanzi to mpe oyo esangani na mikwa. Wana etumbu topesaki bango mpo na botomboki na bango, тре ya soló, biso nde tozali na bosembo

    [147] Mpe soki bazui yo moto na lokuta, loba: Nkolo na bino atonda ngolu ebele etumbu naye ekoki kozangisa bato ya mabe te

    [148] Baye basangisaki (Allah) bakoloba: Soki Allah alingaki kasi tosangisaki Allah te mpe biso na batata na biso, tokokaki kopekisa eloko te. Ndenge wana nde baye balekaki liboso na bango baboyaki kino bazuaki etumbu na biso. Loba: Boye bozali na boyebi epai na bino bobimisela yango, biso? Bozali kolanda sé makanisi mpe bozali kosala sé lokuta

    [149] Loba: Allah nde azali na elembetele ya makasi, mpe soki alingaki nde akambaki bino banso

    [150] Loba: Boya na banzeneneke na bino batatola ete ya soló, Allah nde apekisaki oyo. Mpe soki batatoli, kotatola na bango te, mpe kolanda te mposa ya baye baboyi mikapo na biso, mpe kolanda te baye bazali kondima na mokolo ya suka te mpe bazali kokokisa Nkolo na bango na bikelamu

    [151] Loba: Boya na tángela bino maye Nkolo na bino Apekisi bino: Ete bosangisa ye na eloko te, mpe bozala malamu na baboti na bino, mpe boboma bana na bino te тропа kozanga; biso nde tozali koleisa bino na bango, mpe bopusana na masumu te na polele to na kobombana, mpe boboma molimo ya moto te oyo Allah atie yango bule (mosantu) sé na bosembo, wana ntoli apesi bino (Allah) mpo ete bososola

    [152] Mpe bopusana te pembeni ya bozui ya mwana etike sé ezala na lolenge ya malamu kino akokola. Mpe bopesa bimekelo na bosembo (komeka ntaka ya metele mpe kotia nkilo), tokopesa moto mokumba te sé oyo ekoki naye, mpe soki bozali koloba boloba malamu na bosembo ata soki ezali bayi libota, mpe bokokisa elaka ya Allah. Wana mibeko atindi bino na yango mpo ete bozala kokanisa

    [153] Mpe ya soló, oyo nde nzela na ngai ya semba bolanda yango kasi bolanda banzela ya mikemike te ekokabola bino na nzela naye. Wana nde atindi bino na yango mpo ete bobanga ye

    [154] Sima topesaki Mûssa buku ya kokoka mbano тропа bolamu asalaki mpe ezala ndimbola ya eloko nyoso, bokambi mpe ngolu ntango mosusu bakondima na bokutani ya Nkolo na bango

    [155] Mpe oyo buku ya mapamboli tokitisaki yango, bolanda yango mpe bobanga mpo ete bozua ngolu

    [156] Mpo boloba te ete: Bakitisaki nde buku epai ya mabota mibale liboso na biso mpe tomipesaki na kotanga yango te

    [157] То mpe boloba ete: Soki bapesaki biso buku mbele tokambamaki koleka bango. Pole esili koyela bino epai na Nkolo na bino bokambi mpe ngolu, тре nani moto mabe koleka oyo azali koboya mikapo mia Allah тре azali kopesa yango mokongo tokofuta baye bazali kopesa mikapo na biso mokongo etumbu ya mabe тропа maye bazalaki kokima

    [158] Bazali kozela nini ete ba anzelu bayela bango ete Nkolo nayo aya to тре ndambu ya bilembo ya Nkolo nayo? Mokolo oyo ndambo ya bilembo ya Nkolo nayo ekoya kondima naye ntango wana ekosalisa molimo moko te oyo andimaki te liboso to azuaki bolamu liboso na kondima naye, loba: Bozela! Biso mpe tozali kozela

    [159] Ya soló, baye bakabolaki lingomba na bango mabota mikemike, ozali na eloko te kati na bango. Kasi likambo na bango etali nde Allah sima akoyebisa bango na maye bazalaki kosala

    [160] Oyo akoya na bolamu moko akofutama na yango mbala zomi, mpe oyo akoya na mabe, akofutama sé na lolenge na yango mpe bakobubama te

    [161] Loba: Ya sólo, Nkolo na ngai akambi ngai na nzela ya semba lingomba ya semba lingomba ya Ibrâhîm amisokia mobimba na Allah mpe azalaki te kati ya basangisi (Allah)

    [162] Loba: Ya soló, losambo na ngai, kosasa na ngai, bomoyi na ngai mpe liwa na ngai mazali ya Allah Nkolo ya mikili

    [163] Azali na mosangani te, mpo na yango nde na tindamaki mpe na zali wa yambo ya bamisokié (nazali moto wa yambo ya kozala mizilima na umma na ngai)

    [164] Loba: Boye nakoluka Nkolo mosusu тропа kotika Allah mpe ye nde Nkolo ya biloko binso? Molimo mokozua sé lifuta ya mabe asalaki. Moko te akomema mokumba ya moninga. Sima epai na Nkolo na bino bozongi na bino ezali mpe akoyebisa bino mpo na maye bozalaki kokabwana na yango

    [165] Mpe ye nde atiaki bino bakitani na mabele mpe atomboli basusu likolo ya baninga тропа komeka bino na maye apesi bino. Ya soló, Nkolo nayo azali lombango na kopesa etumbu, mpe ya sólo, azali molimbisi atonda ngolu

    Surah 7
    Bisika ya likolo

    [1] Alif, lâm, mîm, swâd

    [2] Buku eye ekitelaki yo. Mpe likambo moko te litungisa motema nayo kowuta na kobanga, mpo ete okebisa na yango, mpe ezali liteya тропа bandimi

    [3] Bolanda maye makitelaki bino kowuta epai ya Nkolo wa bino, mpe bolanda basusu te sé ye. Bozali kokanisa sé токе

    [4] Mpe bamboka boni tobomaka yango! Mpe tango etumbu na biso eyelaki bango na butu, to тре bazalaki na bopemi ya токе na moyi

    [5] Mpe kosenga na bango tango etumbu na biso eyelaki bango balobaki; ya soló, tozalaki babubi. (balekisi ndelo)

    [6] Mpe tokotunaka ya sólo baye totindelaki bango batindami, mpe ya sólo, tokotunaka batindami

    [7] Mpe tokoyebisaka bango na boyebi bonso, kasi mabombamelaki biso te

    [8] Мре emekelo ekomekama na bosembo mokolo wana, mpe oyo emekelo naye ekozalaka na kilo. Baye wana nde balongi

    [9] Mpe na oyo emekelo naye ekozala fafala, baye bana nde bamizangisaki bango moko kowuta na maye bazalaki kobuba na mikapo (bilembo) mia biso

    [10] Mpe tosilaki kopesa bino bokonzi ya kofanda na mabele mpe totielaki bino libiki ya bomoyi o kati na yango, kasi токе nde bozali kotondo

    [11] Mpe na bosóló tosilaki kokela bino, sima topesi bino lolenge, mpe sima toyebisaki na ba anzelu ete: Bogumbamela Adam, тре bagumbamaki, longola sé ibilisa azalaki te o kati ya bagumbami

    [12] Alobi (Allah): Eloko nini epekisaki yo kogumbama tango napesaki yo mitindo? Alobi (Lusufelo): Ngai nazali malamu mingi koleka ye, pamba te okelaki ngai na moto mpe okelaki ye kowuta na poto poto

    [13] Alobi (Allah): Kita na esika eye, тре esengeli nayo te kosala lolendo kati na yango. Mpe bima, ya soló, ozali o kati ya bazangi lokumu

    [14] Alobi (Ibilis): Zelisa ngai kino mokolo moye bakosekwisama

    [15] Alobi (Allah): Ya soló, ozali o kati ya baye bazali kozela

    [16] Alobi: (lusufelo) na ntina été obungisi ngai, nakofandela nzela nayo ya semba (тропа kobungisa bango)

    [17] Мре nakoyela bango liboso тре sima na bango, тре ngambo loboko ya mobali тре ya mwasi. Мре okokuta ebele kati na bango bazali kotondo yo te

    [18] Alobi (Allah): Віта kati na yango! Ozali mabe mpe mobenganami. Oyo akolanda yo kati na bango, ya solo, nakotondisa lifelo na baye banso bakolanda yo

    [19] Mpe Eh Adam! Vanda yo na mwasi wayo o kati ya Iola, mpe boliya binso bolingi, kasi bopusana te pene na nzete eye noki bokozala kati na babubi. (yo na mwasi wayo)

    [20] Mpe satana akotisi bango na komekama mpo na kotalisa bango bolumbu na bango, mpe alobi na bango: Nkolo na bino apekisaki bino kólia nzete oyo mpo ete bokoma ba anzelu to mpe bozala kati ya baye bokotikala libela

    [21] Мре alapeli bango: Ya soló, nazali mopesi ntoli malamu тропа bino

    [22] Мре akweisi bango na bokosi bwa ye, tango bameki koliya nzete, bolumbu bwa bango bomonani polele mpe bazwaki lokasa ya lola babandi komizipika na yango, mpe Nkolo wa bango abeleli bango ete: Napekisaki bino te na nzete eye? Mpe nalobaki na bino te ete zabulu azali ya sólo, monguna wa bino wa polele

    [23] Bango balobi: O Nkolo wa biso! Tobubi milimo mia biso, mpe soki olimbisi biso te mpe oyokeli biso mawa te, ya sólo, tokozuama o kati ya bazangi

    [24] Alobi (Allah): Bokita! Bino na bino banso bokozala na kibonguna, mpe mabele ezali esika ya bovandi na bosepeli токе тропа bino

    [25] Alobi (Allah): Kati na yango bokolekisa bomoyi mpe kati na yango bokokufa mpe bokobimisama o kati na yango

    [26] Eh bino bana ya Adam! Ya soló, tosilaki kokitisela bino elamba тропа kozipa bolumbu bwa bino mpe тропа bonzenga. Kaši elamba ya bobangi nde ezali malamu mingi. Wana ezali moko kati na bilembo bia Allah mpo été bakanisa

    [27] Eh bana ya Adam! Satana abungisa bino te lolenge abimisaki baboti ba bino o kati na lola, alongolaki bango bilamba mpo amonisa bolumbu bwa bango. Ya soló, ye (satana) azali kornona bino ye na bato baye o esika eye bino bozali. Kasi bozali kornona bango te, ya solo, totiyaki ba satana bazala Basungi ya baye baboyi kondima

    [28] Mpe soki basali mbeba, bakolobaka: Tokutaki yango epai ya bankoko ba biso, mpe Allah atindi biso na yango. Loba: Ya solo, Allah atindaka na mbeba te, bozali koloba na Allah maye bozali na boyebi na yango te

    [29] Loba: Nkolo wa ngai atindi bosembo. Mpe bosembolisa bilongi bia bino na bisika binso ya mabondeli, mpe bobondela ye na bomoko nyoso na botosi ye. Ndenge akelaki bino bokozongaka sé bongo

    [30] Akambi basusu mpe basusu Atieyi likolo na bango bobungi, pamba te mpo bazuaki basatana bazala bakonzi na bango batiki Allah, mpe bazali kokanisa ete bazali na bokambami bolamu

    [31] Eh bana ya Adam! Bozua bonzenga na bino (bolata bilamba bia kitoko bia bino) na tangoya sambela nyoso, boliya mpe bomela, kasi bolekisa ndelo te. Ya soló, ye alingaka balekisi ndelo te

    [32] Loba: (Muhammad) nani oyo apekisa bonzenga ya Allah mpe bozui naye ya kitoko oyo abimiseli bawumbu naye? Loba: Yango ezali тропа baye bazali na bondimi na bomoyi ya mokili oyo, na baye bazali na elikia тропа mokolo mwa suka, ndenge wana nde tozali kolimbola mikapo polele mpo Na bato oyo Bayebi

    [33] Loba: Ya sólo, Nkolo wa ngai apekisi mbeba kosala yango polele to тре na kobatama, mpe na lisumu, na kosala kibonguna na esika esengeli te, na bosangisi Allah na maye manso akitiseli yango liloba te. (mokapo to elembo) mpe boloba te na Allah maye bozali na boyebi na yango te

    [34] Mpe na umma nyoso bazali na eleko na bango. Mpe soki eleko na bango ekoki, ngonga ekozelisamaka te mpe ekowelisama te

    [35] Eh bana ya Adam! Soki batindami bayeli bino тропа kolimbolela bino bilembo bia ngai, mpe baye bakobanga ngai mpe babongisi, bakozalaka na bobangi te mpe bakozala na mawa te

    [36] Мре baye baboyaki kondimela bilembo bia biso mpe basaleli yango lolendo, bango nde bato ya moto. Bakozalaka kati na yango libela

    [37] Мре nani azali mabe koleka moto oyo akoseli Allah to aboyi kondima na mikapo mia ye? Bango wana bakozuaka mbano na bango na maye bakomelaki bango, kino batindami ba biso (ba anzelu) bakoyelaka bango тропа kolongola bango milimo, тре (ba anzelu) bakotunaka bango: Wapi baye bozalaki kokumisa na botiki Allah? Bakoyanolaka: Tozali kornona bango lisusu te, mpe bako milobaka bango moko ete: Ya soló, tozalaki bapengwi

    [38] Akolobaka (Allah): Bokota na moto elongo na bilima mpe bato ya lisanga ya baye balekaki liboso lia bino, tango nyoso umma soki ekoti, lizali kosengela mosusu botutu. Kino bakokutanaka bango banso kati na yango, lisanga lyoko likolobaka na basusu: Eh Nkolo wa biso! В a oyo nde babungisa biso. Bakisela bango etumbu o kati ya moto, akolobaka: Na lisanga nyoso etumbu ekobakisama, kasi bozali koyeba te

    [39] Мре lisanga lia yambo likolobaka na oyo lia suka: Bozali na lokumu moko te epai na biso. Bomeka etumbu тропа maye bozalaki kosala

    [40] Ya soló, baye baboyaki kondima na mikapo mia biso mpe basaleli yango lolendo, bakofungolelaka bango bizibeli bia likolo te, mpe bakokotoko na lola te, kino djamal akota na lidusu lia tonga, mpe ndenge wana nde tokofutaka batomboki

    [41] Nakati ya lifelo bakozala na bambeto na bulangiti na bango, mpe bakozipamaka na molili. Mpe ndenge wana nde tokofutaka babubi

    [42] Mpe baye bandimaki mpe basalaki bolamu, topesaka moto mokumba te sé moye mokoki naye, bango nde bato ya lola, bakovandaka seko kati na yango

    [43] Mpe tokolongolela bango likunya o kati ya mitema mia bango, o nsé na bango, mingala mikotiolaka, mpe bakolobaka: Matondo na Allah oyo akambi biso na maye tozalaki na bokoki te. Soki Allah akambaki biso te nde tokambamaki te. Batindami ba Nkolo wa biso bayaki nabosôló. Мре bakobengamaka na oyo nde lola na bino eye bapesi bino, engebene na maye bozalaki kosala

    [44] Mpe bato ya lola bakobengaka bato ya lifelo; ya soló, tozui maye Nkolo wa biso alakaki biso na bosembo, boye bino mpe bozui maye Nkolo wa bino alakaki bino na bosembo? Bakolobaka; iyo; mpe mobeleli akobelelaka kati na bango ete; botutu bwa Allah bozala o likolo lia babubi

    [45] Baye bazali kokanga nzela ya Allah mpe bazali kolukela yango minyokoli, mpe bango bandimaka na mokolo mwa suka te

    [46] Mpe okati ya bango babale ekozala na ndelo (efelo), mpe likolo lia A’ráf, ezali na mibali bakoyebaka bato banso na bilembo bia bango, mpe bakobenga bato ba lola ete; kimiya ya (Allah) ezala likolo lia bino, mpe bakoti yango na’íno te na bango bazali na posa ya kokota

    [47] Mpe tango miso ma bango ekotala epai ya bato ya moto, mpe bakolobaka: Eh Nkolo wa biso! kotiya biso esika moko te na babubi

    [48] Мре bato ya A’râf bakobengaka mibali misusu baye bayebaki bango na bilembo bia bango. Bakolobaka: Maye bobombaka mia misolo na maye bozalaki kosala lolendo esungi bino na eloko te

    [49] Boye nde ba oyo bozalaki kolapa ete bolamu bwa Allah bokozua bango te? Bokota o lola bokozala na bobangi te mpe bokozala na mawa te

    [50] Mpe bato ya moto bakobenga bato ya lola, bopesa biso mwa mayi to mpe maye oyo Allah apesi bino. Bakolobaka: Ya soló Allah apekisi yango nyoso mabale тропа bapengwi

    [51] Baye bazuaki lingomba lia bango na liseki mpe na lisano, тре mokili mwa nsé mokosaki bango. Mokolo mwa lelo tobosani bango lolenge babosanaki bokutani bwa mokolo mwa bango moye, mpe mpo bazalaki kotiya tembe na bilembo bia biso

    [52] Toyelaki bango buku eye tolimbolaki yango, na boyebi bonso тропа bokambi mpe ngolu тропа bato baye bazali kondima

    [53] Boye bazali kozela sé etumbu naye? Mokolo moye etumbu naye ekoyaka, baye babosanaki liboso bakolobaka: Batindami ya Nkolo wa biso bayaki na bosôló, boye na mokolo mwa lelo tozali na basungi baye bakosungaka biso? To, tozongisama na mokili tosala maye tozalaki kosala liboso te! Basilaki komizangisa bango moko, mpe maye bazalaki kosala ya mabe ebungisaki bango

    [54] Ya soló, Nkolo wa bino nde Allah oyo akelaki likolo na mabele na mikolo motoba sima atombuami likolo na ngwende. Azali kozipa butu na mokolo. Azali kolandisa yango mpe ezali kotelema te, (akeli) moyi na sanza, na minzoto, minso mizali kotambola na botosi mitindo mia ye. Boye, bokeli na mibeko minso mizali mia ye te? Nkembo na Allah Nkolo wa molongo

    [55] Bobondela Nkolo wa bino na limemya nyoso mpe na bobombami. Ya sólo, ye alingaka te balekisi ndelo

    [56] Mpe bobebisa te kati na mokili o sima ya kobongisama na yango. Bobenga ye na bobangi mpe na elikya, ya sólo, ngolu ya Allah ezali pene pene тропа babongisi

    [57] Mpe ye nde azali kotinda mopepe na sango elamu eye ezali epai naye kino mopepe ekomi londende ya kilo, tozali kosopa yango na mboka eye ekawuka (makufa) mpe tozali kokitisela yango mayi mpe tozali kobimisa na yango bambuma ya lolenge inso. Ndenge wana nde tokobimisaka bawei, mpo bokoka kokanisa

    [58] Mpe mboka elamu nde eye ezali kobimisa milona malamu na ndingisa ya Nkolo wa yango, kasi (mboka) eye ezali mabe ebimisaka te sé ndambu ya milona mike. Bongo tozali kolimbola bilembo bia biso mpo bato bakoka kotondo

    [59] Mpe tosilaki kotinda Nûh epai ya bato naye mpe alobaki: Eh bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye, ya soló nazali kobangela bino etumbu о mokolo mwa somo enene

    [60] Bankumu ya bato naye balobi: Ya solo, tozali kornona yo na libunga lia polele

    [61] Alobi: Eh bato ba ngai! Nazali na libunga te, kasi nazali motindami kowuta epai ya Nkolo wa molongo

    [62] Mpo nakomisela bino sango ya Nkolo wa ngai mpe napesa bino ntoli. Mpe nayebi epai ya Allah, maye bino boyebi te

    [63] Boye ezali kokamwisa bino soki liteya liwuti epai na Nkolo na bino, na moto moko kati na bino mpo akebisa bino, mpe mpo ete bokoka kobanga, mpo été bozala o nsé ya ngolu naye

    [64] Mpe baboyaki kondimela ye. Mpe tobikisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa, mpe tozindisaki baye bazangaki kondimela bilembo bia biso. Ya soló, bazalaki bato baye bazalaki kornona te

    [65] Mpe totindelaki bato ya aad, ndeko wa bango Hûd. Alobaki: Eh bato na ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye. Boye bozali kobanga te

    [66] Bankumu ya bato naye baye bapengwaki balobi: Ya sólo, tozali kornona yo ozali na bozoba, mpe ya sólo, tozali kokanisa ete ozali kati na babuki lokuta

    [67] Alobi: Eh bato ba ngai! Nazali na bozoba te, kasi nazali motindami kowuta epai ya Nkolo wa molongo

    [68] Mpo nakomisela bino sango ya Nkolo wa ngai, mpe nazali mopesi toli malamu тропа bino

    [69] Boye ezali kokamwisa bino soki liteya liwuti epai ya Nkolo wa bino eyei na moto moko o kati na bino mpo akebisa bino? Bokanisa tango akitanisaki bino osima ya bato ya Nûh mpe abakiselaki bino bokasi na nzoto na bokeli. Bokanisa bolamu bwa Allah mpo bokoka kolonga

    [70] Balobi: Oyeli biso mpo tobondela Allah na bomoko bwa ye, mpe totika maye bankoko ba biso bazalaki kobondela? Yela biso maye ozali kolaka biso (etumbu) soki ozali koloba bosôló

    [71] Alobi. Etumbu mpe nkanda esili kokwela bino uta epai ya Nkolo wa bino. Bozali kosuanisa ngai тропа bankombo iye bino na ba tata ba bino (bankoko) bopesa yango oyo Allah akitiselaki yango elembo te? Mpe bozela (etumbu) ya soló, nazali kozela elongo na bino

    [72] Mpe tobikisaki ye na baye azalaki elongo na bango na mawa та biso. Mpe tosilisaki baye baboyaki kondima na bilembo bia biso mpe bazalaki bandimi te

    [73] Mpe totindaki epai ya bato ya thamúd, ndeko wa bango Swálih, alobi: Eh bato na ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye. Elembo esilaki koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino. Oyo nâqah ya Allah ezali elembo epai na bino, botika ye aliya na mabele ya Allah, kasi bosala ye mabe te noki te etumbu makasi ekozua bino

    [74] Мре bokanisa tango totiyaki bino bakitani o sima ya bato ya aad mpe tovandisi bino na mabele, mpe botongaki bandako na lolenge ya pete, mpe botongi bisusu o kati ya bangomba. Kasi bokanisa bolamu bwa Allah boye asaleli bino, kasi bovanda na mabele na ndenge ya kobebisa te

    [75] Bankumu baye basalaki lolendo kati na bato baye balobaki na baye bazalaki na bokoki te baye bandimaki: Boye bozali koyeba ya soló penza, Swâlih azali motindami kowuta epai ya Nkolo wa ye? Balobaki: ya soló, tondimi na maye atindamaki na yango

    [76] Baye basalaki lolendo balobi: Biso toboyi maye bondimeli yango

    [77] Mpe babomaki nâqah mpe basalaki lolendo na mibeko mia Nkolo wa bango, mpe balobi: Eh! Swâlih! Yela biso maye ozali kolaka biso soki ozali solo kati ya batindami

    [78] Mpe boningani bwa mabele (etumbu) bozuaki bango mbalakaka o kati ya bandako bia bango mpe bakomaki bibembe

    [79] Mpe (Swálih) apesaki bango mokongo (atiki bango), mpe alobi: Eh bato ba ngai! Nasilaki kokomisela bino sango ya Nkolo wa ngai te, mpe napesaki bino toii te. Kasi bolingaka baye bapesaka toii te

    [80] Mpe tango Loth alobaki na bato baye: Bozali kosala mabe maye ata moto moko te asalaki yango o kati ya mikili yambo na bino

    [81] Ya soló, bozali kokende kosilisa bamposa na bino epayi ya mibali, mpe botiki basi? Kasi bozali solo bato baye basili kolekisa ndelo

    [82] Mpe eyano ya bato naye ezalaki te sé balobaki été: Bobimisa bango o kati ya mboka na bino, mpo bazali solo bato oyo bazali komipetola

    [83] Mpe tobikisaki ye na libota lia ye, longola sé mwasi waye azalaki o kati ya baye bazuaki etumbu

    [84] Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabángá ya moto), tala ndenge ezalelaki lifuta ya batomboki

    [85] Мре (totindaki epai ya bato) ya mad’yan, ndeko wa bango Shuaîb, alobi: Eh! Bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye, elembo esilaki koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino. Мре bokokisa emekelo, mpe kilo, kasi bobuba bato biloko bia bango te. Mpe bobebisa o kati ya mokili te o sima ya kobongisama na yango. Wana nde ezali malamu тропа bino soki bozali kondima

    [86] Mpe bovandela ba nzela nyoso te тропа konyokolo mpe kopekisa nzela ya Allah moto nyoso oyo andimeli ye, mpe kolukela yango mindondo. Bokanisa tango bozalaki токе, mpe akomisi bino ebele. Bótala ndenge ezalelaki lifuta ya babebisi

    [87] Mpe soki basusu kati na bino bandimaka na maye natindami na yango, mpe basusu bandimaka te, bozela kino Allah akokata kati kati na biso, mpe azali zuzi malamu

    [88] Mpe bankumu baye basalaki lolendo o kati ya bato naye balobi: Tokobimisa yo na baye bandimi elongo nayo yâ Shuaîb na mboka na biso to bozonga na lingomba lia biso, alobi: (bomanyola) ata soki toyini yango

    [89] Soki solo tosali bongo, tosili kobukela Allah lokuta osima ya kobikisa biso na yango. Esengeli na biso te kozongela yango, sé na bolingi bwa Allah Nkolo wa biso, Nkolo wa biso azali na boyebi na biloko binso, tomipesi na Allah. Oh Nkolo wa biso! Kata okati na biso na bosôló, mpo yo nde ozali mokati malamu wa bazuzi

    [90] Mpe bankumu ya bato naye baye bapengwaki balobi: Soki bolandi Shuaîb, solo bokozanga

    [91] Mpe koningana ya mabele ezuaki bango (bwa etumbu), mpe bakomaki bibembe o bandako bia bango

    [92] Baye bazuaki Shuaîb na lokuta balimuaki lokola bazalaki na mokili te, baye bazuaki Shuaîb na lokuta bazalaki bazangi

    [93] Mpe apesaki bango mokongo mpe alobi: Oh bato ba ngai! Ya soló, nakomiselaki bino maloba mwa Nkolo wa ngai. Mpe napesaki bino toli, ndenge nini nakoyokela bapengwi mawa

    [94] Mpe totindaki ntoma o kati ya mboka moko te sé tozuaki bato na yango, na ba mpasi ya nzala mpe na bokono mpo ete basenga bolimbisi

    [95] Mpe sima tobongolaki makambo ya mabe na bango na oyo ya malamu, kino bomengo na bango ekomaki ebele mpe balobi: Ya soló, pasi na mikakatano mizuaki bankoko ba biso, mpe tosimbaki bango mbalakaka kasi bazalaki koyeba te

    [96] Kasi soki bato ya bamboka bandimaka mpe babangaka, tolingaki kofongolela bango bolamu ya likolo na ya mabele. Kasi baboyaki kondima, mpe tozuaki bango тропа maye bazalaki kosala

    [97] Boye, bato ya bamboka bazali na elikya ete etumbu na biso ekoyela bango te na butu тре bango bazali kolala

    [98] Boye, bato ya bamboka, bazali na elikya ete etumbu na biso ekoyela bango te mpe bango bazali kosakana

    [99] Bazali kolikya été bakobika na mwango ya Allah? Kasi mwango ya Allah likozuaka sé bazangi

    [100] Mpe boye, esilaki kolimbolama baye bakitanaki mabele o sima ya kokufa ya baye oyo baleka, soki tolingaka mbele tobetaki bango elembo тропа masumu та bango, тре kokanga mitema mia bango, balingaki koyoka te

    [101] Mpe tozali kobetela yo masapo ma mboka ena. Ya solo, batindami na bango bayelaki bango bilembo bia polele, kasi bandimela te na maye basilaka kozua yango lokuta. Ndenge wana nde Allah akangaka mitema mia bapengwi

    [102] Мре tokutaki ebele na bango te bazali na botosi ya elaka. Mpe tokutaki ebele na bango bazali babebisi

    [103] Sima na bango, totindaki Mûssa na makamwisi ma biso epai ya falo na bankumu (bato) naye. Kasi bazangaki bosembo na bilembo bia biso, tala ndenge lifuta lia babebisi ezalaki

    [104] Mpe Mûssa alobaki: Oh falo! Ya soló, nazali motindami kowuta epai ya Nkolo wa molongo

    [105] Ete, nakoki koloba te тропа Allah sé bosóló. Nayeli bino elembo kowuta epai ya Nkolo wa bino. Botikela ngai bana ya isalayele nakende na bango

    [106] Alobi (Falo): Soki oyei na elembo, lakisa yango soki ozali koloba bosóló

    [107] Mpe abwakaki lingenda lia ye mpe libongwani nyoka ya monene

    [108] Mpe abimisi loboko lia ye na (libenga) mpe ekomaki pembe тропа batali

    [109] Bankumu ya bato ya falo balobi: Ya soló, oyo nde nganga ya monene

    [110] Alingi abimisa bino na mabele ma bino, boye bokosala nini

    [111] Balobi: Bozelisa ye na ndeko waye, mpe botinda basangisi bato na esika ya masano ya mboka

    [112] Bakoyelaka yo banganga banso baye bayebi

    [113] Mpe banganga ba falo bayeli ye, balobi: Tokozua mbáno soki tolongi

    [114] Alobi: Iyo, mpe ya solo, bokozala o kati ya baye bazali pene na ngai

    [115] Balobi: Eh Mûssa! Okobwaka liboso to biso tozala bato bayambo тропа kobwaka

    [116] Alobi (Mûssa): Bobwaka. Мре tango babwaki, balokaki miso ya bato, mpe babangisaki bango mpe bayaki na bonganga bonene penza

    [117] Mpe toyebisaki na Mûssa ete bwaka lingenda lia yo, тре tango abwakaki yango, emeli maye manso bango babwakaki

    [118] Мре bosôló bomonanaki тре lokuta ebungaki тре екотакі pamba тропа maye bazalaki kosala

    [119] Мре ndenge wana nde bakweisamaki mpe bazuaki soni

    [120] Мре banganga bafukamaki na kotiya bilongi na mabele

    [121] Balobi: Tondimi na Nkolo wa molongo mobimba

    [122] Nkolo wa Mûssa na Háruna

    [123] Falo alobi: Bondimi naye (Mûssa) yambo ete napesa bino ndingisa! Oyó nde mwango bosali kati na mboka mpo bobimisa bato na yango, bokoyeba kala te

    [124] Nakokata bino maboko na makolo na lolenge ya bokeseni, mpe nako baka bino na nzete sima nakoboma bino banso

    [125] Balobi: Ya soló penza, tokozongaka epai ya Nkolo wa biso

    [126] Ozali kotomboko na biso mpo tondimi na bilembo bia Nkolo wa biso o ntango eyeli biso? Eh Nkolo wa biso! Bakisela biso boyiki mpiko, mpe oboma biso bamizilima

    [127] Мре bankumu ya bato ya falo balobi: Boye ozali kotika Mûssa na bato naye mpo babebisa o kati ya mokili Mpe ye moko atika yo na banzambe nayo? Alobi: Tokoboma bana na bango ya mibali mpe tokotika basi na bango na bomoyi mpamba te ya soló, biso tozali na bokonzi likolo lia bango

    [128] Mûssa alobi na bato baye: Bosenga lisungi epai ya Allah mpe bokanga motema. Ya sólo, mabele mazali ya Allah, akitanisaka yango na baye alingi kati ya bawumbu baye; mpe mbano ya malamu ekozala nde тропа babangi

    [129] Balobi: Banyokolaki biso yambo ya boyei bwa yo тре sima ya bokomi bwa yo. Alobi: Boye Nkolo wa bino akoboma monguna wa bino mpe akitanisi bino na mabele, mpe akotalela bino ndenge nini bokosala

    [130] Mpe tosilaki kozuisa bato ya falo mibu na mibu ebele na bozangi, na bokutuami ya bambuma mpo bakoka kokanisa

    [131] Mpe soki bolamu ezui bango balobñoyo ewuti na biso, mpe soki mpasi ezui bango balobi: Bótala Mûssa na baye bazali naye, ya sólo, maye manso mazuaki bango ewutaki sé epaiya Allah, kasi ebele na bango bazali koyeba te

    [132] Mpe balobi: Ata soki oyeli biso likamwisi, tokondimela na biso yo te

    [133] Мре totindelaki bango pela ya mbula ya makasi, na mabanki na basili na magbololo mpe na makila, lokola bilembo bia polele. Kasi basalaki lolendo mpe bazalaki batomboki

    [134] Mpe tango etumbu ekwelaki bango, balobi: Oh Mûssa! Sengela biso epai ya Nkolo wayo na maye apesaki yo elaka, soki alongoleli biso etumbu eye, tokondimela yo, mpe tokotikela yo bana na isalayele bökende elongo

    [135] Mpe tango tolongoleli bango etumbu na eleko eye eyebanaki, bango wana bazangi botosi na elaka

    [136] Mpe tosilikelaki bango mpe tozindisaki bango okati ya mayi mpo baboyaki kondima na bilembo bia biso, mpe bazalaki kotiya bokebi na yango te

    [137] Mpe tokitanisaki bato oyo bazalaki na bolembu moniele ya mabele na eloli na yango miye topambolaki mpe elaka elamu ya Nkolo wayo ekokakiтропа bana ya isalayele тропа maye bakangaki mitema. Mpe tobebisaki maye falo na bato naye bazalaki kosala, mpe kotonga

    [138] Mpe tokatisaki bana ba isalayele ebale mpe balekaki pene ya bato bazalaki kobondela bikeko. Mpe balobi: Oh Mûssa! Šalela biso nzambe lokola oyo ya bango. Alobi: Ya soló, bozali bato ya boyinga

    [139] Ya sólo, baye wana, maye bazali kobondela ezali mabe, mpe nyoso bazali kosala ezali na ntina te (ezanga litomba)

    [140] Alobi: Nalukela bino nzambe mosusu oyo azali Allah te mpe ye atomboli bino o kati ya mikili(otango na bango) koleka bato banso

    [141] (Bokanisa) tango tobikisaki bino na etumbu ya falo, bazalaki koboma bana na bino ya mibali mpe bazali kotika basi ba bino. Mpe wana ezali momekano monene kowuta epai ya Nkolo wa bino

    [142] Mpe topesaki elaka na Mûssa ya butu ntuku misato mpe tobakisaki zomi, mpo ete akutana na Nkolo waye na butu ntuku minei. Mpe Mûssa alobi na ndeko waye Hâruna: kitanela ngai na bato ba ngai, mpe zala na bango malamu mpe kolanda nzela ya babebisi te

    [143] Mpe tango Mûssa ayaki na elaka na biso, mpe Nkolo waye asolisaki ye, alobi: Nkolo wa ngai, nalingi namona yo. (Allah) alobi: Okomona ngai te, kasi tala na ngomba ya libanga soki ekokoka kotelema na esika na yango nde okomona ngai. Mpe tango Nkolo waye alakisaki nguya naye, libanga epanzanaki mpe ekomaki putulu. Mpe Mûssa akueyaki lokola moto asimbami na kake tango azongisaki bomoto Mûssa alobaki: Nkembo nayo Nkolo, natubeli epai nayo, mpe nazali moto wa yambo ya bandimi

    [144] Alobi: Oh Mûssa! Ya soló, naponi yo likolo ya bato banso, тропа bitinda bia ngai. Mpe na maloba та ngai, zúa maye napesi yo mpe zala elongo na batondi

    [145] Mpe tokomelaki ye likolo ya mabaya makomi mpe malendisi ya makambo nyoso, mpe ndimbola ya biloko binso, simba yango makasi mpe tinda batonayo basalela ya malamu oyo ezuami otei na yango. Kala te nakolakisa bino esika ya babebisi

    [146] Nakotiyaka bilembo bia ngai mosika тропа baye bazali kosala lolendo na mokili, batiki bosôló, Мре soki bamoni elembo nionso bakodimaka nango te. Mpe soki bamoni nzela ya semba bazali kolanda yango te. Mpe soki bamoni nzela ya libungi balandi yango. Wana mpo bazalaki kondima na bilembo bia biso te mpe babosanaki kolanda yango

    [147] Mpe baye baboyaki kondima na bilembo bia biso na kozanga elikia ya mokolo mwa suka, babebisi misala mia bango, boye bakofutamaka te sé na maye basalaki

    [148] Mpe sima bato ya Mûssa balandaki (ekeko) ya nyama. Basali yango na lolenge ya mwa ngombe ezali kobimisa lolaka. Boye, bazali kornona te ete solo akolobisa bango te, mpe ezali kokamba bango ata na nzela ya semba te? Bakamataki yango na yango bamibubaki

    [149] Mpe ntango bamonaki ete basili kosala mabe, mpe bamimonaki ete basili kobunga, mpe balobaki: Soki Nkolo wa biso ayokeli biso mawa te mpe alimbisi biso te, tokozala solo o kati ya bazangi

    [150] Mpe tango Mûssa azongaki epai ya bato naye, na nkanda mpe na kolemba, alobaki été: Bosali mabe ya monene sima na ngai! Boye bolingi bowelisa mokano ya Nkolo wa bino? Mpe abwakaki mabaya ya bikomeli mpe abendi mutu ya ndeko waye epai naye. Alobi: Oh mwana wa mama wa ngai! Basilisaki ngai makasi mpe balingaki koboma ngai. Kozua ngai monguna te, mpe kotiya ngai o kati ya babubi te

    [151] Alobi (Mûssa): Nkolo wa ngai, limbisa ngai na ndeko wa ngai, mpe kotisa biso na ngolu nayo, yo nde ozali ngolu wa bangolu koleka

    [152] Ya soló, baye bazali kozua mwa ngombe lokola nzambe na bango, kala te kanda kowuta epai ya Nkolo wa bango ekozua bango. Mpe bakozala mpamba o kati ya mokili, mpe ndenge wana nde tokofutaka bato mabe

    [153] Mpe baye basalaki mbeba, sima batubeli mpe bandimi, Nkolo wayo solo, azali molimbisi atonda mawa

    [154] Mpe tango kanda ya Mûssa ekutuamaki, (ekitaki) azui etanda ya makomi, mpe ezalaki na bokambi mpe ngolu тропа babangi Nkolo wa bango

    [155] Mpe Mûssa aponaki okati na bato naye, mibali ntuku sambo mpo bakutana na biso, mpe tango boningani bwa mabele bozuaki bango. Alobi: Nkolo wa ngai, soki olingaki koboma bango ata liboso na ngai, boye okoboma biso тропа maye bazoba kati na biso basali?, wana ezali sé bomekano bwa yo, obungisaka na yango oyo olingi, mpe okambaka na yango oyo olingi. Yo ozali mobateli na biso limbisa biso mpe yokela biso mawa, mpo ozali malamu wa balimbisi

    [156] Mpe tiyela biso bomengo (bolamu) na bomoyi ya nsé, mpe o mokolo mwa suka, mpe tozongi sé epai nayo. Mpe (Allah) alobi: Etumbu nangai ekozua oyo nalingi, kasi mawa na ngai ezingi biloko binso, nakopanza yango epai ya baye bazali kobanga mpe bazali kobimisa zakat, mpe bazali kondima na bilembo bia ngai

    [157] Baye bazali kolanda motindami, ntoma wa boyinga oyo bakokuta ye akomami na torah epai na bango mpe na indjil. Azali kotinda bango na bolamu, mpe akopekisa bango mabe, mpe akopesa bango dingisa ya maye ya malamu, mpe akopekisa bango maye ya mbindo. Mpe akitiselaki bango kilo oyo bazalaki na yango na mibeko ya makasi oyo ezalaki likolo na bango. Na yango, baye bandimelaki ye mpe bapesaki ye lokumu mpe bapesaki ye lisungi, na bobongisi, mpe balandaki mwinda oyo ekitaki elongo naye, bango nde balongi

    [158] Loba: Oh bino bato! Ya soló, nazali motindami wa Allah epai ya bino banso. Oyo azali Nkolo wa bokonzi bwa likolo na mabele, nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te kaka sé ye (Allah). Apesaka bomoyi mpe apesaka liwa, bondima na Allah na motindami wa ye, ntoma wa boyinga oyo azali kondima na Allah na maloba maye. Mpe bolanda ye mpo bokoka kokambama

    [159] Mpe kati na bato ya Müssa ezali na umma bazali kokamba baninga na nzela ya semba, pe na yango bazali kokata makambo na bosembo

    [160] Mpe totiyaki bango na mabota zomi na mibale bitonga na motango na bango. Мре toyebisaki па Mûssa: Tango bato naye basengaki ye mayi ya komela, beta lingenda lia yo na libanga. Mpe ebimisaki maziba zomi na mibale, mpe libota na libota liyebaki liziba lia bango ya bomeli. Mpe tozipaki bango na mapata ya molili mpe tokitiselaki bango mana na salwaboliya ya malamu biye topesi bino. Mpe basali biso mabe te kasi bango moko bamisalaki mabe

    [161] Mpe tango bayebisaki bango été: Bokota mpe bovanda na mboka oyo, mpe boliya maye bokolinga (ya malamu) mpe boloba hitwa mpe bokoto na ekuke na kogumbama, tolimbisa masumu ma bino mpe tokobakiselaka babongisi. (bolamu okati na bango)

    [162] Mpe babubi o kati na bango babongoli liloba na lolenge mosusu batiki oyo bayebisaki bango. Mpe totindelaki bango etumbu kowuta o likolo тропа maye bazalaki kobuba

    [163] Mpe tuna bango тропа mboka eye ezalaki pene na ebale. Tango bazalaki kokende о mokolo mwa mposo, bambisi bazalaki koyela bango polele kowuta na mayi, mokolo ya mposo na bango тре о mokolo mosusu ezali koyela bango te, ndenge wana nde tomekaki bango тропа maye bazalaki kobebisa

    [164] Мре tango umma o kati па bango balobaki: Mpona nini bazali koteya bato baye Allah akoboma to akopesa bango etumbu ya makasi? Balobaki: Mpo tolongola mokumba mwa biso liboso ya nkolo wa bino, mpe mpo bakoka kobanga

    [165] Mpe tango babosanaki maye bayebisaki bango, tobikisaki baye bazalaki kopekisa mabe mpe topesaki etumbu na basusu, mpona mabe maye bazalaki kosala

    [166] Mpe tango baboyaki na maye bapesaki bango, tolobaki: В окота такако ya mabe na kozanga lokumu

    [167] Мре tango Nkolo wayo alobaki ete: Nakomemelaka bango etumbu ya makasi kino o mokolo mwa suka, soló Nkolo wayo azalaka noki тропа etumbu, mpe solo, azalaka molimbisi atonda mawa

    [168] Мре tokabolaki bango o kati na mokili bato na bato, kati na bango ya malamu, mpe kati na bango basusu ya mabe. Mpe tomekaki bango na bolamu mpe mabe mpo bakoka kozonga. (o nzela ya semba)

    [169] Sima basusu bakitanaki bango тропа kozua buku, kasi bazalaki kosepela mingi kozua oyo ya bomoyi bwa nsé, mpe bazali koloba: Bakolimbisaka biso. Mpe soki basusu bayeli bango maye makokani na yango bazui yango. Boye bazuaki elako kowuta na buku te? Ete baloba te sé bosembo тропа Allah? Mpe batangaki maye bakutaki о kati na yango, kasi bovandi bwa mokolo mwa suka bozali malamu koleka тропа babangi, boye bozali kososola te

    [170] Kasi baye bazali kolanda maye makomami o kati ya buku, mpe batelemisi losambo, solo penza tokobungisaka lifuta lia babongisi te

    [171] Mpe tango totombolaki ngomba o likolo lia bango, lokola elilingi. Kasi bakanisaki ete ekokwela bango. Bosimba makasi maye topesaki bino mpe bokanisa maye mazali na kati, mpo bakoka kobanga

    [172] Mpe tango Nkolo nayo abimisaki bakitani na mikongo ya bana Adam mpe amonisaki bango moko, mpe alobaki na bango été: Nazali Nkolo na bino te? Bazongisaki été: Iyo: Tot atoli. Mpo bowangana yango te o mokolo mwa suka na bolobi été: Ya soló, tosalaki angele na yango te

    [173] Too bokolobaka: Bankoko ba biso basangisaki Allah liboso, mpe tozali bakitani na bango. Boye okoboma biso тропа maye babebisi basalaki

    [174] Mpe ndenge wana nde tozali kolimbola bilembo (bia biso) mpo tango mosusu bakoka kozonga

    [175] Yebisa bango sango ya oyo topesaki ye bilembo bia biso. Mpe amitiyaki mosika na yango, mpe satana azelisaki ye mpe azalaki o kati ya babungi

    [176] Kasi soki tolingaka, mbele totombola ye na yango, kasi ye alingaki mokili mpe alandaki bisengo na bamposa na yango, ndakisa naye ezali lokola mbua oyo soki obengani ye abimisi lolemu azali kopema makasi, soki mpe otiki ye azali sé ndenge moko. Wana nde ndakisa ya baye baboyaki kondima na mikapo mia biso, betela bango masapo mpo tango mosusu bakokanisa

    [177] Ndakisa nini ya mabe ya lolenge wana, ya baye baboyaki kondima na bilembo bia biso, mpe babubaki milimo mia bango moko

    [178] Oyo Allah akambi, asili kokambama. Mpe oyo abungisi, baye wana nde bazangi

    [179] Mpe tosilaki kobongisa lifelo тропа ebele ya bato mpe bilima. Bazali na mitema kasi bazali kososola na yango te, mpe bazali na miso kasi bazali kornona te mpe bazali na matoyi kasi bayokaka te. Bazali lokola banyama, kasi babungi koleka banyama. Baye wana nde bazangi bososoli

    [180] Mpe Allah nde azali na ba nkombo kitoko. Bobenga ye na yango. Kasi botika baye bazali kosakana na ba nkombo naye, bako futama na maye bazalaki kosala

    [181] O kati ya baye tokela ezali na umma, oyo bazali kokamba mpe kokata makambo na bosembo

    [182] Mpe baye bazali koboya mikapo na biso tokomema bango moke moke o kati ya bozangi na bango epai nyoso bakoyeba te

    [183] Mpe natikeli bango mwa ntango; ya soló mwango na ngai ezali makasi

    [184] Boye bazali kososola te? Moninga na bango azali na ligboma te, kasi azali sé mokebisi ya polele

    [185] Bazali kornona te bokonzi bwa likolo na ya nsé na biloko binso Allah akela? Ntango mosusu elaka na bango esili kokoma pene? Liloba mosusu nini bandima na yango nsima ya oyo

    [186] Oyo Allah abungisi akozala na mokambi te, mpe akosundola bango, o kati ya botomboki nabango bazali koyimayima

    [187] Bazali kotuna yo тропа mokolo ya nsuka ekokokisama ntango nini? Loba: Boyebi na yango ezali epai na Nkolo na ngai, sé ye moko nde akolakisa yango. Ezali likambo ya kilo kuna na likolo mpe na nsé ekoyela bino mbalakaka, bazali kotuna lokola osilaki koyeba yango loba: Ya soló, boyebi na yango ezali epai na Allah kasi ebele ya bato bazali koyeba yango te

    [188] Loba: Nakoki te komizuela bolamu mpe nakoki te komilongola mpasi sé na bolingi bwa Allah. Mpe soki na yebaki mabombami mbele na mizuelaki bolamu ebele nde mabe moko ezuaki ngai te. Ngai nazali sé mokebisi mpe mopesi nsango malamu тропа bato ya kondima

    [189] Ye nde akela bino kowuta na moto moko mpe kati naye abimisaki mwasi naye mpo été azua kimia epai naye (mwasi). Mpe ntango bakutanaki azuaki mokumba ya токе (zemi) azalaki kotambola na yango na libumu naye kino ekomaki kilo. Babelelaki Nkolo na bango (Adam na eva): Soki opesi biso mwana ya malamu tokozala kati ya baye bazali kopesa yo matondi

    [190] Mpe ntango (Allah) apeși bango (mwana) ya malamu basangisi ye (Allah) na ba nzambe na likabo na oyo apesi bango. Lokumu na Allah ya likolo koleka na maye bazali kosangisa ye na yango

    [191] Bakosangisa ye na baye bakela eloko moko te nzoka nde bango moko bakelama

    [192] Bakokoka te (banzambe wana) kosunga bango mpe bakokoka te komisunga bango moko

    [193] Mpe soki bobengi bango na bokambi bakoboya kolanda bino, ezali sé ndenge moko bobenga bango too bobenga te

    [194] Ya soló, baye bozali kobondela na kotika Allah bazali sé bato lokola bino. Bobondela bango soki bakoyanola bino soki bozali na bosembo

    [195] Boye; bazali na makolo mpo na kotambola na yango? To bazali na maboko bazali kosimba na yango? To bazali na miso тропа kornona? То bazali na matoyi bazali koyoka na yango? Loba: Bobenga banzambe na bino sima bosala ngai likita mpe bozelisa ngai te

    [196] Ya solo, mokonzi na ngai Allah nde oyo akitisi buku (kurani) mpe ye nde mobateli ya bato ya malamu

    [197] Kasi baye bozali kobondela na kotika Allah bakokoka kosunga bino te mpe milimo na bango moko te

    [198] Mpe soki obengi bango na nzela ya nsemba bakoyoka te, mpe ozali kornona bango bazali kotala yo kasi bazali kornona te

    [199] Zala na mawa, tinda kosala bolamu, mpe zala mosika na baye bazanga mayele

    [200] Mpe soki satana akoteli yo été osala mabe, luka libateli epai na Allah mpo été azali moyoki mpe moyebi

    [201] Ya soló, baye bazali na bobangi Allah soki emoniseli ya satana ekoteli bango, bakanisi nsima, tala bango ndenge bakomi ekenge

    [202] Bandeko balongani na bango basatana bakozindisa bango na libunga mpe bakotika te

    [203] Mpe soki oyeli bango bikamwiseli te, bakoloba: Mpona nini okosala yango na ndenge nayo te? Loba: Ngai na zali kolanda sé maye makiteli ngai epai na Nkolo wa ngai. Oyo (mikapo mia kurani) mizali bilembetele (bilembo) biwuti epai na Nkolo na bino, bokambi mpe ngolu mpo na bandimi

    [204] Mpe soki kurani ezali kotangama boyoka yango mpe bofanda nye mpo été bozwa ngolu (ya Allah)

    [205] Мре kundola nkombo ya Nkolo nayo na kati nayo na kobanga mpe na komikitisa na mongongo ya katikati ntongo mpe mpokua. Kasi kozala te elongo na baye bazangi makanisi

    [206] Ya soló baye bazali epai ya Nkolo nayo (ba anzelu) bazali kosala lolendo te тропа kobondela ye, mpe bazali kokumisa ye na kofukamela ye

    Surah 8
    Biloko ya bitumba

    [1] Bazali kotuna yo тропа bomengo bwa bitumba, loba: Ezali ya Allah na motindami waye. Bobanga Allah тре bobongisa bondeko o kati na bino. Мре botosa Allah na motindami waye, soki bozali soló bandimi

    [2] Bandimi ya sólo solo nde baye bazalaka soki bayoki nkombo ya Allah, mitema mia bango milengi, mpe soki mikapo mia ye mizali kotangama, ezali kobakisela bango kondima, mpe bapesi elikya epai ya Nkolo wa bango

    [3] Baye bazali kotelemisa losambo, mpe kobimisa maye topesi bango, (o nzela ya Allah)

    [4] Bango nde bandimi ya soló, bazali na esika ya likolo epai ya Nkolo wa bango mpe bolimbisi na bozui bolamu

    [5] Lokola Nkolo wayo abimisaki yo na ndako nayo na bosölo, mpe ya sólo bandimi basusu basepeli na yango te

    [6] Bazali kosuanisa yo тропа bosôló sima ya bolimboli, lokola bazali kotinda bango na liwa mpe bazali kornona

    [7] Bokanisa tango Allah alakaki bino ete moko lisanga ya mibale ya bango ekozala ya bino, тре boponaki lisanga liye lizalaki na bibundeli te, kasi Allah alingaki kolongisa bosôló ya maloba naye, mpe aboyelaki bapagano mpe atiya bango bazala bato ya suka

    [8] Mpo ete alongisa bosôló mpe alimwisa lokuta ata bato mabe bazali koyina yango

    [9] (Mpe bokanisa) tango bosengaki lisungi epai ya Nkolo wa bino. Mpe andimelaki bino, ete ya soló: ngai nakosalisa bino na ba anzelu nkoto yoko bazali kolandana. (bango na bango)

    [10] Kasi Allah asalaki yango te sé mpo amemela bino sango, тре mpo mitema mia bino mikoka kokita, mpe elonga ezali sé epai na Allah. Ya sólo, Allah azali wa bokasi atonda bwanya

    [11] Mpe tango azipaki bino na mpongi ya токе, ezali lokola ebateli naye likolo na bino mpe akitiseli bino mayi ya mbula kowuta o likolo, тропа kopetola bino na yango, mpe alongóla bino mbindo ya satana mpe akangisa mitema mia bino тре alendisa makolo na bino

    [12] Kanisa tango Nkolo wayo ayebisaki ba anzelu, ya solo ngai nazali elongo na bino, bolendisa bandimi. Na kotiya bobangi o mitema mia bapagano. Bobeta bango bakingo тре bobeta bango na biteni binso

    [13] Pamba te, bazangi kotosa Allah na motindami waye. Kasi oyo akozanga kotosa Allah na motindami waye, ya sólo penza, Allah nde mopesi etumbu ya makasi

    [14] Wana nde (ndenge ekozalela bino) esengeli bomeka yango (etumbu)! Mpe ya sólo, etumbu ya bapengwi ekozalaka nde moto

    [15] Eh bino baye bondimi! Soki bokutani na bapengwi, (o bisika binso тропа bitumba) bokima bango te

    [16] Mpe oyo kati na bino akokima banguna o mokolo wana, longola sé oyo apesi mokongo тропа koluka lolenge mosusu ya kobunda, to akei kokutana na mapinga mosusu тропа kokoba bitumba, ayeba ete asili kozua nkanda ya Allah. Мре esika naye ekozalaka lifelo, mpe yango nde ekozalaka esika ya mabe

    [17] Ezali te bino nde bobomaki bango, kasi Allah nde abomaki bango. Мре tango obwakaki (likonga), ezali yo te nde obwakaki, kasi Allah nde mobwaki, (likonga) mpe ezali тропа kopesa bandimi bolamu na ndenge naye. Ya soló, Allah azali moyoki atonda boyebi

    [18] Yango ezali mpo oyeba lolenge kani Allah azali kobebisa mwango ya bapengwi

    [19] Soki bolukaki elonga, ya soló, elonga esilaki koyela bino. Mpe soki botiki ezali malamu тропа bino, kasi soki bozongeli tokozonga, mpe lisanga na bino ekosalisa bino na eloko te, ata soki bozali ebele ndenge nini. Kasi boyeba ete: Ya sólo, Allah azali elongo na bandimi

    [20] Eh bino baye bondima! Botosa Allah na motindami waye, (Muhammad) kasi boboya ye te mpe bino bozali koyoka

    [21] Mpe bozala te lokola baye bazali koloba: Toyokaki, kasi bayokaka te

    [22] Ya sólo, bazoba koleka banyama epai ya Allah, bazali baye bakufa matoyi, baye balobaka te (baba), bango wana bazangi kososola

    [23] Mpe soki Allah ayebaki ete bazali na bolamu, balingaki koyokisa bango maye makosunga bango, mpe soki ata ayokisaki bango balingaki sé kopesa mokongo na koboya

    [24] Eh bino baye bondima! Boyamba mbela ya Allah na motindami, tango azali kobenga bino na maye makobikisa bino. Mpe boyeba ete ya soló, Allah azali okati ya moto na motema naye, mpe boyeba ete ya sólo, epai naye bokosangisama

    [25] Mpe bobanga etumbu eye ekopona te sé baye basali mabe kati na bino, mpe boyeba ya sólo, Allah azali mopesi etumbu ekasi

    [26] Mpe bokanisa tango bozalaki motango moke, bozangaki makasi, bozalaki kobanga bato noki balimwisa bino na mokili, kasi asungi bino na elonga naye. Nasima apesaki bino bozui ya kitoko mpo botondo

    [27] Eh bino bandimi! Boteka Allah na motindami waye te, boye bokoteka mokumba na boyambi oyo ezali na maboko na bino mpe bozali kati na koyeba

    [28] Мре boyeba, ya soló bomengo bwa bino na bana ba bino, ezali Momekano, mpe ya sólo, Allah azali na bolamu bonene

    [29] Eh bino bandimi! Soki bobangi Allah, akopesa bino bososoli mpe akolongola mabe na bino. Mpe akolimbisa masumu ma bino. Mpe Allah atonda bolamu bonene koleka

    [30] (Mpe kanisa) tango eye bapengwi basalelaki yo likita été bakanga yo to koboma yo, to babengana yo. Basalaki likita yango, Allah mpe asaleli bango, kasi Allah azali Nkolo likita ya malamu koleka

    [31] Mpe tango mikapo mia biso mizali kotangema likolo na bango, bakolobaka: Tosilaki koyoka. Soki tolingaki, nde totangaki liloba lokola oyo, oyo ezali sé masapo ya kala

    [32] Mpe tango balobaki ete: Eh Nkolo! Soki likambo oyo ezali bosoló penza ewuti epai nayo, Nokisela biso mabanga na likolo lokola mbula, to óyela biso etumbu mosusu ya makasi koleka

    [33] Kaši Allah azali te тропа kopesa bango etumbu mpe ozali kati na bango, тре Allah azali te тропа kopesa bango etumbu тре bango bazali kosenga bolimbisi

    [34] Мре ndenge nini te Allah apesa bango etumbu mpe bango bazali kopekisa bandimi kokota o ndako esantu (ya makkah), mpe bazali bakengeli na yango te? Kasi babateli na yango nde bandimi oyo babangi Allah, kasi ebele kati na bango bazali koyeba te

    [35] Mpe losambo na bango na ndako ezali sé bafololo mpe kobeta maboko, bomeka etumbu ya maye bozalaki kopengwa na yango

    [36] Ya soló, baye bapengwa, bazali kobimisa misolo mia bango тропа kobundisa nzela ya Allah. Bakopesaka yango mpe bakozangaka, sima bakolongamaka. Mpe bapengwi bakosangisamaka o moto ya lifelo

    [37] Mpo Allah akabola mabe na malamu, mpe atiya mabe likolo ya mabe, mpe asangisa yango nyoso na moto ya lifelo. Bango wana nde bazangi

    [38] Loba na baye bapengwa ete: Soki batiki mabe, bakolimbisama na maye maleka. Kasi soki bazongeli, bakozuama lokola baye balekaki liboso na bango

    [39] Mpe bobundisa bango kino bakotika bosangisi, mpe lingomba lizala lia Allah. mpe soki batiki, Allah azali kornona maye manso bazali kosala

    [40] Mpe soki bapesi bino mokongo, boyeba ete ya soló, Allah nde mobateli na bino. Oyó nde suka na mobateli kitoko

    [41] Mpe boyeba ete manso bokozua na bitumba: Ya sólo, moko na mitano ezali тропа Allah na motindami mpe тропа mabota ya pene, mpe тропа bana bitike, тре тропа babola, тре тропа moto ya mobembo, (moleki nzela), soki ya soló, bozali kondima na Allah mpe kondima na maye tokitisaki epai ya mowumbu wa biso o mokolo mwa bososoli, mokolo moye mapinga mibale makutanaki. Mpe Allah azali na bokoki likolo ya eloko nyoso

    [42] Bozalaki ngambu ya pene, kasi (banguna) bazalaki ngambu ya mosika, kasi mapinga ya mikumba ezalaki na nsé ya bino. Soki bopesanaka elaka bolingaki kokesene sima. Mpe bolingaki kozuama na banguna, kasi Allah akokisaki mobeko na ndenge asalaki тропа elembo ena. Mpo aboma oyo alingaki koboma, mpe abikisa oyo alingaki kobikisa. Kasi Allah azali moyoki atonda boyebi

    [43] Boye tango Allah alakisaki yo kati ya mpongi ete bazali mingi te, soki amonisaki yo ete bazali ebele mbele bokimaki na kobanga kobunda mpe bolingaki koswana na likambo yango kasi Allah abongisaki, ya soló, ye nde moyebi ya maye mabombami o kati ya mitema

    [44] Mpe tango bokutanaki, Allah amonisaki bino ete bango bazali токе, bango mpe lokola bamonaki bino токе liboso na bango wana ezalaki mpo mokano ya Allah mokokisama, mpe epai ya Allah nde makambo manso makozongaka

    [45] Eh bino baye bondima! Soki bokutani na lisanga lia banguna, bopika pende mpe bokumisa Allah mingi mpo bokoka kolonga

    [46] Мре botosa Allah na motindami waye, mpe bosuana suana te noki bokokabwana mpe bokozanga bokasi. Na yango, bolenda na kokanga motema pamba te ya soló Allah azali elongo na bakangi mitema

    [47] Mpe bozala te lokola baye babimaki na bandako na bango na lolendo ete bato bamona bango, mpe kopekisa nzela ya Allah. Kasi Allah azingi maye bazali kosala

    [48] Mpe tango satana abongiselaki bango misala mpe alobi na bango ete: Moto moko te akokoka bino lelo. Mpo ete ngai nazali na bino. Mpe tango mapinga mibale makutani, abaluki azongi sima mpe alobi: Ya sólo, ngai nawangani bino, mpe nazali mosika na bino, ngai nazali kornona maye bozali kornona te. Ya sólo, ngai nazali kobanga Allah, mpo Allah apesaka etumbu ya makasi

    [49] (Bokanisa) tango bato ya bilongi mibale, mpe baye bazali na bokono o kati ya mitema mia bango, balobaki na bandimi ete: Bato oyo lingomba lia bango lizali kokosa bango. Kasi oyo akomipesa na Allah, ayeba ete yasoló, Allah azali na bokasi atonda bwanya

    [50] Soki omoni tango ba anzelu babimisaka milimo mia bapengwi, bazali kobeta bango na bilongi bia bango, mpe mikongo mia bango, bazali koloba: Bomeka etumbu ya moto

    [51] Wana nde (etumbu) oyo bino moko bomisalelaki, mpe ya sólo, Allah abubaka bawumbu naye te

    [52] Ndenge moko na bato ya falo, na ba oyo bazalaki liboso lia bango, bapengwaki na bilembo bia Allah. Allah azuaki bango na masumu ma bango. Ya sólo, Allah azali na bokasi mpe mopesi etumbu ya makasi

    [53] Wana ezali mpo ete Allah akoki kolongola te bolamu oyo apesaki bato sé soki babongola bizaleli oyo bazalaki na yango, mpe ya sólo, Allah azali moyoki atonda boyebi

    [54] Bazalaki ndenge moko na bato ba falo, na ba oyo bazalaki liboso lia bango, baboyaki kondima na mikapo na bilembo bia Nkolo wa bango. Yango topesaki bango etumbu тропа masumu та bango. Mpe tozindisaki na mayi bato ya falo тропа bobubi bwa bango

    [55] Ya soló, bato mabe koleka banyama epai ya Allah nde bapagano, mpe bango, bandimaka ata токе te

    [56] Bango nde baye opesanaki na bango elaka mpe na tango inso bazangaki kotosa yango, mpe bazali kobanga ata токе te

    [57] Soki ozui bokoki likolo na bango o tango ya bitumba, pesa bango etumbu eye ekoki mpo basusu oyo bazali sima na bango babanga, mpe mpo bakanisa

    [58] Mpe soki ya sólo, ozali kobanga ete bato ya bilongi mibale bateka yo, esengeli nayo koboya na polele mpe na bosembo na elaka eye ozuaki na bango, pamba te Allah alingaka te bato ya bilongi mibale

    [59] Bapengwi bakanisa te ete tozangaki kozua bango na maye basalaki, bakokoka kokima biso te

    [60] Мре bolengele тропа bango bokasi bonso bozali na yango na bibundeli bia lolenge nyoso тропа kobangisa monguna ya Allah тре monguna ya bino. Na basusu bazali sima boyebi bango te. Kasi Allah nde ayebi bango. Mpe boyeba ete oyo nyoso bokobimisa na nzela ya Allah, akozongisela bino na malamu penza, mpe bokobubamaka te

    [61] Mpe soki balingi kimia batiki bitumba, yo mpe yaka na kimia, kasi tia elikia epai ya Allah. Mpo azali ya soló moyoki mpe atonda boyebi

    [62] Mpe soki balingi kokosa yo, Allah akoki тропа yo. Ye nde asalisaki yo na lisungi naye mpe na bandimi lokola

    [63] Mpe asangisaki mitema mia bango, (na bondimi) ata soki obimisaka manso maye mazali о mabele, mbele osangisaki mitema mia bango te. Kasi Allah nde asangisa kati na bango, ya sólo, ye azali na bokasi atonda bwanya

    [64] Eh yo ntoma! Allah akoki yo, na bandimi baye balandi yo bakoki yo mpe lokola

    [65] Eh ntoma! Telemela bandimi (yebisa bango) тропа kobunda na bapagano. Soki ezali na ntuku mibale ya bakangi mitema okati na bino, bakolonga nkama mibale, mpe soki bazali mokama moko okati na bino bakolonga nkoto moko okati ya bapagano, mpo ete bazangi bososoli mpe bayebi eloko te

    [66] Sikoyo Allah akutoli bino mokumba, mpe ayebaki ete kati na bino bolembu ezali. Soki bozali na bayiki mpiko mokama moko, bakolonga mikama mibale, mpe soki bazali nkoto moko kati na bino, bakolonga nkoto mibale na ndingisa ya Allah. Mpo ete Allah azali elongo na bakangi mitema

    [67] Esengelaki te na ntoma kotiya bakangami na bitumba okati ya boloko, sé bakundama na mabele. Boye bozali kolinga lokumu na bomoyi ya nsé nzoka nde Allah alingi bomoyi ya mokolo ya suka. Mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya

    [68] Soki makomi mautaka epai ya Allah te, etumbu ya Allah ya monene elingaki kozua bino

    [69] Mpe bolia biloko ya malamu biye bozuaki yango na bitumba. Mpe bobanga Allah ya soló Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [70] Eh ntoma! Loba na baye bazali na maboko na bino kati na banguna baye bakangami kati na boloko ete: Soki Allah ayebi ete mitema mia bino mizali malamu, akopesa bino ya malamu koleka biye babotoli bino, akolimbisa bino, mpo Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [71] Мре soki baponi koteka yo, yeba ete basilaki koteka Allah liboso, mpe (Allah) asukisaki bango, (o mokolo mwa badri). Kasi Allah azali moyebi atonda bwanya

    [72] Ya soló, baye bandimaki mpe batikaki (Makkah) bakei (madinah), mpe babundaki na misolo mia bango na milimo mia bango na nzela ya Allah, na baye bayambaki bango na lisungi na (madinah), baye wana nde bazali balingami bango na bango. Kasi тропа baye bandimaki mpe batikaki (Makkah) te, esengeli na bino te kozua bango balingami kino bakolanda bino esika bozali. Mpe soki basengi bino lisungi na nkombo ya lingomba, esengeli na bino kopesa bango maboko, kasi ezala likolo ya bato oyo elaka ezali kati kati na bino na bango. Mpe Allah azali kornona manso bozali kosala

    [73] Kasi baye bapengwa bazali balingami kati kati na bango. Mpe soki bobundisi bango te, ekozala komekama likolo ya mabele mpe mobulu ya monene

    [74] Kaši baye bandimaki тре batikaki (Makkah) тре bakei kobunda o nzela ya Allah, lolenge moko na baye bayambaki bango тре bapesaki bango maboko, bango nde bandimi ya soló. Bakolimbisamaka mpe bakopesamaka bozui bolamu

    [75] Kasi тропа baye bandimaki sima na bino тре batikaki (Makkah), mpe babundaki elongo na bino, bango nde bato na bino. Kasi bondeko ya makila kati na bino bandimi ezali liboso тропа bokitani, engebene na buku ya Allah. Ya sólo, Allah azali na boyebi ya biloko binso

    Surah 9
    Koyambola

    [1] Allah na motindami naye ba wangani basambeli bikeko baye bozuaki na bango elaka

    [2] Botambola na mokili sanza minei mpe boyeba ete bokokitisa bokasi ya Allah te, kasi ya soló, Allah akosambwisa bapagano

    [3] Mpe mbela ewuti epai ya Allah na motindami waye epai na bato тропа mokolo ya hajj ya monene (mobembo esantu o mboka makkah), ya solo, Allah na motindami waye bazali mosika na basambeli ya bikeko. Soki botubeli, ezali malamu тропа bino, тре soki boboyi mpe bopesi mikongo, boyeba ete ya sólo, bokokitisa bokasi ya Allah te. Mpe pesa sango ya etumbu ya makasi epai ya baye baboyi kondima. (bapengwi)

    [4] Longola sé epai ya bapagano baye bokamataki na bango elaka mpe sima balongoli тропа bino eloko te, mpe basalisaki banguna te тропа kobundisa bino mpe kosala bino mabe te, bokokisela bango elaka na bango kino tango oyo boyokanaki na bango ekoka. Pamba te ya sôló, Allah alingaka baye babangaka

    [5] Mpe soki basanza esantu bileki, boboma bapagano о bisika binso bokokuta bango. Bokanga bango mpe bofandela bango, bokengele bango na bisika nyoso oyo batiyelaka bino mitambo. Kasi soki batiki mpe batubeli, mpe batelemisi losambo mpe bafuti zakat botungisa bango lisusu te, mpo ete ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [6] Mpe soki moko o kati ya basangisi nzambe asengi nayo obatela ye epai nayo, yamba ye mpo akoka koyoka liloba lia Allah. Sima komisa ye na esika naye ya kimia, mpo bazali baye bayebi te

    [7] Ndenge nini basambeli ya bikeko bakozala na elaka epai ya Allah na motindami waye longola sé baye boyokanaki na bango pembeni ya ndako esantu? Tango inso bakomisembola epai na bino, bino mpe bozala semba epai na bango. Ya sólo, Allah alingaka babangi

    [8] Ndenge nini soki balongi bino, bazali kotosa lisusu elaka te, mpe bondeko te oyo ezali kati na bino na bango? Mpe bazali kosepelisa bino na lolemu na bango, nzoka nde mitema na bango mizali koboya. Kasi ebele na bango bazali bato mabe

    [9] Bazali koteka mikapo mia Allah na talo ya шоке mpe kokanga nzela naye. Ya soló, maye bazali kosala mazali mabe

    [10] Babatelaka elaka te, bondeko mpe te ya makila oyo ezali okati na bango na bandimi. Kasi bango nde babebisi ya mibeko

    [11] Soki batubeli, batelemisi losambo mpe babimisi zakat, bakomi bandeko na bino o kati ya lingomba. Mpe tozali kolimbola mikapo mpo bato bayeba

    [12] Mpe soki babebisi ndai na bango na sima ya koyokana, babundisi lingomba lia bino, bobundisa bakonzi ya bopagano mpo ete ya sólo, bango bazali na botosi te na bandai na bango. Tango mosusu bakotika

    [13] Boye bozali kobundisa te baye bazangi botosi na bandai na Bango, mpe bakani kobimisa motindami mpe bango nde babandi bino liboso? Boye bozali kobanga bango? Kasi Allah nde esengeli bobanga ye soki bozali bandimi

    [14] Bobundisa bango Allah akopesa bango etumbu na maboko na bino mpe akokitisa bango mpe akolongisa bino likolo na bango. Mpe akobikisa mitema mia bandimi

    [15] Мре akolongola nkanda o mitema mia bango, mpe Allah alimbisaka oyo alingi, mpe Allah azali na boyebi atonda bwanya

    [16] Boye, bozali kokanisa ete bokotikama bongo mpe Allah ameki naino te baye babundi o kati na bino, mpe bazui balingami basusu te na batika Allah na motindami naye mpe na bandimi? Mpe Allah azali na sango ya maye bozali kosala

    [17] Esengeli te na basambeli ya binzambe nzambe kokota na bandako esantu ya Allah, na matatoli ya bopagano ya polele bazali na yango, bango wana misala mia bango misili kobeba, mpe bakozalaka libela o kati ya moto

    [18] Kasi baye bazali na ndingisa ya kokota na bandako esantu ya Allah. Sé baye bandimi na Allah, na mokolo ya suka, mpe batelemisi losambo mpe babimisi zakat, mpe babangi mususu te sé Allah, baye wana bakozala elongo na bakambami

    [19] Boye, bolingi kotia moto oyo azali komelisa bapaya ya hajj mayi mpe azali kobongisa ndako esantu ya Allah, lolenge moko na moto oyo andimi na Allah mpe na mokolo ya suka mpe abundi o nzela ya Allah? Bakokani te epaí ya Allah, kasi Allah akambaka babubi te

    [20] Baye bandimaki mpe batiki (Makkah), mpe babundi o nzela ya Allah na misoio mia bango mpe na milimo mia bango, baleki kozala na esika ya likolo epai ya Allah mpe bango nde balongi

    [21] Nkolo wa bango azali kopesa bango sango elamu ya ngolu naye, mpe esengo naye mpe bilanga ya lola mpo na bango, kati na yango kofanda ya kitoko

    [22] Libela o kati na yango mpe ya soló, lifuta linene likozuamaka sé epai ya Allah

    [23] Eh bino baye bondima! Bozua baboti ba bino na bandeko ba bino lokola balingami te soki baponi bopengwi batiki bondimi. Mpe kati na bino oyo akozua bango lokola balingami, bango nde babubi

    [24] Loba: Soki baboti ba bino, na bana ba bino na bandeko na bino, na basi na bino na mabota na bino, na misolo mia bino miye bozui na mombongo moye bozali na bobangi ete ekweya, na bandako kitoko bozali na yango, bilingami mingi epai na bino koleka Allah na motindami waye na kobunda na nzela naye, bozelakino Allah akoya na mitindo (mikano) mia ye, mpe Allah akambaka babebisi te

    [25] Allah asilaki ya soló, kolongisa bino obisika ebele, na o mokolo mwa (bitumba) bia Huna’ín, tango bosepelaki na motango monene mwa bino, kasi yango esalisaki bino na eloko te. Mabele ekomelaki bino шоке na maye bozalaki kokanisa. Sima bopesaki mikongo mpe bokimaki

    [26] Sima, Allah akitisaki kimia naye epai ya motindami wa ye mpe epai ya bandimi. Mpe akitisaki basoda naye baye bomonaki bango te, mpe apesaki etumbu na bapengwi. Mpe wana nde lifuta lia bapengwi

    [27] Sima, Allah andimaka tubela ya oyo alingi. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [28] Eh bino bandimi! Ya sólo, bapagano bazali mbindo, (basambeli bikeko) bapusana pena na ndako esantu te o sima ya mobu mwa bango moye. Kasi soki bozali kobanga kimobola, Allah akopesaka bino bomengo na bolamu bwaye soki alingi, ya sólo, Allah azali moyebi atonda bwanya

    [29] Bobundisa baye bazali kondima na Allah te, na mokolo ya suka te, mpe bazali kopekisa te maye Allah na motindami waye bapekisa, mpe bazali коропа lingomba lia lokuta. Batiki oyo ya bosôló, o kati ya baye bapesama buku (bayuda na baklišto), kino bakofuta lomande na maboko na bango na sima ya koyoka soni

    [30] Mpe bayuda balobi: Uzairi azali mwana ya Allah. Mpe baklišto balobi: Masiya azali mwana ya Allah. Wana ezali liloba oyo ebimaka na minoko mia bango. Bazali komekola liloba lia bapengwi baye bapengwa liboso. Allah aboma bango na maye bazalaki kosala. Ndenge bamitiye mosika na bosôló

    [31] Bazui bakonzi ya mangomba na bango na masiya mwana ya Maryam lokola banzambe na botiki Allah. Kasi batindamaki te sé babondela nzambe moko oyo azali na mosangani te sé ye mei (Allah), nkembo naye oyo azali likolo ya maye bazali kosangisa ye na yango

    [32] Balingi kozimisa bongengi bwa Allah na minoko mia bango, kasi Allah azali sé kokolisa bongengi bwa ye, ata soki bapengwi bazali koboya

    [33] Yende atindaki motindami naye na bokambi mpe na lingomba lia bosôló, mpo été ezala likolo ya mangomba nyoso, ata soki basambeli ya bikeko (basangisi) bazali koyina yango

    [34] Eh bandimi! Ya soló, ebele ya bakonzi ya lingomba epai ya bayuda na ba klišto, bazali kolia misolo mia bato na lokuta, mpe bazali kobundisa nzela ya Allah, mpe na baye bazali kobomba nkita ya wolo mpe mpalata (mbongo), mpe baboyi kobimisa yango na nzela ya Allah, pesa bango sango ya etumbu makasi

    [35] Mokolo oyo wolo na mpalata na bango mikotoka na moto ya lifelo sima bakozikisaka bilongi na bango na yango, na mipanzi na bango na mikongo na bango. Oyo nde lifuta ya maye bozalaki kosangisa na nkita ya mokili. Na yango, bomeka etumbu ya maye bobombaki

    [36] Ya sólo, motango ya basanza epai ya Allah mozali (sanza) zomi na mibale okati ya makomi ma Allah, uta mokolo akela likolo na nsé, okati na yango (sanza) minei mizali esantu, wana ezali lingomba lia semba, mpe bobuba milimo na bino te okati na yango, mpe bobundisa basangisi Allah mobimba, ndenge bazali kobundisi bino, тре boyeba ete ya soló, Allah azali elongo na babangi

    [37] Ya sólo, kozongisa mikolo ya sanza esantu sima, ezali kobakisa bopengwi, na yango nde ezali kobungisa ba oyo bapengwa. Mobu moye bamoni yango pamba mpe mobu mosusu babulisi yango, pona kobebisa motango ya basanza esantu biye Allah atia, boye nde bazali kornona pamba maye Allah atia yango esantu, babongiseli bango misala mabe liboso na bango na bonzenga. Kasi Allah akambaka bapengwi te

    [38] Eh bino baye bondima! Mpona nini soki bayebisi bino bobima na nzela ya Allah, bozali kofanda na nsé. Boye bolingi bomoyi bwa mokili koleka oyo ya mokolo ya suka? Bisengo bia mokili bizali mike, oyo ya lobi nde bileki

    [39] Soki bokei kobunda te, akopesa bino etumbu ya makasi mpe akokela bato basusu o esika na bino mpe eloko moko ya mabe ekosala ye te. Mpe Allah azali na bokoki likolo ya biloko binso

    [40] Soki bopesi ye lisungi te, (Muhammad) Allah asilaki kolongisa ye. Tango bapengwi babimisaki ye, ya mibale bango babale, tango bazalaki kati ya libanga, tango azali koloba na moyekoli naye: Kobanga te, ya soló, Allah azali elongo na biso, Allah akitisaki lisungi lia ye epai naye, mpe asalisi ye na mapinga baye bomonaki bango te, mpe atiyaki liloba lia bapengwi nanse, mpe liloba lia Allah lizala likolo, mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya

    [41] Bökende moko moko to na lisanga kobunda na nzela na Allah na misolo na bino mpe na nzoto na bino, wana ezali malamu тропа bino soki bozali koyeba

    [42] Soki bozui (ya bitumba) ezalaki pete, mpe mobembo ezalaki pembeni kasi balandaki yo, kasi etamboli ya mosika epekisaki bango mikakatano, mpe bazali kolapa na nkombo ya Allah été: Soki tozalaka na makasi, tolingaki kobima elongo na bino. Bazali komibebisa sé bango moko. Mpe Allah ayebi ya soló, bazali babuki lokuta

    [43] Allah alimbisa yo na maye opesaki bango ndingisa, kino oyeba bato ya bosóló, mpe oyeba babuki lokuta

    [44] Baye bandimi па Allah mpe na mokolo ya suka basenga yo nzela te liboso ya kokende kobunda o nzela ya Allah na misolo na bango na banzoto na bango. Allah nde moyebi wa babangi

    [45] Ya soló, baye bazali kosenga yo nzela, bandimi na Allah te, mpe na mokolo ya suka te, mpo mitema mia bango mitondi na ntembe, тропа ntembe wa bango bazali sé koyimayima

    [46] Kasi soki balingaka kobima (тропа kobunda), balingaki komilengele тропа yango. Kasi Allah asepelaki te na kobima na bango. Mpe avandisi bango. Mpe ayebisaki bango: Botikala elongo na baye batikalaki

    [47] Soki babimaka elongo na bino, balingaki sé kotiela bino mobulu o mapinga mpe kobakisela bino mabe, mpe koluka kokabola. Mpe kati na bino ezali na bato bazali koyoka bango, kasi Allah ayebaka babubi

    [48] Ya soló, basilaki kotiya songi songi liboso, mpe bakangeli yo makambo kino bosóló boyaki, mpe bokasi na mibeko mia Allah mimonanaki, mpe bango bazali koboya

    [49] Мре kati na bango, basusu bazali koloba: Pesa ngai ndingisa (ya kotikala), kasi komeka ngai te! Kaši basilaki kokweya na kati yakomekama, mpe ya soló moto mwa lifelo mokozinga bapangano

    [50] Soki bolamu bozui yo bamoni yango mabe, soki mabe mazui yo balobi: Soki tomilengeleke te oyo ezui ye, elingaki ezua biso mpe bapesi mikongo bakei na kosepela

    [51] Loba: Mpasi ekoki kozua biso te, sé eye Allah akomela biso, ye nde mobateli wa biso, mpe epai ya Allah esengeli na bandimi komipesa

    [52] Loba: Boye bozali kozela nini тропа biso okati ya bolamu mibale ya malamu (elonga to kokufa тропа Allah)? Kasi biso tozali kozela тропа bino, été Allah apesa bino etumbu to, ewuta na maboko na biso. Na yango bozela, biso mpe tozali kozela elongo na bino

    [53] Loba: Bopesa na kosepela to nakoyina, bakondimela bino yango te, ya soló, bozalaki bato mabe

    [54] Makabo na bango endimamaki te mpo baboyaki kondima na Allah na motindami naye, mpe basambelaka te, sé batelema na bolembu, mpe babimisaka mabonza na esengo te

    [55] Bomengo na bana na bango bikamwisa yo te. Kasi Allah alingi kopesa bango etumbu тропа yango o kati ya mokili, тре alongóla milimo mia bango тре bazali o kati na bopengwi

    [56] Мре bazali kolapa па Allah, (bato ya bilongi mibale) ete bazali penza bato ba bino, kasi bazali na bino te, mpe ya soló bango bazali kobanga bino

    [57] Soki bazuaka esika ya bokimi to lidusu o nsé ya ngomba, to esika ya kokotela, balingaki bakima epai wana bango banso na lombango

    [58] Mpe basusu kati na bango bazali kotongo yo тропа mabonza. Soki bapesi bango yango, basepeli, mpe soki bapesi bango te, basiliki

    [59] Mpe soki bango ya sólo, basepelaki na maye Allah na motindami waye bapesaki bango mpe balobi été: Allah akoki na biso. Allah akopesa biso bolamu bwaye, mpe motindami naye, ya sólo epai ya Allah nde tokozongisa makambo na baposa ya biso

    [60] Ya sólo, makabo mazali тропа babola na bazangi nyoso na baye bazali kosala mosala wana ya kokongola yango, mpe тропа kolendisa mitema ya bandimi ya sika, ezali mpe тропа kokangola bawumbu to bakangami na boloko, ezali mpe тропа baye bazangi makoki ya kofuta ba nyongo, ezali mpe тропа baye babimi na nzela ya Allah, ezali mpe тропа mopaya na moto ya mobembo oyo azali na bokoki te, wana ezali lotomo oyo ewuti epai ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya

    [61] Mpe basusu kati na bango bazali komonisa ntoma pasi mpe bazali koloba: Afungoli litoyi naye тропа kolanda nyoso tozali koloba, loba: Litoyi yango ezali тропа bolamu na bino, azali kondima na Allah mpe azali na makanisi ya malamu likolo ya bandimi. Mpe azali mawa тропа basusu. Kati na bino bazali na kondima kasi baye bazali konyokolo motindami ya Allah, bakozua etumbu ya makasi

    [62] Bazali kolapa na nkombo ya Allah тропа kosepelisa bino, kasi Allah na motindami waye nde esengeli basepelisa soki bazali bandimi ya solo

    [63] Boye boyebi te ete ya sólo, oyo akozanga kotosa Allah na motindami waye, ya sólo ye akozalaka na móto mwa lifelo, libela kati na yango? Wana nde ekozala etumbu ya monene

    [64] Bazali kobanga bato ya bilongi mibale été suratu ekitela bango, mpo ekundola makambo maye mazali o mitema mia bango. Loba: Bosala litio, ya soló, Allah nde mobimisi ya maye bozali kobangela

    [65] Mpe soki otuni bango, bakolobaka: Ya sólo, tozali nde kosolola mpe kosakana. Loba: Boye Allah, na mikapo mia ye, mpe na motindami waye bozali kotiola

    [66] Bokolimbisama te, bosilaki ya sólo, kopengwa o sima ya bondimi bwa bino, soki tolimbisi basusu kati na bino, tokopesa etumbu na basusu. Ya sólo, bango bazalaki batomboki

    [67] Basi mpe mibali ya bilongi mibale bango na bango, bazali kotinda na mabe, mpe bazali kopekisa bolamu. Mpe bazali kokanga maboko na bango тропа kosala bolamu, babosani Allah, mpe atiki bango. Ya sólo, bango bazali babebisi

    [68] Allah alaki basi mpe mibali ya bilongi mibale, na bapengwi, bakozalaka libela o móto ya lifelo, wana ekoki na bango. Mpe Allah alakeli bango botutu, mpe bakozalaka na etumbu ya suka te

    [69] Lolenge moko na baye bazalaki liboso lia bino, bazalaki makasi mingi koleka bino ezala na misolo, mpe bana mingi koleka bino. Basepelaki na bomengo oyo bakitanaki na mokili. Bino mpe bozali kosepela na oyo ya bino, lolenge bato ya liboso basepelaki, (kokitana), mpe bazali kosuanisa na bosôló te lolenge bato ya liboso basuanisaki na bosôló te, bango basili kobebisa misala mia bango o kati ya mokili mpe o mokolo mwa suka, mpe bango nde bazangi

    [70] Boye eyelaki bango te sango ya baye baleka o liboso lia bango bato ba Nûh, na bato ya aad, na Thamúd, na bato ya Ibrâhîm na bato ya madiyanat, na baye tobalusaki (o kati ya bato ya Loth)? Batindami ba bango bayelaki bango bilembo, Allah azalaki te тропа kobuba bango, kasi bango moko nde bamibubaki

    [71] Mpe bandimi ya mibali mpe ya basi, bango na bango bazali balingami. Bazali kotinda na bolamu mpe bazali kopekisa mabe. Mpe bazali kotelemisa losambo mpe kobimisa zakat, mpe bazali kotosa Allah na motindami waye. Baye wana nde Allah akoyokelaka mawa, ya soló, Allah azali na bokasi atonda bwanya

    [72] Allah alaki bandimi ya mibali mpe ya basi, Iola, eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka libela o kati na yango, mpe bivandeli bilamu o lola ya edeni. Mpe bosepeli bonene bokowutaka epai ya Allah. Wana nde elonga enene

    [73] Eh ntoma! Bundisa bato ya bilongi mibale na bapagano, mpe kozala na mawa epai na bango te. Mpe esika na bango bikozalaka nde na lifelo, mpe bozongi ya mabe nini wana

    [74] Bazali kolapa na Allah été basali eloko te, mpe basilaki solo koloba liloba lia bopagano, mpe babwaki kondima na bango bazongeli bopagano, mpe bakokisaki te na maye bakanaki (koboma ntoma), mpe bazali na nkanda te sé epai ya Allah na motindami naye, kowuta na maye Allah, na motindami naye bapesaki bango bozui mpe soki batubeli ekozala malamu тропа bango, kaši soki baboyi bapesi mikongo, Allah akopesa bango etumbu ya makasi, o kati ya mokili na o mokolo mwa suka. Mpe bakozuaka mobateli te mpe mosungi te na mokili

    [75] Mpe basusu o kati na bango bazuaki elaka na Allah, (balobi) soki tozui bolamu bwa Allah, tokopesa makabo, mpe tokozala o kati ya basali bolamu

    [76] Мре tango apeși bango bolamu bwaye, bakangi maboko тропа yango, mpe baboyi bapesi mikongo, balandi nzela mosusu

    [77] Mpe bazui etumbu o kati na mitema mia bango kino mokolo mwa bokutani, тропа maye bazangaki kotosa, mpe тропа maye balaki Allah, mpe na maye bazalaki kokosa

    [78] Bazali koyeba te été Allah ayebi sekele na bango mpe ayebi masolo na bango ya kobombama mpe Allah azali moyebi ya mabombami

    [79] Baye bazali kotongo bandimi baye bazali kobanga (Allah) mpe kobimisa makabo, Mpe baye bazali kozwa токе kowuta na bokasi bwa bango. Mpe lisusu bazali kofinga bandimi baye bazali na bozui токе, mpe kotiola, Allah atioli bango, kasi bakozalaka na etumbu monene

    [80] Osengela bango bolimbisi to te, ata soki osengeli bango bolimbisi mbala ntuku sambo, Allah akolimbisa bango te, mpo bapengwi na Allah na motindami waye. Mpe Allah akambaka babebisi te

    [81] Baye batikalaki sima, basepeli mpo batikali epai na bango, sima ya motindami wa Allah, baboyi kobunda na misolo mia bango na milimo mia bango o nzela ya Allah. Мре balobi: Bökende kobunda te na molunge oyo. Loba: Moto ya lifelo moleki molunge, soki bazali koyeba

    [82] Baseka moke mpe balela mingi, lifuta lia maye bazalaki kosala

    [83] Soki Allah azongisi yo o ngambu ya (bato bana) mpe soki batuni yo ndingisa тропа kokende kobunda, loba: Bokobimaka na ngai te, mpe bokobundisaka banguna elongo na ngai te. Bosepelaki kotikala mbala ya yambo epai na bino, bovanda esika moko na batikali

    [84] Mpe kosambelela te тропа bango soki moko wa bango akufi, mpe kotelema na lilita lia ye te. Mpo ya soló, bango basili kopengwa na Allah na motindami waye, mpe bakufaki bazali babebisi

    [85] Bana na misolo mia bango mikamwisa yo te. Mpo ya sólo, Allah alingi nde kopesa bango etumbu тропа yango awa na mokili, mpe azua milimo mia bango bazali na bopengwi

    [86] Мре soki mokapo moko ekiti kowuta epai ya Allah été bandima na Allah mpe babunda elongo na motindami waye, okomona baye bazali na makoki nyoso ya kobunda bazali kosenga yo nzela mpo batikala elongo na baye batikali

    [87] Bazali kosepela kotikala elongo na baye oyo bazwaki ndingisa ya kotikala тре mitema na bango masili kokangama mpe bazali koyeba eloko te

    [88] Kasi motindami na baye bandimaki naye, babundaki na misolo mia bango na milimo mia bango. Mpe bango nde bakozalaka na bolamu, mpe bango nde balongi

    [89] Allah asila kolengelela bango solo Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala. Bakozalaka libela o kati na yango, wana nde elonga enene

    [90] Mpe o kati na baye bavandaka na bamboka, bayei kosenga ndingisa, mpe na baye bakoselaki Allah na motindami waye batikali epai na bango. Bapengwi kati na bango bakozuaka etumbu ya makasi

    [91] Kasi baye bazangi makasi ya nzoto, na bato ya bokono, na baye bazangi eloko ya kobimisa (тропа Allah) bazali na lisumu te soki bakei kobunda te, soki bazali na bosembo na mitema mia bango тропа Allah na motindami waye. Мре basali bolamu, bazali na Likebisi te тре Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [92] Ezali mabe te тропа baye bayelaki yo mpo opesa bango bibundeli ya komatela, olobi na bango été: Nazali na bibundeli ya komatele te тропа bino. Bazongi na kolela mayi ya miso ezali kotanga na mawa nyoso été bazui eloko te ya kobimisa

    [93] Kasi mabe (lisumu) ezali nde na baye bazali kosenga yo nzela ya kotikala mpe bazali na makoki nyoso ya bitumba, basepeli kotikala elongo na baye bakendeke bitumba te. Yango wana Allah abeti palata o mitema mia bango kasi bazali koyeba te

    [94] Bazali kosenga bino bolimbisi soki bozongeli bango (kowuta na bitumba). Loba: Bosenga bolimbisi te, tokoki kondimela bino te. Allah asilaki soló koyebisa biso ba sango na bino. Mpe Allah akotalaka misala та bino, na motindami waye lokola, sima bokozongaka epai ya oyo ayebaka makambo ma polele na maye mabombami mpe akoyebisaka bino maye bozalaki kosala

    [95] Bakolapela bino ndayi na nkombo ya Allah na bozongi na bino été boleka epai na bango, mpo bolimbisa, bozala mosika na bango! Ya soló, bango bazali mbindo, mpe esika na bango ekozala nde o moto ya lifelo, lifuta lia maye bazalaki kosala

    [96] Bazali kolapela bino ndayi mpo bosepela na bango. Kasi soki bosepeli na bango, ya soló Allah asepelaka na babebisi te

    [97] Ba arabo, bazalaki na bopagano makasi koleka, mpe kozala bato ya bilongi mibale mpe bato ya liboso ya koboya mibeko miye Allah akitisaki epai ya motindami waye. Kasi Allah azali moyebi atonda bwanya

    [98] Mpe o kati ya ba arabo basusu bazali kozua maye bazali kobimisa lokola nyongo mpe bazali kozela mabe ezua bino, mabe ya makasi ekozua nde bango! Mpe Allah azali moyoki atonda boyebi

    [99] Мре lisusu о kati ya ba arabo basusu bazali kondima na Allah mpe na mokolo mwa suka, mpe bazali kozua mabonza maye bazali kobimisa na nzela ya bopusani pene ya Allah, mpo été azua litomba ya mabondeli ya motindami. Ya sôló, wana mbeka тропа bango epai na Allah. Мре Allah akokotisaka bango na nsé ya ngolu naye, ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [100] Allah asepeli na bandimi ya liboso baye batikaki (Makkah) na baye bayambaki bango, (na Madinah) lolenge moko na basusu baye bayaki sima na bango na bolamu, bango mpe basepeli naye. Mpe abongiseli bango Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka libela na libela kati na yango, wana nde elonga enene

    [101] Mpe ezali na basusu bazali pembeni na bino bato ya bilongi mibale, mpe na ndambu ya bato ya mboka Madinah, balendi na bokono ya kozala bato ya bilongi mibale, (yo ntoma) oyebi bango te, kasi biso nde toyebi bango. Tokopesaka bango etumbu mbala mibale, sima bakozuaka etumbu ya monene

    [102] Мре basusu kati na bango bayebi masumu ma bango. Basangisi misala ya malamu na ya mabe. Mpo tango mosusu Allah akolimbisa bango. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [103] Zúa okati ya misolo na bango suadaka (makabo) oyo ekopetola mpe kopambola bango. Sima osengela bango, pamba te libondeli nayo ekofandisa bango na kimia. Ya sólo, Allah azali moyoki atonda boyebi

    [104] Boye bayebi te ete Allah nde moyambi tubela ya bawumbu naye, mpe ayambaka makabo na bango? Kasi ya soló, Allah nde mondimeli tubela atonda mawa

    [105] Mpe loba: bosala, Allah akomona mosala na bino, mpe motindami waye lokola, na bandimi. Mpe sima bokozongisama epai ya oyo amonaka makambo ya polele na maye mabombami, mpe akoyebisaka bino тропа maye bozalaki kosala

    [106] Mpe basusu bazali kozela mokano ya Allah: Apesa bango etumbu, to akoki kondimela bango, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya

    [107] Mpe baye batongi Masdjid mpo bazua yango esika ya bonyokoli mpe bopengwi mpe тропа kokabola bandimi тре kolengele yango тропа moto oyo abundisaki Allah na motindami waye liboso. Mpe bazali kolapa été balingi eloko mosusu te sé kobongisa, kasi Allah ayebi ete ya soló bango bazali babuki lokuta

    [108] Kotelama o kati na yango te mpo na kosambela (masdjid). Kasi ndako esantu oyo etongama na bobangi Allah o mokolo ya ebandeli ezali malamu mpo otelema na kati. Okati na yango, mibali baye balingi komipetuama. Mpe Allah alingaka bapetolami

    [109] Boye, oyo atongi ndako naye likolo ya bobangi Allah mpe esengo naye, azali malamu to ezali oyo atongi ya ye ndako pembeni ya libulu ya monene, oyo ekokweisa ye na moto ya lifelo? Mpe Allah akambaka babubi te

    [110] Ndako na bango batongi, ekotikala sé liziba ya koyimayima o mitema na bango kino mitema na bango mikopasuka. Mpe Allah azali wa boyebi atonda bwanya

    [111] Ya sólo, Allah asila kosomba epai na bandimi milimo na bango na misolo mia bango mpo ete bazua lola. Bazali kobunda na nzela ya Allah, na yango ba bomaka mpe ba bomaka bango., elaka ya soló esila kokomama okati ya torah mpe indjil na kurani. Mpe nani aleki Allah nakokokisa elaka? Bosepela na mombongo na bino oyo bosali, mpe oyo wana nde elonga enene

    [112] Bazali baye batubelaka, basambelaka, bakumisaka, bakangaka ngizi, bagumbamaka, bafukamaka, batindaka kosala bolamu mpe bapekisaka kosala mabe mpe babatelaka mibeko ya Allah. Mpe pesa nsango elamu epai na bandimi

    [113] Mpe esengeli te na ntoma na bandimi kosengela bapagano bolimbisi ata soki bazali libota na bango na ntango emonisami polele ete bazali solo bato ya moto

    [114] Mpe bolimbisi ya Ibrâhîm тропа tata naye ezalaki te sé тропа elaka eye alakaki ye, mpe ntango emonanaki ete azali monguna ya Allah, asundolaki ye. Ya sólo, Ibrâhîm azalaka moto ya komikitisa mpe motema ya ngolu

    [115] Mpe Allah akoki kobungisa bato te wana asili kokamba bango kino akomonisa bango eloko oyo bakoki kobanga. Ya sólo, Allah azali naboyebi likolo na biloko binso

    [116] Ya sôló, Allah azali na bokonzi ya likolo mpe ya nsé, apesaka bomoyi mpe liwa, mpe bozali na mobateli te mpe mosungi te sé kaka Allah

    [117] Allah asili koyamba tubela ya ntoma na bato ya (makkah) mpe bato ya (madinah), bango oyo balandaki ye na ntango ya mpasi, tango etikalaki moke mitema ya basusu mitengama, mpe alimbisaki bango. Ya sólo, azalaki na bolingo mpe ngolu mingi mpo na bango

    [118] Mpe andimelaki bato misato oyo batikalaki na nsima kino bamonaki ete mabele ekomelaki bango moke, makambo makomelaki bango mpasi kino bakanisaki ete esika mosusu yakokimela ezali te sé epai ya Allah. Sima andimi tubela na bango mpo ete bazonga epai naye. Ya sólo, Allah azali moyambi monene ya tubela atonda ngolu

    [119] Eh bino bandimi! Bobanga Allah mpe bozala elongo moko na bato ya bosembo

    [120] Mpe esengeli te na bato ya madinah na bato ya zingazinga na yango kati ya ba arabo ete batikala sima mosika na motindami, esengeli mpe te na bango kobatela nzoto na bango koleka ya motindami. Mpo ete bakoyoka mposa ya mayi te тре bakoyoka bolembu te, bakoyoka тре nzala te na nzela ya Allah, bakoleka na mboka moko te kino bapagano batomboka, mpe elonga nyoso bakozala na yango likolo na banguna kino bakotiela bango bolamu monene. Ya soló, Allah abungisaka lifuta ya basali malamu te

    [121] Mpe bakobimisa eloko moko te ya moke to ya monene, mpe bakokatisa ngomba moko te kino bakoma yango тропа bango mpo ete Allah afuta bango maye ya kitoko bazalaki kosala

    [122] Mpe esengeli te bandimi babima bango nyoso na mboka (pona koluka boyebi). Kasi esengeli na ndambu okati ya libota na libota mpo na koyekola mpe kokebisa bato na bango ntango bakozonga epai na bango mpo ete bazala na bokebi

    [123] Eh bino bandimi! Bobundisa bapengwi oyo bazali pembeni na bino mpe bozala mpete te epai na bango. Mpe boyeba ete ya soló, Allah azali elongo na babangi

    [124] Mpe soki suratu ekiti, moko kati na bango akoloba: Nani liloba oyo ebakiseli ye kondima? Kasi, mpo na bandimi ekobakisela bango kondima mpe batondi na esengo

    [125] Kasi, mpo na baye mitema na bango mitondi na malali (bokono), ekobakisela bango mbindo likolo ya mbindo na bango, mpe bakokufa bazali bapagano

    [126] Boye, bazali kornona te ete mbula na mbula bazali komekama mbala moko to mbala mibale, mpe bazali kotubela te mpe bazali kokanisa te

    [127] Mpe soki suratu ekiti bakotalana bango na bango mpe balobi: Boye moto moko azali kornona bino? Sima bakimi. Allah mpe akimisi mitema na bango mpo ete bazali bato oyo bazanga mayele

    [128] Ya soló, motindami awuti kati na bino aye тропа bino na ntina ya mpasi ya kilo makasi bozalaki na yango, azalaki koyokela bino mawa mpe kotala bino, azalaki na bolingo mpe ngolu epai ya bandimi

    [129] mpe soki baboyi mpe bapesi mokongo, loba: Allah akoki na ngai, nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te kaka sé ye. Epai naye na mikabi mpe azali Nkolo ngwende ya monene

    Surah 10
    Yunus

    [1] Alif, lâm, râ. Wana ezali mikapo ya buku ya bwanya

    [2] Ezali kokamwisa bato ete topesaki boyebi na mobali moko kati na bango mpo akebisa bato mpe apesa sango elamu epai ya baye bazali kondima, ya soló, bango bazali na lokumu epai ya Nkolo wa bango (тропа mokolo mwa lobi)? Мре bapengwi balobi oyo azali nganga ya polele

    [3] Ya soló, Nkolo wa bino nde Allah oyo akelaki likolo na mabele na mikolo motoba, sima atombuami likolo ya ngwende azali kotambwisa makambo manso. Moko te akolobelela moninga sé sima ya ye kopesa ndingisa. Wana nde Allah Nkolo wa bino, bobondela ye. Boye bozali kokanisa te

    [4] Epai naye nde bokozongisama bino banso; elaka ya Allah ezali sólo, yende abanda kokela bikelamu bia ye mbala ya liboso, sima akosekwisa biango lisusu, mpo afuta na bosembo baye bandimaki mpe basalaki misala milamu. Mpe bapengwi bakomelaka mayi ya moto mpe bakozala na etumbu ya makasi na ntina ete bazalaki bapengwi

    [5] Ye nde akela mwese (moyi) lokola muinda mpe akela sanza engengisaka, mpe akokisaki botamboli bia yango, mpo boyeba kotanga mibu, mpe boyeba mituya. Allah akelaki yango te sé na bosôló, azali kolimbola bilembo bia ye mpo bato bayeba

    [6] Ya soló, na kati ya bokeseni ya butu mpe moyi mpe na manso maye Allah akela na likolo mpe na mabele, ezali bilembo тропа bato baye bazali kobanga

    [7] Ya solo, baye bazali kolikya te kokutana na biso, mpe basepeli na bomoyi ya nsé mpe bamoni ete bazali na kimia тропа yango, ndenge moko na baye bazali kokanisa te na mikapo mpe bilembo bia biso

    [8] Baye bana esika na bango ekozalaka nde na moto тропа maye bazalaki kosala

    [9] Ya solo, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, Nkolo wa bango akokambaka bango тропа bondimi. Na bango bakozalaka o Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakovandaka o Iola eye etonda bomengo

    [10] Kuna na kati kosenga na bango ekozalaka sé ete: Lokumu nayo Nzambe, mpe losako na bango ekozala sé kimia, mpe mabondeli na bango ya suka nde ete matondi na Allah Nkolo wa molongo

    [11] Mpe soki Allah atiyelaka bato mabe ezua bango na lombango ndenge balukaka bolamu na lombangu, nde suka ya bomoyi bwa bango esila kokoka. Mpe topesi elaka na baye bazali kolikya te na bokutani bwa biso. Bazali na koyimayima na kati ya kolekisa ndelo

    [12] Mpe soki pasi ezui moto, abengi biso, mpe alali na mopanzi to azali ya kovanda to ya kotelema; mpe tango tokolongola ye pasi ena, akomi kotambola lokola moto abelelaki biso na pasi ezuaki ye te. Na boye nde ebongisami mpo na bato mabe maye bazalaki kosala

    [13] Mpe ya soló, tosilaki koboma mapinga ebele maye malekaki liboso lia bino, тропа bobubi bwa bango, mpe batindami ba bango bayelaki bango bilembo bia polele, kasi bandimaki te. Ndenge wana nde tokofutaka batomboki

    [14] Sima na bango, tokitanisaki bino o kati ya mokili, mpo totala ndenge nini bokosala

    [15] Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mia polele, baye bazali kolikya na bokutani na biso te, bakolobaka: Yaka na kurani mosusu kasi oyo te, to bobongola yango! Loba: Esengeli na ngai te kobalola yango na lolenge na ngai, nazali kolanda bobele maye bayebisaki ngai. Ya soló, nazali kobanga soki nazangi botosi na Nkolo wa ngai, noki nakozua etumbu enene o mokolo mwa suka

    [16] Loba ete: Soki Allah alingaki, nde natangeli bino yango te, nde mpe nalakisi bino yango te. nasilaki kofanda na bino mibu miyike liboso na yango, boye bozali kokanisa te

    [17] Mpe oyo alekisi kobuba nde oyo azali kobukela Allah lokuta, to aboyi kondimela mikapo mia ye? Ya solo, ye akolongisa batomboki te

    [18] Mpe bazali kobondela basusu baye bakoki kosala bango mabe to malamu te, batiki Allah, mpe bazali koloba: Ba oyo nde bakolobelela biso epai ya Allah. Loba: Bolingi koloba ete Allah ayebi te maye mazali o likolo na mabele? Lokumu naye Nkolo wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango

    [19] Mpe bato bazalaki (na ebandeli) sé umma moko sima bakabwani na bokeseni na bango. Soki ezalaki na mokano ya Nkolo nayo te, nde likambo lisilaki kokatama kati na bango na ntina ya maye bazalaki kokesene na yango

    [20] Bakolobaka ete: Soki ata Nkolo naye akitiselaka ye likamwisi liwuta epai ya Nkolo waye! Mpe loba: Ya soló, mabombami mazali ya Allah, na yango bozela, ya sólo, ngai mpe nazali kozela elongo na bino

    [21] Mpe soki topesi bato bolamu o sima ya mabe kozua bango, bakomi kobundisa mikapo mia biso. Loba: Allah azali lombango na mwango. Ya sólo batindami na biso (ba anzelu) bazali кокота mwango bozali kosala

    [22] Yende azali kotambwisa bino na mokili mpe na ebale. Kino tango bozalaka o kati ya masua, azali kotindela bino mopepe ya kitoko, bozali kosepela na yango. Kino mopepe makasi ya mabe mpe na mbonge moko wuta bipai na bipai mpe bamoni, ete basili kozingama mpe bakomi kobelela Allah na bosembo mpenza, koloba: Soki obikisi biso na oyo, tokozala kati ya baye bazali kotonda yo

    [23] Mpe soki abikisi bango, okomona bango bakomi kobebisa na bobubi o kati na mokili, batiki bosôló. Oh bino bato! Botomboki bwa bino, bokozongela sé bino moko. Bomoyi búa nsé bisengo ya ntango шоке, sima epai na biso nde bokozongisama, mpe tokoyebisaka bino maye bozalaki kosala

    [24] Ya soló, ndakisa ya bomoyi bwa nsé ezali lokola mayi tokitisaka kowuta o likolo, mpe esangani na milona (matiti) ya mabele, ezali koleisa bato na banyama, kino mabele ekozua bonzenga na yango mpe ekomisi bilanga kitoko, bakolo na yango bazali kokanisa ete bazali na bokoki likolo na yango, mpe mokano na biso moko eyelaki yango butu to moyi, mpe tokomisi yango pamba lolenge mosusu lokola eloko ezalaki te liboso. Lolenge wana nde tozali kolimbola bilembo bia biso, mpo bato bakoka kososolo

    [25] Allah azali kobenga bato na ndako ya kimia, mpe akambaka oyo alingi o nzela ya semba

    [26] Mpona baye bazali kosala bolamu, babombeli bango (lifuti) ya kitoko koleka na litabisi mpe bilongi bia bango bikoyindaka na milinga te, mpe bikokitisama te. Bango nde bato ba Iola, bakovandaka libela kati na yango

    [27] Mpe baye basalaki mabe, bakofutamaka na mabe lokola yango, mpe milinga miyindo mia mabe mikolinga bango. Bakosalisaka bango na etumbu ya Allah te, lokola eteni ya butu na molili ya makasi mozipaki bilongi bia bango. Bango nde bato ba moto, bakovandaka libela o kati na yango

    [28] Mpe kanisa mokolo moye tokosangisaka bango banso, sima tokolobaka na baye basangisaki (ngai na banzambe mosusu): Wapi esika na bino na banzambe na bino! Mpe tokaboli kati na bango mpe banzambe na bango bakoloba ete: Bozalaki kobondela biso te

    [29] Allah akoki lokola nzeneneke kati na biso na bino. Ya soló, penza tozalaki na bokeseni na mabondeli na bino

    [30] Na tango wana molimo na molimo akoyeba maye awelisaki kosala liboso. Mpe sima, bakozongisama epai ya Allah mokonzi na bango ya sólo, mpe bakobungisa maye manso basalaki

    [31] Loba: Nani azali koleisa bino kowuta na likolo mpe na nsé?, тре nani apesaka bomoni na boyoki? Mpe nani apesaka bomoyi kowuta na liwa, mpe liwa kowuta na bomoyi, mpe nani azali kokamba mokili? Bakolobaka: Allah. Мре loba na bango: Boye bozali kobanga te

    [32] Wana nde Allah, Nkolo wa bino ya soló. Nini sima ya bosembo eyaka sé libungi, kasi тропа nini bozali kotengama

    [33] Ndenge wana nde liloba lia Nkolo wayo lizalaki solo epai ya baye babebisaki, mpo solo penza bazalaki kondima te

    [34] Loba: Nalingi koyeba banzambe na bino, basusu kati na bango bakelaka mpe bazongisaka ekelamu na bomoyi (o sima ya liwa?) loba: Allah ye mei nde abandaki ekelamu mpe akozongisa ye, тропа nini bolingi komitiya mosika na kokumisa ye

    [35] Loba: Boye okati ya banzambe na bino, ezali na moko oyo azali kokamba na nzela ya bosembo? Loba: Allah nde akambaka na bosoló, boye oyo akambaka na nzela ya bosóló nde akoki ete balanda to oyo akambaka sé soki akambami? Ndenge nini bozali kokata likambo na motindo oyo

    [36] Mpe ebele kati na bango bazali kolanda sé makanisi, kasi makanisi ekosala bosembo eloko moko te, ya soló Allah ayebi malamu maye bazali kosala

    [37] Kurani oyo ekoki kokelama te mpe bakoki kopesa yango na moto mosusu te na esika ya Allah, kasi; eyei тропа kondima na oyo ekitaki liboso na yango, mpe ezali ndimbola ya buku, tembe ezali te kati na yango, ewuti epai ya Nkolo ya molongo

    [38] To bazali koloba ete: (Muhammad) nde asalaki yango na ndenge naye, loba: Boya na suratu lokola oyo, mpe bobenga baye banso bakoki kosalisa bino na botiki Allah soki bozali bato ya bosembo

    [39] Kasi baboyaki kondima na eloko ya motuya oyo bazali na boyebi na yango te mpe bososoli na yango ekomelaki mpe bango te, lolenge moko na baye balekaki liboso na bango babukaki lokuta. Mpe tala ndenge nini bato mabe basukaki

    [40] O kati na bango, basusu bazali kondima na yango, mpe basusu bazali kondima na yango te. Kasi Nkolo wayo ayebi malamu babebisi koleka

    [41] Mpe soki baboyi kondimela yo, loba: Nazali na mosala mwa ngai, mpe bozali na mosala mia bino. Bino bozali kowangana maye nazali kosala, ngai mpe nawangani maye bozali kosala

    [42] Mpe kati na bango ezali na baye bazali koyokela yo. Boye yo nde okoyokisa bakufi matoyi, ata soki bazali koyeba te

    [43] Mpe kati na bango, baye bazali kotala yo. Boye yo nde okambaka bakufi miso, ata soki bazali kornona te

    [44] Ya soló, Allah abubaka bato na eloko te, bato bango moko nde bazali komibuba

    [45] Mpe mokolo oyo akosangisa bango, ekozala lokola bavandaki ngonga moko ya mokolo, bakoyebana bango na bango. Kasi baye bazali koboya kondima na bokutani na Allah, bango nde bazangi, mpe bakambami te

    [46] Mpe soki tolingi tokolakisa yo ndambu ya etumbu oyo tokani тропа bango, to mpe okokufa liboso mpo ete eyela bango sima nayo, mpe na sima epai na biso nde bakozongisama, mpe na suka Allah azali nzeneneke likolo ya maye bazali kosala

    [47] Mpe umma nionso ezali na motindami. Mpe tango motindami na bango ayaki makambo ekatanaki na bosembo, mpe moko te abubamaki

    [48] Mpe bazali koloba: Elaka ekokokaka tango nini soki bozali bato ya bosembo

    [49] Loba: Nazali na eloko moko te ya kosala na nzoto na ngai kowuta na pasi to bisengo sé maye Allah akolinga. Mpe umma nionso bazali na elaka na bango. Soki ngonga yango ekoki, bakozongisa yango sima te, mpe bakotindika yango liboso te

    [50] Loba: Bomoni boni, soki etumbu naye eyeli bino na butu mpe na moyi? Boye batomboki bakoki kokima yango

    [51] Mpe boye soki (etumbu) ekweyeli bino bokondimaka na yango? (bakoyebisaka bino) sikoyo; bozalaki kolinga eyela bino noki

    [52] Sima ekolobama na baye basalaki mabe ete: Bomeka etumbu ya libela, boye bokofutama sé na maye bosalaki

    [53] Mpe bazali kotuna yo sango ya etumbu mpe lisekwa ete: Ezali ya soló? Loba: Iyo; nalapi na Nkolo wa ngai! Ezali ya soló penza. Mpe bokokoka kokima yango te

    [54] Soki maye mazali na mabele ezalaki na maboko ya moto oyo asili kosala masumu ebele, alingaki kopesa yango na lombango тропа komikangola na etumbu na biso. Mpe bakobombaka mawa na bango tango bamoni etumbu, mpe bakata makambo kati na bango na bosembo, mpe bakobubamaka te

    [55] Maye manso mazali kati na likolo na mabele, mazali ma Allah. Elaka ya Allah ezali solo, kasi ebele kati na bango bazali koyeba te

    [56] Ye nde apesaka bomoyi mpe liwa, mpe epai naye nde bokozonga

    [57] Oh bino bato! Ya sólo, malendisi masili koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino, mpe yango ezali libiki (kurani) ya maye mazali okati ya mitema, ezali mpe lisungi na nzela ya bokambi mpe ngolu тропа bandimi

    [58] Loba: Oyo ewuti na ngolu ya Allah na bolamu naye, mpe wana ezali mpo basepela na yango koleka maye bazali kosangisa

    [59] Loba: Bomoni boni тропа bozui oyo Allah akitiseli bino, sima bokaboli yango, ya mabe na ya malamu? Loba: Boye Allah nde apesi bino ndingisa wana to bozali kobukela Allah lokuta

    [60] Mpe baye bazali kobukela Allah lokuta bakanisaka nini тропа mokolo mwa suka? Ya soló, Allah azali Nkolo bolamu тропа bato, kasi ebele na bango bazali kotondo te

    [61] Ozalaka kati ya moko ya likambo te, otangaka kurani te mpe bosalaka eloko te, sé ete tozala na yango ba nzeneneke tango bozali kokana тропа kosala. Mpe Nkolo nayo abungisaka eloko te ata ezali токе lokola mbuma ya zelo ezali na nsé to likolo, ata ezali токе lisusu koleka wana, na ya monene lokola, esila kokomama na buku ya polele

    [62] Talá ya sólo, balingami ya Allah, kobanga ezali тропа bango te mpe bakoyoka mawa te

    [63] Baye bandimaki mpe bazalaki na bobangi (Allah)

    [64] Bakopesama sango elamu na bomoyi bwa mokili na o mokolo mwa suka, mpe liloba lia Allah likobongwamaka te. Wana nde elonga enene

    [65] Koyoka mpasi te тропа maye bazali koloba. Ya soló, bokasi bonso bozali bwa Allah. Azali moyoki atonda boyebi

    [66] Yeba ete, maye manso mazuami o likolo mpe o mabele mazali ma Allah. Baye bazali kokumisa banzambe basusu na botiki Allah, bazali kolanda nini? Bazali kolanda sé makanisi, kasi bazali sé komikosa

    [67] Ye nde atiyelaki bino butu mpo bopema na yango, mpe moyi mpo bótala mpe botambola. Wana ezali solo bilembo mpo ete bato bakokaka koyoka

    [68] Bazali koloba ete: Allah azui mwana nkembo naye. Atonda bomengo, manso mazali na likolo na mabele mazali ya ye. Boye bozali na elembetele moko тропа yango? (mpo bozali koloba ete; Allah abota), boye Bozali koloba na Allah (makambo) maye bozali na boyebi na yango te

    [69] Loba: Baye bazali kobukela Allah lokuta, bakolongaka te

    [70] Bazali sé na bosepeli (токе) kati ya mokili, sima bakozongisamaka epai na biso, mpe tokomekisaka bango etumbu ekasi тропа maye bapengwaki na yango

    [71] Mpe betela bango sango ya Nûh, tango alobaki na bato naye: Oh bato na ngai! Soki kofanda na ngai na bino, mpe mateya na ngai тропа bilembo ya Allah eleki bino kilo, kasi namipesi (mobimba mwa ngai) nyonso epai ya Allah. Boyokana na basangani ba bino banso mpe bobomba makanisi та bino te. Sima bozuela ngai mokano, kasi bozelisa te

    [72] Kasi soki bopesi mikongo na koboya, nasengi bino lifuta te, lifuta lia ngai likowutaka sé epai ya Allah, тре natindamaki mpo nazala o kati ya bamizilima

    [73] Baboyaki kondimela ye, mpe tobikisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa, mpe totiyelaki bango bakitani (kati na mokili) mpe tozindisaki baye baboyaki kondima na bilembo bia biso. Tala ndenge suka ya bakebisami ezalaka

    [74] Sima naye, totindaki batindami epai ya bato ba bango, bayelaki bango bilembo, kasi bandimaki te, sé lokola baye baboyaki kondima liboso. Ndenge wana nde tokangaka mitema mia balekisi ndelo

    [75] Totindaki Mûssa na Hâruna sima na bango, epai ya falo na bankumu naye na bilembo bia biso, basalaki lolendo, mpe bazalaki batomboki

    [76] Mpe tango bosôló bwa biso boyelaki bango, balobi: Ya soló, oyo ezali bonganga ya polele

    [77] Mpe Mûssa alobaki na bango été: Bokolobela bosôló na tango esili koyela bino? Kasi yango ezali bonganga mpe banganga balongaka te

    [78] Balobi: Oyeli biso mpo otiya biso mosika na maye tokutaki bankoko ba biso na yango mpo bokoma bato minene awa na mokili bino mibale? Kasi tokondimelaka bino te

    [79] Mpe falo alobi: В óyela ngai banganga banso baye bayebi

    [80] Mpe tango banganga bayei, Mûssa alobi na bango: Bobwaka maye bolingi kobwaka

    [81] Tango babwaki, Mûssa alobi: Oyo boyeyi na yango ezali sé bonganga, Allah akobebisa yango. Ya sólo, Allah abongisaka misala mia babebisi te

    [82] Mpe Allah azali kolongisa bosembo na maloba naye ata soki batomboki bazali koboya

    [83] Mpe bandimaki na Mûssa te sé lisanga moko ya bilenge ya bato ya falo mpo été bazalaki kobanga falo mpe bankumu ya pembeni naye, noki basala bango mabe. Kasi ya soló, falo amitombolaki o kati ya mokili, mpe azalaki o kati ya balekisi ndelo

    [84] Mpe Mûssa alobaki: Oh bato ba ngai! Soki bondimi na Allah, bomipesa naye. Soki bozali batosi. (bamizilima)

    [85] Balobaki: Tomipesi na Allah, Oh Nkolo wa biso! Kotiyela biso etumbu ya babubi te

    [86] Mpe kangola biso na mawa mayo, o maboko ya bapagano

    [87] Mpe toyebisaki na Mûssa na ndeko waye, bosalela bato ba bino bandako na egipito, mpe botiyela yango bisika ya kosambela, mpe botelemisa losambo. Mpe pesa sango elamu epai ya bandimi

    [88] Mpe Mûssa alobi: Nkolo wa biso! Sólo opesi falo na bato baye bolamu na mokili. Bazali kobungisa na yango (bato) nzela nayo. Oh Nkolo wa biso! Bebisa misolo mia bango, mpe kanga mitema mia bango ete bandima te, kino bakomona etumbu ya makasi ekoyelaka bango

    [89] Alobi: kosenga na bino esili kondimama. Botikala na bokambami o nzela ya semba, kasi bolanda te nzela ya baye bazanga boyebi

    [90] Mpe tokatisaki bana ya isalayele ebale. Mpe falo na basoda naye balandaki bango na bonguna mpe likunya, kino amonaki liwa na miso naye okati ya ebale, alobaki: Nandimi ya soló été, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé bobele oyo bana ya isalayele bandimi naye, mpe ngai nazali o kati ya bamisilima

    [91] (Allah alobi): Sik’oyo nde ondimi; kasi oboyaki kotosa liboso, mpe ozalaki o kati ya babebisi

    [92] Lelo, tokobomba nzoto nayo mpo etikala elembo na baye bakoya sima nayo, kasi ebele ya bato bazali kokeba te na bilembo bia biso

    [93] Sólo mpenza tovandisaki bana ya isalayele na esika ya lokumu, mpe topesaki bango bilei ya kitoko. Na sima bakabwanaki sé wana boyebi ekomeli bango. Ya sólo, Nkolo wayo akosambisa kati na bango o mokolo mwa suka тропа maye bazalaki kokesene na yango

    [94] Mpe soki ozali na tembe тропа maye tokitiselaki yo, tuna baye bazali kotanga buku eye ekitaki liboso nayo. Bosôló bosili koyela yo kowuta epai ya Nkolo wayo. Kasi kozala te elongo ya baye bazali kotiya tembe mpe koyimayima

    [95] Mpe kozala te elongo na baye bazali kozua mikapo mpe bilembo bia Allah été yango ezali lokuta, noki okozala o kati ya bazangi

    [96] Ya soló, baye liloba lia Nkolo wayo lisila kokweyela bango, bakotikalaka kondima te

    [97] Ata soki bilembo binso biyeli bango, kino bakomonaka etumbu ya makasi

    [98] Mpe soki ezalaki na etuka oyo ekokaki kondima (na Allah), longola sé etuka ya Yûnus tango endimaki mpe bondimi na bango esungaki bango? Na yango tolongolaki bango etumbu oyo esilisaki bango lokumu awa na nsé, mpe sima topesaki bango nkembo ya bomoyi ya mwa tango токе

    [99] Mpe soki Nkolo wayo alingaki nde bato banso awa na mokili bakomi bandimi, boye yo nde okondimisa bato nionso na makasi

    [100] Мре moto akoki kondima te sé na ndingisa ya Allah. Mpe apesaka etumbu na baye bakanisaka te

    [101] Loba: Bótala nini ezali na likolo na mabele. Kasi bilembo ya bokamwisi mpe na bakebisi, bakokaki te kosalisa bato bazanga kondima

    [102] Boye, bazali kozela eloko esusu, lokola etumbu eye ezalaki o tango ya baye babebisaki liboso? Loba: Bozela, ngai lokola nakozela elongo na bino

    [103] Sima tokangolaki batindami na biso elongo na baye bandimaki. Ndenge wana nde ezalaki lotomo epai na biso тропа kokangola bandimi

    [104] Loba: Oh bino bato! Soki bozali na tembe na lingomba lia ngai na kobondela te oyo bozali kobondela na botiki Allah, kasi nakobondela Allah oyo akoboma bino, mpe natindamaki тропа kozala moko o kati ya bandimi

    [105] Mpe balóla elongi nayo okati na lingomba ya bopeto ya bomoko ya Allah, kasi kozala elongo na basambeli bikeko na binzambe nzambe te

    [106] Mpe kobondela basusu te na botiki Allah baye bakoki kosala yo bolamu mpe mabe te. Soki osali yango, soló okozuama o kati ya babubi

    [107] Mpe soki Allah atiki ete pasi ezua yo, moto mosusu akoki kolongola yo yango te sé ye moko. Soki mpe alingeli yo bolamu, moko te akoki koboya bolamu naye, apesaka yango na oyo alingi o kati ya bawumbu naye. Mpe azali molimbisi atonda ngolu

    [108] Loba: Oh Bino bato! bosôló bosilaki koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino. Oyo akomikamba, amikambi тропа ye moko (o nzela ya semba) mpe oyo akomibungisa, amibungisi ye moko. Mpe nazali mobateli wa bino te

    [109] Mpe landa maye makiteli yo, mpe kanga motema kino Allah akosambisa; mpo ye azali zuzi malamu wa ba zuzi

    Surah 11
    Hud

    [1] Alif, lâm, râ. Buku eye mikapo miango mibongisami na lolenge ya kitoko mpe milimbolami na oyo atonda bwanya, moyebi ya ba sango

    [2] Bobondela te sé Allah, ya soló nazali mokebisi mpe mopesi sango тропа bino

    [3] Mpe bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino, sima botubela epai naye, akopesa bino bomengo kitoko kino na ntango oyo eyebani, mpe akopesa moto nyoso bolamu boye bokokani naye. Kasi soki boboyi solo ngai nazali kobangela bino etumbu o mokolo ya monene

    [4] Bokozongisama epai ya Allah, тре azali na bokoki na biloko binso

    [5] Kasi sólo, bazali kotondisa mitema mia bango na kobomba (ki bonguna), ata soki bazali komibomba na bilamba bia bango, ayebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa polele, ya soló, ye ayebaka maye mabombami o kati ya mitema

    [6] Мре ezali na nyama moko te na mabele sé bozui naye ezali kowuta epai ya Allah, mpe ayebi esika avandaka, na esika abombamaka. Nyoso esila kokomama o kati ya buku ya polele ya bosembo

    [7] Mpe ye nde akela mapata na mabele sima ya mikolo motoba, mpe ngwende naye ezalaki likolo ya mayi. Mpo ete ameka bino mpe ayeba nani kati na bino akosala misala ya malamu, mpe soki alobi na bango ete: Ya soló bino bokosekwa sima ya liwa na bino, baye bapengwa bakolobaka été: Ya soló, oyo ezali bondoki ya polele

    [8] Mpe soki tozelisi bango etumbu kino o mokolo moye moyebani, bakolobaka: Nini ezali kokanga yango? Mokolo moye ekoyelaka bango, bakokoka kokima yango te, na maye bazalaki kotiola

    [9] Mpe soki tomekisi moto bolamu bwa biso, sima tolongoli ye yango, ayokaka mabe mingi, mpe azangi kolikya

    [10] Mpe soki topesi ye bolamu sima ya pasi oyo azalaki na yango, akosepela na kokumisa тропа mabe oyo elongwe, mpe alobi: Pasi esili

    [11] Longola sé baye bazelaki, mpe basalaki misala milamu, bango bakozalaka na bolimbisi na lifuta linene

    [12] Tango mosusu ozali kosundola ndambu ya maye makiteli yo, mpe motema nayo etondi na pasi ndenge bazali kotiola yo na koloba: Mpona nini bakitiseli ye sanduku ya bomengo te to тре anzelu aya epai naye? Yo ozali sé mokebisi. Mpe Allah azali mobateli ya biloko binso

    [13] To bazali koloba été: Ezali lokuta asali yango ye moko (kurani). Loba: Boya na mikapo zomi lokola oyo nayei na yango, oyo bosala bino moko, mpe bobenga nani bolingi oyo akoki kosalisa bino na yango na botiki Allah, soki bozali na bosóló

    [14] Mpe soki bakoki te koya na yango, boyeba ya soló, été yango ekiti na mayele naye moko Allah, mpe ezali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ye, mpe boye bozali bamisokia

    [15] Baye bakolinga bomoyi bwa mokili na bisengo bia yango, tokopesa bango o kati ya mokili mpe tokokutolaka te

    [16] Bango nde bakozalaka na eloko te o mokolo mwa suka sé moto ya lifelo, maye basalaki awa na nsé, makozala pamba mpe makolimwa

    [17] Boye moto oyo azali na buku ya bosembo ya polele na maboko naye, ewuti epai na Nkolo naye, mpe nzeneneke akiti (anzelu gabiliyele) azali kotanga yango, boye akokani na moto oyo azali na eloko moko te ya bosembo na maboko naye? Mpe buku ya Müssa ekitaki liboso naye, (Muhammad) ezalaki bokambi mpe ngolu, baye wana bandimi na yango, kasi baye bakosangisa bakopengwa na yango o kati ya bato, moto nde elaka na bango, kozala na tembe te тропа yango. Ezali solo kowuta epai ya Nkolo wa yo, kasi ebele ya bato bazali kondima na yango te

    [18] Mpe nani oyo azali moto mabe koleka oyo abukeli Allah lokuta? Bango wana bakomemama epai ya Nkolo wa bango, mpe banzeneneke bakolobaka été: (ba anzelu): Baye wana nde bakoselaki Nkolo wa bango, na yango botutu ya Allah bokozala likolo ya bato mabe

    [19] Baye bazali kokanga nzela ya Allah, mpe bazali kolukela yango mbilinga mbilinga. Mpe bazali kondima na mokolo mwa suka te

    [20] Baye wana bakoki kokitisa nguya (ya Allah) te awa na mokili, mpe bakozua baye bakosalisa bango te liboso ya Allah. Etumbu na bango ekobakisama mpo bakokaki koyoka mpe kotala te

    [21] Baye wana nde bamibebisi bango moko, mpe babungisi binzambi nzambi oyo bazalaki kobondela mpe bazalaki kotia elikya ete bakosunga bango

    [22] Tembe ezali te été: Bakozala bazangi penza na mokolo ya suka

    [23] Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, mpe babangaki Nkolo wa bango, bango nde bato ya lola, bakozalaka libela o kati na yango

    [24] Lisanga oyo na oyo mosusu ndakisa na bango ezali lokola bato mibale: Oyo amonaka te, mpe ayokaka te, oyo mosusu amonaka mpe ayokaka. Boye bazali lolenge moko? Na yango bozali kokanisa te

    [25] Mpe tosilaki ya soló, kotinda Nûh epai ya bato baye, (alobi): Ya solo, ngai nazali mokebisi ya polele

    [26] Ete bobondela te sé Allah, ya sólo nazali kobangela bino etumbu o mokolo mwa pasi ya makasi

    [27] Bankumu ya bato naye baye bapengwaki balobaki naye ete: Tozali kornona yo ozali moto lokola biso, tomoni baye bazali kolanda yo, sé bato ya ntina te kati na biso, baye bazali na mayele moke. Mpe tozali kornona bino boleki biso te, kasi tozali kokanisa ete bozali babuki lokuta

    [28] Alobaki ete: Oh bato na ngai! В omoni boni soki nazali na elembo ya bosembo kowuta epai ya Nkolo wa ngai, mpe apesi ngai ngolu kowuta epai naye mpe bozangi yango, biso tokokanga bino na makasi te mpo bozua yango mpe bino bozali koyina

    [29] Oh! Bato ba ngai! Nazali kosenga bino yango misolo te. Lifuta lia ngai likowuta sé epai ya Allah. Мре nakoki kobengana bandimi te, ya soló, bango bakokutanaka na Nkolo wa bango. Kasi ngai nazali kornona bino bozali koyeba te

    [30] Oh bato ba ngai! Nani akosalisa ngai na (etumbu) ya Allah soki nabengani bango? Boye bozali kokanisa te

    [31] Mpe nakoki koloba na bino te ete: Nazali na sanduku ya bomengo ya Allah. Nakoloba mpe te ete nayebi mabombami, mpe nakoloba te ete: Nazali anzelu. Mpe nakoloba te na baye bozali kotala mpamba ete: Allah akopesa bango bolamu te. Allah ayebi malamu maye mazali o kati na bango, noki te nakozala elongo na bato mabe

    [32] Balobi: Oh Núh! Osili kosuanisa biso ya koleka, yela biso (etumbu) oyo ozali kolobela soki ezali ya sólo (elembo)

    [33] Alobi: Ya sólo, Allah nde akoyela bino yango soki alingi. Kasi bokokokaka kokima te

    [34] Toli na ngai ezali kosalisa bino te tango nazali kopesa bino yango, soki Allah alingi kobungisa bino, azali Nkolo wa bino, mpe bokozongisama epai naye

    [35] Mpe bazali koloba été azali kokosa! Loba: Soki nakosi lisumu yango ekozala na molimo na ngai moko. Mpe nazali mosika na makambo mabe oyo bozali kosala

    [36] Mpe emoniseli ekitelaki Nûh ete: Ya soló, bato nayo oyo bakondimaka nayo lisusu te, longola sé baye bandimaki liboso. Kasi komitungisama te тропа maye bazali kosala

    [37] Mpe tonga masuwa, na miso na biso mpe na emoniseli na biso, kasi kotuna ngai lisusu te тропа bato mabe. Ya sólo, bango bakozinda

    [38] Mpe abandi kotonga masuwa, mpe tango nyoso bankumu na bango bazali koleka, bazali koseka ye. Azongiseli bango eyano alobi: Soki bozali koseka biso, ya sólo, biso mpe tokosekaka bino ndenge bozali koseka

    [39] Mpe ezali na tango molai te bokoyebaka nani oyo etumbu ekoyela ye, etumbu ya makasi mpe ya kosilisa lokumu, mpe esengeli naye kozua etumbu oyo ekotikala libela

    [40] Kino tango mokano (mitindo) mia biso eyaki, mayi etombokaki na mpela ya makasi tolobaki naye été (Nûh): Kotisa okati ya masuwa lolenge ya banyama mibale mibale (mwasi na mobali) okotisa mpe libota nayo, longola sé ba oyo ekomamaki été esengeli bakufa, mpe baye bandimaki, kasi bandimaki naye te sé bato moke penza

    [41] Мре alobaki: Bomata okati na yango na nkombo ya Allah oyo afandisi yango likolo ya etamboli na yango. Ya soló, Nkolo na ngai azali penza molimbisi atonda ngolu

    [42] Mpe ebandi kotepatepa likolo ya mayi kino ememaki bango kati kati ya mbonge ya makasi lokola ba ngomba ya minene, mpe Nûh abengi mwana naye oyo aboyaki komata na masuwa: Eh mwana na ngai! Mata elongo na biso, kasi kotikala te elongo na bapengwi

    [43] (Mwana) ayanoli été: Nakomata likolo ya ngomba oyo тропа komibatela na mayi. (Nûh) alobaki naye été: Lelo mobateli akozala te тропа etumbu ya Allah, longola sé oyo akoyokela ye mawa. Na sima mbonge ekaboli bango, mpe (mwana waye) atikalaki elongo na baye bazindisamaki (na mayi)

    [44] Mpe motindo epesamaki été: Oh mabele! Mela mayi nayo, oh mapata! Tika (konokisa mbula) mayi makutolamaki mpe masuwa makendeki kotelema likolo ya ngomba, nkombo na yango djudi. Mpe motindo ekweyaki été: Bato mabe balimwa

    [45] Mpe Nûh abelelaki Nkolo waye: Oh Nkolo wa ngai! Ya soló, mwana wa ngai azali o kati ya libota lia ngai, mpe elaka nayo ezali solo, mpe ozali zuzi ya bosembo koleka ba zuzi banso

    [46] Azongisi été (Allah): Eh Nûh! Azali o kati ya libota lia yo te, mpo mosala naye ezali malamu te. Mpe kotuna ngai te likambo liye ozali na boyebi na yango te. Ya solo, nazali kopesa yo toli été: Ozala mosika na baye bazangi boyebi

    [47] (Nûh) alobaki été: Eh Nkolo! Ya solo, nasengi libateli nayo mpo été nasenga yo maye nazali na boyebi na yango te, mpe soki olimbisi ngai te, mpe oyokeli ngai mawa te, nakozala elongo na bazangi

    [48] Mpe motindo mopesamaki été: Eh Nûh! Kita na masuwa na kimia na biso, mpe mapamboli ebele likolo nayo na bato baye bazali elongo nayo. Mpe basusu bakoya sima nayo, tokopesa bango bomengo ya tango moke, sima etumbu ya biso ya makasi ekozua bango

    [49] Wana ezali ba sango ya mabombami tozali kokitisa epai nayo, kasi oyebaki yango liboso te, yo (mohamed) na bato nayo liboso nayo. Na yango, esengeli nayo koyika mpiko, mpo été suka ya malamu ezali тропа babangi (Allah)

    [50] Мре (totindelaki) bato ya aad, ndeko wa bango Hûd. Alobaki: Oh bato bangai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye, kasi bozali sé babuki lokuta

    [51] Oh bato bangai! Nazali kosenga bino yango lifuta te, lifuta lia ngai lizali sé epai ya mokeli wa ngai. Boye bozali koyeba te

    [52] Mpe oh bato bangai! Bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino, sima botubela epai naye. Akonokisela bino mbula kowuta o likolo ya kolandana, mpe akobakisela bino bokasi likolo lia bokasi. Kasi boboya (ye te), noki bokokoma batomboki

    [53] Balobi: Eh Hûd! Oyeli biso bilembo te, mpe tokotika banzambe ba biso te тропа maloba nayo, mpe tokondimela yo te

    [54] Biso tokoloba sé été: Moko kati na ba nzambe na biso asili kosala yo mabe, alobaki na bango ete: Ya soló, ngai nazui Allah nzeneneke wa ngai, bino mpe bozala nzeneneke été ngai nawangani mpe nazali mosika na bikeko na bino na maye bozali kosangisa (Allah)

    [55] Soki ye te (kotika Allah), bosalela ngai likita bino banso (na banzambe na bino), mpe bozelisa ngai te

    [56] Ya sólo, natie elikia na ngai epai ya Allah Nkolo wa ngai mpe Nkolo wa bino. Eloko moko te ekoki kozala na esika na yango sé ayeba yango (mpe azala na bokoki тропа yango). Ya sólo Nkolo wa ngai azali na nzela ya semba

    [57] Mpe soki boboyi, ya sólo, ngai našili kokomisa maye natindamaki na yango epai na bino. Mpe Nkolo wa ngai akolongola bino mpe akoya na bato ya malamu na esika na bino, mpe bokosala ye eloko moko te. Ya sólo, Nkolo wa ngai azali mobateli ya biloko binso

    [58] Mpe tango mitindo mia biso miyaki, tobikisaki Hûd na baye bandimaki elongo naye, na mawa та biso, mpe tobikisaki bango na etumbu ya ekasi

    [59] Mpe wana nde bato ya aad (etuka ya mboka ya ntoma Hûd) baye babundisaki bilembo bia Nkolo wa bango, mpe bazangaki kotosa batindami ba bango, mpe balandaki likambo lia lolendo mpe mabe

    [60] Mpe botutu elandaki bango awa nanse mpe kino o mokolo mwa suka ekozala lokola, ya sôló ba aad bapengwaki penza na Nkolo wa bango, kasi ba aad bazala mosika (babebisama) bato ya Hûd

    [61] Mpe (totindaki) epai ya bato ya Thamûd, ndeko wa bango Swâlih. Alobaki: Oh bato bangai! Bobondela Allah. Bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ye. Ye nde akela bino kowuta na mabele, mpe akomisi bino ebele o kati na yango. Bosenga ye bolimbisi, sima botubela epai naye. Ya soló, Nkolo wa ngai azalaka pene тропа koyanola. (ba mbela)

    [62] Balobaki: Eh Swâlih! Yo ozalaki elikia na biso liboso. Okomi kopekisa biso tobondela banzambe ya bankoko na biso? Ya sólo penza, tozali na tembe mingi тропа maye ozali kobenga biso na yango

    [63] Alobi: Oh bato bangai! Bomoni boni soki nazali na elembo kowuta epai ya Nkolo wa ngai mpe apeși ngai ngolu kowuta na yango? Nani oyo akosunga ngai epai ya Allah soki na zangi kotosa ye (Allah)? Noki bokobakisela ngai pasi likolo ya pasi

    [64] Mpe Oh bino bato na ngai! Oyo ezali náqat ya Allah, atindeli bino lokola elembo. Botika ye aliya na mabele ya Allah, kasi bosala ye mabe moko te, noki etumbu ekozua bino na lombangu

    [65] Kasi babomaki yango mpe basasi yango, mpe alobi na bango: Bokokangama kati na bandako na bino mikolo misato, wana ezali elaka ya tembe te

    [66] Mpe tango mitindo mia biso mikweyaki, tobikisaki Swálih na baye bandimaki elongo naye na mawa ma biso mokolo ya bozangi lokumu. Ya soló, Nkolo wayo azali na bokasi atonda nguya

    [67] Mpe bogangi bwa etumbu bozuaki babubi, mpe bakomaki bibembe o kati ya ba ndako bia bango

    [68] Lokola bazalaki na nkembo liboso te okati na yango. Ya soló, bato ya Thamúd bapengwaki na Nkolo wa bango kasi bato ya Thamûd babebisamaki

    [69] Мре ya soló, batindami na biso bamemelaki Ibrâhîm sango elamu, tango bakutanaki naye balobi: Kimia ezala nayo! Alobaki été: Kimia na bino mpe lokola! Mpe ewumelaki te abonzelaki bango libonza lia nyama. (ngombe) ya kotumba

    [70] Mpe tango amoni ete bazali kozua te, abangi, balobi: Kobanga te. Ya sólo, totindami epai ya bato ba Loth

    [71] Mwasi waye azalaki ya kotelema, (sarah) mpe aseki, mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq mpe sima naye Ya’qüb

    [72] Alobi: Oh mawa na ngai! Nabota mpe ngai nakomi mobange, mpe mobali wa ngai oyo mpe mobange. Ya soló oyo ezali (likambo) ya kokamwisa

    [73] Balobi: Ozali kokamwa na mikano mia Allah? Tika été mawa mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na bino bato ya libota oyo. Pamba te ya sólo, Allah akumama mpe asanzolama na lokumu mingi

    [74] Mpe tango bobangi esili Ibrâhîm, sango elamu eyeli ye ete azali kosolola na biso тропа likambo lia bato ba Loth

    [75] Ya soló, Ibrâhîm azalaki moto malamu, azalaki kozonga mpe kotubela mingi epai ya Nkolo naye

    [76] Eh Ibrâhîm! Mitiya mosika na oyo. Mpo ya soló, mitindo mia Nkolo wayo misili koya. Мре ya sólo, etumbu ezongisama te ekozua bango

    [77] Mpe tango batindami na biso bakomaki epai ya Loth, ayokaki pasi mpe mawa тропа bango. Alobaki: Lelo nde mokolo mwa etumbu ya somo

    [78] Mpe bato baye bayeli ye mbangu. Mpe liboso bazalaki kosala makambo mabe, mpe alobaki na bato naye été: Oh bato bangai! Bótala bana ba ngai ya basi bango oyo, bazali peto mpe malamu тропа bino. Bobanga Allah kasi boyokisa ngai soni te тропа bapaya ba ngai. Boye bozali ata na moto moko ya malamu o kati na bino te

    [79] Bayanoli: Oyebi malamu penza ete tozali na posa ya bana nayo ya basi te, (bango bazalaki kolinga kozua basi na mboka ena te) ya soló, oyebi eloko nini tozali kolinga

    [80] Alobaki na bango été: Ah soki nazalaki na makasi ya kotelemela bino, to mpe nazua ata lisungi mosusu ya makasi koleka

    [81] (Bapaya) balobi: Eh Loth! Ya sólo, tozali batindami ya Nkolo wa yo. Bakosala yo eloko te, kende noki na libota lia yo okati na butu. Мре токо te kati na bino abongola elongi sima te, longola sé mwasi wayo (oyo azangaki kotosa), mpe akozua oyo ekozua basusu. Solo elaka na bango ekozala na ntongo, boye ntongo ezali pene te

    [82] Mpe tango motindo mwa biso mokweyaki, tobalusaki (mboka yango) na ba ngambu inso, mpe tobebisaki yango, mbula ya mabanga esangani na mabele ya moto ekitelaki bango na bango

    [83] (Mabanga yango) ezalaki na bilembo yango kowuta epai ya Nkolo nayo, mpe yango ezalaki mosika te na bato mabe (babubi)

    [84] Mpe (totindaki) epai ya bato ya mad’yan, ndeko wa bango Shuaïb, alobaki na bango été: Oh bato na ngai! Bobondela Allah oyo bozali na nzambe mosusu te sé ye. Мре bokutola emekelo, na kilo te. Ya soló, na moni bino na bomengo, mpe ya sólo, nazali kobangela bino etumbu o mokolo oyo ekozinga biloko binso

    [85] Oh bato bangai! Bomeka bimekelo na bakilo na bosembo, kasi kokutolela bato bimekelo bia bango te, mpe bosala mabe o kati ya mokili te

    [86] Bomengo ya libela epai ya Allah ezali malamu тропа bino soki ya sólo bozali bandimi, mpe nazali mokengeli likolo na bino te

    [87] Balobi naye été: Eh Shuaíb! Losambo nayo nde ezali kotinda yo mpo totika kobondela biye bankoko na biso babondelaki to epekisa biso ete tosalela bozui na biso lolenge tolingi? Ya sólo penza, ozali moto malamu ya bosóló koleka

    [88] Alobaki été: Oh bato ba ngai! В omoni ndenge nini soki nazali na elembo ya bosóló kowuta epai ya Nkolo wa ngai, mpe apesi ngai bozui bolamu kowuta epai naye? Mpe mposa na ngai ezali te été na zala na bino na bokeseni na maye nazali kopekisa bino. Kasi nazali kolinga sé mbongwana ya malamu na ndenge ya bokoki na ngai. Kasi elonga na ngai ekowuta sé epai na Allah. Nati elikia na ngai epai naye mpe epai naye nazali kotubela

    [89] Mpe oh bato na ngai! В órnemela ngai bokeseni na kotungisa ngai te, noki etumbu ekozua bino, ndenge ezuaki bato ba Núh na bato ba Hûd na bato ba Swálih, mpe (ndakisa) ya bato ba Loth ezali mosika te тропа bino

    [90] Mpe bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino mpe botubela epai naye. Ya soló, Nkolo wa ngai azali Nkolo wa mawa atonda bolingo

    [91] Balobi: Eh Shua’íb! Tozali kososola te ebele ya maye ozali koloba, mpe tozali kornona yo ozali sé motawu o kati na biso soki ezalaki libota nayo te, tolingaki kosala yo mabe. (kobamba yo mabanga) mpe ozali na nguya moko te likolo na biso

    [92] Alobaki: Oh bato ya mboka na ngai! В ozali kornona ete libota na ngai ezali na lokumu ераї na bino koleka Allah, тропа maye bozali kopesa mikongo? Ya sólo, Nkolo wa ngai (ayebi) manso bozali kosala

    [93] Mpe oh bato ba ngai! Bosala maye bokolinga, ngai mpe nakosala. Kala te bokoyebaka nani oyo etumbu ekozua ye, oyo ekopesa ye soni mpe nani azalaki mobuki lokuta. Bozela, (eloko nini ekosalema) ngai mpe nazali kozela elongo na bino

    [94] Мре tango mobeko mwa biso moyaki, tobikisaki Shuaib na baye bandimaki elongo naye, na mawa kowuta epai na biso, mpe babubi bazuaki bogangi (bwa etumbu) mpe bakomaki bibembe o kati na bandako bia bango

    [95] Lokola bavandaki kala te kati na yango, kasi ba mad’yan bazalaki mosika, ndenge moko ba Thamúd bazalaki mosika na ngolu (ya Allah)

    [96] Мре tosilaki solo kotinda Müssa na makamwisi ma biso na bokonzi bwa polele

    [97] Epai na falo na bankumu ba ye. Kasi balandaki makambo ma falo, kasi makambo ma falo mazalaki na bokambi te

    [98] Akozalaka liboso lia bato baye o mokolo mwa suka, mpe akomemaka bango na moto. Nde oyo suka ya liziba ya mabe

    [99] Mpe botutu ekolanda bango awa na nsé, mpe na mokolo ya suka lokola. Mpe oyo likabo mabe bakopesama

    [100] Wana nde ba sango ya bituka tozali kopesa yo, (Muhammad), kati na yango misusu mizali kino moyi mwa lelo, mpe misusu misilaki kolimwa kala

    [101] Tobubaki bango te kasi bango moko bamibubaki. Mpona banzambe na bango baye bazalaki kobondela batiki Allah, esalisaki bango na eloko te tango mobeko mwa Nkolo wayo moyaki, kasi ebakiselaki bango sé bozangi

    [102] Ndenge wana nde Nkolo wayo asalaka, soki alingi kobeta mboka ya babubi. Ya soló, etumbu naye ezalaka mpasi mpe makasi

    [103] Wana ezali solo elembo na oyo akobanga etumbu ya mokolo ya suka. Mokolo moye bato bakosanganaka, mpe mokolo wana nde ekotatolama

    [104] Mpe tokozelisaka yango te, sé na tango eye etiyamaki

    [105] Mokolo moye ata molimo moko te akolobaka, sé na ndingisa naye kati na bango bakolelaka mpe basusu bakosepelaka

    [106] Soki тропа bato ya mpasi, bakozala na moto wapi epai bakonyokwama mpe bakolela makasi

    [107] Bakozalaka kati na yango libela, ndenge likolo na mabele ekowumela, sé kaka oyo Nkolo nayo alingi. ya soló, Nkolo wayo asalaka maye alingi

    [108] Mpe baye bakozala na bisengo, bakozalaka o kati ya lola libela, ndenge bowumeli ya likolo na mabele sé kaka Nkolo wayo akolinga lolenge mosusu, likabo oyo ezali kokatana te

    [109] Mpe kozala na tembe te тропа maye bazali kobondela. Bazali sé kobondela maye bankoko ba bango babondelaki liboso. Mpe ya sólo, tokopesaka bango manso maye masengeli тропа bango, kasi makokutolama te

    [110] Mpe tosilaki solo kopesa Mûssa buku, kasi bakabwanaki тропа yango. Soki liloba litiyamaka liboso kowuta epai ya Nkolo wa yo te, elingaki kokatama kati kati na bango. Mpe ya sólo bango bazalaki na tembe o kati na yango

    [111] Mpe ya soló Nkolo wayo akofutaka bango banso engebene na misala mia bango. Ya soló, azali moyebi na maye bazalaki kosala

    [112] Misembola o nzela ya semba na ndenge batindaki yo elongo na baye batubeli (epai ya Allah), kasi kotomboko te, ya sólo ye amonaka maye bosalaka

    [113] Kasi bomipesa epai ya babubi te, soki te moto mokozua bino. Bozali na basungi basusu te, sé Allah ye mei, soki te bokosalisamaka te

    [114] Mpe telemisa losambo na ebandeli ya moyi mpe nasúka na ntango moko ya butu. Ya sólo, misala milamu milongolaka miye ya mabe. Wana ezali bokundoli тропа baye bazali kokanisa

    [115] Kanga motema, ya sólo, Allah abungisaka lifuta lia babongisi te

    [116] Soki ya sólo, bato ba kala bazalaka liboso na bino, baye bakoki kopekisa kosala mabe, kati na mokili, bazalaki sé токе baye tobikisaki o kati na bango? Kasi babubi balandaki mabe mpe balekisaka ndelo o bisika bazalaki, mpe bazalaki bato mabe (babomi)

    [117] Mpe Nkolo wayo akoki kobebisa mboka moko te, soki bato na yango bazali babongisi

    [118] Мре soki Nkolo wayo alingaki, nde atiaki bato bazala umma moko. Kasi balingaki sé kokabuana

    [119] Longola sé baye Nkolo nayo akoyokela mawa. Mpo na yango wana nde akelaki bango. Мре liloba lia Nkolo wayo likoki: Nakotondisa lifelo na bilima (badjini) na bato banso

    [120] Mpe manso tozali koyebisa тропа makomi ma batindami, mazali тропа kolendisa motema mwa yo. Nakati na yango solo esili kokomela yo mpe mateya na bokundoli тропа bandimi

    [121] Mpe loba na baye bazali koboya kondima ete: Bosala ndenge bolingi, biso mpe tozali kosala

    [122] Mpe bozela, ya soló, tozali kozela lokola

    [123] Mpe Allah ayebaka mabombami manso maye mazali o likolo na o mabele, mpe epai naye nde makambo manso makozongaka. Bondela ye mpe mipesa naye, kasi Nkolo wayo azangaka koyeba te maye bozali kosala

    Surah 12
    Yusuf

    [1] Alif, lâm, râ. Wana ezali mikapo mia buku ya polele

    [2] Ya soló, tokitisaki yango kurani na lokota ya arabo mpo ete bososola

    [3] Tozali koyebisa yo masolo ma kitoko maye tokitisaki kurani eye epai nayo, mpe ata soki ozalaka liboso na yango o kati ya baye bazangaki bokebi

    [4] Tango Yûsuf alobaki na tata waye: Oh tata na ngai! Ya solo, ngai namoni na ndoto minzoto zomi na moko, mpe mwese na sanza, mizali kogumbamela ngai

    [5] Alobaki: Oh mwana wa ngai! Kobetela bandeko bayo ndoto nayo eye te, mpo bakoki kosalela yo likita ya mabe. Ya solo satana azali monguna ya polele тропа moto

    [6] Mpe ndenge wana nde Nkolo wayo akopona yo, mpe akolakisa yo ndimbola ya bandoto mpe akokokisa bolamu bwa ye likolo nayo, mpe likolo lia bana ba Ya’qúb, lolenge akokisaki yango liboso epai ya baboti nayo mibale, Ibrâhîm na Is’háq. Ya soló Nkolo wayo azali moyebi atonda bwanya

    [7] Ezalaki ya sólo, epai ya Yûsuf na bandeko baye bilembo тропа batuni mituna

    [8] Tango balobaki ete: Yûsuf na ndeko waye balingami epai ya tata wa biso koleka, mpe biso tozali lisanga lia makasi. Ya sólo, tata wa biso azali na libunga lia polele

    [9] Boboma Yûsuf to botinda ye o mboka nyoso ya mosika. Wana nde elongi ya tata wa bino ekotala bino mbala moko, mpe bokozala sima na yango bato balamu

    [10] Moko kati na bango alobi: Boboma Yûsuf te, kasi bobwaka ye o kati ya libulu lia mayi ya mozindo, bakozua ye na baleki nzela, soki bokosala

    [11] Balobaki: Eh tata wa biso! Mpona nini te ozali kondimela biso mpona Yûsuf mpe tozali na makanisi malamu epai naye mpe biso tokopesa ye toli

    [12] Tinda ye akende elongo na biso lobi kotambola mpe kosakana, kaši ya soló tokobatela ye

    [13] Alobaki: Solo, ezali kopesa ngai mawa ete bökende naye mpe nazali kobanga ete mbwa ya zamba eliya ye. O tango eye bokozala na bokebi naye te

    [14] Balobaki: Soki mbwa ya zamba elei ye na biso tozali ebele, wana nde tozali bazangi

    [15] Mpe tango bakendeki naye, bayokani ete ba bwaka ye na libulu lia mayi ya mozindo liye bakoki kornona ye te, mpe tomonisa naye ete: Okoyebisa bango likambo lia bango liye, mpe bakoyeba te

    [16] Mpe bazongi epai ya tata wa bango na pokwa bazali kolela

    [17] Balobi: Eh tata wa biso! Ya soló, tokendeki komekana тропа kobwaka makonga na mokili, тре totikaki Yûsuf pene na biloko bia biso mpe mbwa ya zamba alei ye. Mpe yo okoki kondimela biso te ata soki tolobi bosembo

    [18] Mpe bamemi simisi naye, bapakolo yango makila ya lokuta. Alobi: Milimo mia bino mitindaki na likambo moko boye, kasi kokanga motema ezali malamu. Allah akosalisa ngai na maye bosali

    [19] Мре baleki nzela bato ya mombongo batindi moko wa bango mpo akende kotoka mayi тропа bango, tango akitisi katini naye mpo atoka mayi, alobi: Sango elamu, oyo elenge mobali! Mpe batiaki ye na mikumba mpo bateka ye. Kasi Allah nde moyebi na oyo bakosala

    [20] Mpe bateki ye na talo ya токе, na ndambu ya misolo mia dirhams mia kotanga, bazuaki ye na motuya te

    [21] Mpe oyo asombaki ye azalaki moto ya ezipito, mpe alobaki na mwasi naye: Zúa ye mpe bokolo ye malamu, mpo tango mosusu akosalisa biso to mpe tozua ye mwana na biso. Mpe ndenge wana nde tosalaki na Yûsuf o kati na mokili, mpe totangisaki ye ndimbola ya bandoto. Mpe Allah azali ye moko mokonzi ya makambo naye kasi ebele ya bato bazali koyeba te

    [22] Mpe tango akoli, topesaki ye bwanya mpe boyebi. Mpe ndenge wana nde tofutaka babongisi

    [23] Mpe kasi (mwasi wa mokonzi) oyo ayambaki ye o ndako naye amekaki mpo akweisa ye na ekobo, mpe akangelaki ye bizibeli bia ndako mpe alobi: Yaka; na sili kobongama тропа yo, alobi ete: (Yûsuf) Allah abatela ngai. Ya soló azali Nkolo wa ngai, apesi ngai libateli ya malamu, ya solo bato mabe bakolongaka te

    [24] Mpe asilaki kolula ye. Ye (Yûsuf) mpe lokola, alulaki ye (mwasi ya mokonzi) soki amonaki elembo ya Nkolo waye te, na boye nde totiyaki ye mosika na mabe mpe mosika ya ekobo, ya sólo ye azalaki moko ya bawumbu na biso ya malamu

    [25] Mpe bango banso babale balandanaki mbangu о ngambu ya bizibeli bia ndako mpe apasolaki simisi naye apasoli simisi ya Yûsuf osima ya mokongo mpe bakutani na mobali (wa mwasi ona) na ezibeli ya ndako. Alobi: Lifuta nini okopesa na oyo alingaki kosala mwasi wayo mabe sé ezala boloko to etumbu ekasi

    [26] Alobi (Yûsuf): Ezali ye nde alingaki kokweya na ngai, mpe nzeneneke moko o kati ya libota lia ye alobi: Soki simisi naye epasuki liboso, wana alobi bosoló, mpe ye azali kati ya babuki lokuta

    [27] (Kasi) soki simisi naye epasuki na sima, akosi, mpe ye (Yûsuf) azali kati ya balobi bosôló

    [28] Мре tango (mobali) amoni simisi epasuki na sima alobi: Ya soló, ezali motambo ya bino (basi) ya mabe, ya soló motambo na bino (basi) ezali monene koleka

    [29] Yûsuf, kokanisa lisusu na oyo te, mpe yo (mwasi) senga bolimbisi тропа lisumu lia yo, mpo ozalaki o kati ya basali mbeba

    [30] Mpe tango basi okati ya mboka balobi ete: Mwasi ya mokonzi alingaki kokweisa elenge mobali naye ye moko! Ya sólo penza, asili kolangwa ye bolingo, ya sólo biso tomoni été asili kobunga nzela penza

    [31] Mpe tango ayoki biloba loba bia bango, abengi bango тре alengeleli bango lipati тре akaboleli bango ba mbeli, sima alobi: Віта liboso lia bango. Tango bamoni ye basepeli naye mpe bamikati bapota na maboko та bango na bolobi: Ah Allah! Abongisa ye, oyo azali moto te, akoki kozala anzelu wa lokumu

    [32] Alobaki na bango été: Wana nde oyo bozalaki koloba тропа ngai. Ya sólo ngai nalukaki kokweisa ye kasi ye amibatelaki. Na yango soki asali te oyo na lingi, akokoto boloko mpe akokitisama na kosila lokumu

    [33] Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Boloko ezali malamu тропа ngai koleka oyo bazali kobenga ngai na yango. Mpe soki obateli ngai te na likita na bango, nakokweya na bango, mpe nakozala o kati ya bazoba

    [34] Nkolo waye andimelaki ye, atiye mosika na mayele та bango mabe: Ya soló, ye azali moyoki atonda boyebi

    [35] Sima emonanaki polele na liboso na bango été (Yûsuf) asali eloko te, bamonaki été esengeli kokotisa ye na boloko kino tango oyo esengeli

    [36] Mpe akotaki boloko elongo na bilenge mibali mibale. Moko wa bango alobi na Yûsuf: Ya soló, namoni na ndoto été nazali kosala masanga. Mpe mosusu alobi: Ngai namoni namemi mapa na mutu na ngai bandeke bazali kólia yango. Limbola biso ntina na yango nyoso, mpo ya soló tozali kornona yo moto ya malamu

    [37] Alobaki bileyi oyo bitiyami тропа bino bikoki koyela bino te, sé kaka nayebisa bino ndimbola na yango yambo eyela bino. Ezali тропа bino, ndenge Nkolo wa ngai atangisi ngai. Ya soló, natikaki lingomba lia bato baye bandimaka na Allah te, mpe bazali kondima na mokolo ya suka te

    [38] Mpe nalandi lingomba lia baboti na ngai, Ibrâhîm na Is’hâq na Ya’qüb. Esengeli na biso te tosangisa Allah na eloko mosusu. Wana nde bolamu bwa Allah epai na biso na epai ya bato banso, kasi ebele ya bato bazali kotondo te

    [39] Oh! Bato ba ngai ba boloko! Boye binzambe nzambe bazali malamu koleka to Allah wa bomoko mpe wa bokoki

    [40] Bozali kobondela basusu botiki ye, bazali sé bankombo oyo bopesi bino moko na bankoko na bino biye Allah akitisaki elembetele te. Kasi mobeko ezali sé ya Allah atindaka sé bobondela ye moko. Wana nde lingomba lia semba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te

    [41] Oh bato ba ngai ba boloko! Mpona ndoto na bino, moko kati na bino akomelisa mokonzi naye masanga, mpe mosusu bakobaka ye, mpe bandeke bakolia motu naye. Likambo liye botunaki ngai lisili kokatama

    [42] Mpe (Yûsuf) alobi na oyo abimaki na boloko: Lobela ngai epai ya mokonzi nayo. Kasi satana abosanisi ye bokundoli bwa Nkolo naye, yango awumelaki na boloko pene na mibu ebele

    [43] Mpe mokonzi alobi: Ya sôló namoni na ndoto, bangombe sambo ya nzoto kolongonu bizali koliama na bangombe sambo ya kokondo, mpe bambuma sambo ya mayi mapondu mpe misusu ya kokauka. Eh bankumu! Bopesa ngai ndimbola ya ndoto ya ngai, soki boyebi kolimbola ndoto

    [44] Balobaki: Bandoto bizali ya kosangana mpe bizali mabe, mpe biso toyebi kolimbola ndoto yango te

    [45] Kasi oyo abimaka na boloko, akanisi mpe alobi: Ngai nakolimbola bino ndoto yango, botinda ngai

    [46] Oh Yûsuf moto wa bosôló! Yebisa biso тропа likambo lia ngombe sambo ya nzoto kolongonu bizali koliama na bangombe sambo ya kokonda, mpe mbuma sambo lia malamu, mpe bisusu lia kokauka mpo nakende koyebisa bato tango nakozonga, mpo bakoka koyeba

    [47] Alobi (Yûsuf): Bokolona milona mibu sambo ya kolandana. Мре botika yango na banzete na yango, longola sé moke ya kólia nde bokobuka

    [48] Sima na yango, mibu sambo mikolanda mikozala mia paši, bato na yango bakolia biye bobombaki longola sé moke ya biye bokolona

    [49] Sima mobu moko mokoya, mbula ekonoka тропа kosalisa bato, тре nakati na yango (mobu) bakokamola (bambuma)

    [50] Мре mokonzi alobi: Bomemela ngai ye, tango motindami ayei kopesa ye (Yûsuf) sango ena, (Yûsuf) alobi: Zonga epai ya mokonzi wayo, tuna ye boni sango ya basi baye bamizokisaki maboko? Ya soló, Nkolo wa ngai ayebi likita ya mabe na bango

    [51] (Mokonzi alobi na bango): Eloko nini etindaki bino bokweyela Yûsuf? Bayanoli: Na Allah nde mosepelisi, toyebi ye na eloko ya mabe te. Mpe mwasi wa mokonzi alobi: Sikoyo nde bosóló boyebani. Ezalaki nde ngai nalingaki komikweisa epai naye, mpe ye azalaki o kati ya balobi bosôló

    [52] Wana nde mpo ayeba ete nasalaki ye mabe te tango azalaki te, mpe ya soló, Allah akambaka likita ya bato ya mabe te

    [53] Mpe nakoki komilongola te. Ya sólo, molimo motindaka na mabe, longola sé oyo Nkolo wa ngai akoyokela ye mawa. Ya solo, Nkolo wa ngai azali molimbisi atonda mawa

    [54] Mpe mokonzi alobi été: Boyela ngai ye azala ya ngai moko. Mpe tango asololi na mokonzi, alobaki été: Banda lelo okomi moto wa bosembo mpe ya lokumu epai na biso

    [55] Alobi (Yûsuf): Tiya ngai nazala mobateli ya sanduku ya mboka, ya solo, ngai nayebi kobatela

    [56] Mpe lolenge wana nde topesaki Yûsuf bokonzi na mboka wana, asalaki manso maye alingaki kosala. Topesaka ngolu na biso na nani tolingi, mpe tokobungisaka lifuta lia bato malamu te

    [57] Mpe lifuta lia mokolo ya suka lileka kitoko тропа bandimi, mpo bazalaki kobanga

    [58] Mpe bandeko ba Yûsuf bayei bakoti epai naye, ayebi bango kasi bango bayebi ye te

    [59] Mpe tango apesi bango biloko biye alengeleki тропа bango, alobi: В óyela ngai ndeko wa bino, oyo atikalaki epai ya tata wa bino. Boye bozali kornona te ete nazali kokokisa emekeli (kilo) bwa ngai Mpe nazali malamu koleka

    [60] Kasi soki boyeli ngai ye te, bokozua biloko te epai na ngai, mpe bopusana pene na ngai te

    [61] Mpe balobi: Tokomeka koyebisa tata waye. Mpe ya soló, tokomeka kosala yango

    [62] Mpe alobi na basali baye: Botiya biloko bia bango na basaki bia bango. Mpo bakoka koyeba yango tango bakozonga kowuta na libota lia bango, mpe mpo bakoka kozonga

    [63] Mpe tango bazongeli tata wa bango, balobi: Oh tata wa biso! Baboyi kopesa biso biloko. Pesa biso ndeko wa biso mpo tokoka kozua biloko, mpe ya sólo, biso tokobatela ye

    [64] Alobaki na bango été: Bokanisi été nakopesa bino ye lokola ezalaki na ndeko naye liboso? Kasi Allah azali mobateli malamu aleka mawa

    [65] Мре tango bafungoli mikumba mia bango, bakuti biloko oyo batiyelaki bango bizali. Balobi: Oh tata wa biso! Tokolinga nini lisusu, bazongiseli biso biloko na biso nyoso. Mpe tokoleisa libota lia biso, mpe tokobatela ndeko wa biso, тре tokobakisa mokumba ya mpunda moko mpe wana ezali pasi te

    [66] Mpe alobi été: Nakotinda ye na bino te. Kino bosalela ngai malako epai ya Allah ete bokoyela ngai ye, longola sé bokufa bino banso. Tango bayeli ye yango, alobi: Allah nde mobateli wa manso na maye tolobi

    [67] Mpe alobi été: Oh bana na ngai! Bokota na ekoteli moko te, (bino banso), kasi bokota bipai na bipai. Nakoki kosalisa bino koleka Allah te, mobeko ezali sé ya Allah, mpe natiye elikya na ngai epai naye, mpe tika ete baye bamipesaka ba mipesa sé epai naye

    [68] Mpe tango bakoti na bisika biye balakisaki bango na tata wa bango, esalisaki bango na eloko te koleka mibeko mia Allah, ezalaki sé makanisi та Ya’qúb maye atiyaki. Kasi azalaki na boyebi mingi na maye tolakisaki ye, kasi ebele ya bato bazali koyeba te

    [69] Mpe tango bakotaki epai ya Yûsuf, batikeli ye ndeko waye, alobi: Ya soló, ngai nazali ndeko wayo, koyoka pasi te na maye bazalaki kosala

    [70] Mpe tango abongiseli bango mikumba ya bilei, atiye wolo ya emekeli na mokumba ya ndeko naye sima mobeleli abeleli bango ete: Eh bino bapaya bozali soló bayibi

    [71] Babaluki mpe balobi: Nini bobungisi

    [72] Balobi: Tobungisi nkeni ya walo ya mokonzi. Tozali koluka yango na mikumba, soki nani oyo azui yango, mpe ngai nazali moyangeli

    [73] Balobi: Na Allah, boyebi malamu penza ete biso toyaki te mpo tobebisa na mboka eye, tozali mpe bayibi te

    [74] Balobi: Etumbu ekozala nini soki bozali kokosa

    [75] Balobi: Etumbu ekozala sé epai ya oyo bokokuta eloko ena (bozali koluka) na mokumba naye, wana nde lifuta lia babubi

    [76] Mpe abandaki na mikumba na bango liboso, na sima abandi na oyo ya ndeko naye mpe akutaki yango na mokumba ya ndeko naye. Ndenge wana nde tosalaki na Yûsuf, kasi alingaki kokanga ndeko waye te, engebene na mobeko mwa mokonzi, longola sé maye Allah alingaki. Totombolaka bisika bia baye tolingi, mpe likolo lia moto nyoso topesi ye boyebi, okokuta oyo aleki ye na boyebi

    [77] Balobi: Soki ayibi, (alandi) sé ndeko naye asilaki mpe koyiba liboso. Mpe Yûsuf, ayokaki yango mpasi na motema, kasi amonisaki bango yango te, mpe alobi na motema ete: Mabe na bino oyo eleki, mpe Allah ayebi maye bozali koloba

    [78] Balobi: Eh mokonzi! Tata waye azali mobange wa kala. Zua moko o kati na biso na esika naye. Ya soló, tozali kornona yo o kati ya babongisi

    [79] Alobi: Allah Abátela ngai! Tokozua sé oyo tokuti ye na biloko bia biso, ya sólo soki te, tokozala o kati ya babubi

    [80] Mpe tango elikya ya komema ye esili bango, basololi na bobombami. Mpe yaya wa bango alobi: Boye boyebi ete tata wa bino asilaki kozua elaka na bino epai ya Allah liboso тропа Yûsuf? Kasi bozangaki kokokisa yango, nakolongwa awa te kino tata wa ngai akopesa ngai ndingisa, to Allah alongisa ngai na likambo liye, mpe (ye) azali mokati malamu. (ya likambo)

    [81] Bozonga epai ya tata wa bino, mpe boloba; Oh tata wa biso! Ya soló, mwana wayo ayibi. Mpe tokotatola sé oyo toyebi, kasi, toyebi mabombami te

    [82] Mpe tuna mboka (bato ya mboka) epai towuti, esika eye tokomelaki, mpe lisanga na biso bato ya mobembo. Ya sólo tozali penza koloba bosóló

    [83] Alobi (ya’qúb): Milimo mia bino mitindi bino na likambo mabe. Kasi kokanga motema ezali kitoko mpe malamu, tango mosusu Allah akozongisela ngai bango banso. Ya sólo, ye azali moyebi atonda bwanya

    [84] Mpe apesi bango mokongo mpe alobi: Nazali na mawa тропа Yûsuf! Mpe miso maye matondi na pizoli na mawa, mpe ye akangi motema

    [85] Balobi: Na nkombo ya Allah okotika kokanisa Yûsuf te, kino mabe ekozua yo to okokufa

    [86] Alobi: Na paši mpe mawa na ngai, nazali komilela sé na Allah, mpe nayebi тропа Allah oyo bino boyebi te

    [87] Oh! Bana bangai! Bökende koluka Yûsuf na ndeko waye, mpe bozanga elikya te na Allah. Longola sé bapengwi тро bango bazanga elikya epai ya Allah

    [88] Mpe tango bakoti epai naye balobi: Oh mokonzi! Nzala ezui biso na mabota та biso, mpe toyei na biloko bisusu biye bizali na talo te, mekela biso mpe salisa biso, ya soló Allah afutaka basali bolamu

    [89] Alobi Boye: Bozali koyeba maye bosalaki na Yûsuf na ndeko naye tango bozalaki na kozanga koyeba

    [90] Balobi: Ya sólo, yönde Yûsuf? Alobi: Ngai Yûsuf mpe oyo ndeko wa ngai Allah asili kosalisa biso. Ya soló, oyo akobanga ye mpe akangi motema, ya sólo penza, Allah abungisaka bolamu bwa babongisi te

    [91] Balobi: Na nkombo ya Allah! Ya sólo, Allah atomboli yo koleka biso, mpe tozalaki bato ya mbeba

    [92] Alobi: Kobanda lelo oyo etumbu ezali te тропа bino. Allah alimbisa bino, ye nde azali na ngolu koleka

    [93] Bökende na simisi na ngai oyo, mpe bobwaka yango na elongi ya tata na ngai, miso naye ekofungwama. Мре па sima boyela ngai libota nabino mobimba

    [94] Mpe tango bakotaki na ndelo ya mboka tata na bango alobaki été: Ya soló, ngai nazali koyoka solo ya Yûsuf, ata soki bozali kozua ngai na lokuta

    [95] Balobaki naye: Na nkombo ya Allah! Ya sólo, yo ozali penza na libunga nayo ya kala

    [96] Мре tango momemi sango malamu akomaki, abwakaki simisi na elongi naye mpe miso naye efungwamaki. Mpe alobaki na bana été: Boye nayebisaki bino te ete ya soló, Allah apeși ngai boyebi boye bozali na yango te

    [97] Balobi: Oh tata wa biso! Sengela biso tubela na masumu та biso, ya soló, tosalaki mabe

    [98] Alobi: Nakosengelaka bino bolimbisi epai ya Nkolo wa ngai, ya sólo, ye azali molimbisi atonda ngolu

    [99] Mpe tango bakotaki epai ya Yûsuf akendeki koyamba baboti naye (tata na mama), mpe alobaki: Bokota na ezipito na kimia nyoso mpe na bolingo ya Allah

    [100] Mpe amatisaki baboti naye likolo ya kiti ya bokonzi, mpe sima bafukamelaki ye. Mpe alobaki: Oh tata na ngai! Oyo ezali ndimbola ya ndoto na ngai nalotaka kala, Allah asili kokokisa yango na bosôló. Mpe asalelaki ngai bolamu ebele sima ya kobimisa ngai na boloko. Mpe abimisi bino kowuta na zamba sima oyo satana akotaki o kati na ngai na bandeko na ngai. Ya soló, Nkolo wa ngai azali malamu na nyoso alingi. Ya sólo, ye azali moyebi atonda bwanya

    [101] Oh Nkolo! Osilaki kopesa ngai bokonzi, mpe otangisaki ngai koyeba ndimbola ya bandoto, yonde mokeli wa likolo na mabele, yonde ozali molongisi wa ngai o kati ya mokili mpe na mokolo mwa suka, boma ngai mizilima, tia ngai elongo na bato malamu

    [102] Wana ezali basango oyo eyebani te tozali koyebisa nayo, mpe ozalaki te na bango elongo tango basanganaki тропа kosala likita na bango, mpe bazalaki kondima тропа kosala likita. (lia mabe)

    [103] Kasi ebele ya bato bazali kondima te ata soki ozali kotelemela bango

    [104] Nzoka nde okosenga bango lifuta te тропа yango, wana ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba

    [105] Kati na likolo mpe na nsé, ezali na bilembo boni bato bazali koleka na bopesi biango mokongo

    [106] Mpe ebele kati na bango bazali kondima na Allah, mpe bazali sé basangisi

    [107] Boye, bakanisi bazali na kimia na boyeyi etumbu ya Allah oyo ekozipa bango to mpe mokolo ya suka ekoyela bango mbalakaka mpe bango bazali koyeba te

    [108] Loba: Oyo nde nzela na ngai. Nazali kobenga bato epai ya Allah na boyebi, ngai na baye bakolanda ngai. Mpe nkembo na Allah! Mpe ngai nazali o kati ya basangisi te

    [109] Mpe totindaki te liboso nayo sé mibali, moto na moto na etuka naye na bimoniseli oyo tokitiselaki bango. Mpe batambolaki na mokili te mpo batala ndenge nini bato ya liboso lolenge basukaki? Kasi ndako ya lobi nde ezali malamu тропа babangi (Allah), boye bozali kososolo te

    [110] Kino tango batindami balingaki кокота nakozanga elikia, mpe bakanisaki ete bato na bango basili koboya bango, kasi elonga na biso eyaki tango wana. Mpe tobikisaki nani tolingaki kati na bango, kasi etumbu na biso ezangisaka batomboki te

    [111] Ezalaki o kati ya masapo na bango, liteya тропа bato ya mayele. Ezali másese ya lokuta te mpe ya pamba pamba te kasi ezali nde bosembo oyo ezali kondima na maye makitaki liboso, mpe ndimbola ya makambo manso, ezali mpe bokambi mpe ngolu тропа bandimi

    Surah 13
    Nkake

    [1] Alif, lâm, mím, rá. wana ezali mikapo mia buku, mpe oyo ekiti epai nayo kowuta epai ya Nkolo nayo ezali bosôló. Kaši ebele ya bato bazali kondima na yango te

    [2] Allah nde atelemisi mapata likolo na bino ezali na makonzi te, bozali kornona yango, mpe sima atombuami likolo ya ngwende. Мре akeli mwese na sanza ezali kotambola moko na moko na tango na yango, azali kokamba makambo (kotia mibeko) mpe azali kolimbola mikapo na bilembo, mpo été bobanga mpe bondima na bokutani na Nkolo wa bino

    [3] Мре ye nde atandi mabele mpe apiki piki bangomba likolo na yango, mpe mingala mpe ba mbuma ya ndenge na ndenge, mpe akeli biloko binso mibale mibale, azali kozipa moyi na butu. Ya soló, wana ezali bilembo mpo bato bakoka kokanisa

    [4] Mpe okokuta na mokili ya nsé (mabele) mapango ekangama kangama, mpe bilanga ya a’náb mpe mbuma, mpe ba nzete ya tamru bibotama ebele ya kokangama esika moko. Mpe bisusu bizali na bituka kati kati na yango (biteni biteni) mayi mazali kobwakama na yango, mpe tozali kopesa elengi na misusu koleka misusu тропа kólia. Ya soló, nyoso wana ezali bilembo mpo bato basosolo

    [5] Mpe soki ozali kokamwa kasi liloba na bango nde ezali kokamwisa koleka, tango bazali koloba été: Soki tokufi mpe tokomi mputulu, boye tokozonga lisusu bikelamu ya sika? В aye wana nde bapengwi na Nkolo na bango, mpe bango nde miniololo makozalaka na bakingo na bango, bango nde bato ya moto bakozala okati na yango seko na seko

    [6] Mpe bazali kowela kosenga yo été mabe eyela bango noki, kasi bazali kowelela te kosenga bolamu. Mpe ya sólo, bitumbu ya ndenge wana esi esalami liboso na bango, mpe ya sólo, Nkolo nayo atonda bolimbisi тропа bato likolo ya mabe na bango, mpe ya soló, Nkolo nayo apesaka etumbu ya makasi

    [7] Mpe bapengwi bazali koloba: Boye тропа nini te makamwisi mikitelaki ye (Muhammad) kowuta epai ya Nkolo waye? Ya sólo, ozali nde mokebisi, mpe bato na bato bazali na mokambi

    [8] Allah ayebi oyo mwasi amemi okati ya libumu naye, na eleko oyo ekosala o kati ya libumu, na bozingami bona, mpe atiya eloko na eloko na ndelo na yango

    [9] (Ye nde) moyebi ya oyo mabombami nyoso na maye mazali котопапа polele, azali monene, azali likolo koleka

    [10] Bakeseni te epai naye oyo azali kobomba maloba naye, mpe oyo mosusu azali kobimisa ya ye polele, oyo azali komibomba na butu, mpe oyo azali komibimisa na moyi

    [11] Moto azali na ba anzelu sima naye mpe liboso naye bazali kokita tango nyoso тропа kobatela ye na mokano kowuta epai ya Allah. Ya sólo, Allah akobongola makambo ya bato te kino bango moko bakobongola maye bazali na yango kowuta na milimo mia bango, soki Allah alingi mabe ezua bato, moto moko ya kopekisa azali te. Mpe bakozala na mobateli ata moko te na botiki ye

    [12] Yende azali komonisa bino bongengi, ezali kobangisa bino na nkake mpe ezali kopesa bino elikya mpe azali kokomisa mapata mazala kilo

    [13] Mpe nkake ezali kokumisa ye na lolaka na yango, na ba anzelu kati na bobangi naye. Mpe azali kotinda mikalali mpo ezwa oyo alingi, kasi bazali kobunda о nzela ya Allah mpe azali makasi na etumbu

    [14] Mbela ya bosôló ezali epai naye. Mpe baye bazali kobondela ba nzambe misusu kotika ye, banzambe wana bakoyanola bango na eloko moko te, bazali lokola moto oyo atandi maboko na mayi тропа komema yango na monoko naye, mpe azali kokoka te. Kasi kosenga ya bapagano ezali sé na libungi

    [15] Mpe тропа Allah, baye banso bazali na likolo na mabele bazali kofukamela ye, na esengo to na koyina, lolenge moko na bililingi na bango kobanda tongo kino mpokwa

    [16] Loba na bango:nani azali Nkolo ya likolo na mabele? Loba: Allah, loba: Boye botiki ye bozui bakonzi basusu baye bakoki komisalisa te mpe komisala mabe te? Loba: Boye bakokani, oyo akufa miso na oyo azali na miso? To boye mwinda na molili ekokani? To bazali nde kotiyela Allah banzambe misusu, bazali kokela lokola Allah akela, mpo été bikelamu bikokana? Loba: Allah nde mokeli wa biloko binso, mpe azali sé ye moko na bokasi

    [17] Akitisaki mayi kowuta na mapata, mpe mibongisi mbeto ya botioli na yango, engebene na bonene bwa yango, tango etondi koleka. Ezali komema bafulufulu mpe biloko ya ndenge ne ndenge, ya wolo mpe mabende biye bakotisaka na moto, тропа kosalela biloko ya bonzenga ya kolata, to mpe bisaleli. Ndenge wana nde Allah abetaka ndakisa ya malamu na ya mabe. Kasi тропа bafulufulu na bosoto mosusu oyo ezalaki likolo ya mayi, bikotiola mpe bilimwi, kasi тропа biloko biye bizali na litomba тропа bato, bikotikala na mabele. Ndenge wana nde Allah abetaka ba ndakisa bia ye

    [18] Suka ya malamu ezali тропа baye bazali koyanola na mbela ya Nkolo wa bango, kaši baye baboyaki koyanola ye, soki ezalaki été bazua biloko nyoso oyo ezali na mabele mbala mibale, тропа bango été basomba na etumbu, balingaki kosala yango na lombango. Bango wana nde bazali na mbano ya mabe, mpe esika na bango ya kovanda ekozala lifelo oyo ezali efandelo ya mabe

    [19] Boye moto oyo ayebi été maye makiteli yo ezali bosôló kowuta epai ya Nkolo wa yo, akokani na moto oyo miso makangama kati na libungi?, sé banganga ya mayele nde bazali kokanisa malamu

    [20] Baye bazali kokokisa malako ma bango epai ya Allah, тре bazali kozangisa yango te

    [21] Мре baye bazali kokangisa maye Allah atindaki ete ekangisama, (bondeko), mpe bazali kobanga Nkolo wa bango, тре bazali kobanga lifuta ya mabe

    [22] Mpe baye bakangaki mitema тропа koluka elongi ya Nkolo wa bango, mpe batelemisaki losambo, mpe babimisi maye topesaki bango na kobombana тре na polele, mpe bazali koya na bolamu тропа kolongola mabe. Bango nde bakozuaka mbano elama

    [23] Bakokota na lola (ya edeni) lolenge moko na baye bazali kosala bolamu kowuta na baboti na bango, na basi ba bango, na mabota ma bango. Na baye banso bazali na bondimi ya malamu, mpe ba anzelu bakokotela bango na bizibeli (bikuke) binso

    [24] Kimia ezala o kati na bino тропа maye bozalaki kokanga mitema mpe koyika mpiko. Mpe oyo nde suka y a efandelo y a malamu

    [25] Kaši baye bazali kotosa malako ma bango te o sima ya kolakana тропа Allah, mpe bazali kokabola maye Allah asangisaki yango, mpe bazali kotiya mobulu na kobebisa o kati ya mokili, bakozala na elakeli ya mabe mpe bakozalaka na suka ya mabe

    [26] Allah apesaka ebele bomengo na oyo alingi, mpe akutolaka, bazali kosepela na bomoyi ya nsé, kasi bisengo ya nsé liboso ya bisengo ya mokolo ya suka ezali lokola masano ya tangu токе

    [27] Bapengwi bakolobaka: Мропа nini bakitiseli ye (Muhammad) makamwisi to bilembo kowuta epai ya Nkolo waye te? Loba: Ya soló, Allah abungisaka oyo alingi, mpe akambaka oyo azali kotubela

    [28] Baye bandimi mitema mia bango mikitaka na bokundoli lia Allah. Boye bokundoli ya Allah te nde ekitisaka mitema

    [29] Baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na bomoyi bwa kitoko o mokolo mwa suka, mpe bozongi elamu

    [30] Yango wana nde totinda yo okati ya umma oyo bituka ebele esilaki koleka liboso nayo, été otangela bango emoniseli oyo tokitisaki epai nayo. Mpe bazali kopengwa na Ar-Rahmán, loba: Ye nde Nkolo wa ngai nzambe mosusu ya kobondela na bosoló azali te sé ye, epai naye namipesaka mpe natiye elikya na ngai, mpe epai naye nde nazali komizongisa тропа kotubela

    [31] Soki ezalaki ete kurani moko ekoka kozwama eye na yango bangomba bikokaki kotambwisama to mpe mabele kopasuka, to elobisaka bibembe, kasi mitindo minso mizali mia Allah. Bandimi bazali koyeba te ete soki Allah alingaki, nde akambaki bato banso o nzela ya semba, na yango тропа baye bazali kondima te, bakozangaka te na maye basalaki ya mabe, bakobetamaka na bitumbu, to mpe bitumbu yango ebeta pene ya bandako na bango kino elaka ya Allah eyela bango. Ya sôló, Allah azangisaka elaka naye te

    [32] Mpe basilaki kotiola na batindami liboso nayo, mpe napesaki bapengwi etumbu, sima bazuamaki, mpe lolenge nini etumbu na ngai ezalaki

    [33] Boye oyo azali kornona nyoso oyo molimo na molimo ezali kosala? Mpe bazali kopesa Allah balongani, loba: Bopesa bango bankombo, to bozali koyebisa ye (Allah) eloko nini ayebi te o kati ya mabele? To bozalaki sé kokosa bango na bankombo ya lokuta? Na yango, tobongiseli bapengwi mabe na bango mpe toboyisi bango nzela ya semba. Mpe na oyo Allah abungisi mosusu azali te тропа kokamba ye

    [34] Bazali na etumbu na bomoyi ya nsé, mpe etumbu o mokolo mwa suka ekozala makasi mingi, mpe bakozua mobateli moko te (na etumbu) ya Allah

    [35] Ndakisa ya Iola eye elengelami тропа babangi, ezali koleka onse na yango mingala, mbuma na yango ya koliya ekosilaka te. Na elili na yango, wana nde ekozala litomba lia baye bazalaki kobanga, mpe litomba lia bapengwi likozalaka nde moto

    [36] Мре baye topesaki bango buku, bazali kosepela na maye ekiti Epai nayo, basusu bazali koboya eteni na yango. Loba: Ya soló, natindamaki тропа kobondela Allah, тре nasangisa ye na eloko te, epai naye nde nazali kobenga (bato) mpe epai naye nde bozongi na ngai

    [37] Mpe na lolenge wana nde tokitisaki yango epai nayo na lokota ya arabo été ezala mobeko, mpe soki olandi ba mposa ya bango o sima ya boyebi oyo esili koyela yo kowuta epai ya Allah okozala na mokonzi te mpe mobateli te

    [38] Mpe tosilaki kotinda batindami yambo nayo, mpe topesaki bango basi na bana. Мре motindami moko te ayaki na makamwisi sé ezala na bolingi bwa Allah. Мре eloko nyoso esila kokomama na tango na yango

    [39] Allah alimwisaka mpe abatelaka oyo alingi, epai naye nde mama ya buku ezuami

    [40] Mpe tokoki kolakisa yo ndambu ya maye tolengeli тропа bango ya etumbu awa na nsé, to тре toboma yo liboso été eyela bango, kasi yo ozali na eloko ya kosala te sé kokomisa sango (liloba) mpe epai na biso nde lifuta lizali

    [41] Boye bazali kornona te ete, tokoya na mabele mpe tozali kokutola yango epai na epai? Mpe Allah nde mokati wa makambo, mpe moko te akoki koboya bokati bwa ye, mpe azali noki тропа kopesa lifuti

    [42] Mpe baye balekaki liboso basilaki kosala likita ya mabe, kasi Allah asalelaki bango banso likita, ayebaka maye manso moto asalaka. Mpe bapengwi bakoyebaka etumbu ya mbeba ya bango o mokolo mwa suka

    [43] Mpe bapagano bazali koloba ete ozali motindami te. Loba: Allah akoki lokola nzeneneke kati na ngai na bino, mpe lolenge moko na baye bazua boyebi ya buku

    Surah 14
    Ibrahim

    [1] Alif, lâm, râ. buku eye tokitisi yango epai nayo ete obimisa na yango bato na molili komema bango na mwinda na ndingisa ya Nkolo wa bango, komema bango na nzela ya oyo azali na nguya atonda lokumu

    [2] Allah nde Nkolo wa manso mazali o likolo mpe o nsé, mpe mpasi ezali тропа bapengwi, bakozuaka etumbu ya makasi

    [3] Baye bazali коропа bomoyi ya nsé koleka oyo ya mokolo mwa suka mpe bazali kobundisa nzela ya Allah mpe bazali kolukela yango minyokoli. Bango bazali na libunga lia mosika

    [4] Mpe totindaki motindami te sé azala moto ya monoko ya bato naye, mpo alimbola bango malamu. Allah abungisaka oyo alingi, mpe akambaka oyo alingi. Mpe ye nde azali na bokasi atonda bwanya

    [5] Мре tosilaki kotinda Mûssa na makamwisi ma biso, bimisa bato bayo na molili bakende na bongengi. Mpe yebisa bango ete bakanisa na mikolo mia Allah. Ya soló, bilembo bina bizali тропа bato banso bakangi mitema mpe bazali na botondi

    [6] Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye ete: Bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, tango alongisaki bino na maboko ya bato ya falo, baye bazalaki konyokolo bino na etumbu, mpe bazalaki koboma bana na bino ya mibali mpe kotika basi na bino, kasi wana ezali elembo enene ya bomekami тропа bino kowuta epai ya Allah

    [7] Mpe tango Nkolo wa bino alobaki: Soki ya sólo, bozali kotondo ngai, nakobakisela bino bolamu bwa ngai kasi soki bozangi ngai botondi, ya sólo etumbu na ngai ezali makasi

    [8] Mpe Mûssa alobaki ete: Soki bopengwi bino na baye banso bazali na nsé, ya sólo, boyeba ete Allah atonda na bomengo bwa ye mpe asanzolama na lokumu

    [9] Boye sango ya baye balekaki liboso lia bino ekomelaki bino te ya bato ba Núh, na aad na Thamúd na baye balandaki bango sima? Moko te ayebi bango sé Allah. Batindami ba bango bayelaki bango bilembo, kasi balobaki na kotiya maboko ma bango na minoko mia bango: Tokondima te na maye botindami na yango, mpe tozali na tembe na maye bozali kobenga biso na yango koleka

    [10] Batindami na bango balobaki: Bozali kotiya tembe na Allah, mokeli wa likolo na mabele? Azali kobenga bino mpo alimbisa masumu ma bino, mpe Apesa bino eleko kino mikolo na bino mikoka. (bapengwi bakolobaka): Bozali bato lokola biso, boye bolingi koboisa biso na maye ba nkoko ba biso bazalaki kobondela boyela biso elembo ya polele

    [11] Batindami ba bango bayanolaki bango balobi: Ya soló penza, tozali bato lokola bino, kasi Allah asalisaka oyo alingi o kati ya bawumbu baye. Biso tokoki koyela bino bilembo te sé ezala na bolingi bwa Allah, mpe epai na Allah nde esengeli na bandimi bamipesa

    [12] Mpe тропа nini tokomipesa na Allah te asilaki kokamba biso o nzela ya malamu eye tozali kolanda? Mpe Tokakanga mitema тропа minyokoli mia bino, mpe epai ya Allah, bandimi bamipesa

    [13] Мре bapengwi balobaki na batindami na bango ete: Tokobimisa bino na mabele ma biso, longola sé soki bozongi na lingomba lia biso. Na yango, Nkolo wa bango akitiseli bango emoniseli ete: Tokoboma babubi

    [14] Mpe tokovandisa bino o mboka sima na bango. Wana ezali тропа oyo akobanga bokutani na ngai тре azali kobanga elaka na etumbu. (na ngai)

    [15] Mpe basengaki Allah elonga, mpe bato banso ya mabe bazalaki kobundisa bosôló bakweyaki

    [16] Moto nde ekozala esika na bango, sima bakomelisaka bango mayi ma tofina

    [17] Акотека komela yango mokemoke kaši ekolekaka te, liwa likoyelaka ye na bisika binso kaši akokufaka te. Mpe akozuaka etumbu ya makasi sima na yango

    [18] Ndakisa ya misala ya baye bapengwi na Nkolo wa bango, ezali lokola mputulu ememami na mopepe ya makasi, bakokoka kozua litomba na eloko te na maye basalaki, wana ezali libunga ya mosika

    [19] Boye ozali kornona te ete Allah akela likolo na mabele na bosôló? Soki alingi, abungisi bino тре ayei na bikelamo bisusu o esika na bino

    [20] Kaši wana ezali paši te тропа Allah asala yango

    [21] Мре bawei banso bakobimaka о malita ma bango тре bakotelemaka o liboso lia Allah тропа kokata makambo, mpe bato bamotawu bakolobaka na ba oyo ya makasi mpe ya lolendo: Tozalaki kolanda bino, bokoki kokimisa mpe kobikisa biso na etumbu ya Allah te? Bakoyanolaka: Soki Allah akambaka biso tolingaki kokamba bino, tokokoka komisalisa te ata soki tozeli, mpe tozali na esika ya kokimela te

    [22] Mpe tango makambo manso makosilaka kokatama, satana akoloba na (bato ya lifelo): Ya soló, Allah alakaki bino elaka ya bosóló, ngai nalakaki bino elaka kasi nakokisi yango te. Mpe nazalaki na bokonzi likolo na bino te, kasi ngai na bengaki bino mpe bondimelaki ngai. Bo pamela ngai te, bomipamela bino moko. Ngai nakosalisa bino te mpe bino bokosalisa ngai te. Ya sólo, ngai naboyi na maye bosangisaki ngai na yango liboso (тропа Allah) ya sólo bato mabe bakozuaka etumbu ya makasi

    [23] Мре bakokotisama baye bandimaki mpe basalaki misala milamu o Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka o kati na yango libela, na bolingi bwa Nkolo wa bango. Мре kuna losako na bango lokozala sé ete: (salam) kimia

    [24] Boye, ozali kornona te ete: Allah apeși ndakisa ya liloba lilamu lizali lokola nzete elamu eye misisa mia yango mikangama malamu, mpe bitape bia yango bibimi na likolo

    [25] Ezali kobota mbuma na yango tango inso, na bolingi bwa Nkolo wa yango. Mpe Allah abetelaka bato ba ndakisa mpo bakoka kokanisa

    [26] Mpe apesi ndakisa ya liloba lia mabe, lizali lokola nzete ya mabe, eye ekundami malamu te kati na mabele, esimbamaka makasi te

    [27] Allah azali kolendisa bandimi na liloba litongami malamu, kati ya bomoyi ya nsé mpe na mokolo mwa suka, mpe azali kobungisa babubi, mpe Allah asalaka oyo alingi

    [28] Boye, ozali kornona te, тропа baye babongoli bolamu bwa Allah na bopengwi mpe batandi bato ba bango o ndako ya libungi

    [29] Bakozikisamaka na moto ya lifelo, oyo nde efandeli ya mabe

    [30] Mpe batieli Allah binzambe nzambe, тропа kobungisa na yango bato nzela naye. Loba: Bosepela (na bomoyi bwa mokili) kaši nzela na bino ezali ya sôló okati ya moto ya lifelo

    [31] Loba na bawumbu na ngai baye bandima ete: Batelemisa losambo mpe na maye topesaki bango babimisa yango na polele to na sekele liboso ete eyela bango mokolo oyo mombongo ekozala te mpe kimoninga ekozala te

    [32] Allah nde mokeli wa likolo na nsé, mpe akitisaka mayi kowuta o mapata ezali kobimisa na yango bambuma mpo ezala bozui bwa bino. Мре apeși bino maye ya kosala masuwa mpo etambola na ebale. Na mitindo mia ye, mpe atieli bino mingala

    [33] Mpe atieli bino moyi na sanza, ezala na bongengi bwa libela. Mpe atiyeli bino butu na mokolo

    [34] Mpe apesaka bino nyonso oyo bosengaka ye, mpe soki bolingi koyeba bolamu ya Allah oyo asaleli bino, bokokoka koyeba motango mwa yango te. Ya soló, moto alekisi ndelo na bopegwi mpe bobubi

    [35] Mpe tango Ibrâhîm alobaki: Oh Nkolo wa ngai! Tia mboka oyo (Makkah) ezala na kimia, mpe tiya ngai na bana ba ngai mosika mpo tobondela bikeko te

    [36] Oh Nkolo wa ngai! Ya sôló, yango (bikeko) bisili kobungisa bato ebele. Mpe moto oyo akolanda ngai, ya soló azali wa ngai, kasi oyo akotosa ngai te, ya sólo, yo nde molimbisi otonda ngolu

    [37] Oh Nkolo wa biso! Ya sólo, natiki ndambu ya libota na ngai na nsé ya ngomba oyo, ezali na bato te mpe ezali na milona te, pene na ndako nayo esantu, Nkolo mpo été batelemisa losambo, mpe sala été bato bawuta mosika bakende kofanda na bango esika wana, mpe leisa bango bambuma mpo été batonda yo botondi

    [38] Oh Nkolo wa biso! Ya sólo penza, oyebi maye mabombami o mitema mia biso na maye tomonisaka polele, mpe eloko te ekoki kobombamela Allah ezala na nsé to na likolo

    [39] Matondi na Allah oyo apesi ngai likabo ya İsmail mpe Is’háq na bopaka na ngai. Ya sólo, Nkolo na ngai azali penza moyoki ya libondeli

    [40] Oh Nkolo wa ngai! Sala ngai ete nakokisa basambela elongo na libota nangai, Nkolo wa biso ndima libondeli na biso

    [41] OhNkolo wa biso! Limbisangai na baboti ba ngai, na bandimi o mokolo mwa lifuta

    [42] Mpe bokanisa te ete: Allah alandaka te maye babubi bazali kosala. Ya soló, azali kozelisa bango kino o mokolo moye miso ma bango makotombwama

    [43] Batomboki bakopotaka mbangu mpe mitu na miso na bango mikotala o likolo, mpe mitu mia bango mikozala polele, mpe mitema mikozalaka na eloko te

    [44] Mpe kebisa bato тропа mokolo moye etumbu ekoyelaka bango, babubi bakolobaka: Nkolo wa biso! Zelisa biso ata mwa ngonga токе, mpo toyanola na mbela nayo, mpe tolanda batindami. Boye bolapaki liboso te ete bokoki kolimwa te

    [45] Boye bovandaki te na bisika bia baye babubaki milimo mia bango moko? Mpe bino boyebi polele ndenge nini tosalaki bango, mpe totangela bino bandakisa

    [46] Mpe basilaki kosala likita lia mabe, kasi likita lia bango wana liyebani epai ya Allah, ata soki likita lia bango lizali makasi ekoki kopanza ngomba te

    [47] Мре bokanisa te ete: Allah akozangisa kokokisa elaka naye epai ya batindami naye. Ya soló, Allah azali na nguya тропа kopesa etumbu

    [48] Mokolo moye mabele makotikela mabele mosusu esika. Na mapata lokola, mokolo moye bato bakobimaka liboso lia Allah wa bomoko atonda bokasi

    [49] О mokolo mona okomona batomboki bakangami bango na bango na minyololo

    [50] В ilamba bia bango bikozalaka nde mbiko mpe moto mokozingaka bilongi bia bango

    [51] (Nyoso wana) ekozala mpo Allah akofutaka moto nyoso engebene na maye asalaki. Ya sólo, Allah azali mbangu тропа kofuta

    [52] Oyó ezali sango mpe liyebisi (kurani) тропа bato bakeba na yango, mpe bayeba ya sólo ete, ye Nzambe (Allah) azali sé ye moko, na yango esengeli na bato ya mayele basosola

    Surah 15
    Esika ya mabanga

    [1] Alif, lâm, râ. oyo wana ezali nde mikapo mia buku mpe kurani ya polele

    [2] (O mokolo mwa suka) bapengwi bakolobaka ete: Soki tozalaka ata ba mizilima

    [3] Tika bango balia, basepela moke (na ngonga) mpe elikya ya mokili ebosanisi bango mokolo ya bosôló, kasi kala mingi te bakoyeba

    [4] Kasi tobomaka mboka moko te sé ezala na mokano moyebani mosila kokomama

    [5] Umma moko te ekoki kopuşa liboso to kozongisa mokano na bango sima

    [6] Mpe bakolobaka été: Oh yo moto bakitiseli ye buku! Ya soló, ozali moto ya ligboma

    [7] тропа nini te oyelaki biso ba anzelu soki ozalaki o kati ya balobi bosôló

    [8] Tokitisaka ba anzelu sé na bosôló, mpe bazelisaka te тропа etumbu

    [9] Tokitisaki bokundoli (kurani) na bosôló, тре sé biso nde tobatelaka yango

    [10] Mpe ya soló, totindaki batindami yambo nayo, o kati ya bato ba kala

    [11] Mpe motindami moko te ayelaki bango sé batióla ye

    [12] Ndenge wana nde tokotisaka kibopengwi o mitema mia batomboki

    [13] Bakondimaka na yango te, mpe ya sólo, esilaki kosalama na bato ya liboso

    [14] Ata soki tofungolelaka bango ezibeli ya likolo тропа komata nde bandimaki mpe te

    [15] Bakolobaka: Ya soló miso та biso mizali ya kolangwa, kasi tozali nde balokami

    [16] Mpe tosilaki ya sólo, kotia minzoto na mapata, mpe topesi yango bonzenga тропа botali

    [17] Mpe tobatelaki yango na mabe manso ma satana wa botutu

    [18] Ata oyo akolinga koyokamela yango, tokolandisa ye moto

    [19] Mpe o mabele totandaki yango, mpe totiyeli yango bangomba mpe tolandisaki eloko nyoso na bokoki bwa yango

    [20] Mpe totiyelaki bino okati na yango (mabele) bilei mpe bikelamu bisusu biye bozali na nguya ya koleisa yango te

    [21] Ezali na eloko moko te sé ezala na sanduku ya bozui na yango epai na biso, mpe tozali kokitisa yango ndambu ndambu na lolenge esengeli

    [22] Mpe tozali kotinda mipepe ya kokolisa milona mpe tokitisi mayi kowuta na mapata тропа komelisa bino na yango, oyo bozali na bokoki ya kobomba yango te

    [23] Mpe ya soló, tozali kopesa bomoyi mpe liwa, mpe biso nde tozali kopesa bokitani

    [24] Mpe toyebi baye baleka liboso na bino (basila kokufa), mpe toyebi baye batikali naino sima

    [25] Mpe ya sólo, Nkolo wayo akosangisaka bango, ya soló ye nde azali na bwanya atonda boyebi

    [26] Мре tokelaki moto na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu

    [27] Mpe tokelaki ba djini liboso na moto ya molunge makasi

    [28] Mpe tango Nkolo wayo alobaki na ba anzelu ete: Ya soló nalingi kokela moto na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu

    [29] Mpe tango nakosilisa kobongisa ye na lolenge ya kitoko mpe na fuli okati naye, pema nangai bofukamela ye na botosi

    [30] Mpe ba anzelu banso bafukamaki

    [31] Longola sé lusufele (ibilisa), aboyaka kogumbama elongo na bagumbami

    [32] Na yango (Allah) alobaki: Oh lusufele! Mpona nini ozuami o motango mwa bagumbami te

    [33] Alobi: Nazali te mpona kogumbamela moto oyo okeli ye kowuta na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu

    [34] Mpe (Allah) alobi: Bima wana (na lola) mpo ozali na botutu

    [35] Mpe okozala na botutu kino mokolo mwa suka

    [36] Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pesa ngai mwa tango kino mokolo mwa bosekwisami

    [37] Мре (Allah) alobaki naye ete: Ya soló, ozali kati ya bazelisami

    [38] Kino mokolo ya ngonga eye eyebani

    [39] Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pamba te mpo omemi ngai na libungi, mpe na kobongisela bango mokili mpe nakobungisa bango banso

    [40] Longola sé bawumbu nayo baye osilaki коропа

    [41] (Allah) alobi: Oyo nde nzela ya bokambami epai na ngai

    [42] Ya solo, bawumbu ba ngai ozali na bokonzi likolo na bango te longola sé baye bakolanda yo nakati ya babungi

    [43] Mpe ya soló, lifelo ekozala esika na bango banso

    [44] Ezali na bikuke sambo тропа kokota, mpe bikuke binso biyebani na bato ba yango

    [45] Ya sólo, babangi bakozala na paladiso biye bizali na maziba

    [46] Bokota na kati na yango na kimia nyoso

    [47] Mpe tokolongolaka bango likunya eye ezalaki na mitema na bango mpe bakozala bandeko likolo ya bambeto yakotalana

    [48] Moko te bolembu ekozua ye, mpe bakobimaka o kati na yango te

    [49] Yebisa bawumbu ba ngai, ya soló, ngai nazali molimbisi natonda ngolu

    [50] Mpe ya sólo, etumbu na ngai ezalaka etumbu ya makasi

    [51] Mpe yebisa bango тропа bapaya ba Ibrâhîm

    [52] Tango bakotelaki ye mpe balobaki: Kimia (salam) alobi: Tozali kobanga bino

    [53] Balobaki: Kobanga te, ya sólo, tozali kopesa yo sango ya muana mayele oyo atondi na bwanya

    [54] Alobaki: Bozali kopesa ngai (sango eye) mpe boyebi malamu ete kibopaka esili kozua ngai, boye sango malamu nini bozali kopesa ngai

    [55] Balobaki: Tozali kopesa yo sango ya bosóló kozala okati ya baye bazangaka elikya te тропа bolamu

    [56] Mpe alobi: Nani azangaka elikya mpe ngolu ya Nkolo waye sé baye babunga nzela

    [57] Mpe (alobaki na bango): Eh batindami (ba Allah)! Bolingi nini

    [58] Balobi: Ya soló, totindami epai ya batomboki

    [59] Longola sé libota lia Loth, ya sólo tokolongisa bango banso

    [60] Longola sé mwasi waye, tosila kokata (Allah) ete akozala o kati ya baye bakozua etumbu

    [61] Mpe tango batindami bapusanaki pene na libota lia Loth

    [62] Alobi: Bozali bato bayebani te

    [63] Balobi: Toyeli yo mpo topesa etumbu na baye bazali kotiya tembe mpe bazali kondima te

    [64] Mpe toyei epai nayo na bosóló mpe tozali bato ba bosembo

    [65] Kima noki (kende noki) na libota lia yo na butu, zala sima na bango, moko te kati na bino atala sima. Mpe bökende sé na esika eye bakolakisa bino

    [66] Mpe topesaki ye mobeko mona, mpo bato bana etumbu ezua bango kobanda ntongo tii suka

    [67] Mpe bato ba mboka bayeli ye bazali kosepela

    [68] Alobi: Ya sólo, baye bazali bapaya ba ngai bosala bango mabe te

    [69] Bobanga Allah, kasi bokitisa lokumu na ngai te

    [70] Мре balobaki (na Loth): Topekisaki yo te na koyamba bato ya mokili

    [71] Alobi: Bozua bana ba ngai ya basi soki bolingi bosala bango oyo bolingi

    [72] Na bomoyi bwayo, ya soló bango bazali na milangwa mia liwa тропа bopengwi bwa bango

    [73] Mpe lolaka ya makasi ezuaki bango na ebimeli ya moyi

    [74] Mpe tobalusaki (mboka yango) na bangambo inso, mpe tobetiselaki bango mbula ya mabanga maye esanganaki na moto makasi

    [75] Ya sólo, wana nde bilembo тропа baye bazali na boyebi bakoka kornona

    [76] Мре ya sólo, mboka ena ezalaki lokola nzela eye eyebanaki na moto nyoso

    [77] Ya sólo, wana ezali elembo тропа bandimi

    [78] Ya sólo, etuka ya aïkat bazalaki mpe babubi

    [79] Tozuaki bango mpe lokola, kasi mboka mibale oyo eyebanaki na bisika na yango awa na mokili mpe bitikalaki bilembo binene

    [80] Мре bato ba mboka ya hijr basilaki kosala batindami mabe

    [81] Mpe tolakisaki bango makamwisi ma biso kasi balandaki yango te

    [82] Mpe bazalaki kotonga bandako bia bango okati ya bangomba тропа kozala na kimia

    [83] Mpe topesaki bango etumbu na ntongo o sima ya kolamuka

    [84] Maye manso bazalaki na yango, bakokaki kosala na yango eloko te

    [85] Mpe tokelaki likolo na nsé, na maye manso mazuami o kati na yango mibale te sé na bosóló, mpe ya soló, ngonga ekokokaka, limbisa bolimbisi bwa malamu

    [86] Ya sólo, Nkolo wayo azali mokeli mpe moyebi

    [87] Mpe tosilaki kopesa yo mikapo sambo тропа kozongela yango na kotanga mbala na mbala, na kurani ya monene

    [88] Mpe kotala te na kolula bozwi ya kitoko topesaki balisanga na bango тропа bisengo ya tango токе, koyoka pasi тропа bango te, kasi zala na komikitisa pona bandimi

    [89] Mpe loba: Ya soló, nazali mokebisi ya polele

    [90] Ndenge moko tokitisaki (etumbu) likolo lia bakaboli

    [91] Baye bazuaki kurani ezala eloko ya bokabwani mpe tembe kati na yango

    [92] Mpe na nkombo ya Nkolo nayo, nakotunaka bango banso

    [93] Mpona maye bazalaki kosala

    [94] Monisa polele maye otindami na yango, mpe pesa mokongo na basangisi (Allah)

    [95] Tozali kosunga yo liboso lia baye bazali kotiola yo

    [96] Baye bazali kosangisa Allah na biloko bisusu, bakoyebaka kala te

    [97] Mpe tosilaki koyeba ete motema nayo ezali kokangama na ntina ya maye bazali koloba

    [98] Mpe kumisa Nkolo wayo, mpe zala o kati ya bagumbami

    [99] Mpe bondela Nkolo wayo, kino bosôló bokoyelaka yo

    Surah 16
    Nzoi

    [1] Mokano mwa Allah ezali koya, kasi bowelisa yango te. Nkembo naye azali likolo koleka na maye bazali kosangisa ye na yango

    [2] Azali kokitisa ba anzelu na emoniseli (buku) na mokano naye, likolo ya moto oyo alingi kati ya bawumbu naye ete: Bokebisa ete ezali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ngai, na yango bobanga ngai

    [3] Akela likolo na mabele na bosóló, azali likolo lia baye bazali kosangisa (ye)

    [4] Akeli moto na litanga ya mayi (ya mokongo), sima na yango moto akomi kotia tembe

    [5] Mpe akeli тропа bino bibwele, na yango bozali kozua ba mposo pona kosala bilamba na ba bolamu misusu, mpe misusu pona kolia

    [6] Mpe esepelisaka bino na bonzenga tango bozongisaka yango na ndako na pokwa, mpe tango bobimisaka yango (na tongo) тропа kólia matiti

    [7] Mpe (bisusu) bizali komemela bino mikumba kokende na yango mboka bisusu biye bizali paši тропа bino кокота. Ya soló, Nkolo wa bino azali wa ngolu atonda mawa

    [8] Mpe bampunda na ba bighal na ba hamir mpo bomatela yango na botamboli, mpe misusu mizali sé кака тропа bonzenga. Мре azali kokela maye bino boyebi te

    [9] Allah nde alakisaka nzela ya semba na bolamu naye. Kasi soki alingaki, nde akambi bino banso na nzela ya semba

    [10] Yende akitisaka mayi kowuta na mapata тропа komela, mpe ezali kobotisa matiti na milona oyo bozali koleisa na yango bibwele

    [11] Azali kobotisela bino milona mizali kobimisa nzete ya zaítún mpe nzete ya tamru na a’náb na bambuma ya ndenge na ndenge. Ya sólo, wana ezali elembo mpo bato basosolo

    [12] Мре atieli bino butu na mokolo na moyi na sanza mpe na minzoto mizali kotambola na mitindo mia ye. Ya soló, wana ezali bilembo mpo bato bakoka koyeba

    [13] Mpe oyo akeli тропа bino o kati na mokili ezali na balangi ebele. Ya sólo, wana ezali elembo mpo bato bakoka kokanisa

    [14] Mpe ye nde akeli ebale, okati na yango bozali kozua mișuni ya kitoko ya kolia, mpe bozali kozua okati na yango bonzenga ya molato, mpe okomona masuwa ya minene mazali koleka na ebale na lokito ya makasi, mpo ete boluka mapamboli naye, mpe mpo ete na yango bokoka kotondo (ye)

    [15] Mpe apika bangomba o kati na mabele тропа boningani na yango esala bino mabe te, mpe mingala na banzela, mpo bokoka kokambama

    [16] Mpe na bilembo bisusu (bizali kolakisa bino nzela), ndenge moko minzoto mpo ete babunga te

    [17] Boye, oyo akelaka azali lokola oyo akelaka te? Boye bozali kokanisa te

    [18] Mpe soki bolingi kotanga bolamu bwa Allah, bokokoka koyeba motango mwa yango te, ya solo Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [19] Mpe Allah ayebi maye bozali kobomba na maye bozali komonisa polele

    [20] Na baye wana bazali kobondela basusu mpe kotika Allah bakela eloko te, mpe bango bakelama

    [21] Bazali bakufi kasi bazali na bomoyi te, mpe bayebi te mokolo nini bakosekwisama

    [22] Nzambe wa bino (Allah) azali Nzambe sé moko ya kobondela na bosôló, mpe baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, mitema mia bango miboya bomoko bwa Allah, mpe batondi na lolendo

    [23] Ezali na tembe te ete Allah ayebi maye bazali kobomba na maye bazali komonisa polele, ya soló ye alingaka bato ya lolendo te

    [24] Mpe soki batuni bango, nini Nkolo wa bino akitisa? Bakolobaka: Ezali masapo makala

    [25] Mpo été mokolo mwa suka bamema mikumba mia bango mibimba, na mikumba ya baye bango babungisaki na kozanga mayele. Boye ezali mabe te mikumba ya motindo oyo

    [26] Baye balekaki liboso na bango basilaka kosala likita ya mabe, mpe Allah abetaki na nsé ya misisa ya ndako na bango mpe likolo na yango ekwelaki bango mpe etumbu ezuaki bango o esika bazalaki kokanisa te

    [27] Sima o mokolo mwa suka, akokitisa bango na kosila lokumu, (na lolenge ya mabe) mpe sima akolobaka na bango ete: Wapi bambanda na ngai oyo bozalaki kobunda тропа bango? Bato ya mayele bakolobaka été; ya soló, mabe ekokitisama lelo epai ya bapagano

    [28] Baye ba anzelu babomaka bango тропа bobubi bwa bango moko, na yango bakokitisama, mpe bakolobaka: Tozalaki kosala mabe te, kasi Allah ayebi maye bozalaki kosala

    [29] Bokota na bikuke ya lifelo, libela kati na yango, etumbu kani ya mabe eye bato ya lolendo bakozuaka

    [30] Mpe babangi Allah bakotunama été: Eloko nini Nkolo wa bino akitisi? Bakolobaka: Bolamu, тропа baye babongisaki na bomoi ya nsé na kosala bolamu, kasi efandelo ya mokolo mwa suka nde ezali kitoko koleka, oyo nde ndako ya malamu тропа babangi

    [31] Lola ya edeni o esika bakokotaka, mingala mizali kolekisa mayi o nsé na yango, bakozwaka o kati na yango manso bakolingaka. Ndenge wana nde Allah afutaka babangi

    [32] Baye ba anzelu bakobomaka wana bazali peto, bakolobaka: Boboto ezala likolo na bino, bokoto o kati ya lola engebene na maye ya malamu bozalaki kosala

    [33] Boye bazali kozela été ba anzelu bayela bango to mokano ya Nkolo wayo eya? Lolenge wana nde baye bazalaki liboso basalaki, mpe Allah abubaki bango te kasi bango moko nde bamibubaki

    [34] Mpe bazuaki mabe тропа maye basalaki, mpe maye bazalaki kotiola mazingaki bango o bisika binso

    [35] Pe baye bazali kosangisa (Allah) balobi été: Soki Allah alingaki nde tobondelaki eloko mosusu te sé ye, ezala biso na batata na biso, nde topekisaki mpe eloko na esika naye te, lolenge wana nde baye balekaki liboso na bango bazalaki kosala, nde тропа batindami ezali sé kokomisa sango polele te

    [36] Мре tosilaki kotinda na umma nyonso motindami, mpo ayebisa bato naye été: Babondela Allah mpe bozala mosika na motomboki, kati na bango Allah akambaki, mpe kati na bango basusu libungi ekokisamaki likolo na bango. Botambola o kati ya mokili bótala ndenge esukela baye baboyaki kondima

    [37] Ata ozali kosala ndenge nyoso mpo bakambama, ya soló, Allah akambaka baye babunga te mpe bakozua moto ya kosalisa mpe kolongisa bango te

    [38] Mpe bazali kolapa na nkombo ya Allah polele été: Allah akosekwisa bawa te. Nzoka nde wana ezali elaka ya bosôló epai naye, kasi ebele ya bato bazali koyeba te

    [39] Mpo alimbola тропа bango maye bakokesene na yango, тре bapengwi bayeba ete ya sólo, bango bazalaki kokosa

    [40] Ya sólo, tango tolingaka eloko, tokolobaka sé liloba moko: Zala; mpe ezalisami

    [41] Мре baye batikaki (makkah) bakei na (madinah) na tango eye basilaki kobubama, tokofandisa bango na mokili ya bomoi ya kitoko. Kasi lifuta ya lola ezali monene soki bayebaki

    [42] Baye bakangaki mitema mpe batiaki elikia epai ya Nkolo wa bango

    [43] Мре totindaki yambo nayo te, sé mibali baye tokitiselaki bango emoniseli, botuna baye bayebi soki bozali na boyebi te

    [44] (Totindaki bango) na bilembo bia polele, na babuku ensantu, mpe tokitisi epai nayo buku mpo été: Olimbolela bato maye makiteli bango mpo basosolo

    [45] Kasi тропа baye bazalaki kosala likita ya mabe, bazali na ebateli moko te sé Allah azindisa bango na mabele to etumbu eyela bango o esika nyoso oyo bakoyeba te

    [46] То mpe ezua bango na ngonga ya misala na bango mpo bazua nzela ya kokima te

    [47] To bobangi (bwa makasi kowuta epai ya Nkolo wa bango ezua bango) ya soló, Nkolo wa bino azali na ngolu atonda mawa

    [48] Boye bazali kornona te ete maye manso Allah akela, bililingi na yango bitelama alima na ngambu ya loboko ya mobali mpe na loboko ya mwasi, nyoso bizali kofukamela Allah na limemia mpe nakomikitisa

    [49] Bikelamu binso o likolo mpe na nsé bizali kogumbamela Allah, banyama mpe ba anzelu mpe bazali kosala lolendo te

    [50] Bazali kobanga Nkolo wa bango oyo azali o likolo lia bango, mpe basalaka maye akotindaka bango

    [51] Mpe Allah alobi: Bozua banzambe babale te. Kasi ya soló, ye azali sé nzambe moko ya sólo asengeli na mabondeli, bobanga sé ngaï

    [52] Mpe manso mazuami o nsé mpe o likolo mazali ya ye, mpe limemia nyoso ezali ya ye. Na yango, boye bokobanga eloko mosusu kotika Allah

    [53] Mpe binso bia malamu biye bozali na yango eutaka sé epai ya Allah. Sima soki mabe mazui bino, bokobelelaka sé ye na mongongo ya makasi

    [54] Mpe soki alongoli mabe mana likolo lia bino, okomona basusu kati na bino babandi kosangisa Nkolo wa bango

    [55] Bazali kopengwa na maye topesaki bango. Bosakana na mwa tango moke, bokoyeba kala mingi te

    [56] Мре bazali kolongola ndambu ya bozui oyo topesi bango тропа kopesa yango na banzambe ya bikeko oyo bayebi te. Na nkombo ya Allah; bokotunama na maye bozali kosala

    [57] Mpe bazali kopesa Allah bana basi, nkembo naye! Kasi bazali komipesa oyo bango moko balingi

    [58] Mpe soki bapesi moko wa bango sango ya mbotama ya mwana mwasi, abebisi elongi naye mpe atondisi yango na mpizoli

    [59] Akomi kokima bato na kobombama, тропа sango ya mabe oyo ekomeli ye, abatela mwana wana na nsoni azali na yango to akotisa ye na mabele? Ezaleli mabe ya motindo boye

    [60] Mpona baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, bapesi ndakisa ya mabe, kasi ndakisa ya likolo koleka ezali ya Allah, mpe azali na bokasi atonda bwanya

    [61] Soki Allah alingaki kopesa etumbu na bato mpona mabe na bango, nde ata ekelamo moko te elingaki kotikala na nsé. Kasi azali kozelisa bango kino mokano mokokokisama, mpe soki tango yango ekoki, bakozongisa yango sima te mpe bakopusa yango liboso te

    [62] Mpe bazali kobonzela Allah maye bango moko bazali kolinga yango te, mpe bazali kobimisa lokuta na minoko mia bango été: Bakozala na lifuta lia kitoko. Esika na bango ekozala na moto mpe bakozala bato ya liboso ya komema bango noki noki

    [63] Na nkombo ya Allah, tosilaki kotinda (bantoma) na bituka ebele liboso nayo, kasi satana abongiselaki bango misala ya mabe, mpe ye azali mokonzi wa bango lelo, kasi mokolo ya lobi bakozala na etumbu ya makasi

    [64] Mpe tokitiselaki yo buku sé mpo olimbola bango malamu maye bazali na bokeseni na yango, mpe mpo ezala bokambi mpe ngolu тропа bandimi

    [65] Mpe Allah akitisi mayi kowuta o likolo, mpe azali kopesa bomoyi na mabele o sima ya kokufa na yango. Ya soló, wana nde elembo тропа baye bazali koyoka

    [66] Мре ya soló, тропа bibwele, ezali liteya monene тропа bino, tozali komelisa bino biloko biye bizali na mabumu na yango bisangani na makila, mpe ebimisi miliki ya kitoko mpe elengi тропа komelisa bino

    [67] Mpe kowuta na mbuma ya Naghil na a’nâb biye bozali kozua bilei na masanga kitoko. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bato bakoka koyeba

    [68] Mpe Nkolo wayo akitisaki mayele epai ya ba nzoi été: Bozua bisika ya kofanda na bangomba mpe okati ya banzete, to mpe bisika bisusu oyo bato basali

    [69] Mpe sima bolia bambuma nyonso mpe holanda ba nzela ya Nkolo wa bino oyo atieli bino yango na bolembu, na mabumu na yango, mafuta ezali kobima ya balangi ndenge na ndenge mpe elengi тропа komela, mpe na kati na yango ezali libiki тропа bato. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bato bakoka kososola

    [70] Allah nde akelaki bino mpe ye nde akoboma bino. Mpe basusu kati na bino apesi bango bomoi molai kino akomi mobange makasi azali koyeba lisusu eloko te. Ya solo, Allah azali moyebi atonda na makoki

    [71] Allah atomboli basusu kati na bino likolo ya baninga тропа bozui. Kasi baye bazali na yango, esengeli na bango kopesa na baye bazali na nsé na bango, (bazangi) mpo été bakokana. Boye bakowangana bolamu ya Allah

    [72] Allah apesa bino basi baye bawuti na bino moko. Mpe basi ba bino bazali kobotela bino bana na bankoko, тре apeși bino bozui kitoko, boye bazali kondima na mabe mpe bazali kopengwa na bolamu ya Allah

    [73] Мре batiki Allah bazali kobondela eloko oyo ekopesa bango bilei kowuta na likolo te тре na nsé te, kasi bakokoka eloko moko te

    [74] Mpe bokokisa Allah na eloko te. Ya sólo, Allah ayebi kasi bino boyebi te

    [75] Allah asilaki kobeta ndakisa ya mowumbu oyo azali epai ya Nkolo waye azali kokoka kosala eloko te, na oyo topesi ye bozui ya malamu mpe bozui wana azali kobimisa yango тропа Allah, na kobombama mpe na polele. Boye bakokani? Lokumu na Allah, kasi ebele kati na bango bazali koyeba te

    [76] Мре Allah abeti ndakisa ya mibali mibale, moko alobaka te, mpe asalaka eloko te, makambo manso mazali kosalama sé na mitindo mia Nkolo waye, soki atindi ye asalaka bolamu te. Boye bazali lolenge moko na oyo azali kotinda na bosembo mpe azali na nzela ya semba

    [77] Mabombami ya likolo na ya nsé ezali ya Allah. Mpe тропа mokolo ya suka ekozala lokola kobuka miso to mpe ezali pene koleka oyo wana. Ya soló, Allah azali na makoki likolo ya biloko binso

    [78] Mpe Allah nde oyo abimisaka bino o kati ya mabumu ya bamama ba bino boyebi eloko te, mpe atiyeli bino boyoki na bomoni na mitema mpo bokoka kotondo

    [79] Boye bozali kornona te ete! Ba ndeke baye bazali kopumbwa o likolo, eloko ya kosimba bango ezali te sé Allah? Ya sólo, wana ezali elembo mpo bato bakoka kondima

    [80] Allah nde atiela bino bandako ezala esika ya kovanda, mpe apesi bino ba ndako misusu oyo esalami na mposo ya nyama bomemaka yango na tango ya mobembo, mpe botelemisaka yango na bopemi na bino na nzela, mpe as’wâfi na yango, mpe aw’bâri na yango, mpe ach’âri na yango, ezali biloko oyo ezali kosalisa bino mpe bozali kosepela na yango kino tango eye eyebani

    [81] Mpe na maye Allah akela, atieli bino bililingi mpe atieli bino bisika ya kobatama na bangomba, mpe apesi bino bilamba bizala kobatela bino na molunge, mpe misusu mizali makasi mikobatelaka bino na makambo na bino moko ya botomboki. Ndenge wana nde (Allah) azali kokokisa bolamu naye likolo lia bino mpo bokoka kotosa (komisokia)

    [82] Soki baboyi bapesi mikongo, ya soló penza, yo ozali na eloko mosusu te sé okomisa sango ya polele

    [83] Bazali koyeba bolamu bwa Allah kasi bazali koboya yango, mpe ebele kati na bango bazali bapengwi

    [84] (Мре kanisa) mokolo moye tokobimisa umma nionso na nzeneneke likolo na bango, mpe bapengwi bakozala na ndingisa te ya kosenga bolimbisi mpe bakotunama te тропа kozongela (makambo maye basalaki oyo epesaki Allah kanda)

    [85] Mpe tango bato mabe bakomona etumbu, bakokutolaka bango ata токе te mpe bakozelisaka bango te

    [86] Mpe soki basangisi nzambe bamoni basangani na bango, bakolobaka: Oh Nkolo wa biso! Tala baye tozalaki kokumisa bango na esika nayo. Kasi bango bakoyanolaka bango: Ya soló penza, bozali babuki lokuta

    [87] Mpe o mokolo mona bakotosaka Allah, mpe maye bazalaki kosala ya mabe bakobungisaka yango

    [88] Baye bazali kondima te, mpe bazali kobundisa nzela ya Allah, tokobakisela bango etumbu тропа maye bazalaki kobebisa

    [89] Мре mokolo moye tokobimisa na umma nionso nzeneneke na kati na bango moko, mpe tokoya nayo ozala nzeneneke likolo nabango banso, mpe tokitisaki epai nayo buku mpo ezala ndimbola (malako) ya eloko nyoso mpe bokambi na ngolu, mpe sango elamu тропа bamizilima (bandimi)

    [90] Ya soló, Allah azali kotinda na bosembo mpe kosala misala milamu, mpe kosalisa libota. Kasi apekisi kosala mabe ya minene lokola: (Kosangisa ye na eloko mosusu, koboma moto na bosôló te, ekobo, moyibi), apekisi mpe botomboki, azali kolendisa bino mpo ete bokanisa

    [91] Mpe bokokisa elaka ya Allah kasi bozangisa yango te, mpe bobebisa bandayi na bino te na tango oyo bosilaki kolapa na polele, mpe bosilaki kozua Allah lokola mobateli. Ya soló, Allah ayebi maye bozali kosala

    [92] Mpe bozala te lokola mwasi oyo afungoli liputa naye wana asila kokanga yango makasi. Mpe bozali kozua yango lokola nzela ya kokosana bino na bino, mpo umma moko limoni été yango ezali na makasi mpe ebele koleka baninga ya umma mosusu, Allah azali komeka bino na yango. Мре ya soló, akomonisa bino o mokolo ya suka maye bozalaki kokabwana (na yango na mokili)

    [93] Mpe soki Allah alingaki mbele atiaki bino banso umma moko, kasi akambaka oyo alingi mpe abungisaka oyo alingi. Mpe ya sólo penza, bokotunama na maye bozali kosala

    [94] Mpe bozua bandayi na bino te ezala nzela ya komikosa kati na bino na bino, noki te bokoselumwa na bino bozalaki ya kotelema ngui (na bosóló) mpe bokozua na yango mabe. Na ntina été bozalaki kobundisa nzela ya Allah, mpe bokozala na etumbu ya monene

    [95] Mpe boteka te malako ya Allah na talo moke. Ya soló, oyo ezuami epai na Allah ezali malamu тропа bino soki bozali koyeba

    [96] Oyo bozali na yango ekoleka mpe ekosila, kasi oyo ezali epai ya Allah ekotikala libela. Mpe tokofutaka baye bakangaki. mitema lifuta lia bango lilamu тропа maye basalaki

    [97] Oyo akosala bolamu moko okati na bino mobali to mwasi тре azali mondimi, tokopesa ye bomoyi bolamu, тре tokofutaka bango lifuta lilamu koleka maye basalaki

    [98] Mpe soki olingi kotanga kurani, senga libateli epai ya Allah, тропа mabe ma satana wa botutu

    [99] Ya soló, ye azali na bokoki likolo ya bandimi te, mpe epai ya Nkolo wa bango bazali komipesa

    [100] Ya solo, bokonzi naye ezali likolo na baye bazali kozua ye lokola mobateli mpe тропа ye bakomi basangisi (Allah na binzambe nzambe)

    [101] Mpe soki tobongoli mokapo toyei na mosusu о esika ena, Allah ayebi malamu oyo akitisaka, bakolobaka: Ozali sé mobuki lokuta. Kasi ebele kati na bango bazali koyeba te

    [102] Loba: Ezali nde molimo monsatu azali kokita na yango kowuta epai ya Nkolo wayo na bosembo nyoso, тропа kolendisa baye bandima mpe yango ezali (buku) bokambi mpe sango elamu тропа bamizilima (bandimi)

    [103] Мре toyebi penza ya soló, bazali koloba été: Moto moko boye azali kotangisa ye makambo oyo (kotangisa ntoma kurani), nzoka moto wana bazali kolobela azali na lokota mosusu, kaši buku oyo ezali na lokota ya arabe ya polele

    [104] Ya solo, baye bazali kondima na mikapo mia Allah te, Allah akokambaka bango te, mpe bakozuaka etumbu ya makasi

    [105] Ya solo, bazali kobuka lokuta baye oyo bazali kondima te na mikapo mia Allah, mpe bango nde bato ba lokuta

    [106] Moto oyo akopengwa na Allah sima ya bondimi naye longola sé oyo bakangi ye na makasi été apengwa kasi motema naye ezali na kimia ya bondimi, kasi baye bakomipesa na bopengwi, kanda ya Allah ezali likolo na bango mpe bakozala na etumbu enene

    [107] Wana ezalaki mpo bazalaki kolinga bomoyi bwa nsé koleka oyo ya likolo, mpe ya sólo, Allah akambaka bapengwi te

    [108] Ba oyo wana nde Allah akanga mitema mia bango na koyoka na bango na kornona na bango, mpe bango nde bazali na makanisi te

    [109] Ezali na tembe te, ya soló, bango o mokolo ya suka bakozala bazangi

    [110] Kaši тропа baye batikaki mboka ya bopagano bakei na mboka ya boyambi sima ya komekama na bango, тре babundaki тропа Allah тре bakangaki mitema тре bayikaki mpiko, ya sólo, Nkolo wayo na sima na yango azali molimbisi atonda mawa

    [111] (Kanisa) mokolo oyo molimo na molimo mokoya kolelalela тропа makambo naye moko, mpe moko na moko akofutama na maye asalaki mpe bakobubama te

    [112] Mpe Allah apeși lisese ya mboka moko ezalaki na kimia mpe ebatelamaki, ezalaki na bilei ebele ezalaki kowuta epai na epai, sima bapengwaki na bolamu oyo Allah apesaki bango, yango Allah abetaki bango na nzala mpe na kobanga na ntina ya maye bazalaki kosala

    [113] Mpe motindami asilaki koyela bango kowuta na bango moko, mpe baboyi kondimela ye mpe etumbu ezuaki bango mpo bazalaki babubi

    [114] Mpe bolia biye Allah apesaki bino bia malamu, mpe botondo bolamu bwa Allah soki ya soló, ye nde bozali kobondela

    [115] Ya sólo, apekisaki bino (kólia) mișuni mia bibembe (nyama oyo bakati kingo te) na makila na mosuni mwa ngulu na nyama eye bakati kingo kasi batangi nkombo ya Allah likolo na yango te. Kasi oyo kati na bino akwei na nzala makasi mpe etindi ye alia kasi atomboki to alekisi ndelo te ya solo penza, Allah azali molimbisi atonda mawa

    [116] Mpe boloba lokuta na minoko mia bino te ete: Oyo elingisami, oyo epekisami, mpo bobukela Allah lokuta. Ya solo, babukeli Allah lokuta bakolongaka te

    [117] Bakosepelaka na mwa tango moke, mpe etumbu ya makasi ezali kozela bango

    [118] Mpe тропа bayuda, tosilaka kopekisa bango maye toyebisaki yo liboso, mpe tobubaki bango te, kasi bango moko bamibubaki

    [119] Sima ya solo, Nkolo wayo тропа baye basalaki mabe na kozanga koyeba sima batubeli mpe babongisi, (bondimi bwa bango), ya soló, Nkolo wayo azali molimbisi atonda mawa

    [120] Ya solo, Ibrâhîm azalaki umma, azalaki na botosi тропа Allah, amipesaki mobimba epaî ya Allah тре azalaki o kati ya baye bazalaki kosangisa te (Allah)

    [121] Azalaki na botondi тропа bolamu bwa Nkolo waye, (mpe Allah) aponaki ye mpe akambaki ye na nzela ya semba

    [122] Mpe topesaki ye bolamu kati na mokili, mpe ya soló, ye o mokolo mwa suka akozala o kati ya bato malamu

    [123] Sima toyebisaki yo; landa lingomba lia Ibrâhîm liye lizali na bomoko (bwa Allah) mpe azalaki te okati ya basangisi (Allah)

    [124] Ya sólo, mokolo mwa mposo (sabbat) motiyamaki lotomo te, sé тропа baye bakeseneki na yango. Mpe o mokolo mwa suka Nkolo wayo akosambisa bango na maye bakeseneki na mango

    [125] Benga bato na nzela ya Nkolo wayo na bwanya mpe na maloba ya kitoko, mpe solola na bango na lolenge ya malamu. Ya soló, Nkolo wayo ayebi baye babungi nzela naye mpe ayebi malamu baye bakambami

    [126] Mpe soki bokozongisa mabe, bozongisa yango ndenge moko na oyo basalaki bino. Kasi soki bokangi mitema, wana ezali malamu mingi тропа bakangi mitema

    [127] Kanga motema, kasi kokanga motema nayo ekowuta nde epai na Allah. Mpe komitungisa te тропа bango, тре kominyokuama te тропа likita na bango ya mabe

    [128] Ya sólo, Allah azali elongo na babangi mpe basali bolamu

    Surah 17
    Mobembo ya butu

    [1] Lokumu na oyo asalisaki mowumbu naye (ntoma Muhammad) mobembo mwa butu, kobanda na ndako esantu ya Makkah kino na ndako esantu ya Aq’swa (yelusaleme) oyo tosilaki kopambola zinga zinga na yango mpo été tolakisa ye bilembo bia biso, ya sôló ye azali moyoki amonaka manso

    [2] Мре topesaki Mûssa buku, mpe totiyaki yango ezala bokambi тропа bana ba isalayele, mpe toyebisaki bango été bozua mobateli mosusu te kotika ngai

    [3] Bakitani baye tomemaki elongo na Núh. Ya sôló, ye azalaki mowumbu wa botondi

    [4] Mpe toyebisaki na bana isalayele na kati ya buku ete bokobebisa mbala mibale okati ya mokili mpe bokolutisa ndelo

    [5] Mpe tango elaka ya etumbu moko ya mibale ekomaki, totindelaki bino bawumbu na biso ya makasi bakotela bino na ndako, mpe elaka ekokisamaki

    [6] Sima na yango, topesaki bino elonga likolo na bango, mpe topesaki bino bozui mpe bana, mpe na sima tokomisaki bino ebele

    [7] Soki bosali malamu ezali тропа bino moko, soki mpe bosali mabe ezali sé bongo. Mpe soki elaka ya suka ekomi mpo babebisa bino bilongi na kosala bino mabe mpe bakota o ndako nzambe ndenge bakotaki mbala ya yambo тропа kobebisa maye bazuaki na kati

    [8] Tango mosusu Nkolo wa bino akoyokela bino mawa. Mpe soki bozongeli tokozongela, tosalaki moto mwa lifelo тропа bapengwi baye bazangaki kotosa

    [9] Ya soló kurani oyo, ezali kokamba na oyo ezali ya semba, mpe ezali kopesa sango malamu epai ya bandimi baye bazali kosala misala ya malamu ete bakozala na lifuta ya monene

    [10] Mpona baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, tobombeli bango etumbu ya makasi

    [11] Mpe moto azali komilukela mabe, (komisengela mabe) ndenge amilukelaka bolamu, kasi moto azali penza na bowelisi

    [12] Мре tokelaki butu na moyi bizala bilembo mibale, mpe tobombaki elembo ya butu mpe tomonisi elembo ya moyi, (ezala ya komonana) mpo boluka bolamu ya Nkolo wa bino, mpe mpo esalisa bino na koyeba motango mpe mibu. Kasi ya soló, tolimbolaki biloko binso bizala polele penza

    [13] Mpe tokangeli moto na moto misala mia ye na kingo naye, mpe o mokolo mwa suka tokobimisela ye yango nyoso polele

    [14] Tanga makomi nayo; lelo yo moko okoki kozala zuzi ya makambo nayo. (yo moko)

    [15] Oyó akopona nzela ya semba, amisemboli sé ye moko, mpe oyo akopona libungi, amibungisi sé ye moko. Kasi moto akomemaka mokumba ya moninga te (mokumba ya masumu), mpe topesaka etumbu na bato te kino totinda motindami

    [16] Mpe soki tolingi koboma mboka moko boye, totindaka na bazwi na yango batosa mibeko mia biso, kasi soki baboyi kotosa mpe babebisi, mpe sima na yango esengeli ete liloba likokisama, mpe tobomi bango mobimba

    [17] Mabota ebele toboma o sima ya Nûh, kasi Nkolo wayo akoki naye moko mpo na koyeba mpe kornona masumu ya bawumbu naye

    [18] Oyo alingi azua bomoyi na lombango, tozali mbangu тропа kopesa ye oyo tolingi, sima tokopesa ye móto mwa lifelo oyo akozika okati na yango, na kosila lokumu, mpe na kozala mosika na ngolu

    [19] Mpe oyo akolinga bomoyi bwa lola, mpe akosala makasi oyo esengeli na yango mpe azali mondimi, bango wana nde molende na bango ekokumisama

    [20] Topesaka ebele na moto nyoso, ba oyo, mpe ba oyo kuna, makabo ya Nkolo nayo. Mpe makabo ya Nkolo nayo ezangaka moto moko te

    [21] Tala ndenge tozali kotiya basusu likolo ya basusu. Kasi bomoi bwa lola nde ezwami na molongo mpe na lokumu koleka

    [22] Kosangisa Allah na nzambe mosusu te, noki te okomikuta o kati ya baboyami mpe bakweisami

    [23] Mpe Nkolo wayo asilaki kozua mokano ete; Bobondela te sé ye mei, mpe bozala malamu na ba boti na bino. Soki kimobange ekomeli moko kati na bango mibale na maboko nayo to bango banso babale kofiotola bango te, mpe kotombokela bango te, kaši žala na bango malamu тре lobela bango maloba ya kitoko

    [24] Mpe тропа mawa, kitisela bango lipapu ya ngolu mpe oloba ete: Oh Nkolo wa ngai! Yokela bango mawa ndenge babokoloki ngai uta mwana токе

    [25] Nkolo wa bino ayebi malamu penza maye mazali o kati ya mitema mia bino, soki bozali bato malamu, ya soló azali molimbisi тропа baye batubelaka

    [26] Mpe pesa bato ya libota nayo makoki na bango, mpe mobola, mpe moleki nzela, biye bisengeli тропа bango, kasi kolekisa ndelo te na kobebisa misolo pamba pamba

    [27] Ya sólo, babebisi misolo pamba pamba bazali bandeko ya satana, mpe satana azangaki Nkolo naye botondi

    [28] Soki otiki bango тропа koluka ngolu ya Nkolo wayo oyo ozali kolikia, loba na bango liloba lilamu

    [29] Мре kokanga maboko nayo na kingo koleka te, (na kimopimi) mpe kotanda yango te koleka, noki te okomikuta okati ya batungisami mpe bato ya mpasi

    [30] Ya soló, Nkolo wayo apesaka bozui na oyo alingi mpe akutolaka. Mpe ya sólo, azali na sango mpe amonaka bawumbu naye

    [31] Mpe boboma bana ba bino te тропа kobanga kimobola, biso nde toleisaka bango na bino mpe lokola. Ya sólo, koboma bango ezali lisumu monene

    [32] Mpe bopusana pene na ekobo te, ya sólo, yango ezali mbindo mpe nzela ya mabe

    [33] Mpe boboma te molimo moye Allah apekisaki, sé ezala na bosembo, kasi moto oyo babomi na bosembo te, biso tosili kopesa libota naye ndingisa ya kosenga makila naye, kasi alekisa ndelo te na koboma pamba te mpo ete asili kozua lisungi

    [34] Mpe bopusana pembeni ya misolo mia muana ya etike te, (тропа koliya yango) sé ezala na lolenge loye londimami kino akokola, mpe bokokisa elaka. Ya sólo, тропа elaka bokotunamaka

    [35] Мре bokokisa emekelo tango bozali komeka, mpe botia kilo ya semba. Wana nde lolenge ya malamu mpe ezali na lifuta ya kitoko. (тропа bino)

    [36] Мре kolandaka te, (kotelema тре kolobela) maye ozali na boyebi bwa yango te, mpo été ya soló, boyoki, bomoni na motema nyonso wana akotunama тропа yango

    [37] Мре kotambola o likolo lia mabele na lolendo te, solo okoki kopasola mabele te, mpe okoki кокота molai lokola bangomba te

    [38] Nyonso wana ezali mabe mpe eyinami epai ya Nkolo way o

    [39] (Manso) mana mazali maye Nkolo wayo atangisaki yo na bwanya, mpe kosangisa Allah na banzambe basusu te, noki te okobwakama o moto mwa lifelo moye mozali mosika na mawa ma Allah

    [40] Boye Nkolo wa bino aponeli bino bana ya mibali mpe aponi ba anzelu bazala bana ya basi? Ya sólo, bozali kobimisa maloba ya mabe koleka

    [41] Mpe tosilaki kolobela polele (kotiya lotomo) maye manso mazali o kati ya kurani mpo été (bato) bakanisa, kasi wana ezali kokimisa bango sé bokimisi ya mabe

    [42] Loba: Soki ezalaki na banzambe mosusu elongo naye ndenge bazali koloba, balingaki koluka nzela ya Nkolo ngwende

    [43] Lokumu naye, azali likolo koleka, mpe aleki maye bazali kolobela na bonene

    [44] Mapata sambo na mabele, na manso mazuami o kati na yango, bazali kosanzola nkembo naye, mpe ezali na eloko moko te sé ezali kosanzola lokumu naye. Kasi bino nde bozali koyeba yango te. Ya soló, ye azali ngolu atonda bolimbisi

    [45] Mpe tango ozali kotanga kurani, totiaka kati kati nayo na baye bazali kondima na mokolo mwa suka te ndelo, oyo ezali komonana te

    [46] Mpe tozipi bango motema été basosola te, mpe matoyi na bango lokola. Mpe tango ozali kokumisa bomoko ya Nkolo wayo o kati na buku, bapesi mikongo na kokima (bakei kobondela mabondeli ya mabe)

    [47] Toyebi malamu maye bazali koyoka, soki bayoki epai nayo, balobilobi nanse o kati na bango, babubi bakolobaka: Bozali kolanda moto oyo alokami na bondoki

    [48] Tala ndenge bazali kobetela yo bandakisa, basili kobunga, bakokokaka lisusu te kolanda mpe kozua nzela ya bosôló

    [49] Mpe bakolobaka: Boye soki tokomi mikuwa mpe putulu ya mabele, tokosekwisamaka lisusu bikelamu ya sika

    [50] Loba: Bokoma libanga to libende

    [51] To, bopona ekelamu oyo bomoni ezali monene mpe makasi. Bakolobaka: Nani oyo akozongisaka biso? Loba: Oyo akelaka bino liboso, mpe bazali kotiola yo na boningisi mitu mia bango na bolobi: Tango nini wana? Loba: Ekoki kozala pene

    [52] O mokolo moye akobengaka bino, bokoyanolaka ye na bopesi ye lokumu, bokokanisa ete bowumela na mabele te sé tango moke

    [53] Mpe loba na bawumbu na ngai ete: Baloba maloba sé ya malamu, pamba te mpo satana akotia bokabuani o kati na bango. Ya soló, satana azali penza monguna ya moto ya polele

    [54] Nkolo wa bino ayebi bino malamu koleka, soki alingi akoyokela bino mawa, soki mpe alingi apeși bino etumbu. Мре totindaki yo te ozala mobateli likolo na bango

    [55] Mpe Nkolo wa yo ayebi malamu penza manso maye mazali o likolo mpe na nsé, mpe totombola bantoma basusu likolo ya baninga, mpe topesaki Dáwud zabur

    [56] Loba: Bobelela banzambe wana bozali kozua na botiki ye, bazali na makoki te ya kolongola bino mabe mpe bazali na makoki te ya kopekisa yango ete ezua bino

    [57] Baye bazuaki bango ba nzambe, bango moko bazali koluka eloko nini bakosala epusanisa bango penepene na Nkolo wa bango mpe bazali kolikia ngolu naye mpe bazali kobanga etumbu naye. Ya soló, etumbu ya Nkolo nayo ezali ya kobanga mpe ezali na tembe te

    [58] Mboka moko te ya bobubi ekotikala sé toboma yango yambo ya mokolo mwa suka ekoka, to tokopesaka yango etumbu ya makasi. Nyoso wana esila kokomama o kati ya buku

    [59] Eloko moko te ekopekisa biso тропа kotinda bikamwisi, sé bato ba kala baboya yango, mpe topesaki na bato ya Thamûd náqat oyo (ezalaki ekamwisi) ya polele, kasi basalaki yango mabe (babomaki yango), kasi totindaka bikamwisi te sé тропа kobangisa

    [60] Мре tango tolobaki nayo ete: Ya soló, Nkolo wayo azingi bato banso, mpe ndoto oyo tomonisaki yo yango ezala sé komekama Pona bato, lolenge moko na nzete ya botutu oyo elobami o kati na kurani. Mpe tozali kobangisa bango, kasi ezali sé kobakisela bango botomboki koleka

    [61] Mpe tango toyebisaki na ba anzelu ete: Bogumbamela Adam, bagumbamaki (bango banso) longola sé ibilisa alobaki: Nagumbamela oyo okeli ye na mabele

    [62] Alobi lisusu ete: Omoni moto oyo öpesi ye lokumu koleka ngai, soki otiki ngai na mokili kino mokolo ya suka, na kobungisa ebele kati na mabota naye na bakitani naye, longola sé токе kati na bango

    [63] Mpe (Allah) alobi: Kende, oyo akolanda yo o kati na bango, ya sólo, moto ya lifelo nde lifuta lia bino liye likotalaka bino

    [64] Мре tombokisa bango na mongongo nayo ba oyo okokoka kati na bango, mpe tinda mapinga nayo ya ndenge na ndenge likolo na bango, mpe sangana na bango na kati ya misolo na bango mpe na bana na bango, mpe pesa bango elaka. Kasi satana azali sé kopesa bango elaka ya lokuta

    [65] Ya soló, тропа bawumbu na ngai, okokoka bango te. Kasi Nkolo wayo akoki тропа kobatela bango

    [66] Nkolo wa bino nde oyo atiela bino masuwa likolo ya ebale, bozali kotambola na yango тропа koluka litomba naye. Ya sólo, ye azalaka na mawa na bino

    [67] Mpe soki mabe ezui bino o kati ya ebale, botiki maye bozalaki kobondela mpe bozongeli ye, mpe soki abikisi bino abimisi bino na mayi bokomi na mokili, bozongeli lisusu oyo bozalaki na yango liboso. Kasi ya sólo penza, moto azali sé na bopengwi

    [68] Boye bozali na ebateli soki akani ete eteni ya mabele ezindisa bino, to mpe mopepe ya makasi eya na mbula ya mabanga, mpe bokozala na mobateli te

    [69] To bolingi azongisela bino oyo ezuaki bino (kati na ebale), mpe alimwisa bino тропа bopengwi bwa bino, sima bokokutaka te mobikisi kati na bino

    [70] Ya soló, tosilaki kopesa bana ya Adam lokumu, тре totambwisi bango na mokili тре na ebale, mpe topesi bango bozui ya kitoko, mpe totomboli bango likolo ya bikelamu ebele oyo tokela

    [71] Mokolo moye tokobengaka bato banso na mokambi wa bango (imam), oyo akopesamaka buku naye na loboko ya mobali, baye wana bakotanga yango na esengo, mpe bakobubamaka na eloko te

    [72] Mpe oyo akomona awa na mokili te, akomonaka mpe te o mokolo mwa suka, тре akozalaka na libunga linene

    [73] Mpe balingaki kobungisa yo na maye tokitisaki epai nayo, ete oya na eloko mosusu na esika ya oyo mpo ete bazua yo molingami na bango

    [74] Mpe soki tolendisaka yo te, olingaki komipesa токе ngambu na bango

    [75] Nde tolingaki kopesa yo etumbu ya bomoyi mbala mibale mpe etumbu ya liwa mbala mibale lokola, mpe okokaki kozua mosungi mosusu te na botiki biso

    [76] Мре ya soló penza, etikalaki шоке balonga kokimisa yo mboka, mpo okoma moto pamba, mpe na sima nayo bakowumela mpe tango molayi te

    [77] Ezaleli mpe nzela ya baye totindaki bango liboso nayo kati na batindami na biso, mpe okokuta mbonguana te na mibeko mia biso

    [78] Mpe telemisa losambo osima ya nzanga kino o molili mwa butu, mpe tanga kurani na tongo. Ya sólo, kotanga kurani na tongo ezalaka na banzeneneke

    [79] Mpe okati na butu otelema тропа kosambela (losambo ya suna) nayo moko, mpo ete Nkolo nayo asekwisa yo o mokolo ya suka na esika ya lokumu

    [80] Мре loba ete: Oh Nkolo na ngai! Kotisa ngai na esika ya malamu, mpe bimisa ngai na esika ya bosembo, mpe pesa ngai esika ya mapamboli uta epai nayo

    [81] Mpe loba: Bosóló eyei (isalamu), mpe lukuta elimwi. Ya sólo, lokuta esengeli sé elimwa

    [82] Мре tokitisi na kati na kuranı maye oyo ezali libiki ya bokono mpe ngolu тропа bandimi, kaši ezali kobakisela bapagano sé libunga

    [83] Mpe soki totondisi bolamu na biso likolo na moto, atengami aboyi yango mpe amitondi, mpe soki mabe ezui ye, azangi elikia

    [84] Loba: Moto na moto asala na ndenge naye, kasi Nkolo wa bino ayebi malamu nani azali kolanda nzela ya semba

    [85] Mpe bazali kotuna yo тропа molimo, loba: Molimo mowuta epai ya Nkolo wa ngai, mpe bopesamaki boyebi te sé ya токе

    [86] Mpe soki tolingi, ya soló, tokobungisa oyo tokitisaki epai nayo kati na emoniseli mpe okozua mobateli mosusu te тропа yango na botiki biso

    [87] Longola sé mawa kowuta epai ya Nkolo wayo. Ya sólo, bolamu bwaye epai nayo ezali ebele

    [88] Loba: Ata soki bato mpe bilima basangani mpo basala kurani lokola oyo, bakokoka koya na lolenge na yango te ata soki bazui lisalisi ya ndenge na ndenge kati na bango

    [89] Ya soló, tosilaki kopesa bato bandakisa nyoso na kati ya kurani kasi ebele ya bato bazali sé bapengwi

    [90] Mpe balobaki: Tokondimela yo te, kino obimisela biso liziba ya mayi o kati ya mabele

    [91] To, ozala na bilanga bia Naghil na Inabe mpe obimisa míngala ya mayi ebele mitiola o kati na yango

    [92] To, okweisela biso ndambu ya mapata ndenge ozali kokanisa to oya na nzambe, to óyela biso Allah, na ba anzelu liboso na biso

    [93] To mpe ozala na ndako ya kitoko ezali na bonzenga ya wolo, to mpe obuta (omata) na mapata (likolo), kasi tokondima kobuta nayo wana te kino okitisela biso buku totanga yango, loba: Nkembo na Nkolo na ngai, boye ngai nazali te sé moto mpe motindami

    [94] Eloko moko te epekisaki bato ete bandima tango bokambi eyelaki bango sé balobaka ete: Allah akotinda moto azala motindami

    [95] Loba: Soki ba anzelu batambolaka na kimia likolo ya mabele, tolingaki kokitisela bango kowuta o likolo motindami azala anzelu

    [96] Loba: Allah akoki тропа kozala nzeneneke kati kati na bino na ngai. Ya soló, ye azali na sango mpe amonaka bawumbu naye

    [97] Mpe oyo Allah akambi, asili kokambama, mpe oyo akobunga, okokoka te kozuela bango bakambi na esika naye (Allah) mpe tokosangisa bango o mokolo ya suka bilongi bisunduami, miso ya kozipama, matoyi makangami, na minoko mikolobaka te, esika na bango nde lifelo. Tango nyoso moto na yango elingi kokita, tokobakisela bango oyo ya makasi koleka

    [98] Wana nde lifuta lia bango, mpo bapengwaki na bilembo bia biso, mpe bakolobaka: Tango tokotikala sé mikuwa mpe mputulu na mabele, ya soló penza tokosekwisama lisusu bikelamu ya sika

    [99] Boye bazali kornona te ete: Ya sólo, Allah oyo akela likolo na mabele azali na bokoki ya kokela bikelamu bisusu lokola bango? Mpe atiyeli bango mokano ezali na tembe te? Kasi babubi baboyi, (balingi) sé bopengwi

    [100] Loba: Soki bozalaka na sanduku ya ngolu ya Nkolo wa ngai, bolingaki kobanga kobimisa yango. Kasi moto azali na bopimi

    [101] Mpe tosilaki kopesa na Mûssa makamwisi libua ya polele, botuna bana ba isalayele tango eyelaka bango, kasi falo Alobaki naye: Ya soló, ngai nazali kokanisa ete eh Mûssa! Olokama

    [102] Alobi: Ozali koyeba malamu penza ete oyo akitisaki yango sé Allah Nkolo ya likolo na mabele, тропа (kokamwisa) тре bokasi naye, тре ngai nazali kokanisa ete yo eh falo! O sili kobunga nzela elamu

    [103] (Falo) alingaki kobimisa bango na mboka, kasi tozindisaki ye na baye banso bazalaki elongo naye

    [104] Mpe na sima na yango tolobaki na bana ya isalayele ete; bovanda na mabele kasi tango elaka ya mokolo ya suka ekokokaka tokoya na (bino) ebele na lisanga

    [105] Mpe na bosembo penza nde tokitisaki yango (kurani) mpe ekitaki na bosôló, mpe totindaki yo sé тропа bopesi sango elamu mpe mokebisi

    [106] Мре (tokitisaki) kurani biteni biteni mpo ete otanga yango malembe likolo ya bato bayoka, mpe tokitisaki yango mikapo na mikapo

    [107] Loba: Bondima na yango to te. Ya soló, baye bazuaki boyebi liboso na yango, soki bayoki yango ezali kotangama, bakweyaka mpe bafukami bilongi na nsé. (тропа Allah)

    [108] Mpe balobaka ete: Nkembo na Nkolo wa biso, elaka ya Nkolo wa biso esili ya solo kokoka

    [109] Mpe bazali kokita na kolela mpe ezali kobakisela bango bobangi

    [110] Loba: Bobelela Allah to bobelela Ar-Rahmân to nkombo nini bolingi kobenga, ye nde azali na ba nkombo ya kitoko. Mpe koganga te okati ya losambo nayo koleka, kovanda mpe nye te, kasi zala na mongongo ya kati kati

    [111] Mpe loba lokumu ya Allah oyo azali na mwana te, mpe akoki kozala na basangani te kati ya bokonzi naye, mpe akoki kozala na mobateli mosusu te (ya kokima epai naye) mpe belela bonene bwa ye makasi

    Surah 18
    Libulu

    [1] Matondi na Allah oyo akitisaki epai ya mowumbu waye buku, oyo ezali na mbilinga mbilinga kati na yango te. (ezali na bokeseni te)

    [2] (Buku) ya semba тропа kokebisa na etumbu ya makasi kowuta epai naye, mpe kopesa sango malamu epai ya bandimi baye bazali kosala misala ya malamu ete: Ya soló, bakozala na lifuta ya kitoko

    [3] Kuna, bakovanda libela kati na yango

    [4] Мре kokebisa baye bazali koloba: Allah azali na mwana

    [5] Bazali na boyebi na yango te lolenge moko na batata na bango, liloba ya mabe ezali kobima na minoko mia bango. Manso bazali koloba ezali sé lokuta

    [6] Ozali komitungisama na mpasi ete baboyi kondima na lisolo oyo

    [7] Ya soló, maye mazuami o likolo ya mabele, totiyaki yango ezala na bonzenga na yango mpo été ezala bomekami epai ya bato mpe totala nani kati na bango akosala bolamu

    [8] Mpe ya sólo, na sima tokobalola yango mpe ekomi makasi, etikali polele ezali na eloko te (mabele oyo ezali na milona te)

    [9] Okanisi ete bato ya kati ya mobengá na bato ya ar-raqím bazalaki kati ya bilembo na biso ya kokamwa

    [10] Tango bilenge babatamaki o kati ya mobéngá balobaki été; Oh Nkolo wa biso! Zipa biso na ngolu nayo, mpe sembola biso na makambo na biso nyoso

    [11] Mpe tokangaki matoyi na bango mibu miyike okati ya mobengá

    [12] Sima, tosekwisaki bango mpo toyeba lisanga nini kati na bango mibale bayebi motango ya mibu miye basalaki wana

    [13] Tozali kobetela yo sango na bango na bosóló. Bazalaki bilenge baye bandimaki na Nkolo wa bango mpe tobakiselaki bango bokambami

    [14] Мре tolendisa mitema mia bango, tango batelemaki mpe balobaki: Nkolo wa biso nde Nkolo wa likolo na mabele, tokobelela banzambe basusu te na esika naye, soki te tokoloba mabe mpenza

    [15] Tala bato na biso oyo bazui banzambe misusu na botiki ye, pona nini te bazali komema elembetele ya polele nani azali moto mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta

    [16] Mpe tango bokokabwana na bango na maye bazali kobondela na esika ya Allah, bokota o kati ya mobengá тропа komibatela, Nkolo wa bino akokitisela bino ngolu naye mpe akobongisa makambo na bino

    [17] Mpe okomona moyi ebimi ezali komata etiki Mobengá na bango na loboko ya mobali, mpe soki ekomi kokita ezali kotika mobengá na loboko ya mwasi, mpe bango bafandi malamu na kati na kimia, wana ezali moko ya bikamwisi ya Allah, moto oyo Allah akambi ye nde akambemi malamu, mpe oyo asili kobunga, okoki te kozuela ye mokambi

    [18] Mpe okokanisa bazali ya kolamuka nzoka nde basilaki kolala. Mpe tozali kobalola bango na ngambo ya mobali mpe na ngambu ya mwasi, mpe mbwa na bango atandaki maboko naye na ekoteli ya mobengâ, soki okutanaki na bango olingaki kopesa mokongo na kokima na kobanga

    [19] Mpe ndenge wana nde tosekwisaki bango bazali kotunana bango na bango, moko kati na bango atunaki: Bovandi ngonga boni wana? Banzongisi: Tovandi mokolo to ndambu ya mokolo. Basusu bakolobaka: Nkolo wa bino ayebi malamu (boni) boyandaki, botinda moko wa bino na misolo mia bino na mboka, mpo atala biloko nini bia malamu ayela bino yango boliya, mpe asala na ndenge été bato bayeba bino te

    [20] Ya soló, bango soki bazuaka bino, balingaki koboma bino na mabanga to balingaki kozongisa bino na lingomba lia bango, тре bolingaki kolonga te

    [21] Mpe ndenge wana tobimisaki makambo na bango polele epai na bato mpo bayeba été elaka ya Allah ezali ya solo, mpe été mokolo ya suka ezali na tembe te kati na yango, tango bato ya mboka bazalaki kosuana тропа likambo na bango (bilenge baye bazalaki kati ya mobengâ), mpe balobaki: Botonga likolo na bango ndako ya monene, Nkolo wa bango ayebi bango malamu koleka, kasi ba oyo balongaki kati na kosuana wana balobi tokotonga likolo na bango esika ya kosambela. (masdjid)

    [22] Mpe bazalaki koloba été; bazali misato na mbwa na bango minei, mpe bazalaki koloba na bokeseni na kobombama kati na bango ete: Bazalaki (bilenge) mitano na mbwa na bango motoba, mpe bazalaki koloba lisusu été; bazali sambo na mbwa na bango mwambe; loba: Nkolo wa ngai ayebi koleka malamu motango mwa bango, sé moke nde baye bayebi yango, kasi kosuana na bato te тропа likambo yango, sé oyo ezali котопапа polele, mpe kotuna bato te тропа bozindo na yango

    [23] Mpe koloba te тропа eloko ete: Ngai nakosala yango lobi

    [24] (Kasi okoloba nde été:) soki Allah alingi, na sima okanisa Nkolo wayo soki obosanaki mpe oloba ete: Nazali kolikia été Nkolo na ngai akamba ngai mpe atia ngai penepene na oyo ezali ya bosóló

    [25] Мре bawumelaki па kati ya mobengâ wana mibu nkama misato mpe babakisaki libua

    [26] Loba: Allah ayebi malamu boni bawumelaki wana, ayebi mabombami ma likolo na ya nsé, lokola amonaka yango mpe ayokaka. Bazali na (mosungi) mosusu te sé ye, mpe azali na mosangisi te na motindo mwa ye

    [27] Mpe tanga maye makiteli yo okati ya buku ya Nkolo nayo, eloko moko te ekoki kobalola liloba lia ye, mpe okozua esika mosusu ya kokimela te sé epai naye

    [28] Mpe kanga motema elongo na baye bazali kobondela Nkolo wa bango tongo mpe pokwa, balingi (kornona) elongi naye, kasi kolongola miso likolo na bango te, тропа (koluka) bonzenga na bomoyi ya nsé, mpe kotosa te oyo motema naye esila kobosana liteya na biso mpe azali kolanda bamposa naye ya nzoto, mpe ezaleli naye ezali mabe

    [29] Mpe loba: Bosembo ezali nde epai ya Nkolo wa bino, oyo akolinga andimi na yango, oyo mpe akoboya apengui na yango. Ya soló, tosili kolengele тропа babubi moto oyo ekozinga bango na kopela, mpe soki basengi mayi ya komela, bakomelisa bango mayi ya mabende mayanguami na moto, ezali kozikisa bilongi na bango. Oyo mayi ya mabe ya komela mpe efandele ya mabe

    [30] Soló, тропа baye bandimaki mpe basalaki bolamu, ya solo penza tokobungisaka te lifuta lia oyo asalaki bolamu

    [31] Bango nde bakozalaka na elanga ya (lola) ya edeni libela biye bizali kolekisa o nsé na bango mingala, bakolata bawolo na maboko na bango mpe bakolata bilamba bia fafala ya langi ya mayi ya pondu, mpe bakofanda likolo ya kiti ya kitoko, oyo lifuta ya malamu mpe esika ya kitoko ya kofanda

    [32] Pesa bango ndakisa ya bato mibale, moko na bango to pesaki ye bilanga mibale ya Ânâb mpe tozingaki yango na banzete ya Nagh’l, mpe totiaki kati kati ya bilanga mibale wana milona

    [33] Bilanga binso mibale bizali kobota malamu, na bozangi eloko te mpe tobimisaki miluka kati kati na yango

    [34] Mpe bizalaki na bambuma, alobi na moninga waye: Naleki yo na bomengo mingi, mpe nazali na makasi koleka yo, mpo nazali na bato ebele

    [35] Мре akotaki na bilanga bia ye na komibuba ye moko, alobi: Nayebi ete oyo ekoki kobeba te

    [36] Mpe nandimi te ete mokolo ya suka ekoya, mpe soki bazongisi ngai epai ya Nkolo wa ngai, nakokuta ya kitoko koleka (bilanga) oyo

    [37] (Moninga waye ayebisi ye): Okopengwa na oyo akelaki yo na mabele, sima na mayi ya mokongo sima abimisi yo moto

    [38] Kasi тропа ngai; Allah azali Nkolo wa ngai, nakosangisa Nkolo wa ngai na eloko te

    [39] Tango okotaki na elanga nayo, soki olobaki été: Oyo bolingo ya Allah, nguya ezali te, makasi mpe ezali te sé epai ya Allah. Soki ozali kornona été: Nazali na bozui токе mpe bana ebele te

    [40] Ekoki kozala ete Nkolo wa ngai, kala te akoki kopesa ngai ya malamu koleka bilanga bia yo, mpe akoki kotindela yango (bilanga nayo) etumbu kowuta o likolo mpe ekomi mabele mpe putulu

    [41] То mayi та yango makokauka mpe okokuta yango te

    [42] Мре milona mia ye mibebisami o bisika binso тре акотакі kobukabuka maboko naye na ntina na oyo abimisaki тропа bilanga oyo, тре nyoso ebebisami, тре alobi: Eh ngai! Mawa na ngai soki nasangisaki Nkolo wa ngai na eloko te

    [43] Azuaki ata bato ya kobikisa ye na (etumbu) ya Allah te, mpe ye moko akokaki komibikisa te

    [44] Ebateli ya soló sólo ezali nde ya Allah. Apesaka mbano ya malamu mpe suka ya malamu

    [45] Mpe betela bango ndakisa ya bomoyi bwa mokili, ezali lokola mayi maye tozali kokitisa kowuta o likolo, mpe esangani na milona mia mabele, mpe ekomi matiti ya motawu, mopepe ekaboli yango, mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso

    [46] Bomengo mpe bana, ezali bisengo ya nsé, kasi misala ya malamu miye misilaka te, yango nde ezali na lifuta ya malamu mpe elikia ya kitoko epayi ya Nkolo nayo

    [47] Mpe mokolo moye tokotambwisaka bangomba, okomona mabele ekotandama polele, mpe tokosangisa bango mpe tokobosana moko te

    [48] Мре bakotelemaka molongo liboso lia Nkolo wayo, boyeli biso lolenge tokelaki bino mbala ya yambo, kasi bokanisaki ete tokokokisela bino elaka te

    [49] Mpe bakotiyaka buku (ya moto na moto) mpe okomona batomboki bazali kobanga maye makomami na kati, mpe bakolobaka: Mabe na biso, buku eye etikaki eloko te, ezala moke to ya monene sé ekomaki yango. Mpe bakokutaka maye basalaki polele, kasi Nkolo wayo abubaka moto te

    [50] Mpe tango tolobaki na ba anzelu ete: Bogumbamela Adam, bagumbamaki, longola sé satana azalaki kati ya ba djini mpe aboyaki kotosa mobeko mwa Nkolo wa ye. Boye bokozua ye na libota lia ye mpo bazala babateli na botiki ngai mpe bazali banguna ya bino? Oyo коропа ya mabe тропа babubi

    [51] Nazuaki bango te banzeneneke na bokeli mapata na mabele, ndenge moko kokelama na bango, mpe na koki te kozua babungisi тропа kosalisa nga

    [52] Mpe o mokolo moye akolobaka: Bobenga basangani na ngai baye bolikiaki, bakobengaka bango kasi bakoyanolaka bango te, mpe tokotiyaka kati kati na bango libulu lia bobungisi

    [53] Mpe batomboki bakomonaka moto, mpe bakondimaka ete bakokweya na yango, kasi bakozuaka esika ya bokimi te

    [54] Mpe ya soló, tosilaki kolimbola na kati ya kurani eye bandakisa ya ndenge na ndenge тропа bato, kasi moto aleki sé kotia tembe

    [55] Kasi nini epekisaki bato bandima, tango bokambi boyelaki bango, mpe basenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bango? Sé oyo ekomelaki bankoko ba bango eyeli mpe bango, to etumbu ya lolenge nyoso eyela bango

    [56] Mpe totindaka batindami sé тропа bopesi sango malamu mpe bokebisi. Kasi baye bapengwa bazali kosuanisa bosembo na lokuta na bango, тропа kobebisa. Mpe bazuaki mikapo mia ngai na maye bakebisamaki na yango na litio

    [57] Nani azali moto mabe koleka oyo apesi mokongo na bilembo bia Nkolo waye tango bazali koteya ye yango,, mpe abosani maye maboko (mibale) naye masalaki? Tozipi mitema mia bango ete basosola te, (bayeba kososolo kurani te) mpe matoyi na bango makangami, тре soki obengi bango na bokambami, bakokambama soki токе te

    [58] Мре Nkolo wayo azali molimbisi atonda mawa, soki alingi kozua bango na maye basalaki akoyela bango etumbu noki, mpe bazali na elaka asilaki kotiela bango oyo soki ekoki, bakozua esika ya kokimela te

    [59] Mpe wana nde bamboka eye tobomaki tango bato ba yango babubaki, mpe tosilaki kopesa elaka ya bobebisami na bango

    [60] (Kanisa) tango Mûssa alobaki na mosali waye ete: Nakotelema te kino nakoma na esika bibale mibale bikutani, to natambola mibu miyike

    [61] Mpe tango bakomaki wana, babosanaki mbisi na bango, oyo alandaki nzela naye kati na ebale

    [62] Mpe tango bango banso babale baleki (esika) ena, alobi na mosali waye: Yela biso biloko bia biso ya kolia, tosili kolembe na mobembo mwa biso moye

    [63] (Elenge wa ye) alobaki: Omoni tango tofandaki pene ya libanga ya monene nabosanaki mbisi kuna, satana nde abosanisi ngai mpo nakanisa yango te, mpe (Mûssa) azongaki sima тропа kolanda nzela ya ebale na kokamwa

    [64] (Mûssa) alobi: Wana nde oyo tozalaki koluka, mpe babongoli makolo ma bango balandi bilembo bia yango bazali kosolola

    [65] Mpe bakutaki mowumbu wa biso, oyo topesaki ye ngolu ma biso, mpe totangisaki ye boyebi bonene

    [66] Mûssa ayebisi ye: Boye nalanda yo mpo otangisa ngai boyebi boye otangisama ya bosôló

    [67] (Moto wana) alobi na Mûssa ete: Okokoka kokanga motema elongo na ngai te

    [68] Ndenge nini okokoka kokanga motema na maye (makambo) oyo ozali na boyebi na yango te

    [69] (Mûssa) alobi: Na bolingi bwa Allah, okomona ngai na kangi motema. Mpe nakoboyaka mobeko nayo ata moko te

    [70] Alobi: Soki olandi ngai kotuna ngai eloko te kino nakoyebisa yo ntina na yango

    [71] Bakei bango mibale, tango bamati na masuwa (bwato) abebisi yango, (Mûssa) alobi: Obebisi yango mpo ozindisa bakolo na yango? O sali mpenza likambo linene

    [72] (Wana) alobi: Nayebisaki yo te ete: Okokoka kokanga motema te elongo na nga

    [73] (Mûssa) alobi: Kornona ngai mabe te na ndenge nabosani, mpe kotelema makasi te тропа likambo lia ngai

    [74] Bakei bango banso babale, kino bakutanaki na mwana mobali, mpe abomi ye. (Mûssa) alobi: Obomi moto sé pamba boye, oyo asali eloko te? Osali soló mabe monene

    [75] (Moto wana) alobi: Nayebisaki yo te ete okokoka kokanga motema elongo na ngai te

    [76] (Mûssa) alobi: Soki natuni yo lisusu eloko sima na yango, osili kozua nzela тропа kokabuana na ngai. Okolimbisama тропа kokabuana na ngai

    [77] Bakei bango babale kino bakomi na mboka ya bato, batuni bayamba bango na biloko ya kolia, baboyi koyamba bango. Mpe bakutaki kati na yango efelo elingi kokweya, (moto wana) atomboli yango, (Mûssa) alobi; Soki olingaki mbele osengaki lifuta тропа yango

    [78] Alobi ete: Oyo nde bokabwani kati kati na ngai nayo, nakolimbolela yo maye okokaki kokanga motema te

    [79] Mpona masuwa (bwato), ezalaki ya babola basalaka na yango na ebale. Nabebisaki yango mpo sima na bango ezalaki na mokonzi moko mobubi azalaki kobotolo ba bwato nyoso ya kitoko

    [80] Mpe mpona mwana mobali, azalaki na baboti baye babale, bazalaki bandimi, tobangaki (soki akoli) akobebisa bondimi bwa bango na botomboki na bopengwi

    [81] Tolingaki ete Nkolo wa bango mibale apesa bango mwana mosusu ya malamu, apetwama mpe ya boboto esika naye

    [82] Mpe mpona efelo, ezalaki ya bana bitike babale kati na mboka wana, o nsé na yango ezalaki na bomengo na bango, kasi tata wabango azalaki (moto) malamu, Nkolo wa yo alingaki ete soki bakoli babimisa bomengo bwa bango bona na mawa ma Allah. Nasalaki yango na mitindo mia ngai moko te. Wana nde ndimbola ya maye okokaki kokanga na yango motema te

    [83] Mpe bazali kotuna yo mpona Dzu-al-Qarnaïn, loba: Nakotangela bino mwa bokundoli moke

    [84] Ya soló, tolendisaki bokasi bwa ye awa na nsé, mpe topesaki ye nzela likolo ya biloko binso

    [85] Mpe alandaki nzela

    [86] Kino tango moyi mokokita, akuti yango ekiti na moluka mwa mayi ma moto pene na yango akuti bato, tolobaki: Oh Dzu-al- Qarnaïn! Opesa bango etumbu to osalela bango bolamu

    [87] Alobi: Oyó abubaki, tokopesa ye etumbu, sima tokomema ye epai ya Nkolo waye apesa ye etumbu ya somo koleka

    [88] Mpe oyo andimaki mpe asalaki mosala ya malamu, ye akozua lifuta lilamu mpe tokoloba naye, (na bopesi) mibeko mia biso mizali pete

    [89] Sima alandaki nzela

    [90] Kino akomaki na ebimeli ya moyi akutaki (moyi) ezali koleka likolo na bato moko boye topesaki bango eloko te ya komizipa na moyi

    [91] Ndenge wana nde ndenge tozipaki boyebi bwa biso na oyo azalaki na yango

    [92] Sima alandaki nzela

    [93] Kino tango akomaki kati ya ndelo ezwami na kati ya ngomba mibale akuti sima na yango bato baye bazali kososola maloba ya bato misusu te

    [94] Balobi: Oh Dzu-al-Qarnaïn! Ya soló, ba ya’djûdj na ba ma’djûdj bazali babebisi na mokili, tokoki te kotiela yo makoki ete opika ndelo kati na biso na bango

    [95] Alobi: Oyo Nkolo wa ngai apeși ngai ezali malamu (koleka oyo ya bino) bosalisa ngai na bokasi bwa bino mpe natia ndelo kati na bino na bango, (mpo bakatisa te)

    [96] В óyela ngai liboke ya übende, mpe tango asilisi kotondisa taka kati na bangomba mibale, alobi na bango ete: Bofula, kino ezuaki moto, alobi na bango ete: Boyela ngai mayi ya übende wana eyanguami nasopa yango likolo

    [97] Bakokaki komonisa bokasi te na komata na yango

    [98] Alobi: Oyo ezali ngolu kowuta epai ya Nkolo wa ngai, tango elaka ya Nkolo wa ngai ekoyaka, akolalisa yango mpe akosukisa yango, mpe elaka ya Nkolo wa ngai ezalaka solo

    [99] Mpe totikaki bazali kotepatepa bango na bango, mpe bakobetaka kelelo mpe tokosangisa bango banso

    [100] Мре mokolo mona tokolakisaka bapengwi moto mwa lifelo

    [101] Baye miso ma bango mazalaki ya kozipama тропа likanisi na ngai, mpe bazalaki kokoka koyoka te

    [102] Baye bapengwa bazali kokanisa ete bawumbu ba ngai bazuela ngai bambanda basusu batika ngai? Ya soló, tolengeli moto mwa lifelo ekozala esika ya kovanda тропа bapengwi

    [103] Loba: Boye bolingi toyebisa bino ba nani oyo bazali na bozangi monene koleka kati na misala

    [104] Baye misala mia bango mibebaki kati na bomoyi bwa mokili, mpe bazalaki kokanisa ete basalaki bolamu

    [105] Baye bana baboyaki kondima na bilembo bia Nkolo wa bango mpe bokutani naye, misala mia bango ebebi, tokotiyelaka bango kilo o mokolo mwa suka te

    [106] Moto mwa lifelo mokozalaka lifuta lia bango na maye bapengwaki na yango, basakanaki na bilembo na ngai mpe batindami ba ngai

    [107] Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, esika ya kovanda na bango ekozalaka na paladizo ya likolo koleka (al firdawsi)

    [108] Libela kati na yango, bakolikia mbongwana te kati na yango

    [109] Loba: Soki ebale ya monene ezalaki lokola mayi ya mokanda, (тропа кокота na yango) maloba та Nkolo wa ngai (Allah), elingaki kokawuka liboso, mpe maloba ya Nkolo nangai esili te, ata soki toyei na ebale mosusu lokola yango mbala ebele

    [110] Loba: Ya sólo, nazali moto lokola bino, bakitiseli ngai emoniseli, ya soló Nzambe wa bino azali Nzambe moko, ya soló, oyo asengeli na mabondeli na oyo akolikia kokutana, na Nkolo waye, asala misala milamu, mpe asangisa libondeli lia Nkolo waye na eloko moko te

    Surah 19
    Maria

    [1] Kâf, hâ, yâ, ain, sôd

    [2] Ezali bokundoli bwa ngolu ya Nkolo wayo epai ya mowumbu wa ye Zakariya

    [3] Tango azali kobelela Nkolo wa ye na kobatama

    [4] Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Mikuwa mia ngai milembi, mpe suki ya pembe ezingi moto mwa ngai, na yango, ata ngonga moko te nazangaka kozua soki na beleli yo

    [5] Мре nazali kobanga (ezaleli) ya bakitani na ngai sima na ngai, mpe mwasi wa ngai abotaka te, pesa ngai mokitani awuta epai nayo

    [6] Oyó akokitana ngai mpe kokitana libota lia Ya’qúb, mpe tika été osepela naye oh Nkolo

    [7] Eh Zakariya! Tozali kopesa yo sango elamu ya mwana mobali, nkombo naye ekozala Yahya totiya liboso naye nkombo ena te. (ndoi te)

    [8] Мре (Zakariya) alobi: Oh Nkolo wa ngai! Ndenge nini nakozala na mwana ya mobali mpe mwasi wa ngai abotaka te, mpe bopaka bosili kozua ngai

    [9] Ayanoli ye; ndenge Nkolo wayo alobi nde ekozala. Wana ezali pași te тропа ngai, mpe nakelaki yo liboso ozalaki eloko te

    [10] Alobi: (Zakariya) Oh Nkolo wa ngai! Lakisa ngai elembo, (tiyela ngai elembo) (Allah) alobi: Elembo nayo, kolobisa bato te babutu misato milandani

    [11] Mpe abimeli bato naye kowuta na esika ya losambo, mpe ayebisi bango na maboko ete: Bosambela tongo mpe pokwa

    [12] Eh Yahya! Zúa buku mpe simba yango makasi, mpe topesaki ye bwanya azali elenge токе

    [13] Mpe totiaki ye azala na mawa mpe bopeto, mpe azalaki moyengebeni

    [14] Mpe azalaki na botosi mpe limemia epai ya baboti naye, kasi azalaki na lolendo te mpe komilakisa te, mpe azangaki te kotosa mibeko mia (Nkolo waye)

    [15] Mpe kimia ezala likolo lia ye na mokolo moye abotamaki, mpe na mokolo akokufa mpe mokolo akosekwa

    [16] Mpe kundola Maryam okati ya buku (kati ya kurani) tango amibendaki na libota lia ye akei kovanda na esika moko boye о moniele

    [17] Mpe amibombami na bango, totindelaki ye molimo (gabiliyele) oyo ayelaki ye na lolenge ya moto malamu

    [18] (Maryam) alobaki: Ya soló, ngai na mibateli epai ya Ar-Rahmân тропа yo, soki penza ozali moyengebeni

    [19] (Anzelu) alobi: Ya sólo, ngai nazali motindami ya Nkolo wayo mpo napesa yo likabo ya elenge mobali ya mayele oyo apetoama

    [20] Alobi: Ndenge nini nazala na mwana ya mobali, mpe mobali ata moko te asimbi ngai, mpe nazali ndumba te

    [21] Alobi: Ndenge wana nde Nkolo wayo alobi été; ezali pasi te тропа ngai, mpe tokotia ye elembo epai ya bato, mpe ngolu kowuta epai na biso. Mpe likambo yango ekokisamaki

    [22] Mpe azuaki zemi mpe akendeki kofanda mosika

    [23] Mpe pasi ya kobota eyeli ye onse ya nzete ya nagh’la alobi: Eh mpasi na ngai! Soki liwa ezuaka ngai yambo ya oyo, nde nabosanamaki soló ya kobosanama

    [24] Na yango, abengaki ye na nsé naye alobi: Kozala na mawa te! Nkolo wayo asili kotiya onse nayo liziba ya bomoyi

    [25] Ningisa nzete ya nagh’la, benda yango epai nayo ekokweisela yo mbuma na yango ya kotela

    [26] Lia mpe mela mpe sepelisa liso lia yo, soki omoni moto loba: Nazui elako ya ngizi pona Ar-Rahmán Nakosolola ata na moto moko lelo te

    [27] Mpe amemaki mwana na libota naye, mpe balobi naye ete: Oh Maryam! Osali likambo ya nsoni

    [28] Oh ndeko mwasi ndeko ya Háruna! Tata wayo azalaka moto mabe te, mpe mama wayo azalaka ndumba te

    [29] Mpe alakisaki mosapi mwaye epai ya mwana, balobi: Ndenge nini tokolobisa mwana moke oyo awuti kobotama

    [30] (Mwana) Alobi: Ya soló, nazali mowumbu wa Allah, apesi ngai buku mpe aponi ngai nazala ntoma

    [31] Mpe apamboli ngai esika nyoso nakozala, mpe atindi ngai nasambela mpe nabimisa Zakat na bomoyi bwa ngai mobimba

    [32] Mpe nasala bolamu epai ya mama na ngai, mpe atiaki ngai nazala moto ya lolendo mpe moto ya pași te

    [33] Mpe kimia ezala likolo lia ngai, mokolo moye nabotamaki na mokolo moye nakokufa na mokolo moye nakosekwisama nazali na bomoyi

    [34] Wana Issa mwana ya Maryam, liloba ya soló, eye bazali sé kotia tembe mpe kobundisa bosóló. (bwa ye)

    [35] Esengeli te na Allah azala na mwana, nkembo naye (Allah), soki akani likambo akoloba sé ete; zala, mpe ezalisami sé ndenge alobi

    [36] Mpe ya soló, Allah azali Nkolo wa ngai mpe Nkolo wa bino, bobondela ye, oyo nde nzela ya semba

    [37] (Na sima) bakabwani na binzambe nzambe kati kati na bango, etumbu ezali тропа bapengwi o mokolo ya monene (mokolo ya kokata makambo)

    [38] Bakoyoka mpe bakomona penza ndenge mokolo bakoyela biso, kasi babubi bakozala na libungi ya monene ya polele о mokolo yango

    [39] Mpe kebisa bango тропа mokolo mwa botungisami, tango manso makokatamaka, mpe bazali о mokili moye bazali komiyeba te mpe kondima te

    [40] Ya sólo, biso nde tozali na bokitani ya mabele, mpe baye banso bazali o likolo na yango, mpe epai na biso nde banso bakozonga

    [41] Mpe kundola Ibrâhîm okati ya buku (kurani), ya soló, ye azalaki ntoma moto ya bosembo

    [42] Tango ayebisaki na tata waye, eh tata wa ngai! Mpona nini ozali kobondela oyo akoyokaka te, mpe akomonaka te, mpe ekoki kosalisa yo na eloko te

    [43] Eh tata wa ngai! Našili kozua boyebi boye boyela naino yo te, landa ngai nakokamba yo o nzela ya semba

    [44] Eh tata wa ngai! Kobondela satana te, ya soló, satana azangaki botosi ya Ar-Rahmán

    [45] Eh tata wa ngai! Ya sólo ngai nazali kobanga etumbu ya Ar-Rahmán eyela yo, mpe okoma moto wa satana

    [46] Alobi: Eh Ibrâhîm! Ozali koyina banzambe ba ngai? Soki otiki te nakobetaka yo mabanga zala mosika na ngai (tokabwana) tango molai

    [47] Ibrâhîm alobi: Kimia ezala nayo, nakosengelaka yo na Allah alimbisa yo, mpo ye andimelaka ngai тропа bolamu

    [48] Namitie mosika na bino, mpe na maye bozali kobondela na botiki Allah, mpe nakosenga na Nkolo wa ngai, mpe nazali na elikya ete nakomona pasi te soki nasengi Nkolo wa ngai

    [49] Tango amitie mosika na bango, mpe na maye bazalaki kobondela na botiki Allah, topesaki ye likabo ya Is’háq na Ya’qúb, mpe totiaki bango bantoma

    [50] Mpe topesaki bango ngolu na biso, mpe totombolaki bango na koloba bosôló

    [51] Mpe kundola Mûssa okati ya buku. Ya soló, azalaki moponomi ntoma mpe motindami

    [52] Mpe tobengaki ye (o ngambu ya mobali o ngomba ya sinai) penepene na biso тропа kopesa ye sekele

    [53] Mpe na mawa na biso topesaki ye ndeko waye Háruna azala lokola ntoma

    [54] Mpe kundola okati ya buku Ismâîl. Ya sólo, azalaki kokokisa elaka mpe azalaki ntoma mpe motindami

    [55] Mpe azalaki kotinda libota lia ye na losambo mpe kopesa zakat, mpe Nkolo waye azalaki kosepela naye

    [56] Mpe kundola Idrís okati ya buku. Ya soló azalaki ntoma mpe moto ya bosembo

    [57] Mpe totombolaki ye esika likolo ya lokumu koleka

    [58] Baye wana bantoma baye Allah atondisaki bolamu naye likolo na bango kati ya libota ya Adam, na baye bazalaki elongo na Nûh (okati ya masuwa), mpe libota lia Ibrâhîm mpe Isalayele, mpe basusu baye tokambaki mpe toponaki, soki mikapo mia Ar-Rahmân mizali kotangama, bakweyaka na kofukama na kolela

    [59] Kasi baye bakitanaki sima na bango, batikaki kosambela mpe balandaki bisengo na baposa na bango ya nzoto, kasi mosika te bakobebisama

    [60] Longola sé oyo akotubela mpe andimi mpe asali misala milamu, bango nde bakokota na Iola mpe bakobubama te

    [61] (Bakozala) na elanga ya edeni eye Ar-Rahmân alakaki yango bawumbu naye, baye bandimaki na (mabombami na yango). Ya soló, elaka naye ezali na tembe te

    [62] Kati na yango (Iola), bakoyokaka maloba mazanga ntina te, sé kimia, mpe bakozalaka na bilei bia tongo mpe pokwa

    [63] Wana nde Iola eye tokopesaka bawumbu ba biso baye bazalaki na bobangi

    [64] Tokitaka te sé na mitindo mia Nkolo wa yo, manso maye mazali liboso lia biso mpe osima na biso na maye manso mazwami o kati kati na yango mibale mazali yaye. Mpe Nkolo wayo abosanaka te

    [65] Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali kati na yango, bondela ye mpe kanga motema тропа mabondeli naye. Boye osi oyoka été azali na ndoyi

    [66] Mpe moto alobi: Boye soki nakufi nakosekwisama lisusu

    [67] Boye moto azali kokanisa te ndenge tokelaki ye liboso mpe ye azalaki eloko te

    [68] Na nkombo ya Nkolo wayo, tokosangisa bango na basatana, mpe sima tokofukamisa bango liboso ya lifelo

    [69] Sima tokobendaka na mangomba manso kati na bango baye bazangaki botosi, baye bazalaki mabe koleka тропа Ar-Rahmân

    [70] Sima, biso nde tokoyeba ba nani baye basengeli kokota mpo bazika na motó

    [71] Mpe bino banso bokoleka likolo na yango (ya gbagba). Mpo été yango ekozangaka te epai na Nkolo wayo

    [72] Sima, tokolongisaka baye bandimaki mpe tokotika babubi о kati na yango (lifelo) ya kofukama

    [73] Mpe tango mikapo mia biso mizali kotangema likolo na bango, bapengwi bakolobaka na baye bandima: Lisanga nini ya malamu kati na oyo mibale ezali kitoko mpe bolongani ya malamu

    [74] Ebele toboma yambo na bango kati na mabota! Bazalaki malamu mpe na misolo ebele mpe kitoko

    [75] Loba: Oyo akozala okati ya libungi, Allah akobakisela ye libungi kino akozuaka etumbu, to soki tango ekoki ekoyebanaka te ba nani bazalaki na mabe koleka, na ba nani bazalaki na basoda ya motawu

    [76] Mpe Allah akobakisela baye bakambamaki bokambi, mpe misala malamu maye mawumelaka, ekoki na litomba malamu mpe bozongi malamu epayi ya Nkolo nayo

    [77] Boye omonaki te ete: Oyo apengwaki na mikapo mia biso mpe alobi: Nakopesamaka bolamu na bana solo

    [78] Boye akomi na boyebi ya mabombami to azuaki elaka na Ar-Rahmân

    [79] Kasi ezali bongo te, tokokoma maye azali koloba mpe tokobakisela ye etumbu

    [80] Mpe biso nde tokopesaka maye azali koloba, kasi akoyelaka biso ye moko

    [81] Bazui banzambe basusu batiki Allah, mpo bazala basungi ba bango, (тропа etumbu)

    [82] Kasi te, bakopengwaka na mabondeli ma bango, mpe bakozalaka banguna na bango

    [83] Boye ozali kornona te ete ya soló: Totindaki bazabolo mpo bazangisaka bango botosi

    [84] Kowelisa te тропа bango, ya sólo, tokotiyaka motango moye moyebani, (тропа maye manso basalaki)

    [85] (Kanisa) mokolo moye tokosangisaka babangi (Nzambe) epai na Ar-Rahmán

    [86] Mpe tokopusaka batomboki o moto mwa lifelo lokola bibwele (тропа komela mayi ya moto)

    [87] Bakozuaka lisalisi te, longola sé oyo akozua elaka na Ar-Rahmán

    [88] Mpe bazali koloba ete: Ar-Rahmán azali na mwana

    [89] Bosili koya na eloko ya mabe

    [90] Liloba wana ekoki kofungola mapata mpe kopasola mabele mpe bangomba bikopanzana

    [91] Mpo bazueli Ar-Rahmân mwana

    [92] Kasi ekoki kosalama te ete: Ar-Rahmân azala na mwana

    [93] Baye banso bazali o likolo mpe o nsé bakoya epaî ya Ar-Rahmân bazali bawumbu

    [94] Asila koyeba motango mwa bango, mpe bazali ya koyebana

    [95] Mpe o mokolo mwa mbano bango banso bakotelemaka moko moko o liboso lia ye

    [96] Ya soló, baye bandimaki mpe bazalaki kosala misala milamu Ar-Rahmân akopesa bango bolingo mpe bango bakolinga ye

    [97] Mpe ya solo, tosilâ kozalisa yango mpasi te na lolemo nayo (kurani) тропа komanyola, mpo okoka kopesa sango elamu na yango epai ya babangi mpe okebisa na yango babubi

    [98] Mpe ebele tosilaki koboma liboso na bango! Boye окотопа tokokuta moko kati na bango to okoyoka ata mwa makelele

    Surah 20
    Taha

    [1] Twâ hâ

    [2] Tokitiselaki yo kurani te mpo epesa yo pași

    [3] Sé ezala bokundoli тропа oyo azali kobanga, (Allah)

    [4] (Мре ezala) emoniseli ya oyo akelaki mabele na likolo oyo etomboami

    [5] Ar-Rahmân Atombwami na ngwende naye

    [6] Maye manso mazali olikolo тре mabele na maye mazuami kati kati na yango na oyo na nsé ya mabele mazali ya ye

    [7] Mpe soki otomboli mongongo, ayebi solo maye mabombami na maye mazali ya kobatama koleka

    [8] Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, mpe azali na bankombo ya kitoko koleka

    [9] Mpe boye masolo (makomi) ya Mûssa makomelaki yo

    [10] Tango amonaki moto, mpe alobaki na libota naye; botikala awa, ya soló, namoni moto na mosika tango mosusu nakoyela bino kowuta na yango eloko ya kopelisa to na kokutana na oyo akokamba ngayi

    [11] Mpe tango akomi, abiangami, Oh Mûssa

    [12] Ezali ya sólo, ngai Nkolo wayo, longola mapapa nayo, ya sólo, ozali otei ya lobwako esantu (ya touri)

    [13] Mpe naponi yo, yoka maye bakoyebisa yo

    [14] Ya sólo penza, ngai nde Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ngai, bondela ngai mpe telemisa losambo тропа kokanisa ngai

    [15] Ya soló, ntango ya suka ekoya, na bombi yango mpo ete molimo na molimo afutama na mpiko naye

    [16] Kasi oyo andimi na yango te mpe alandi sé mposa naye, abungisa yo te noki te okobebisama

    [17] Mpe nini boye ezali na loboko nayo ya mobali oh Mûssa

    [18] Alobi: Ezali nde lingenda lia ngai, nayekemelaka yango, mpe esalisaka ngai na bobuki bakasa ya banzete тропа koleisa banyama na ngai, mpe esalisaka ngai na makambo mosusu

    [19] (Allah ayebisi ye): Bwaka yango oh Mûssa

    [20] Мре abwaki yango, mpe ebongwani nyoka ebandi kotambola

    [21] (Allah) alobi: Zua yango, kaši kobanga te, tokozongisa yango na lolenge ezalaki liboso

    [22] Mpe kanga loboko nayo na nsé ya lipeka, ekobima na bongengi ya mpembe makasi mpe ekosala mpasi te. Wana elembo mosusu (bikamwa)

    [23] Mpo tolakisa yo makamwisi ma biso ya minene

    [24] Kende epai ya falo, ya soló ye asili kolekisa ndelo

    [25] (Mûssa) alobi: Nkolo wa ngai, fungóla ntolo na ngai

    [26] Mpe etinda na ngai oyo, tia yango ezala mpete

    [27] Mpe bongisa elobeli na ngai

    [28] Mpo bakoka kososola maloba na ngai

    [29] Mpe pesa ngai mosalisi awuta na libota lia ngai

    [30] Hâruna ndeko wa ngai

    [31] Тіа ye azala oyo akobakisela ngai nguya

    [32] Kotisa ye na makambo na ngai (tokoma mibale)

    [33] Mpo tokumisa yo koleka

    [34] Mpe tokanisa yo mingi

    [35] Ya soló, ozali kornona biso

    [36] (Allah) alobi: Oh Müssa bosenga nayo esili kokokisama

    [37] Mpe tosilaka kosalisa yo mbala ya yambo

    [38] Tango toyebisaka na mama wayo mayebisi

    [39] Ete: Tia ye na sanduku mpe bwaka yango na mayi mpo ete ebale emema yango o ngambo ya kotiola, monguna na ngai naye akozua ye. Mpe na tiaki likolo nayo bolingo na ngai mpo ete obokolama na nsé ya miso na ngai

    [40] Mpe tango ndeko nayo ya mwasi azalaki kolanda yo mpe alobaki: Nalakisa bino moto oyo akomelisa ye тропа bino? Mpe tozongisaki yo epai ya mama wayo, mpo asepela mpe ayoka mpasi te, mpe obomaki moto mpe tobikisaki yo na makambo wana, mpe tomekaki yo makambo ebele, mpe ovandaki ba mbula ebele o mboka ya mad’yan, sima oyei oh Mûssa! Kokokisa makomi

    [41] Mpe ngai moko naponaki yo

    [42] Bökende yo na ndeko wayo na makamwisi ma ngai, mpe bolemba kokumisa ngai te

    [43] Bökende epai ya falo, ya soló ye asili kotomboka

    [44] Mpe boyebisa ye liloba ya pete, tango mosusu akoki kokanisa to kobanga ngai

    [45] Balobi: Oh Nkolo wa biso! Ya sólo, tozali kobanga ete anyokolo biso, to alekisa ndelo

    [46] (Allah) alobi: Bobanga te, ya sólo nazali elongo na bino, nazali koyoka mpe kornona

    [47] Bökende epai naye mpe boloba naye: Biso mibale tozali batindami ya Nkolo wayo, pesa biso bana ya isalayele tokende na bango, tika konyokolo bango, toyeli yo elembo ya Nkolo wayo, mpe kimiya ezala likolo ya moto oyo akolanda nzela ya semba

    [48] Ya sólo, basilaki koyebisa biso ete: Etumbu ekozala likolo ya oyo akoboya kotosa mpe kondima, mpe apesi mokongo

    [49] (Falo) alobi: Nani Nkolo wa bino oh Mûssa

    [50] (Mûssa) alobi: Nkolo wa biso nde oyo apesaki eloko nyoso lolenge na yango mpe sima akambi yango

    [51] (Falo) alobi: Bongo ndenge nini тропа baye balekaka kala

    [52] (Mûssa) alobi: Oyo ayebi makambo na bango ezali nde Nkolo wa ngai, ekomama o kati ya buku, Nkolo wa ngai abungaka te, mpe abosanaka te

    [53] Oyo asalelaki bino mabele ezala lokola mbeto mpe atiela bino banzela okati na yango, mpe azali kokitisela bino mayi kowuta o likolo, mpe na yango tobimisaka milona ndenge na ndenge

    [54] Boliya mpe boleyisa bibwele na bino. Ya soló, wana nde bilembo тропа baye bazali kokanisa (bazali na mayele)

    [55] Tokelaki bino kowuta na yango (mabele) mpe kati na yango nde tokozongisa bino, mpe tokobimisa bino lisusu okati na yango mbala mosusu

    [56] Mpe tosilaki kolakisa ye bilembo bia biso nyoso, kasi aboyaki kondima

    [57] (Falo) alobi: Oh Mûssa! Boye oyeli biso bonganga bwa yo mpo obimisa biso na mabele na biso

    [58] Kasi tokoyela yo bonganga lokola yango, tiela biso elaka mpo moko kati na biso azanga te, ezala na esika ya malamu

    [59] (Mûssa) alobi: Elaka na biso ekozala o mokolo mwa eyenga, mpe bato basangana na tongo

    [60] Falo akei mpe asangisi bato naye na kibondoki na bango, sima bayei koyanola na elaka

    [61] Mûssa ayebisi bango: Mabe ezala na bino, bobukela Allah lokuta te, noki te etumbu ekozua bino. Na oyo akobukela Allah lokuta, asili kobungisama

    [62] Nasima bakomaki kolobana bango na bango nasekele

    [63] Balobi: Ba oyo bazali banganga mibale, balingi kobimisa bino na mabele na bino na bonganga na bango, mpe botika nzela ya malamu oyo bozali na yango

    [64] Bosangisa bonganga na bino nyoso, mpe bosala molongo. Mpe oyo akozala likolo asili kolonga

    [65] Balobi: Oh Mûssa! Obwaka to biso tobwaka bato ya liboso

    [66] Alobi: Bobwaka noki, na mbalakaka nde basinga mpe ba mangenda na bango bimonanaki na miso naye lokola ba nyoka na bondoki na bango

    [67] Bobangi moke bokomelaki Mûssa ye moko

    [68] Toyebisaki ye: Kobanga te, yo nde okozala likolo. (na bango)

    [69] Мре bwaka oyo ezali na loboko nayo ya mobali, ekomela manso oyo basali. Soló, wana basali ezali mwango ya bonganga, mpe nganga akoki kolonga te о esika nyoso awuti

    [70] Banganga banso bakweyaki na bogumbami mpe balobi: Tondimi na Nkolo ya Hâruna na Mûssa

    [71] (Falo alobi): Boye bondimeli ye yambo ete napesa bino ndingisa? Ya sólo, ye nde mokonzi wa bino oyo alakisaki bino bonganga, nakokata bino maboko na makolo na bokeseni, mpe nakobaka bino na mibimbi mia nzete ya nagh’l, mpe bokoyebaka ya sólo penza nani kati na biso azali na etumbu ya makasi koleka mpe yakowumela

    [72] Balobi: Tolapi na oyo akelaki biso, tokolikia epai nayo te, тропа bilembo oyo eyeli biso, sala oyo olingi kosala, yo ozali sé kokata makambo ya bomoi ya nsé

    [73] Ya soló, tondimi na Nkolo wa biso, тропа alimbisa masumu та biso, na bonganga oyo osalisi yango biso na makasi. Mpe Allah azali malamu wa libela

    [74] Oyo akotomboko na Nkolo waye, ya sólo, akozala na lifelo. Kati na yango akokufaka te mpe akozalaka na bomoyi te

    [75] Mpe oyo akokutana naye na bondimi mpe asalaki misala milamu, bango nde bakozalaka o bapete ya lokumu ya likolo

    [76] Lola ya edeni eye ezali kolekisa na nsé na yango mingala, libela kati na yango, mpe wana ekozala nde litomba ya baye bamipetolaki. (na boboyi kibopengwi na masumu)

    [77] Mpe tosilaki kotalisa na Müssa été: Kende na bawumbu na ngai na butu mpe fongola bango nzela makawuka okati ya ebale. Kasi kobanga te ete bakolanda

    [78] Falo alandaki bango elongo na basoda naye, ebale ezindisaki bango mpe elimwisaki bango

    [79] Мре falo abungisaki bato naye, mpe akambaki bango o nzela ya semba te

    [80] Eh bana ya isalayele! Tosilaki kolongisa bino na monguna wa bino, mpe topesaki bino elaka o ngambu ya ngomba o ngambu ya mobali, mpe tokitiselaki bino. Manna, na Salwa

    [81] Boliya bia malamu biye topesi bino kasi bopengwa na yango te, noki te (Allah) akosilika na bino, mpe oyo kanda na ngai ekozua ye, asili kobeba

    [82] Mpe ya soló, nazali molimbisi monene, тропа oyo akosenga bolimbisi mpe andimi mpe asali misala milamu, sima amitiye o nzela ya semba

    [83] Mpe тропа nini ozali kowelisa kotika bato nayo oh Müssa

    [84] (Mûssa) ayanolaki: Bazali wana na mobeko mwa ngai, mpe nazali kowelisa koya epai nayo Nkolo, mpo okoka kondimela ngai

    [85] (Allah) alobi: Ya sólo, tomeki bato nayo o sima ya kokende nayo, mpe samiriyu abungisi bango

    [86] Mûssa azongi epai ya bato naye na mawa, mpe kanda ya makasi. Alobi: Oh bato na ngai! Nkolo wa bino asilaki kopesa bino elaka elamu te? Boyokani bozalaki molai тропа bino to boponi sé ete kanda ya Nkolo ezua bino? Mpo bosili kobebisa mpe bopengwi na elaka na ngai

    [87] Balobi: Ezali kolinga ya biso moko te oyo ezangisi biso kotosa, kasi tomemaki mikumba mia bato ba falo, tobwakaki yango na moto, lokola samiri abwakaki

    [88] Mpe abimiseli bango ekeko ya motané ezali kobimisa mongongo lokola ngombe, Balobi; oyo nde nzambe na bino na nzambe ya Mûssa abosanaki

    [89] Boye bazali kornona te ete azali kozongisela (ekeko) bango liloba te mpe azali kosalisa bango te mpe kosala bango mabe te

    [90] Mpe ya soló: Háruna asilaki koyebisa na bango liboso oh bato ba ngai! Ya sólo, bokwei na bomekami тропа yango, ya soló, oyo atonda na mawa nde Nkolo na bino. Bolanda ngai, mpe botosa mitindo mia ngai

    [91] Balobi: Tokozalaka na yango kino Mûssa akozonga

    [92] (Mûssa) alobi: Oh Hânına! Eloko nini epekisaki yo mpo opekisa bango tango omonaki bazali kobunga nzela

    [93] Ete olanda ngaï. Boye, oboyi kotosa mitindo na ngai

    [94] Alobi: Eh mwana ya mama! Kobenda mandefu mpe moto na ngai te, na bangaki oloba ete ngai nakaboli bana ya isalayele mpe natosi mitindo nayo te

    [95] (Mûssa) alobi: Olingi nini eh Samiriyu

    [96] Alobi: Namoni oyo bamona te. Nazuaki mabele ya makolo ya motindami (ya anzelu) na bwakaki yango, wana nde ndenge molimo mwa ngai motindaki ngai

    [97] (Mûssa) alobi: Kende na bomoi ya nsé, okobanda koloba na moto nyoso ete: Kosimba ngai te, mpe okozala na elaka oyo okozangisa yango te, tala nzambe nayo oyo obondelaki mpe okangamaki na yango, tokozikisa yango mpenza mpe tokopanza putulu na yango likolo na mayi ya ebale

    [98] Ya soló, Nkolo wa bino nde Allah oyo nzambe mosusu ya bosóló ya kobondela azali te sé ye, ayebi nyoso ezali koleka

    [99] Lolenge wana nde tozali kobetela yo makambo ya ba oyo baleka. Mpe ya sólo, tosilaka kopesa yo bokundoli bwa biso

    [100] Oyo akoboya kondima na yango (kurani) ya soló, ye o mokolo ya suka akomemaka mokumba

    [101] Bakotikalaka libela o kati na yango, mpe bakozuaka mabe o mokolo mona

    [102] Mokolo moye bakofulaka kelelo тропа lisekwa. Mpe tokosangisaka batomboki banso, na langi ya bule (тропа bobangi ya makasi)

    [103] Bakolobana kati na bango ete: Bowumelaki na mokili sé mikolo zomi

    [104] Toyebi na malamu nini bazali koloba, tango moko wa bango oyo azali na ezaleli ya malamu akoloba ete: Borandaki sé mokolo moko

    [105] Bazali kotuna yo тропа bangomba; loba: Nkolo wa ngai akopanzaka yango, ekokomaka lokola mputulu

    [106] Mpe akotika yango elali polele lokola mabele oyo ezali na eloko te likolo na yango

    [107] Okomona o kati na yango ata esika moko ezali ya kogumbama te mpe botombwami te

    [108] Mokolo wana (bato), bakolandaka mobengi na kozanga koyimayima mpe mingongo mikokitisama o boso bwa Ar-Rahmân, ata makelele ya шоке okoyoka na paši

    [109] Mokolo wana kosengela moto ekozalaka te, longola sé oyo Ar-Rahmân akopesaka ye ndingisa, mpe akondimela ye liloba

    [110] Ayebi maye mazali liboso na bango mpe maye mazali o sima na bango, mpe bazali na boyebi te ya balolenge naye

    [111] Mpe bilongi bia bato bikokitisamaka тропа oyo azali na bomoi mpe amikoka mpe mabe ekozalaka na oyo akoya liboso naye na bobubami. (mabe)

    [112] Mpe oyo akosala bolamu mpe azali mondimi, akobangaka kobubama te mpe konyokwama te

    [113] Mpe lolenge wana nde tokitisaki kurani na ndinga ya arabo, mpe tolimbolaki na kati na yango, тропа balolenge ya bitumbu, mpo bakoka kobanga mpe bakanisa тропа bondimi

    [114] Lokumu ezali ya Allah nkumu ya bosôló, mpe kotanga kuranı noki noki te yambo ete ekitela yo, mpe loba: Oh Nkolo wa ngai! Bakisela ngai boyebi

    [115] Mpe tosilaki kopesa Adam mobeko liboso mpe abosanaki yango, mpe tokutaki bokangami ya makasi epai naye te

    [116] Mpe tango tolobaki na ba anzelu: Bogumbama o liboso ya Adam, bagumbamaki bango banso, longola sé satana, aboyaki (kogumbamela ye)

    [117] Mpe tolobaki: Eh Âdâm! Ya soló, oyo nde monguna nayo, yo na mwasi wayo. Na yango abimisa bino na paladizo te noki okozala na mpasi

    [118] Ya sólo, тропа yo, okoyokaka nzala te okati na yango mpe okozalaka bolumbu te

    [119] Mpe ya sólo, yo okoyokaka mposa ya mayi te, mpe pasi ya moyi ekozuaka yo te

    [120] Mpe (sima) satana amekaki ye na koloba ete: Eh Âdâm! Nalakisa yo nzete ya bomoi ya nseko mpe bokonzi eye ekobebisama te

    [121] Bango mibale baliaki yango, mpe batikalaki bolumbu, mpe babandi komizipa na nkasa ya Iola, mpe Adam aboyaki kotosa Nkolo wa ye, mpe abungaki na mibeko mia Nkolo waye

    [122] Sima Nkolo waye aponaki ye mpe ayambaki tubela naye mpe akambaki ye

    [123] Alobi: Bokita awa bino banso, bokozala na kibonguna na mabota ma bino banso, (bakitani na bino) mpe soki bokambi bwa ngai boyeli bino, oyo akolanda bokambi bwa ngai, akobunga te mpe akozalaka na mpasi te

    [124] Mpe oyo akoboya bokundoli bwa ngai, ya soló, ye akozalaka na bomoyi ya mpasi, mpe omokolo mwa suka, tokosekwisa ye miso mazipama

    [125] Akolobaka, oh Nkolo wa ngai! Mpona nini osekwisi ngai nazali kornona te kasi yambo nazalaki kornona

    [126] (Allah) akoyebisa ye: Lolenge wana nde eyelaki yo bilembo bia biso mpona kotangisa yo, kasi obosanaki yango, yango wana lelo tobosani yo

    [127] Мре lolenge wana nde topesaka etumbu na oyo azali kondima te, mpe azali kolekisa ndelo na bilembo bia Nkolo wa ye. Kasi etumbu ya mokolo ya suka ekozalaka makasi mpe ekotikalaka libela

    [128] Wana esalisaki bango na bokambi te, boni ebele ya bato tobomaki yambo na bango? Bazalaki kotambola na bisika bia bango. Ya soló, wana nde elembo тропа baye bazali na may ele

    [129] Soki тропа liloba ya Nkolo naye esila kolobama te mpe тропа mokano naye te, mbele etumbu esilaki kokwela bango

    [130] Zala na bozeli тропа maye bazali koloba, mpe kumisa lokumu ya Nkolo nayo yambo ete moyi ebima, mpe yambo ya bolimwi na yango, mpe o kati kati ya butu. Mpe kumisa ye na moyi tango mosusu okosepela

    [131] Mpe kolandisa miso nayo te sima ya maye topesi basusu kati na bango bonzenga ya bisengo ya mokili mpo ete tomeka bango na yango, bozui ya Nkolo nayo (ya lola) nde ezali malamu mpe ekowumela

    [132] Мре tinda libota lia yo na losambo, mpe žala molende na yango, tozali kosenga yo bozui te, biso nde tozali koleisa yo, mpe suka ya malamu ezali тропа bobangi (Allah)

    [133] Мре bakolobaka: Mpona nini ayeli biso likamwisi kowuta epai y a Nkolo naye te? Boye elembo (kurani) eye ekomama kala eyelaki bango te

    [134] Мре soki topesaka bango etumbu liboso, balingaki koloba: Oh Nkolo wa biso! Mpona nini otindelaki biso motindami te? Kasi tolandaki mateya yambo ete toyoka soni тре tozanga ntina

    [135] Loba: Moto nyoso azela, bino тре bozela. Bokoyebaka banani bazali na nzela ya semba тре bakambami

    Surah 21
    Baprofeta

    [1] Eleko ya kokata likambo ya bato ekomi pembeni, kasi bazali komitungisa te тропа yango mpe bapesi mokongo

    [2] Bokundoli moko te ya Nkolo na bango, ekomelaka bango ezanga te sé bayoka yango na kotiola

    [3] Mitema mia bango mizali mosika, mpe babubi babebisi mitema mia bango, balobi: Oyo azali moto lokola bino тропа nini bozali komipesa na bondoki mpe bino bozali kornona malamu

    [4] Alobi: Nkolo wa ngai ayebi manso mazali kolobama o likolo mpe na nsé, mpe azali moyoki atonda boyebi

    [5] Kasi balobaki: Oyo wana ezali bosangani ya bandoto to ezali makambo naye moko, to ekoki kozala lisapo, to ayela biso elembo, ndenge etindamaki na bato ba yambo

    [6] Ezali na etuka (mboka) moko te eye topesaki etumbu liboso lia bango bandimaki te, boye bango nde bakondima

    [7] Mpe totindaki liboso nayo sé mibali topesaki bango emoniseli, botuna ba oyo bayebi soki bino boyebi te

    [8] Mpe topesaki bango nzoto mpo baliaka biloko, mpe batikalaki libela te

    [9] Sima tokokiselaki bango elaka тропа oyo bazalaki kosala, mpe tobikisaki baye tolingaki kobikisa kati na bango, mpe topesaki etumbu na balekisi ndelo

    [10] Tosilaki ya soló, kokitisela bino buku eye ezuami na bokundoli тропа bino. Boye bozali kokanisa te

    [11] Mpe ebele bamboka oyo ezuamaki na mbeba mpe tobomaki yango, mpe tokelaki bato basusu na esika na bango

    [12] Tango (bato wana) bamoni etumbu na biso, bakimaki na lombango

    [13] Bokima te, bozonga na bisika biye bozalaki kobebisa kati na bandako na bino, mpo bokoka kotunama

    [14] Bakolobaka: Oh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki babubi

    [15] Bakotikaka komitungisa te, kino tokokomisaka bango lokola milona ya (mputulu miye mikawuka) mpe moto ezali kozikisa bango

    [16] Мре tokelaki likolo mpe na mabele, na maye mazuami kati na yango na lisano te

    [17] Soki tolingaki kozua yango na lisano, mbele tosalaki yango na ndenge ya biso moko soki ya soló tolingaki kosala

    [18] Tozali kolobela тропа bosôló, kasi lokuta te, mpe lokuta elimwa mpe ekende. Mpe mabe ekozala likolo na bino тропа oyo bozali kokokisa (Allah) na yango

    [19] Mpe manso oyo mazali o likolo mpe na nsé, mazali ya ye, тре baye bazuami pene naye (ba anzelu) basalaka lolendo te тропа kokumisa ye, mpe balembeke te

    [20] Bazali kokumisa (ye) butu na moyi, taka ezali kotikala te

    [21] Boye basili kozua banzambe oyo bakosekuisa bawa na mabele

    [22] Soki o kati ya likolo na o nsé ezalaka na banzambe mosusu elongo na Allah, mbele mobulu ekotaki kati na yango (mapata na mabele), mpe nkembo na Allah kolo ya ngwende na maye bazali kokokisa

    [23] Akotunamaka na oyo asali te, kasi bango nde bakotunama na maye basalaki

    [24] Boye bazali kondimela banzambe mosusu na botiki ye? (Allah) loba: Boya na bilembetele na bino. Oyo ezali bokundoli тропа baye bazali elongo na ngai, тре bokundoli тропа baye balekaka liboso na ngai. Kasi ebele na bango bazali koyeba bosôló te. Мре bazali komitiya mosika па yango

    [25] Мре liboso nayo totindaki motindami te, sé topesa ye emoniseli ete: Ya soló, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te bobele ngai, mpe bobondela ngai

    [26] Mpe bazali koloba: Ar-Rahmân azali na mwana, nkembo naye, kasi bazali sé bawumbu (naye) ya lokumu

    [27] Balekaka ye na maloba te, basalaka sé na mitindo mia ye

    [28] Ayebi oyo ezali liboso na bango mpe sima na bango mpe bazalaka balobeli ya moto te sé na ba oyo (Allah) asepeli na bango, mpe bazali kobanga ye bobangi ya sólo

    [29] Мре oyo kati na bango akoloba ete: Ya soló ngai nazali nzambe kasi ye te (Allah), tokofuta ye lifelo. Boye nde tokofutaka babubi

    [30] Boye bapengwi bazali kornona te, ete likolo na mabele bizalaki ya kokangama mpe to fungoli yango? Mpe tokela bomoyi nyonso kowuta na mayi? Boye bazali kondima te

    [31] Mpe totiyaki bangomba o kati na mabele mpo ete esimbama makasi mpe eningana te na baye bazali likolo nayango mpe totiyeli yango banzela mpo bakoka kokambama

    [32] Mpe totiyaki likolo ezala etando eye ebatelama, kasi bazali komitiya mosika na bilembo na yango

    [33] Mpe yende akela butu na mokolo, moyi na sanza, nyoso ezali kotambola na nzela na yango

    [34] Mpe totiaki moto liboso nayo te mpo atikala libela, soki yo okufi, bango nde bakotikala libela

    [35] Molimo nyoso mokomeka liwa (moto nyoso akokufaka), mpe tokomeka bino na mabe mpe na malamu mpe epai na biso nde bokozongisama

    [36] Mpe tango bapengwi bazali kotala yo mpe bazali koseka yo, mpe bazali koloba: Oyo nde azali kolobela banzambe na bino? Mpe bazali koboya bokundoli ya Ar- Rahmân

    [37] Moto akelama na kowela wela. Nakolakisa bino bilembo na ngai, kaši bowelisa ngai te тропа yango (etumbu)

    [38] Mpe bakolobaka: Elaka yango ekokokisama tango nini, soki bozali koloba solo

    [39] Soki bapengwi bayebaka tango oyo bakopekisaka te móto ezua bango na bilongi bia bango mpe na mikongo mia bango, kaši bakolongisamaka te

    [40] Kaši tango wana ekoyelaka bango na mbalakaka, mpe bakokoka kozongisa yango te, mpe bazali kotala

    [41] Mpe batiolaki batindami yambo ya boyei nayo, mpe baye basakanaki na bango, babetamaka na lolenge nyoso, тропа oyo bazalaki kotiola yango

    [42] Loba: Nani abatelaka bino o kati na butu тре па тоуі па etumbu ya Ar-Rahmân? Мре bazali kopesa mokongo na bokundoli ya Nkolo wa bango

    [43] To bazali na banzambe basusu na esika na biso oyo bakobatela bango? Kasi bakokoka te komisalisa bango moko mpe bakokoka te koluka nani akosunga bango likolo na ngai

    [44] Kasi topesaki ba oyo mpe batata na bango bisengo ya ntango шоке kino mibu na bango mikoma ebele. Boye bazali kornona te ete tozali kokutola mabele bangambo na yango nyoso? Boye bakanisi ete bakolonga

    [45] Loba: Nazali kokebisa bino na emoniseli. Mpe oyo matoyi naye ekufa, akoyokaka te o tango bazali kokebisa ye

    [46] Mpe soki mopepe ya etumbu ya Nkolo wa bango mozui bango, balobi: Eh biso! Mpasi na biso, ya soló, tozalaki babubi

    [47] Mpe o mokolo mwa suka, tokotiyaka bimekeli bia bosembo, molimo moko te mokobubama, ata soki ezali emekelo ya mbuma ya moke ezanga kilo tokoya na yango. Tokoki mpenza тропа kofuta

    [48] Mpe tosilaki kopesa Mûssa na Háruna buku, ya bososoli (torah) mpe na bongengi mpe ezala bokundoli тропа babangi

    [49] Baye bazali kobanga Nkolo wa bango ata soki bazali kornona ye te, mpe bazali kobanga eleko ya mokolo ya suka

    [50] Мре (kurani) oyo ezali bokundoli oyo epambwama tokitisaki yango, boye bino bozali koyina yango

    [51] Mpe liboso tosilaki kopesa Ibrâhîm bokambi mpe biso nde toyebaki yango

    [52] Tango alobaki na tata waye mpe bato naye: Oyo bikeko nini bozali komipesa na yango

    [53] Balobaki: Tokutaki batata na biso (to, bankoko na bango ya kala) bazalaki kobondela yango

    [54] Alobi: Ya soló, bino na bango bozalaki na libunga ya polele

    [55] Balobaki: Oyeli biso bosóló to ozali kosakana

    [56] Alobi: Kasi Nkolo wa bino azali Nkolo wa likolo mpe nsé oyo akela yango, mpe ngai nazali moko kati ya banzeneneke na yango

    [57] Mpe na lapi na Allah, ete nakani bikeko bia bino osima ya kokende na bino

    [58] Abuki yango biteni biteni, atiki oyo ya monene, mpo tango mosusu bakozongela yango

    [59] Balobi: Nani asali banzambe na biso boye? Ya soló, ye azali moko ya babubi

    [60] Balobi: Bayebisi biso oyo asali boye ezali elenge mobali moko nkombo naye Ibrâhîm

    [61] Balobi: Bomema ye awa na miso ya bato mpo bakoka kotatola

    [62] Balobi: Yo nde osali boye na banzambe na biso oh Ibrâhîm

    [63] Alobi: Oyo asali boye nde mokolo wa bango oyo, botuna bango soki bakoki koloba

    [64] Bazongisaki mayele na bango mpe balobi: Ya sólo, bino nde bozali babubi

    [65] Sima mabe ezongeli bango moko mpe balobi: Oyebi malamu ete (bikeko) oyo bilobaka te

    [66] Alobi: Boye bozali kobondela na botiki Allah maye makosalisa bino te mpe makosala bino mabe te

    [67] Ufi na bino na maye bozali kobondela biye bizali Allah te, boye bozali kokanisa te

    [68] Balobi: Bozikisa ye, mpe bosunga banzambe na bino. Soki ya sólo, bolingi kosala

    [69] Tolobaki: Eh móto! Zala malili mpe kimia тропа Ibrâhîm

    [70] Mpe balingaki kosala ye mabe, kasi totiyaki bango o kati ya bazangi mpenza

    [71] Mpe topesaki ye elonga, mpe Loth lokola, mpe totindaki bango o mboka eye to pambolaki yango mpo na bato ya mokili mobimba

    [72] Mpe topesaki ye Is’háq na Ya’qúb ndenge asengaki, mpe banso totiyaki bango o kati ya bato malamu

    [73] Mpe totiyaki bango bakambi, mpo bakamba na mibeko mia biso, mpe tolakisaki bango kosala bolamu, mpe kotelemisa losambo mpe kopesa zakat mpe bazalaki babondeli na biso

    [74] Mpe topesaki Loth bwanya na boyebi, mpe tobikisaki ye na mboka oyo bazalaki kosala mabe. Ya soló, bazalaki bato mabe mpe bazangi

    [75] Mpe tokotisaki ye na mawa та biso, ya sólo azali kati na bato ya malamu

    [76] Mpe tango Núh abelelaki liboso, tondimelaki ye, mpe tobikisaki ye na libota lia ye kowuta na milelo monene

    [77] Mpe tolongisaki ye kowuta na bato baye baboyaki kondimela bilembo bia biso mpe bazuaki yango ete: Ezali lokuta. Ya soló, bazalaki bato ya mabe, mpe tozindisaki bango banso

    [78] Mpe Dâwud na Suleyman, tango basambisaki тропа bilanga oyo bameme ya bato bakendaki kolia yango na butu, mpe tozalaki nzeneneke тропа bosambisi bwa bango mibale

    [79] Mpe topesaki Suleyman bososoli na yango, mpe topesaki bango banso bwanya mpe boyebi, mpe topesaki ngolu na biso epai ya Dâwud ete: Bangomba mpe bandeke basanzola biso elongo naye, mpe biso nde tozalaki kosala yango

    [80] Mpe tolakisaki ye kosala nguba mpo ezala lisungi lia bino, boye bozali na botondi

    [81] Mpe tondimelaki Suleyman, mopepe moye na motindo naye mopepaki noki noki о ngambu ya mabele maye topambolaki yango. Mpe tozali bayebi ya biloko binso

    [82] Mpe bazabulu mosusu bazali kosalela ye mosala na nsé ya mayi mpe bazalaki kosalela ye misala misusu, kasi biso nde tozalaki kokengela bango

    [83] Mpe Ayûb, tango abelelaki Nkolo wa ye, ete ya soló, mpasi esili koleka ngai, mpe yo nde ozali ngolu wa bangolu koleka

    [84] Tondimelaki ye mpe tolongolelaki ye mpasi oyo azalaki na yango, mpe tozongiselaki ye libota lia ye mbala mibale ngolu kowuta epai na biso, mpe bokundoli тропа babondeli

    [85] Mpe Ismâîl na Idrîs na Dzul-kifl bango banso bazalaki bakangi mitema

    [86] Mpe tokotisaki bango na ngolu na biso. Ya soló, bazalaki o kati ya bato ya malamu

    [87] Mpe Yûnus, tango akendeki na kanda, akanisaki ete tokoki komeka ye te, mpe abelelaki na molili (na mozindo ya ebale) ete: Nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló seyo (Allah) lokumu ezala nayo, ya sólo, nazalaki o kati ya babubi

    [88] Tondimelaki ye mpe tobikisaki ye na kolela naye. Lolenge wana nde tosalisaka bandimi

    [89] Mpe Zakariya, tango abelelaki Nkolo wa ye, Nkolo wa ngai kotika ngai moko te, mpe ya sólo, ozali malamu ya bakitanisi

    [90] Tondimelaki ye mpe topesaki ye Yahya, mpe tobikisaki mwasi naye (na ekomba). Ya soló, bazalaki kowelela тропа kosala bolamu, bazalaki kobondela biso na bolingo mpe na kobanga mpe bazalaki komikitisa liboso na biso

    [91] Mpe oyo abatelaki bongondo naye (Maryam) mpe tofulaki mpema na biso kati naye, mpe totiaki ye na mwana naye bazala elembo тропа mokili mobimba

    [92] Ya soló umma na bino oyo ezali sé moko mpe ngai nde Nkolo wa bino bobondela nga

    [93] Mpe bokabwani ekoti kati na bango, mpe bango banso bakozonga epai na biso

    [94] Oyo akosala misala malamu mpe azali mondimi, tokoboyaka molende mwa ye te. Mpe ya soló tokokomela ye (yango)

    [95] Epekisami na mboka oyo tosili koboma yango ete bazonga lisusu na bomoi likolo na yango

    [96] Kino tango ba kofungola ya’djûdj na ma’djûdj mpe bango bakokita na lombango

    [97] Wana elaka ya sólo ekomi pene, mpe okomona bapengwi bakomi kotala, bakolobaka: Mpasi na biso, tozalaki na bozangi kokanisa na oyo mpe tozalaki babubi

    [98] Ya soló, bino na maye bozali kobondela na botiki Allah, bokozala koni mwa lifelo bokokotaka na kati bino banso

    [99] Soki bango bazalaki banzambe, balingaki kokoto yango te (lifelo), mpe bango banso o kati na yango libela na libela

    [100] Kati na yango bakonyokwama mpe bako ganga makasi, mpe bakoyokaka kati na yango te

    [101] Ya sólo, baye bakozala mosika na lifelo, ezali ba oyo tosilaki kolaka bango bolamu

    [102] Bakoyokaka lolaka na yango te, mpe bakosepelaka lolenge balingi seko na seko

    [103] Kobanga ya monene ekozua bango te, mpe ba anzelu bakoyambaka bango: Oyo nde mokolo ba laka bino

    [104] Mokolo moye tokogumba mapata ndenge bagumbaka makasa ya makomi. Ndenge tokelaki mbala ya yambo, ndenge wana mpe tokozongela yango. Wana ezali elaka na biso tokokokisa yango

    [105] Mpe ya soló, tosilaki kokoma o kati ya zabur, o sima ya makundoli, ya solo, baye bakoki kozua bokitani ya mabele ezali bawumbu na ngai ya malamu (bandimi)

    [106] Ya sólo, oyo ezali botangisi тропа babondeli

    [107] Mpe totindaki yo te sé тропа ozala ngolu тропа mokili mobimba

    [108] Loba: Ya sólo, ngai nazui emoniseli ete ya sólo Nzambe wa bino azali Nzambe moko, boye bondimi komisokia

    [109] Mpe soki baboyi mpe bapesi mikongo, loba: Nazali kokebisa bino, mpe nayebi te, soki oyo elengelemi тропа bino ezali pene to mosika

    [110] Ya sólo, ye ayebi polele ya maloba mpe maye bobombaka

    [111] Mpe nayebi te soki ezali komekama mpo na bino to esengo ya ntango токе

    [112] Alobi: Nkolo kata na bosembo bonso. Mpe Nkolo wa biso Ar- Rahmán ye nde mosalisi likolo ya maye balobelaka

    Surah 22
    Mobembo ya kokende na Mekka

    [1] Oh bino bato! Bobanga Nkolo wa bino. Ya soló, koningana ya mabele na ngonga (ya mokolo yasuka) ekozalaka somo mpe makasi

    [2] Mokolo bokomona yango, na nyoso oyo azalaki komelisa, muana akobosana komelisa, mpe nyoso oyo azalaki na zemi akobota. Mpe okomona bato bakomi na milangwa, kasi ezali molangwa (ya masanga te) ezali nde etumbu ya Allah ya makasi

    [3] Mpe bokomona bato bazali kosuana тропа Allah kasi bazali na boyebi te, mpe bazali kolanda satana motomboki

    [4] Ekomama тропа yango ya solo, oyo akolanda ye (satana), asili kobungisa ye mpe akokamba ye na etumbu ya lifelo

    [5] Oh bino bato! Soki bozali kotiya tembe тропа mokolo mwa lisekwa, ya sólo tokelaki bino na mabele, sima bokomi mayi ya ndembo sima ekomi makila ya makasi, sima ekomi eteni ya mosuni, mozui lolenge ya bokeli (moto), tobongisi mpe mosusu tobongisi te, тропа kolakisa bino bokasi bwa biso, mpe totiye yango na ebotelo (matilisi) na bolingi bwa biso kino tango ekokoka, sima tobimisi bino mwana токе mpo bokokisa kokelame, kati na bino, basusu bazali kokufa noki, mpe basusu bazali кокота mikolo kino akozala na mayele lisusu yakoyeba eloko te, ndenge moko na mabele ntango ekawuki mpe tokitiseli yango mayi ya mbula, ekoningana mpe evimbi, ekobimisa milona ya ndenge na ndenge

    [6] Wana nyoso mpo Allah azali wa bosôló, mpe ya soló ye mosekwisi ya bawa, mpe ya soló, ye azali na bokoki тропа biloko binso

    [7] Mpe ya sólo, ngonga ekokoma ezali na tembe te тропа yango. Mpe ya sólo Allah akosekwisaka baye bakozalaka o kati ya malita

    [8] Mpe kati ya bato bazali kosuana тропа Allah, kasi bazali na boyebi te, mpe bazali na bokambami te, mpe bazali na buku oyo elimbolami te

    [9] Azui bizaleli ya lolendo mpe ya mabe тропа kobungisa bato nzela ya Allah, (moto) wana akozua mabe awa na nsé тре о mokolo ya suka tokopesa ye etumbu ya kozikisama

    [10] Mpona makambo maye maboko mibale nayo malengelaki yango awa na mokili, mpe ya sôló Allah azalaka mobubi te epai ya bawumbu naye

    [11] Mpe kati na bato bazali kobondela Allah sé moke тре likolo likolo, soki bolamu bozui ye, asepeli na yango, mpe soki mabe ezui ye abaloli elongi mpe aboyi, kasi asili kozanga na mokili mpe na mokolo mwa suka. Мре wana nde ekozalaka bozangi ya monene

    [12] Bazali kobelela na esika ya Allah banzambe basusu, ba oyo bakoki kosala bango mabe te mpe malamu te. Wana nde libunga lia mozindo

    [13] Bazali kobelela oyo ezali mosika na litomba kasi pene na mpasi. Oyo mobateli ya mabe mpe moninga ya mabe

    [14] Ya soló, Allah akokotisa bandimi baye bazalaki kosala misala ya malamu na lola oyo ezali kolekisa na nsé na yango mingala. Ya soló, Allah asalaka oyo alingi

    [15] Oyo azali kokanisa ete Allah akosalisa ye te awa na mokili mpe na mokolo ya suka, amata na singa kino likolo, sima akata yango, boye atala soki mayele mabe naye ekosalisa ye na oyo ezali kopesa ye kanda

    [16] Na yango nde wana tokitisaki (kurani) na mikapo miye mizali Polele, mpe ya soló Allah akambaka oyo alingi

    [17] Ya soló, baye bandima, bayuda, ba swâbi-îna, mpe baklišto mpe basambeli ya moto, na baye bazali kosangisa Allah. Ya sólo Allah akokataka makambo o kati kati na bango o mokolo ya suka. Ya soló Allah azali nzeneneke likolo ya biloko binso

    [18] Boye ozali kornona te ete biloko binso biye bizali o likolo na o nsé bizali kofukamela Allah moyi na sanza, minzoto na bangomba, banzete na banyama mpe bato ebele? Мре ebele babongi na etumbu, mpe oyo Allah asilisi ye lokunu, akozua moto te ya komatisa ye lokumu. Ya sólo Allah asalaka oyo alingi

    [19] Mabota mibale oyo bazali kobunda тропа Nkolo wa bango, mpe ba oyo bakondima te, bakotongela bango bilamba ya moto mpe bakosopela bango mayi ya moto o mitu mia bango

    [20] Ekoniangwisa nyoso oyo ezalaki o kati na mabumu na bango, na loposo lokola

    [21] Mpe bakobetama na miniololo ya bibende

    [22] Tango nyoso bakolingaka kobima kowuta na yango nakati ya mpasi ya makasi, bakozongisaka bango nakati na yango, mpe bakolobaka na bango: Вотека etumbu ya bozikisami

    [23] Ya soló, Allah akokotisa bandimi na baye basalaki misala milamu o lola oyo ezali kolekisa na nsé na yango mingala, bakolatisa bango bapalata ya wolo na bazigida, mpe bakolataka bilamba ya hariri

    [24] Mpe bakozalaka na bokambi mpe liloba lilamu, mpe bakokambamaka onzela ya semba

    [25] Ya sólo, baye bapengwa, mpe bapekisaka nzela ya Allah, na ndako esantu oyo totiyaki yango тропа bato, mpe ezala esika ya kovanda тропа baleki nzela, тре moto oyo akolinga kosalela yango mabe, tokomekisa ye etumbu ya makasi

    [26] Mpe tango tolakisaki Ibrâhîm esika ya kotonga ndako (ya makkah), mpe to yebisaki ye ete: Kosangisa ngai na eloko te, mpe petóla ndako na ngai тропа baye bazali kobaluka, batelemi, bangumbami mpe bafukami (pona losambo)

    [27] Mpe benga bato baya kosala mobembo esantu, bakoyelaka yo na makolo, mpe na bimateli ya ndenge na ndenge uta mosika

    [28] Mpo bazua bolamu mpe bangrásia ebongisami тропа bango, mpe mpo bakumisa nkombo ya Allah kati ya mikolo miye miyebani likolo ya bibwele biye topesaki bango, mpe bolia ndambu na yango, mpe mosusu boleisa babola

    [29] Mpe basukisa maye bazalaki na yango yakopekisama, mpe bakokisa bilaka bia bango, mpe babaluka zinga zinga ya ndako (esantu ya makkah)

    [30] Wana nde (oyo esengelami ebatelama) тропа oyo akopesa lokumu na mibeko esantu ya Allah, ekozala malamu тропа ye epai na Nkolo waye, mpe nandimeli bino kólia banyama, longola sé oyo batangeli bino. Мре bomitiya mosika na mbindo ya bikeko, тре bomitiya mosika тропа koloba lokuta

    [31] (Bozala) Sembo liboso ya Allah, bosangisa ye na eloko te. Mpe oyo akosangisa Allah, azali lokola oyo akwei kowuta о likolo, bandeke bamemi ye to mopepe mozui ye о esika ya mosika

    [32] Na yango: Oyo akokumisa mibeko ya Allah, ya soló wana nde ezali kolakisa mitema ya bobangi (Allah)

    [33] Kati ya banyama wana ekosalisa bino kino tango eyebani, тре esika ya kosasa yango ekozala pembeni ya ndako esantu

    [34] Mpe umma nionso totielaki bango lolenge ya kokumisa Allah na bopesi mbeka, mpo ete batanga nkombo ya Allah likolo ya bibwele biye apesaki bango, mpe Nzambe wa bino azali Nzambe moko ya sólo, botosa ye mpe pesa sango elamu epai ya bamikitisi

    [35] Baye bazalaka soki nkombo ya Allah etangami, mitema mia bango milengi, mpe soki mabe ezui bango bakangi mitema, Mpe batelemisi losambo mpe bazali kobimisa maye topesaki bango, (тропа Allah)

    [36] Mpe totielaki bino budna moko ya bilembo ya Allah, bozali na bolamo kati na yango mpe tango bozali kokata yango, botanga nkombo ya Allah yambo ya kosasa, na tango azali ya kotelema sima (soki ekufi) ekwei na mabele bolia yango mpe boleisa baye bazangi, mpe ba oyo bakokaka kosenga te, na boye nde topesaki bino yango mpo ete bopesa biso matondi

    [37] Allah atalaka mișuni na makila na yango te, kasi atalaka nde bobangi na bino. Lolenge wana nde atielaki bino yango, mpo ete bokumisa bonene ya Allah na maye akambi bino (o nzela ya semba) mpe pesa babongisi sango elamu

    [38] Ya soló, Allah abundelaka bandimi, ya solo, Allah alingaka te mokosi oyo nyoso azanga botondi

    [39] Ndingisa epesami na baye batumolami (ete babunda) mpo ete basili kobubama. Mpe ya soló, Allah azali na bokoki тропа kolongisa bango

    [40] Baye babimisama na bandako na bango na bobubami bonso, pamba te bango balobaki ete: Allah azali Nkolo wa biso, soki Allah azongisaka bato kati kati na bango te, batempelo mpe ba eclesia mpe ba sinagoga mpe ba masâdjid bisika oyo bakundolaka mingi nkombo ya Allah, elingaki ebeba Allah apesaka lisungi na oyo azali kosunga ye (Allah). Ya solo Allah azali na bokasi mpe atonda nguya

    [41] Baye soki topesi bango nguya awa na nsé, bakotelemisa losambo mpe bakopesa zakat mpe bako tinda na bolamu mpe bako pekisa mabe, mpe suka ya makambo ezali ya Allah

    [42] Mpe soki bazui yo na lokuta, (yeba ete) bato ya Nûh, na aad, na Thamûd, basilaki kozua (ba ntoma na bango) na lokuta

    [43] Mpe bato ya Ibrâhîm na Loth

    [44] Mpe bato ya mad’yan. Mûssa mpe lokola bazuaki ye moto ya lokuta, na pemisaki bapagano mua токе, sima bazuaki etumbu. Mpe tala ndenge nini etumbu na nga ezalaki

    [45] Bamboka boni tobomaka yango, pamba te esalaki mabe bitikalaki pamba, okomona sé mabulu na bisobe na bandako bizali pamba (bizangi batu)

    [46] Boye bazali kotambola te likolo ya mabele mpo bazala na mitema ya koyeba na yango mpe matoyi ya koyoka na yango? Miso mikangamaka te nzoka nde mitema miye mizali okati ya ntolo nde mikangamaka

    [47] Bazali kosenga yo ete oyeisa etumbu noki, Allah azangisaka mokano mwa ye te. Mpe ya solo, mokolo moko epai na Nkolo wa yo mozali lokola mibu nkoto moko ndenge bozali kotanga

    [48] Bamboka boni na pesaki yango etumbu noki te, mpe ezalaki kosala mabe, sima na pesaki etumbu na yango, mpe epai na ngai nde bozongi bozali

    [49] Loba: Oh bino bato! Ya sólo, nazali mokebisi ya polele тропа bino

    [50] Mpe baye bandima mpe bazali kosala misala ya malamu, bakolimbisama mpe bakozua bozui bolamu

    [51] Mpe baye bazali kotia molende тропа kobundisa mikapo mia biso mpe bazali kokanisa ete Allah akokoka kopesa bango etumbu te, bango nde bato ya lifelo

    [52] Мре yambo nayo totindaki motindami to ntoma te sé asakola na maye tokitiselaki ye, mpe satana atiyela ye tembe na maye azali koloba, mpe Allah akobebisa maye satana asalaki. Sima Allah alendisi mikapo mia ye, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya

    [53] Mpo atiya momekano na maye satana asalaki (kobwaka о mitema mia bato) o kati ya mitema mia bato baye bazuami na bokono mpe baye mitema mia bango mikangama. Mpe ya soló, babubi bazali na bokabwani makasi

    [54] Mpe baye bapesami boyebi, bayeba ete: Ya sólo yango (kurani) ezali bosóló kowuta epai ya Nkolo wa yo, bandimela yango, mpe evandisa mitema mia bango. Mpe ya sólo, Allah azali mokambi wa baye bandima na nzela ya semba

    [55] Mpe bapengwi bakotikaka tembe te, kino mokolo ya suka mokoyela bango mbalakaka to etumbu ya makasi eyela bango na mokolo moko

    [56] Mokolo wana kibokonzi ekozalaka sé ya Allah a kosambisa kati na bango. Мре baye bandima mpe basali misala ya malamu, bakozalaka o kati ya lola ya kitoko

    [57] Mpe baye bapengwa mpe bazali kozua mikapo mia biso na lokuta, bango bakozalaka na etumbu ya soni

    [58] Mpe baye babimaki na nzela ya Allah, sima bakufi to babomi bango, Allah akopesa bango bozui bolamu. Mpe ya soló, Allah nde mopesi bozui koleka

    [59] Akokotisa bango o esika eye bakosepela na yango (lola), mpe ya sólo, Allah azali moyebi mpe atonda mpiko

    [60] Ndenge wana oyo akosala (mabe) lokola basalaki ye mpe sima basali ye lisusu mabe, Allah akosunga ye, kasi Allah azali molimbisi mpe alingaka bolimbisi

    [61] Ndenge wana nde Allah akotisaka butu kati na mokolo, mpe akotisaka mokolo kati na butu. Mpe ya sólo, Allah azali moyoki momoni

    [62] Wana mpo ete Allah nde azali bosembo, mpe maye bazali kobondela na botiki ye ezali mpamba. Mpe ya soló, Allah azali wa likolo monene koleka

    [63] Boye ozali kornona te, ya soló Allah akitisaka mayi kowuta o likolo mpe akomisi mabele (lolenge) ya mayi ya pondu? Ya solo, Allah azali malamu mpe moyebi ya bansango

    [64] Maye manso mazali о likolo тре na nsé mazali ya ye. Mpe ya sólo Allah azali mozwi mpe akoka na lokumu

    [65] Boye ozali kornona te, ya sólo Allah asaleli bino nyoso oyo ezali o mokili, mpe masuwa ezali kotambola okati ya ebale na mibeko mia ye? Mpe asimbi likolo mpo ekweyela mabele te, sé na bolingi bwa ye. Ya sólo, Allah azali malamu atonda ngolu mpo na bato

    [66] Ye nde apesaka bino bomoyi mpe liwa, sima akosekwisa bino. Ya sólo moto azali na bopengwi ya bolamu ya Allah

    [67] Mpe umma nionso totiyelaki bango mibeko lia bolandi, tika ete baswanisa yo te na maye mayeli yo. Belela mpo na Nkolo nayo, ya sólo ozali o nzela ya semba

    [68] Mpe soki basuanisi yo, loba: Allah ayebi maye bozali kosala

    [69] Allah akosambisa (makambo) kati na bino o mokolo ya Suka na maye bozalaki kokesene na yango

    [70] Boye ozali koyeba te ete Allah ayebi manso mazali olikolo na onse? Ya soló, nyoso wana mazali okati ya buku, mpe solo wana ezali pete тропа Allah

    [71] Мре bazali kobondela na botiki Allah maye akitisela yango elembetele te mpe na maye bazali na boyebi na yango te, mpe babubi bakozuaka mosungi te

    [72] Mpe tango bazali kotangela bango mikapo mia biso mia polele, okoyeba kanda ya baye bapengwa na bilongi na bango, soki bakokaki kokweyela baye bazali kotangela bango mikapo mia biso, loba: Mpe nayebisa bino тропа mabe oyo bozali kosala, Allah alengeli moto тропа bapengwi. Mpe oyo bozongi ya mabe

    [73] Oh bino bato! Lisese libetami тропа bino boyoka yango. Ya sólo baye bozali kobondela na botiki Allah, bakoki kokela nzinzi te, ata soki basangani тропа yango, mpe soki nzinzi ayibi eloko na bango bakoki kobotolo ye yango te, mosengi na oyo basengi ye, bango nyoso mibale bazali motawu

    [74] Bapesi Allah lokumu naye te na ndenge esengeli. Ya soló, Allah azali na bokasi atonda nguya

    [75] Allah azali коропа batindami otei ya ba anzelu na bato. Ya solo, Allah azali moyoki amonaka nionso

    [76] Ayebaka maye mazali liboso na bango mpe sima. Mpe epai na Allah manso makozongaka

    [77] Eh bino bandimi! Bongumbama, bofukama mpe bobondela Nkolo na bino mpe bosala malamu mpo ete bolonga

    [78] Mpe bobunda o nzela ya Allah na lolenge nyoso. Ye nde aponi bino, mpe atiyela bino mpasi o kati na lingomba te. Lingomba lia tata na bino Ibrâhîm. Ye nde abenga bino bamizilima uta kala (yambo ya boyei ya buku) mpe okati ya buku oyo (kurani), mpo ete motindami azala nzeneneke likolo na bino, mpo bino mpe bozala banzeneneke likolo na bato. Botelemisa losambo mpe bofuta zakat mpe bokangama makasi na Allah ye nde mokonzi na bino, mpe oyo mobateli mpe mosungi malamu

    Surah 23
    Bandimi

    [1] Bandimi basila kolonga

    [2] Baye bamikitisaka tango bazali kosambela

    [3] Mpe baye bazali kokima (makambo) maye mazanga ntina

    [4] Mpe baye bazali kobimisa zakat

    [5] Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango na ekobo

    [6] Longola sé epai na basi na bango, to mpe bawumbu basi baye bazali na maboko na bango (bakoki kofanda na bango mwasi na mobali) mpo ete wana bakopamelama te

    [7] Na yango, moto oyo akoluka kolekisa ndelo wana, bango nde babuki mibeko

    [8] Mpe baye bazali kobatela mabombisi (amanati) oyo bapesi bango mpe bazali kotosa mpe kokokisa bilaka bia bango

    [9] Mpe baye bazali kobatela balosambo na bango

    [10] Bango nde bakitani

    [11] Bakokitanelaka bisika ya likolo, na lola bakozalaka libela o kati na yango

    [12] Mpe tosilaki kokela moto na mabele ya potopoto

    [13] Sima tozalisaki ye litanga lia (mayi) ya ndembo kati ya ebombelo ya makasi

    [14] Sima tokomisaki mayi liboke ya makila sima makila ekomi mosuni, sima mosuni ekomi mokuwa, sima tolatisi mokuwa mosuni, sima tosali ye ekelamu mosusu. Mapamboli manso mazali ya Allah mokeli ya malamu

    [15] Sima na yango bokokufaka ya soló

    [16] Sima bokosekwisamaka ya soló o mokolo mwa suka

    [17] Мре tosilaki kokela o likolo na bino mapata sambo, mpe tozangaki bokebi te o tango ya bokeli

    [18] Mpe tozali kokitisa mayi kowuta o likolo na bokoki (mayi wana eleka ebele te), sima tovandisi yango na mabele, mpe tozali na bokoki ya kobungisa yango

    [19] Mpe kowuta na yango nde tozali kobimisela bino bilanga ya naghil na a’nâb, yango wana bozali na bambuma ebele, mpe bozali kolia bisusu o kati na yango

    [20] Na nzete esusu ebimi na ngomba ya sinaî, ezali kobimisa mafuta тропа bopakoli тре тропа baleyi

    [21] Mpe ya soló, bibwele bizali liteya тропа bino, tozali komelisa bino maye mazali kobima na mabumu na yango (miliki) тре bizali kosalisa bino mingi, тре bozali kólia bisusu kati na yango

    [22] Mpe na yango na bamasuwa bozali kokumbama

    [23] Mpe tosilaki kotinda Nûh epai na bato naye alobi: Oh bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye. Boye bozali kobanga te

    [24] Mpe bankumu bapengwi okati na bato naye balobi: Nini oyo, azali moto lokola bino. Alingi amatela bino, soki Allah alingaka, (kotinda ntoma) mbele akitisaki ba anzelu. Makambo oyo totikala koyoka yango epai ya bankoko na biso ya kala te

    [25] Oyo sé moto ya ligboma, bótala ye sima ya tango токе

    [26] Alobi: Nkolo wa ngai, sunga ngai mpo bazwi ngai moto ya lokuta

    [27] Tomonisaki naye ete; salamasuwa na miso na biso mpe na mitindo mia biso mpe tango mokano na biso ekoya mpe mayi ekobima na makasi na litumbu, kotisa na kati ya masuwa balolenge ya banyama moko na moko mwasi na mobali elongo na libota nayo, longola sé baye kati na bango liloba lisengeli likokisama likolo na bango. Kasi kotuna ngai te mpo na babubi, mpo ete bakozinda mbalakaka na mayi (bakokufa)

    [28] Mpe soki omati na masuwa yo na ba oyo ozali na bango, loba: Lokumu ya Allah oyo alongisi biso likolo ya bato mabe

    [29] Mpe loba: Nkolo kitisa ngai na esika ya mapamboli, mpe yo nde mokitisi ya malamu

    [30] Ya soló, wana nde bilembo. Mpe tozali ya sólo baye topesaka komekama

    [31] Sima na bango tokelaki bato basusu

    [32] Mpe totindelaki bango motindami kowuta kati na bango moko mpo ayebisa bango ete: Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye, boye bozali kobanga te

    [33] Mpe bankumu kati na bato naye na baye baboya kondimela elaka ya suka mpe topesi bango bolamu awa na nsé, balobi: Ye azali moto lokola bino, aliaka biloko oyo boliaka, mpe amelaka oyo bomelaka

    [34] Kasi soki botosi moto oyo azali lokola bino, wana bosili kozanga

    [35] Boye azali kolaka bino ete: Soki bokufi mpe bokomi putulu mpe mikuwa, ete bokobima (na malita)

    [36] Mosika mosika тропа oyo bazali kolaka bino

    [37] Wana ezali sé bomoyi ya biso oyo ya nsé, tozali kofanda mpe tozali kokufa kasi tokosekwa te

    [38] Wana azali moto oyo azali kobukela Allah lokuta, mpe tokondimelaka ye te

    [39] Alobi: Nkolo, sunga ngai mpo ete bazwi ngai moto wa lokuta

    [40] (Allah) alobi: Iyo; kala mingi te bakokoma na mawa

    [41] Mpe ligangi esimbaki bango na bosôló, mpe tokomisaki bango lokola makasa ya kokawuka (mpe bakumbami na mayi makasi), mpe libebi тропа babubi

    [42] Sima na bango tokelaki bato basusu

    [43] Mokano ya umma nyoso mokoki koleka eleko na yango te, mpe ekokutuama te

    [44] Sima totindaki batindami na biso ya kolandisa, tango nyoso motindami akoyaka na umma moko bazui ye moto ya lokuta, mpe tolandisaki bango na bango, mpe tobetelaki bango másese (ya kokamwisa mpe kobangisa bango) mpe libebi тропа baye bandimaka te

    [45] Sima totindaki Mûssa na ndeko waye Hânına na bilembo bia biso mpe bokonzi ya polele

    [46] Epai ya falo na bankumu naye, (bato naye), basali lolendo, mpe bazalaki bato ya lolendo koleka

    [47] Balobi: Tondimela bato mibale oyo bazali lokola biso, mpe bato na bango bazali bawumbu na biso

    [48] Bazui bango nyoso mibale ete bazali bato ya lokuta, mpe bazuamaki kati ya baye babebisamaki. buku mpo tango mosusu bakokambama

    [49] Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku mpo tango mosusu bakokambama

    [50] Mpe totiyaki mwana ya Maryam na mama waye mpo (bazala) elembo, mpe totombolaki bango nyoso mibale na esika ya likolo na ngomba, eye ezali na kimia mpe na mayi ebele

    [51] Eh bino batindami! Boliya bilei ya malamu mpe bosala malamu. Ya soló, ngai nayebi maye bozali kosala

    [52] Mpe umma na bino oyo ezali sé umma moko, mpe ngai nde Nkolo na bino bobanga ngai

    [53] Mpe bakabwani na makambo ya lingomba lia bango biteni biteni moto na moto azali kosepela na o ya ye

    [54] Tika bango na libungi kino mwa ngonga moke

    [55] Bazali kokanisa te, misolo na bana oyo tondimeli bango

    [56] Tozali kopesa bango bolamu na lombango. Kasi bazali koyeba te

    [57] Ya soló, baye na ntina ya bobangi Nkolo wa bango, batondisami na mawa

    [58] Mpe baye bazali kondima na mikapo mia Nkolo wa bango

    [59] Mpe baye basangisaka Nkolo wa bango na eloko te

    [60] Mpe baye bazali kobimisa maye bapesi bango wana mitema mia bango mitondisami na bobangi (Nkolo wa bango), po bakozongaka epai ya Nkolo wa bango

    [61] Baye wana bazali kowelisa тропа kosala bolamu, mpe bazali bato ya yambo тропа kosala (yango)

    [62] Mpe topesaka moto mokumba te sé oyo ekoki naye, mpe buku oyo ezali koloba bosembo ezali nde epai na biso mpe bakobubama te

    [63] Kasi mitema mia bango mitondi na libungi тропа (kurani) oyo, mpe bazali na misala misusu bazali kosala (bazali kosalela yango na lolenge esengeli te oyo Allah atindi)

    [64] Kino tokomekisaka bato ya bozwi etumbu 0 kati na bango. Mpe okomona bango bakomi koganga тропа kosenga lisalisi

    [65] Boganga lelo te. Ya soló, bokozua lisungi na biso ata шоке te

    [66] Bozalaki koboya mikapo mia ngai miye bazalaki kotangela bino liboso

    [67] (Bozalaki) kosalela yango lolendo mpe kotiola yango na tango miso na bino ezalaki polele

    [68] Boye bazali komanyola liloba na oyo te (kurani) to eyeli bango oyo eyelaki bankoko na bango te

    [69] To bayebaki motindami na bango te, mpo ete baboya ye

    [70] To, bazali koloba ete azali ligboma? Kasi ayelaki bango na bosôló, mpe ebele na bango bazali kondima te

    [71] Soki bosôló eyaki тропа kolanda bamposa na bango mbele mapata mpe mabele na maye mazali okati na yango malingaki kobeba, nzoka nde toyelaki bango bokundoli na bango mpe bango тропа bokundoli na bango bazali kopesa mokongo

    [72] To ozali kotuna bango lifuta? Kasi lifuta ya Nkolo nayo nde ezali malamu, ye mopesi bomengo ya malamu

    [73] Mpe ya soló, ozali kobenga bango na nzela ya semba

    [74] Mpe baye bandimaka te o mokolo mwa suka, bazali mosika na nzela yango

    [75] Mpe soki topesaki bango ngolu na biso, mpe tolongola bango mpasi oyo bazalaki na yango, balingaki kotikala sé na masumu na bango mpe bakozinda mpenza kati na botomboki na bango

    [76] Mpe tosilaki kopesa bango etumbu, kasi batosaki Nkolo wa bango te, mpe bamilelaki epai naye te (epai na Allah), тропа kosenga

    [77] Kino tokofungolela bango ezibeli ya etumbu ya makasi, mpe bakozanga elikia (тропа bolamu ya Allah)

    [78] Mpe ye nde akela тропа bino, bomoni na boyoki na mitema, kasi bozali kotondo ye sé токе

    [79] Ye nde akela bino mpe ati bino o mabele, bokosangisama epai naye

    [80] Ye nde mopesi bomoyi mpe mopesi liwa, mpe ye nde mokesenisi butu na mokolo, boye bozali kokanisa te

    [81] Kasi balobaki se maye bato wa yambo balobaka

    [82] Balobi: Tango tokokufaka, tokokomaka putulu mpe mikuwa. Ya soló, boye tokosekwisamaka lisusu

    [83] Basila kolaka biso na batata na biso liboso тропа oyo, yango ezali sé masapo ya kala

    [84] Loba: Mabele na oyo ezali okati na yango ezali ya nani? Soki soló bozali koyeba

    [85] Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Boye bozali kokanisa te

    [86] Loba: Mapata sambo ezali ya nani, тре nani Nkolo ngwende ya monene

    [87] Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Boye bokobanga te

    [88] Loba: Bokonzi bonso bosimbami na maboko ya nani? Azali kobatela, kasi babatelaka ye te, soki ya soló bozali koyeba

    [89] Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Kasi тропа nini bozali lokola balokami? (тропа kozanga na bango kondima na bomoko ya nzambe)

    [90] Tomemelaki bango bosóló, kasi bango nde bato ya lokuta

    [91] Allah azali na mwana te, mpe ezali na nzambe mosusu te elongo naye, noki te, nzambe na nzambe alingaki kokende na bikelamu naye mpe basusu balingaki kozala likolo ya baninga. Nkembo mpe lokumu na Allah likolo ya maye bazali kolobela

    [92] Ayebi mabombami mpe makambo ya polele, azali likolo ya maye bazali kosangisa ye na yango

    [93] Loba: Nkolo; soki olakisaki ngai maye balakami

    [94] (Na yango) Nkolo, kotika ngai o kati ya babubi te

    [95] Ya soló, tozali na bokoki ya kolakisa yo maye tolaki bango

    [96] Bengana mabe (kobongola) na kosala bolamu. Soló, toyebi malamu maye bazali kolobela

    [97] Mpe loba Nkolo nazali kosenga nayo libateli тропа botombokisi ya basatana

    [98] Mpe nazali kosenga nayo libateli Nkolo, ete bazala pene na ngai te

    [99] Kino soki liwa ekomeli moko kati na bango akolobaka: Nkolo wa ngai, zongisa ngai

    [100] Mpo nasala bolamu na maye natikaki na mokili, te, kasi ezali sé liloba oyo alobi, osima na bango ezali na ndelo, kino omokolo ya bosekwisami

    [101] Мре tango bakobetaka to kofula kelelo, mokolo wana kibondeko ekozalaka te, mpe bakotunanaka mituna te

    [102] Baye emekelo na bango ekoleka kilo mingi, (тропа bolamu), bango nde balongi

    [103] Mpe baye emekelo na bango ekozalaka fafala, bango moko nde bamibungisaki, mpe bakokotaka lifelo, mpe bakozalaka libela o kati na yango

    [104] Moto mokozikisa bilongi bia bango, mpe bakozala o kati na yango na mbebo yakozikisama

    [105] Mitangelama bino mikapo mia ngai te, kasi bozalaki kondimela yango te

    [106] Bakolobaka: Nkolo wa biso, bamabe na biso elongi biso mpe tozalaki babungi nzela

    [107] Nkolo wa biso, bimisa biso okati na yango, mpe soki tozongeli, tokozala babubi

    [108] Alobi: Botikala na kati na kozanga lokumu, mpe bolobisa ngai te

    [109] Ya soló, Ezalaki na lisanga moko ya bawumbu na ngai bakolobaka: Nkolo wa biso, tondimi, limbisa biso mpe yokela biso mawa. Ya soló, yo ozali wa ngolu otanda bolamu

    [110] Kasi botiolaki bango, kino ebosanisi bino kokumisa ngai, mpe bozalaki koseka bango

    [111] Ya sólo, lelo nazali kofuta bango тропа oyo bazalaki na bozeli na yango. Ya sólo, bango nde balongi

    [112] Bakotunaka bango, mibu boni bolekisaki o kati ya mokili

    [113] Bakolobaka: Tovandaki mokolo moko to ndambu ya mokolo, tuna batangi ya motango na yango. (baye bayebi kotanga mikolo miye havandaki)

    [114] Akolobaka: Bovandaki sé tango ya mokie, ya sólo soki bozali koyeba

    [115] Boye bozali kokanisa ete tokelaki bino natina te, mpe bokozongisama epai na biso te

    [116] Lokumu na Allah wa likolo mokonzi ya sólo. Nzambe mosusu ya kobondela na bosoló azali te sé ye (mei) Nkolo ngwende ya lokumu

    [117] Mpe oyo akobondela elongo na Allah nzambe mosusu, azali na elembetele na yango ya polele te, ya soló lifuta naye mokozalaka sé epai ya Nkolo waye. Ya soló, bapengwi bakolonga te

    [118] Mpe loba: Nkolo limbisa mpe tiya ngolu, yo nde oleki na ngolu

    Surah 24
    Pole

    [1] Oyo nde suratu (eteni) eye tokitisaki yango, mpe totiyaki ezala mobeko, mpe tokitisaki mikapo o kati na yango mizali polele mpo bokoka kokanisa

    [2] Mosali ekobo ya mwasi mpe mosali ekobo ya mobali, bobeta bango fimbo mokama moko, kasi boyokela bango mawa te tango bozali kokweisela bango mibeko mia lingomba lia Allah, soki solo bozali kondima na Allah mpe mokolo ya suka, mpe ndambu ya bandimi bazala tango etumbu ezali kopesamela bango mibale

    [3] Mosali ekobo ya mobali akoki kobala te sé mosali ekobo ya mwasi to mopengwi ya mwasi, mpe mosali ekobo ya mwasi akoki kobala te sé mosali ekobo ya mobali to mopengwi yamobali, kasi wana eboyami тропа bandimi

    [4] Мре baye bazali kofunda basi ya malamu sé pamba boye, тре bayei na banzeneneke minei te, bobeta bango fimbo ntuku mwambe, mpe bondima lisusu matatoli na bango te. Mpe bango nde babebisi

    [5] Longola sé baye batubeli o sima na yango mpe babongisi. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [6] Mpe тропа baye oyo bafundi basi na bango bango moko, kasi bazali na banzeneneke te, esengeli na moko kati na bango kotatola mbala minei na nkombo ya Allah ete azali koloba bosembo

    [7] Mpe litatoli ya mitano ekozala ete: Botutu ya Allah ekozala likolo naye soki alobaki lokuta

    [8] Kasi etumbu ekolongua тропа ye soki atatoli mbala minei na nkombo ya Allah, ya sólo mobali naye akosi

    [9] Mpe ya mbala ya mitano ezali ete: Kanda ya Allah ekozala likolo naye (mwasi) soki (mobali) azali kati ya balobi solo

    [10] Мре soki mpo na bolamu ya Allah na mawa naye likolo na bino te ya soló Allah azali moyambi tubela atonda bwanya

    [11] Ya soló baye bay aki na lokuta (kopanza yango kati na mboka) ezali lisanga ya bato kati na bino, bomona yango mabe te kasi ezali malamu тропа bino, moko na moko kati na bango azui lisumu naye, kasi oyo kati na bango azui eteni ya monene, akozua etumbu ya monene

    [12] Mpona nini te tango boyokaki yango, bandimi ya mibali na ya basi esengeli bakanisa malamu kati na bango, mpe baloba: Oyo ezali lokuta ya polele

    [13] Mpona nini bamemaki te mpona yango banzeneneke minei? Kasi soki bamemi banzeneneke te, baye wana epai ya Allah bazali bato ya lokuta

    [14] Mpe soki bolamu na ngolu ya Allah ezalaka likolo na bino te o kati na mokili mpe o mokolo ya suka, etumbu makasi elingaki kozua bino mpona maye bosala

    [15] Tango bino moko bozali kobota yango na balolemo na bino mpe bozali koloba yango na minoko na bino oyo bozali na boyebi na yango te mpe bozali kornona yango шоке, kasi yango epai ya Allah ezali monene

    [16] Mpe тропа nini tango boyokaki yango, bolobaki te ete tokoki kolobela yango te. Lokumu nayo (Allah) oyo ezali lokuta monene

    [17] Allah azali koteya bino mpo bozongela lisusu makambo ya ndenge oyo te, soki bozali bandimi

    [18] Mpe Allah alimboleli bino mikapo polele. Mpe Allah azali moyebi atonda bwanya

    [19] Ya soló, baye balingaka sé kopanza mabe o kati ya bandimi, bakozalaka na etumbu ya makasi awa na mokili mpe na mokolo mwa suka. Mpe Allah ayebi kasi bino boyebi te

    [20] Mpe soki bolamu na ngolu ya Allah ezalaka likolo na bino te, ya sólo Allah azali wa ngolu atonda mawa

    [21] Eh bino baye bondima! В olanda makolo (nzela) ya satana te, oyo akolanda makolo naye, (boyeba ete) ya sólo, ye atindaka na mobulu mpe na mabe mpe soki Allah alingelaka bino bolamu na mawa naye te, alingaki kopetola moto o kati na bino te, kasi Allah apetolaka oyo alingi, mpe Allah azali moyoki atonda boyebi

    [22] Mpe bato ya bomengo mpe ya bolamu kati na bino balapa te ete bakosalisa lisusu bandeko ba bango te, babola mpe te, bakosalisa mpe ba oyo babimi na nzela ya Allah te, esengeli na bango kolimbisa mpe kobosana, bokosepela te ete Allah alimbisa bino? Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [23] Ya sôló, baye bazali kofinga mpe kopanzela basi ya malamu baye bakanisaka kosala mabe te (ekobo), okati ya bandimi ya basi, bapesami botutu awa o nsé mpe o mokolo mwa suka, mpe bakozalaka na etumbu ekasi

    [24] O mokolo moye; balolemo, maboko mpe makolo na bango makotatolaka maye bazalaki kosala

    [25] Mokolo mona Allah akopesaka bango lifuta na bango na bosembo, mpe bakoyebaka ete ya sólo, Allah azali wa bosôló polele koleka

    [26] Basi ya mabe тропа mibali ya mabe mpe mibali ya mabe тропа basi ya mabe, lolenge moko basi ya malamu тропа mibali ya malamu, mpe mibali ya malamu тропа basi ya malamu. Bango wana nde bazali mosika na makambo ya mabe oyo bato bazali koloba, bazali na bolimbisi mpe bozui ya malamu

    [27] Eh, bino baye bondima! Bokota na bandako oyo bizali bandako bia bino te, kino ete bosenga ndingisa, mpe bopesa mbote ya boboto epai ya bato na yango. Wana ezali malamu тропа bino mpo bokoka kokanisa

    [28] Soki bokuti moto o kati na yango te, bokota te, kino bapesa bino ndingisa, mpe soki bayebisi bino ete bozonga, bozonga, wana ezali malamu тропа bino. Mpe Allah ayebi maye bozali kosala

    [29] Epekisami na bino te kokota o bandako biye bato bazali na kati te mpe bolamu na bino ezali nakati. Mpe Allah ayebi maye bozali kobimisa polele mpe maye bozali kobomba

    [30] Loba na bandimi bakitisa miso ma bango mpe babatela mitakala mia bango, wana ezali malamu тропа bango. Ya soló, Allah azali na basango ya maye bazali kosala

    [31] Мре loba na bandimi ya (basi), bakitisa miso ma bango mpe babatela mitakala mia bango mpe balakisa bonzenga na bango te sé oyo ekoki komonana, mpe bakanga kitambala na bango ya monene kino ezipa bantolo na bango, kasi bonzenga ma bango balakisa yango sé epai ya mibali na bango, to epai ya batata na bango to batata ya mibali na bango to bana na bango to epai ya bana ya mibali na bango, to bandeko na bango to bana ya bandeko na bango ya mibali, to bana ya bandeko na bango ya basi, to bandimi ya basi, to bawumbu na bango, to basali ya mibali baye kimobali na bango esalaka te, to bana ya mike baye bayebi makambo ya basi te, mpe babeta makolo na bango makasi te na mabele тропа komonisa oyo ebombami na bonzenga na bango mpe botubela epai ya Allah bino banso, eh bino bandimi mpo ete bolonga

    [32] Mpe bobalisa banzemba kati na bino mpe bawumbu na bino ya malumu (basi mpe mibali), soki bazali na misolo te, Allah akopesa bango misolo ebele na bolingi bwa ye, mpe Allah azali mofungoli monene atondo boyebi

    [33] Мре тропа baye bazui naino makoki ya libala te, ba mibatela kino Allah akopesa bango bozui na ngolu naye, mpe baye okati ya bawumbu na bino baye balingi boyokani na bino, na ntina ete basikolama, tika ete boyokana na bango soki boyebi ete bolamu ezali kati na bango, тре bopesa bango misolo mia Allah miye apesa bino. Botinda te na makasi bilenge basi bawumbu bábino baye basepeli komibatela ete basala ekobo, na posa ete bozua bomengo ya bomoi ya nsé. Oyó okati na bino akosalisa bango ekobo na makasi, sima ya kotinda bango na makasi, ya soló Allah, azali molimbisi atonda ngolu

    [34] Mpe tosilaki kokitisela bino mikapo mia polele, mpe topesaki ndakisa ya baye oyo balekaki liboso na bino mpe mateya тропа babangi

    [35] Allah azali bongengi ya likolo na mabele, bongengi naye ezali lokola ndako ezali na mwinda, mwinda yango efandi na sani ya molangi, oyo ezali kongenga lokola monzoto ezali kopesa bongengi kowuta na nzete ya zaîtûn oyo epambwama enyele mpe eloli te, ezali na mafuta mazali kopesa bongengi ata soki moto ezui yango te, bongengi likolo na bongengi. Allah akambaka o bongengi naye moto nani alingi, mpe Allah abetaka ndakisa epai ya bato, mpe Allah azali na boyebi ya biloko binso

    [36] Kati na bandako oyo Allah apesaki ndingisa ya kotelemisa yango mpo batanga nkombo naye na kati mpe basanzola ye na kati tongo mpe nsima ya nzanga

    [37] Mibali oyo mombongo mpe koteka ezali kobosanisa bango bokundoli ya Allah te, mpe kotelemisa losambo mpe kopesa zakat bazali kobanga mokolo moye mitema, mpe miso mikobaluka

    [38] Mpo Allah afuta bango na lolenge ya malamu, тропа maye basalaki mpe abakisela bango bolamu bwa ye, Allah apesaka bozui na oyo alingi ezali na motango te

    [39] Mpe baye bapengwa, misala mia bango mizali lokola elilingi nakati ya esobe. Oyo mposa ya mayi eleki ye akolanda yango mpe akokuta eloko te, mpe akokuta Allah nde akopesa ye mbano naye. Mpe Allah azali lombango na kofuta

    [40] (Misala mia bapengwi) lokola molili ya ebale ya mozindo mpe mayi ebele mbonge ezipi yango, mbonge likolo na mbonge ezipani na londende, molili na molili, soki moko abimisi loboko naye, azali kokoka kokesenisa yango te, mpe oyo akozua bongengi bwa Allah te, akozala mpe na bangengi te

    [41] Boye bozali kornona te ete: Ya soló, biloko nyoso biye bizali na likolo mpe na nsé bizali kokumisa Allah, mpe bandeke bazali kopepe mapapu na bango? Mpe ekelamu nyoso eyebi lolenge yalosambo naye mpe kokumisa naye. Allah ayebi malamu maye bazali kosala

    [42] Mpe Allah nde Nkolo wa bokonzi bwa likolo na mabele, mpe epai na Allah nde bozongi bozali

    [43] Boye ozali kornona te ya soló, Allah azali kotindika mapata, sima asangisi yango, sima asali lisusu ete ekoma liboke? Okomona mbula ebimi wana. Mpe azali kokitisa kowuta o likolo ya mapata matelemi lokola bangomba, mbula ya mabanga. Ekozuaka baye oyo alingi, alongolaka yango na oyo alingi. Bongengi ya mokalali na yango ezali makasi lokola ekoki koboma miso

    [44] Allah azali kobalusa butu mpe moyi. Ya soló, wana ezali liteya тропа bato ya mayele

    [45] Allah nde mokeli wa banyama binso kowuta na mayi, bisusu bizali kotambola na libumu na yango, mpe bisusu bizali kotambola na makolo mibale, mpe kati na yango biye bizali kotambola na makolo minei, Allah akelaka oyo alingi. Ya solo, Allah azali na bokoki тропа biloko binso

    [46] Tosilaki kokitisa mikapo miye mizali polele. Mpe Allah akambaka oyo alingi o nzela ya semba

    [47] Mpe bakolobaka: Tondimi na Allah na motindami, mpe totosi, sima na yango basusu kati na bango baboyi bapesi mikongo. Kasi bazali bandimi te

    [48] Mpe tango bakobenga bango baya epai na Allah na motindami wa ye, mpo akata (makambo) kati na bango, okomona basusu kati na bango baboyi

    [49] Kasi soki ezali тропа litomba na bango, bazali koyela ye na botosi

    [50] Boye mitema mia bango mizali na bokono to bazali kotiya tembe? To bazali kobanga ete Allah na motindami naye babuba bango, kasi bango nde bazali babubi

    [51] Ya soló, liloba ya bandimi ezalaka soki babengi bango epai ya Allah na motindami waye mpo akata (makambo) kati na bango, bakoloba: Toyoki mpe totosi, mpe baye wana nde balongi

    [52] Mpe oyo akotosa Allah na motindami waye, mpe abangi Allah, mpe azali na bomo naye, baye wana nde balongi

    [53] Bazali kolapa bandayi ya polele ete soki otindi bango (тропа kobunda) bakobimaka, loba: Bolapa te botosi (ya bino ya lokuta) eyebani. Allah ayebi na malamu maye bozali kosala

    [54] Loba: Botosa Allah mpe botosa motindami, mpe soki bapesi mokongo, (motindami) akozala na mokumba sé oyo bapesi ye, bino mpe bozali na mikumba na bino, mpe soki botosi ye bokokambama. Mpe motindami azali sé тропа kokomisa sango ya polele

    [55] Allah asila kolaka epai ya baye bandimi okati na bino, mpe bazali kosala misala ya malamu, bango nde bakozala bakitani o kati na mabele, lolenge akitanisaki baye bazalaki liboso na bango, mpe a kolendisa тропа bango ligomba na bango oyo asepeli тропа bango тре akobongolaka sima ya kobanga na bango ya kala ezala kimiya. Babondelaka ngai kasi basangisaka ngai na eloko te, mpe oyo akopengwa sima na yango, bango nde babebisi

    [56] Mpe botelemisa losambo mpe bobimisa zakat, тре botosa motindami, mpo ete bozua ngolu

    [57] Kokanisa te ete bapagano bakolonga bokonzi ya Allah kati na mabele. Mpe esika na bango nde moto, oyo ezali esika ya mabe

    [58] Eh bino baye bondima! Bawumbu na bino basenga bino ndingisa yambo ya kokotela bino, ndenge moko mpe ba oyo kati na bino bakokisi naino mibu ya mikolo te, mbala misato: Liboso ya sambela ya ntongo, mpe na ngonga ya nzanga tango bozali kolongola bilamba na nzoto, mpe sima ya sambela ya butu, wana nde bangonga misato ya bolumbu pona bino, kasi ezali mabe te тропа bino na bango kokende kotalana sima ya bangonga oyo etangami awa, lolenge wana nde Allah azali kolimbola mikapo mia ye polele тропа bino. Allah azali moyebi atondo bwanya

    [59] Мре soki bana kati na bino bakoli, basenga ndingisa ndenge bayambo babango mpe bazalaka kosenga ndingisa, ndenge wana nde Allah azali kolimbolela bino mikapo mia ye. Mpe Allah azali moyebi atonda bwanya

    [60] Mpe тропа basi baye bakomisa mibu miye bakoki lisusu kobala te, ezali lisumu te soki balingi kolongola bilamba bia bango na polele, kasi na ndenge yakotika bonzenga nyoso polele te, mpe soki basaleli nsoni ezali malamu тропа bango. Allah azali moyoki mpe moyebi

    [61] Epekisami te тропа mokufi miso, na moto ya tengu, na moto ya bokono, na bino na bino na libota moko ete bolia na bandako ya bino, to bandako ya batata na bino, to bandako ya bamama na bino, to bandako ya bandeko na bino ya mibali, to bandako ya bandeko na bino ya basi, to ya batata kulutu na batata leki na bino, to ya batata mwasi na bino, to ya banoko na bino, to ya bamama kulutu na bino mpe bamama leki na bino, to na bandako oyo bosimbi bafungola na yango, to ya baninga na bino, ezali mabe te тропа bino kólia na lisanga to ya kokabuana, mpe soki bokoti na bandako bopesana mbote (ya kimia) losako ya mapamboli mpe ya kitoko mowuta epai na Allah. Ndenge wana nde Allah azali kolimbola bino mikapo naye mpo ete bososola

    [62] Bandimi ya soló, bazali baye bandimi na Allah na motindami naye, mpe soki bafandi naye тропа likambo ya lisanga, bakoki kokende te kino bako senga ye nzela. Ya sólo, ba oyo bazali kosenga yo nzela bango nde bandimi ya sólo na Allah na motindami naye. Mpe soki basengi yo nzela тропа mwa likambo na bango ndimela na oyo olingi kati na bango mpe sengela bango bolimbisi epai na Allah. Ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [63] Bozua ebengeli ya motindami te lokola ebengeli kati na bino na bino. Allah asili koyeba ba oyo kati na bino bamibendaka na kobatama, baye bazali kotelemela mibeko naye bakeba ete komekama eyela bango to etumbu ya makasi ezua bango

    [64] Boyeba ete ya soló, maye manso mazali o likolo mpe o nsé mazali ya Allah, ya soló, ayebi malamu maye bozali na yango, mpe mokolo moye bakozongisama epai naye, akoyebisa bango na maye basalaki mpe Allah nde moyebi wa makambo manso

    Surah 25
    Mopesi ya ndingisa

    [1] Nkembo naye oyo akitisa bososoli epai na mowumbu naye, mpo azala mokebisi тропа mokili mobimba

    [2] Oyo bokonzi ya likolo mpe ya nsé ezali yaye, mpe amipesaka mwana te, mpe akoki kozala na mosangisi te okati ya bokonzi, mpe akela biloko binso, mpe apesa yango bokoki bwa semba

    [3] Mpe batiki ye bazui banzambe misusu baye bakelaka eloko te, po bango moko bakelama, mpe bazali na makoki ya komisala bolamu te mpe komisala mabe te, mpe basimbi liwa na maboko na bango te, mpe bomoyi te, mpe bazali na makoki ya kosekwisa te (o sima ya liwa)

    [4] Mpe baye bapengwa bazali koloba ete: Oyo ezali sé lokuta monene oyo ayei na yango, (ye Muhammad) mpe bato basusu basalisi ye na yango, ya solo bango basili kobuka lokuta mpe na libubi

    [5] Mpe balobi ezali nde masapo ya kala oyo asengaki bakomela ye bazalaki kotangela ye yango tongo na pokwa

    [6] Loba: Akitisa yango oyo ayebi sekele ya likolo na mabele. Ya soló, ye azali molimbisi atonda mawa

    [7] Mpe bazali koloba: Ndenge nini motindami azali kolia biloko mpe azali kotambola okati ya bazando? Mpona nini bakitiselaki epai naye anzelu te mpona azala mokebisi elongo naye

    [8] To, babwakela ye bomengo, to azala na bilanga mpo aliaka na yango. Mpe babubi balobi: Oyo bozali kolanda azali ya kolokama

    [9] Tala lolenge bapesi yo bandakisa, mpe bamibungisi bakoki kozua nzela te (nzela ya bokambami epai ya Allah)

    [10] Nkembo naye oyo soki alingi akotiela yo bolamu ebele koleka oyo wana, (soki alingi andimela yo bolamu okati ya) bilanga eye ezali koleka o nsé na yango mingala, mpe akotiela yo bandako ya kitoko

    [11] Kaši baboyi kondima na mokolo ya suka, na yango tolengeli moto ya makasi тропа baye bazui yango na lokuta

    [12] Soki yango emoni bango na mosika, babandi koyoka kotoka mpe lolaka na yango

    [13] Mpe tango bakobwakama okati na yango na esika ya moke, maboko makangami na sima ya bakingo, na tango wana bakosenge ete bakufa mpe babebisama mbala moko

    [14] Lelo bosenga liwa mbala moko te, kasi bosenga yango mbala ebele

    [15] Loba: Boye oyo ezali malamu to Iola ya libela eye elakama тропа babangi. Yango ezali lifuta mpe esika ya bozongi na bango ya suka

    [16] Bakozua nyoso bazali na yango mposa, libela na libela kati na yango. Wana ezali solo elaka ya Nkolo wayo eye ekozangaka te

    [17] Mpe mokolo moye (Allah) akosangisa bango elongo na maye bazalaki kobondela na kotika Allah, akotuna bango: Boye bino nde bobungisaki bawumbu na ngai oyo to bango moko babungaki nzela

    [18] Bakolobaka: Lokumu nayo, esengeli na biso te kotika yo mpe tozua bakonzi babateli basusu, kasi opesaki bango mpe batata na bango bomengo na bisengo kino babosani bokundoli (kurani), mpe bazalaki nde bato ya kobunga

    [19] Bawangani bino na maye bozali koloba, mpe bokozua esika ya kokima te mpe lisungi te. Mpe oyo akobuba o kati na bino, tokomekisa ye etumbu ya monene

    [20] Mpe totindaki liboso nayo batindami, bazalaki kolia bilei mpe kotambola na bazando, mpe totiaki basusu bazala elembo ya komekama ya baninga na bango, boye bokoyika mpiko? Kasi Nkolo wayo azali kornona

    [21] Mpe baye bazali kolikia na elaka na biso te, bazali koloba: Soki ata bakitiselaka biso ba anzelu to mpe tomona Nkolo wa biso? Basili komisalela lolendo, mpe balekisi ndelo monene тропа komikumisa

    [22] Mokolo oyo bato mabe bakomona ba anzelu ekozala sango malamu te, (ba anzelu) bakolobaka na batomboki ete: Epekisami; nzela ezali te, (epekisami na bino kozua sango ya malamu тропа kokota na lola)

    [23] Mpe tokozua maye basalaki mpe tokomisi yango putulu ezali kopumbwa

    [24] Mokolo wana bato ya lola bakozalaka na bosepeli mpe na bisika ya kitoko mpe bopemi bolamu

    [25] Mpe mokolo moye likolo likopasukaka na mapata, mpe ba anzelu bakokitaka

    [26] Mokolo wana bokonzi ya sôló ekozalaka sé ya Ar-Rahmân, mpe ekozalaka mokolo ya mpasi тропа bapengwi

    [27] Mpe mokolo moye mobubi akomisuaka maboko mibale mpe akolobaka: Soki nalandaka ata nzela ya motindami

    [28] Eh ngai, mawa na nagi; soki nazuaki songolo te moninga

    [29] Asilaki kobungisa ngai mpe atiye ngai mosika na bokundoli tango eyelaki ngai (kurani). Kasi ya sólo, penza satana azali mokosi mpo na moto, (akimaka moto o sima ya komeka ye mpe kobungisa ye)

    [30] Мре motindami alobi ete: Oh Nkolo wa ngai! Ya soló, bato na ngai basundoli kurani oyo

    [31] Mpe lolenge wana nde totiyelaki ntoma na ntoma monguna otei ya batomboki, kasi Nkolo wayo akoki тропа bokambami mpe azali mosungi

    [32] Mpe bapengwi bakolobaka: Mpona nini kurani yango ekitelaki ye mbala moko te? Tokitisaki yango ndenge wana mpona kolendisa motema nayo, mpe tozalaki kotanga yango malamu penza (kotangisa ye kurani mpe koyekola yango na pete)

    [33] Mpe bakokoka koyela yo lisese moko te sé tokoyela yo bosembo mpe ndimbola na yango ya malamu koleka

    [34] Ba oyo bakosangisamaka na bilongi na bango na moto ya lifelo, bango wana nde bakozala na esika ya mabe mpe libungi ya mosika

    [35] Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku, mpe topesaki ye ndeko naye Háruna mpo asalisa ye

    [36] Mpe tolobaki: Bökende bino mibale epai ya bato oyo baboyaki kondimela mikapo mia biso, sima tobebisaki bango banso. (koboma bango)

    [37] Мре bato ya Nûh, tango baboyaki kondimela ba tindami tozindisaki bango mpe totiyaki bango bazala elembo тропа bato, kasi tobombeli babubi etumbu ya makasi

    [38] Mpe aad na Thamúd, na bato ya rass, elongo na bato basusu ebele kati kati na bango sé lolenge moko

    [39] Mpe tobetelaki bato banso ndakisa, mpe bango banso tolimwisaki bango na lolenge ya makasi

    [40] Mpe basilaki koleka o mboka oyo ebetelaki mbula ya mabe, boye bazali kornona yango te? Kasi bazalaki kolikia na mokolo ya lisekwa te

    [41] Mpe soki bamoni yo, bazali koseka yo, bazali koloba: Oyo nde oyo Allah atindaki mpo azala motindami

    [42] Etikali токе abungisa biso nzela ya banzambe ba biso, soki koyika mpiko na biso te nabango. Kasi mosika te, bakoyeba, ntango bakomona etumbu ete nani abungi nzela koleka

    [43] Boye ozali kornona te moto oyo azui mposa naye nde nzambe naye? Boye yo ozali mobateli ya moto ya motindo oyo

    [44] To ozali kokanisa ete ebele na bango bazali koyoka to koyeba? Kasi bazali nde lokola banyama mpe bazali babungi nzela koleka

    [45] Boye ozali kornona te lolenge Nkolo wayo atiaki molili? Soki alingaki, mbele akangisi yango esika moko. Sima totiyaki moyi ezala elembo тропа yango

    [46] Sima tozuaki ye mpe tomemaki ye epai na biso na pete

    [47] Mpe ye nde atielaki bino butu ezala elamba, mpe pongi ezala bopemi, mpe atiaki mokolo ezali bozongi na bomoyi (kolamuka)

    [48] Mpe ye nde azali kotinda mopepe lokola elaka ya ngolu naye. Sima akitisi kowuta na yango mayi ya peto (kowuta o likolo)

    [49] Mpona kopesa bomoyi o mboka eye ekauka mpe komelisa bato mpe bibwele na biye binso bizali kati na yango

    [50] Mpe tosilaki kokabola kati kati na bango mpo ete bakanisa (biso), kasi ebele ya bato baboyi yango baponi sé bopengwi

    [51] Mpe soki tolingaki, mbele totindaki na mboka inso mokebisi

    [52] Kaši kotosa bapengwi te, mpe bundisa bango (na kurani), kobundisa ya bonene

    [53] Мре ye nde atandı bibale mibale bizali kotiola esika moko, oyo ezali malili kitoko, mpe oyo mosusu ezali mungwa kitoko te, mpe atie ndelo kati kati na yango mibale mpo ekutana te

    [54] Mpe ye nde akeli moto na litanga ya mayi, mpe apesi ye libota mpe bolongani. Mpe Nkolo wayo azali penza na bokoki

    [55] Mpe bazali kobondela basusu batiki Allah, ba oyo bakosalela bango bolamu to mabe te. Mompegwi akozala mosungi ya monguna ya Nkolo naye

    [56] Mpe totindaki yo te sé mpo ozala mopesi sango mpe mokebisi

    [57] Loba: Nazali kosenga bino lifuta moko te sé na moto oyo alingi kozua nzela ya Nkolo naye

    [58] Mpe mipesa epai ya oyo azali na bomoi liwa ezuaka ye te (Allah), mpe pesa lokumu naye. Мре ayebi malamu masumu ya bawumbu baye

    [59] Oyo akela likolo na mabele, na maye manso mazali otei na yango nyoso mibale na mikolo motoba, mpe sima amitombwami na likolo ya ngwende, Ar-Rahmân nde tika ete otuna sé oyo ayebi manso

    [60] Мре soki bayebisi bango ete: Bofukamela Ar-Rahmân, (Allah) bakozongisa été: Nani Ar-Rahmân? Tofukamela oyo ozali kotinda biso? Мре ezali kobakisela bango sé bopengwi. (ezali malamu kogumbama sima ya mokapo moye)

    [61] Mapamboli naye oyo atia olikolo minzoto mpe ati moyi mpe sanza ya kongenga

    [62] Mpe ye nde atia butu na mokolo elandana na bongengi mpe molili, тропа oyo alingi kokanisa to mpe kopesa matondi

    [63] Mpe bawumbu ya Ar-Rahmân bazali baye batambolaka likolo ya mabele na malembe mpe limemia na komikitisa, mpe soki batumoli bango na baye bayebi eloko te, bayanoli bango été: Kimia

    [64] Mpe baye bazali kolekisa butu na bango nakotelema mpe kofukamela Nkolo na bango

    [65] Mpe baye bazali koloba: Nkolo tiya biso mosika na etumbu ya lifelo, mpo ya soló etumbu na yango ekozala ya libela

    [66] Ya soló, yango ezali esika mabe тропа kovanda

    [67] Мре baye bazali kokaba to kobimisa тре bazali kolekisa ndelo te mpe batiki kokaba te, kasi bazali na kati kati

    [68] Mpe baye bazali kobondela Allah mpe kosangisa ye na banzambe misusu te, mpe bazali koboma molimo oyo Allah apekisaki te, longola sé ezala na nzela ya bosôló, mpe bazali kosala ekobo te. Kasi oyo akosala yango akozua etumbu

    [69] Bakobakiselaka ye etumbu o mokolo mwa suka, mpe akotikalaka libela okati na yango mpe azingami na kozanga lokumu

    [70] Longola sé oyo akotubela mpe andimi mpe alandisi kosala misala milamu, Allah akobongolaka mabe na bango ekomi bolamu. Mpe Allah azali molimbisi atonda mawa

    [71] Mpe oyo akotubela mpe asali mosala ya malamu, ya solo Allah akondimelaka ye bozongi

    [72] Mpe baye batatolaka na lokuta te, mpe soki bakutani na makambo mazanga ntina, bapesi yango mokongo

    [73] Мре baye soki bakundoli bango mikapo mia Nkolo wa bango, bakozangaka koyoka mpe kornona yango te

    [74] Mpe baye balobaka ete: Nkolo, pesa biso bosepelisi miso bolamu kowuta epai ya basi na biso mpe mabota na biso, mpe otia biso bakambi ya baye bazali kobanga

    [75] Bango wana nde lifuta na bango ekozala esika ya likolo (o paladizo) mpo été bakangaki mitema, mpe bakokutana na losako mpe kimia o kati na yango

    [76] Libela kati na yango, boye bolamu kani bakozuaka o esika ena bakozalaka

    [77] Loba: Nkolo wa ngai akomitungisa тропа bino te wana bozangi losambo na bino, mpo bozwaka(ntoma) lokuta, na yango etumbu ekotika bino te, mpe ekozalaka seko na seko

    Surah 26
    Basani ya nzembo

    [1] Twâ, sín, mîm

    [2] Oyo nde mikapo mia buku ya polele

    [3] Ozali komitungisa mpo été baboyi kondima

    [4] Soki tolingaki mbele tokitisaki bilembo epai na bango kowuta о likolo, bakingo na bango elingaki kogumbama. (na soni)

    [5] Мре tango nyoso lilendisi ya sika likoyela bango kowuta epai ya Ar-Rahmân, sé bakopesa yango mokongo

    [6] Baboyaki kondima, (na makambo nyoso oyo ewutaki epai ya Nkolo wa bango) kala te bakoyelaka bango basango тропа maye bazalaki kotiola na yango

    [7] Boye bazali kornona mabele te boni tokolisaki kati na yango (milona mibale mibale) na lolenge ya malamu

    [8] Ya soló, wana ezali elembo. Kasi ebele kati na bango bazali kondima te

    [9] Mpe ya soló, Nkolo wa yo azali wa bokasi atonda ngolu

    [10] Mpe tango Nkolo wayo abengaki Mûssa, kende epai ya bato ya mabe

    [11] Bato ya falo. Bazali kobanga (Allah) te

    [12] Alobi: Nkolo, ya sólo nazali kobanga ete bandimela ngai te

    [13] Ntolo na ngai ezali ya kokangama, mpe lolemu na ngai elobaka malamu te, tinda yango epai ya Hâruna

    [14] Mpe nazali na mabe oyo nasala bango, na yango nazali kobanga été noki bakoboma ngai

    [15] (Allah ayebisaki ye): Eloko ezali te, bökende bino mibale na bilembo bia biso, tokozala elongo na bino tozali koyoka

    [16] Bökende epai ya falo bino mibale, boyebisa ye ete, Nkolo ya mokili nde atindi biso ya sólo

    [17] Mpo opesa biso bana ya isalayele

    [18] Falo alobi: Tobokoloki yo te kowuta bolenge?, mpe tovandaki nayo bamibu ebele te

    [19] Мре osalaki maye osalaki, mpe ozalaki kati ya bapengwi

    [20] Mûssa alobi: Nasalaki yango mpo été nazangaki koyeba

    [21] Yango nakimaki bino тропа bobangi. Sima Nkolo wa ngai apesi ngai bwanya, mpe aponi ngai okati ya batindami

    [22] Wana nde bolamu nayo ozali kokundolela ngai yango, mpe yo osili kozua bana ya isalayele bawumbu nayo

    [23] (Falo ) alobi; nani Nkolo wa molongo

    [24] (Mûssa) alobi: Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali otei na yango mibale, soki bozali na ntembe te

    [25] Falo alobi na baye bazali pembeni naye ete: Boye bozali koyoka te

    [26] (Mûssa) alobi; Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bato ya kala

    [27] (Falo) alobi: Ya soló motindami oyo batindi ye epai na bino azali ligboma

    [28] (Mûssa) alobi: Nkolo wa moniele na eloli, na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki bozali koyeba

    [29] (Falo) alobi: Soki olandi nzambe mosusu otiki ngai, nakokotisa yo na boloko

    [30] (Mûssa) alobi: Ata soki nayeli yo bikamwa ya polele

    [31] (Falo) alobi: Yaka na yango soki ozali o kati ya balobi bosôló

    [32] (Mûssa) abwaki lingenda lia ye, mpe tala ebongwani nyoka ya polele ebandi kotambola

    [33] Mpe abimisi loboko naye na libenga, mpe tala ekomi pembe makasi pona baye bazali kotala

    [34] (Falo) alobi na bankumu naye bazalaki pembeni naye: Ya soló, oyo nde nganga monene ya boyebi

    [35] Alingi kobimisa bino o mabele na bino na bonganga naye, boye bokosala nini

    [36] Balobi: Zelisa ye na ndeko wa ye, mpe tinda bato na mboka mpo basangisa (bakende kosangisa banganga, sima baya komekana)

    [37] Mpe bamemela yo banganga ya minene oyo bayebi

    [38] Banganga basangani o mokolo mwa elaka

    [39] Mpe bayebisi na bato ete: Boye bokosangana te

    [40] Mpo tolanda banganga soki bango balongi

    [41] Mpe tango banganga bakomi epai ya falo balobi naye été: Boye tozali na lifuta soki tolongi

    [42] (Falo) alobi: Iyo, ya soló, nakotiya bino pembeni na ngai

    [43] Mûssa ayebisi bango: Bobwaka oyo bolingi kobwaka

    [44] Mpe babwaki basinga na bamangenda na bango, (mpe balobi): Na nguya ya falo ya sólo, tokolonga

    [45] Mpe Mûssa abwaki lingenda lia ye, mpe tala emeli nyoso oyo basalaki

    [46] Mpe banganga nyoso bakweyaki na kofukama

    [47] Balobi: Tondimi na Nkolo wa molongo

    [48] Nkolo ya Mûssa na Hânına

    [49] (Falo) alobi: Bondimi naye yambo ete napesa bino ndingisa! Ya sólo, ye nde mokonzi ya bino oyo alakisaki bino bonganga, bokoyeba kala te. Nakokata bino maboko na makolo na lolenge ya bokeseni, mpe nakobaka bino banso na nzete

    [50] Banganga balobi: Mabe ezali te, pamba te, mpo tokozongaka ya soló epai ya Nkolo wa biso

    [51] Ya soló, posa na biso ezali ete Nkolo wa biso alimbisa biso, mpo tozali bato ya yambo тропа kondima (ye Allah)

    [52] Mpe toyebisaki na Mûssa ete: Akende na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ya soló bakolanda bino

    [53] Мре falo atindi été basangisa bato ya mboka

    [54] Ete: Ya sólo, bato oyo bazali токе

    [55] Мре ya sólo, balongi biso

    [56] Kasi biso banso tozali na bokebi

    [57] Mpe tobimisaki bango na bilanga mpe mingala

    [58] Bamaziba ya bomengo mpe bisika ya lokumu

    [59] Lolenge moko topesaki bokitani na bana ya isalayele

    [60] Mpe balandaki bango na ntongo makasi

    [61] Mpe tango mapinga mibale bamonani; bato ya Mûssa balobaki été: Ya sólo, biso tosili kozuama (bato ya Mûssa bakanisaki été bakokanga bango ya soló)

    [62] (Mûssa) alobi te. Ya soló Nkolo wa ngai azali elongo na ngai, akokamba ngai

    [63] Mpe topesaki emoniseli epai ya Mûssa ete; beta lingenda lia yo na ebale mpe ekabwani na mibale lokola ngomba ya monene

    [64] Mpe totikaki ete baye wana bapusana. (Falo na bato naye)

    [65] Mpe tolongisaki Mûssa na bato naye banso oyo bazalaki elongo naye

    [66] Sima, tozindisaki basusu (banguna)

    [67] Ya sólo, wana ezali elembo. Ebele kati na bango bazali kondima te

    [68] Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu

    [69] Mpe tángela bango sango ya Ibrâhîm

    [70] Tango alobaki na tata naye mpe bato naye: Nini bozali kobondela

    [71] Balobaki: Tozali kobondela bikeko, mpe tokokangama sé na yango

    [72] Alobi: Boye bayokaka bino tango bosengaka bango

    [73] То boye basalisaka bino to mpe banyokoloko bino

    [74] Balobi: Tokutaki bankoko na biso ya kala bazali sé ndenge wana

    [75] Alobi: Bososoli mpenza тропа oyo bozali kobondela

    [76] Bino na bankoko na bino ya kala

    [77] Bango banso bazali banguna na ngai, longola sé Nkolo wa molongo

    [78] Oyo akelaki ngai mpe azali kokamba ngai

    [79] Mpe ye nde aleisaka ngai, mpe amelisaka ngai

    [80] Mpe tango nabeleke, ye nde abikisaka ngai

    [81] Mpe ye nde akoboma ngai, sima akosekwisa ngai

    [82] Mpe nazali kolikia ete alimbisa ngai masumu omokolo mwa suka

    [83] Nkolo! Pesa ngai bwanya (mpe boyebi), mpe tia ngai elongo na bato ya malamu

    [84] Tika ete lolemu na ngai eloba bosoló epai ya basusu

    [85] Mpe tiya ngai nazala okati ya bakitani ya lola ya kitoko

    [86] Mpe limbisa tata wa ngai mpo azalaki 0 kati ya babungi

    [87] Suratu Ach-Chu’arâ Eteni 19 Л

    [88] Mpe koyokisa ngai nsoni te o mokolo ya lisekwa

    [89] Mokolo moye misolo na bana bakosalisaka te

    [90] Longola sé oyo akoya epai ya Allah na motema ya malamu. (Motema molamu ya kopetoama)

    [91] Bakopusanisaka lola pembeni ya babangi (Allah)

    [92] Mpe bakomonisaka bato mabe moto

    [93] Mpe bakolobelaka bango: Wapi maye bozalaki kobondela

    [94] Na botiki Allah, boye bazali kosunga bino? To mpe bango moko bazali komisunga

    [95] Mpe bakobwakama na moto bipai na bipai na bilongi na bango, na baye bapengwisaki bango

    [96] Na basoda banso ya Satana (ibilisa)

    [97] Bakolobaka: Mpe bazali kosuana okati na yango

    [98] Na Allah! Ya soló, tozalaki na libunga ya polele

    [99] Tozalaki kokokisa bino lokola Nkolo ya mokili

    [100] Kasi ezali sé batomboki nde babungisaki biso

    [101] Ata moninga ya soló soló azali te

    [102] Soki tozuaka nzela ya bozongi (ata na mokili), tolingaki kozala okati ya bandimi. (baye bazali kosala bolamu)

    [103] Ya sólo, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazali kondima te

    [104] Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu

    [105] Bato ya Nûh bazangaki kondimela batindami, bazuaki bango bato ya lokuta

    [106] Tango ndeko wa bango Nûh ayebisaki bango: Boye bokobanga (Allah) te

    [107] Ya sólo, nazali motindami malamu тропа bino

    [108] Bobanga Allah mpe botosa ngai

    [109] Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai lizali sé epai na Nkolo wa molongo

    [110] Bobanga Allah mpe botosa ngai. İli. Balobaki: Tondimelayo! Kasi

    [111] ezali sé bato bazanga ntina, nde balandaka yo

    [112] Alobi: Nayebi te maye bazali kosala

    [113] Lifuta na bango etali sé Nkolo wa ngai, soki bozali koyeba

    [114] Nazali oyo abenganaka bandimi te

    [115] Kasi nazali sé mokebisi ya polele

    [116] Balobi: Nûh! Soki otiki te, okozala o kati ya baye tokoboma na mabanga

    [117] Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Bato na ngai bazali kondimela ngai te

    [118] Lakisa bosôló kati kati na ngai na bango, mpe bikisa ngai na baye bazali elongo na ngai kati ya bandimi

    [119] Mpe tolongisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa oyo ezalaki ya kotonda

    [120] Mpe sima tozindisaki baye batikalaki (bapengwi oyo bazangaki bondimi)

    [121] Ya soló, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te

    [122] Mpe ya solo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu

    [123] Ba aad mpe baboyaki kondimela batindami

    [124] Tango ndeko wa bango Hûd ayebisaki bango: Boye bozali kobanga te

    [125] Ya soló, nazali motindami malamu epai na bino

    [126] Bobanga Allah mpe botosa ngai

    [127] Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo

    [128] Boye bozali kotonga bikeko na ngomba nyoso тропа kokumisa

    [129] Mpe bozali kotonga bandako ya minene lokola bokotikala libela awa na mokili

    [130] Mpe soki bopesi etumbu, bozalaka na mawa te, mpe bobimi bato ya makasi

    [131] Bobanga Allah mpe botosa ngai

    [132] Bobanga oyo azali kopesa bino bolamu, na nyoso oyo boyebi

    [133] Oyo apesi bino banyama na bana

    [134] Mpe bilanga na miluka

    [135] Ya sôló, nazali kobangela bino etumbu 0 mokolo mwa suka

    [136] Balobi: Olendisa biso to olendisa te, ezali sé lolenge moko

    [137] Ezali sé ezaleli ya bato ya kala

    [138] Mpe tokozuaka etumbu te

    [139] Baboyaki kondimela ye, mpe tobomaki bango, ya soló wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te

    [140] Mpe ya soló, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu

    [141] Ba Thamûd, baboyaki mpe kondimela batindami

    [142] Tango ndeko wa bango Swâlih ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te

    [143] Nazali motindami malamu epai na bino

    [144] Bobanga Allah mpe botosa ngai

    [145] Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo

    [146] Boye bokotikalaka na kimiya тропа maye bozali kosala

    [147] O kati ya bilanga mpe mingala

    [148] Milona mpe banzete ya nagh’l mpe ya mbuma kitoko

    [149] Boye bozali kotonga bandako o likolo lia ba ngomba

    [150] Bobanga Allah mpe botosa ngai

    [151] Kasi botosa makambo ya balekisi ndelo te

    [152] Baye bazali sé kobebisa o kati ya mabele mpe balingi kobongisa te

    [153] Balobi: Ya soló, ozali sé o kati ya balokami

    [154] Ozali sé moto lokola biso, yaka na elembo soki ozali kati ya balobi bosôló

    [155] Alobi: Nâqah oyo azali na mokolo naye ya komela mayi, bino mpe bozali na mokolo ya komela (kozua) mayi

    [156] Mpe bosala ye mabe te, noki te, etumbu monene ekozua bino mokolo moko boye

    [157] Kasi babomaki ye, mpe na sima bakomaki kolela

    [158] Mpe topesaki bango etumbu, wana ezali elembo kasi ebele na bango bazalaki kondima te

    [159] Mpe Nkolo wayo azali ya sólo na bokasi atonda ngolu

    [160] Bato ya Loth baboyaki mpe kondimela batindami

    [161] Tango ndeko wa bango Loth ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te

    [162] Nazali motindami malamu тропа bino

    [163] Bobanga Allah mpe botosa ngai

    [164] Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo

    [165] Boye bozali kosalela posa ya nzoto bino mibali na mibali o kati na mokili

    [166] Mpe botiki basi oyo Nkolo wa bino akela тропа bino? Kasi bozali bato ya masumu (balekisi ndelo mpe babuki mibeko)

    [167] Balobi: Eh Loth! Soki otiki te, tokobimisa yo (na mboka)

    [168] Alobi: Ya soló, ngai naboyi maye bozali kosala

    [169] Nkolo, longisa ngai elongo na libota lia ngai тропа maye bazali kosala

    [170] Tolongisaki ye elongo na libota lia ye bango banso

    [171] Longola sé mobange ya mwasi atikalaki elongo na baye bazuaki etumbu

    [172] Sima, tobomaki basusu baye batikalaki

    [173] Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya motindo wana тропа baye tokebisaki

    [174] Ya soló, wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te

    [175] Mpe Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu

    [176] Bato ya aîkat, baboyaki kondimela batindami

    [177] Tango ndeko wa bango Shuaîb ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te

    [178] Nazali motindami malamu epai na bino

    [179] Bobanga Allah mpe botosa ngai

    [180] Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo

    [181] Mpe bokokisa bimekelo ya bitando na ndenge esengeli, kasi bozangisa yango te

    [182] Mpe botondisa emekelo na bosembo

    [183] Mpe bobuba bato te na bimekelo na bango, mpe bosala mabe kati na mokili te, (mpe bosomba bosembo ya bato na misolo te)

    [184] Mpe bobanga oyo akeli bino na baye baleka liboso na bino

    [185] Balobi: Ya soló, ozali kati ya balokami

    [186] Mpe ozali sé moto lokola biso, mpe tozali kokanisa ete ozali kati ya babuki lokuta

    [187] Kweisela biso ndambu ya mapata soki ozali koloba bosölo

    [188] Alobi: Nkolo wa ngai ayebi maye manso bozali kosala

    [189] Kasi baboyaki kondimela ye, mpe topesaki bango etumbu o mokolo moye mapata eyindaki, ya solo, yango ezalaki nde mokolo ya etumbu monene

    [190] Wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te

    [191] Mpe ya soló, Nkolo wayo azali wa bokasi atonda ngolu

    [192] Ya sólo, yango (kurani) eye, ekitisamaki kowuta epai ya Nkolo wa molongo

    [193] Molimo mosantu (anzelu gabiliyele) akitaki na yango

    [194] Na motema nayo mpo ozala okati ya bakebisi

    [195] Na lokota ya arabo oyo ezali polele

    [196] Mpe yango esilaka kokomama na makomi ya batindami ya kala

    [197] Boye ezalaki elembo te тропа bango, mpo banganga nzambe ya bana ya isalayele bakoka koyeba yango

    [198] Mpe soki tokitisaki yango epai ya moto oyo azali arabo te

    [199] Mpe atangela bango yango mbele bandimaki na yango te

    [200] Lolenge wana nde tokitisaki (koyimayima ezala) 0 mitema mia batomboki

    [201] Bakondimaka na yango te kino bakomonaka etumbu ya makasi

    [202] Ekoyela bango mbalakaka, bakoyebaka te

    [203] Mpe bazali koloba ete: Boye tokozelisama? (mpo tokoka kondima)

    [204] Boye! Etumbu na biso nde bazali kowelisa

    [205] Boye ozali kornona te, soki topesaki bango mua mibu po basakana

    [206] Sima maye balakamaki ekomelaki bango

    [207] Esengo eye bazalaki na yango esalisaki bango na eloko te

    [208] Mpe tobomaka mboka te, sé totinda bakebisi liboso

    [209] (Mpona) kokebisa, mpe tozali babubi te

    [210] Mpe ezalaki basatana nde bakiti nayango te (kurani)

    [211] Mpe esengeli na bango te, mpe bazali na makoki ya kosala yango te

    [212] (Kasi) ya soló, bango bamitiye mosika mpona koyoka

    [213] Mpe kobondela nzambe mosusu te elongo na Allah, noki te okozuama 0 kati ya bato ya etumbu

    [214] Mpe kebisa libota nayo ya pene

    [215] Mpe kitisa mapeka nayo (zala malamu) mpona bandimi oyo bazali kolanda yo

    [216] Mpe soki baboyi kotosa yo, loba na bango ete: Ya soló ngai na nazali mosika na maye bozali kosala

    [217] Mpe mipesa epai ya oyo azali na bokasi atonda mawa

    [218] Oyo amonaka yo tango otelemaka

    [219] Mpe (amonaka) yo tango ogumbamaka

    [220] Ya soló, ye azali moyoki mpe moyebi

    [221] Boye nayebisa bino epai ya nani basatana bazali kokita

    [222] Bazali kokita epai ya bato ya lokuta basumuki

    [223] Batiyaka matoyi kasi ebele na bango bazali bakosi

    [224] Kasi epai ya bato ya másese (masapo), elandaka bango sé baye babunga

    [225] Boye omoni te ete bazali kolekaleka kati kati ya ba ngomba (mibale)

    [226] Mpe ya sólo, bango balobaka maye basalaka te

    [227] Longola sé baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, mpe bazali kokumisa Allah mingi, mpe bamisalisi na kopamela mabe ya babubi, kasi babubi bakoyebaka kala mingi te ba nani ekobebela bango

    Surah 27
    Liyoyo

    [1] Twâ sîn, oyo ezali mikapo mia kurani, mpe buku wa polele

    [2] (Ezali) na bokambami mpe kopesa sango elamu epai ya bandimi

    [3] Baye bazali kotelemisa losambo mpe kobimisa zakat, mpe bazali na tembe te na mokolo mwa suka

    [4] Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, totieli misala na bango ya mabe bonzenga, mpe batikali na yango na koyimayima mpe kozanga bososoli

    [5] Bango wana nde bakozala na etumbu ya mabe, mpe o mokolo ya suka bakozala bazangi mpenza

    [6] Mpe ya solo, ozali koyamba kurani oyo kowuta epai ya oyo azali na bwanya atonda mayele

    [7] (Kanisa) tango Mûssa alobaki na libota lia ye: Ya solo, ngai namoni moto, nakoyela bino sango okati na yango to nakoyela bino koni ya moto mpo été bomiyotola

    [8] Mpe tango akomaki ayoki mongongo ebengi été: Apambolami moto oyo atelemi o kati ya moto, ndenge moko mpe baye bazali zinga zinga na yango. Nkembo na Allah Nkolo ya mokili. (atonda bokasi mpe bwanya)

    [9] Eh Mûssa! Ezali ya soló, ngai Allah oyo nazali na nguya na ntonda bwanya

    [10] Mpe bwaka lingenda nayo, mpe tango amoni yango ekomi kongoluma lokola nyoka, apesi mokongo abaluki, eh Mûssa! Kobanga te epai na ngai batindami babangaka te

    [11] Longola sé oyo asali mbeba mpe sima abongisi yango. Ya solo, nazali molimbisi na tonda mawa

    [12] Mpe kotisa loboko nayo na libenga nayo, ekobima pembe ekosala mpasi te, ezali moko ya bikamwiseli libua ökende na yango epai ya falo na bato naye, mpo bazali ya sólo bato ya mabe mpenza

    [13] Mpe tango bilembo bia biso bikomelaki bango polele polele, balobi ete: Oyo ezali bonganga ya polele

    [14] Bawanganaki yango na motema mabe mpe na lolendo nzoka nde namitema na bango bazalaki na tembe te, kasi tala ndenge nini bato mabe basukaki

    [15] Mpe tosilaki kopesa Dâwud na Suleyman boyebi, mpe bango mibale balobaki: Matondo na Allah oyo apesi biso ebele o kati ya bawumbu naye bandimi

    [16] Mpe Suleyman akitanaki Dâwud, mpe alobaki: Eh bino bato! Totangisama monoko ya bandeke, mpe topesama biloko binso. Ya soló, oyo ezali bolamu ya polele

    [17] Mpe basangiseli Suleyman mapinga ya basoda naye ya badjini (bilima) na bato, mpe bandeke, batandanaki milongo milongo

    [18] Kino bakomaki na bisika ya basombe bazali, sombe moko alobaki ete: Oh bino basombe! Bokota na bandako na bino noki te Suleyman na mapinga naye bakonyata bino mpe bakoyeba te

    [19] Mpe (Suleyman) akatani na koseka tango ayokaki liloba ya sombe wana mpe asepeli na makambo na bango oyo basali mpe alobi: Oh Nkolo! Tika natondo yo botondi тропа bolamu nayo likolo na ngai na baboti na ngai mpe tika ete nasala mosala oyo ekosepelisa yo, mpe na ngolu nayo, kotisa ngai na mawa nayo okati ya lisanga ya bawumbu nayo ya malamu

    [20] Mpe atalaki milongo ya bandeke alobi: Nazali kornona hud-hud te azali wapi? To azali elongo na baye bazalaki te

    [21] Nakopesa ye etumbu ya makasi mpenza to nakokata ye kingo, to ayela ngai eloko oyo ekoki kolongisa ye

    [22] Kaši awumelaki tango molayi te na kozonga, mpe alobaki na mokonzi ete: Nazui boyebi oyo ozali na yango te, mpe nayeli yo sango ya sôló, kowuta na mboka sabat

    [23] Nakuti mwasi moko azali kokonza bango, mpe makambo mazali kokambama naye, mpe azali na kiti ya bokonzi ya kitoko monene koleka

    [24] Nakuti ye na bato naye bazali kogumbamela moyi, na botiki Allah, mpe satana abongiseli bango misala, mpe abungisi bango nzela ya semba, mpe bakokambama te

    [25] Boye bakofukamela Allah te oyo abimisaka maye mabombami kati ya mapata na mabele, mpe ayebi maye bozali kobomba mpe maye bozali komonisa

    [26] Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye Nkolo ya ngwende ya bonene (ya bokonzi)

    [27] (Suleyman) Alobi: Tokotala soki olobi bosôló to ozali kokosa

    [28] Kende kotikela bango mokanda mwa ngai moye, sima tika bango mpe otelema pembeni mpe tala lolenge nini bakoyanola

    [29] Mokonzi ya mwasi alobi: Eh bankumu! Babwakeli ngai mokanda ya lokumu

    [30] Ya soló, ewuti epai ya Suleyman. Mpe ya sólo yango ebandi na nkombo ya Allah wa boboto atonda ngolu

    [31] Ete bosalela ngai lolendo te, mpe boya epai na ngai nakomisokia (kozala bamizilima)

    [32] Alobi: Eh bankumu! Bopesa ngai toli тропа likambo liye, nakosala eloko te kino bokozala awa. (тропа toii)

    [33] Balobi: Tozali na bokasi mpe nguya ya kosakana te, liloba ya suka ezali epai nayo, tinda biso na oyo omoni

    [34] Alobi: Ya soló, bakonzi soki bakoti na mboka babebisaka yango, na koboma mpe kosala mabe ebele, mpe bakomisaka bankumu na yango bato mpamba. Mpe lolenge wana nde basalaka

    [35] Mpe na yango ya sólo, ngai nazali kotindela bango likabo sikoyo, mpe na kotala eyano nini ekoyela ngai

    [36] Mpe tango (bantoma to basali naye) bakomaki epai ya Suleyman na (libonza) alobi: Boye bolingi kosomba ngai na misolo? Kasi oyo Allah asilaki kopesa ngai ezali ebele mpe eleki likabo na bino oyo bozali kosepela na yango

    [37] Zonga epai na bango, kasi tokoyela bango na basoda ya makasi baye bakotelema liboso na bango te mpe tokobimisa bango. Na yango mpe bakozanga lokumu mpe bakokitisama

    [38] Alobaki ete: (Suleyman) oh bankumu na ngai! Nani akoyela ngai ngwende naye awa yambo ete baya epai nanga!’ na botosi bonso

    [39] If’rît alobaki ete: Ngai nakoyela yo yango yambo ete otelema na esika nayo. Mpe ya soló ngai nazali тропа yango makasi mpe bosembo

    [40] (moto) moko azalaki na boyebi ya buku alobaki ete: Ngai nakoyela yo yango yambo ete obuka miso nayo. Mpe tango amonaki yango etelemi liboso naye, alobaki ete: (Suleyman) oyo ezali bolamu ya Nkolo na ngai, ameki ngai na yango soki nakotondo ye to nakozanga ye botondi, kasi oyo akotondo ayeba ete ezali тропа bolamu naye moko, mpe oyo akoboya kotondo, ya solo, Nkolo na ngai atonda bomengo azali malamu

    [41] Alobi (lisusu): Bozongisela ye kiti naye, totala soki akokambama, to akozala o kati ya ba’oyo bakambami te

    [42] Tango ayakaki balobaki naye ete (mokonzi mwasi wana): Boye oyo ngwende nayo te? Azongisaki ete ezali lokola yango! (Alobi Suleyman): Tozuaki boyebi liboso naye mpe tomisokie (tokomi bamizilima)

    [43] Kasi oyo azalaki kobondela na botiki Allah, nde epekisaki ye kasi azalaki soló o kati ya bapengwi

    [44] Мре balobaki naye: Kota na ndako, mpe tango amonaki yango lokola mayi ya mozindo, amonaki makolo naye ebimi na elilingi, (Suleyman) alobi naye: Oyo ezali ndako esalami na milangi ya talo,: (Mwasi mokonzi!) alobaki ete: Nkolo, ya solo namibubaki ngai moko, na yango namisoki elongo na Suleyman epai ya Allah Nkolo ya mokili mobimba

    [45] Mpe ya solo, totindaki epai ya Thamûd, ndeko wa bango Swâlih ete (ayebisa bango): Bobondela Allah, kasi bakabwanaki na biteni mibale na kosuana

    [46] Alobi: Oh bato na ngai! Mpona nini bozali kowelisa kosala mabe mpe botiki kosala bolamu? Soki ata bosengaki bolimbisi epai ya Allah, tango mosusu bokoyambema na ngolu naye

    [47] Balobi ete: Tozali kornona mpona baye bazali nayo mabe mpona biso, azongiseli bango ete: Likambo na bino litali sé Allah. Kasi bino bokwei nde okati ya komekama

    [48] Mpe okati ya mboka ezalaki na lisanga ya bato libua bazalaki kotia mobulu likolo ya mabele, bazalaki kosala bolamu ata шоке te

    [49] Balobaki ete: Tolapa na Allah ete tokosala ye na libota naye mabe na butu, na sima tokoloba na moto oyo atelemi тропа kosenga makila naye ete: Biso toyebi moto abomi libota naye te. Mpe ya soló, tozali bosembo

    [50] Mpe basali likita ya mabe, mpe tosalelaki bango lokola, kasi bazalaki koyeba te

    [51] Tala lifuta ya mwango na bango basalaki mpe tobomaki bango na baye banso bazalaki elongo na bango

    [52] Mpe tala bandako na bango, bitikali polele тропа bobubi bwa bango. Wana ezali sólo elembo mpo bato bakoka koyeba

    [53] Mpe tolongisaki baye bandimaki mpe bazalaki kobanga

    [54] Mpe Loth tango ayebisaki na bato naye ete: Bozali kosala mabe (kokutana mibali na mibali na nzela ya sima) mpe bozali kornona

    [55] Ya soló, bino bozali koyela mibali na sima, botiki basi baye bakokokisela bino mposa. Kasi bozali na boyebi te

    [56] Eyano ya bato naye ezalaki ete: Bobimisa libota lia Loth na mboka na bino, ya soló, bango bazali bato balingaka sé komipetola

    [57] Mpe tolongisaki ye na libota lia ye, longola sé mwasi naye, totiyaki ye kati ya baye tobomaki

    [58] Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya lolenge wana тропа baye bakebisamaki

    [59] Loba: Matondo na Allah, mpe kimia ezala likolo ya bawumbu naye oyo baponami na (bolamu), boye Allah nde azali malamu to banzambe oyo bazali kosangisa naye nde baleki malamu

    [60] Ezali ye te nde akela likolo na mabele mpe azali kokitisela bino mbula kowuta na likolo, mpe tobimiseli bino bilanga na milona ya kitoko? Bozalaki na makoki moko te ya kokolisa banzete na yango, boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Kasi bazali nde bato ya kokokisa Allah na eloko

    [61] Ezali ye te nde atandi mabele тропа kofanda? Mpe atiolisi mingala okati na yango? Mpe apiki bangomba likolo na yango? Mpe akaboli bibale mibale ete bikutana te? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Kasi ebele na bango bazali koyeba te

    [62] Ezali ye te nde oyo azali koyanola moleli tango abeleli ye, mpe alongoli ye mpasi mpe azali kokitanisa bino na mabele? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Moke nde bozali kokanisa

    [63] Ezali ye te nde azali kokamba bino na molili ya mokili mpe molili ya ebale? Mpe nani azali kotindaka mopepe lokola sango ya malamu na ngolu naye? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Allah azali likolo koleka maye bazali kosangisa na yango

    [64] Ezali ye te oyo abandaka bokeli sima azongeli yango? Mpe nani azali koleisa bino kowuta na likolo mpe na mabele? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Loba: Bopesa bilembetele bia bino soki bozali na bosôló

    [65] Loba: Moko te ayebi maye mabombami kati ya likolo na mabele, ezali sé Allah. Mpe bakoyebaka mokolo bakosekwisamaka te

    [66] Kasi boyebi bwa bango na mokolo ya suka, mpe bazali na tembe тропа yango, to bazali kornona yango te

    [67] Мре bapengwi balobi: Boye tango biso na batata na biso tokokomaka putulu, tokosekwisamaka lisusu (kowuta na malita)

    [68] Tosilaki kopesama elaka biso na batata na biso тропа oyo liboso, kasi ezali sé masapo ya bankoko ya kala

    [69] Loba: Botambola na mokili, bótala lolenge kani oyo esukelaka batomboki

    [70] Kozala na mawa na bango te , mpe koyoka mpasi te тропа mwango na bango bazali kosala

    [71] Mpe bazali koloba: Elaka yango ekozalaka tango nini, soki bozali koloba bosóló

    [72] Loba: Tango mosusu oyo bozali koluka, ekokomelaka bino na makolo na bino

    [73] Mpe ya soló, Nkolo nayo atonda bolamu likolo ya bato, kasi ebele ya bato bazali kotondo te

    [74] Mpe Nkolo wayo ayebi sólo maye bazali kobomba o mitma mia bango, mpe maye bazali komonisa polele

    [75] Mpe eloko moko te ebombami o kati ya likolo na mabele sé ekomama o kati ya buku ya polele

    [76] Ya soló, kurani oyo ezali kolobela bana ya isalayele тропа ebele ya maye bazali kokabwana na yango

    [77] Мре ya sólo, yango ezali bokambi mpe ngolu тропа bandimi

    [78] Ya sólo, Nkolo wayo akokataka o kati kati na bango na mibeko mia ye. Mpe azali wa bokasi atonda boyebi

    [79] Mpe mipesa epai ya Allah. Ya sólo, ozali na bosembo ya polele

    [80] Ya sólo, yo ozali na bokoki ya koyokisa bawei te, mpe koyokisa baye bakufa matoyi te, tango bakimi bapesi mokongo

    [81] Mpe ozali na bokoki ya kokamba bakufi miso te soki babungi, kasi okoki sé koyoka baye bandimi na mikapo mia biso mpe bazali batosi (bamizilima)

    [82] Mpe tango liloba likokwelaka bango, tokobimisela bango nyama o kati na mabele oyo akolobela bango. Ya sólo, bato bazalaki kondimela bilembo bia biso te

    [83] Mpe mokolo moye tokosangisaka na umma nionso bato ebele, baye baboyaki kondima na bilembo bia biso, banso bakotelema na milongo

    [84] Kino tango bakokoma, (Allah) akolobaka: Boye boboyaki kondimela bilembo bia ngai, mpe botiki kokangama na yango mpe bozali koyeba, to bozalaki kosala nini

    [85] Mpe liloba likokweyaka likolo lia bango тропа bobubi bwa bango, mpe bakokoka koloba eleko te

    [86] Bazali kornona te, boye ya soló, totiyaki butu mpo bazua bopemi, mpe mokolo тропа kornona. Ya sólo, wana ezali bilembo тропа bandimi

    [87] Mpe mokolo moye kelelo ekobetama (kofula mondule to kelelo ya suka тропа kosekwisa bato), baye banso bazali o likolo mpe na nsé, bakosutuka na kobanga (liwa,) longola sé ba oyo ye moko Allah akobatela. Mpe banso bakoya epai naye na komikitisa nyoso

    [88] Mpe okomona bangomba okanisi ete yango ezali makasi, kasi yango ekomi kotambola lokola londende na likolo, wana ezali mosala ya Allah oyo abongisa lolenge ya biloko binso. Ya sólo, ye azali na sango ya maye bozali kosala

    [89] Oyo akoyaka na bolamu moko, akozalaka na bolamu koleka wana. Mpe mokolo wana bakozala mosika na bobangi

    [90] Mpe oyo akoya na mabe, bakobwakama na moto na bilongi na bango. Boye bokofutama te sé engebene na maye bozalaki kosala

    [91] Ya soló, natindamaki mpo ete Nabondela Nkolo ya mboka oyo (makkah) esanto, mpe biloko binso bizali yaye, mpe lisusu natindamaki ete nazala okati ya baye bazali na komisokia

    [92] Mpe natanga kurani, oyo akomikamba ezali тропа ye moko, mpe oyo akomibungisa, loba: Ya sólo, nazali sé moko kati ya bakebisi

    [93] Mpe loba: Matondo ezali ya Allah, akolakisa bino bilembo bia ye, mpe bokoyeba yango. Mpe Nkolo wayo azangaka koyeba te maye bozali kosala

    Surah 28
    Masese

    [1] Twâ, sín, mîm

    [2] Oyo ezali mikapo ya buku ya polele

    [3] Tozali kobetela yo nsango ya Müssa na falo. Ya soló, тропа bato bandima

    [4] Ya sólo, falo amimonisaki na lolendo kolekisa ndelo na mokili, mpe azalaki kokabola bato naye тропа kolembisa bango, azalaki koboma bana mibali mpe azalaki kotika basi na bango. Ya sólo, azalaki okati ya bato mabe

    [5] Kasi tolingi kosalisa baye bazalaki motawu okati na mabele mpe totiya bango bakambi, mpe totiya bango bakitani

    [6] Mpe tobakisela bango bokasi o kati na mabele, mpe tomonisa falo na Hâmân na basoda na bango mibale, kati na bango maye bazalaki kobanga

    [7] Мре toyebisaki na mama ya Mûssa ete: Melisa ye, mpe soki okobanga тропа ye, bwaka ye na mayi, kasi koyimayima te mpe kolenga te, ya soló, tokozongisa ye epai nayo. Mpe tokotia ye azala okati ya batindami

    [8] Mpe bato ya falo bayambaki ye, mpo ete azala monguna na bango mpe oyo akomemela bango mpasi. Ya sólo, falo na Hâmân na mapinga na bango bazalaki bato mabe

    [9] Mpe mwasi ya falo alobaki ete: (na mobali naye) oyo azali esengo ya liso na ngai mpe esengo ya liso nayo. Boboma ye te, akoki kosalisa biso ndele to mpe tokokomisa ye mwana na biso, mpe bazalaki koyeba te

    [10] Mpe motema ya mama ya Mûssa ekitaki, na ntina ete ekokaki kobimisa nyoso oyo ezalaki na kati, soki biso te nde motema naye molendaki te, mpe mbele azangaki kozala na kondima

    [11] Alobi na ndeko waye ya mwasi: Landa ye, azali kornona ye na mosika, kasi bango bayebi ye te

    [12] Mpe topekisaki ye mabele ya bato mosusu, mpe ndeko naye ya mwasi alobaki na bango ete: Bolingi nalakisa bino libota moko ekobokolo ye malamu тропа bino? Bakozala naye malamu penza

    [13] Mpe tozongisaki ye epai ya mama wa ye, mpo asepela mpe amiyoka mpasi te, тре mpo ayeba ete elaka ya Allah ezalaka sôló. Kasi ebele na bango bazali koyeba te

    [14] Мре tango akolaki тре akomaki mayele, topesaki ye bwana тре boyebi. Мре lolenge wana nde tofutaka babongisi

    [15] Мре akotaki na mboka па tango oyo bato bazali na bokebi te, mpe akuti mibali mibale bazali kobunda, mobali moko azalaki moto ya libota naye, mosusu monguna naye. Mobali oyo azalaki ekolo moko naye asengi lisungi, mpe Mûssa abeti monguna akwei mpe akufi, alobi: Oyo ezali moko ya misala ya satana. Mpo ya sólo, ye azali monguna mpe mobungisi polele

    [16] Alobi: Nkolo, namisali mabe ngai moko, limbisa ngai, mpe alimbisi ye. Ya sólo, ye nde molimbisi atonda ngolu

    [17] Alobi: Nkolo! Na bolamu oyo opesaki ngai, nakosunga batomboki ata mokolo moko te

    [18] Мре sima ya mikolo mike mileki, Mûssa akotaki na mboka na kobanga mpe kotala epai na epai, kasi na mbalakaka akutani na mobali oyo asengaki ye lisalisi lobi azali kobelela ye lisusu ete asalisa ye, Mûssa alobi naye: Ya soló, ozali motumoli ya polele

    [19] Tango alingi kozua ye na makasi alobi: Oh Mûssa! Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto lobi loleki? Olingi komitiya moto ya makasi awa na mokili, mpe olingi kozala o kati ya basali bolamu te

    [20] Mpe mobali moko awuti na suka ya mboka azali kokima alobi: Eh Mûssa! Ya sólo, bankumu bazali kosala likita mpo baboma yo, bima (na mboka oyo), ya soló nazali kopesa yo toli

    [21] Abimaki wana na bobangi azali kotala bipai na bipai alobi: Nkolo longisa ngai na mabe ya babubi oyo

    [22] Mpe tango azali kokende o ngambu ya mad’yan alobi: Nazali kolikia na Nkolo wa ngai akamba ngai o nzela ya semba

    [23] Mpe tango akomaki na liziba ya mayi ya mad’yan, akuti bato batondi bazali komelisa (banyama na bango) mpe akuti basi mibale lokola bamivandisi pembeni, alobi (na bango): Bolingi nini? Balobi: Tokomelisa banyama te kino bango basilisa komelisa, mpe tata na biso akomi mokolo makasi

    [24] Ameliselaki bango (bibwele), sima akei kofanda na nsé ya elili mpe alobaki ete: Nkolo! Oyo okokitisela ngai nazali mpenza na mposa na yango

    [25] Moko kati na bango ayei (epai ya Mûssa), azali kotambola malembe na nsoni alobi: Ya soló, tata na biso azali kobenga yo, mpo afuta yo ndenge omeliseli biso banyama. Mpe tango akomaki liboso lia ye, ayebisi ye lisolo lia ye, alobi: Kobanga te, osili kolongisama epai ya babubi

    [26] Moko na bango alobaki ete: Oh tata wa ngai! Zúa ye (na mosala), mpo ete moto malamu ya mosala ezali moto ya makasi mpe ya bosembo

    [27] Alobi: Nalingi obala moko kati ya bana basi na ngai mibale oyo, na mobeko ete: Osalela nga mibu mwambe, soki mpe okokisi (mibu) zomi, sé yo moko, mpe nakopesa yo pasi te. Na bolingi bwa Allah okokuta ngai o kati ya bato ya malamu

    [28] (Mûssa) alobi: Tosili koyokana ngai nayo, oyo na коропа kati ya makambo mibale oyo, nakozala na lisumu te. Mpe Allah nde azali mobateli na oyo tozali koloba

    [29] Mpe tango Mûssa akokisi elako ya boyokani, akei na libota lia ye o ngambu ya ngomba ya turi, amoni moto mpe alobi na libota lia ye: Bozela ngai awa, namoni moto, tango mosusu nakoyela bino sango, to nkoni ya moto mpo bokoka koyotola yango

    [30] Mpe tango akomaki, abengamaki na ngambu ya mobali na nsé ya lubuaku o esika ya mapamboli na kati ya nzete, Eh Mûssa! Ya soló ngai Allah Nkolo ya mokili

    [31] Mpe bwaka lingenda lia yo, mpe tango amoni yango ebongwani ekomi koningana lokola nyoka, apesi mokongo alingi kotala sima te, eh Mûssa! Pusana kaši kobanga te. Ya sólo, ozali kati ya babatelami

    [32] Kotisa loboko nayo na libenga lia yo, ekobima mpembe ekosala mpasi te, mpe kanga loboko nayo makasi na nzoto mpo obanga te, wana ezali bilembo mibale kowuta epai ya Nkolo wa yo тропа falo na bankumu naye. Ya sólo, bazalaki bato mabe

    [33] (Mûssa) alobi: Nkolo ya soló, nabomaki moto epai na bango, nazali kobanga noki bakoboma ngai

    [34] Mpe ndeko wa ngai Hâruna azali koloba malamu koleka ngai, tinda ye elongo na ngai, azala (molobeli wa ngai) mpo bandimela ngai. Nazali kobanga bazwa ngai moto ya lokuta

    [35] (Allah) alobi: Tokopesa yo ndeko nayo тропа kosalisa yo mpe topesa bino bokonzi mpo ete: Bakoka bino te na bikamwiseli na biso. Bino mibale na baye balandi bino bokolonga

    [36] Mpe tango Mûssa ayeli bango bilembo bia biso, balobi: Oyó nini ezali sé bonganga oyo basali, totikala koyoka mpe kornona yango te epai ya bankoko na biso ya kala

    [37] Mpe Mûssa alobi ete: Nkolo na ngai ayebi malamu nani ayei na bosembo kowuta epai naye, mpe nani akozala na ndako ya suka. Ya sólo, babubi bakolonga te

    [38] Mpe falo alobi: Oh bino bankumu! Nayebi bino bozali na nzambe mosusu te sé ngai; Hâmân, pelisela ngai moto mpe tumba mabele mpo otongela ngai ndako ya molai, mpo namata epai ya nzambe ya Mûssa. Mpo ya soló, nazali kokanisa ete azali kati ya babuki lokuta

    [39] Asali lolendo na mokili, ye na basoda naye ete oyo ezali bosóló te, bakanisaki ete bakozongisama epai na biso te

    [40] Tozuaki ye na basoda naye, mpe tobwakaki bango na mayi, tala lolenge esukelaki babubi

    [41] Totiyaki bango bazala bakambi ya kobenga bato na lifelo, mpe o mokolo ya suka bakosungama te

    [42] Mpe tolandisaki bango botutu na mokili moye, mpe o mokolo ya suka bakozalaka o kati ya bazikisami

    [43] Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku, o sima ya tango oyo tosilaki koboma bato ya liboso baye baleka, mpo ezala elembetele epai na bato, mpe ezala bokambi mpe ngolu тропа bato mpo ete bakanisa

    [44] Ozalaki te o ngambu ya moniele tango tokitisaki mibeko epai na Mûssa, mpe ozalaki te mokolo yango okati ya banzeneneke

    [45] Kasi biso nde tobimisaki bato ebele baleka na bomoyi milayi mpe ofandaki te o mboka mad’yan ozali kotangela bango mikapo mia biso, kasi biso nde totindaka batindami

    [46] Мре ozalaki te o ngambu ya ngomba ya turí tango tobengaki, ezalaki sé ngolu kowuta epai ya Nkolo wayo, mpo okebisa baye mokebisi moko te ayelaki bango liboso nayo mpo bakanisa

    [47] Mpe soki mabe maye bango moko bamilukeli ekomeli bango, balobi: Nkolo wa biso тропа nini otindelaki biso motindami te? Tolingaki kolanda mikapo mia yo mpe tolingaki kozala o kati ya bandimi

    [48] Mpe tango bosôló ekomelaki bango kowuta epai na biso, balobi: Soki epesamaka lolenge moko bapesa na Mússa, boye bapengwaki te na maye Mússa ayelaki bango liboso? Balobaki ete: Wana banganga mibale bazali kosalisana, mpe balobi: Ya sôló, topengwi na nyoso

    [49] Loba (na bango): Boya na buku kowuta epai ya Allah oyo eleki yango mibale, mpe na landa yango soki bozali na bosôló

    [50] Mpe soki bayanoli yo te, kaši yeba ete bazali kolanda sé bamposa ba bango, mpe nani azali na libunga koleka moto oyo azali kolanda mposa naye kotika bokambi ya Allah? Ya soló, Allah akambaka babubi te

    [51] Мре tosilaki kotiyela bango liloba (kurani) mpo bakoka kokanisa

    [52] Baye topesaki bango buku liboso na yango, bandimi na yango

    [53] Mpe soki batangeli bango yango balobi: Tondimi na yango ya sólo, ezali bosembo oyo ewuti epai ya Nkolo wa biso, tosila kokoma bamizilima yambo ete ekomela biso

    [54] Bango nde bakozuaka lifuta lia bango mbala mibale тропа maye bakangaki motema na yango, mpe mpo bayanolaki malamu na esika ya mabe, mpe bazalaki kobimisa ndambo ya maye topesaki bango

    [55] Mpe soki bayoki (maloba) mazanga ntina bapesi yango mokongo mpe balobi ete: Biso na misala mia biso mpe bino na misala mia bino, kimia ezali likolo na bino, biso tozali koluka bayinga te. (baye bazanga boyebi)

    [56] Ya sólo, yo (Muhammad) okoki kokamba oyo olingi te, kasi Allah nde akambaka oyo alingi. Mpe azali moyebi wa bakambami koleka

    [57] Мре balobi ete: Soki tolandi yo na bokambi bakobotolo biso mabele na biso. Boye tofandisaki bango te na mabele esantu mpe ya kimia! Eye ezalaki kobimisela bango bambuma ya ndenge na ndenge тропа kólia? Kasi ebele na bango bazali koyeba te

    [58] Мре boni tobomaki kati ya bamboka oyo ebubaki (kasi bazalaki na bomoyi ya malamu)? Mpe sima na bisika na bango batikalaki bato токе, mpe biso nde tokitanisaki yango

    [59] Mpe kasi Nkolo wayo abomaka mboka te kino atindela bango (bato ya mboka wana) motindami mpo atangela bango mikapo mia biso, mpe tobomaka mboka te sé bato na yango bazala babubi

    [60] Nyoso oyo bopesamaki ezali тропа komisepelisa na bomoyi ya mokili na bisengo bia yango. Mpe oyo ezali epai ya Allah nde eleki malamu, mpe ekotikala seko. Boye bozali koyeba te

    [61] Moto oyo topesi ye elaka ya malamu, mpe akomona yango ekokisami, boye akokani na oyo topesi ye bisengo ya mokili mpe o mokolo ya lisekwa akofanda liboso na biso тропа kosamba

    [62] Мре mokolo akobenga bango, тропа kotuna bango ete: Wapi bambanda na ngai baye bozalaki kotutela ntolo

    [63] Baye likambo likokwela bango bakoloba ete: Nkolo! Ba oyo nde baye tokosaki lokola tomikosaki biso moko, tobengaki mpe bayanolaki biso, yango towangani bango liboso nayo ete bazalaki kobondela biso te

    [64] Мре bakolobaka na bango ete: Bobenga basangisi na bino, kasi bakoyanola bango te, mpe tango bakomona etumbu, bakolikia ete soki balandaka bokambi

    [65] Mpe mokolo akobenga bango, тропа kotuna bango ete: Nini boyanolaki batindami

    [66] Mokolo wana, (makambo) na bango nyoso makokomaka molili, mpe bakomitunaka lisusu mituna te

    [67] Kasi oyo akotubela, andimi mpe asali bolamu, alikia ete akozalaka o kati ya balongi

    [68] Mpe Nkolo wayo akelaka oyo alingi mpe aponaka oyo alingi, ezali te ete: Bango bapona nkembo na Allah wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango (ye na bikeko na banzambe misusu)

    [69] Мре Nkolo wa yo ayebi maye mitema mia bango mibombi, mpe maye bazali kobimisa

    [70] Ye nde Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye mei, azali na lokumu awa na mokili mpe na mokolo ya suka, mpe bokonzi bonso (ya makambo) bozali bwa ye, mpe epai naye nde bokozongisama

    [71] Loba: Bomoni ndenge nini soki Allah atiyelaki bino butu ezala bongo kino o mokolo mwa suka? Nzambe nini na esika ya Allah akotiyela bino bongengi? Boye bozali koyoka te

    [72] Loba: Bomoni ndenge nini, soki Allah atiyelaki bino mokolo ezala bongo kino o mokolo ya suka? Nzambe nini na esika ya Allah akotiyela bino butu mpo bopema na yango? Boye bozali kornona te

    [73] Mpe na mawa naye, asaleli bino butu na mokolo mpo bopemaka kati na yango, mpe mpo bolukaka bolamu naye, mpo bokoka kotondo

    [74] Mpe mokolo akobenga bango, akolobaka: Wapi baye bozalaki kokanisa bango ete bazali basangani ba ngai

    [75] Mpona yango nde tobimisaki nzeneneke na umma nyoso mpe tolobaki: Bopesa elembetele na bino, mpe bayebaki ya soló ete: Bosôló bozali bwa Allah, mpe oyo basalaki bawangani bango

    [76] Ya soló Qârûn azalaki kati ya bato ya Mûssa, kasi atombokaki likolo na bango na lolendo, mpe topesaki ye bozui oyo fungóla nayango esengaki bato ya makasi mpona kotombola yango. Tango bayebisi ye na bato naye ete: Kosepela mingi te, mpo ya sólo Allah alingaka basepeli ya bolekisi ndelo te

    [77] Mpe oyo Allah apeși yo, luka nayango evandeli (ya malamu) o mokolo ya suka, kasi kobosana ya mokili te, mpe bongisa lolenge Allah abongisela yo, mpe kobebisa okati ya mokili te. Ya sólo, Allah alingaka babebisi te

    [78] Alobi: Ya sólo, nazuaki yango na boyebi oyo nazali na yango. Boye ayebi te ete: Allah abomaka bato ya yambo baye bazalaki na bokasi koleka ye na bozwi ebele? Mpe batomboki bakotunama te mpona masumu na bango

    [79] Мре abimaki na bonzenga nyoso epai ya bato naye, baye balingaki mokili balobi: Soki tozalaka ata (na bozui ya malamu lokola) Qärün, ya soló, azali na libaku ya kitoko

    [80] Kasi baye bapesamaki boyebi balobi: Mpasi na bino, lifuta lia Allah lizali тропа mondimi mpe oyo asali malamu, mpe bakozuaka yango te sé baye bazalaki kokanga mitema

    [81] Mpe tobomaki ye, mpe mabele emelaki ye na ndako naye. Mpe bato ya kosalisa ye bamonanaki te na botiki Allah mpe akokaki komisalisa te

    [82] Mpe baye bazalaki kolikya na esika naye batelemi mpe balobi: Eh!, Ya solo, Allah apesaka bozui na mowumbu naye oyo alingi mpe akitisaka. Soki Allah alingaki biso te, mbele alingaki mpe koboma biso. Eh! Ya sólo, ye akolongisaka bapengwi te

    [83] Ndako wana ya mokolo ya suka, tolengeli yango тропа baye balingi komilakisa te awa na mokili, mpe bazali kosala mbeba te. Mpe suka ya solo, ezali nde ya babangi

    [84] Oyo akoya na bolamu moko, akozua lifuta koleka yango, mpe oyo akoya na mabe moko, bakofutama te sé na ndenge basalaki

    [85] Ya soló oyo atiyelaki yo kurani ezala lotomo, akomemaka yo na esika oyo olingi kokende. Loba: Nkolo wa ngai ayebi malamu koleka, oyo aye na bokambi mpe oyo azali na libunga ya polele

    [86] Mpe ozalaki kolikia te ete: Bakotangisa yo buku, ezalaki ngolu kowuta na Nkolo wayo, kasi kosalisaka bapengwi te

    [87] Na yango, kobundisaka mikapo mia Allah te sima ya kokitisa yango epai nayo. Benga (bato) baya epai ya Nkolo wayo, тре kozala o kati ya basangisi te

    [88] Mpe kokumisa nzambe mosusu te elongo na Allah, Nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ye. Biloko binso bikokufaka, longola sé elongi naye. Mpe kokata ya likambo ezali bwa ye, mpe epai naye nde bokozongisama

    Surah 29
    Liyenge

    [1] Alif, lâm, mîm

    [2] Bato bakanisi ete bakotika bango baloba ete tondimi, mpe bamekama te

    [3] Ya soló, tosilaki komeka baye baleka liboso na bango, ya sólo, Allah akoyebaka baye balobaka bosôló mpe baye bakosaka

    [4] To mpe baye bazali kosala mabe bazali kokanisa ete bakokima biso?, oyo lolenge mabe yakokata likambo

    [5] Oyo azali kolikia kokutana na Allah, ya solo elaka ya Allah ekoyaka. Mpe azali moyoki atonda boyebi

    [6] Mpe oyo akobunda, ya solo azali kobunda тропа ye moko. Ya solo molongo mobimba ezali тропа Allah

    [7] Mpe baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, tokolongola masumu na bango, mpe tokofuta bango malamu тропа maye basalaki

    [8] Мре toyebisaki na moto ete: S alela tata na mama nayo bolamu, mpe soki batindi yo na makasi mpo osangisa ngai na maye oyebi te, kotosa bango te. Epai na ngai nde bokozongaka, mpe nakoyebisaka bino maye bozalaki kosala

    [9] Mpe baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, tokokotisa bango ya soló elongo ya basali bolamu

    [10] Mpe bato mosusu bazali koloba ete; tondimi na Allah, mpe tango bakozua pasi тропа Allah, batia momekana ya bato lokola etumbu ya Allah. Mpe soki lisungi lia Nkolo wayo liyei, balobi: Tozalaki elongo na bino, boye ezali te Allah nde moyebi ya maye mabombami kati ya bantolo ya moto nyoso

    [11] Allah ayebi mpenza na bosóló bandimi mpe bato ya bilongi mibale

    [12] Bapengwi bazali koloba na bandimi ete: Bolanda nzela na biso, tondimi kozua mokumba ya masumu na bino kasi bakomema yango te. Ya sólo bazali bato ya lokuta

    [13] Ya sôló penza, bakomema mikumba mia bango, mpe mikumba misusu. Mpe bakotunama na mokolo ya suka тропа maye bazalaki kosala. (тропа mabe na bango na kobuka lokuta)

    [14] Mpe ya soló, totindaki Núh epai na bato naye, mpe avandaki okati na bango mbula nkoto moko, longola mibu ntuku mitano. Mpe mpela ya makasi ebomaki bango mpo ete bazalaki babubi

    [15] Mpe tobikisaki ye na baye bazalaki elongo naye na masuwa, mpe totiyaki yango ezala elembo тропа molongo mobimba

    [16] Mpe tango Ibrâhîm alobaki na bato naye: Bobondela Allah mpe bobanga ye. Wana ezali malamu тропа bino, soki sólo bozali koyeba

    [17] Bozali kobondela nde bikeko na botiki Allah mpe bozali kobuka lokuta, ya sólo baye bozali kobondela na botiki Allah bazali na bozui te ya kopesa bino, boluka nde bozui epai ya Allah mpe bobondela ye mpe botondo ye, epai naye nde bokozongisama

    [18] Мре soki boboyi, kaši mabota maye maleka liboso na bino basilaki mpe koboya. Na yango, motindami azali na eloko ya kosala te sé akomisa sango ya polele

    [19] Boye ozali kornona te lolenge Allah azali kobanda bokeli, sima azongisi yango? Ya soló, wana ezali pete тропа Allah

    [20] Loba: Botambola na mokili mpe bótala ndenge nini abandaki kokela, na sima Allah nde akozongisa bikelamu na mokolo ya suka. Ya solo, Allah azali na bokoki likolo ya biloko binso

    [21] Apesaka etumbu na oyo alingi, mpe ayokelaka mawa na oyo alingi. Mpe epai naye nde bokozongisama

    [22] Mpe bozali na makoki ya kotelemela ye te, ezala na mabele to na likolo. Mpe bozali na mokonzi mosusu te, mpe mosungi te bobele Allah

    [23] Mpe baye baboyi kondima na mikapo mia Allah mpe bazangi kolikia kokutana naye, bango wana bazangi ngolu na ngai, mpe bakozala na etumbu ya makasi

    [24] Bato naye bayanolaki ete: Boboma ye, to botumba ye mpe Allah abikisaki ye na moto, ya soló, wana ezali elembo тропа bandimi

    [25] Mpe (Ibrâhîm) alobi: Ya solo, bozui na esika Allah bikeko, mpe bolingi bango, na bolingo na bomoyi ya nsé, sima na mokolo ya suka, bokoboyana bino na bino, mpe basusu bakopesaka botutu na basusu, mpe esika na bino ekozalaka nde moto, mpe bokozuaka mosalisi te

    [26] Mpe Loth andimelaki ye, mpe (Ibrâhîm) alobi: Ya sólo, nakei epai ya Nkolo na ngai. Ya soló ye azali na bokasi atonda bwanya

    [27] Mpe topesaki ye Is’háq na Ya’qúb, mpe totiaki na libota naye bokitani ya bantoma mpe likabo ya kozua buku, mpe topesaki ye lifuta ya nsé. Mpe mokolo ya suka akozala na molongo ya bato malamu

    [28] Mpe tango Loth alobaki na bato naye: Ya sólo, bino bozali koya na mabe oyo ata moto moko te asalaki yango liboso na mokili

    [29] Ya soló penza, bozali kokutana mibali na mibali тропа kosilisa ba mposa na bino ya nzoto mpe bozali kokanga nzela (ya mabota)? Mpe bozali koya na mabe na esika bovandaka? Kasi eyano ya bato naye ezalaki ete; yela biso etumbu soki ozali moto ya bosembo

    [30] Alobaki ete: Nkolo, longisa ngai likolo ya bato ya mabe

    [31] Mpe tango batindami na biso bayelaki Ibrâhîm sango elamu (sango ya kobotama ya Is’hâq na mwana naye Ya’qüb), balobi: Ya soló, toyei mpo toboma bato ya mboka oyo. Ya soló, bato na yango bazali babubi

    [32] Alobi: Ya sólo Loth azali wana, balobi: Biso toyebi malamu baye bavandi wana, tokobikisa ye na libota naye, longola sé mwasi waye, akozala o kati ya batikali тропа kozua etumbu

    [33] Mpe tango batindami ba biso bakomaki epai na Loth, abangaki mpe ayokaki mpasi na motema тропа bango ete bakotungisama na bato ya mboka, kasi balobaki naye ete; kobanga te, mpe koyoka mpasi te, tokobikisa yo mpe libota nayo. Longola sé mwasi wayo, akozala o kati ya babebisami

    [34] Ya sólo, tozali kokitisela bato ya mboka oyo etumbu kowuta o likolo kolandana masumu na bango

    [35] Mpe totikaki elembo ya polele (ya bokebisi) kati na yango mpo bato bakoka koyeba

    [36] Lolenge moko na mad’yan, ndeko wa bango Shuaîb alobaki: Oh bato ba ngai! Bobondela Allah mpe bolikia na mokolo ya suka, kasi botia mobulu na mokili te

    [37] Bazuaki ye moto ya lokuta, mpe etumbu ya boningani ya mabele ezuaki bango mpe tongo etanelaki bango basili kokufa na bandako na bango

    [38] Mpe lolenge moko tobebisaki bato ya mboka aad mpe thamûd, bozali kornona bango polele na bisika na bango. Mpe satana abongiselaki bango misala mia bango, mpe apekisaki bango nzela ya semba na bango bazalaki kati na koyeba te

    [39] Mpe (lolenge moko) na Qârûn, falo, na Hâmân. Mûssa asilaki koyela bango bilembo, basalaki lolendo na mokili, kasi bakokaki kokima (biso) te

    [40] Mpe topesaki bato na bato etumbu тропа lisumu na bango, basusu totindelaki bango mopepe ya makasi, mpe basusu kati na bango bazuaki bogangi ya makasi (tángbá) lokola nkake ezuaki bango, mpe basusu kati na bango tozindisaki na mabele mpe basusu tozindisaki bango na mayi. Мре Allah asalaki bango mabe te, kasi bango moko nde bamisalaki mabe

    [41] Ndakisa ya baye bazui babateli na botiki Allah, ezali lokola limpulututu oyo atongi ndako ya motawu, nzoka nde ndako oyo ezali motawu koleka, ezali ndako ya limpulututu. Soki solo bazali koyeba

    [42] Ya soló, Allah ayebi manso babondelaka na botiki ye mpe azali wa nguya atonda bwányá

    [43] Wana ezali bandakisa tozali kopesa yango тропа bato, тре baye bakoki koyeba yango sé baye bazali na boyebi

    [44] Allah akela likolo na mabele na bosôló bonso. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bandimi

    [45] Tanga oyo ekitelaki yo kati na buku, mpe telemisa losambo. Ya sólo, losambo epekisaka (moto) kosala mabe, kasi bokundoli bwa Allah nde ezali monene koleka. Mpe Allah ayebi maye bozali kosala

    [46] Mpe bosuanisa te baye bazuaki buku liboso, sé na lolenge ya malamu, longola sé baye kati na bango basali mabe, mpe boloba na bango ete; tondimi na maye ekiteli biso, mpe maye ekitaki epai na bino, тре nzambe na biso na bino azali sé moko oyo biso tomisokie epai naye. (Allah)

    [47] Ndenge wana nde tokitiselaki yo buku. Мре baye topesaki bango buku bazali kondimela yango, mpe kati na yango basusu bazali kondima na yango. Mpe bazali koboya kondimela mikapo mia biso sé bapengwi

    [48] Mpe yambo na yango (kurani), otangaki ata buku moko te, mpe okomaki na loboko nayo ya mobali te, soki te, baye bazali kotia tembe na bosóló, balingaki kotia ntembe

    [49] Kasi ezali na bilembo bia polele bizali okati ya mitema mia baye bapesami boyebi. Mpe baboyaka mikapo mia biso sé babubi

    [50] Mpe balobi: Soki ata bilembo ekitelaka ye kowuta epai ya Nkolo waye, loba: Ya soló bilembo ewutaka epai ya Allah. Мре ya sólo, ngai nazali mokebisi ya polele

    [51] Boye ekoki тропа bango te buku oyo tokitiselaki yo mpo etangamela bango? Ya sólo, wana ezali nde ngolu mpe bokundoli тропа bandimi

    [52] Loba: Allah akoki na bonzeneneke kati kati na ngai na bino, azali moyebi ya manso maye mazali o likolo na mabele, mpe baye bazali kondima na makambo ya mpamba, mpe bazali kopengwa na Allah, bango nde bazangi

    [53] Mpe bazali kotuna yo (óyela) bango etumbu na lombango, soki ezalaki na elaka na yango te oyo esila kotiama, elingaki ekomela bango mbalakaka, mpe bango bakoyebaka te

    [54] Bazali koyebisa yo (óyela) bango etumbu na lombango, kasi ya soló moto mwa lifelo mokozinga bapengwi

    [55] Mokolo oyo etumbu ekozingaka bango o likolo na nsé ya makolo na bango mpe akolobaka na bango: Bomeka oyo bosalaki

    [56] Eh bawumbu na ngai! Baye bandimelaki ngai! Ya sólo mabele na ngai mazali monene, bobondela ngai

    [57] Molimo nyoso mokomekaka liwa, sima bokozongisama epai na biso

    [58] Mpe baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, tokovandisa bango okati ya Iola ya likolo koleka, oyo ezali kolekisa mingala na nsé na yango, bakozalaka seko kati na yango. Oyo nde litomba ya malamu тропа basali

    [59] Baye bakangaki mitema mpe bamipesaki epai ya Nkolo wa bango

    [60] Ata nyama moko te ekoki komileisa yango moko, kino Allah akopesa ye bilei naye na bino (bato) тре lokola. Мре azali moyoki atonda boyebi

    [61] Мре soki otuni bango: Nani akela likolo na mabele, mpe ati moyi na sanza, bakolobaka: Allah. Boye boni lisusu (sima) bazali koboya (kolanda nzela ya semba)

    [62] Allah apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko yango na oyo alingi kati ya bawumbu naye. Ya soló, Allah azali na boyebi ya biloko binso

    [63] Mpe soki otuni bango: Nani akitisaka mayi kowuta na likolo mpo epesa bomoyi na mabele osima ya kokauka na yango? Bakolobaka: Ya sólo, ezali Allah. Loba: Lokumu na Allah, kasi ebele na bango bazali koyeba te

    [64] Mpe ya sólo, bomoyi ya mokili oyo ezali sé liseki mpe lisano, mpe bovandi ya mokolo mwa suka, ezali bomoyi ya soló, soki solo bazali koyeba

    [65] Mpe soki bamati na masuwa, babondeli Allah na bomoko mpe balandi lingomba lia ye, mpe soki abikisi bango akomisi bango na mokili, okomona bakomi kosangisa ye

    [66] Baboya oyo topesaki bango, mpe basepela na mokili, kasi bakoyebaka kala mingi te

    [67] Boye bazali kornona te ete: (Ya sólo) totiaki mboka esantu ezala ndako ya kimia, nzoka nde bato bazali kolongolama zinga zinga na yango? Boye bazali kondima na maye mazanga ntina mpe baboyi bolamu ya Allah

    [68] Mpe nani azali mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta, to aboyi kondima na bosóló ntango eyeli ye? Boye esika ya bapengwi ezali kati na lifelo te

    [69] Mpe baye basalaka makasi тропа biso, ya sólo tokokambaka bango na banzela na biso. Mpe ya sólo, Allah azali elongo na babongisi

    Surah 30
    Baloma

    [1] Alif, lâm, mîm

    [2] Bato ya loma balongaki te

    [3] Mpe sima ya kokweya na bango, bakozala balongi okati ya mboka oyo ezali pembeni na bango

    [4] O kati ya ndambu ya mibu mitindo mizali mia Allah na ebandeli mpe suka, mpe bandimi bakosepelaka mokolo wana

    [5] Na elonga bwa Allah. Alongisaka oyo alingi, mpe azali na nguya atonda ngolu

    [6] Wana nde elaka ya Allah, Allah azangisaka elaka naye te. Kasi ebele ya bato bazali koyeba te

    [7] Bazali sé koyeba bomoyi ya mokili mpe babosani oyo ya mokolo mwa suka

    [8] Bakanisaka тропа bango moko te?! Allah akelaki te likolo na mabele na nyoso oyo ezali kati na yango mibale mpe akokisaki yango sé na bosôló тре тропа mikolo miyebani. Мре ya soló, bato ebele bazali kondima na bokutani na Nkolo wa bango te

    [9] Boye bazali kotambola na mokili te, batala lolenge basalaki na bato ya liboso na bango? Bazalaki na bokasi mingi koleka bango, тре basalelaki mabele mingi na kolona mpe kotonga, batindami na bango bayelaki bango bilembo? Allah abubaki bango te, kasi bango moko nde bamibubaki

    [10] Na yango suka ya mabe ekozongela baye basalaki mabe, na koboya mikapo mia Allah, mpe bazalaki kozua yango na liseki

    [11] Allah nde abandaka bokeli mpe sima azongeli yango, mpe epai naye nde bokozongisama

    [12] Mpe mokolo moye ngonga ekokokaka, batomboki bakozangaka elikia

    [13] Mpe bakozuaka baye bakosalisaka bango te okati ya basangisi ba bango, mpe bakoyebaka banzambe na bango lisusu te

    [14] Mpe mokolo moye ngonga ekokokaka, bakokabwanaka. (bango na bango)

    [15] Kasi тропа baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na bosepeli o kati na lola

    [16] Mpe тропа baye bapengwaki, тре baboyaki kondima na bilembo bia biso mpe kondima na mokolo ya suka bakomemama okati ya etumbu

    [17] Bokumisa Allah tongo mpe pokwa

    [18] Mpe matondo nyoso ya likolo mpe ya nsé ezali ya ye, na nzanga mpe sima ya nzanga

    [19] Azali kobimisa moto ya bomoyi kowuta na liwa, mpe moto ya liwa kowuta na bomoyi, mpe azali kosekwisa mabele sima ya kokufa na yango. Na lolenge wana nde bokosekwaka

    [20] Mpe o kati ya bilembo bia ye, akela bino kowuta na mabele, sima bokomi bato bozali kotambola na mokili

    [21] Mpe kati ya bilembo bia ye, akela basi kowuta na bino moko, mpo ete bovanda na kimia epai na bango, mpe atie kati na bino bolingo na ngolu (mawa). Ya soló wana ezali bilembo mpo bokoka kokanisa

    [22] Mpe kati ya bilembo bia ye, akela likolo na mabele mpe akesenisi bino loposo na balokota wana ezali elembo тропа bayebi

    [23] Mpe kati ya bilembo bia ye, bapongi na bino na butu mpe moyi, mpe koluka bolamu naye. Ya soló, wana ezali bilembo тропа bato oyo bayokaka

    [24] Mpe kati ya bilembo bia ye azali komonisa bino bongengi (bwa nkake) na kobangisa na elikia ya kobetisa mbula kowuta na likolo тропа kopesa bomoyi na mabele sima ya kokufa na yango. Wana ezali bilembo тропа baye bazali kososolo

    [25] Mpe kati ya bilembo naye, likolo na mabele ezali ya kotelema na mobeko mia ye. Sima akobengaka bino mbela moko bokobima kati na mabele

    [26] Maye manso mazali okati na likolo na mabele, mazali ya ye mpe mazali kotosa ye

    [27] Mpe ye nde abandaka kokela mpe akozongisa yango, (ya bokeli sima azongisi yango,) mpe wana ezali pete тропа ye, mpe epai naye ezuami ndakisa ya koleka kuna na likolo mpe na nsé. Mpe azali na bokasi atonda bwanya

    [28] Azali kopesa bino másese na banzoto na bino moko, boye bosangisi bawumbu na bino na maye topesi bino na bozui mpo ete bokokana? Bozali kobanga bango ndenge bomibanganaka bino na bino? Na boye nde tozali kolimbola bilembo bia biso mpo na baye basosolaka

    [29] В abubi balandaki baposa na bango, na bozangi boyebi. Nani akokamba oyo Allah abungisi mpe bakozalaka na mosungi te

    [30] Balóla elongi nayo mobimba тропа lingomba ya bomoko bwa Allah. Yango nde lolenge Allah akelaki bato na yango, mbongwama ezali te kati ya bokeli ya Allah, oyo nde lingomba ya semba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te

    [31] Bozonga epai naye (na botubeli), mpe bobanga ye, mpe botelemisa losambo mpe bozala o kati ya basangisi te

    [32] O kati ya baye bakaboli lingomba lia bango mpe bakomisi yango binzambe nzambe, eteni na eteni ezali kosepela na oyo ya ye

    [33] Mpe tango mabe ekoyelaka bato, babeleli Nkolo wa bango mpe bamizongisi epai naye na botubeli bonso, sima soki amekisi bango ndambu ya ngolu kowuta epai naye, okomona ndambu kati na bango babandi kosangisa Nkolo wa bango

    [34] Bapengwa na maye topesi bango. Mpe bosepela moke, kasi bokoyeba kala mingi te

    [35] To mpe tokitiselaki bango bokonzi (buku) azali kolobela bango тропа maye bazalaki kosangisa ye na yango

    [36] Mpe tango tomekisaka bato ndambu ya mawa (na biso), bazali kosepela na yango. Mpe tango mabe ezui bango na oyo bango moko basali, okomona bango bazangi kolikia

    [37] Boye bazali kornona te ete Allah apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko? Ya soló wana ezali elembo mpo bato bakoka kondima

    [38] Mpe pesa moto ya libota nayo oyo esengeli тропа kopesa ye, mpe mobola, mpe moleki nzela oyo esengeli ya bango, wana ezali malamu тропа baye bazali koluka elongi ya Allah, mpe bango wana nde balongi

    [39] Mpe maye manso bozali kobimisa ewuti na ekotama тропа kokolisa misolo mia bino likolo ya baninga, ekokolisama te epai ya Allah, kasi oyo bobimisi kowuta na zakat, тропа koluka elongi ya Allah, baye wana bakozua (lifuta) na bango ya kobakisama

    [40] Allah nde akeli bino, тре apeși bino bozui, тре akoboma bino, тре sima akosekwisa bino. Na yango, moko kati ya baye bozali kosangisa ye na yango boye akoki kosalela bino eloko moko na oyo Allah asaleli bino? Nkembo naye oyo aleki na likolo na maye manso bazali kosangisa ye na yango

    [41] Mabe esili котопапа polele likolo ya mabele mpe likolo ya mayi (ebale) kowuta na maye bato bazali kosala, na yango, Allah apeși bango ndambu ya etumbu ya maye basali, mpo bakanisa kozonga

    [42] Loba: Botambola na mokili bótala lolenge kani basalaki baye balekaki liboso na bino, kasi ebele na bango bazalaki basangisi

    [43] Tiya elongi nayo na lingomba lia (bosóló mpe lia botosi), yambo ete eya kowuta na Allah mokolo oyo bokokokaka kopuşa yango te, mpe mokolo wana (bato) bakokabwanaka

    [44] Oyo akopengwa, akozua lifuta ya bopengwi naye, mpe oyo akosala bolamu, ezali тропа bolamu ya bango moko ya lobi nde bazali kolengele

    [45] Mpo Allah afuta bandimi baye basalaki misala milamu тропа bolamu bwa ye. Ya soló, ye alingaka bapengwi te

    [46] Mpe o kati ya bilembo bia ye, azali kotinda mopepe lokola sango elamu mpe тропа komekisa bino ngolu naye, mpo ete bwato (masuwa) etambola na mokano naye, mpo ete boluka litomba na bolamu naye, mpo bokoka kotondo ye na yango

    [47] Mpe ya solo, tosilaki kotinda batindami liboso nayo epai ya bato na bango, bayelaki bango bilembo ya polele mpe bikamwiseli, na sima tokangaki baye basalaki mabe mpe ezalaki lotomo epai na biso ete tosunga bandimi

    [48] Allah nde azali kotinda mopepe oyo ezali kotombola londende, mpe apanzaka yango na mapata ndenge alingi, na sima akaboli yango na biteni, na sima okomona mbula ezali kobima nakati na yango mpe soki asopi yango epai ya ba oyo alingi o kati ya bawumbu naye tala ndenge bakomi na esengo

    [49] Nzoka nde bango liboso basilaki kozanga elikia

    [50] Tala bilembo bia ngolu ya Allah ndenge azali kopesa bomoyi na mabele sima ya kokauka na yango. Ya soló, ye nde akopesaka bomoyi na baye bakufa, mpe azali na bokoki na biloko binso

    [51] Mpe soki sima na yango totindi mopepe ya makasi ebebisi milona na bango mpe bamoni yango na langi ya mayi ya mosaka bakomi kozanga botondi

    [52] Ya solo, okoki koyokisa bawei te, mpe okoki koyokisa bakufi matoyi te, soki obengi bango tango bapesaka mokongo

    [53] Mpe ezali yo te nde okoki kokamba baye bakufa miso na bobungi bwa bango, okoyokisa nde baye bandimi na mikapo mia biso mpe bazali komisokia

    [54] Allah nde akeli bino ya kolemba, sima apesi bino makasi, sima ya bokasi apesi bino bolembu na bopaka. Akelaka oyo alingi mpe azali moyebi akoka

    [55] Mpe tango mokolo ya suka ekotelema bato mabe bakolapaka ete bawumelaki na mokili sé ngonga moko ya mpamba, ndenge wana nde bazalaka kokosa

    [56] Mpe baye bapesamaki boyebi na bondimi bakolobaka: Bosilaki kovanda na eleko eye engebene na mokano ya Allah kino o mokolo mwa bosekwisami. Oyo nde mokolo yango, kasi bozalaki koyeba te

    [57] Mokolo mona bolimbisi ekosunga te тропа babubi, mpe bakosenga bango te ete bazonga

    [58] Ya soló, tosili kobetela bato bandakisa ya lolenge nyoso kati na kurani eye. Mpe soki oyeli bango ekamwiseli, baye bapengwa bakomi koloba ete; bozali sé babungisi

    [59] Lolenge wana nde Allah akangaka mitema mia bato oyo bayebi te

    [60] Kanga motema na kozela. Ya solo, elaka ya Nkolo nayo ezali ya sólo mpenza, kasi baye bazangi kondima babungisa yo te

    Surah 31
    Luqman

    [1] Alif, lám, mím

    [2] Oyo bizali mikapo mia buku ya bwanya

    [3] Yango ezali bokambi mpe ngolu тропа babongisi (bato ya malamu)

    [4] B aye bazali kotelemisa losambo тре bazali kobimisa zakat mpe bazali na tembe te тропа mokolo ya suka

    [5] Bango nde bazali na nzela ya semba ya Nkolo wa bango, тре bango nde balongi

    [6] Мре kati ya bato, ezali na ba oyo bazali kosomba maloba mazanga ntina тропа kobungisa bato na nzela ya Allah na kozanga boyebi mpe bazali kotiola yango. Baye wana bakozuaka etumbu ya nsoni

    [7] Mpe tango bazali kotangela ye mikapo mia biso, apesa mokongo na lolendo lokola ayoka naino yango te, mpe lokola ezali na eloko ya kilo kati na matoyi naye. Pesa ye sango ya etumbu ya makasi

    [8] Ya soló, baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, bakozalaka na lola ya kitoko

    [9] Libela kati na yango , elaka ya Allah ezali ya sólo, mpe azali na bokasi atonda bwanya

    [10] Akela likolo ezali na makonzi te bozali kornona yango, mpe apiki bangomba likolo ya mabele ya bokangami mpo ekweyela bino te, mpe ati kati na yango lolenge nyoso ya banyama, mpe tokitisa mayi kowuta likolo, mpe tobimisi na yango milona ya lolenge nyoso

    [11] Oyo nde bokeli bwa Allah, bolakisa ngai oyo ya basusu. Kasi babubi bazali na libunga ya polele

    [12] Mpe tosilaki kopesa Luqmân bwanya ete tondo Allah, botondi. Mpe oyo akotondo botondi, ya soló asali yango тропа ye moko, oyo mpe akozanga botondi, ya sólo Allah atonda bozui asanzolama

    [13] Mpe tango Luqmân alobaki na mwana waye (ya mobali) na bolendisi: Oh mwana wa ngai! Kosangisa Allah te, ya solo kosangisa (Allah) ezali bobubi bonene

    [14] Мре toyebisaki na moto (asalela) tata na mama waye (bolamu), mama naye amema ye na pasi tango molai, bolembu na bolembu kino mibu mibale azali (komelisa ye mabele,) ete otondo ngai mpe otondo baboti nayo, epai na ngai nde bokozonga

    [15] Mpe soki bango nyoso mibale batindi yo mpo osangisa ngai na maye oyebi te, kotosa bango te, kasi zala na bango malamu awa na mokili, mpe landa nzela ya oyo ayei epai na ngai. Mpe bokozongaka epai na ngai, sima nakoyebisa bino maye bozalaki kosala

    [16] Oh mwana wa ngai! Yeba ete eloko soki ezali moke lokola mbuma ya ndunda ebombami na nsé ya libanga to mapata to mpe na nsé ya mabele, Allah akobimisa yango (o mokolo ya suka). Ya soló, Allah azali malamu mpe azali moyebi

    [17] Oh mwana wa ngai! Telemisa losambo mpe tinda (bato) basala bolamu, mpe pekisa mabe, mpe kanga motema na likambo oyo ezui yo. Ya sólo, wana ezali lolenge ya malamu ya kobongisa makambo

    [18] Mpe kobalolaka elongi te na lofundo liboso ya bato mpe kotambola te na mokili osepela nayo moko koleka, mpamba te Allah alingaka bato ya lolendo na lofundo te. (komitombola na lolendo liboso ya bato te)

    [19] Žala na etamboli ya malamu, mpe kitisa mongongo nayo. Mpo mongongo oyo eleki mabe ezali mongongo ya hamir

    [20] Bozali kornona te ete ya sôló, Allah abongiseli bino maye mazali o likolo mpe na nsé, mpe atondiseli bino bolamu bwaye ya polele na ya kobatama? Mpe okati ya bato, ezali na baye bazali kosuanisa тропа Allah, bazali na boyebi te, bakambami te mpe bazali na buku ya bosembo te

    [21] Mpe soki balobi na bango, bolanda maye Allah akitisa, bakozongisa ete: Te, biso tokolanda sé maye bankoko na biso batika. Ata soki satana nde azali kobenga bango na etumbu ya lifelo

    [22] Mpe oyo akomipesa elongi naye mobimba epai na Allah mpe azali mosali malamu, ye wana nde asili kokanga singa ya makasi, mpe epai ya Allah nde suka ya makambo ezali

    [23] Kasi oyo akopengwa, bopengwi bwaye epesa yo mawa te, bozongi na bango ekozalaka nde epai na biso, тре tokoyebisaka bango maye basalaki. Ya soló, Allah azali moyebi ya maye mabombami o mitema mia bango

    [24] Tozali kopesa bango bomoi ya bisengo токе, na sima tokomema bango na makasi na etumbu oyo eleki mpasi

    [25] Mpe soki otuni bango, nani akela likolo na mabele? Bakolobaka: Ya sólo, ezali Allah. Loba: Lokumu na Allah. Kasi ebele na bango bazali koyeba te

    [26] Manso mazali o likolo mpe o nsé mazali ya Allah. Ya soló, Allah atonda bomengo atonda masanzoli

    [27] Mpe soki ezalaki ete banzete nyoso na mokili ebongwana bikomeli mpe ba ebale mbala sambo ekoma mayi ya mokanda, nyoso elingaki kosila тре maloba ya Allah matikali. Ya sólo, Allah azali na nguya atonda bwanya

    [28] Bokelami na bino mpe lisekwa na bino ezali lokola molimo moko mpamba. Ya sólo, Allah azali koyoka mpe azali kornona

    [29] Boye ozali kornona te ete Allah azali kokotisa butu okati ya moyi mpe azali kokotisa moyi o kati ya butu, mpe akeli mwese mpe sanza mizala kotambola moko na moko na nzela na yango? Mpe ya soló, Allah azali na sango ya maye bozali kosala

    [30] Wana ezali ete Allah azali bosembo, mpe ya sólo, maye manso bazali kobondela na botiki ye mazali mpamba, mpe ya solo, Allah azali likolo mpe monene koleka

    [31] Boye ozali kornona te ya solo masuwa maye mazali kotambola na bibale, ezali sé na ngolu ya Allah, mpo amonisa bino bilembo bia ye? Ya soló wana ezali bilembo тропа moto nyonso oyo akangi motema mpe azali kotondo

    [32] Mpe soki mbonge ya makasi ezui bango na ebale, babeleli Allah na bomoko naye nyoso, na sima soki abimisi bango na mokili, basusu kati na bango bazali kopengwa. Kasi ezali bobele bapengwi nde bazali koboya bilembo bia biso

    [33] Oh bino bato! Bobanga Nkolo wa bino mpe bobanga mokolo moye tata akoyanolaka mwana wa ye te, to mwana lokola. Elaka ya Allah ezali solo, bomoyi ya nsé ekosa bino te, mpe (mokosi) satana akosa bino te тропа Allah

    [34] Ya soló, epayi ya Allah nde ngonga ya suka eyebani mpe ye nde azali kokitisa mbula, mpe ayebi maye mabombama o mabumu ya basi mpe moto moko ayebi te soki lobi akozua nini. Mpe moto moko ayebi te soki akokufa na mboka nini, ya sólo Allah azali moyebi mpe atonda basango

    Surah 32
    Kogumbama

    [1] Alif, lâm, mîm

    [2] Bokiti ya buku ezali na tembe te, ewuti epai ya Nkolo wa molongo

    [3] То mpe bakoloba ete ye nde (Muhammad) asali yango na ndenge naye?, kasi yango ezali bosôló kowuta epai ya Nkolo wa yo, mpo ete okebisa na yango bato oyo mokebisi moko te ayela bango liboso nayo, mpo ete bakambama

    [4] Allah nde akela likolo na mabele, mpe maye manso mazali kati na yango mibale na mikolo motoba, sima atombuami likolo ya ngwende. Na botiki ye, bozali na mobateli mpe molobeli te. Boye bozali kokanisa te

    [5] Azali kokamba kowuta na likolo makambo ya likolo na ya nsé, sima makambo yango mazali komata epai naye na mokolo moko oyo ezali lokola mbula nkoto moko epai na bino lolenge botangaka

    [6] Ye nde ayebi mabombami na makambo ya polele, azali na nguya atonda ngolu

    [7] Ye nde abongisa bokelami ya biloko binso, mpe abandaki kokela moto na mabele ya potopoto

    [8] Sima abimisi bakitani naye kowuta na litanga ya mayi ya motawu ya mokongo

    [9] Apesi ye lolenge naye ya kitoko mpe afuli ye kowuta na molimo naye atieli bino boyoki, bomoni mpe mitema. Kasi moke bozali na botondi

    [10] Mpe bazali koloba ete: Soki tosili kolimwa na nsé na mabele, boye tokozonga lisusu bikelamu ya sika? Kasi bazali kopengwa nde na bokutani ya Nkolo na bango

    [11] Loba: Anzelu ya liwa oyo atiyami тропа bino, akoboma bino, sima bokozongisama epai ya Nkolo wa bino

    [12] Mpe soki omoni lolenge batomboki (bakokitisaka) mitu mia bango liboso lia Nkolo wa bango, (na bolobi): Nkolo wa biso; tomonaki mpe toyokaki, zongisa biso (ata токе) mpo tosala bolamu. Ya soló (Sika oyo) nde tozali na tembe te

    [13] Mpe soki tolingaki nde topesaki molimo nyoso bokambami bwaye, kasi ezali тропа liloba esilaki kolobama ete; ya solo, nakotondisa lifelo na bato тре bilima elongo

    [14] Вотека oyo bobosanaki тропа mokolo na bino ya lelo, ya soló biso тре lokola totiki bino, bomeka etumbu ya libela тропа maye bozalaki kosala

    [15] Ya soló, baye bandimaka na mikapo mia biso nde baye bazalaka soki bakundoleli bango yango, bakiti na bogumbami mpe bakumisi lokumu ya Nkolo wa bango, mpe bakosalaka lolendo te

    [16] Bazali kolamuka kowuta na bambeto na bango mpe bakitisi bilongi bia bango тропа kokumisa Nkolo wa bango na bobangi mpe elikia bonso, mpe bazali kobimisa ndambo ya maye topesaki bango

    [17] Ata moto moko te ayebi maye babombeli bango тропа bosepelisi miso, lifuta na maye basalaka

    [18] Boye mondimi na mobebisi bazali ndenge moko? Te. Bakokani te

    [19] Kasi baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, bakozalaka na lola, libela mpe bakofutaka bango тропа maye basalaki

    [20] Kasi тропа baye babebisaki, bakozalaka na moto, mpe tango nyoso bakolingaka kobima, bakozongisaka bango na kati, mpe bakoyebisaka bango ete: Вотека etumbu ya moto moye bozalaki kondima te

    [21] Mpe ya soló, tokomekisa bango etumbu ya moke awa na mokili, yambo ya etumbu ya monene mpo tango mosusu bakozonga. (o nzela ya semba)

    [22] Mpe nani azali mabe penza koleka moto oyo soki mikapo mia Nkolo wa ye mizali kotangema sima apesi yango mokongo? Ya solo, tokozua batomboki (lolenge bazalaki kosala)

    [23] Mpe topesaki Mûssa buku, mpe kozala na tembe te тропа bokutani na ye, mpe totiyaki ye azala mokambi ya bana ya isalayele

    [24] Mpe totiyaki bakambi kati na bango, ete bakamba na mitindo mia biso, mpo ete bakangaki mitema mpe bandimaki na mikapo mia biso

    [25] Ya soló, Nkolo wayo nde akokataka o kati kati na bango o mokolo mwa suka na maye bazalaki na bokabwani

    [26] Boye bamoni te ete tobomaki ebele ya bato baleka liboso bazali kotambola na bandako na bango? Ya soló wana ezali bilembo. Boye тропа nini bayokaka te

    [27] Boye bazali koyeba te, tozali kotindika mayi na mabele oyo ekauka, mpe tobimisi na yango milona miye bazali kolia yango bango moko na bibwele na bango? Boye bazali kornona te

    [28] Mpe bazali koloba: Elonga ekozala tango nini soki bozali na bosölo

    [29] Loba: Mokolo mwa elonga mokosalisaka bapengwi te na bondimi bwa bango, mpe bakotikelaka bango tango te

    [30] Zala na bango mosika, mpe zela, ya sólo bango mpe bazali kozela

    Surah 33
    Basangani

    [1] Oh ntoma! Banga Allah kaši kotosa bapengwi te na bato ya bilongi mibale. Ya sôló, Allah azali moyebi atonda bwanya

    [2] Landa maye makitelaki yo kowuta epai ya Nkolo wa yo. Ya sólo, Allah azali na nsango ya maye bozali kosala

    [3] Mpe mipesa na Allah, Allah akoki тропа kobatela yo

    [4] Allah atiyelaki moto mitema mibale te nakati naye. Mpe alukaki te kokokisa bamama ba bino na basi na bino na nzela ya zwihâr, te mpe bana oyo bozali kobokolo bazali bana na bino te, oyo ezali liloba ezali kobima na minoko na bino, Allah nde azali koloba bosembo mpe azali kokamba na nzela

    [5] Bobenga bango na bankombo ya batata na bango, wana nde ezali bosembo epai ya Allah.Kaši soki boyebi batata na bango te, bozua bango bandeko na bino ya lingomba to mpe baninga na bino. Na yango bozali na lisumu te тропа mabe oyo bosali yango na libaku, kasi bokozala na lisumu na oyo mitema na bino etindi bino kosala. Kasi Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [6] Ntoma azali na lokumu likolo ya bandimi koleka banzoto na bango moko, mpe basi naye bazali bamama na bango, mpe bondeko ya makila ezali makasi koleka bondeko ya lingomba na bapaya тропа bokitani ya mowei engebene na mokanda ya Allah, kasi ezali malamu ete botikela bandeko na bino ya lingomba malako na lolenge ya malamu. Boye nde esilaki kokomama na mokanda

    [7] Mpe tango tozuaki malako na bantoma, nayo mpe lokola, mpe Nûh, mpe Ibrâhîm, na Mûssa, mpe Issa mwana ya Maryam, tozuaki na bango mpenza elako ya makasi

    [8] Mpo ete (Allah) atuna bato ya bosembo тропа bosôló na bango. Mpe alengeli тропа bapagano etumbu ya makasi

    [9] Oh bino bandimi! Bokanisa bolamu ya Allah epai na bino, tango mapinga (ya banguna) bayelaki bino, mpe totindelaki bango mopepe ya makasi mpe mapinga biye bomonaki bango te, mpe Allah azali kornona maye bozali kosala

    [10] Tango bayelaki bino na likolo mpe na nsé, (bipai na bipai) mpe miso na bino mabulunganaki, mpe mitema mikomaki tii na mingongo, mpe bokaniselaki Allah makanisi nyoso

    [11] Kuna bandimi bamekamaki mpenza mpe babangisamaki makasi

    [12] Mpe tango bato ya bilongi mibale na baye mitema mia bango mizali na bokono balobaki ete: Allah na motindami waye balakaki biso te sé lokuta

    [13] Mpe tango bato misusu balobaki ete: Oh bato ya yatsrib! botelema te kasi bozonga nde sima, (epai na bino) mpe basusu kati na bango bakomaki kosenga ntoma balobi ete: Ya soló, bandako na biso bizali polele, nzoka nde ezalaki bongo te kasi balingaki nde kokima

    [14] Мре soki banguna bazuaka nzela ya kokotela bango na ekuke ya mboka mpe baloba na bango ete: Bopengwa sima ya kondima na bino, balingaki basala yango na lombango mpe balingaki bazela ata токе te

    [15] Nzoka nde basilaki kozua elaka na Allah ete bakokima te. Kasi elaka ya Allah ekotunama

    [16] Loba: Kokima ekosalisa bino na eloko te, soki bozali kokima liwa to mpe mpasi ya kobunda, kasi bokosepela na bomoi ya nsé bobele tango ya токе

    [17] Loba: Nani akobatela bino soki Allah alingi mabe ezua bino too soki alingi ngolu naye ezua bino nani akopekisa yango? Mpe bakozua mokonzi mpe mosungi mosusu te na esika ya Allah

    [18] Allah ayebi ba oyo kati na bino bazali koluka mabe, mpe ba oyo bazali koloba na bandeko ba bango ete: Boya epai na biso, nzoka nde bango moko bazali kotelema makasi тропа bitumba sé tango ya токе

    [19] Bazali koboya maye bozali kosala, mpe soki kobanga eyeli bango, okomona bazali kotala yo mpe bakomi kobalusa miso na bango lokola oyo liwa lizingi ye. Mpe soki kobanga esili, bafingi bino na monoko ya makasi oyo bozali koyoka te, lokola balingi kosala bolamu, bango bazali bandimi te, Allah asila kobebisa misala mia bango, mpe wana ezali pete тропа Allah

    [20] Bakanisaki ete makita ya banguna ezongaki naino te, nzoka nde soki bayelaka bango lisusu, balingaki коропа kozala baleki nzela baye bawuti na mboka ya zamba, mpo babanda kotuna basango na bino, ata soki bazalaki na kati na bino, balingaki mpe kobunda makasi te

    [21] Na yango, bozali na ndakisa ya malamu ya kolanda epai ya ntoma, wana ezali тропа baye bazali kolikia na Allah mpe na mokolo ya suka, mpe bazali kokanisa bokumisi Allah mingi

    [22] Mpe tango bandimi bamonaki (banguna na) makita (na bango) balobaki ete: Oyo nde elaka Allah na motindami waye balakaki biso, mpe Allah na motindami waye balobaki bosóló, mpe ebakiselaki bango kondima mpe botosi

    [23] O kati ya bandimi, ezali na mibali ya bosembo, baye bakokisaki elaka na bango epai ya Allah. Basusu kati na bango mokano ya liwa ekomeli bango, basusu bazali kozela mpe oyo ya bango, kasi babongolaki te

    [24] Mpo Allah afuta baye bazali koloba solo na bosôló bwa bango, mpe apesa etumbu na bato ya bilongi mibale soki alingi, to akolimbisa bango. Ya soló Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [25] Mpe Allah azongisaki mabe na bango (bapengwi), mpe bazuaki litomba moko te. Kasi Allah akoki na bandimi na bitumba (mpe asalisaka bango), mpe Allah azali makasi atonda nguya

    [26] Mpe Allah, akitisaki basungi na bango ya bayuda okati na bandako na bango, kasi bazuaki bolamu te kati ya bato babuku mpe akotisaki bobangi ya makasi kati na mitema mia bango, bobomaki basusu kati na bango, mpe basusu bokangaki na boloko

    [27] Mpe akitanisaki bino mabele na bango, bandako na bomengo na bango, mpe mabele mosusu oyo naino bonyati yango te, mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso

    [28] Eh ntoma! Loba na basi nayo: Soki bolingi bomoyi ya mokili na bisengo bia yango, boya napesa bino yango mpe nakabwana na bino na lolenge ya malamu

    [29] Kasi soki bolingi Allah na motindami waye, na efandelo ya mokolo ya suka, ya soló Allah abombeli babongisi kati na bino (basi) lifuta linene

    [30] Eh basi ya ntoma! Oyó kati na bino akoya na mabe oyo ezali polele na bilembo bimonani, tokobakisela ye etumbu mbala mibale. Mpe wana ezali pete тропа Allah

    [31] Mpe oyo akotosa Allah na motindami waye kati na bino, mpe asali bolamu, tokofuta ye mbala mibale, mpe tokobombela ye bozui ya kitoko

    [32] Oh! Bino basi ya ntoma. Bokokani na moko te kati ya basi soki bozali babangi (Allah) mpe soki bozali kosolola, bomimonisa mingi te na maloba kitoko; noki te oyo azali na bokono na motema naye alula bino te, kasi boloba maloba ya malamu mpe ya kitoko

    [33] Bovanda na bandako na bino mpe bomitika nzoto polele te na lolenge ya boyinga ya kala, mpe botelemisa losambo mpe bopesa zakat, mpe botosa Allah na motindami waye. Ya soló Allah alingi kotiya bino mosika na mbindo, Oh bato ya ndako (ya ntoma)! Mpo apetola bino bopetoli bolamu

    [34] Mpe bokanisaka mikapo mia Allah na bwanya miye mizali kotangama na bandako na bino. Ya sólo, Allah azali boboto atonda basango

    [35] Ya sólo, bamizilima ya mibali na ya basi, bandimi ya mibali mpe basi, batosi ya mibali mpe ya basi, mibali ya bosembo mpe ya basi, bakangi mitema ya mibali mpe ya basi, mpe babangi Allah ya mibali mpe ya basi, bapesi mabonza ya mibali mpe ya basi, bakangi ya ngizi ya mibali mpe ya basi, babateli nzoto ya mibali mpe ya basi, bakundoli ya Allah mingi ya mibali mpe ya basi, ya sólo Allah alengeli тропа bango bolimbisi mpe lifuta linene

    [36] Mpe ezali te na mondimi ya mobali na ya mwasi, soki Allah na motindami waye batindi likambo, bapona lisusu (bango moko) lolenge ya kosala yango, oyo akozanga kotosa Allah na motindami waye, asili kobunga libunga ya polele

    [37] Mpe tango ozalaki koloba na moto oyo Allah apesaki ye bolamu, yo mpe lokola osalaki ye bolamu, ozali koloba naye ete: Fanda na mwasi wayo mpe banga Allah, mpe ozalaki kobomba na motema nayo likambo oyo Allah alingaki ete elobama, mpe ozalaki kobanga bato; nzoka nde esengeli nayo kobanga Allah koleka, mpe tango Zaíd asilisaki bamposa naye na (mwasi ona) tobalisaki yo ye, тропа komonisa na bandimi ete: Kobala basi ya bana oyo babokoli ezali mabe te, soki basilisi bamposa na bango, na yango mibeko ya Allah esengeli ekokisama

    [38] Ntoma azali na lisumu moko te тропа mokano oyo Allah atieli ye, wana ezali mobeko ya Allah uta kala na baye baleka liboso, mokano ya Allah esesngeli ekokisama

    [39] Baye bazali kokomisa etinda ya Allah, mpe bazali kobanga ye, kasi bazali kobanga moto moko te bobele Allah (ye mei), Allah nde akoki тропа kofuta

    [40] Muhammad azalaki tata wa moto moko te kati ya mihali na bino, kasi azali nde motindami wa Allah mpe mosukisi wa bantoma, mpe Allah ayebi manso

    [41] Eh bino baye bondima! Bokumisa Allah lokumu ya mingi

    [42] Мре bosanzola ye tongo na pokwa

    [43] Ye nde azali kosambela тропа bino ye na ba anzelu naye mpo ete abimisa bino na molili atia bino na bongengi. Mpe azali na ngolu mpenza тропа bandimi

    [44] Mbote na bango mokolo bakokutana naye ekozalaka nde boboto, mpe abombeli bango lifuta lilamu

    [45] Eh ntoma! Ya soló, totindaki yo mpo ozala nzeneneke mpe mopesi sango malamu mpe mokebisi

    [46] Mpe mobengi (bato) na nzela ya Allah na ndingisa naye moko, mpe ozala lokola mwinda ya bongengi

    [47] Mpe pesa sango elamu epai ya bandimi, ete ya sólo, bakozua ngolu monene ya Allah

    [48] Kaši kotosa bapengwi na bato ya bilongi mibale te, mpe kolanda mabe na bango te, тре mipesa epai na Allah. Allah nde akoki lokola mobateli malamu. (тропа bato banso)

    [49] Eh bino bandimi! Soki bobali bandimi ya basi mpe bokabuani na bango yambo bosangana na bango bozali na mikolo ya kotanga te тропа bango ya kozela, bosalisa bango na bozui mpe bokabwana na bango na ndenge ya malamu

    [50] Oh ntoma! Ya soló topesi yo ndingisa ya basi oyo obali bango na mbongo nayo, na ba oyo ozuaki bango bawumbu na bitumba, tolingiseli yo mpe lokola bana basi ya tata kulutu to tata leki nayo, mpe bana basi ya batata mwasi nayo, mpe bana basi ya noko nayo, mpe bana basi ya bamama leki to mama kulutu nayo, baye bakendeki nayo elongo (na madinah), mpe mondimi ya mwasi oyo akomikaba тропа ntoma, soki ntoma akozala na mposa ya kobala ye, wana endimami тропа ntoma ye moko, kasi epai ya bandimi te. Ya soló, toyebi lotomo nini tosilaki kotiela bango, na ba oyo bazuaki bango na bowumbu, mpo ete bazua yo ntoma na mabe te. Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [51] Okoki kozelisa oyo olingi kati na bango, mpe kovanda na oyo olingi, mpe bamona yango mabe te, soki obengi moko kati na ba oyo otiaki pembeni, wana ezali malamu тропа kosepelisa bango, mpo banyokuama te, mpe basepela na oyo opesi bango banso, kasi Allah ayebi manso maye mazali o mitema mia bino, mpe Allah azali moyebi atondo boboto

    [52] Esengeli nayo te kobala lisusu basi misusu na sima ya ba oyo, to тре kolongola basusu тропа kotia basusu, ata kitoko na bango ezali kokamuisa yo, longola sé bawumbu nayo. Mpe Allah azali mokengeli ya biloko binso

    [53] Eh bino bandimi! Bokota na ndako ya ntoma te sé soki babengi bino тропа kólia, bokota liboso te тропа kozela bilia, kasi soki babengi bino, bokota mbala moko тропа kólia, тре soki bosilisi kólia bopanzana, kasi boluka te kozala bai libota тропа kofandela masolo, pamba te yango ezali konyokola ntoma, mpe azali koyoka nsoni тропа koyebisa bino, kasi Allah ayokaka nsoni na bosembo te, mpe soki bozali kosenga basi naye biloko, esengeli bozala ya kobatama. Wana ezali kopetola mitema mia bino mpe mitema mia bango, bino te nde bosengeli konyokolo motindami wa Allah, mpe elingisami na bino te kobala basi naye sima ya liwa naye. Mpamba te ya soló, yango ezali mabe ya monene epai ya Allah

    [54] Oyo bozali komonisa polele na oyo bozali kobomba yango, ya solo Allah azali moyebi wa biloko binso

    [55] Epekisami na bango te kofanda na batata na bamama na bango, mpe na bana na bango to bandeko na bango, to bana ya bandeko na bango ya basi na ya mibali, to baninga na bango basi, to bawumbu na bango, mpe babanga Allah. Mpamba te, ya sólo Allah azali nzeneneke likolo ya biloko binso

    [56] Ya sólo, Allah na ba anzelu naye basambelaka тропа ntoma Oh! Bino baye bondima, bosambela тропа ye mpe bopesa mbote ya boboto

    [57] Ya soló, baye bazali komonisa Allah na ntoma waye pasi, Allah akopesa bango botutu awa na nsé mpe o mokolo mwa suka, mpe abombeli bango etumbu ya nsoni

    [58] Mpe baye bazali kotungisa bandimi ya mibali mpe ya basi, тропа maye basali te, basili komema lisumu linene

    [59] Eh ntoma! Loba na basi nayo mpe na bana nayo ya basi, na basi ya bandimi ete: Bakitisa mpe balata kitambala na bango ya monene, (banda na motu ekita tii na bantolo na bango), wana ezali mpo ete bayebana mpo batungisama te, ya solo, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [60] Soki bato ya bilongi mibale ya Madinah na baye bazali na bokono kati na mitema mia bango na bato ya mobulu, (ya batomboki) batiki te, tokotinda yo obundisa bango, na sima bakowumela pembeni nayo te sé токе

    [61] Bazali na botutu, bisika binso bakozuama, bakokangama mpe bakobomama na mawa te

    [62] Wana ezali mobeko moye Allah atiya epai ya baye baleka liboso, mpe okokutaka mbonguana na mobeko mwa Allah te

    [63] Bato bazali kotuna yo тропа tango (tango ya bosambisami o mokolo ya suka), loba: Allah nde azali na boyebi na yango, mpe nini ekolakisa yo tango mosusu ngonga ezali pembeni

    [64] Ya soló, Allah asila kopesa botutu na bapengwi, тре abombeli bango etumbu ya lifelo

    [65] Libela kati na yango, bakozuaka mosungi to mosalisi te

    [66] Mokolo bilongi na bango bikobalusama o kati ya lifelo bakoloba ete: Eh mawa na biso! Soki totosaki Allah тре totosaki motindami

    [67] Mpe bakolobaka: Nkolo wa biso ya sólo totosaki nde bakonzi na biso na bamikolo na biso, mpe bango nde babungisi biso nzela

    [68] Nkolo wa biso, pesa bango etumbu mbala mibale, mpe pesa bango botutu ya monene

    [69] Oh bino bandimi! Bozala te lokola ba oyo banyokolaki Mûssa, kasi Allah alongolaki ye na mabe na bango, mpe azalaki na lokumu na miso ya Allah

    [70] Oh bino baye bondima! Bobanga Allah тре boloba liloba ya kitoko lia semba

    [71] Akobongisela bino misala, na bino mpe akolimbisa masumu na bino. Мре oyo akotosa Allah na motindami waye, asili kolonga elonga enene

    [72] Ya soló, topesaki mokumba na likolo mpe na nsé mpe na bangomba, kasi baboyaki komema yango na kobanga, kasi moto amemaki yango. Nzoka nde azalaka na bosembo te, mpe boyebi te

    [73] Mpo Allah apesa etumbu na bato ya bilongi mibale ya mibali mpe ya basi, mpe bapengwi ya mibali mpe ya basi, mpe Allah akondima tubela ya bandimi ya mibali mpe ya basi. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu

    Surah 34
    Saba

    [1] M atondo na Allah oyo maye manso ya likolo mpe ya nsé ezali ya ye, mpe azali na matondo o tango ya suka. Мре azali na bwanya atonda boyebi

    [2] Ayebi maye mazali kokota na mabele na maye mazali kobima o kati na yango, mpe maye mazali kokita kowuta na likolo mpe na maye mazali komata. Azali wa ngolu atonda bolimbisi

    [3] Mpe bapengwi balobi: Ngonga ekoyelaka biso te, loba: Na Nkolo wa ngai, ya soló penza ekoyelaka bino, ye nde moyebi ya oyo ebombami. Eloko nionso ata ya mokie lokola mbuma ya zelo na likolo mpe na mabele, mpe ezali na eloko moko te ya mokie nto mpe ya monene sé kaka ekomama na buku ya polele

    [4] Mpo ete apesa lifuta na baye bandimaki mpe baye basalaki malamu, bango nde bakolimbisama, mpe bakozua bozui bolamu

    [5] Мре тропа baye bazali koluka kobebisa mikapo mia biso, bango nde bakozua etumbu ya makasi

    [6] Nzoka nde baye bazali na boyebi, bazali kornona oyo ekiteli yo kowuta epai na Nkolo nayo ete ezali bosembo mpe ezali kokamba o nzela ya oyo azali na nguya atonda lokumu

    [7] Mpe bapengwi bazali koloba ete: Boye bolingi tolakisa bino moto oyo akoyebisa bino tango bosili kobebisama, ete bozonga lisusu bikelamu ya sika

    [8] Boye azali kobukela Allah lokuta? To azali na ligboma? Kasi baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, bakozalaka o kati ya etumbu mpe libunga ya mosika

    [9] Boye bazali kornona te maye mazali liboso na bango mpe sima na bango? Okati ya likolo na mabele, soki tolingi, tokozindisa bango na mabele. To tokweisela bango ndambu ya mapata, ya soló, wana ezali elembo тропа mowumbu nyoso oyo azali motubeli

    [10] Mpe ya sólo, tosilaki kopesa Dáwud bolamu ete: Eh bangomba na bandeke! Bosanjola elongo naye, mpe tolembiselaki ye ebende

    [11] (Mpe) toyebisaki ye ete: Bosala na yango nguba ya komibatela na tango ya bitumba mpe bosala misala ya malamu. Mpamba te ya soló, nazali kornona maye bozali kosala

    [12] Mpe тропа Suleyman, (totiyelaki ye) mopepe, ezali kotambola na tongo lokola oyo etamboli sanza moko, mpe na pokwa lolenge moko, mpe totioliselaki ye moluka mwa wolo. Mpe bilima bisusu bizalaki kosala na mibeko mia ye na ndingisa ya Allah, mpe oyo akotika kosalela mobeko mwa biso, tokomekisa ye etumbu ya moto ya sairi

    [13] Bazalaki kosalela ye oyo alingaki kosala, tèmpelo bikeko na mbambola lokola sani ya minene, na banzungu ya langi. Oh bato ya Dâwud! Botonda botondi. Kasi токе mpenza kati na bawumbu ba ngai nde bayebi kozongisa matondi

    [14] Mpe tango tozua mokano тропа liwa naye, moko ayebaki yango te, sé bobele banyama ya mabele nde emonisaki bato liwa naye na kolia lingenda naye, mpe tango akweyaki, bilima bakamwaki na koloba ete: Soki bayebaki mabombami nde banyokwamaki te na bowumbu ya mosala naye

    [15] Ya soló, pona saba ezuamaki na nzela ya efandelo na bango, na bilanga mibale, moko na ngambu ya (loboko) ya mobali, mosusu na ngambu ya (loboko) ya mwasi, bolia bozui boye Nkolo wa bino apesi bino, mpe botonda ye botondi. Mboka elamu mpe Nkolo ya bolimbisi

    [16] Kasi baboyaki, mpe totindelaki bango etumbu ya bozindisami bwa mbula (mpela), mpe tobongolaki bilanga bia bango mibale wana bikomaki kobimisa banzete ya bololo, mpe mua banzete ya Sidr

    [17] Wana nde ezalaki lifuta тропа maye bapengwaki na yango, boye tokopesa etumbu epai mosusu bobele na mopagano

    [18] Mpe totiaki kati kati na bango na bamboka oyo topambolaki, bamboka misusu ezali na banzela ya polele ya pene тропа kosala mobembo kati na yango. В osala mobembo butu na moyi na kimia

    [19] Mpe balobaki ete: Nkolo sembola kati kati na biso ezala mosika, kasi bamisalaki mabe bango moko, mpe totia bango bazala masapo, mpe tobebisaki bango mpeza. Wana ezali bilembo тропа moto nyoso azali koyika mpiko mpe azali na botondi

    [20] Mpe ya soló, ibilisu asili kokomisela bango makanisi naye, mpe balandi ye, longola sé eteni шоке kati ya bandimi

    [21] Mpe azalaki na bokonzi likolo na bango te, kasi ezalaki mpo toyeba kati na bango nani andimi mpenza na mokolo ya suka, mpe koyeba nani azali na tembe na yango. Mpe Nkolo nayo nde mobateli ya biloko binso

    [22] Loba: Bobenga baye bozalaki kotutela ntolo na botiki Allah, bazali ata na eloko moke te lokola mbuma ya zelo na nsé mpe, na likolo basanganaki mpe naye te тропа kokela yango mibale, mpe azuaka ata lisungi na bango te

    [23] Mpe akondimelaka moto te sé oyo akopesa ye ndingisa, kino bobangi bokokita kowuta na mitema mia bango mpe bakolobaka: Boye Nkolo wa bino alobi nini? Bakoyanolaka bango ete alobi: Bosôló, mpe ye nde azali monene mpe ľíkolo koleka

    [24] Loba: Nani aleisaka bino ezala na likolo mpe na nsé? Loba: Allah. Ya solo, ezala biso to bino tokoyeba ba nani bazali na nzela ya semba to ya libungi ya polele

    [25] Loba; bokotunama te na mabe oyo tosali, mpe tokotunama te na misala na bino

    [26] Loba: Nkolo wa biso akosangisaka biso mpe sima akosambisa kati kati na biso na bosôló, ye nde mosambisi monene koleka mpe moyebi manso

    [27] Loba: Bolakisa ngai baye bozui bango basangani naye?, te; kasi ye azali Allah oyo azali na nguya atonda bwanya

    [28] Mpe totindaki yo sé тропа bopesi sango ya malamu mpe тропа kokebisa molongo mobimba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te

    [29] Mpe bazali koloba: Elaka yango ekozalaka tango nini soki bozali koloba bosôló

    [30] Loba: Elaka na bino ekozala o mokolo oyo bokokoka kozongisa ngonga na yango sima te, mpe liboso te

    [31] Mpe bapengwi bazali koloba ete: Tokondima na kurani oyo te tokondima mpe te na maye makitaki liboso na yango. Mpe soki omonaki bato mabe tango bakotelema liboso lia Nkolo wa bango, bazali kowelana na maloba, baye bazangaki makasi bakoloba na baye ya lolendo ete: Soki тропа bino te nde tokomaki bandimi

    [32] Bato ya lolendo bakozongisa eyano epai na bango ete: Boye biso nde topekisaki bino bokambami tango esilaki kokomela bino? Te, bino nde bozalaki bato mabe batomboki

    [33] Bato ya motawu baye bazangi makasi bakozongisa liloba na bato ya lolendo ete; ezalaki nde likita na bino ya mabe bozalaki kosala yango butu na moyi, bozali kotinda biso ete topengwa na Allah, mpe totiela ye bambanda. Mpe babandi kolela na bango tango bakomona etumbu, tokotia miniololo na bakingo ya bapengwi, boye bakofutama te sé lolenge basalaki

    [34] Mpe totindaki mokebisi te na mboka sé bato ya bozwi nayango baloba: Tokondimela oyo botindami na yango te

    [35] Mpe bazali koloba ete: Ya solo, tozali na bana mpe na bozui ebele, na yango tokoki kozua etumbu te

    [36] Loba: Ya sólo, Nkolo wa ngai apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko, kasi ebele ya bato bazali koyeba te

    [37] Misolo mia bino na bana na bino ekopusa bino te pene na biso, longola sé oyo akondima mpe asali misala milamu, bango nde bakozuaka lifuta ya kobakisama тропа maye basalaki, mpe bakozalaka na bisika ya likolo mpe lola ya kimiya (nyoso)

    [38] Kasi тропа ba oyo bazali koluka kobebisa mikapo mia biso, bakomemama liboso ya etumbu

    [39] Loba: Ya soló, Nkolo wa ngai apesaka bozui na oyo alingi kati ya bawumbu naye, mpe akutolaka yango. Mpe nyoso oyo bozali kobimisa azali kozongisela bino yango, mpe azali malamu ya bapesi

    [40] Mpe mokolo oyo akosangisa bango banso, sima akolobaka na ba anzelu: Boye bino nde ba oyo bazalaki kobondela

    [41] Bakoloba ete: Lokumu nayo, yo nde mokonzi na biso kasi bango te, nzoka nde bazalaki kobondela nde bilima, mpe ebele bandimelaki bango

    [42] O mokolo yango, bokozala na makoki te ya kosalisana, mpe kominyokola te, mpe tokoloba na bato mabe ete: Вотека etumbu ya moto oyo bozalaki kozua yango lokuta

    [43] Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mia polele, bakoloba ete: Nini oyo moto oyo alingi nde apekisa bino maye batata na bino bazalaki kobondela? Mpe balobi lisusu ete: Oyo ezali sé lokuta oyo ebongisami, mpe bapagano balobi тропа bosembo tango ekomelaki bango ete: Oyo ezali sé bonganga ya polele

    [44] (Mpe) topesaki bango buku moko te mpo batanga yango, mpe totindelaki bango mokebisi moko te liboso nayo

    [45] Ndenge moko mpe na ba oyo bazalaki liboso na bango baboyaki kondimela (Batindami na bango) bakomisaki zomi te na oyo topesaki bango, baboyaki kondimela batindami ba ngai, mpe lolenge kani nasalaki тропа bango

    [46] Loba: Nazali kolendisa bino na eloko moko ete: Mpona Allah, botelema mibale mibale to moko moko, mpe sima bososola. Ndeko na bino azali na bazabulu te, (Muhammad) kasi azali mokebisi mpona bino, mpona etumbu ya makasi

    [47] Loba oyo nazali kosenga bino ezali mpona bino moko, kasi lifuta lia ngai, likofutamaka sé epai ya Allah, тре azali kornona nyoso

    [48] Loba: Ya soló, Nkolo wa ngai atiyaka bosôló (epai ya batindami), ayebi malamu maye mabombami

    [49] Loba: Bosôló bosili koya, mpe lokuta bozala te, mpe ekozonga lisusu te

    [50] Loba: Soki nabungi, namibungisi ngai moko, mpe soki nakambami ezali тропа oyo ekiteli ngai kowuta epai na Nkolo wa ngai. Ya sólo, ye azali moyoki mpe azali pene

    [51] Mpe soki omoni bango tango bakokweya na bobangi, bakokoka kokima te, kasi bakokangama pembeni

    [52] Mpe bakoloba ete: Tondimi naye, kasi ndenge nini bakozela bondimi na mosika

    [53] Basilaki kopengwa na yango banda kala, mpe bazali kolendisa na mosika maye bazali na boyebi te

    [54] Mpe bakopekisama ete: Bazua eloko bazalaki na mposa na yango, lolenge ya boye esilaki mpe kosalama na baninga na bango ya liboso mpo ete balutaki tembe. (Bazalaki na tembe ya mozindo mpe monene)

    Surah 35
    Mobandisi

    [1] Matondo na Allah mokeli wa likolo na nsé, asali ba anzelu bazala batindami mpe apesi bango mapapu mibale, misato, to mpe minei, abakisaka na ekelamu lolenge alingi. Ya soló, Allah azali na makoki likolo ya biloko binso

    [2] Oyo Allah afungoli bato тропа ngolu naye, moto ya kokanga yango azali te, mpe oyo akangi, moto ya kofungola yango sima azali te, mpe azali wa ngolu atonda bwanya

    [3] Oh bino bato! Bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, boye bozali na mokeli mosusu elongo na Allah oyo azali koleisa bino olikolo kino na nsé? Nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te bobele ye, na yango тропа nini bozali kopesa bosembo mokongo

    [4] Mpe soki baboyi kondimela yo, kasi ebele ya batindami baboyamaki kondimela liboso nayo, mpe epai ya Allah makambo manso makozongisama

    [5] Eh bino bato! Ya soló, elaka ya Allah ezali ya lokuta te, bomoyi ya nsé ekosa bino te, mpe (satana) mokosi monene akosa binoтропа Allah te

    [6] Ya sólo, satana azali monguna na bino, bozua ye mpe monguna. Ya sólo, azali kobenga bato naye sé mpo bazala balongani ya moto ya lifelo

    [7] Baye bapengwa bakozala na etumbu ya makasi, kasi baye bandimaki mpe basalaki misala ya malamu, bakozua bolimbisi mpe lifuta linene

    [8] Boye moto oyo babongiseli ye mosala naye ya mabe mpe azali kornona yango malamu? Ya sólo, Allah abungisaka oyo alingi, mpe akambaka oyo alingi, mpe konyokola molimo nayo te тропа bango. Ya sólo Allah ayebi malamu maye bazali kosala

    [9] Allah nde azali kotinda mopepe ezali kotombola londende ya mbula, mpe tonukisi yango na mboka oyo ekufa, mpe tobikisi mabele yango na mayi wana. Lolenge wana nde lisekwa likozalaka

    [10] Oyo azali koluka nguya, ayeba ete nguya nyoso ezali ya Allah. Epai naye nde maloba kitoko ezali komata, mpe azali kotombola mosala ya malamu. Kasi baye bazali kosala likita ya mabe, bakozala na etumbu ya makasi, mpe likita na bango wana ekolonga te

    [11] Mpe Allah nde akeli bino na mabele, sima akeli bino na mayi ya mobali, sima asali bolongani (mwasi na mobali), mwasi moko te akomema zemi to akobota sé ezala na boyebi naye (Allah), mpe mibu mikobakisama te to kokutoama te kino esilaki kokomama na buku. Ya soló, wana ezali pete тропа Allah

    [12] Mpe bibale mibale bikokani te, oyo ezali mpiyo kitoko тропа komela, mpe oyo mosusu ezali mungwa mpe bololo, mpe na nyoso mibale bozali kolia misuni na yango, mpe okati na yango, bozali kobimisa mabanga na biloko ya bonzenga тропа kolata, mpe okomona masuwa ya monene ezali kotambola na mayi na makelele ya makasi, etondi na mikumba, bozali kotambola na yango тропа koluka bolamu ya Allah, mpo ete bozala na botondi na (ye)

    [13] Мре azali kokotisa butu kati na mokolo mpe mokolo okati ya butu mpe akeli sanza na moyi, mpe moko na moko ezali kotambola na nzela na yango na tango na yango. Oyo nde Allah oyo azali Nkolo wa bino. Azali na bokonzi bonso, kasi baye bozali kobelela na esika naye, bazali na eloko moko te ata lokola mposo ya mbuma ya tamru

    [14] Mpe soki bobeleli bango, bakoyoka losambo na bino te, ata soki bayoki, bakokoka koyanola bino te. Mpe o mokolo mwa suka, bakopengwa na bosangisi bwa bino, mpe moko te akopesa yo sango koleka oyo atonda basango

    [15] Eh bino bato! Bozali babola epai ya Allah, mpe Allah nde atonda bomengo mpe akumama

    [16] Soki alingi, akolimwisa bino mpe akoya na bikelamu ya sika, (bato)

    [17] Mpe wana ezali makasi te epai ya Allah

    [18] Mpe moto moko te akomema mokumba ya moninga, mpe soki mokumba ya masumu ya moto eleki ye kilo, akoki kobenga basalisa ye te, ekosalama te ata bato ya libota naye, kasi ozali kokebisa baye bazali kobanga Nkolo wa bango na kobombama, mpe bazali kotelemisa losambo. Mpe oyo akomipetola, ezali sé тропа ye moko, mpe bozongi ezali epai na Allah

    [19] Mpe moto oyo miso ekufi, akokani te na moto oyo azali kornona

    [20] Mpe molili ekokani na mwinda te

    [21] Mpe malili ekokani na molunge te

    [22] Mpe baye ya bomoyi bakokani te na baye bawa. Ya soló, Allah ayokisaka nani alingi, kasi yo (Muhammad), okoki te koyokisa baye bazali na malita

    [23] Kasi, yo ozali sé mokebisi

    [24] Ya solo, totindaki yo na bosembo ete ozala mokebisi mpe mopesi sango ya malamu, mpo umma moko te oyo eleka sé bazua mokebisi

    [25] Mpe soki baboyi kondimela yo, yeba ete baye ya liboso basilaki mpe koboya batindami na bango, bayelaki bango bilembo bia polele, na makomi, na buku ya bongengi

    [26] Na sima, tozuaki ba oyo bapengwi, mpe tala ndenge nini (etumbu) na ngai ezalaki

    [27] Boye omoni te ndenge Allah azali kokitisa mayi kowuta na mapata, mpe tozali kobimisa na yango bambuma ya ndenge na ndenge? Mpe okati na bangomba, banzela ya pembe mpe ya motané, na balangi ndenge na ndenge, mpe na misusu ya miyindo makasi

    [28] Ndenge moko mpe bato na banyama ya mabele na an’ám binso bizali na balangi ya kokesene. Ya soló, baye bazali kobanga Allah kati na bawumbu naye, ezali nde banganga mayele. Ya sólo, Allah azali na nguya atonda bolimbisi

    [29] Ya sólo, baye bazali kotanga buku ya Allah mpe bazali kotelemisa losambo, mpe bazali kobimisa (тропа Allah) bozui oyo topesi bango, bazali kobimisa yango na polele to na kobomba, bazali kolikia na mombongo oyo ebebisamaka te

    [30] Mpo ete (Allah) apesa bango lifuta na bango mpe abakisela bango bolamu naye. Ya sólo, ye azali molimbisi atonda melesi

    [31] Mpe oyo tokitisaki epai nayo kowuta na buku oyo ezali na bosembo, ezali kondima na maye makitaki liboso. Ya sólo, Allah azali kornona bawumbu naye mpe azali na sango na bango

    [32] Na sima tokitanisaki buku epai na ba oyo toponaki okati ya bawumbu na biso, basusu kati na bango bamisalaki mabe, mpe basusu batelemi na bosembo, mpe basusu bawelaka kosala bolamu na ndingisa ya Allah. Wana nde ezali ngrásia ya monene

    [33] Bilanga ya edeni nde bakokota, mpe bakolata ba wolo na mabanga ya talo na maboko mpe bilamba nabango ekozala ya fafala

    [34] Mpe bakoloba ete: Matondo na Allah, oyo alongoli biso mpasi, ya soló, Nkolo wa biso azali molimbisi atonda matondi

    [35] Na ngrásia naye, afandisi biso na bandako ya kimia, oyo bolembu mpe mpasi ekozua biso te

    [36] Kaši ba oyo bapengwa, bakozala na moto ya lifelo, bakokufa na kati te, mpe na kati kuna, etumbu na bango ekokutolama te. Na lolenge wana nde tokofuta mopagano nyoso

    [37] Mpe kuna na kati, bakoganga na kolele ete: Oh Nkolo na biso! Bimisa biso na kati, mpo tosala malamu totikaki kosala, boye topesaki bino bomoyi molai te ete oyo akokanisa, akanisa? Mpe mokebisi ayelaki bino. Na yango bomeka etumbu, kasi bato mabe bakoki kozua lisungi te

    [38] Ya soló, Allah azali moyebi ya mabombami ya likolo na ya nsé. Ya sólo, ayebi maye manso mazali o kati ya mitema

    [39] Ye nde atiaki bino bakitani na nsé. Mpe oyo akopengwa etali sé ye, mpe bapengwi na bopengwi na bango epai na Nkolo na bango ekobakisela bango sé soni, mpe ekobakisela bango sé bozangi

    [40] Loba: Boye bomoni banzambe na bino baye bozali kobondela na botiki Allah? Bolakisa ngai eloko nini bakela awa na nsé. To mpe bazali na mosangani o likolo? To mpe topesaki bango buku eye ezali kokamba bango? Nzoka nde bazali kopesana bango na bango elaka ya lokuta

    [41] Ya sólo, Allah asimbi likolo na mabele ete elimwa te, mpe soki elimwi, moko te sima naye akotombola yango. Ya sólo azali malamu atonda bolimbisi

    [42] Мре bazali kolapa na nkombo ya Allah тропа kondima na bango ete: Soki mokebisi ayeli bango bakokambama malamu koleka mabota manso, тре tango mokebisi ayelaki bango (Muhammad), ebakiselaki bango sé bopengwi

    [43] (Batondaki sé na) lolendo na mokili тре kosala likita ya mabe. Kasi likita ya mabe ezongelaka sé baye basali yango, mpe bakomonaka eloko mosusu te sé lokola eye ezuaki bato ya liboso? Мре okokuta mbongwana na mibeko ya Allah te. Mpe okokuta kotengama te na mibeko ya Allah

    [44] Boye bazali kotambola na mokili te mpo bamona lolenge esukaki na baye bazalaki liboso na bango? Bazalaki makasi koleka, kasi ezali na eloko moko te kati na likolo na mabele oyo ekolembisa Allah. Ya soló, azali moyebi atonda nguya

    [45] Mpe soki Allah azuaka bato na maye bazali kosala, nde ata nyama токе elingaki kotikala te, (likolo ya mabele ezala na bomoyi), kasi azali kozelisa bango kino mokano ekokoka. Mpe tango mokano ekokokisama (ekozuaka bango), ya soló Allah azali kornona malamu bawumbu naye

    Surah 36
    Yasin

    [1] Yâ, Sín

    [2] Na kurani oyo etonda bwanya

    [3] Ya soló, ozali (Muhammad) kati ya batindami

    [4] O kati ya nzela ya semba

    [5] Ekitisamaki kowuta na oyo azali na bokasi atonda ngolu

    [6] Mpo ete okebisa bato oyo bankonko na bango bakebisamaki te, kasi bazalaki kokanisa te

    [7] Liloba lisilaki кокота likolo na bango ya sólo, kasi ebele bazali kondima te

    [8] Ya solo, tokotiela bango basinga na bakingo mpe na minoko na bango, тре bakotambola na yango sé bongo

    [9] Mpe tokangaki liboso na bango mpe sima na bango, mpe tozipaki bango (miso) ete bamona te

    [10] Mpe ezali sé ndenge moko, okebisa bango to okebisa te, bakondima te

    [11] Ya soló, esengeli okebisa sé oyo azali kolanda maloba (kurani), mpe azali kobanga Ar-Rahmán na kobombama, pesa ye sango ya bolimbisami mpe lifuta lilamu

    [12] Ya soló, biso nde tokosekwisaka bawei, mpe tokomeli bango maye basalaki ya malamu to ya mabe, mpe na mikoloto na bango mpe eloko nyoso topesi motango na yango okati ya buku ya polele

    [13] Pesa bango ndakisa ya bato ya mboka tango batindami bayelaki bango

    [14] Tango totindelaki bango batindami mibale, baboyaki kondimela bango, tobakiseli bango ya misato, balobi: Ya sólo, totindami epai na bino

    [15] Bayanolaki: Bozali bato lokola biso, Ar-Rahmán akitisi eloko тропа biso te, bino bozali sé kokosa

    [16] Balobi: Nkolo wa biso ayebi ya sólo ete: Tozali batindami epai na bino

    [17] Mpe tozali sé тропа bokomisi sango bwa polele

    [18] Balobi: Tozali kornona bino na makanisi mabe, soki botiki yango te, tokobwakela bino mabanga, mpe etumbu makasi kowuta epai na biso ekozua bino

    [19] Balobi: Makanisi mabe ezali epai na bino moko, boye nde lolenge bozali kosala soki bopesami makundolami? Kasi bozali bato mabe balekisi ndelo

    [20] Mpe moto moko ayaki na suka ya mboka na lombango (na ebandeli ya mboka) mpe alobi: Oh bato na ngai! Bolanda batindami

    [21] Bolanda baye bakotuna bino lifuta ata moko te, mpe bazali na liloba lia bokambami

    [22] Mpe тропа nini te nabondela ye oyo akeli ngai, mpe epai naye nde bokozongisama

    [23] Boye nazuela ye banzambe basusu? Soki Ar-Rahmân alingeli ngai mabe, kosenga na bango ekosalisa ngai na eloko moko te, mpe bakobikisa ngai te

    [24] Ya soló, nakozala na libungi lia polele

    [25] Ya solo, ngai nandimi na Nkolo wa bino, boyoka ngai

    [26] (Na yango), elobamaki naye: Kota na lola. Alobi: Soki bato na ngai bayebaka

    [27] Mpo ete Nkolo na ngai alimbisi ngai mpe atie ngai o molongo ya bato ya lokumu

    [28] Мре sima naye tokitisaki mapinga ata moko te, mpe tolingaki kokitisa eloko moko te likolo ya bato naye

    [29] Ezalaki sé bogangi moko (mongongo ewutaki na likolo) mpe etumbu ezuaki bango

    [30] Eh mabe ezali likolo ya bawumbu! Motindami atikala koyela bango te sé batióla ye

    [31] Bazali kornona te bato boni toboma liboso na bango, mpe bazongelaki bango te

    [32] Mpe (moto) nyoso, akotelema liboso na biso (тропа kosamba)

    [33] Mpe elembo moko тропа bango ezali ete topesaka bomoyi na mabele maye makawuka, mpe tobimisaki kowuta na yango mbuma iye bazali kólia

    [34] Mpe totiaki okati na yango (mabele) bilanga ya naghil mpe a’náb mpe tobimiselaki yango maziba ya mayi

    [35] Mpo ete balia bambuma na yango, mpe na oyo maboko na bango masali. Boye bakozala na botondi te

    [36] Nkembo naye oyo akeli biloko na balolenge binso biye bibimaka na mabele, mpe na banzoto na bango mpe na maye bayebi te

    [37] Mpe elembo mosusu тропа bango ezali butu, oyo tolandisi yango mokolo, kasi bango bafandi o kati ya molili

    [38] Mpe moyi mozali kotambola na botiami na yango. Wana ezali etiyeli ya oyo azali na bokasi atonda boyebi

    [39] Mpe sanza, totiaki yango na bitape kino ekokonda ekomi lokola lokasa ya mbila ya ко kawuka

    [40] Moyi mokutaka sanza te, mpe butu elekaka mokolo te. Mpe nyoso ezali kotambola na nzela na yango

    [41] Mpe elembo mosusu тропа bango, ezali ete tomemaka bato na bango na masuwa oyo etondaka

    [42] Mpe tosaleli bango mosusu lokola oyo wana bazali komata na kati тропа kotambola

    [43] Мре soki tolingaki nde tozindisaki bango, nde bazuaki mosungi te, mpe balingaki kozua libiki te

    [44] Ezali sé тропа mawa na biso, тре mpo bakoka kosepela na mwa tango токе

    [45] Мре soki bayebisi bango ete, bobanga oyo ezali liboso na bino mpe sima na bino mpo ete bozua ngolu

    [46] Mpe elembo moko te kati ya bilembo ya Nkolo na bango eyelaki bango bobele bapesa yango mokongo

    [47] Mpe soki bayebisi bango ete: Bobimisa na bozui oyo Allah apeși bino тропа kokaba, bapagano bakoloba na bandimi ete: Tokoleisa moto oyo soki Allah alingi akoleisa ye? Bino bozali sé na libunga ya polele

    [48] Mpe bazali koloba: Elaka ekokokaka tango nini soki bozali koloba bosóló

    [49] Bakoyoka sé lolaka moko ekozuaka bango na mbalakaka tango bazali kosuana

    [50] Bakokoka (tango wana) kotikela libota na bango malako te mpe bakokoka lisusu kozongela bango te

    [51] Мре bakofula kelelo, тре okomonaka bango babimi na malita bazali kokima mbangu epai ya Nkolo wa bango

    [52] Bazali koloba: Eh mawa na biso! Nani asekwisi biso na esika oyo tozalaki kolala? Boye oyo nde elaka ya Ar-Rahmán alakaki, mpe batindami balobaki bosóló

    [53] Ekozalaka sé lolaka moko ya (makasi) okomona bango banso bazali liboso lia biso

    [54] Mokolo wana, bakobuba ata molimo moko te, mpe bokofutamaka te sé na maye bozalaki kosala

    [55] Ya soló, mokolo wana bato ya lola bakozalaka na misala ya bokokisi bolamu bwa bango

    [56] Bango na balongani na bango bakozalaka na bisika bia тріо, bavandi likolo lia bakiti

    [57] Bakozalaka na bambuma (ya kolia) mpe bakozuaka nyoso oyo bakosengaka

    [58] (Salam) kimia, liloba likowutaka epai ya Nkolo oyo atonda mawa

    [59] Kasi lelo, tika ete bozala mosika, eh bino bato mabe

    [60] Boye nalakaki bino te eh! Bana ya Adam! Ete bobondela satana te? Ya soló, azali monguna na bino ya polele

    [61] Mpe (nayebisaki bino te ete) bobondela ngai? Oyo nde nzela ya semba

    [62] Mpe (satana) asilaki kobungisa ebele o kati na bino, boye bozali kokanisa te

    [63] Oyo nde lifelo oyo balakaki bino

    [64] Lelo bokozikisama na yango, тропа maye bopengwaki na yango

    [65] Mokolo mona tokokanga minoko mia bango, kasi maboko na bango makolobela biso, mpe makolo na bango makozala nzeneneke ya maye bazalaki kosala

    [66] Mpe soki tolingi, tokolimwisaka miso na bango, mpe bakokimaka na nzela, kasi bakomonaka ndenge nini

    [67] Mpe soki tolingi, tokobalusa bango sé esika moko, bakokoka kokende liboso te, mpe kozonga sima te

    [68] Na oyo tokopesaka ye bomoyi molayi, tokozongisa ye na lolenge ya bokelami naye (motawu na nzoto mpe na bongo naye). Boye bazali koyeba te

    [69] Ezali ntôki ya mpamba mpamba te nde totangisaki ye (Muhammad), mpe esengeli naye te. Kaši ezali nde bokundoli, mpe kotanga kurani oyo ezali polele

    [70] Mpo akebisa oyo akozala na bomoyi, mpe liloba lisila kokokisama тропа bapengwi

    [71] Boye bazali kornona te ete kati ya maye maboko na biso masali, tokeli An‘âm biye bazali kokonza

    [72] Mpe tondimelaki bango bamatelaka misusu mpe misusu baliaka

    [73] Mpe bazali kobimisa kati na yango (biloko) oyo ezali kosalisa bango, mpe misusu ya komela kasi bazali kotondo te

    [74] Mpe bazali kozua banzambe misusu batiki Allah, bazali kokanisa ete bakosalisa bango

    [75] В aye wana bakokokaka kosalisa bango te, kasi bakokoma nde lipinga liye likotelemela bango

    [76] Maloba na bango mapesa yo mpasi te. Ya soló, biso toyebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa

    [77] Boye moto ayebi te ete tokeli ye kowuta na mayi ya mokongo, na sima abaluki akomi monguna ya polele

    [78] Azali kobetela biso ndakisa kasi abosani bokelami bwa ye moko, alobi: Nani akopesa bomoyi na mikuwa sima ya kokoma na yango putulu

    [79] Loba: Oyó akopesa yango bomoyi nde oyo akelaka yango o mbala ya liboso, mpe ayebi malamu bokeli bwaye bonso

    [80] Ye nde azalisaki тропа bino moto kowuta na nzete ya mobesu, yango nde bozali kopelisa

    [81] Boye oyo akeli mapata na mabele akoki te kokela basusu lokola bango? Iyo, ya soló azali mokeli monene koleka bango mpe azali moyebi

    [82] Ya sólo soki alingi (kosala) eloko akolobaka se, zala, mpe ezalisami

    [83] Nkembo na oyo azali na bokonzi bonso, na maboko naye, mpe epai naye nde bokozongisama

    Surah 37
    Baoyo batyami na molongo

    [1] Na (ba anzelu) baye batelemi na milongo

    [2] Mpe na baye bazali kotindika na makasi (mapata)

    [3] Na baye batangaka bokundoli

    [4] Ya soló, Nzambe na bino azali moko

    [5] Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazuami kati na yango mibale mpe Nkolo wa moniele

    [6] Ya sólo, tobongisaki mapata ya nsé na bonzenga ya minzoto

    [7] Mpe ebatelami na mabe ya satana motomboki

    [8] Mpo bakoka koyoka te epai ya ba anzelu ya likolo, kasi bakobwakelamaka mabanga ngambu inso

    [9] Bakobenganama mpe bakozala na etumbu ya libela

    [10] Longola sé oyo akolinga kozua (sango) na lolenge ya moyibi, kasi bakolandisaka kobengana ye na libanga ya moto

    [11] Tuna bango, soki kokela bango ezali makasi koleka manso tokela? Te, ya soló, tokelaki bango na mabele ya potopoto oyo ekangaka

    [12] Kasi soki ozali kokamwa mpe bazali koseka

    [13] Mpe soki bapesami malendisi (kurani), baboyi kokanisa yango. (kotanga yango)

    [14] Mpe soki bamoni elembo, bakomi kosalela yango litio

    [15] Mpe balobi: Oyo ezali bonganga (bondoki) ya polele

    [16] Soki tokufi tokomi mabele, mpe mikuwa, boye tokosekwisama lisusu

    [17] Na bankoko na biso ya kala

    [18] Loba: Iyo, bino mpe lokola bokokitisama

    [19] Mpe ekozalaka sé bolengisi moko ya makasi, mpe bakomi kotala

    [20] Mpe bakomi koloba: Eh mawa na biso! Oyo nde mokolo mwa mbano (ya suka mpe lifuti)

    [21] Oyo nde mokolo mwa bokati makambo moye botiaki tembe тропа yango

    [22] Bosangisa babubi na baninga na bango тре baye banso bazalaki kobondela bango

    [23] Na botiki Allah, mpe bokamba bango na nzela ya lifelo

    [24] Mpe botelemisa bango mpo bakoka kotunama

    [25] Mpona nini bozali komisunga te

    [26] Kasi lelo bakoluka kozala na botosi

    [27] Mpe basusu bakobongola bilongi epai ya baninga mpe bakomi komitunana

    [28] Bakolobaka: Ezali bino nde bobengaki biso na makasi. (na bopengwi)

    [29] (Bakonzi) bakolobaka: Bino moko boboyaki kondima

    [30] Tozalaki na bokoki epai na bino te, bino moko nde bozalaki bato ya mabe

    [31] Liloba lia Nkolo wa biso lizali ya soló. Sólo tokomema. (etumbu)

    [32] Tomemaki bino na libungi, kasi ya soló, tomibungisaki biso moko

    [33] Mokolo mona bakosanganaka (bango) banso na etumbu

    [34] Lolenge wana nde tokosalaka na batomboki

    [35] Ya soló, bazalaki soki bayebisi bango nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé Allah, basali lolendo

    [36] Mpe bazali koloba: Totika banzambe na biso тропа molobi ntôki oyo тре azali moto ya ligboma

    [37] Kasi ayaki na bosóló, batindami balobaki bosembo

    [38] Ya sólo penza, bokomeka etumbu ya makasi

    [39] Mpe bokofutama sé kolandana na maye bozalaki kosala

    [40] Longola sé bawumbu ya Allah ba oyo baponama

    [41] Bango nde bakozalaka na bolamu oyo eyebani

    [42] (Bakoliaka) mbuma mpe bakosepelisaka bango

    [43] Okati na bilanga (lola) bilamu

    [44] Likolo lia bambeto bizali ya kotalana

    [45] Bakolekiselaka bango коро etondi na mayi ya miluka

    [46] Ya pembe elengi тропа komela

    [47] Ekosalaka bango mabe te, mpe ekolangwisaka te

    [48] Bakozala na basi ya kitoko pembeni na bango, basi ya miso minene ya kotalatala pembeni te

    [49] Bazali lokola pembe ya likei oyo ebatelami

    [50] Basusu bakobaluka kot ala baninga na kotunana

    [51] Moko wa bango akolobaka: Ya soló, nazalaki na moninga

    [52] Akoloba ete: Boye ozalaki okati ya bandimi

    [53] Tango tokokufa mpe tokomi mabele na mikuwa, boye tokotunamaka

    [54] Akolobaka: Boye bolingi kotala na likolo

    [55] Mpe akotalaka likolo mpe akomonaka ye na lifelo

    [56] Mpe akoloba: Na nkombo ya Allah, yo nde osali ete ngai nazanga

    [57] Soki ezalaka bolamu bwa Nkolo wa ngai te, mbele nalingaki kozala o kati ya bato ya etumbu

    [58] Ezali solo te ete tokokufa te

    [59] Sé ezala kokufa ya biso ya yambo mpe tokozuaka etumbu te

    [60] Ya soló, oyo nde elonga enene

    [61] Na lolenge ya boye nde esengeli na baye balingi kosala basala

    [62] Boye wana ezali esika ya malamu тропа kofanda to ezali nzete ya zaqqüm? (ezali nzete wana mbuma na yango ezali bololo ezali o kati ya lifelo, yango nde bilei ya bato ya mabe)

    [63] Totiyaki yango ezala komekama тропа babubi

    [64] Ezali nzete eye ebotaka o kati ya lifelo

    [65] Mbuma na yango ezali lokola mitu ya basatana

    [66] Ya soló, esengeli na bango kólia yango тре kotondisa mabumu na bango

    [67] Sima bakomela mayi ya tofina ya moto

    [68] Sima lifelo nde esika ya bozongi na bango ya sólo

    [69] Ya soló, bakutaki batata na bango na libungi

    [70] Mpe balandaki sé nzele na bango

    [71] Мре liboso na bango, ebele ya bankoko na bango basilaki kobunga

    [72] Tosilaki kotindela bango bakebisi

    [73] Tala lolenge ezalaki тропа baye bakebisamaki

    [74] Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama

    [75] Mpe ya soló, Nûh abengaki biso тре toyanolaki ye kitoko

    [76] Mpe tobikisaki ye elongo na libota lia ye na etumbu ya monene

    [77] Mpe totiyaki ete libota lia ye bazala bakitani

    [78] Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu

    [79] Kimia ezala likolo ya Nûh kati na mokili mobimba

    [80] Ya soló, lolenge wana nde tofutaka babongisi

    [81] Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso, baye bandima

    [82] Sima tobomaki basusu

    [83] Mpe ya soló, Ibrâhîm azalaki moko kati na baye balandaki ye na lingomba

    [84] Tango ayaki epai ya Nkolo waye na motema mosantu

    [85] Tango alobaki na tata waye тре bato naye: Bozali kobondela nini

    [86] Na libungi na bino boluki banzambe mosusu botiki Allah

    [87] Bozali kokanisa nini тропа Nkolo wa molongo

    [88] Sima atalaki minzoto na bokebi

    [89] Mpe alobaki ete: Ya soló ngai nazui malali

    [90] Bapesi ye mokongo bakei

    [91] Apusani ngambu ya banzambe na bango alobi: Boliaka te

    [92] Boye bozali koloba te тропа nini

    [93] Akei kobeta bango mbata na loboko ya mobali

    [94] Sima bato bayaki epai naye na lombango

    [95] Ayebisi bango: Boye bozali kobondela bikeko biye bosali bino moko

    [96] Kasi Allah nde akela bino na maye bozali kosala

    [97] Balobaki ete: Botimola libulu ya moto mpe bobwaka ye na kati

    [98] Basalelaki ye likita kasi tokweisaki bango

    [99] Mpe alobaki ete: Ya soló, ngai nakei epai ya Nkolo wa ngai akokamba ngai

    [100] Nkolo, Pesa ngai (mwana) o kati ya bato ya malamu

    [101] Mpe topesaki ye sango elamu ya mwana mobali ya boboto mingi (Ismail)

    [102] Мре tango (Ismail) akolaki (Ibrâhîm) alobi: Eh mwana wa ngai! Namoni na ndoto ete nazali kokata yo kingo, omoni ndenge nini? (Ismâîl) alobi: Eh tata wa ngai wa bolingo! Sala lolenge batindi yo, okokuta ngai na bolingi ya Allah, okati ya bakangi mitema

    [103] Sima ya bango banso mibale kotosa (mibeko mia Allah), alalisi ye mpo ete aboma ye

    [104] Mpe tobelelaki ye ete: Oh Ibrâhîm

    [105] Osili kokokisa (elaka) ya ndoto, lolenge wana nde tofutaka babongisi

    [106] Ya soló, wana ezalaki momekano mwa polele

    [107] Mpe topesaki ye ebwele ya kitoko тропа kosasa

    [108] Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu

    [109] Kimia ezala likolo ya Ibrâhîm

    [110] Lolenge wana nde tofutaka babongisi

    [111] Ya soló, ye azalaki okati ya bawumbu na biso bandimi

    [112] Mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq, ntoma okati ya (bato) malamu

    [113] Mpe topambolaki ye na Is’háq, na libota lia bango mibale oyo ezalaki na (bato ya malamu) mpe oyo akomibuba etali sé ye moko

    [114] Mpe ya sólo, tosilaki kopesa na Mûssa na Hânına bolamu na biso

    [115] Mpe tobikisaki bango mibale elongo na bato na bango na etumbu ya monene

    [116] Mpe tolongisaki bango, mpe bango nde bazalaki balongi

    [117] Mpe topesaki bango buku ya polele

    [118] Mpe tokambaki bango mibale na nzela ya semba

    [119] Mpe nkombo ya bango mibale ezala bokanisi тропа basusu

    [120] Kimia ezala likolo ya Mûssa na Háruna

    [121] Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi

    [122] Ya soló, bango mibale bazalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi

    [123] Мре ya sólo IL’YÁS azalaki moko okati ya batindami

    [124] Tango alobaki na bato naye: Boye bokobanga te

    [125] Boye bozali kokumisa ba’alan (nkombo ya ekeko), mpe botiki mokeli malamu

    [126] Allah nde Nkolo wa bino, mpe Nkolo ya bankoko ya bino ya kala

    [127] Baboyaki kondimela ye, kasi bakomemama o kati ya etumbu

    [128] Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama

    [129] Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu

    [130] Kimia ezala likolo ya Il’yâsîn na balandi ye

    [131] Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi

    [132] Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi

    [133] Mpe ya sólo, Loth azalaki okati ya batindami

    [134] Tango tolongisaki ye na libota lia ye mobimba

    [135] Longola sé mobange ya mwasi azalaki okati ya batikali

    [136] Sima tobebisaki basusu

    [137] Ya soló, bino bozali koleka pembeni na bango na tongo (nzela ya mobembo)

    [138] Mpe kati na butu, boye bozali kokanisa te

    [139] Mpe ya soló, Yûnus azalaki moko o kati ya batindami

    [140] Tango akimaki akei komata na masuwa oyo etondaki mingi, (elingaki kozinda)

    [141] Mpe aponamaki été abwakama

    [142] Mpe mbisi emelaki ye mpo été atikaki bato na ndingisa ya Allah te

    [143] Soki azalaki te moko o kati ya bakumisi Allah

    [144] Mbele alingaki kotikala okati ya libumu lia ye (mbisi) kino o mokolo mwa lisekwa

    [145] Tobimisaki ye na mabele bolumbu mpe na nsoni

    [146] Mpe tobotisaki matiti ya maboke likolo naye. (esika afandaki)

    [147] Mpe na sima totindaki ye epai ya bato nkama nkoto to mpe ebele koleka

    [148] Mpe bandimaki, kasi topesaki bango bosepeli ya mwa ngonga ya moke

    [149] Tuna bango motuna, boye Nkolo wayo azalaka na bana basi mpe bango bazali na bana mibali

    [150] То boye, tokelaki ba anzelu bazala basi mpe bango bazali kornona

    [151] Ya soló, bazali koloba sé na lokuta na bango

    [152] (Bazali koloba) ete: Allah abota, ya solo bazali na lokuta

    [153] Boye akopona bana basi koleka bana mibali

    [154] Mpona nini bozali kokata likambo na lolenge wana

    [155] Boye bozali kokanisa te

    [156] То bozali na bilembetele bisusu bia polele

    [157] Boya na buku na bino, soki bozali koloba bosôló

    [158] Mpe bati bondeko kati naye na bilima, kasi bilima bayebi ete bazali (bapengwi) mpe ete bakomemama (na etumbu)

    [159] Nkembo na Allah wa likolo, mpona maye bazali koloba

    [160] Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama

    [161] Ya soló, bino na baye bozali kobondela

    [162] Bozali na nguya ya kobungisa moto moko te

    [163] Longola sé oyo akozikisama na moto

    [164] Moko te okati na biso, sé azali na esika eyebani

    [165] Mpe ya soló, tozali komitelemisa na milongo

    [166] Mpe ya soló, biso nde tozali kopesa lokumu (ya Allah)

    [167] Ata soki bazalaki koloba

    [168] Soki tokanisaka bato ya kala

    [169] Tolingaki kozala bawumbu ya Allah baye baponama

    [170] Bapengwaki na yango, kasi bakomonaka

    [171] Na yango, tosilaka kopesa liloba lia biso epai ya bawumbu na biso batindami

    [172] Ya sólo, ezali bango nde bakosalisama

    [173] Mpe ya soló, basoda na biso nde bakolonga

    [174] Mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye

    [175] Мре tala bango, mosika te bakomona

    [176] Nini boye bazali kowelisa etumbu na biso

    [177] Tango bakokweyaka na bisika bia bango, tango wana ekozala mabe тропа bango oyo basilaki kokebisama

    [178] Mpe mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye

    [179] Mpe tala, kala mingi te bakomonaka

    [180] Nkembo ya Nkolo wayo, Nkolo ya nguya тропа maye bazali koloba

    [181] Kimia ezala likolo lia batindami

    [182] Mpe lokumu ya Allah, Nkolo wa molongo mobimba

    Surah 38
    Sad

    [1] Swâd, na kurani, eye ezali na bokundoli

    [2] Kasi baye bapengwa bazali sé na ntembe

    [3] Bato boni tobomaki liboso na bango, bagangaki ete: Oh biso! Kasi ezali lisusu tango ya kobika te

    [4] Mpe (bato ya makkah) bakamuaki ete mokebisi kati na bango akomela bango, mpe bapengwi balobaki: Oyó azali nganga mpe moto ya lokuta

    [5] Boye alingi kotia banzambe ete bakoma sé Nzambe moko? Oyó ezali likambo ya kokamwa

    [6] Mpe bankumu na bango bakei mpe balobi: Bökende mpe botikala na banzambe na bino. Ya soló wana nde ezali malamu

    [7] Totikala koyoka yango te na lingomba lia suka ya sólo, eloko oyo basali yango kosala

    [8] Nini? Ezali nde ye oyo bakitiseli ye bokundoli kati kati na biso? Bazali na tembe тропа bokundoli bwa ngai, kala te, bakomekaka etumbu na ngai

    [9] То, boye basimbi sanduku ya ngolu ya Nkolo wayo wa bokasi mopesi manso

    [10] То boye bango basimbi bokonzi ya likolo na ya nsé, mpe maye manso mazali o kati na yango mibale? Bamata na eloko nyoso oyo ekosalisa bango тропа kobuta

    [11] Mapinga oyo basangisi awa, ekosalaka eloko te sé bokweisami. (lokola lolenge ezalelaki ba ahzâb kala)

    [12] Liboso na bango, bato ya Nüh, na ba Aad, na falo moto ya bandako etongama, baboyaki kondima

    [13] Mpe Thamüd, na bato ya Loth, na bato ya aïkat, banso basanganaki. (mpe baboyaki kondimela bantoma)

    [14] Ata moko te andimelaki batindami, mpe bazuaki etumbu

    [15] Bazalaki kozela sé lolaka moko liye likopesa bango ata bopemi moko te

    [16] Мре balobaki: Nkolo pesa biso oyo ya biso yambo ete mokolo ya suka eya

    [17] Zala na bozeli тропа oyo bazali koloba, mpe kanisa na mowumbu wa biso Dáwud, oyo atonda na bokasi yakokumisa biso. Ya soló ye azalaki komizongisa (epai ya Allah)

    [18] Мре totiyaki bangomba ezala na botondi tongo mpe pokwa elongo naye

    [19] Mpe bandeke lokola, nyoso esalamaki sé тропа kokumisa ye. (Allah)

    [20] Mpe tolendisaki bokonzi bwa ye, mpe topesaki ye bwanya mpe mayele ya kokata makambo

    [21] Boye basango ya bato ya kosuana ekomelaki yo te? Tango babutaki na esika ya losambo. (ya likolo)

    [22] Tango bakotelaki Dáwud, mpe abangaki. Balobaki naye ete: Kobanga te, tozali kowelana biso mibale, kabola kati na biso na bosembo, kasi kotengama te, mpe kamba biso o nzela ya semba

    [23] Ya sólo, ndeko wa ngai ya mobali oyo azali na bameme ntuku libua na libua, mpe ngai nazali na meme moko, alobi na ngai: Pesa nabombela yo yango, mpe tango tozongisani maloba, alobi na ngai mabe

    [24] (Dáwud) alobi: Abubaki yo ya sôló, тропа kosenga yo тете nayo mpo akokisa na (yango motango) oyo ya ye, mpe ya sôló bato balingaka kobotolo biloko ya baninga, longola sé baye bandima mpe basalaka misala milamu, kaši bazali токе. Мре Dâwud akanisaki ete tomekaki ye, asengaki bolimbisi epai ya Nkolo wa ye, mpe agumbamelaki mpe atubelaki

    [25] Mpe tolimbisaki ye na yango mpe epayi nabiso akozala na esika ya likolo mpe oyo esika malamu ya kozonga

    [26] Eh Dâwud! Ya soló, totiyaki yo mokitani kati na mabele, mpe kata kati na bato na bosembo, kasi kolanda baposa te, noki te ekobungisa yo nzela ya Allah. Ya sólo, baye babungi nzela ya Allah, bakozalaka na etumbu ya makasi, mpo ete babosanaki (kokanisa) na mokolo mwa suka

    [27] Mpe tokelaki likolo na mabele na maye manso mazali kati kati na yango mpamba te, lolenge wana nde bapengwi bazali kokanisa. Kasi bapengwi bazali na mpasi o kati ya moto, (ezali kozela bango)

    [28] То boye bandimi baye basalaki misala milamu bazala lokola baye babebisaki na mokili? То totiya babangi (Allah) ndenge moko na bato mabe

    [29] Buku eye tokitisaki epai nayo, ya mapamboli mpo ete basosola mikapo mia yango, mpe mpo ete banganga ya mayele bakundola yango

    [30] Mpe topesaki Dáwud likabo ya mowumbu ya malamu Suleyman, ya soló, azalaki kosenga bolimbisi mingi

    [31] Tango batiaki liboso naye bampunda ya kitoko sima ya nzanga тропа kokima mbangu

    [32] Mpe alobaki ete: Ya soló ngai namipesi kolinga biloko ya mokili, kino nabosani bokundoli bwa Nkolo na ngai kino moyi molimwi

    [33] Bozongisela ngai yango, na yango abandi kokata yango makolo na bakingo

    [34] Mpe ya sólo, tomekaki Suleyman, tobwakaki likolo ya kiti naye nzoto ya moto, sima atubelaki

    [35] Alobi: Nkolo! Limbisa ngai mpe pesa ngai bokonzi boye moko te sima na ngai akokana na yango. Ya sólo, ozali mopesi monene

    [36] Мре totielaki ye mopepe, ezalaki kotambola na mitindo naye bipai binso alingaki na mpete

    [37] Mpe basatana bazalaki kotongela ye ndako, basusu bazalaki kokota na nsé ya mayi тропа kosalela ye mosala

    [38] Na basusu lokola, bakanga bango mibale mibale na minyololo

    [39] Oyó nde likabo lia biso, kabola yango,to kopesa te, sala ndenge olingi

    [40] Mpe epayi na biso akozala na esika ya likolo oyo esika malamu ya kozonga

    [41] Mpe kundola mowumbu wa biso Ayúb tango abelelaki Nkolo waye, ete satana akangi ngai na mpasi mpe etumbu

    [42] Beta (mabele) na makolo nayo, oyo ezali mayi ya тріо mpo osukola mpe órnela mosusu

    [43] Mpe tozongiselaki ye libota lia ye, mpe tobakiselaki ye libota mosusu. Wana ngolu na biso тропа bokundoli ya bato banso ya mayele

    [44] Mpe simba na loboko nayo eteni ya singa ya libende mpe bete yango, kasi kozangisa elaka te, ya soló tokutaki ye na bokangi motema mpenza, oyo nde mowumbu ya malamu azalaki kotubela mingi

    [45] Мре kanisa тропа Ibrâhîm па Is’hâq па Ya’qüb, bawumbu па biso ya nguya mpe ya mayele

    [46] Ya soló toponaki bango boponami ya bokundoli ya lola

    [47] Mpe ya sólo, bazali epai na biso, baponami ya malamu

    [48] Mpe kanisa Ismail na Al-yasa’ na Dzul-kifl, bango banso bazalaki kati na baponami malamu

    [49] Oyó nde bokundoli, mpe babangi bakozalaka na bozongi bolamu

    [50] Lola ya edeni bizibeli na yango ekozala ya kofungowama pona bango

    [51] Wana nde bakoyekemelaka yango, bazali kosenga bambuma ebele, mpe komela

    [52] Mpe pembeni na bango, bakozala na basi ya kitoko, baye bazali na miso ya kolula te

    [53] Oyó nde elengelamaki тропа bino mokolo mwa lifuta

    [54] Ekozalaka nde bopesi bwa biso eye ekokutuama te

    [55] Wana, batomboki bakozala na bozongi ya mabe

    [56] Lifelo nde ekozikisa bango, bovandi kani ya mabe ya lolenge wana

    [57] Na yango, bakomela mayi ya tofina ya moto makasi

    [58] Mpe bakozuaka bitumbu bisusu sé ya lolenge wana

    [59] Oyo nde lingomba liye likokotaka nzela moko na bino, mpe bakoyambaka bango te. Kasi bakozika na moto

    [60] Bakolobaka: Bokoyambama malamu te, bino nde bolengeleki yango тропа biso, esika kani ya bovandi ya mabe ya lolenge wana

    [61] Bakolobaka: Nkolo wa biso, nani apeși biso oyo, bakisela ye etumbu na lifelo

    [62] Mpe bakoloba: Mpona nini tozali kornona te mibali ba oyo tozalaki kotanga bango na molongo ya bato mabe

    [63] Boye tosekaka bango to babungaka na miso na biso

    [64] Ya soló, wana ekozala kosuana ya bato ya moto

    [65] Loba: Ya sólo, nazali sé mokebisi. Mpe nzambe mosusu azali te na kobondela na bosóló sé Allah wa bomoko mpe ya bokasi koleka

    [66] Nkolo wa likolo na mabele, mpe manso maye mazali okati na yango mibale, azali wa bokasi atonda bolimbisi

    [67] Loba: (kurani) oyo ezali na sango ya monene

    [68] Boye bino bozali koboya yango

    [69] Nazalaki na boyebi te тропа ba anzelu, tango bazalaki koswana

    [70] Ayebisaki ngai ete nazali sé mokebisi ya polele

    [71] Tango Nkolo wayo alobaki na ba anzelu: Ya soló nalingi kokela moto na mabele

    [72] Soki nabongisi ye mpe nafuli ye mopepe ya molimo na ngai, bokweyela ye na bogumbami

    [73] Mpe ba anzelu banso bafukamelaki ye

    [74] Longola sé ibilisa asalaki lolendo mpe azalaki okati ya bapengwi

    [75] (Allah) alobi: Eh ibilisu! Eloko nini epekisi yo kogumbamela (moto) oyo nakeli ye na maboko na ngai? Boye osali lolendo to omimoni ete yo ozali likolo koleka

    [76] Alobi: Nazali malamu mingi koleka ye, okelaki ngai na moto mpe okelaki ye na mabele

    [77] (Allah) alobi: Віта awa, ozali ya kolakelama

    [78] Mpe botutu bwa ngai, bokozalaka likolo lia yo kino o mokolo mwa suka

    [79] Alobi: Nkolo, tikela ngai tango kino omokolo mwa bosekwisami

    [80] (Allah) alobi: Ya soló, napesi yo tango

    [81] Kino omokolo ngonga ekokokaka

    [82] Alobi: Na nguya nayo (Allah), nakobungisaka bango banso

    [83] Longola sé bawumbu nayo baye opona

    [84] (Allah) alobi: Ya sólo, mpe oyo ezali bosolo nazali koloba

    [85] Ya sólo, na kotondisa lifelo nayo, mpe baye banso bakolanda yo

    [86] Loba: Nazali kosenga bino lifuta te, mpe nazali te oyo azali kokonza na makasi

    [87] (Kurani) ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba

    [88] Mpe kala te, bokoyebaka basango na yango

    Surah 39
    Bitongisa

    [1] Bokiti bwa buku bowutaki epai ya Allah wa bokasi atonda bwanya

    [2] Ya soló, tokitiselaki yo buku na bosôló mpenza, bondela Allah na bolandi lingomba lia bosôló lia ye

    [3] Naye moko Allah nde mabondeli esengeli esalama kasi baye bazali kolanda basusu batiki ye, (balobi): Tozali kokumisa bango sé mpo bapusa biso pene na Allah, ya soló, Allah akokataka kati kati na bango тропа maye bazalaki kokesene na yango, ya sólo Allah akambaka moto oyo ya lokuta te mpe mopengwi te

    [4] Soki Allah alingaki kozala na mwana, nde aponaki oyo alingi okati ya maye akela, lokumu naye, azali Allah wa bomoko mpe atonda bokasi

    [5] Akelaki likolo na mabele na bosôló, azali kobalola butu na mokolo mpe kobalola mokolo na butu, mpe atiye moyi na sanza, nyoso bizali kotambola na mibeko mia (ye) azali wa bokasi atonda bolimbisi

    [6] Akeli bino kowuta na molimo moko, sima abimisi mwasi naye, mpe akitiselaki bino bolongani mwambe ya An‘âm, azali kokela bino na mabumu ya bamama na bino bokeli sima ya bokeli o kati ya milili misato. Ye wana Allah Nkolo na bino. Bokonzi bonso bozali bwa ye, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló bobele sé ye, boye ndenge nini bokopesa mokongo na lingomba naye

    [7] Soki boboyi kondima, kasi boyeba ete ya soló Allah atonda bomengo koleka bino. Mpe azali koyina bopengwi epai na bawumbu naye, mpe soki botondi ye matondi akosepela na bino, moko te akomema mokumba ya moninga, na sima epai ya Nkolo wa bino nde bokozongisama mpe akoyebisa bino maye bosalaki. Ya solo azali moyebi ya maye mabombama о mitema

    [8] Mpe soki mabe ezui moto, abeleli Nkolo wa ye (na limemiya nyoso), mpe amizongisi epai naye, sima soki asaleli ye bolamu, abosani nyoso oyo azalaki kobelela ye liboso, mpe azueli Allah basangisi mpo abungisa (bato) nzela naye, loba: Sepela na bopengwi nayo moke, ya soló ozali okati ya bato ya moto

    [9] Boye oyo azali kotosa, kotelema na butu, kogumbama, azali komikebisa тропа mokolo ya suka, тре azali kolikia na ngolu ya Nkolo wa ye, loba: Boye ba oyo bayebi na ba oyo bayebi te bakokani? Ya sólo, sé bato ya mayele nde bazali kokanisa

    [10] Loba: Oh bawumbu na ngai baye bandimi! Bobanga Nkolo na bino, baye basalaki malamu na nsé, bakozala na lifuta ya malamu, mpe mabele ya Allah ezali monene, ya solo akofuta bakangi mitema lifuta ya suka te

    [11] Loba: Ya sólo, natindamaki тропа kokumisa Allah wa bomoko mpe bolandi lingomba lia bosóló

    [12] Mpe natindamaki mpo nazala wa yambo o kati ya baye bamisokie. (okati ya bandimi)

    [13] Loba: Ya sólo, nazali kobanga soki nazangi botosi epai ya Nkolo wa ngai, noki te nakozua etumbu enene o mokolo mwa suka

    [14] Loba: Nazali kobondela Allah mpe mabondeli na ngai nionso ezali кака тропа ye

    [15] Bobondela basusu baye bolingi na botiki ye (Allah), loba: Ya soló, baye bamisalaki mabe bango moko о mokolo mwa suka bango nde bazangi, elongo na mabota ma bango, wana ekozala bozangi bonene

    [16] Maboke ya moto ekozalaka likolo na bango тре nanse na bango lokola, lolenge wana nde Allah abangisaka bawumbu naye, eh bawumbu na ngai! Bobanga ngai

    [17] Mpe baye bamitiaki mosika na batomboki baboyi kobondela bango, mpe bazongi epai ya Allah, bazali na sango elamu. Mpe pesa sango elamu epai ya bawumbu na ngai

    [18] Baye bazali koyoka liloba mpe balandi ya malamu na yango, bango nde Allah akamba mpe bango nde baleki kokanisa

    [19] Mpe тропа oyo ayebani ete akozua etumbu, boye yo nde ozali na bokoki ya kobikisa ye na moto

    [20] Kasi baye bazali kobanga Nkolo wa bango, bakozalaka na bandako bitongami likolo ya bandako bizali koleka o nsé na yango mingala, wana nde elaka ya Allah. Allah azangisaka elaka naye te

    [21] Boye ozali kornona te ete Allah akitisaka mayi kowuta о likolo mpe alekiseli yango miluka kati na mabele, sima na yango azali kobimisa kowuta na yango bozui ya lolenge nyoso na balangi na yango? Sima ekomi na langi ya mayi ya mosaka. Mpe sima akutoli yango, wana ezali ya soló elembo ya bokundoli тропа baye bazali kokanisa

    [22] Boye, oyo Allah afungoli motema naye тропа isalamu, azali na bongengi kowuta epai ya Nkolo naye. Kasi mabe na baye mitema mia bango mizali makasi тропа maloba ya Allah? Bango wana nde bazali na libunga ya polele

    [23] Allah asila kokitisa makomi kitoko koleka, mikokana, mpe mizali kozongelama. Bamposo ya baye bazali kobanga Nkolo wa bango elengaka, mpe sima bamposo na bango mpe mitema mia bango ekozala na kimia na bokundoli Allah тропа yango, wana ezali bokambi bwa Allah boye akambaka yango na oyo alingi, mpe oyo Allah abungisi ye akozuaka mokambi te

    [24] Mpe boye тропа oyo bakobatela elongi naye na etumbu ya makasi ya mokolo mwa suka, тре bakolobaka na babubi bomeka maye bozalaki kosala

    [25] Baye baleka liboso lia bango bandimelaka bantoma te, mpe apesaki bango etumbu eye bayebaki esika ewutaki te

    [26] Mpe Allah amekisaki bango etumbu ya mokili, kasi etumbu ya mokolo ya suka ezali monene soki bazalaki koyeba

    [27] Mpe tosilaki kobetela bato kati na kurani eye bandakisa inso, mpo bakoka kokanisa

    [28] (Tokitisaki) kurani na lokota ya arabo, mpe ezali na nkokoso te, mpo bakoka kobanga

    [29] Allah apeși lisese soló тропа mobali токо azali na basangani ebele, bazali kowelana тропа ye, mpe mobali mosusu azali sé na moto токо, boye bakokani na lisese? Matondo na Allah, nzoka nde ebele na bango bazali koyeba te

    [30] Ya sólo, yo okokufaka, mpe ya sólo bango bakokufaka lokola

    [31] Sima ya soló bokosamba о mokolo ya suka liboso ya Nkolo na bino

    [32] Мре nani azali mabe koleka moto oyo abukeli Allah lokuta mpe aboyi bosembo tango eyeli ye. Na yango; lifelo te nde esika ya bapengwi

    [33] Kasi oyo akoya na bosôló, mpe oyo akondimela yango, bango nde babangi

    [34] Bakozuaka maye bakolingaka epai ya Nkolo wa bango. Wana nde ekozalaka lifuta lia babongisi

    [35] Mpe mpo Allah alongolela bango mbeba iye basalaki, mpe mpo afuta bango lifuta lilamu koleka maye basalaki

    [36] Allah akoki te тропа kobatela mowumbu naye (тропа kobatela ye mpe kopesa ye lisalisi)? Mpe bazali kobangisa yo na baye bazali ye te (Allah), mpe oyo Allah abungisi, akozua bokambi te

    [37] Mpe oyo Allah akambi ye, akozua mobungisi te. Boye ezali Allah te nde atonda bokasi mpe Nkolo bokonzi ya kopesa etumbu

    [38] Мре soki otuni bango; nani akela likolo na mabele? Bakolobaka: Ya solo, ezali Allah. Loba: Bomoni ndenge nini тропа oyo bozali kokumisa botiki Allah? Soki Allah alingeli ngai mabe, boye bakolongolela ngai yango? То soki alingeli ngai bolamu, bango nde bakopekisa bolamu bona? Loba: Allah akoki ngai. Epai naye nde bamipesa baye balingi lisungi

    [39] Loba: Eh bato ba ngai! Bosala oyo bokolinga kosala, ya sólo ngai nazali kosala na lolenge na ngai, kasi bokoyebaka kala te

    [40] Oyo etumbu ekoyelaka ye, (na mokili) akomona yango, mpe akozua yango o mokolo mwa suka na bowumeli

    [41] Ya soló, tokitiselaki yo (Muhammad) buku тропа bato na bosembo, oyo akomikamba ezali тропа ye moko, mpe oyo akobunga na yango, amibungisi sé ye moko, mpe ozali mokonzi na bango te

    [42] Allah ayambaka milimo tango ya liwa na bango, mpe na ba oyo bakufi te okati na bampongi, asimbaka baye asila kokatela liwa mpe azongisaka basusu kino mikolo na bango ekoka. Ya sólo, wana ezali bilembo mpo bato bakanisa

    [43] Bazui balobeli liboso ya Allah? Loba: Ata soki balobeli wana bazali na eloko te, to mpe bazali na mayele te

    [44] Loba: Bolobeli nyoso ezali ya Allah, bokonzi ya likolo na ya nsé ezali yaye, sima epai naye nde bokozongisama

    [45] Mpe soki (nkombo) ya Allah etangemi na bomoko bwa ye, mitema ya baye bazali kondima na mokolo mwa suka te mibebi mpe soki batangi bankombo ya binzambe nzambe okomona bango batondi na esengo

    [46] Loba: Oh Allah! mokeli wa likolo na mabele, moyebi wa maye mabombami na maye mazali polele, yo nde okokataka kati kati ya bawumbu bayo тропа maye bakeseneki na yango

    [47] Soki ezalaki ete maye manso mazali na mabele mapesama epai ya basangisi ete basomba na yango etumbu o mokolo ya suka, mbele esalisi bango na eloko te. Ata soki bapesi yango mbala mibale, mpe maye bazalaki kokanisa yango te ebimi polele liboso ya Allah

    [48] Mpe mabe na bango ebimi polele, mpe bazingami na ntina ya maye bazalaki kotiola

    [49] Mpe soki mpasi ezui moto, abeleli biso, mpe soki topesi ye bolamu, alobi ete: Nazui yango na mayele na ngai. Nzoka nde yango ezali komekama. Kasi ebele na bango bazali koyeba te

    [50] В aye baleka liboso na bango basilaki koloba yango, mpe maye bazuaki esalisaki bango te

    [51] Mpe mpasi ezuaki bango тропа mabe basalaki. Kasi babubi o kati na ba oyo bakozua mabe na ntina ya maye basalaki mpe bakokoka kolongola yango te

    [52] Boye bazali koyeba te ete ya soló, Allah apesaka bozui na oyo alingi mpe akutolaka? Wana ezali bilembo mpo bato bakoka kondima

    [53] Loba: Eh bawumbu na nga! Baye basala mabe koleka ndelo, bozanga elikia te тропа ngolu ya Allah, ya sólo Allah alimbisaka masumu manso. Mpo ete ya sólo, ye azali molimbisi atonda mawa

    [54] Mpe bozonga epai ya Nkolo wa bino na tubela, mpe bomisokia epai naye yambo ete etumbu eyela bino, noki bokozua lisalisi te

    [55] Mpe bolanda ya malamu kati na maye makitelaki bino kowuta epai ya Nkolo wa bino, yambo ete etumbu eyela bino mbalakaka mpe bozali koyeba te

    [56] Yambo molimo eloba ete, mabe na ngai, тропа kozanga botosi epai na Allah, kasi nazalaki ya soló okati ya basakani

    [57] То, aloba ete soki Allah akambaka ngai kasi nalingaki nazala o kati ya babangi

    [58] То, aloba te ete tango akomona etumbu: Oh!, soki nazongi ata na (mokili), mbele nalingaki kozala okati ya babongisi

    [59] Iyo, ya soló mikapo mia ngai mikomelaki yo mpe oboyaki kondima na yango, osalaki lolendo mpe ozalaki okati ya bape ngwi

    [60] Mpe o mokolo mwa suka okomona bilongi ya baye baboyaki kondimela Allah bikoyindaka, boye lifelo ekozalaka nde esika ya bato ya lolendo te

    [61] Mpe Allah akobikisaka babangi baye basalaki bolamu, ma ekozuaka bango te, mpe bakozalaka na mawa te. (kati na lola)

    [62] Allah nde mokeli wa biloko binso, mpe azali Nkolo ya nionso

    [63] Azali na bafungola ya likolo na mabele, mpe baye baza kopengwa na mikapo mia Allah, bango nde bazangi

    [64] Loba: Boye bozali kotinda ngai nabondela nzambe mosusu elongo na Allah? Oh! Bino baye bozanga koyeba

    [65] Ya soló, emoniseli esilaki kokita epai nayo mpe epai na baye baleka liboso nayo ete soki omeki kosangisa Allah, mosala nayo nyoso ekobeba, mpe okozala elongo na bazangi

    [66] Kasi bondela Allah, mpe zala okati ya baye bazali kotondo ye

    [67] Mpe bapesi Allah esika naye te ndenge esengeli, mpe mabele nyoso akokanga yango na loboko, mpe likolo akongumba yango na loboko naye ya mobali na mokolo ya suka. Nkembo naye aleki likolo na maye bazali kosangisa ye na yango

    [68] Mpe bakobeta kelelo, mpe baye banso bazali na likolo mpe na nsé bakokufa, longola sé oyo Allah akolinga, sima babeti lisusu kelelo, nde bato banso basekwi bazali kotala

    [69] Mpe mabele makotondaka na bongengi bwa Nkolo na yango, mpe bakotiyaka buku (ya misala nyoso oyo moto asalaki), mpe bakoyaka na bantoma na banzeneneke, mpe bakokataka kati kati na bango na bosôló, mpe bango bakobubamaka te

    [70] Mpe molimo (moto) nyoso akozuaka sé mbano ya maye asalaki, mpe (Allah) ayebi malamu koleka maye bazalaki kosala

    [71] Mpe тропа baye bapengwaki, bakomema bango lisanga okati na lifelo, soki bakomi, bizipeli na yango bikofungwama, mpe bakengeli na yango bakoloba na bango: Boye bayelaki bino batindami (na bakebisi) kowuta na bino moko te mpo batangela bino mikapo mia Nkolo wa bino mpe bakebisa bino тропа elaka ya mokolo mwa bino ya lelo? Bakoyanolaka: Iyo; kasi ya soló elaka ya etumbu ekokisami likolo ya bapengwi

    [72] Bakoyebisaka bango: Bokota na minoko ya moto, bokozala libela okati na yango, esika kani ya mabe wana тропа bato ya lolendo

    [73] Mpe bakomema baye babangaki Nkolo wa bango lisanga okati ya lola, soki bakomi, bakofungolelaka bango bizipeli bia yango, mpe bakengeli na yango bakolobaka na bango: Kimia ezala likolo na bino, bozalaki malamu, bokota mpe bovanda libela kati na yango

    [74] Мре bakolobaka: Matondo na Allah oyo akokiseli biso elaka, mpe akitanisi biso mabele (ya Iola), ya soló tokovandaka na Iola esika nyoso tokolinga. Ya solo lifuta lia babongisi lileki kitoko

    [75] Mpe okomona ba anzelu zinga zinga ya ngwende, bazali kokumisa Nkolo wa bango, mpe bakokataka kati kati na bango na bosóló. Mpe bakolobaka na bango: Lokumu na Allah Nkolo wa molongo

    Surah 40
    Molimbisi

    [1] Há, mím

    [2] Kokita ya buku oyo ewuti epai na Allah wa nguya atonda boyebi

    [3] Molimbisi masumu mpe moyambi tubela, mopesi etumbu ya makasi, Nkolo ya bomengo, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló sé ye. Mpe epai naye nde bozongi bokozalaka

    [4] Ezali sé bobele bapengwi nde bazali kosuanisa mikapo mia Allah, kaši misala mia bango ya mokili mikosa yo te

    [5] Liboso na bango, bato ya Nûh basilaki koboya (ntoma) sima na bango, bato ya makita mpe baboyaki lokola, mpe bato na bato bamipesaki тропа kobundisa motindami na bango, mpe baye ya lokuta тропа kobundisa bosembo, mpe nazuaki bango, mpe ndenge nini etumbu na ngai ezalaki

    [6] Мре lolenge moko na liloba lia Nkolo wa yo lízali na bosôló тропа bapengwi ete: Bazali bato ya moto

    [7] В aye bazali komema ng wende naye, (ba anzelu) тре na baye bazingami pembeni na yango bazali kokumisa Nkolo wa bango, тре bazali kondima naye, тре bazali kosengela bandimi bolimbisi, (bazali koloba): Nkolo, eloko nyoso etondisami na ngolu nayo na boyebi, limbisa baye bazali kotubela mpe baye bazali kolanda nzela nayo, mpe batela bango na etumbu ya moto

    [8] Nkolo, kotisa bango na Iola ya edeni oyo olakaki bango, mpe baye ya malamu kati na batata na bango mpe basi na bango mpe bana na bango, ya soló ozali wa bokasi otonda bwanya

    [9] Mpe tia bango mosika na etumbu ya misala ya mabe, mpo moto oyo okotia ye mosika na (etumbu) о mokolo wana, asili kozua ngolu nayo. Mpe wana nde ekozala elonga monene

    [10] Mpe тропа baye bapengwaki bakobengaka bango mpe kanda ya Allah likolo na bino eleki makasi mingi likolo ya kanda na bino moko tango bobengamaki na bondimi, boponaki sé kotikala na bopengwi

    [11] Bakolobaka: Nkolo wa biso, obomaki biso mbala mibale mpe opesaki biso bomoyi mbala mibale, mpe toyebi mabe na biso, boye nzela ya kobimela ezali

    [12] Bozalaki soki (nkombo) ya Allah ebengami na bomoko bwa ye, bozali koboya kondima, mpe soki basangisi ye (Allah) bondimi, mobeko ya kokata likambo ezali ya Allah, wa likolo azali monene

    [13] Ye nde alakisaki bino bilembo bia ye, mpe azali kokitisela bino bozui kowuta na likolo. Azali kokanisa sé oyo amizongisi epai naye (ya Allah)

    [14] Bokumisa Allah na bomoko mpe kolanda lingomba lia bosôló, ata soki bapengwi bazali koboya

    [15] Amitombuami likolo koleka, Nkolo ngwende, atindaka molimo mosantu epai ya moto oyo alingi kati ya bawumbu naye, mpo ete akebisa тропа mokolo ya bokutani

    [16] Mokolo moye bakobimaka polele, eloko moko te ekobombamaka Allah, lelo; kibokonzi bozali ya nani? (eyano ekozalaka): Ya Allah wa bomoko atonda bokasi

    [17] Lelo molimo (moto) nyoso mokozua lifuta kolanda na maye asalaki, lelo kobuba bozali te, ya soló, Allah azali noki тропа kofuta

    [18] Mpe kebisa bango тропа mokolo moye mozali pene (mokolo ya suka), tango mitema na mingongo mikomataka mpe mikokangama. В abubi bakozuaka moninga ya kosalisa bango te mpe kosunga bango te

    [19] (Allah) ayebaka mabe oyo miso esalaka, mpe manso maye mabombami o mitema. (mia bato)

    [20] Mpe Allah akataka makambo na bosembo, mpe baye bazali kobondela na botiki ye bakokata likambo moko te, ya sólo, Allah azali moyoki mpe azali momoni

    [21] Boye bazali kotambola na mokili te mpo batala lolenge esukela baye baleka liboso na bango, balekaki bango na bokasi mpe na bilembo okati ya mabele, mpe Allah azuaki bango тропа masumu та bango. Mpe bakokaki kobatelama te na maye Allah asalaki

    [22] Boye ya sólo, batindami bazalaki koyela bango bilembo, mpe baboyaki kondima, mpe Allah azuaki bango. Ya soló, ye azali makasi тропа etumbu

    [23] Мре tosilaki kotinda Mûssa na bilembo bia biso mpe bilembetele ya polele

    [24] Epai ya falo na Hâmân na Qârûn, kasi balobaki ete: Oyo nganga moto ya lokuta monene

    [25] Mpe tango ayelaki bango bosôló kowuta epai na biso, balobaki: B oboma bana ya mibali baye bazali na bondimi elongo naye mpe botika basi na bango na bomoyi, kasi likita ya bapagano ezalaka sé na libunga

    [26] Mpe falo alobaki: Botika ngai na boma Mûssa, mpe abenga Nkolo waye. Ya soló, nazali kobanga noki akobongola lingomba lia bino to noki akosala mbeba kati na mokili

    [27] Mpe Mûssa alobi: Nazali koluka libateli epai ya Nkolo wa ngai na ya bino тропа baye bazali kosala lolendo baye balingi kondima na mokolo mwa suka te

    [28] Mpe mobali moko ya mondimi kati ya bato ya falo abombaka bondimi bwa ye alobi: Boye bozali koboma moto mpo alobi: Nkolo na ngai Allah? Mpe asili koyela bino bilembo binene kowuta epai ya Nkolo wa bino? Soki solo azali na lokuta, lokuta wana ekozongela sé ye moko, mpe soki azali koloba bosembo, ndambu ya masumu ya maye azali kokebisa bino ekozua bino. Ya soló, Allah akambaka moto ya mabe mpe ya lokuta te

    [29] Eh bato ba ngai! Bozali na bokonzi lelo kati na mabele, nani akosungaka biso na etumbu ya Allah tango ekoyelaka biso? Falo alobi: Nakolakisa bino sé oyo nazali kornona, mpe nakokamba bino te sé na nzela ya semba

    [30] Mpe oyo azalaki na bondimi alobi: Eh bato na ngai! Nazali kobangela bino noki ekozalela bino lokola o mokolo ya lisanga ya mapinga

    [31] Ndenge moko lokola bato ya Núh mpe bato ya Aad na Thamúd, mpe bato basusu bayaki sima na bango. Kasi Allah alingeli bawumbu naye libubi te

    [32] Eh bato na ngai! Nazali kobangela bino тропа mokolo ya bobengami

    [33] Mokolo moye bokopesaka mikongo na bokimi, moko te akobatela bino liboso ya Allah mpe oyo Allah akobungisa, akozuaka mokambi te

    [34] Yûsuf asilaki koyela bino bilembo binene liboso, kasi botikaki tembe te тропа oyo ayelaki bino, kino tango akufaki bolobaki: Allah akotinda lisusu motindami sima naye te, lolenge wana nde Allah abungisaka moto ya mabe mpe ya tembe

    [35] Baye bazalaki kobundisa bilembo bia Allah тре bazali na bilembetele te, ezali lisumu monene epai na Allah тре epai ya bandimi. Na boye nde Allah azali kokanga motema ya moto nyoso ya mabe mpe ya lolendo

    [36] Mpe falo alobi: Eh Hâmân! Tongela ngai ndako ya likolo koleka, tango mosusu nakoki kozua banzela

    [37] Banzela ya likolo, mpo namata epai ya Nzambe ya Mûssa, kasi nayebi ete ye azali moto ya lokuta. Lolenge wana nde falo azalaki kokanisa ete azali kosala malamu nzoka nde azalaki kosala mabe koleka, mpe abungaki nzela ya semba. Kasi likita lia falo lizalaki sé bozangi na bokufi

    [38] Oyo andimaki alobi: Oh bato na ngai! Bolanda ngai, nakokamba bino o nzela ya semba

    [39] Eh bato na ngai! Bomoyi boye bozali sé kosepelisa na mwa tango токе, kasi mokolo mwa lobi mozali esika (ndako) kitoko тропа kofanda

    [40] Oyo asali mabe akofutama sé ndenge asalaki, mpe oyo akosala malamu mwasi to mobali mpe azali mondimi, bango wana nde bakokota na paladiso, bakoleisama maye mazali na suka te

    [41] Mpe Oh bato na ngai! Nini na ngai, nazali kobenga bino na lobiko, kaši bino bozali kobenga ngai na móto

    [42] Bozali koyebisa ngai napengwa na Allah mpe nasangisa ye na maye nayebi te? Kaši nazali kobenga bino epai ya oyo atonda bokasi azali molimbisi

    [43] Tembe ezali te na oyo bozali kobenga ngai naya epai naye, azali na bosôló te, ye akoki kondimela (mabondeli) te, ezala awa na mokili to na mokolo ya suka, mpe bozongi bwa biso bokozalaka nde epai ya Allah, mpe ya soló bato ya mabe esika na bango ekozalaka nde móto

    [44] Kala te, bokokanisaka maye nazali koyebisa bino. Mpe napesi makambo na ngai manso epai ya Allah. Ya soló, Allah amonaka bawumbu (naye)

    [45] Allah abatelaki ye na likita ya mabe liye basalaki, mpe etumbu ya mabe ezingaki bato ya falo

    [46] Bakofanda na moto tongo mpe mpokwa, mpe tango mokolo ya suka ekotelema, bokotisa bato ya falo na etumbu ya makasi koleka

    [47] Mpe tango bato ya motawu na bato ya lolendo bakozongisanaka maloba kati na lifelo, ya soló, biso tozalaki nde kolanda bino, boye bokoki kolongolela biso ndambu ya etumbu ya moto te

    [48] Bato ya lolendo bakolobaka: Ya sólo, biso banso tozuami na kati na yango, kasi Allah asili kokata makambo kati kati ya bawumbu (baye)

    [49] Mpe baye bakozalaka o kati ya moto bakoloba na bakengeli ya lifelo: Bosengela biso Nkolo wa bino alembisela biso etumbu ata mokolo moko

    [50] Bakoyanola bango ete: Boye batindami bayelaki bino bilembo te? Bakozongisa ete: Iyo; bakoloba na bango lisusu: Bosenga, kasi kosenga ya bapengwi ezali sé na libungi

    [51] Ya solo, tokolongisa batindami na biso elongo na baye bandima na nsé mpe o mokolo oyo banzeneneke bakotelema

    [52] Mokolo mona bosengi ya bolimbisi bwa bapengwi bokozalaka na ntina te, bakozuaka botutu mpe bakovandaka na mabe

    [53] Mpe tosilaki kopesa Mûssa bokambi, mpe tokitanisaki bana ya isalayele buku

    [54] (Ezala) bokambami na bokundoli тропа baye bazali kokanisa

    [55] Kanga motema; elaka ya Allah ezali ya soló, senga bolimbisi na masumu nayo mpe pesa lokumu epai ya Nkolo wayo, na tongo mpe na pokwa

    [56] Ya sólo, baye bazali kobundisa mikapo mia Allah, mpe bazali na bilembetele te, ya sólo, bazali na lolendo okati na ba ntolo na bango. Bakozuaka maye balingi te, senga ebateli epai ya Allah. Ya sólo, ye azali moyoki, momoni ya nionso

    [57] Bokelami ya likolo na ya mabele eleki bokelami ya bato, kasi ebele ya bato bazali koyeba te

    [58] Mpe oyo miso ekufa na oyo azali kornona bakokani te, mpe baye bandima mpe basali misala ya malamu bakokani mpe te na oyo asalaka mabe, токе nde bozali kokanisa

    [59] Ya soló, tango ekoyaka, tembe ezali te тропа yango. Kasi ebele ya bato bazali kondima te

    [60] Mpe Nkolo na bino alobaki ete: Bobelela ngai, nakoyanola bino. Ya sólo, baye batiki kobondela ngai na lolendo bakokota na lifelo, mpe bakozanga lokumu

    [61] Allah nde atiyela bino butu mpo bopemaka, mpe atiyeli bino mokolo mpo bomonaka bongengi. Ya sólo, Allah azali Nkolo wa bolamu epai ya bato, kasi ebele ya bato bazali kotondo (ye) te

    [62] Wana nde Allah Nkolo wa bino, mokeli wa biloko binso, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosoló sé ye mei, boye тропа nini bozali kotika (nzela ya semba)

    [63] (Ndakisa); lokola baye bazali koboya mikapo mia Allah, bango batiki (nzela ya semba)

    [64] Allah nde akeli тропа bino mabele ya kofandisama mpe likolo lokola motondo, mpe abongisi bino kitoko koleka mpe apesi bino bilei ya malamu. Wana nde Allah Nkolo na bino, mapamboli na Allah Nkolo ya mokili

    [65] Azali na bomoyi, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye mei, bobelela ye na bomoko bwa ye, mpe holanda lingomba lilamu (islamu), lokumu na Allah Nkolo wa molongo

    [66] Loba: Ya soló, bapekisi ngai ete nabondela baye bozali kobondela botiki Allah, na tango polele esili koyela ngai kowuta epai ya Nkolo na ngai, mpe natindami ete namisokia epai ya Nkolo ya mokili

    [67] Ye nde akelaki bino na mabele, sima na litanga ya mayi ya mokongo sima ekomi liboke ya makila (bokomi mosuni ya makila) sima abimisi bino mwana moke, sima bokoli bokomi makasi, sima bokomi mibange,mpe na kati na bino, ba oyo bakufa noki, mpo ete bokokisa mibu miyebani, na ntina ete bososolo

    [68] Ye nde apesaka bomoyi mpe liwa, mpe soki alingi kosala likambo akolobaka: Zala; mpe ezalisami

    [69] Boye ozali kornona te ete: Baye bazali kobundisa mikapo mia Allah ba pengwisami (na bosembo)

    [70] Baye bazali koboya kondima na buku (kurani) na maye totindaki batindami na biso na yango, bakoyeba kala mingi te

    [71] Bakokanga bakingo mpe makolo na bango na minyololo mpe bakobendama (o lifelo)

    [72] O kati ya mayi ya lifelo, sima bakozikisama na moto

    [73] Sima bakoyebisaka bango: Wapi baye bozalaki kosangisa

    [74] Elongo na Allah! Bakozongisa ete: Basundoli biso, mpe biso tozalaki kokumisa eloko te liboso. Na lolenge wana nde Allah azali kobungisa bapengwi

    [75] Wana nde lifuta ya maye bozalaki kosepela na yango na mokili na lokuta, mpe bovimbaki na lolendo

    [76] Bokota na bikuke ya lifelo libela, oyo esika mabe ya bato ya lolendo

    [77] Kanga motema; ya soló, elaka ya Allah ezali ya solo. Tango mosusu tokolakisa yo ndambu ya etumbu tolengeli тропа bango, to mpe tokoboma yo yambo ete eyela bango, mpe epai na biso nde bakozongisama

    [78] Ya sólo, tosilaki kotinda yambo nayo batindami, kati na bango tobetelaki yo masolo, mpe тропа basusu tobetelaki yo te. Mpe motindami akokaki koya na elembo (mokapo) te sé ezala na ndingisa ya Allah. Mpe tango motindo mwa Allah mokoyaka, makambo manso makokatamaka na bosôló, mpe baye balingaki sé kobuka lokuta, bakozangaka

    [79] Allah nde akeli тропа bino banyama mpo bomataka likolo na yango, mpe misusu boliaka yango

    [80] Misusu ezali kosalisa bino, mpe kati na yango bozali kobimisa biloko biye bolingaka, bozali komemama likolo na yango mpe likolo ya masuwa

    [81] Mpe azali kolakisa bino bilembo bia ye, boye bilembo kani bia Allah bokoki koboya

    [82] Batambola na mokili bamona lolenge kani esukaki na baye bazalaki liboso na bango? Bazalaki ebele koleka bango mpe makasi koleka bango, mpe batikaki bikamwa ebele sima na bango? Kasi manso bazuaki masalisaki bango na eloko te

    [83] Mpe tango batindami na bango bayelaki bango bilembo bia polele, bayaki mpe basepelaki nde na boyebi bwa bango, sima bazingamaki na maye bazalaki kotiola. (koseka)

    [84] Мре tango bamonaka etumbu makasi kowuta epai na biso, bakolobaka: Tondimi na Allah na bomoko bwa ye, mpe toboyi maye tozalaki kosangisa

    [85] Kasi kondima na bango esalisaki bango te tango etumbu na biso esilaki kokomela bango, mobeko ya Allah uta kala likolo ya bawumbu naye, mpe na tango wana bapengwi bazangaki

    Surah 41
    Elimbisami na Bosikisiki

    [1] Hâ, mîm

    [2] Emoniseli ekiti kowuta epai ya oyo wa boboto atonda ngolu

    [3] Buku eye mikapo miango milimbolami, etangeli na yango na lokota ya arabe (monoko ya arabo) mpo ete bato bayeba

    [4] (Mpo) epesa sango elamu mpe ekebisa, kasi ebele kati na bango bamitiye mosika mpe bazali koyoka te

    [5] Mpe balobi: Mitema mia biso mikangami na maye ozali kobenga biso na yango, matoyi na biso mazali ya kokangama, kati kati na biso nayo ezali na ezipelo. Sala oyo ya yo, biso mpe tosala ya biso

    [6] Loba: Ya soló, nazali sé moto lokola bino oyo liloba ekitelaki ngai ete Nzambe na bino azali sé moko, bomisembola epai naye mpe bosenga ye bolimbisi. Kasi mawa ezali na basangisi (Allah)

    [7] Baye bazali koboya kofuta zakat mpe bazali kopengwa тропа mokolo ya suka

    [8] Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na lifuta liye likokatanaka te

    [9] Loba: Ya sólo, bozali kopengwa naye oyo akeli mabele na mikolo mibale, mpe bozali kotiela ye bambanda? Ye wana nde Nkolo ya mikili

    [10] Ye apika bangomba likolo na yango, mpe apamboli yango mpe akokisi bomengo na yango na mikolo minei, wana nde eyano тропа baye bazali kotuna yo

    [11] Sima, amitalisi na mapata na yango ezalaki sé milinga, mpe alobaki na yango na mabele ete: Boya epai na ngai, bolinga to bolinga te, biango bizongisaki ete: Toyei na botosi bonso

    [12] Mpe akokisi bokeli likolo sambo okati ya mikolo mibale mpe abongisi makambo ya likolo moko na moko, mpe apesi likolo ya pene bozenga ya bongengi mpe bobatelami, wana mitindo ya oyo azali na nguya atonda boyebi

    [13] Soki baboyi loba (na bango): Nakebisaki bino etumbu oyo ekoboma, lokola oyo ezuaki bato ya Aad na Thamûd

    [14] Tango batindami na bango baydaki bango kowuta na bango moko liboso na sima, (balobaki na bango) ete: Bobondela sé bobde Allah, balobaki ete: Soki Nkolo na biso alingaki nde akitiselaki biso ba anzelu, na yango biso topengwi na maye botindami na yango

    [15] Kasi тропа ba aad, basalaki lolendo na mokili kasi bosembo te, mpe balobaki etemani aleki biso na makasi? Boye bazali kornona te ete Allah oyo akeli bango ye nde aleki bango na makasi? Mpe bazalaki kowangana bilembo bia biso

    [16] Mpe topesaki bango etumbu ya mopepe ya makasi mpe ya malili, mikolo mina mizalaki mabe mpo tomekisa bango etumbu yakokitisama, kati ya bomoyi ya mokili, mpe etumbu ya mokolo ya suka ekoleka lisusu makasi, mpe bakosungamaka te

    [17] Kasi тропа ba Thamüd, tokambaki bango, kasi basepelaki nde na molili o esika ya bokambami, nkake ya etumbu makasi ezuaki bango тропа ntina ya maye bazalaki kosala

    [18] Mpe tolongisaki baye bandimaki mpe baye bazalaki na bobangi

    [19] Мре mokolo oyo banguna ya Allah bakosangisama ebele тропа kokende na moto, тре bokotindikama okati na yango

    [20] Kino bakokoma na kati, matoyi na bango na miso na bango na loposo na bango, mikozala nzeneneke likolo na bango тропа maye bazalaki kosala

    [21] Мре bakoloba na baloposo na bango ete: Mpona nini bozali kolobela mabe na biso? Baloposo bikozongisa eyano ete: Allah oyo alobisaka biloko binso ye nde alobisi biso. Мре ye nde akelaki bino mpona mbala ya liboso mpe epai naye nde bokozongisama

    [22] Mpe bokokaki te komibomba na matoyi mpe miso mpe loposo na bino ete balobela mabe na bino te, kasi bokanisaki nde ete: Allah ayebi te ebele ya maye bozalaki kosala

    [23] Makanisi та bino maye bokanisaki mpona Nkolo wa bino ebomisi bino, yango ekotisi bino na molongo ya bazangi

    [24] Ata soki bakangi motema, sé bobele moto nde ekozala efandelo na bango, mpe soki baluki kosenga bolimbisi ekondimama te

    [25] Мре topesaki bango baninga ya (bilima) baye bakokabwana na bango te, mpe babongiseli bango makambo maye mazali liboso mpe sima na bango mpe liloba ekokisamaki likolo na bango ndenge esalamaki na baye baleka liboso na bango kati na bilima mpe bato. Ya soló, bazalaki bazangi

    [26] Mpe bapengwi balobi: Boyoka kurani eye te, bosalela yango makelele (tango ezali kotangama) mpo bolonga yango

    [27] Ya sólo, tokomekisaka bapengwi etumbu ya makasi, mpe tokofutaka bango mabe koleka тропа maye bazalaki kosala

    [28] Wana nde lifuta ya banguna ya Allah ekozalaka moto, bakovandaka kati na yango libela, lifuta lia etumbu тропа ndenge baboyaki kondima na mikapo mia biso

    [29] Mpe bapengwi bakolobaka: Nkolo; lakisa biso baye babungisaki biso kati ya bilima na bato, mpo totia bango na nsé ya makolo na biso, mpo bazala bato ya nsé na biso koleka. (okati ya moto)

    [30] Ya soló, baye bazali koloba ete: Nkolo na biso nde Allah, sima bamisembolami, ba anzelu bazali kokitela bango ete: Bobanga te mpe bomitungisa te, kasi bozua sango elamu ya Iola eye balakaki bino

    [31] Tozali babateli na bino awa na mokili na mokolo mwa suka lokola, bokozuaka maye bokolingaka na maye bokosengaka

    [32] O esika ya boyambi epai ya molimbisi atonda ngolu

    [33] Nani azali na liloba kitoko koleka moto oyo azali kobenga bato epai na Allah, mpe asali mosala ya malamu, mpe alobi ete: Ya sólo, ngai nazali okati ya bamizilima

    [34] Mpe kosala bolamu na kosala mabe ezali ndenge moko te. Longola mabe na ndenge ya malamu, mpe oyo azalaki monguna nayo, akokoma moninga nayo ya makasi

    [35] Mpe likabo ya boye epesamaki te sé na bakangi mitema, mpe epesamaka sé na oyo atonda ngrásia

    [36] Mpe soki satana abandi kotungisa yo, senga libateli epai na Allah, mpo ete azali moyoki atonda boyebi

    [37] Мре okati ya bilembo bia ye (Allah), ezali butu na mokolo, moyi na sanza, bogumbamela moyi na sanza te, kasi bogumbamela Allah oyo akela yango, soki ya soló, bozali kobondela ye

    [38] Mpe soki basali lolendo,kasi baye bazali pembeni ya Nkolo nayo, bakumisaka ye butu na moyi mpe bazali kolemba te

    [39] O kati na bilembo bia ye, ozali kornona mabele ekawuki na botosi mpe bobangi, mpe tango tokitisaka mayi likolo na yango, etombwamaka mpe ekomi monene. Ya sólo oyo apesi yango bomoi, ye nde akosekwisa bawa. Ya sólo, azali na bokoki likolo ya biloko binso

    [40] Ya sólo, baye bazali kobebisa ndimbola ya mikapo mia biso, bakokoka kokima biso te. Boye, moto oyo akobwakama na moto azali malamu koleka oyo akoyakaka na kimia o mokolo ya suka? Bosala maye bolingi, ya sólo, amonaka maye bozali kosala

    [41] Ya sólo, baye bapengwa na bokundoli (kurani) tango eyelaki bango, mpe ya sólo yango ezali buku ya lokumu

    [42] Mabe ezuaka yango sikoyo te, to sima na yango te, ewuti epai ya oyo azali bwanya atonda lokumu

    [43] Oyo ezali kolobama ezali sé oyo esila kolobama na batindami liboso nayo. Ya soló, Nkolo nayo atonda bolimbisi mpe azali makasi na kopesa etumbu

    [44] Mpe soki totiaka kurani oyo na lokota mosusu (ya arabo te), balingaki koloba ete: Mpona nini balimboli mikapo na yango polele te? Nini? Kurani na lokota ya bapaya (motindami) arabo? Loba: Yango ezali bokambi mpe libiki mpona bandimi, kasi baye bandimi te matoyi na bango makangami mpe miso na bango mazipami. Bango wana nde bakobengama о esika ya mosika

    [45] Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku, sima bokeseni ekotaki. Mpe soki mpona liloba ya Nkolo nayo te oyo esilaki kolobama, nde likambo esili kokatama kati na bango. Mpe bazali sé na tembe

    [46] Oyo akosala malamu, ezali mpona ye moko, mpe oyo akobebisa ezali sé mpona ye moko. Kasi Nkolo wayo abubaka kati kati ya bawumbu naye te

    [47] Boyebi ya mokolo ya suka ezali sé na mayele naye moko. Mpe mbuma moko te ekobima na kati ya loposo na yango, mpe mwasi moko te akomema zemi to akobota, kino ekozala sé na mayele naye. Mpe mokolo akobenga bango ete: Wapi bambanda na ngai? Bakozongisa ete: Tozali koloba nayo na bosembo ete: Tozali na nzeneneke ata moko te oyo akondimela biso ete ozali na bambanda

    [48] Mpe baye bazalaki kokumisa bango liboso bakosundola bango, mpe bakoyebaka ete bazali na esika ya kokimela te

    [49] Moto atikaka kosenga bolamu te, mpe soki mabe ezui ye alongoli elikia

    [50] Mpe soki topesi ye bolamu na biso o sima ya mpasi azalaki na yango, alobi: Oyo ezali na mayele na ngai, mpe nandimi te ete mokolo ya suka ezali, mpe soki bazongisi ngai epai na Nkolo na ngai, nakozua sé oyo ya ngai ya kitoko. Mpe тропа baye bapengwa tokopesa bango sango ya maye bazalaki kosala, mpe tokomekisa bango etumbu ya makasi

    [51] Мре tango topesaka moto bolamu, akimaka mosika, mpe soki mabe ezui ye akomi kosenga makasi

    [52] Loba: Bomoni ndenge nini soki (kurani) oyo ewutaki epai ya Allah mpe sima bopengwi na yango, nani aleki kobunga koleka oyo amitiye mosika na mikakatano

    [53] Tokolakisaka bango bilembo bia biso o kati na mokili mpe na banzoto na bango moko, kino bakoyebaka ete ya soló, kurani ezali bosóló, boye Nkolo wayo akoki te? Ya soló, ye azali na bokoki mpe amonaka manso

    [54] Bazali na tembe тропа bokutani na Nkolo wa bango. Ya sólo ye azingi biloko binso

    Surah 42
    Botuni

    [1] Hâ, mîm

    [2] A‘in, sín, qâf

    [3] Lolenge wana nde Allah wa bokasi atonda bwanya azali kokitisela yo emoniseli lokola akitiselaki baye balekaki liboso lia yo

    [4] Maye manso mazali o likolo na mabele mazali yaye, mpe azali wa likolo azali monene koleka

    [5] Soki ezalaka ye te, likolo elingaki kopasuka. Mpe ba anzelu bazali kokumisa Nkolo wa bango, mpe bazali kosengela baye bazali na mabele bolimbisi. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [6] Mpe тропа baye bazali kozua babateli basusu batiki ye, Allah azali kornona maye bazali kosala. Mpe ozali mobateli na bango te

    [7] Mpe lolenge wana nde tokitiselaki yo kurani na lokota ya arabo, mpo okebisa yango na mama ya bamboka na baye bazuami zinga zinga na yango, mpe okebisa тропа mokolo mwa bosangani oyo ezali na tembe te. Basusu bakozala na lola mpe basusu bakozala na móto mwa saira (lifelo)

    [8] Mpe soki Allah alingaki, nde atia bango bazala umma moko, kasi (Allah) akotisaka nani alingi na ngolu naye. Mpe babubi bakozala na mokonzi te mpe mosungi te

    [9] Boye bazueli ye bakonzi misusu batiki ye? Kasi Allah azali ye moko mokonzi, mpe azali kopesa bomoyi na bawa, mpe azali na bokoki likolo ya biloko binso

    [10] Na manso oyo bokokabwana na yango, Allah nde mokati. Wana azali Allah Nkolo wa ngai, epai naye namipesi, mpe epai naye nde nazongi kotubela

    [11] Mokeli wa likolo na mabele. Asalela bino basi baye bawuti na banzoto na bino moko, mpe asaleli bino banyama mibale mibale, na nzela wana nde bokoma ebele. Azali na mokokani te oyo akokani naye, mpe azali oyo ayokaka mpe amonaka

    [12] Bafungola ya bomengo ya likolo na ya mabele bizali bia ye, apesaka bozui na oyo alingi mpe akutolaka na oyo alingi. Azali na boyebi ya biloko binso

    [13] Apesi bino mibeko ya (makambo ya) lingomba ndenge moko apesaki na Nûh, mpe oyo tozali komonisela yo mpe oyo topesaki Ibrâhîm, na Mûssa mpe Issa ete: Botelemisa lingomba, kasi bokabwana na yango te. Ezali likambo monene epai ya basangisi (Allah) na maye ozali kobenga bango тропа yango. Allah aponaka pembeni naye moto oyo alingi, mpe azali kokamba epai naye oyo azali kotubela

    [14] Mpe bakabwanaki te sé sima ya koyela bango boyebi, na maye oyo ekweyaki kati kati na bango. Soki ezalaki te ete liloba lisila kokomama epai ya Nkolo wa yo na tango oyo eyebani, alingaki kokata kati kati na bango. Mpe ya soló, baye bakitanaki buku sima na bango, bazali na tembe makasi bazali komiyeba te

    [15] Benga na lolenge wana tikala na nzela ya semba lolenge batinda yo, kolanda bamposa na bango te, mpe loba; nandimi na maye Allah akitisa kati na buku, mpe natindamaki тропа kokata na bosembo kati kati na bino. Allah azali Nkolo wa biso тре Nkolo wa bino, tozali na misala mia biso тре bozali na oyo ya bino, likambo moko ekoki kosalema te kati kati na biso na bino. Allah akosangisaka biso, тре epai naye nde bozongi (bokozalaka)

    [16] Mpe тропа baye bazali kolobaloba na ntina ya Allah osima ya bobengi bwaye, manso bazali kosala mazali na ntina te epai ya Nkolo na bango, kanda ekokitelaka bango mpe bakozalaka na etumbu makasi

    [17] Allah nde akitisa buku na bosôló, mpe na emekelo. Mpe yo oyebi te tango mosusu ngonga yango ebelemi

    [18] Baye bazangi kondima, bazali kowelisa yango. Kasi baye bandimi bazali kobanga yango, mpe bayebi ete yango ezali sôló. Baye bazali kotia tembe тропа mokolo ya suka, bazali o kati ya libungi ya mosika

    [19] Allah azali malamu тропа bawumbu baye, apesaka bozui na oyo alingi mpe azali na bokasi atonda nguya

    [20] Oyo akolinga kosala (bilanga) ya mokolo mwa suka, tokobakisela ye elanga, mpe oyo akolinga kosala awa na mokili, tokopesa ye yango (na bilengi), kasi akozuaka eloko te o mokolo mwa suka

    [21] To boye, bazali na basangisi basusu baye balingi kosalela bango mibeko misusu mia lingomba miye Allah apesi ndingisa te? Soki тропа mobeko oyo ezali kati na bango te, nde likambo lisilaki kokatama kati na bango. Kasi babubi bakozalaka na etumbu makasi

    [22] Okomona babubi bakomi kobanga тропа maye bazalaki kosala mpe (etumbu) ekokwela bango, mpe тропа baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na bisika ya bilanga bia Iola, mpe bakozuaka oyo bakolingaka epai ya Nkolo wa bango. Wana nde bolamu bonene

    [23] Wana nde sango elamu eye Allah azali kopesa epai ya bawumbu naye baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, loba: Nakosenga bino yango lifuta te, ezali sé bolingo bwa bondeko, mpe oyo akosala bolamu, tokobakisela ye ya kitoko koleka. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda melesi

    [24] To bazali koloba ete: Babukeli Allah lokuta, mpe soki Allah alingi akokanga motema nayo, mpe Allah azali kolimwisa lokuta na liloba mpe azali kondimisa bosembo. Ya soló, ayebi mabombami ya mitema

    [25] Ye nde andimelaka bawumbu naye baye bazali kosenga tubela, mpe azali molimbisi ya masumu, mpe ayebaka maye bosalaka

    [26] Mpe azali kondimela bandimi baye bazali kosala misala milamu, mpe abakiselaka bango bolamu bwaye. Kasi bapengwi bakozuaka etumbu ya makasi

    [27] Soki Allah apesaka bozui na bawumbu baye banso, balingaki kosala na yango mabe kati na mokili, kasi akitisaka yango ndenge alingi (mokémoké), ayebi ya solo, bawumbu baye mpe amonaka

    [28] Ye nde akitisaka mbula sima ya bango kozanga elikia mpe apanzaka ngolu naye. Ye nde azali mokonzi atonda lokumu

    [29] Mpe o kati ya bilembo bia ye, bokelami ya likolo na mabele, na maye manso mazali na bomoyi kati na yango. Mpe azali na bokoki ya kosangisa miango soki alingi

    [30] Nyoso ya mabe oyo ezali kozua bino, ewutaka sé na maye maboko na bino esali. Kasi azali kolimbisa ebele

    [31] Мре bokokoka kokima nguya ya Allah awa na mabele te, тре boko žala na mosungi te тре mobateli te na kotika Allah

    [32] Мре o kati ya bilembo bia ye, masuwa kati na ebale, (okomona yango) lokola bangomba

    [33] Soki alingi akitisi mopepe, mpe (okomona yango) etikali ya kotelema esika moko. Ya soló, nyoso wana ezali bilembo тропа (bato) banso baye bazali kokanga motema mpe bazali kotondo

    [34] То mpe akobebisa тропа masumu maye basalaki, kasi alimbisaka ebele

    [35] Baye bazali kobundisa mikapo mia biso, bayebi malamu ete: Bazali na esika ya kokimela te

    [36] Manso maye bopesamaki (ya malamu) ezali sé тропа bosepeli тропа bomoyi bwa lelo, kasi oyo ezali epai ya Allah ezali malamu mpe ewumelaka тропа baye bandima mpe bazali komipesa epai ya Nkolo wa bango

    [37] Mpe baye bazali komitiya mosika na kosala masumu to mbeba ya minene mpe soki basiliki balimbisaka

    [38] Mpe baye bazali koyanola na bobengami bwa Nkolo wa bango, mpe batelemisi losambo mpe bazali kotunana (yambo ya kosala likambo) kati kati na bango, mpe bazali kobimisa ndambo ya maye topesaki bango

    [39] Mpe baye soki basali bango mabe, balukaka komilongisa

    [40] Kasi lifuta ya oyo asali mabe ezali sé mabe lokola yango, na oyo akolimbisa mpe sima abongisi, Allah akofuta ye. Ya soló, ye alingaka babubi te

    [41] Kasi ba oyo bakomilongisa sima ya mabe basalaki yango, nzela ezali lisusu te mpo bazongisela bango mabe

    [42] Ya solo, nzela wana ezali тропа baye bazali kobuba bato mpe bazali kobebisa na mokili, batiki (kosalela) bosóló. Bango bakozuaka etumbu makasi

    [43] Kasi oyo akokanga motema mpe alimbisi, wana nde lolenge ya malamu ya kobongisa na yango likambo

    [44] Mpe oyo Allah akobungisa, akozua mobateli mosusu sima naye te. Okomona tango babubi bakomonaka etumbu bakolobaka: Boye lolenge ya kozongisa biso na mokili ezali te

    [45] Mpe okomona bakotiyaka bango liboso lia lifelo bazali kobanga, bazali koyeba lisusu te wapi bakokendeke, bakomi kotala malembe na liso lioko, mpe bandimi bakolobaka: Ya soló, bazangi bazali baye bamizangisi bango moko elongo na mabota ma bango mokolo ya suka. Ya solo, babubi bakozalaka na etumbu ya libela

    [46] Mpe bakozuaka babikisi misusu te na botiki Allah. Na oyo Allah abungisi, akozuaka lisusu nzela te

    [47] Boyamba mbela ya Nkolo na bino yambo ete eyela bino na mokolo oyo Allah akozongisa yango sima te. Mokolo yango kowumela ekozala te mpe bokokoka kowangana (masumu na bino) te

    [48] Soki babaluki, totindi yo te mpo ozala mokengeli na bango, ezali тропа yo kaka sé okomisa sango. Mpe biso soki topesi moto bolamu na biso asepeli na yango, mpe soki mpasi ezui bango тропа maye maboko ma bangomoko masalaki, ya soló moto azanga botondi

    [49] Bokonzi ya likolo na ya nsé ezali ya Allah. Akelaka maye oyo alingi apesaka likabo ya mwana mwasi na moto oyo alingi, mpe apesaka mwana mobali na oyo alingi

    [50] To abimisaka bango mapasa mobali na mwasi, mpe azangisaka kobota na oyo alingi. Ya sólo ye azali moyebi mpe akoka

    [51] Mpe ezali na moto moko te oyo Allah asololi naye polele sé ezala emoniseli, to ezala sima ya eloko ezipi ye, to mpe atindela ye motindami (anzelu) mpe apesa ye oyo alingi na ndingisa naye (Allah). Ya sólo aleki na likolo mpe atonda bwanya

    [52] Na boye nde tomoniselaki yo (kurani) molimo na motindo na biso. Ozalaki na boyebi moko te ya buku, mpe ya bondimi te, kasi tosalaki yango ezala mwinda mpo tokamba na yango nani tolingi o kati ya bawumbu na biso. Mpe ya sólo, ozali kokamba na nzela ya semba

    [53] Nzela ya Allah oyo manso mazali o likolo na nsé mazali ya ye, epai ya Allah nde makambo manso makokoma

    Surah 43
    Biloko ya kobongisa ya wolo

    [1] Há, mím

    [2] Mpe buku eye elimbolama polele

    [3] Ya sôló, totiaki yango kurani na lokota ya arabo mpo ete bokanisa

    [4] Mpe ya sôló, yango ezali o kati ya mama ya makomi pembeni na biso o likolo koleka etonda bwanya

    [5] Boye tóbetela bino bokundoli ete bozalaki bato mabe

    [6] Boni kati ya bantoma baye totindaki epai ya bato ya yambo

    [7] Ntoma atikalaki koyela bango te sé kino batióla ye

    [8] Mpe tobomaki mingi koleka kati na bango, mpe tosilaki kotanga ndakisa ya bato ya yambo

    [9] Mpe soki otuni bango; nani akela likolo na mabele? Bakolobaka: ya soló, oyo akela yango nde oyo azali na bokasi atonda boyebi

    [10] Oyo atiyelaki bino mabele ezala etando ya kofanda, mpe atiyeli bino banzela kati kati na yango mpo bokambamaka (na yango)

    [11] Ye nde akitisaka mayi kowuta na likolo na bokoki, mpe tozali kopesa na yango bomoyi na mboka oyo ekufa (ekawuka), mpe lolenge wana nde bokobimisama

    [12] Mpe ye nde akela balongani mibale mibale bango banso, mpe asaleli bino masuwa na banyama mpo bomataka na yango

    [13] Mpo ete bofanda na mikongo mia yango, mpe bokanisa bolamu ya Nkolo wa bino osima ya komata na yango mpe bokolobaka: lokumu ya oyo asaleli biso maye, mpe tozalaki na makoki ya kosala yango te

    [14] Mpe ya soló epai ya Nkolo wa biso nde tokozongaka

    [15] Mpe kati ya bawumbu naye oyo akela bango bazueli ye bambanda. Ya soló, moto azali na bopengwi monene mpe ya polele

    [16] To na kati ya maye akela aponi bana basi (ba anzelu), mpe asali bino bana mibali

    [17] Мре soki bapesi moko kati na bango sango ya maye bazali kopesa na Ar-Rahmân (Allah) (тропа kobotama ya mwana mwasi), okomona elongi naye ekomi moyindo na mawa. (etondi na pizoli na kosilika)

    [18] (Soki batuni ye) ezali nini? (Akolobaka ezali nde mwana mwasi), oyo akoki kosala ata eloko moko te, mpe akoki mpe kotelema тропа koloba polele te, sé kosala mabe

    [19] Mpe bazali kokomisa baanzelu baye bazali bikelamu ya Ar-Rahmân ete bazali basi. Boye bazalaki banzeneneke na bokelami na bango? Ekokomama maye bazalaki koloba mpe bakotunama

    [20] Mpe bazali koloba ete: Soki Ar-Rahmân alingaki nde tobondeli bango te, bazali na boyebi moko te, bazali sé na makanisi mabe

    [21] To boye topesaki bango buku liboso mpo basimbama na yango

    [22] Kasi bakolobaka ete: Tokutaki bankoko na biso na lingomba oyo mpe tozali na bokambami mpe tozali sé kolanda yango

    [23] Мре lolenge wana nde totindaki liboso nayo mokebisi na engumba sé bato ya bozui kati na yango baboya (ye) mpe baloba: Tokutaki bankoko na biso na lingomba oyo, tokolanda sé nzela na bango

    [24] (Mokebisi) alobi ata soki nayeli bino nzela ya semba koleka oyo ya bankoko na bino? Bakoyanolaka: Tokondima na maye oyei na yango te

    [25] Tozuaki bango mabe, mpe tala lolenge nini bato ya lokuta basukaki

    [26] Mpe tango Ibrâhîm alobaki na tata waye na bato naye: Ya soló, ngai namitiye mosika na maye bozali kobondela

    [27] Longola sé oyo akela ngai, ya sólo ye nde akokamba ngai na (nzela ya semba)

    [28] Mpe atiaki liloba bango litikala na libota lia ye, na ntina ete bamizongisa epai ya Allah

    [29] Kasi napesaki bango na batata na bango bisengo ya токе kino bosembo (kurani) eyelaki bango mpe na motindami ya polele

    [30] Mpe tango bosóló eyelaki bango balobi: Oyo ezali bondoki bwa polele, mpe tokondimela yango te

    [31] Мре balobaki: Mpona nini bakitisaki kurani te ata epai ya moto ya monene kati ya bamboka mibale

    [32] Boye bango nde bakabolaka bolamu ya Nkolo wayo? Tokabolelaki bango bomoyi bwa bango kati na mokili, totomboli basusu koleka baninga, mpo basusu bazala basali ya baninga. Mpe ngolu ya Nkolo wayo ezali malamu koleka maye bazali kosangisa

    [33] Soki (bobangi) te ete bato bazala umma moko (ya libungi), nde totielaki bapengwi ya Ar- Rahmán mpona bandako na bango motondo ya mabende ya pembe mpe ngala-ngala (ebuteli) mpo bamataka na yango

    [34] (nde totielaki bango) na bandako na bango bikuke mpe bambeto ya kitoko oyo bakofandela

    [35] Na bonzenga. Wana nyoso ezali mpona bosepeli ya bomoyi bwa mokili, kasi ya mokolo mwa suka epayi ya Nkolo nayo ezali mpona babangi

    [36] Na oyo akokanga miso (mpe amitiye mosika) mpona bokundoli bwa Ar-Rahmân, tokotiela ye satana azala moninga naye ya libela

    [37] Мре ya soló, bazali kopekisa bango nzela, mpe ya sólo, bazali kokanisa ete bazali na nzela ya semba

    [38] Kino moto wana akokoma epai na biso akoloba na elima naye ete: Mawa na ngai! Soki ntaka kati na ngai nayo lokola moniele na eloli, mpe oyo moninga ya mabe

    [39] Mokolo mona mokosalisaka bino na eloko te mpo bozalaki babubi, bokosanganaka okati ya etumbu

    [40] Boye, yo nde ozali na bokoki ya koyokisa mokufi matoyi to boye okambaka mokufi miso to oyo azali na libungi ya polele

    [41] To mpe tokotombola yo na likolo (koboma yo), mpe ya sólo, tokosilana na bango

    [42] To tolakisa yo mabe oyo tolakaki bango (etumbu) kasi tozali na bokasi likolo na bango

    [43] Zala na bokangami na maye bamoniselaki yo. Ya sólo, ozali na nzela ya semba

    [44] Ya sólo (kurani oyo), ezali bokundoli тропа yo mpe bato nayo. Mpe mosika te bokotunama

    [45] Мре tuna batindami ba biso baye totindaki liboso nayo, boye tozalaki kozua banzambe misusu na botiki Ar-Rahmán тропа kobondela bango

    [46] Mpe tosilaki kotinda Mûssa na makamwisi та biso epai ya falo na bato naye (bankumu), mpe alobaki: Ya soló, nazali motindami ya Nkolo ya mokili

    [47] Mpe tango bayeli bango makamwisi та biso, okomona bango bazali koseka yango

    [48] Mpe na likamwisi nyoso na oyo tolakisaki bango, ezalaki makasi mingi koleka oyo ya liboso. Mpe topesaki bango etumbu mpo tango mosusu bakoki komizongisa epai na biso

    [49] Mpe balobi ete: Oh yo nganga! Sengela biso Nkolo nayo тропа maye alakaki epai nayo, na yango tokokambama ya sólo na nzela ya semba

    [50] Mpe tango tolongoleli bango etumbu, okomona bango wana babuki mibeko ya elaka

    [51] Mpe falo abengi bato naye alobi: Oh bato na ngai! Bokonzi ya ezipito ezali na ngai te, mpe mayi ya ebale oyo ezali kotambola na nsé na ngai, boye bozali kornona te

    [52] To boye nazali malamu te koleka moto mpamba oyo, mpe alobaka polele te

    [53] Mpona nini babwakeli ye basinga ya wolo ya maboko te, to mpe ba anzelu baya naye elongo

    [54] Na boye nde abangisaki bato naye mpe batosi ye. Ya soló, bazalaki bato mabe

    [55] Mpe tango bapesaki biso kanda makasi, tozuaki bango mpe tozindisaki bango banso

    [56] Mpe totiaki bango bazala liteya mpona baye bakoya sima na bango

    [57] Mpe tango ndakisa ya mwana ya Maryam, epesamaki bato nayo bakomaki koyima yima (bamoni yango pamba)

    [58] Balobi banzambe na biso to ye, nani azali malamu? Babeti ndakisa wana sé mpona yo na lolenge ya bilobaloba, kasi bazali sé bato balutisaki kosuana

    [59] (Issa) azali sé mowumbu oyo topessaki ye bolamu, mpe tozalisa ye ndakisa mpona bana ya isalayele

    [60] Soki tolingaki nde totiaki kati na bino ba anzelu awa na nsé bazali kokitana

    [61] Mpe ya soló, akozala elembo тропа mokolo ya suka,botia tembe te, mpe bolanda ngai. Oyo nde nzela ya semba

    [62] Satana abungisa bino te mpo azali monguna ya polele тропа bino

    [63] Mpe tango Issa ayaki na bilembo alobaki: Nayeli bino yango na bwanya, mpe mpo nalimbolela bino ndambo ya maye bozalaki kokesene na yango. Bobanga Allah mpe botosa ngai

    [64] Ya solo, Allah azali Nkolo wa ngai, mpe Nkolo wa bino, bobondela ye. Oyo nde nzela ya semba

    [65] Kasi bakeseneki kati kati na bango. Babubi bakozuaka mabe o mokolo mwa etumbu ya makasi

    [66] Boye bazali kozela (mokolo ya suka) yango ekoyela bango mbalakaka mpe bakoyeba te

    [67] O mokolo mona, baye balinganaki bakokomaka banguna kati kati na bango, longola sé babangi (Allah)

    [68] Eh! Bawumbu na ngai! Lelo, bozala na bobangi mpe niawa te

    [69] В aye bandimaki na bilembo bia biso, mpe bazalaki kotosa (ba mizilima)

    [70] Bokota o kati ya Iola, bosala biyenga elongo na basi na bino, (bosepela)

    [71] Basani mpe bakopo ya wolo biko balukaka, bikotiama liboso na bango, o kati na yango bitondi na maye mazali na mposa na bango mpe bosepelisi miso. Bokozala libela na kati na yango

    [72] Wana ezali nde lola oyo bokitani yango, тропа maye bozalaki kosala

    [73] Kati na yango bokozalaka na bambuma ebele тропа kólia

    [74] Ya sôló, batomboki bakozalaka na etumbu ya moto ya lifelo libela

    [75] Ekokutolama te mpe bakozanga elikia o kati na yango

    [76] Tosalaki bango mabe te kasi bango moko nde bamisalaki mabe

    [77] Mpe bakobelelaka: Oh Mâlik! Nkolo wayo aboma biso, akoyanolaka bango: Botikali libela o kati na yango

    [78] Tosilaki koyela bino bosôló, kasi ebele kati na bino baboyaki yango

    [79] Boye basili kokana likita, kasi biso nde tozali na likita

    [80] To bazali kokanisa ete toyokaka sekele na koyima yima na bango na mongongo ya sé te? Iyo! Batindami na biso epai na bango bazali kokoma nyoso (ba anzelu)

    [81] Loba: Soki Ar-Rahmân azalaka na mwana, nalingaki kozala wa yambo тропа kobondela

    [82] Lokumu na Nkolo ya likolo na ya mabele, Nkolo ya ngwende na maye bazali koloba

    [83] Tika bango bazinda na mabe mpe basakana kino bakokutana na mokolo mwa elaka na bango

    [84] Ye nde azali Nzambe ya kobondela likolo mpe o nsé, тре azali wa bwanya atonda boyebi

    [85] Mpe apambolami ye oyo azali na bokonzi ya nsé na ya likolo, na maye ezali okati na yango, mpe ye nde azali na boyebi ya tango ya suka. Mpe epai naye nde bokozongisama

    [86] Мре baye bazali kobondela bango elongo naye (Allah), bakokoka te kolobela, longola sé baye batatoli bosembo mpe bango bazali koyeba

    [87] Mpe soki otuni bango nani akela bango, bakolobaka: Ya soló ezali Allah, kasi тропа nini bazali kopesa ye mokongo

    [88] Mpe liloba lia ye (ntoma Muhammad epai ya Allah): Nkolo! Ya soló, bato wana bakondimaka te

    [89] Malamu, mitiya mosika na bango (limbisa bango) mpe loba: Boboto. Kala mingi te bakoyebaka

    Surah 44
    Milinga

    [1] Hâ, mîm

    [2] Na buku (kurani) ya polele

    [3] Ya soló, tokitisaki yango o butu ya mapamboli. Ya soló, biso tozali bakebisi

    [4] O kati na yango mokano ya makambo manso ya bwanya mazali kozuama

    [5] Motindo kowuta epai na biso. Biso nde totindaka

    [6] Mawa kowuta na Nkolo wayo. Ya sólo ye azali moyoki atonda boyebi

    [7] Nkolo ya likolo na mabele na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki ya sólo bozali na tembe te

    [8] Nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye apesaka bomoyi na liwa, Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bankoko na bino wa yambo

    [9] Kasi bango (bato) wana bazali na tembe, bazali kosakana

    [10] (Malamu) zela mokolo oyo likolo ekoya na molinga ya polele

    [11] Ekozipa bato, oyo nde etumbu ya makasi

    [12] Nkolo; tiya etumbu mosika na biso, ya soló tozali bandimi

    [13] Lolenge nini bokundoli na mitema epesa bango pasi, kasi motindami asilaki koyela bango polele

    [14] Sima bapesi yango mokongo mpe balobi: Batangisa ye, azali na ligboma

    [15] Tokolongola etumbu moke. Ya sólo, bozali bato mabe

    [16] Mokolo tokobeta na ndenge ya mabe, mpo ete biso esengeli tosala bongo

    [17] Мре liboso na bango, tomekaki bato ya falo, mpe motindami ya malamu ayelaki bango

    [18] (Ayebisi) bango: Bopesa ngai bawumbu ya Allah, nazali motindami malamu epai na bino

    [19] Bomilakisa te epai ya Allah na kosalela ye lolendo. Ya solo, nayeli bino elembo ya polele

    [20] Mpe ya soló, nazali koluka libateli epai ya Nkolo wa ngai, mpe Nkolo wa bino. Mpo ete bobamba ngai mabanga te

    [21] Mpe soki bondimeli ngai te, bomitiya mosika na ngai

    [22] Abengaki Nkolo wa ye, ya solo bazali batomboki

    [23] Sala mobembo na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ete bokolandama (na banguna na bino)

    [24] Tika ebale lolenge wana, esengeli na bango bazinda (kokufa)

    [25] Boni batikaki kati na bilanga na miluka

    [26] Bilanga na milona na bandako ya kitoko

    [27] Na bilengi biye bazalaki kosepela kati na yango

    [28] Lolenge wana nde ezalaka, mpe tokitanisaki yango bato mosusu

    [29] Ezala likolo na mabele etikalaki kolela te na kozela

    [30] Mpe tobikisaki bana ya isalayele na etumbu ya nsoni

    [31] Kowuta epai ya falo oyo amilakisaki okati ya bato mabe

    [32] Mpe tosilaki kotiya bango bazala elembo тропа molongo mobimba

    [33] Mpe topesaki bango makamwisi тропа komeka bango

    [34] Ya soló, ba oyo wana bazali koloba

    [35] Liwa тропа biso nde oyo ya yambo, tokoki kosekwa lisusu te (sima na yango)

    [36] Bozongisa bankoko na biso soki bozali koloba bosóló

    [37] Boye bango nde bato malamu to bato ya tubbai (motindami to moto malamu), baye bazalaki liboso na bango, tobomaki bango mpo ete bazalaki bato mabe

    [38] Mpe tokelaki likolo na mabele mpe manso maye mazali kati na yango pamba te

    [39] Tokelaki yango mibale na bosóló, kasi ebele na bango bazali koyeba te

    [40] Ya sólo, o mokolo mwa bokati (makambo ya bato) nde ekozalaka elaka na bango banso

    [41] Mokolo moye moninga to moto ya pene akosalisaka yo na eloko te, mpe bakosunganaka te

    [42] Longola sé oyo Allah akoyokelaka mawa. Ya soló, ye azali wa bokasi atonda ngolu

    [43] Ya soló nzete ya Zaqqúm

    [44] Ekozalaka bilei ya basumuki

    [45] Lokola mafuta ya mabe, ezali kotokisa libumu

    [46] Lokola kotoko ya mayi ya moto ya makasi

    [47] Bozua ye mpe bomema ye o kati ya moto

    [48] Sima bobwakela ye mayi ya moto na motu naye, lokola etumbu makasi

    [49] Meka, ya sólo, yo (okanisaki ete) ozali na bokasi mpe lokumu

    [50] Wana nde maye bozalaki kotiya tembe mpe kobundisa

    [51] Ya sólo, babangi bakozalaka na bovandi bwa kitoko

    [52] Kati na bilanga na mingala (mia lola)

    [53] Bakolataka bilamba bia pepele ya pembe bitongama bazali kotalana

    [54] Na yango, tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene

    [55] Mpe na kimia penza bakosengaka kati na yango bambuma kitoko ya lolenge nyoso

    [56] Liwa likozuaka bango te, sé oyo ya liboso mpe abateli (Allah) bango na etumbu ya lifelo

    [57] Bolamu ya Nkolo wayo. Wana nde elonga ya monene

    [58] Mpe ya soló, tokomisaki yango mpete na lolemu nayo mpo ete; basalisana na yango na bokundoli

    [59] Zela moke, bango mpe bakozela

    Surah 45
    Kofukama

    [1] Hâ, mîm

    [2] Buku ekitaki kowuta epai ya Allah azali na bokasi atonda bwanya

    [3] Ya soló, okati ya likolo na mabele bilembo тропа bandimi

    [4] Mpe na bokeli bino na banyama, ezali bilembo тропа baye bazali na tembe te

    [5] Mpe bokeseni bwa butu na mokolo; na maye Allah akitisaki kowuta na likolo lokola bozui, oyo ezali kopesa bomoyi na mabele sima ya kokufa na yango, mpe kotambola ya mopepe bipai na bipai, ezali bilembo mpo bato bakoka kokanisa

    [6] Wana ezali mikapo mia Allah tozali kotangela yo na bosoló. Liloba kani bakondimaka yango osima (koyoka mpe kozua liloba) ya Allah na bilembo bia ye

    [7] Bato banso baye bazali kosala masumu ya minene mpe kobuka lokuta; bakozua mabe

    [8] (Oyo) azali koyoka mikapo mia Allah miye bazali kotangela ye sima asaleli yango lolendo lokola atikala koyoka yango te, pesa ye sango ya etumbu ya makasi

    [9] Soki ayebi eloko moke okati ya mikapo mia biso, asaleli yango litio, baye wana nde bakozua etumbu ya kokitisama

    [10] Sima bango bakozalaka na lifelo; bakosalisaka bango na eloko te; ezala ata baye bazuaki bango ete bazali babateli na bango na batiki Allah. Bakozalaka na etumbu monene

    [11] (Kurani) oyo ezali bokambi, mpe baye bazali kopengwa na mikapo mia Nkolo wa bango, bakozua etumbu ya makasi koleka

    [12] Allah akela ebale тропа bino; тро ete masuwa etambolaka na mitindo mia ye тре mpo bozuaka bolamu bwa yango mpe botondo. (ye)

    [13] Mpe akeli тропа bino manso maye mazali okati ya likolo na mabele na mitindo kowuta epai naye. Ya soló, wana ezali bilembo mpo bato bakanisa

    [14] Loba na baye bandima: Balimbisa baye bazali kolikia na mikolo mia Allah te, mpo moto nyoso afutama na maye asalaki

    [15] Oyo akosala bolamu ezali тропа ye moko, mpe oyo akobebisa, ekozongela sé ye moko. Sima bokozongisama epai ya Nkolo wa bino

    [16] Мре tosilaki kopesa na bana ya isalayele buku тре mibeko тре bontoma, тре topesaki bango biloko bia kitoko, mpe totombolaki bango esika koleka basusu (na tango na bango)

    [17] Mpe toyelaki bango bilembo bia polele ya mibeko mpe bakabwanaki te sé tango boyebi eyelaki bango тропа likunya okati na bango. Ya soló, Nkolo nayo akosambisa kati na bango na bosôló o mokolo mwa suka тропа maye bazalaki na bokeseni

    [18] Sima totiyaki yo na nzela ya mibeko landa yango, kasi kolanda te bamposa ya baye bazanga boyebi

    [19] Ya soló, bango bazali na bokoki ya kosalela yo bolamu te koleka bolamu ya Allah. Mpe ya soló, bato mabe bango na bango bazali baninga, Allah nde azali mobateli ya bandimi

    [20] Buku (Kurani) oyo ezali polele тропа bato, тре ezali bokambi тре ngolu тропа baye bazali па kondima ya soló

    [21] Boye baye bazali kosala mabe, bakanisi ete tokozua bango lolenge moko na baye bandimi mpe bazali kosala misala milamu okati ya bomoyi mpe liwa na bango? Oyo ndenge ya mabe ya kokata likambo

    [22] Mpe Allah akela likolo na mabele na bosóló; mpe mpo afuta moto nyoso na maye asalaki, mpe bakobubamaka te

    [23] Boye ozali kornona te ete oyo azui mposa naye nde nzambe naye, mpe Allah abungisi ye na boyebi, mpe akangi ye matoyi na motema mpe atie ezipelo na miso, nani mosusu akokamba ye osima ya Allah, boye bozali kokanisa te

    [24] Mpe bazali koloba ete: Bomoyi ezali sé ya mokili ya nsé, tozali kofanda mpe tozali kokufa, bobele tango nde ezali koboma biso. Bazali na boyebi te тропа yango sé makanisi

    [25] Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mapolele bakolobaka ete: Bozongisa bankoko na biso na bomoyi soki bozali koloba bosóló

    [26] Loba: Allah apesaka bino bomoyi sima akobomaka bino; sima akosangisaka bino o mokolo mwa suka, mokolo moye mokozalaka na tembe te; kasi ebele ya bato bazali koyeba te

    [27] Mpe bokonzi bwa likolo na mabele ezali ya Allah. Mpe tango mokolo wana mokokokaka, bato ya lokuta bakozangaka

    [28] Mpe okomona bato banso bakofukama. Mpe bakobengama o ngambu ya buku na bango, lelo bokofutama тропа maye bosalaki

    [29] Oyo buku na biso ezali koloba bosembo likolo na bino. Tozalaki kozua maye manso bozalaki kosala

    [30] Kasi baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, Nkolo wa bango akokotisa bango na bolamu bwa ye. Wana nde elonga ya polele

    [31] Mpe тропа baye bapengwaki (bakolobaka na bango): Boye batangelaki bino mikapo mia ngai te? Kasi bosalaki lolendo. Ya soló bozalaki batomboki

    [32] Mpe tango bazali koyebisa bango ete elaka ya Allah ezali ya sólo, mpe ya sólo, ngonga ena ezali na tembe te, bolobaki toyebaki yango te, tozalaki kornona yango pamba, mpe tondimaki na yango te

    [33] Mpe akomonisa bango mabe na bango oyo basalaki, mpe maye bazalaki kotiola ekokueyela bango

    [34] Mpe bakoyebisa bango: Lelo tobosani bino ndenge bobosanaki mokolo mwa elaka mwa bino moye, mpe esika na bino ezali nde lifelo. Kasi bakozwaka mosungi te

    [35] Nyoso wana mpo bozuaki mikapo mia Allah na liseki, mpe bomoyi ya mokili ekosaki bino. Mokolo wana bakobimisama okati na yango te mpe bakoyambama te, okati ya ngolu

    [36] Lokumu na Allah Nkolo ya likolo na mabele, Nkolo ya molongo mobimba

    [37] Mpe atonda na bonene okati ya likolo na mabele, mpe azali na bokasi mpe bwanya

    Surah 46
    Bisobe ya zelo

    [1] Hâ, mîm

    [2] Bokiti y a buku kowuta epai ya Allah wa bokasi atonda bwanya

    [3] Tokelaki likolo na mabele na maye manso mazali otei na yango nyoso mibale na bosóló na tango eye eyebani. Bapengwi bazali koboya na maye bazali kokebisa bango

    [4] Loba: Bokanisi nini тропа baye bozali kobelela na botiki Allah, bolakisa ngai nini bakela na mabele, to bazali na mosangisi o likolo? Boyela ngai buku ya bosembo oyo ezalaki liboso ya oyo (kurani) to elembo ya boyebi soki ya soló, bozali na bosembo

    [5] Mpe nani abungi koleka moto oyo azali kobondela na botiki Allah eloko ekoyanola ye te kino o mokolo ya suka, тре bazali koyanola na mabondeli na bango te

    [6] Мре tango bakosangisa bato (тропа bokati makambo), bakozalaka banguna na bango тре bakowangana mabondeli na bango

    [7] Мре soki batangeli bango mikapo mia biso mia polele, baye bapengwa bazali kolobela na bosembo tango eyeli bango ete: Oyó ezali bonganga ya polele

    [8] То тре bazali koloba ete: Asali yango na ndenge naye, loba: Soki nasali yango na ndenge na ngai, bokosala ngai eloko moko te liboso ya Allah, ayebi malamu maye bozali kopanza sango (na mabe тропа kobukela kurani lokuta). Akoki lokola nzeneneke kati na ngai na bino, mpe azali molimbisi atonda ngolu

    [9] Loba: Nazali motindami wa yambo ya koyela bino te, mpe nayebi te oyo bakosala na ngai mpe тропа bino; nazali kolanda sé maye bakitiselaki ngai, mpe nazali sé mokebisi ya polele

    [10] Loba: Boye bozali kornona ndenge nini soki (boyebi) ewuti epai ya Allah, mpe bozali kondimela yango te; mpe nzeneneke moko kati ya bana ya isalayele amoni mpe andimi na yango? Mpe bosali lolendo? Ya soló, Allah akambaka babubi te

    [11] Bapengwi bakolobaka na bandimi: Soki oyo ezalaki malamu (babola) balingaki koleka biso te, mpe soki bakambami na yango te, balobi: Oyo ezali lokuta ya kala

    [12] Мре liboso naye, buku ya Mûssa ezalaki bokambi mpe ngolu, kasi buku oyo na lokota ya arabo ezali motatoli nayango, тропа kokebisa babubi mpe ezala sango elamu тропа bato ya malamu

    [13] Ya soló, baye balobi Nkolo wa biso Allah sima basembuami, bakozalaka na bobangi te mpe bakozala na mawa te

    [14] Baye wana nde bato ya lola, bakozalaka libela okati na yango, mpe bakofutamaka тропа maye basalaki

    [15] Mpe topesaki mobeko na moto ete asalela baboti naye bolamu, mama naye amemaki zemi naye na mpasi mpe abotaki ye na mpasi, mpe zemi naye na komelisa ye kino akokisi sanza ntuku misato kino akomi makasi, mpe akokisi mbula ntuku minei alobi: Nkolo tika ete natondo yo тропа bolamu nayo osaleli ngai, mpe na baboti na ngai, mpe tika ete nasala mosala ya malamu oyo ekosepelisa yo, mpe bongisa libota na ngai. Ya soló natubeli epai nayo mpe ya sólo nazali okati ya baye bazali komisokia (bamizilima)

    [16] Baye wana nde tokondimela bango тропа bolamu oyo basalaki, mpe tokolongolaka mabe na bango, mpe bakozalaka okati ya bato ya lola, engebene na elaka ya bosóló oyo bapesaki bango

    [17] Mpe oyo akoloba (akofiotola) na baboti naye: Ufi, bozali kolaka ngai ete nakosekwa? Kasi ebele basila koleka liboso mpe bazonga te? Mpe bango mibale bazali kosenga libateli epai Allah, mpe bazali koloba naye: Mawa nayo, ndima elaka ya Allah ezali ya sólo. Mpe azali kozongisela bango ete: Oyo ezali sé masapo ya kala

    [18] Baye wana esengeli bazua etumbu na baye baleka liboso lia bango okati ya bilima na bato. Ya sólo, basilaki kozanga

    [19] Bato banso bazali na esika na bango mpo na oyo bazalaki kosala, mpe bakofutaka bango engebene na misala na bango mpe bakobubama te

    [20] Mpe mokolo moye bakomemaka bapengwi nalifelo; (bakoyebisaka bango) ete: Bobebisaki bolamu na bino na mokili mpe bosepelaki bongo, kasi lelo bokofutama na etumbu ya makasi engebene na maye bosalaki lolendo na mokili na botikaki bosóló, mpe тропа maye bozalaki kobebisa

    [21] Mpe kanisa ndeko ya ba Aad, tango akebisaki bato naye na ahqáf, liboso naye mpe sima naye, bakebisi basilaki koleka ebele ete: Bobondela sé bobele Allah, ya soló, nazali kobangela bino etumbu ya mokolo monene

    [22] Balobaki: Oyeli biso mpo oboyisa biso banzambe na biso? Na yango yela biso oyo ozali kolaka biso soki ya soló, ozali okati ya bato ya bosembo

    [23] Alobaki ete: Boyebi ezali nde epai ya Allah; nazali kokomisela bino maye natindami na yango. Kasi nazali kornona bozali bato oyo bozangi koyeba

    [24] Mpe tango bamoni (etumbu) lokola lipata ezali kokende nanse, balobi: Lipata oyo ekonokela biso mbula. Kasi ezali oyo bozalaki koluka yango noki, wana ezali nde mopepe ya etumbu makasi

    [25] Ebebisaki nyoso na mibeko mia Nkolo na yango, sima na yango na tongo, bango banso bamonanaki lisusu te, etikalaki sé bandako na bango. Lolenge wana nde tofutaka batomboki

    [26] Mpe ya soló, tofandisaki bango malamu, mpe makasi koleka ndenge tofandisi bino, mpe topesaki bango boyoki, bomoni mpe mitema, kasi boyoki na bango, mpe bomoni na bango, mpe mitema na bango nyoso wana esalisaki bango na eloko te, na tango bazalaki kowangana bilembo bia Allah, mpe bazingamaki na etumbu тропа ntina ya maye bazalaki kosala ya litio

    [27] Mpe tosilaki koboma bamboka ya pembeni na bino, mpe totiyaki bilembo mpo bakoka komizongisa

    [28] Mpona nini bazuaki lisungi te epai ya baye bazuaki bango banzambe na botiki Allah? Ete: Bango nde bakopusanisa bango pembeni na Allah, kasi banzambe yango basundoli bango. Wana ezali lokuta na bango oyo bazalaki kosala

    [29] Mpe (kanisa) tango totindelaki yo ebele ya bilima, mpo bayoka ndenge kurani ezali kotangema, mpe tango bayokaki yango, balobi: Boyoka malamu, tango esili; bazongaki epai na bato na bango тре bakebisaki bango

    [30] Balobaki: Oh bato na biso! ya soló, toyokaki maloba ya buku oyo ekitaki sima ya Mûssa; (ezali koloba) bosóló ya maye maleka mpe ezali kokamba na bosembo o nzela ya semba

    [31] Oh bato na biso! Boyamba moteyi ya Allah, тре bondima naye. Akolimbisa masumu na bino mpe akobatela bino na etumbu ya makasi

    [32] Mpe oyo akondimela motei ya Allah te, akozua ekimeli te na bokonzi ya Allah na mokili, mpe akozala na babateli te elongo naye. В a oyo wana nde bazali na libunga ya polele

    [33] Boye bazali kornona te ete Allah nde akelaki likolo тре na nsé, тре alembaki тропа kokela yango te, boye azali na nguya te ya kosekwisa bawa? Iyo, ya soló, azali na nguya likolo ya biloko binso

    [34] Mpe mokolo moye bakomemaka bapengwi na lifelo; (bakotunaka bango) oyo ezali solo te? Bakoyanolaka: Iyo. Ya sólo, Nkolo wa biso. Akolobaka: Bomeka etumbu тропа maye bozalaki kopengwa na yango

    [35] (Muhammad) kanga motema ndenge batindami bakangaki mitema, kasi kowelisa bango na etumbu te. Mokolo bakomona maye balakaki bango, ekozala lokola bawumelaki sé tango moko ya pamba na mokili, baye esengeli babebisama ezali te sé bato mabe

    Surah 47
    Muhammad

    [1] Baye bapengwa mpe bazali kobundisa nzela ya Allah basili kobebisa misala mia bango

    [2] Мре baye bandima mpe basali misala milamu mpe bandimi na maye makitaki epai ya Muhammad ete ezali soló kowuta epai ya Nkolo na bango, akolongola mabe na bango, mpe akobongisa makambo na bango

    [3] Wana mpo ete bapengwi balandi lokuta, kasi baye bandima balandi bosembo kowuta epai na Nkolo na bango. Lolenge wana nde Allah azali kopesa másese epai ya bato

    [4] Soki bokutani na bapengwi (na bitumba) bokata bakingo na bango, mpe soki bolongi bango, bokanga bango basinga makasi, na sima soki bolingi botiki bango bakei pamba, soki mpe bolingi bato na bango bapesa bino biloko nde botiki bango, kino bitumba bikosila, mpo ete soki Allah alingaki nde asilani na bango ye moko, kasi ezali тропа komeka bino. Mpona ba оуо bakokufa na nzela ya Allah, akobebisa misala na bango te

    [5] Akokamba bango mpe akobongisa misala mia bango

    [6] Mpe akokotisaka bango na lola eye alimbolelaki bango (balolenge na yango)

    [7] Oh bino baye bondima (na Allah)! soki bosalisi Allah, akolongisa bino mpe akolendisa matambi na bino

    [8] Mpe bapengwi bakozua mpasi mpe akobungisaka misala mia bango

    [9] Mpo baboyaki maye Allah akitisaki, yango abebisi misala mia bango

    [10] Mpona nini te bazali kotambola na mokili batala lolenge kani esukelaki baye bazalaki liboso na bango? Allah abebisaki bango, mpe lolenge wana nde ekozalela bapengwi

    [11] Mpo ete, ya soló, Allah azali mobateli ya bandimi kasi ya sólo bapengwi bazali na mobateli te

    [12] Ya sólo, Allah akokotisa baye bandimaki mpe basalaki misala milamu na lola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, тре bapengwi bazali kosepela na kólia lolenge banyama baliaka, mpe esika na bango ya kovanda ezali nde na lifelo

    [13] Mpe bamboka ya makasiboni koleka etuka nayo oyo ebenganaki yo, tobebisaki yango mpe bazuaki mosungi te

    [14] Boye oyo azali na polele kowuta epai na Nkolo naye, akokani na oyo babongiseli ye mosala ya mabe mpe balandi bamposa na bango

    [15] Ndakisa ya Iola eye elengelami тропа babangi (Allah); o kati na yango ezali na mingala ya mayi oyo ebebaka te, ezali na mingala ya miliki oyo elengi na yango ebonguanaka te, mpe na mingala ya masanga ya elengi тропа bomeli, na mingala ya mafuta ya nzoi ya kitoko, mpe тропа bango ezali na lolenge ya bambuma nyoso ekozala okati na yango, mpe bakozua bolimbisi kowuta epai ya Nkolo wa bango. Kasi, boye bazali lolenge moko na oyo akotikala na lifelo ya libela bakomelisaka bango mayi ya moto ya makasi mpe ekokatakata misopo na bango

    [16] Мре kati na bango, bamosusu bazali koyoka yo, soki babimi epai nayo balobi na baye bazuaki boyebi ete: Alobi nini? Baye wana Allah akanga mitema mia bango mpe balandi sé bamposa na bango

    [17] Мре тропа baye bamitiyaki o nzela ya semba, akokamba bango koleka mpe akobakisela bango bobangi na bango

    [18] Boye bazali kozela ete ngonga eyela bango mbalakaka?! Nzoka bilembo na yango bisili koya; mpe soki bokundoli eyeli bango bakokanisa ndenge nini

    [19] Mpe yeba ete: Ya soló, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te bobele Allah, sima osenga bolimbisi ya masumu nayo na ya bandimi ya mibali na ya basi. Allah nde ayebi makambo na bino (awa na nsé), mpe ayebi bisika ya bopemi na bino (lobi kati na lola)

    [20] Mpe bandimi bazali koloba ete: Mpona nini suratu ekitisami te? Kasi soki suratu ya mibeko okati na yango milobeli bitumba, okomona baye bazalaki na bokono omitema bazali kotala yo na etaleli ya moto amoni liwa, nde ezali malamu mpona bango

    [21] Botosi mpe liloba ya malamu. Mpe soki motindo mozuami тропа likambo (ya bitumba) ezalaki malamu тропа bango bandimela Allah тропа likambo yango

    [22] Boye soki bopesi mokongo, bokokende te тропа kotia mobulu na nsé mpe kokata bondeko ya mabota? (soki bolingi bokonzi koleka)

    [23] Baye wana Allah apesaki bango botutu, mpe abomi bango boyoki mpe bomoni

    [24] Mpona nini bazali kososola kurani te to boye mitema na bango mikangami na fungóla

    [25] Ya soló, baye bazali kozongela banzela na bango (ya mabe) na sima ya koyeba nzela ya semba oyo eyeli bango polele, satana akosi bango mpe akweisi bango

    [26] Mpo bango balobaki na baye bayini emoniseli ya Allah ete: Tokotosa bino na ndambu ya makambo, kasi Allah ayebi malamu basekele na bango

    [27] Mpe ekozala boni soki ba anzelu bazui milimo mia bango, wana bazali kobeta bango na bilongi na mikongo mia bango

    [28] Wana ezali mpo balandaki maye Allah aboyaki, mpe bazalaki na ntina ya kondima yango te, тре misala mia bango mibebisamaki

    [29] To boye baye bazali na bokono na mitema mia bango (bakanisi ete) Allah akobimisa bonguna na bango polele te

    [30] Mpe soki tolingaki nde tolakisaki yo bango, oyebi bango na bilembo na bango. Mpe okoyeba bango na lolenge na bango ya koloba. Kasi Allah ayebi misala na bino

    [31] Mpe tokomeka bino mpo toyeba banani bazali kobunda (тропа Allah), тре banani bazali kokanga mitema, mpo ete na sima tomonisa basango na bino

    [32] Ya soló, baye bapengwa тре bazali kobundisi nzela ya Allah, mpe baboyi kondimela motindami o sima ya kolimbolela bango bokambi ya polele, wana bakosala Allah eloko te. Kasi akobebisa misala mia bango

    [33] Oh bino baye bondima! Botosa Allah mpe botosa motindami (na ye) kasi bobebisa misala mia bino te

    [34] Ya sólo, baye bapengwa тре babundisaki nzela ya Allah, sima liwa lizui bango sé na bopengwi, Allah akolimbisaka bango te

    [35] Bolembe te mpe bobenga na kimia te na tango bozali likolo na bango, mpe Allah azali elongo na bino, mpe akokutola misala na bino te

    [36] Ya soló, bomoyi ya mokili ezali sé lisano mpe liseki. Soki bondimi mpe bobangi, (Allah) akopesa bino bolamu na bino mpe akosenga bino bomengo te

    [37] Soki atunaki bino yango, bolingaki bozala bapimi, mpe akobimisa boyini na bino

    [38] Bino nde, soki babengi bino ete bobimisa na nzela ya Allah, basusu bakangi maboko, kasi oyo akokanga maboko ayeba ete asali yango na nzoto naye moko, nzoka nde Allah azali wa bomengo mpe bino bozali babola. Mpe soki bopesi mokongo akoya na bato ya sika, mpe bakozala lokola bino te

    Surah 48
    Elongi

    [1] Ya soló, topesaki yo elonga moko ya monene

    [2] Mpo Allah alimbisa masumu nayo oyo eleka na oyo ekoya sima, mpe mpo akokisela yo bolamu mpe akamba yo о nzela ya semba

    [3] Mpo ete Allah apesa yo lisungi ya makasi

    [4] Ye nde akitisaka kimia о mitema mia bandimi mpo ebakisela bango kondima likolo ya kondima na bango, mpe mapinga ya likolo na ya nsé mazali ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya

    [5] Mpo akotisa bandimi ya mibali na ya basi okati ya Iola oyo ezali koleka na nsé na yango míngala, bakozalaka libela kati na yango, mpe bakozimisa masumu na bango. Mpe wana ekozala elonga monene epai ya Allah

    [6] Мре apesa etumbu na bato ya bilongi mibale ya mibali mpe ya basi baye bazali kosalela Allah mabe, ndenge moko mpe lokola basangisi Allah ya mibali mpe ya basi bazali kokanisela Allah mabe, makanisi yango ya mabe ekokwela bango, mpe Allah asilikeli bango, mpe alakeli bango botutu, mpe alengeleli bango lifelo. Mpe oyo bozongi ya mabe

    [7] Mpe mapinga ya likolo na ya nsé mazali ya Allah, mpe Allah azali na nguya atonda bwanya

    [8] Ya soló totindaki yo ozala nzeneneke mpe mopesi sango malamu mpe mokebisi

    [9] Mpo ete bondimela Allah na motindami wa ye, mpe bopesa ye lisungi mpe bopesa ye lokumu (Muhammad), mpe bosanzola ye (Allah) tongo mpe mpokwa

    [10] Ya sólo, baye bazali kolapa epai nayo (ndayi), bazali kolapa nde na Allah, loboko ya Allah ezali likolo ya maboko na bango. Kasi oyo akobebisa, asili komibebisa ye moko, mpe oyo akokokisa elaka eye alakaki Allah, akofuta ye lifuta linene

    [11] Okati na baye bafandaka na bamboka baye batikalaki na sima balobaki ete: Mabota mpe bozui na biso bikangisaki biso na sima, limbisa biso, bazali koloba na balolemu na bango oyo ezali na mitema mia bango te, loba: Nani azali na makoki ya kosalisa bino epai ya Allah soki alingi kopesa bino bolamu to mpasi? Kasi Allah ayebi maye manso bozali kosala

    [12] Kasi bozalaki kokanisa ete motindami na bandimi bakozongela lisusu mabota na bango te? Lolenge babongiselaki bino na mitema mpe bozalaki kokanisa mabe, mpe bozali bato mabe

    [13] Mpe oyo akondima na Allah na motindami naye te, ya soló tolengeli etumbu ya makasi тропа bapengwi

    [14] Bokonzi ya likolo na ya mabele ezali ya Allah. Alimbisaka oyo alingi mpe apesaka etumbu na oyo alingi. Kasi Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [15] Baye batikalaki na sima bazali koloba ete: Soki bolingi kokende kozua biloko ya banguna biye basundoli, botika biso tolanda bino, balingi kobalola liloba lia Allah. Loba: Bolanda biso te, wana nde Allah asilaki koloba тропа bino liboso, тре bakoloba ete: Bosali biso nde likunya. Nzoka nde bazali na mayele токе

    [16] Loba na bato ya mboka oyo batikali na sima ete: Kala mingi te bokobengama тро bökende kobunda na bato ya makasi, to batosa na komisokia na lingomba. Мре soki botosi, Allah akopesa bino lifuta kitoko, kasi soki bopesi mokongo ndenge bosalaki liboso, akopesa bino etumbu ya makasi

    [17] Mabe ezali te na mokufi miso, moto ya tengu na moto ya bokono, kasi oyo akotosa Allah na motindami naye, akokotisa ye na Iola oyo ezali koleka na nsé na yango mingala, kasi oyo akoboya kotosa, Allah akopesa ye etumbu ya makasi

    [18] Allah asilaki kosepela na bandimi tango bazuaki mokano ya kolapa liboso nayo na nsé ya nzete, mpe (Allah) ayebaki maye mazali o mitema mia bango, sima akitisaki kimia likolo na bango mpe apesaki bango elonga ya pembeni

    [19] Мре bomengo ebele mpo bazua yango, тре Allah azali na bokasi atonda bwanya

    [20] Allah alakaki bino bomengo ebele bokozua yango, mpe awelisaki yango тропа bino, тре alongolaki maboko ya bato likolo na bino, тре mpo ezala elembo тропа bandimi, тре akamba bino o nzela ya semba

    [21] Мре alaki bino (bomengo) mosusu oyo bokokaki kozua yango te, kasi Allah azingaki yango na nguya. Mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso

    [22] Mpe soki bapengwi babundisi bino, bakokima bango moko mpe bakozua lisungi te mpe mobateli te

    [23] Wana ezali mobeko ya Allah uta kala, mpe okokuta mbongwana te na mobeko ya Allah

    [24] Mpe ye nde alongolaki maboko na bango likolo na bino mpe alongolaki maboko na bino likolo na bango na nsé ya lubwaku ya makka, na tango oyo asilaki kolongisa bino likolo na bango. Mpe Allah azalaki kornona maye bozalaki kosala

    [25] Bango nde bapengwi mpe bapekisaki bino kokota na masdjid esantu (ya makkah), mpe bapekisi bibwele ya mbeka ekoma na esika yango ya kosasa, soki тропа bandimi ya basi na ya mibali baye boyebaki bango te, na kati ya banguna mpe na koboma, mpe bolingaki kozua mbeba na bango na kozanga koyeba, mpo ete Allah akotisa nani alingi okati ya ngolu naye. Mpe soki (bandimi) bayebanaki, nde topesaki bapengwi kati na bango etumbu ya makasi

    [26] Tango bapagano batiaki kanda ya kozanga koyeba o mitema mia bango, kasi Allah akitisaki kimia naye likolo na motindami naye, mpe likolo ya bandimi, mpe atindaki bango na kokangama na liloba ya bobangi Allah, mpe esengelaki na bango kokangama na yango mpo ete ezali ya bango. Mpe Allah azali na boyebi ya biloko binso

    [27] Allah ya soló, asilaki kokokisela motindami naye ndoto na bosembo ete: Bokokota na masdjid ensatu (ya Makkah) na bolingi ya Allah na kimia nyoso, basuki na bino ya kokokolama to ya kokutolama bobanga te, mpe ayebaki maye boyebaki te. Mpe lisusu apesi bino elonga ya pembeni

    [28] Yende atindaki motindami naye na bokambami, mpe lingomba ya soló, mpo ete ezala likolo ya mangomba manso. Мре Allah akoki lokola nzeneneke

    [29] Muhammad motindami ya Allah, mpe baye bazali naye (bayekoli naye) bazali makasi epai ya bapengwi, bazali na mawa kati na bango. Okomona bango bazali kogumbama mpe kofukama тропа koluka ngrásia mpe bosepeli epai ya Allah, bilembo na bango bizali na bilongi na bango osima ya kofukama, wana nde lolenge na bango esila kokomama okati ya torah, ndenge moko okati ya Indjil lokola molona ewuti kobima na mabele na bonzenga na yango sima etelemi likolo na nzete na yango ezali kokamwisa baloni, mpo na makasi na bango (Allah) atumbolaka kanda ya bapagano. Allah alaki baye bandimi mpe basali malamu bolimbisi mpe lifuta ya monene

    Surah 49
    Biteni

    [1] Oh bino bandimi! Boleka Allah na motindami naye te (nakozua mikano) bobanga Allah, ya soló azali moyoki atonda boyebi

    [2] Oh bino bandimi! Botombola mingongo na bino te likolo ya ntoma, mpe bolobela ye na koganga te, ndenge bosalaka bino na bino, noki te misala mia bino mikobeba mpe bokoyeba te

    [3] Ya soló, baye bazali kokitisa mingongo mia bango pene na motindimi, baye wana Allah amekisi mitema mia bango bobangi. Bakozua bolimbisi na lifuta linene

    [4] Ya soló, baye bazali kobenga yo libanda sima ya bandako, ebele na bango bazali na mayele te

    [5] Soki bazelaka kino okobima epai na bango wana ezali malamu тропа bango. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [6] Oh bino bandimi! Soki moto ya kilikili ayeli bino sango boluka koyeba yango malamu, noki te bosala bato mabe na bozangi boyebi sima bokomi kolelalela тропа maye bosalaki

    [7] Mpe boyeba ete motindami ya Allah azali kati na bino, soki atosaki bino na makambo ebele, nde bokweyaki na kpokoso, kasi Allah alingeli bino bondimi mpe abongisi yango o mitema mia bino, mpe aboyeli bino bopengwi na kilikili mpe kozanga botosi. Ba oyo wana nde bakambami malamu

    [8] Wana ezali bolamu ewuti epai ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya

    [9] Mpe soki lisanga ya bandimi mibale bazali kobunda, bobongisa kati na bango, mpe soki mosusu aboyi koyoka, bosangana тропа kobundisa ye kino akozonga na mobeko ya Allah. Mpe soki ayoki, bobongisa kati na bango na bosembo, mpe bosembola. Mpamba te Allah alingaka baye bazali kosembola

    [10] Ya soló, bandimi bazali bandeko, mpe bobongisa bondeko kati na bino. Mpe bobanga Allah mpo ete bozua ngolu naye

    [11] Oh bino bandimi! Lisanga moko te kati na bino etiola baninga,tango mosusu bazali malamu koleka bino, basi mpe batióla baninga te tango mosusu bazali malamu koleka bango. Bomibebisana lokumu te, mpe bomipesana bankombo ya mabe te, wana ezali ebengeli ya mabe sima ya bondimi. Mpe oyo akotubela te, bango wana nde bazali babubi

    [12] Oh bino bandimi! Tika ete bomitia mingi penza mosika ya kokanisela, mpamba te kokanisela mosusu makanisi ezali masumu, bomilandana te na koyeba basekele ya baninga, mpe botongana te, moko kati na bino akolinga kolia mosuni ya ndeko naye akufa? Bokosepela na yango te, kasi bobanga Allah. Ya soló, Allah ayambaka tubela atonda ngolu

    [13] Oh bino bato! Ya sólo, tokelaki bino kowuta na mobali mpe mwasi, mpe tokesenisi bino bamboka mpe bikolo mpo ete boyebana. Ya sólo, moto ya lokumu koleka kati na bino azali oyo azali kobanga Allah. Ya sólo, Allah azali moyebi atonda basango

    [14] Bato baye bafandaka na bamboka balobi: Tondimi, loba ete: Naino bondimi te, kasi boloba ete: Tobongoli mitema, mpamba te, naino bondimi bofandeli bino na mitema te, mpe soki botosi Allah na motindami waye, akokutola eloko moko te na misala na bino. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [15] Ya soló, bandimi nde baye bandimi na Allah na motindami naye, sima bazali kotia tembe te, mpe bazali kobunda na misolo mia bango na milimo mia bango o nzela ya Allah. Bango nde (bato) ya bosembo

    [16] Loba: Boye nde bokotangisa Allah lingomba lia bino mpe Allah ayebi maye mazali o likolo mpe o nsé? Mpe Allah azali na boyebi ya biloko binso

    [17] Bazali kolobela yo mpo na islamu na bango ete babongoli mitema, loba: Bolobela ngai islamu na bino te, kasi Allah nde akolobela islam na bino na ndenge akambi bino na bondimi, soki ya soló bozali na bosembo

    [18] Ya soló, Allah ayebi manso maye mabombami na likolo mpe na nsé, mpe Allah azali kornona oyo bozali kosala

    Surah 50
    Qaf

    [1] Qâf Na kurani ya lokumu

    [2] Kasi bazali kokamwa ete mokebisi ayeli bango okati na libota na bango moko, mpe bapagano balobi ete: Oyo ezali likambo ya kokamwa

    [3] Boye soki tango tokokufaka tokokomaka putulu? Wana ekozalaka bozongi ya mosika

    [4] Ya soló, toyebi ndenge nini mabele ekolia banzoto na bango, mpe tozali na buku eye ezali kobomba manso

    [5] Kasi baboyaki kondima na bosôló oyo eyelaki bango, mpe bazali komiyeba lisusu te

    [6] Boye bazali kornona likolo te lolenge nini tokela mpe topesaki yango bonzenga? Tokembisaki yango ezala kopasuka te

    [7] Мре lolenge nini fotandaki mabele (na bonene), тре tolendisaki yango na bangomba, тре tobotisi yango lolenge nyoso ya biloko

    [8] Mpo mowumbu nyoso oyo azali kolikia na bozongi amona mpe akanisa

    [9] Mpe tozali kokitisa mayi mapamboama kowuta na likolo, mpe tobotisi na yango bilanga na ba mbuma oyo bazali kobuka yango

    [10] Mpe nagh’l ya milai na biteni na yango ezali ya kokangama

    [11] (Ezala) bozui тропа bawumbu (na ngai), mpe na yango topesaki bomoyi na mboka oyo ekufa. Lolenge wana nde lisekwa ekozala

    [12] Bato ya Núh mpe ya Rass mpe ba Thamúd baboyaki liboso kondima

    [13] Lolenge moko na ba aad mpe falo na bandeko ya Loth

    [14] Mpe bato ya Aykah, na bato ya Tubba, banso baboyaki kondima na batindami kasi bakozuaka etumbu

    [15] Te. Tolembaki te na bokeli ya liboso. Kasi bazali na tembe na ntina ya bokeli ya sika

    [16] Мре ya soló, tokelaki moto, mpe toyebi eloko nini oyo etungisaka ye. Na yango biso tozali pembeni naye koleka mosisa naye ya kingo

    [17] Tango bayambi mibale bakofanda ngambu ya (loboko) ya mobali mpe ya mwasi

    [18] Akoloba liloba moko te kino ekozala pembeni naye oyo azali kotala mpe azali kokoma

    [19] Mpe molangwa ya liwa eyaki na bosembo, wana nde oyo ozalaki kokima

    [20] Mpe bakofula na kelelo. Wana nde mokolo ya elaka

    [21] Mpe molimo nyoso mokoyaka na mokambi naye mpe na nzeneneke

    [22] Opesaki likebi na yango te, mpe tolongoli elamba oyo ezipaki yo, miso nayo lelo ekomona

    [23] Mpe Molingani naye akoloba: Tala oyo ezali epai na ngai, ezali pembeni

    [24] Bino mibale, bobwaka mopagano mpe motomboki okati na lifelo

    [25] (Mpo azalaki) kopekisa bolamu, (тропа bawumbu ya Allah), azalaki motomboki тре moto ya tembe

    [26] Ye nde atielaki Allah nzambe mosusu, bino mibale bobwaka ye okati ya etumbu ya makasi

    [27] Moninga naye akolobaka: Nkolo ezali ngai te moto natiyaki ye azala motomboki, kasi azalaki na libunga ya mozindo

    [28] (Allah) akolobaka: Bosuana liboso na ngai te, nasilaki kopesa bino elaka

    [29] (Epai nangai) liloba libongwanaka te, mpe nazali mobubi ya bawumbu te

    [30] Mokolo moye tokolobaka na lifelo ete otondi, ekoyanolaka: Ya kobakisa ezali

    [31] Mpe bakopusaka lola pene ya babangi (Allah) ekozalaka mosika te

    [32] Oyó nde balakaki bino, тропа (moto) oyo atubelaka mpe abatelaka mibeko

    [33] Oyo azalaki kobanga Ar- Rahmán, ata azali kornona ye te, mpe ayei na motema ya kotubela

    [34] Bokota na kimia okati na yango, wana nde mokolo ya seko

    [35] Bakozuaka nyoso oyo bakolinga mpe pembeni na biso bazali na litomba mosusu

    [36] Bato boni tobomaka liboso na bango, mpe balekaki bango na makasi, mpe batongaki bandako ya milai mpe ya kitoko, boye bazali na esika ya kokima (etumbu na biso)

    [37] Wana ezali bokundoli тропа oyo azali na motema to azali koyoka mpe kornona

    [38] Mpe tosilaki kokela likolo na nsé na nyoso oyo ezali o kati na yango mibale na mikolo motoba, kasi bolembu ezuaki biso te

    [39] Kanga motema тропа maye bazali koloba, mpe sanzola matondo ya Nkolo wayo, yambo ya kobima na moyi mpe yambo ya kokoto na yango

    [40] Mpe pesa ye lokumu kati kati ya butu mpe gumbama (тропа kosambela)

    [41] Мре yoka, о mokolo oyo mobeleli akobelela na esika oyo ezali pene

    [42] Mokolo oyo bakoyokaka ya soló bogangi ya makasi, wana nde mokolo ya bosekwisami

    [43] Ya soló, biso nde topesaka bomoyi mpe liwa, mpe epai na biso bozongi ekozala

    [44] Mokolo oyo mabele ekopasukaka тропа bango na lombangu, bosangani wana ezali pete тропа ngai

    [45] Toyebi malamu oyo bazali koloba, kasi ozali na mibeko ya komatela bango te, kundola na kurani moto azali kobanga etumbu na ngai

    Surah 51
    Mopepe ya kopupola

    [1] (Nalapi) na mipepe miye mipanzaka

    [2] Mpe na bamemi mikumba (ya mapata)

    [3] Mpe na ba masuwa ezali kotambola likolo ya mayi

    [4] Mpe na bakaboli, kolanda na mibeko

    [5] Ezali solo oyo balaki bino

    [6] Mpe ya sôló, mokolo ya suka ekoya

    [7] Mpe na likolo oyo ezali na banzela bipasolama malamu

    [8] Ya sólo, bozali na bokeseni na maye bozali koloba

    [9] Oyo aboyi yango, ezali oyo apesaki bondimi mokongo

    [10] Bato ya lokuta basili kobomama

    [11] В aye bazindi na molangwa ya mokili

    [12] Bazali kotuna тропа mokolo ya suka ekozala tango nini

    [13] Mokolo oyo bakomekama na moto

    [14] Вотека bomekami ya bino (etumbu) mpo bozalaki koluka yango na lombango

    [15] Ya soló, babangi bakozalaka na lola oyo ezali na miluka

    [16] Bakozuaka oyo Nkolo wa bango akopesa bango. Ya sólo, bazalaki liboso na yango bato ya malamu

    [17] Bazalaki kolala токе na butu

    [18] Мре yambo tongo etana bazalaki kosenga bolimbisi

    [19] Mpe na bomengo na bango oyo bazalaki kopesa epai na mosengi mpe mozangi

    [20] Mpe bilembo biye bizali okati na mokili bizali тропа baye bazali kondima na bosóló

    [21] Mpe kati na bino moko, boye bozali kornona te

    [22] Mpe bozui na bino, na maye bolakelama mazali olikolo

    [23] Na Nkolo ya likolo na nsé, ezali ya sólo bosembo, ndakisa ya maye bozali kolobela

    [24] Boye sango ya bapaya ya Ibrâhîm ya lokumu ekomelaki yo

    [25] Tango bakotaki epai naye, balobi: Kimia (ezala nayo); ayanoli: Kimia mpe ezala likolo lia bapaya oyo bayebani te

    [26] Мре akendaki malembe epai ya libota naye mpe amemelaki bango ngombe ya mafrita ya kotumba

    [27] Mpe apusi yango pene na bango alobi: Bokolia te

    [28] Mpe abangi bango, balobi: Kobanga te, mpe bapesi ye sango ya kobotama ya mwana ya mobali oyo atondi na bwanya

    [29] Mwasi naye akei azali koganga mpe na komikwanza elongi naye, alobi: Mobange mpe ekomba lokola ngai, nabota ndenge nini

    [30] Balobi: Lolenge wana nde Nkolo nayo alobi. Ya soló, ye azali moyebi atonda na bwanya

    [31] (Ibrâhîm) alobi: Oh batindami! Boyeli nini

    [32] Balobi: Ya sólo, totindami тропа batomboki

    [33] Mpo tobwakela bango mabanga ya mabele ya makasi

    [34] Oyo etiyami kowuta epai ya Nkolo nayo ezali тропа etumbu

    [35] Мре tobimisaki bandimi okati na bango

    [36] Мре tokutaki sé ndako moko ya mpamba ya baye bamisokia

    [37] Mpe totikaki elembo тропа baye bazali kobanga etumbu makasi

    [38] (Lolenge moko totikaki elembo) epai ya Mûssa, tango totindaki ye epai ya falo na makamwisi ya polele

    [39] Kasi apesaki mokongo mpe alikiaki sé na makasi naye, mpe alobaki ete: Oyo azali nganga to azali ligboma

    [40] Kasi tozuaki ye na mapinga naye, mpe tobwakaki bango okati ya mbonge тропа ezaleli naye ya mabe

    [41] Lolenge moko na (bato) ya Aad, tango totindelaki bango mopepe ya mabe (etumbu)

    [42] Ezalaki kotika eloko moko te oyo ezuaki yango na nzela kino ekomisaki yango putulu

    [43] Lolenge moko na (bato) ya thamûd tango bayebisaki bango: Bosepela sé тропа tango ya moke

    [44] Bazangaki kotosa mibeko mia Nkolo wa bango kino etumbu ezuaki bango bazali kornona

    [45] Kaši bakokaki komitelemisa te, mpe bamilongisaki te

    [46] Mpe lolenge moko ezalelaki bato ya Nûh liboso. Ya soló, bazalaki bato mabe

    [47] Mpe totongaki likolo na bokasi na biso, mpe (totiyaki yango ezala) monene

    [48] Mpe totandaki mabele, mpe oyo lolenge kitoko ya etando

    [49] Mpe tokelaki biloko nyoso mibale mibale, mpo bokoka kokanisa

    [50] Bokima epai ya Allah, nazali sólo mokebisi ya polele тропа ye

    [51] Kasi botiela Allah nzambe mosusu te. Ya soló nazali mokebisi ya polele тропа bino kowuta naye

    [52] Ezali boye. Mpe motindami moko te ayaka epayi na bato ya yambo sé baloba oyo azali nganga to azali moto ya ligboma

    [53] Boye bazuaki lotomo yango te? Nzoka nde bazalaki nde balekisi ndelo

    [54] Mitiya mosika na bango, bakogangela yo te, (тропа bango)

    [55] Мре kundola, ya sôló bokundoli esalisaka bandimi

    [56] Мре nakelaki bilima na bato te sé тропа kobondela ngai

    [57] Nalukaka bozui epai na bango te, mpe nalukaka baleisa ngai te

    [58] Ya sólo, Allah nde mopesi monene ya bozui, Nkolo bokasi koleka

    [59] Kasi ya sólo, baye babubaki bakozua etumbu kokokana na biteni ya baninga baye babubaki, na yango, bawelisa yango te

    [60] Mabe ekozala epai ya bapengwi o mokolo oyo balakaki bango

    Surah 52
    Ngomba

    [1] Na ngomba ya at’tur

    [2] Na buku oyo ekomama (na ba anzelu)

    [3] Likolo ya ekomami ya polele

    [4] Na ndako oyo etondama

    [5] Mpe na likolo lolenge etombwama

    [6] Мре na ebale ya kotonda

    [7] Ya soló, etumbu ya Nkolo nayo ekokokisama

    [8] Ekozala na moto ya kopekisa yango te

    [9] Mokolo likolo likoningana

    [10] Mpe bangomba bikotambola

    [11] Mpasi ekozalaka mokolo wana epai ya babuki lokuta

    [12] Baye bazalaki na komibuaka na kati ya masano

    [13] Mokolo oyo bakobendaka bango na makasi na lifelo

    [14] Oyo nde lifelo oyo bozalaki kotiyela yango tembe

    [15] Boye oyo mpe ezali kindoki to bozali kornona malamu te

    [16] Bôžika kati na yango, bozala na bozeli to te, bokozala sé ndenge moko. Bokofutama sé kolandana na oyo bozalaki kosala

    [17] Ya sôló, babangi bakozalaka o kati ya lola na bolamu na bango

    [18] Bakomisepelisa na oyo Nkolo wa bango akopesa bango, mpe Nkolo wa bango akobatela bango na etumbu ya lifelo

    [19] Bolia bomela na mposa na biso, тропа lifuta ya maye bosalaki

    [20] Mpe bayekami likolo ya bambeto ebongisama kitoko, mpe tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene ya moyindo

    [21] Mpe тропа baye bandima mpe mabota na bango elandi bango na bondimi; tokolandisela bango mabota na bango, mpe tokokutolaka maye basalaki ata токе te okati ya misala mia bango. Moto nyoso akotunamaka na makambo naye

    [22] Mpe tokopesaka bango bambuma mpe mișuni (ya kolia) oyo bakolinga

    [23] Nkeni moko ekotambola kati kati na bango, ekopesa bilobela lobela te mpe lisumu te

    [24] Okati na bango, bilenge mibali bakotelamaka тропа kosalela bango, bazali kongenga lokola mabanga kitoko na bongengi

    [25] Mpe bakobalukaka bango na bango bazali kotunana

    [26] Bakoloba ete: Ya soló, tofandaki okati ya mabota ma biso na bobangi (Allah)

    [27] Yango Allah apesi biso mpe abateli biso na etumbu ya lifelo

    [28] Ya sólo, tozalaki kobondela ye, ya sólo, ye azali malamu mpe atonda mawa

    [29] Kundola тропа bolamu ya Nkolo nayo, ozali nganga te mpe ozali ligboma te

    [30] То bazali koloba ete: Azali mokomi ntoki, tozela likama naye ya liwa

    [31] Loba: Bozela, ngai mpe na bino mpe tozali kozela

    [32] То boye bamposa na bango ezali kotinda na lolenge wana, to boye bazali nde batomboki

    [33] To bazali koloba ete: Asalaki yango na ndenge naye moko? Kasi bazali kondima na yango te

    [34] (Malamu) baya na makambo mosusu ezala lokola yango, soki ya soló, bazali na bosembo

    [35] To bakelamaki kowuta na eloko moko te, to bango nde bakeli

    [36] To bango nde bakela likolo na nsé? Kasi bazali kondima te

    [37] To bazali na sanduku ya bozui ya Nkolo nayo, to baleki ye na nyoso

    [38] To bazali na emateli ya likolo mpo baya koyokamela? Kasi moyokameli na bango aya na elembo na yango ya polele

    [39] To (Allah) azali na bana basi mpe bino bozali na bana mibali

    [40] To azali kosenga bango lifuta oyo ezali kopesa bango pasi тропа kofuta

    [41] To bazali na boyebi ya mabombami nde bazali кокота yango

    [42] To bazali kosala likita ya mabe? Kasi likita ya bapengwi ezongelaka sé bango moko

    [43] To bazali na nzambe mosusu na botiki Allah? Lokumu na Allah aleki oyo bazali kosangisa

    [44] Mpe soki bamoni ndambu ya likolo ekweyi (etumbu enene), balobi: Wana ezali nde mapata ekangama

    [45] Tika bango kino bakokutanaka na mokolo na bango oyo bakobetamaka na nkake

    [46] Mokolo oyo likita ya mabe na bango likosalisa bango na eloko moko te, mpe bakozuaka lisungi te

    [47] Ya soló, babubi bakozala na etumbu mosusu likolo ya oyo ya liboso, kasi ebele na bango bazali koyeba te

    [48] Mpe kanga motema тропа kozela motindo ya Nkolo nayo, mpo ete ya sólo, yo ozali na nsé ya ebateli na biso. Mpe sanzola lokumu ya Nkolo nayo tango ozali kotelema

    [49] Mpe kumisa ye (Allah) okati ya eteni ya butu, mpe otango minzoto mizali kolimwa

    Surah 53
    Minzoto

    [1] Na monzoto tango ekweyaka

    [2] Moninga na bino abungi te mpe akosami te

    [3] Mpe azali koloba makambo na makanisi naye te

    [4] Ezali sé emoniseli ezali kokitela ye

    [5] (Anzelu Djibril) oyo atonda bokasi nde atangisaki ye yango

    [6] Oyo azali na bokasi sima amilakisi na lolenge naye ya anzelu

    [7] Mpe atelemaki na kongombela ya likolo koleka

    [8] Sima apusanaki pene mpe akitaki na nsé koleka

    [9] Ezalaki bongo na ntaka mibale to mpe mua moke na yango

    [10] Amoniselaki mowumbu naye maye amonisaki

    [11] Motema ekosaki te oyo emonaki

    [12] Boye bokoboyela ye na oyo amonaki

    [13] Мре amonaki ye lisusu tango akitaki тропа mbala ya mibale

    [14] Pene na sidr muntaha

    [15] Mpembeni na yango nde paladizo ya seko ezuami

    [16] Tango nzete ya sidr ezipamaki na oyo ezipi yango

    [17] Miso ebungi te, elekisi mpe ndelote

    [18] Ya soló, amonaki bikamuiseli minene ya Nkolo naye

    [19] Bopesa ngai sango ya Láta na Uzza

    [20] Mpe mosusu ya misato Manáta

    [21] Boye bokozala na mwana mobali mpe ye azala na mwana mwasi

    [22] Wana ezali bokaboli ya mabe

    [23] Wana ezali sé bankombo oyo bopesa yango bino moko na batata mpe bankoko na bino, Allah akitisela yango elembetele te. Bazali kolanda sé makanisi na bamposa, nzoka nde bokambi esilaki koyela bango kowuta epai ya Nkolo na bango

    [24] To boye moto alingi azua nyoso lolenge azali kokanisa

    [25] Bomoyi ya nsé na oyo ya lobi, ezali epai ya Allah

    [26] Boni kati ya ba anzelu na likolo kosengela na bango bato ekosalisa te, sé sima ya ndingisa ya Allah na oyo alingi mpe asepeli

    [27] Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, bapesi ba anzelu bankombo ya basi

    [28] Kasi bazali na boyebi te, bazali sé kolanda makanisi. Mpe makanisi esalaka bosembo eloko te

    [29] Mitiya mosika na oyo akoboya bokundoli bwa biso, mpe bazali sé kolinga bomoyi ya mokili

    [30] Kuna nde esika mayele na bango ekendeke. Ya sólo, Nkolo nayo ayebi malamu nani abungi nzela naye, mpe ayebi nani oyo akambami

    [31] Mpe maye manso mazali na likolo mpe na nsé ezali ya Allah, mpo afuta baye basali mabe mpo na misala na bango, mpe afuta baye basali malamu тропа misala na bango

    [32] Baye bazali komitiya mosika na masumu ya minene, bazali sé kokweya na mwa mabunga ya mike mike, ya sólo Nkolo wa yo azali na bolimbisi bonene. Azali na boyebi koleka bino, ayebi malamu lolenge akelaki bino kowuta na mabele,mpe tango oyo bozalaki litono ya makila okati ya mabumu ya bamama na bino. Bomikumisa te na kondima, ye nde ayebi nani azali kobanga ye mpenza

    [33] Omoni te oyo azali kopesa mokongo

    [34] Mpe apesaka sé moke (suka na yango) akati kopesa

    [35] Boye azali na boyebi ya mabombami nde azali kornona

    [36] To boye bayebisaki ye te na ntina ya makomi ya Mûssa

    [37] Na ya Ibrâhîm oyo akokisaki elaka

    [38] Moto moko te akomema lisumu ya moninga

    [39] Kasi ya soló, moto akozuaka sé na molende naye

    [40] Mpe ya sólo, molende naye ekomonana

    [41] Sima, akofutama mpenza malamu

    [42] Mpe ya sólo, nyoso ekosukisama epai ya Nkolo wayo

    [43] Mpe ye nde asekisaka mpe alelisaka

    [44] Мре ye nde abomaka mpe apesaka bomoyi

    [45] Mpe ye nde akela balongani mibale, mwasi na mobali

    [46] Kowuta na litanga ya mayi ya mokongo tango babwaki yango

    [47] Mpe kokela ya mbala ya mibale ezali sé epai naye

    [48] Mpe ye nde apesaka moto bomengo, mpe ye nde apesaka bobola

    [49] Mpe ye nde Nkolo ya ach-chi’râ

    [50] Ye nde abomaka bato ya liboso na (mboka) Aad

    [51] Na Thamûd, moko atikala te

    [52] Mpe liboso na bango, bato ya Nûh bazalaki babubi mpe balekisaki ndelo

    [53] Lolenge moko na mboka oyo ebalusamaki (mutafikah mboka ya Loth)

    [54] Azipaki yango ndenge azipaki etumbu ya makasi

    [55] Bolamu nini ya Allah oyo ozali kotiela yango tembe

    [56] Oyo azali mokebisi lokola bakebisi ya yambo

    [57] Ngonga esili kobeleme

    [58] Mosusu azali te oyo akofungola yango na botiki Allah

    [59] Boye bozali kokamwa na masolo oyo? (kurani)

    [60] Mpe bozali koseka na esika ya kolela

    [61] Kasi bozali sé kosakana

    [62] Bogumbama тропа Allah mpe bobondela (ye)

    Surah 54
    Sanza

    [1] Ngonga epusani mpe sanza epasuki

    [2] Mpe soki bamoni elembo bazali koboya mpe balobi ete: Oyo ezali bonganga ya makasi

    [3] Mpe baboyi kondima balandi makambo na bango moko, nzoka nde likambo nyoso lizali na suka na yango

    [4] Mpe basango bisilaki koyela bango, basango ya kopekisa bango (mabe)

    [5] Wana ezali bwanya (bolamu), kasi makebisi esali bango eloko te

    [6] Mitiya mosika na bango, mokolo oyo mobengi akobengaka epai (ya likambo) linene

    [7] Bakobima na malita bilongi ya kokitisama, bakopanzana lokola bamakonko

    [8] Bakokamata bango kokende mbangu epai ya molobeli, bapagano bakoloba ete: Oyo ezali mokolo ya mpasi mpe mindondo

    [9] Bato ya Nûh bagangaki na lokuta liboso na bango, baboyaki kondimela mowumbu na biso mpe balobaki ete: Oyo azali ligboma mpe bamitiaki mosika naye

    [10] Abengaki Nkolo wa ye (alobi): Ya soló nazali na bokoki te, sunga ngai (na bokasi bwa yo)

    [11] Мре tofungolaki bizibeli ya likolo mayi ebele

    [12] Мре topanzaki mabele na miluka mpe mayi makutanaki na mobeko oyo etiyamaki

    [13] Mpe tomemaki ye na mabaya na sete oyo esalaki masuwa

    [14] Etambolaki na miso na biso,mpe tofutaki baye baboyaki kondima mbano na bango

    [15] Mpe totikaki yango ezala elembo, boye moto azali kaka kokanisa te

    [16] Lolenge nini etumbu na makebisi na ngai ezalaki

    [17] Mpe tosilaki kotia kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa

    [18] Ba Aad, baboyaki kondimela (bantoma na bango), boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni

    [19] Ya soló, totindelaki bango mopepe ya makasi koleka ya kozongelama

    [20] Ezali kopikola bato lokola biteni ya nagh’l oyo bapikoli

    [21] Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni

    [22] Мре tosilaki kotiya kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa

    [23] Ba Thamúd baboyaki kondimela makebisi

    [24] Mpe balobaki: Tolanda sé moto moko okati na biso? Noki te tokobunga mpe tokokweya na mabe

    [25] Boye baponaki ntoma sé ye kati na biso nyoso? Te; azali sé moto ya lokuta mpe lolendo monene

    [26] Bakoyebaka lobi: Nani atondi na lokuta mpe lolendo

    [27] Ya sólo, totindelaki bango náqah lokola ekamwiseli mpe komekama, kengele bango mpe kanga motema

    [28] Mpe yebisa bango été mayi ekabuani na biteni mibale kati na bango, bakozala na ntango na bango ya komela, ye mpe na ngonga naye

    [29] Мре babengaki moninga na bango azui mbeli babomi ye mpe basasi ye

    [30] Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni

    [31] Ya soló, totindelaki bango bogangi moko, mpe bango wana bakomi lokola banzete ekawuka

    [32] Mpe tosilaki kotiya kurani ezala pete тропа bokundoli, boye moto azali te тропа kokanisa

    [33] Bato ya Loth baboyaki kondimela makebisi

    [34] Ya sólo, totindelaki bango mopepe ya makasijongola sé libota lia Loth liye tobikisaki ye yambo tongo etana

    [35] Na bolamu kowuta epai na biso. Lolenge wana nde tofutaka oyo azali kotondo (Allah)

    [36] Mpe asilaki kokebisa bango тропа etumbu na biso, kasi bazangaki kondimela makebisi

    [37] Mpe balingaki kokweisa bapaya naye, kasi tokangaki miso na bango, bomeka etumbu na ngai na makebisi na ngai

    [38] Мре etumbu ya makasi ezuaki bango na ntongo

    [39] Bomeka etumbu na ngai mpe makebisi na ngai

    [40] Mpe totiyaki kurani ezala pete тропа bokundoli,boye ezali na moto te ya kokanisa

    [41] Mpe ya soló, makebisi makomelaka bato ya falo

    [42] Baboyaki kondima na bilembo bia biso nionso, mpe tozuaki bango na bozwi ya oyo azali na nguya atonda makoki

    [43] Boye bapengwi na bino bazali malamu koleka ba oyo kuna? То ezali na eloko ya kobatela bino okati ya makomi

    [44] Bazali koloba: Tozali lisanga (makasi) tokolonga

    [45] Lisanga na bango ekopanzana mpe bakokima

    [46] Ngonga moko ya mpamba nde elaka na bango, mpe yango ezali nsomo mpe bololo

    [47] Ya soló batomboki bazali na libungi mpe na kati ya moto

    [48] Mokolo oyo bakobendamaka na bilongi na bango okati ya moto, bomeka etumbu ya lifelo

    [49] Ya soló, tokelaki biloko binso na bokoki

    [50] Mpe mitindo mia biso mizalaka sé liloba moko, ezali sé lokola kobuka liso

    [51] Mpe tosilaki koboma bato liboso lokola bino, boye ezali na moto yakokanisa te

    [52] Mpe biloko binso biye bisalama bisila kokomama kati na (buku)

    [53] (Biloko) nyoso, ezala ya moke to ya monene ekomama

    [54] Ya sólo, babangi (Allah) bakozalaka na kati ya lola mpe mpene ya mingala ezali koleka na nsé na yango

    [55] Mpe esika ya bosembo yakofanda pene na mokonzi wa bokoki (Allah)

    Surah 55
    Ya bolamu

    [1] Ar-Rahmân

    [2] Atangisaki kurani

    [3] Akela moto

    [4] Atangisa ye koloba polele

    [5] Moyi na sanza etambolaka na bolamu oyo etiyama

    [6] Mpe minzoto na banzete egumbamelaka (Nkolo wa bango)

    [7] Мре atombola likolo mpe atiyela emekeli

    [8] Mpo ete bolekisa ndelo te na emekeli

    [9] Mpe bopesa kilo na bosembo, kasi bobebisa emekeli te

    [10] Mpe atiya mabele тропа bikelamu ya bomoi

    [11] Okati na yango, okokuta bambuma na ba nagh’l ekangama

    [12] Mpe bambuma bibatelami na efandelo na yango, na banzete ya malasi

    [13] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? (moto mpe elima)

    [14] Akela moto na mabele ya potopoto lokola mb eki

    [15] Mpe akela bilima kowuta na moto ezanga milinga

    [16] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [17] Nkolo ya moniele mibale mpe Nkolo ya biloli mibale

    [18] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [19] Atika bibale mibale bileka na bokutani

    [20] Kati kati na yango mondelo ezali mpo bisangana te

    [21] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [22] Yango mibale bizali kobimisa lulu’u na mardjânu. (mpalata na mabanga ya kongenga)

    [23] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [24] Manso ya ye; masuwa maye mazali kotambola likolo ya ebale lokola bangomba

    [25] B olámu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [26] Nyoso oyo ezali likolo ya mokili ekolimwa (na bokufi)

    [27] Ekotikala sé elongi ya Nkolo nayo atonda lukumu mpe boboto

    [28] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [29] Baye bazali kati na likolo na mabele bazali kosenga ye, mikolo minso azali kokokisa eloko ya sika

    [30] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [31] Kala mingi te tokokataka makambo na bino, oh bino mibale! (moto mpe elima)

    [32] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [33] Eh lisanga ya bilima mpe bato! Soki bokoki kobima na makambo ya likolo mpe ya nsé, bosala. Kasi bokokoka kosala yango te sé na makoki ya (Allah)

    [34] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [35] Bakobwakela bino moto ya milinga ya nkoni to ya mabende mpe bokosungama te

    [36] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [37] Mpe tango likolo ekopasuka likokomaka na langi ya motané

    [38] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [39] O mokolo yango, bato na bilima bakotunama te тропа masumu na bango

    [40] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [41] Batomboki bakoyebanaka na bilembo na bango тре bakozuaka bango na suki ya ebandeli ya mutu тре makolo na bango

    [42] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [43] Oyo nde lifelo тропа batomboki oyo batiyaki tembe na yango

    [44] Bakobalukaka kati na yango na kati ya mayi ya moto ya makasi

    [45] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [46] Kasi oyo abangaki kotelema liboso ya Nkolo naye, akozala na bilanga mibale. (ya lola)

    [47] Bolamu nini y a Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [48] Okati na yango ezali na bolamu mibale

    [49] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [50] O kati na yango (bakokutaka) miluka mibale mizali kotiola

    [51] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [52] O kati na yango okokuta bambuma mibale mibale

    [53] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [54] Bakoyekama na matoko ya epeda (ya kilo kitoko) mpe bambuma ya bilanga mibale bikozala pembeni na bango тропа kobuka

    [55] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [56] Bakokuta o kati na yango basi kitoko ya miso ya minene baye batalaka pembeni te, mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango

    [57] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [58] Kitoko na bango ezali lokola mabanga ya ebale bazali kongenga

    [59] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [60] Boye bolamu efutamaka te sé na bolamu

    [61] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [62] Mpe ezali na bilanga misusu mibale likolo ya oyo ya liboso

    [63] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [64] Bizali na langi ya mpondu ya moyindo

    [65] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [66] Okati na yango ezali na miluka mibale ya bosepelisi

    [67] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [68] Okati na yango ezali na bambuma, na ba nagh’l na rummân

    [69] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [70] Okati na yango ezali na basi kitoko mpe malamu

    [71] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [72] Basi ya miso minene kitoko bafandi nakati ya bièma

    [73] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [74] Mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango

    [75] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [76] Bakoyekama na bikata ya langi ya pondu na bitoko ya kitoko

    [77] Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya

    [78] Tika ete epambolama nkombo ya Nkolo nayo oyo atonda lokumu mpe boboto

    Surah 56
    Ya solo

    [1] Tango likambo monene ekokweya

    [2] Koya na yango ezali lokuta te

    [3] Akokitisaka (basusu) mpe akotombolaka (basusu)

    [4] Tango mabele makoninganaka makasi

    [5] Mpe tango bangomba bikokutoamaka mike mike

    [6] Mpe mikokoma putulu mizali kopanzana

    [7] Mpe bokozalaka lisanga misato

    [8] Bato ya ngambu ya loboko ya mobali bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mobali

    [9] Mpe bato ya ngambu ya loboko ya mwasi bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mwasi

    [10] Bato ya liboso (baye balandaki mibeko mia Allah na mabele) bakozalaka bato ya liboso na mokolo ya suka

    [11] Baye wana nde bakozalaka pene na Allah

    [12] O kati ya bilanga (bia lola) ya bolamu

    [13] Bazali ebele oyo baponami kowuta na bato ya liboso

    [14] Мре moke okati ya bato ya sima

    [15] (Bakolala) likolo lia bambeto bibongisami na wolo

    [16] Bayekami likolo na yango bazali kotalana. (na kimia)

    [17] Kati na yango bilenge mibali bakozalaka wana тропа kosalela bango libela na libela

    [18] Mpe bakopo na bitiyelo, mpe nkeni mitondi na masanga ya elengi. (тропа bomeli)

    [19] (Masanga wana) ekolangwisaka bango te mpe ekopesaka bango mutu pasi te

    [20] Mpe (bakoliaka) bambuma oyo bakolingaka

    [21] Mpe (bakoliaka) lolenge nyoso ya mișuni ya bandeke oyo balingi

    [22] Mpe bakozalaka na basi ya miso ya minene mpe ya kitoko na kotala

    [23] Lokola mabanga kitoko ya ebale ezali kongenga

    [24] Lifuta тропа maye basalaki

    [25] Okati na yango, bakoyoka maloba mabe te, mpe ya pamba pamba te

    [26] Bakolobaka se: Liloba ya kimia na kimia

    [27] Mpe bato ya loboko ya mobali, ba nani yango bato ya loboko ya mobali

    [28] Bakofanda na nsé ya banzete oyo bizanga nzube. Sidr

    [29] Na banzete ya makemba na bitabe

    [30] Na nsé ya malili ya monene

    [31] (pene) na mayi oyo ezali kolekana ya libela

    [32] Mpe bambuma ebele

    [33] Babuki yango te mpe epekisami te

    [34] O likolo lia bambeto ya likolo

    [35] Biso nde tokelaki bango na bokeli

    [36] Mpe tosalaki bango bayebi mibali te

    [37] Bazali bambula ndenge moko

    [38] Mpona bato ya loboko ya mobali

    [39] Baponami ebele bazuami okati ya baye baleka liboso

    [40] Bazali mpe ebele okati ya bato ya suka

    [41] Мре bato ya ngambu ya loboko ya mwasi, ba nani yango wana

    [42] Bakozalaka na kati ya mopepe ya moto ya lifelo, mpe na mayi ya moto makasi koleka

    [43] Mpe na nsé ya elili ya milinga ya moyindo

    [44] (kati na yango) malili te mpe kitoko te

    [45] Bazalaki liboso na bomoyi ya kitoko

    [46] Bazalaki kosala masumu minene mpe kosangisa Allah mingi

    [47] (Bazali koloba): Soki tokufi tokomi mikuwa mpe putulu, boye tokosekwisamaka lisusu

    [48] Na bankoko ya biso ya yambo

    [49] Loba: Ya soló, ba oyo ya liboso na ya suka

    [50] Bakosangisama na bokutani ya mokolo moyebani

    [51] Na yango bino babungi baye boboyaki kondima (na mokolo ya suka)

    [52] Bokoliaka ya soló, bitape bia nzete ya zaqqúm

    [53] Mabumu na bino makotondaka na yango

    [54] Sima bokomelaka mayi ya moto ya makasi

    [55] Bokomelaka (yango) lolenge ibili amelaka na mposa (nyoso)

    [56] Wana nde bilei oyo bakoyambaka bango na yango o mokolo ya suka

    [57] Biso nde tokela bino, kasi тропа nini bozali kondima na mokolo ya suka te

    [58] Boye bozali kornona te mayi oyo bozali kobimisa yango na mokongo

    [59] Bino nde bokela yango to biso nde bakeli

    [60] Biso nde tosila кокота liwa kati na bino, mpe eloko moko ekopekisa biso te

    [61] Mpo totiya na esika na bino (bato) misusu lokola bino, mpe tobotisa bino na lolenge oyo boyebi te

    [62] Mpe bosilaki koyeba bokeli bwa liboso; boye bozali kokanisa te

    [63] Boye bozali kornona biloko oyo bozali kobimisa yango (nanse ya mabele)

    [64] Ezali bino nde bolonaka yango to biso nde baloni

    [65] Soki tolingaki, nde tokomisaki yango makala, nde botikalaki kokamwa. (mpe kobeta misapi sima)

    [66] Tala biso tokomi na banyongo

    [67] Kasi bapimeli nde biso

    [68] Boye bozali kornona mayi oyo bozali komela

    [69] Bino nde bokitisaka yango kowuta na mapata to biso nde bakitisi

    [70] Soki tolingaki, nde tokomisaki yango mungwa mungwa, boye тропа nini bozali kopesa matondo te? (epai ya Allah)

    [71] Boye bozali kornona moto oyo bozali kopelisa te

    [72] Bino nde bokela nzete yango to biso nde bakeli

    [73] Totiyaki yango ezala bokundoli (тропа lolenge lifelo ekozala), mpe esalisa baye bazali na mposa na yango (тропа baye bazali na mobembo)

    [74] Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene

    [75] (Te) nalapi na bisika minzoto mikweyaka

    [76] Ya sôló, ezali kolapa ya monene soki boyebaka

    [77] Ya soló, kurani oyo ezali na lokumu

    [78] Ebatelami kati na buku

    [79] Basimbaka yango te sé na bapetoami

    [80] Ekita kowuta epai ya Nkolo ya mokili

    [81] Boye bozali kozua liloba oyo na lokuta

    [82] Boye na lolenge wana nde bokozala na botondi na bozui na bino, ete boboya kondima na kurani

    [83] Tango mpema ekomata tii na mongongo

    [84] Mpe tango wana bozali kotala

    [85] Mpe biso tozali pembeni naye koleka bino, kasi bozali kornona te

    [86] Boye soki boyebi ete bozali na nsé ya mibeko na biso te (bokosekwisama te, to mpe bokofutama te)

    [87] Bozongisa yango (molimo) soki bozali na bosembo

    [88] Soki akozala na molongo ya bato ya pembeni ya (Allah)

    [89] (Na yango akozala): Na bopemi mpe ngrásia okati ya lola ya esengo

    [90] Mpe soki azali o kati ya bato ya loboko ya mobali

    [91] (Bakoyambaka ye na liloba ya): Kimia ezala nayo, mpo ozali ngambu ya loboko ya mobali

    [92] Kasi soki azalaki okati ya baye baboyaki mpe babungi

    [93] Akokitisama okati ya mayi ya moto ya makasi

    [94] Mpe akozikisama okati ya moto

    [95] Wana nde likambo ya soló

    [96] Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene

    Surah 57
    Ebende

    [1] Biloko binso biye bizali o likolo na mabele bikumisaka Allah, mpe ye azali wa bokasi atonda bwanya

    [2] Ye nde Nkolo ya bokonzi ya likolo na ya mabele, apesaka bomoyi mpe liwa, mpe azali na bokoki ya nyoso

    [3] Azali wa yambo mpe ya suka, eloko ezali likolo naye te mpe na nsé naye te, mpe ayebi biloko nyoso

    [4] Ye nde akela mapata na mabele na mikolo motoba, sima atombuami likolo ya ngwende, ayebi maye makotaka na mabele, mpe maye mabimaka kati na yango, mpe maye makitaka kowuta na likolo mpe maye makotaka o likolo, mpe azali na bino esika nyoso bozuami. Mpe Allah azali kornona maye bozali kosala

    [5] Bokonzi ya likolo na ya mabele bozali bwa ye. Mpe makambo nyoso makozongisama nde epai ya Allah

    [6] Akotisaka butu na mokolo, mpe akotisaka mokolo na butu. Mpe azali moyebi ya maye mabombami o kati ya mitema

    [7] Bondima na Allah na motindami naye, mpe na maye asimbisi bino ya bozui bobimisa yango, baye kati na bino bandimi mpe babimisi (тропа Allah), bakozua lifuta linene

    [8] Mpona nini bozali kondima na Allah te mpe motindami, azali kobenga bino mpo bondimela Nkolo wa bino? Mpe (Allah) asili kozua elaka na bino, soki bozali bandimi

    [9] Ye nde akitisaka mikapo ya polele epai ya mowumbu naye, mpo elongola bino na molili (bökende) na bongengi. Mpe ya soló, Allah azali na mawa mingi mpona bino atonda boboto

    [10] Nini ekopekisa bino kobimisa na nzela ya Allah nzoka nde epai ya Allah nde bankita ya likolo na ya nsé bikozonga? Oyo okati na bino abimisaki bozui naye, mpe abundaki liboso ya kokweya (ya makkah) akokani te na oyo abimisi bozui naye sima ya kokweya (ya makkah) mpe abundi, kasi bango banso bazali na bolamu oyo Allah alaki bango (lola). Mpe Allah azali na sango ya maye bozali kosala

    [11] Moto oyo akokotisa Allah nyongo ya malamu, akobakisela ye mpe akozala na lifuta lilamu

    [12] Mokolo oyo bandimi ya mibali na basi bakomonaka bongengi na bango ezali koleka bango liboso na ngambu ya loboko ya mobali bakoyebisaka bango: Lelo bozali na sango elamu, bokovanda libela na lola oyo ezali kolekisa mingala önse na yango. Wana nde ezali elonga enene

    [13] Mokolo oyo bato ya bilongi mibale ya mibali mpe basi bakoloba na bandimi ete: Bozela biso mpo tozua moke ndambu ya bongengi na bino, (bandimi) bakoloba na bango ete: Mwinda ezali sima na bino,bozongaтропа kozua yango, na sima ezipeli moko ekokabola bango okati na yango ezali ngolu, mpe libanda na yango ezali etumbu

    [14] Bakobelela bango ete: Tozalaki na bino elongo te? Bakozongisa ete: Iyo, kasi bomitiaki kati na komekama, mpe bosalaki likita ya mabe likolo ya bandimi, mpe botiaki tembe mpe elikia ya lokuta ekosaki bino kino mokano ya Allah ezuaki bino, (liwa likomeli bango) mpe mokosi (satana) akosaki bino тропа Allah

    [15] Lelo oyo nsikô moko te ekondimama тропа bino na bapagano. Mpe esika na bino nde moto, yango nde molingami na bino. Mpe oyo bozongi ya mabe

    [16] Boye tango ekoki te тропа bandimi ete mitema mibanga тропа bokundoli ya Allah, mpe maye makita na bosóló (kurani) mpo ete bazala te lokola baye bazua buku liboso balekisaki tango molai mpe mitema mia bango mikomaki makasi. Mpe ebele kati na bango bazali bato mabe

    [17] Boyeba été ya soló, Allah apesaka bomoyi na mabele sima ya kokufa na yango. Tosilaki kolimbola bilembo mpo bokanisa

    [18] Ya soló, baye kati ya mibali mpe ya basi bazali kosala bolamu mpe bakotiseli Allah nyongo ya malamu, bakobakisela bango yango mpe bakozua lifuta lilamu

    [19] Мре тропа baye bandima na Allah na batindami naye, bango nde bato ya bosôló, тре (bazali) banzeneneke epai ya Nkolo wa bango, тре bakozua lifuta na bongengi bwa bango. Мре тропа baye bapengwaki тре baboyaki kondima na bilembo bia biso, bango nde bato ya moto

    [20] Boyeba ete: Bomoyi ya nsé ezali sé lisano тре liseki, bonzenga, тре kowelana na lolendo kati na bino тропа bozui тре bana, yango ezali lokola mbula oyo ebeti ebimisi milona ya kitoko mizali kokamwisa bakati bilanga, sima ya tango токе, elembi mpe ekomi na langi ya mosaka mpe ekauki, kasi na mokolo ya suka etumbu ya makasi ekozala, bolimbisi mpe esengo ya Allah ekozala, na yango. Bomoyi ya mokili ezali sé bisengo ya tango токе

    [21] Bowelisa kosenga bolimbisami ya Nkolo na bino, na lola ya monene lokola likolo na mabele, elengelami тропа baye bandimaki na Allah na batindami naye. Wana ezali bolamu ya Allah, apesaka yango na oyo alingi. Mpe Allah azali Nkolo bolamu ya monene

    [22] Mabe ekoki kozua na mabele te to bino sé oyo ekomama na buku liboso bakela yango. Wana ezali pete тропа Allah

    [23] Mpo ete bomitungisama te na oyo eleki bino, тре bosepela te na maye apeși bino. Мре Allah asepelaka na moto ya lolendo te, mpe oyo azali komikwa

    [24] (Mpona) baye balingaka kokaba te, mpe bazali kotinda bato na moyimi, kasi oyo akoboya (kokaba), ya soló Allah azali wa bomengo atonda lokumu

    [25] Tosilaka kotinda batindami na biso na bilembetele, mpe tokitiselaki bango buku na emekelo mpo bato basalela bosembo, mpe tokitisaki libende ezala na makasi mingi, mpe mpo esalisa bato, mpo ete Allah ayeba nani oyo akosunga ye, na batindami naye na (lolenge) ya kobombama. Ya sólo Allah azali na bokasi atonda nguya

    [26] Mpe tosilaki kotinda Núh na Ibrâhîm, mpe totiaki na bakitani na bango bontoma na buku, kati na bango basusu bakambami, mpe ebele na bango bazali mabe

    [27] Mpe tolandisaki sima na bango batindami na biso, mpe tolandisaki Issa mwana ya Maryam mpe topesaki ye indjil mpe totiaki boboto mpe ngolu o mitema ya baye balandaki ye. Kasi kimupe oyo bazalaki na yango na sima, totindaki bango kosala yango te, kasi baluka nde bosepeli ya Allah, mpe basalelaki yango te ndenge esengelaki, na yango, topesaki baye bandimi kati na bango lifuta na bango. Kasi ebele na bango bazali mabe

    [28] Eh bino bandimi! Bobanga Allah, mpe bondima na motindami naye, akopesa bino mbano mibale ya ngolu naye, mpe akotiela bino bongengi ete botambola na yango, mpe akolimbisa bino. Mpo ete Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [29] Wana ezali mpo baye bazua buku liboso bayeba été: Bazali na makoki moko te likolo ya ngrásia ya Allah, mpo ete ya soló, bolamu ezali nde na maboko ya Allah, apesaka yango na moto oyo alingi. Mpe Allah atonda bolamu koleka

    Surah 58
    Mwasi ya kosenga

    [1] Allah asili koyoka ya soló liloba ya oyo azali koyebisa yo тропа mobali naye, azali kofunda epai ya Allah, тре Allah azali koyoka lisolo ya bino mibale. Ya solo Allah azali moyoki mpe momoni

    [2] Baye kati na bino bazali koboya basi na bango, na kokokisa bango ete bazali lokola mokongo ya bamama na bango, bazali ba mama na bango te, bamama na bango nde ba oyo babotaki bango. Ya soló bazali wana koloba liloba ya mabe mpe lokuta. Mpe Allah azali na ngolu atonda bolimbisi

    [3] Baye bazali koloba na basi na bango été bazali lokola mokongo ya bamama na bango, sima bazongeli (bango) тре basaleli oyo balobaki te, esengeli na bango kokangola mowumbu moko yambo ete basangana na bango. Wana ezali тропа kolendisa bino, тре Allah azali na sango ya maye bozali kosala

    [4] Мре oyo azui makoki te тропа kokangola mowumbu, akila (akanga) ngizi sanza mibale elandani yambo ya kosangana na mwasi naye, mpe oyo akokoka te aleisa babola ntuku motoba wana mpo bondima na Allah na motindami waye. Мре wana ezali bandelo oyo Allah atieli bino lotomo, тре тропа bapengwi bakozala na etumbu ya makasi

    [5] Ya soló, baye bakotelemela Allah na motindami naye bakobalusaka bango lolenge babalusaki baye baleka liboso na bango. Mpe tosilaki kokitisa bilembo bia polele, mpe bapengwi bakozalaka na etumbu ya nsoni

    [6] Mokolo oyo Allah akosekwisaka bango banso, mpe akoyebisaka bango maye basalaki, babosana yango kasi Allah abatela yango. Kasi Allah azali nzeneneke ya biloko nyoso

    [7] Boye ozali kornona te été Allah ayebi nyoso ezali kati na likolo mpe kati na mabele? Lisolo ekoki kozala ya bato misato te sé azala ya minei, тре ekoki kozala ya bato mitano te sé azala ya motoba, moke to mingi sé azala elongo na bango na esika nyoso, sima akoyebisaka bango maye basalaki o mokolo ya suka. Ya soló, Allah azali moyebi mpe azali na bokoki ya biloko binso

    [8] Boye ozali kornona te тропа baye bapekisi bango kosolola na likita ya mabe, sima bazongeli oyo bapekisaki bango, mpe bazali kosolola mabe na kotiya bonguna mpe bazangi kotosa motindami, mpe soki bayei kotala yo, bazali kopesa yo mbote lolenge oyo Allah apesaka yo te, mpe bazali komilobela bango moko: Mpona nini Allah azali kopesa biso etumbu te mpona maye tozali koloba? Moto ya lifelo mokoki na bango, bakozikisamaka kuna, mpe boye esika nini ya mabe ya koleka wana

    [9] Oh bino bandimi! Soki bosangani mpona kosolola sekele, bosala yango na masumu te mpe na kibonguna te mpe kozangisa motindami botosi mpe te, kasi bosala yango na bolamu mpe na kobanga (Allah), mpe bobanga Allah oyo epai naye bokosangisama

    [10] Ya sólo, masolo ya kobatama ezali mosala ya satana, mpo ete anyokolo na yango bandimi, kasi ekosala bango eloko te sé na ndingisa ya Allah. Mpe epai ya Allah nde esengeli na bandimi bamipesa

    [11] Oh bino bandimi! Soki basengi bino ete: Bopesa esika ya kofanda okati ya lisanga, bopesa yango, Allah akopesa bino esika, mpe soki balobi ete: Botelema, bosala yango, Allah akotombola bandimi mpe lisusu akotombola kati na bino baye bazua boyebi likolo koleka. Mpe Allah azali na sango ya maye bozali kosala

    [12] Oh bino bandimi! Soki bozali na masolo ya (malamu) na motindami bobimisa swadaka liboso, kosala bongo ezali malamu тропа bino, mpe ezali kopetola (misala na bino). Mpe soki bozui te, ya soló Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [13] Boye bozali kobanga kobimisa libonza (тропа kobanga bozangi)? Kasi soki bosali te, Allah alimbisi bino, (na yango) botelemisa losambo mpe bopesa zakat mpe botosa Allah na motindami naye. Mpe Allah ayebi ya sólo oyo bozali kosala

    [14] Boye ozali kornona te baye bazua baninga bato oyo Allah asilikela bango, bazali kati na bino te, bazali mpe kati na ba oyo kuna te. Mpe bazali kolapa na lokuta, na bango mpe bayebi

    [15] Allah abombeli bango etumbu ya makasi, oyo bazalaki kosala ezalaki mabe koleka

    [16] Bazui kolapa na bango nguba тропа kobundisa nzela ya Allah, kasi bakozala na etumbu ya bosoni. (ya kokitisama)

    [17] Bana na misolo mia bango mikosalaka bango eloko te na etumbu ya (Allah). Bazali bato ya moto libela kati na yango

    [18] Mokolo oyo Allah akosekwisaka bango banso, bakolapelaka ye (Allah) lolenge balapelaki bino bazali komimona été bazali na eloko, kasi bazali sé bato ya lokuta

    [19] Satana akonza bango mpe abosanisa bango bokundoli ya Allah. Bango nde lisanga ya satana. Ya soló, lisanga ya satana bazali bazangi

    [20] Ya sólo, baye bazali kotelemela Allah na motindami naye,banso wana nde bakokitisama na kozanga lokumu

    [21] Allah asila kokana été: Nakolonga ngai na batindami na ngai. Ya sólo Allah azali makasi atonda nguya

    [22] Okokuta te kati na baye bandimi na Allah na mokolo ya suka, bazali na bolingo epai na baye bazali kotelemela Allah na motindami naye, ata bazala bongo batata na bango, to bana na bango, to bandeko na bango, to bato ya libota na bango. Bango wana nde atiaki bondimi na mitema na bango, mpe asalisi bango na rúh kowuta epai naye, mpe akokotisa bango na bilanga ya lola biye mingala mizali kotiola na nsé na yango wapi epai bakozala libela. Allah asepeli na bango, bango mpe basepeli naye. Bango wana nde lisanga ya Allah. Lisanga ya Allah nde bazali balongi

    Surah 59
    Bobengani

    [1] Nyoso oyo ezali na likolo na mabele ezali kokumisa Allah, mpe azali wa bokasi atonda bwanya

    [2] Ye nde abimisaki bapengwi baye bazua buku na bandako na bango na bobimisami ya liboso. Bokanisaki te ete bakobima, mpe bakanisaki ete bozui na bango ekobatela bango liboso ya Allah, mpe Allah abimelaki bango na epai oyo bazalaki kolikia te, mpe akotisaki kobanga na mitema mia bango. Babukaki bandako na bango bango moko, mpe na maboko ya bandimi, bososola na yango liteya, eh bato ya mayele

    [3] Soki ezalaka elaka oyo Allah akomela bango te, mbele topesaki bango etumbu ya makasi na mokili, mpe o mokolo ya suka bakozalaka na etumbu ya moto

    [4] Wana mpo ete: Batiaki tembe na Allah na motindami naye. Мре oyo akotia tembe na Allah, ya soló Allah azali makasi na bopesi etumbu

    [5] Nzete ya línat nyoso oyo bokataki, na oyo botikaki ya kotelema ezali sé na bolingi ya Allah, mpe mpo Allah afuta bato ya mabe

    [6] Biloko na bango oyo batikaki, mpe Allah apesaki yango epai ya motindami naye na bitumba te, mpe bobimisaki punda te, ebwele moko mpe te, kasi Allah apesaka elonga na batindami naye likolo ya nani alingi. Mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso

    [7] Bozui ya banguna oyo Allah apeși motindami naye na bitumba, ezali тропа Allah na motindami naye, mpe тропа libota, mpe bana bitike na babola mpe na moleki nzela, (oyo azangi) mpo ete bozui yango etambola kaka te kati na bino bai bomengo. Mpe oyo motindami Ayeli bino bozua yango. Mpe oyo apekisi bino botika. Mpe bobanga Allah, ya sólo, Allah azali makasi na bopesi etumbu

    [8] Mpona babola baye bakimaki batiki bandako na bango na bomengo na bango тропа koluka bolamu epai na Allah na bosepeli naye, тре basalisaki Allah na motindami naye. Bango wana nde bazali bato ya bosembo

    [9] (Mpe basusu) baye bavandaki liboso na mboka, mpe nakati ya bondimi, balingaki baye bakimaki epai na bango, bazalaki na mpasi токе te na mitema mpona koyamba bango na maye bapesaki bango, mpe balingi bango koleka banzoto na bango moko ata bazali na bozangi ya koleka, oyo akomibatela na moyimi ya nzoto naye moko, bango nde bazali na elonga

    [10] Mpona baye bayaki sima na bango, bazali koloba: Nkolo limbisa biso na bandeko na biso oyo bandima liboso na biso, mpe kobebisa mitema mia biso te mpona baye bandima, Nkolo na biso ozali moyoki otonda ngolu

    [11] Boye ozali kornona te mpona baye bazali koloba na bandeko na bango baye bapengwa kati na bato ya buku: Soki babengani bino, tokokende elongo na bino mpe tokotosa moto te sé bino, mpe soki babundisi bino, tokosalisa bino, Ya soló, Allah ayebi ete bazali bato ya lokuta

    [12] Soki babenganami, bakolanda bango te, mpe soki babundisami, bakosalisa bango te, ata soki bakendaki kosalisa bango bakosuka sé na kokima, sima bakosungama te

    [13] Mpe bazali na kobanga mingi na mitema тропа bino koleka Allah, mpo ete bazali bato oyo bayebi kososola te

    [14] Bakobundisaka bino mobimba te, sé babendani bendani na bamboka ya mike mike biye bibatelami, to mpe sima ya mapango, kimonguna kati na bango na bango ezali makasi, okomona bango ete bazali ya kosangana nzoka nde mitema na bango mizali ya kokabwana, wana mpo ete bazali na mayele te

    [15] Bazali lokola na baye bazali liboso na bango kala te, bamekaki maye bazalaki kosala, kasi bakozuaka etumbu ya makasi

    [16] Bazali lokola satana tango alobaka na moto ete: Pengwa, mpe soki moto apengwi, alobi naye: Ya soló, nawangani yo. Ya sólo nazali kobanga Allah Nkolo ya mokili

    [17] Mpe esukelaki bango ete: Bango nyoso mibale bakozalaka na moto libela kati na yango. Wana nde ekozala lifuta lia babubi

    [18] Eh bino bandimi! Bobanga Allah, moto nyoso atalisa molimo naye eloko nini esili kolengele тропа lobi, тре bobanga Allah. Ya sólo, Allah ayebi maye bozali kosala

    [19] Mpe bozala lokola baye babosana Allah te (Allah) asali ete bamibosana bango moko. Bango nde bato mabe

    [20] Bato ya moto mpe bato ya lola bakozalaka lolenge moko te. Kasi bato ya lola nde balongi

    [21] Soki tokitisaka kurani oyo likolo ya ngomba olingaki kornona yango ezali kopasuka na bobangi Allah, tozali kobete bandakisa wana тропа bato bakoka kokanisa

    [22] Ye Allah oyo nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, moyebi ya mabombami na maye mazali polele, ye wa ngolu atonda boboto

    [23] Ye Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló sé ye, mokonzi mosantu, azali kimia mobateli, akonza kala, azali nguya, azali sukisa, atonda lolendo, nkembo na Allah wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango

    [24] Ye Allah mokeli,mopesi eloko nyoso lolenge na yango, azali na bankombo kitoko, maye mazali о likolo mpe na nsé mazali kokumisa ye, тре ye azali na nguya atonda bwanya

    Surah 60
    Ye oyo asengeli kotalama

    [1] Oh bino baye bondima! Bozua monguna na ngai na ya bino azala moninga ya kolanda te, na kopesa bango bolingo mpo basila kopengwa na maye eyeli bino ya bosembo, mpe bazali kobengana motindami na bino mpo bondimi na Allah Nkolo wa bino, soki bobimi na nzela na ngai тропа kobunda mpe koluka esengo na ngai, bozali kopesa bango bolingo na kobombama? Mpe nayebi maye bozali kobomba na maye bozali komonisa polele. Kasi oyo akosala yango kati na bino asili kobunga nzela

    [2] Soki balongi bino, bakozala banguna na bino, mpe bakosala bino mabe kowuta na minoko, mpe bamaboko na bango, mpe bakosepela ete bopengwa

    [3] Bondeko kati na bino mpe bana na bino bakosalisa bino na eloko te. О mokolo ya suka akokabola okati na bino, kasi Allah azali kornona maye bozali kosala

    [4] Ya soló, Ibrâhîm azali ndakisa malamu тропа bino mpe baye bazalaki elongo na naye, tango balobaki na bato na bango: Ya soló, biso tozali mosika na bino na maye bozali kosala mpe kobondela botiki (nzela) ya Allah, emonani polele été tokabwani na bino,mpe kibonguna na koyinana ekoti kati na biso kino bokondima na Allah na bomoko bwa ye, longola sé liloba lia Ibrâhîm (oyo alobaki тропа tata naye) été: Nakosengelaka yo bolimbisi epai ya Allah, kasi nakosalisa yo na eloko te kowuta na Allah. Nkolo na biso tomipesi epai nayo mpe epai nayo nde tozali kotubela, mpe epai nayo nde bozongi ezali

    [5] Nkolo wa biso, kozalisa biso te eloko ya котеката тропа bapagano, mpe limbisa biso Nkolo, ya sólo ozali nguya otonda bwanya

    [6] Ya sólo, ezalaki тропа bino ndakisa elamu тропа oyo azali kolikia na Allah mpe mokolo ya suka. Kasi oyo akopesa mokongo (ayeba été) Allah akoka mpe atonda lokumu

    [7] Tango mosusu Allah akotiya kati kati na bino na bango kibondeko mpe Allah azali na bokoki mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [8] Baye babundisi bino te тре babimisi bino na bandako na bino te, Allah apekisi bino te kozala na bango malamu, mpe kozala na bosembo epai na bango. Ya soló, Allah alingaka bato ya bosembo

    [9] Kasi, Allah azali kopekisa bino nde тропа baye bazali kobundisa bino тропа lingomba lia bino, mpe babenganaki bino na bandako, mpe baye basalisaki basusu mpo babengana bino, mpe baye banso balandaki bango. Bango nde bato mabe

    [10] Oh bino bandimi! Soki bandimi ya basi bakimi bayei epai na bino, bomeka bango, Allah nde ayebi kondima na bango, soki boyebi ete bazali bandimi bozongisa bango epai na bapagano te, mpo bakoki na bango te, bango mpe bakoki na bango te, mpe bozongisela bapagano mbongo na bango ya libala, mpe ezali mabe te ete bobala soki bopesi bango lifuta na bango. Mpe bobatela mabala na basambeli bikeko te, bosenga bango biloko na bino oyo bopesaki bango,mpe basenga oyo bapesaki. Oyo wana nde mobeko ya Allah azali kokata na yango kati na bino, Allah azali moyebi atonda bwanya

    [11] Мре soki mwasi na bino moko akimi epai ya bapengwi, mpe soki bozui biloko na bitumba, bopesa misolo epai ya oyo mwasi naye akimaka epai ya bapengwi, mpe bobanga Allah oyo bozali kondimela

    [12] Oh ntoma! Soki bandimi ya basi bayei epai nayo na malako (kolapa epai nayo), ete bakosangisa Allah te na eloko, bakoyiba te mpe bakosala ekobo te, mpe bakoboma bana na bango te, mpe bakoya na lokuta te to makambo ya nsoni na maboko na bango te na makolo mpe te, mpe bakozanga yo botosi te, ndimela bango mpe sengela bango bolimbisi ya Allah. Mpamba te, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [13] Eh bino bandimi! Bozua bondeko te na bato oyo Allah asilikela bango, basila kozanga elikia тропа mokolo ya suka, ndenge bapagano bazanga elikia na baye bazali na malita

    Surah 61
    Molongo

    [1] Nyoso oyo ezali na likolo na mabele ezali kokumisa Allah, mpe azali wa makasi atonda bwanya

    [2] Oh bino bandimi! Mpona nini bolobaka maye bosalaka te

    [3] (Kosala bongo) ezali lisumu monene epai ya Allah, koloba maye bozali kosalela te

    [4] Ya soló, Allah alingaka baye bazali kobunda na nzela naye bazali molongo lokola bifelo bia ndako bitongami makasi

    [5] Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye: Mpona nini bozali kotungisa ngai mpe boyebi été nazali motindami ya Allah epai na bino? Mpe tango bapengwaki, Allah mpe apengwisi mitema mia bango. Mpe Allah akambaka bato mabe te

    [6] Mpe tango Issa mwana ya Maryam alobaki na bana ya isalayele: Ya soló, nazali motindami ya Allah epai na bino (тропа kolobela) bosôló oyo ezali na kati ya torah, тре kopesa bino sango elamu ya motindami oyo akoya sima na ngai nkombo naye Ahmad. Mpe tango ayeli bango bilembo bia polele, balobi: Oyo ezali bonganga ya polele

    [7] Nani azali mabe koleka moto oyo akoseli Allah? Мре azali kobengama ete abongola motema. Kasi Allah akambaka babubi te

    [8] Balingi bazimisa mwinda ya Allah na minoko mia bango, kasi Allah azali kokokisa mwinda naye ata bapagano balingi te

    [9] Ye nde atindaki motindami naye na bokambi mpe lingomba ya soló, mpo ete ezala likolo lia mangomba manso, ata soki basambeli ya bikeko bazali koboya

    [10] Eh bino bandimi! Boye bolingi nalakisa bino mombongo moye mokoki kobikisa bino na etumbu ya makasi

    [11] Bondima na Allah na motindami naye, mpe bobunda na nzela ya Allah na misolo mia bino mpe milimo mia bino. Wana ezali malamu тропа bino, soki bozali koyeba

    [12] Akolimbisa masumu na bino mpe akokotisa bino na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, mpe bisika ya kovanda ya kitoko bikozalaka na lola ya eden. Wana nde elonga ya monene

    [13] Mpe akopesa bino biloko bisusu oyo bokolingaka mpe lisungi kowuta epai na Allah mpe elonga ya pembeni. Mpe pesa sango elamu epai ya bandimi

    [14] Oh bino bandimi! Bozala basalisi ya Allah, lokola Issa mwana ya Maryam alobaki na bayekoli naye ete: Nani akosalisa ngai тропа Allah? Bayekoli balobaki ete: Tozali basalisi ya Allah, mpe eteni moko kati na bana ya isalayele bandimaki, mpe eteni mosusu bapengwaki, mpe tosungaki bato oyo bandimaki likolo na banguna na bango mpe balongaki

    Surah 62
    Mokolo ya mitano

    [1] Nyoso oyo ezali na likolo na mabele ezali kokumisa Allah, mokonzi, mosantu, wa nguya atonda bwanya

    [2] Ye nde atindaki o libota ya baye batanga te motindami kowuta na libota na bango moko, mpo atangela bango mikapo mia ye, mpe mpo apetola bango, mpe atangisa bango buku mpe bwanya, ata bazalaki liboso kati na libunga ya polele

    [3] Mpe basusu kati na bango baye bakutanaki na bango te, bakoya sima naye, (Allah) azali wa nguya atonda ngolu

    [4] Wana ezali bolamu oyo Allah apesaka na oyo alingi. Mpe AllAh azali Nkolo bolamu bonene

    [5] Ndakisa ya baye bapesamaki torah mpe basaleli yango te, bazali lokola Himar oyo amemi babuku, ndakisa mabe ya lolenge nini wana ya baye baboya kondima na mikapo mia Allah. Mpe Allah akambaka babubi te

    [6] Loba: Oh bino baye bozali kosalela kiyuda! Soki bozali kokanisa été bolingami na AllaH koleka bato basusu, bomisenga liwa soki ya soló bozali na bosembo

    [7] Kasi bakokoka komisenga yango soki шоке te, тропа maye ya mabe basalaka. Kasi (Allah) ayebi malamu babubi. (bato mabe)

    [8] Loba: Ya sólo, liwa oyo bozali kokima bokokutana na yango, sima bokozongisama epai ya oyo ayebi maye mabombami na maye mazali polele. Akoyebisa bino sango ya maye bozalaki kosala

    [9] Eh bino baye bondima! Soki bobengami тропа losambo ya jumu’a (ya mokolo ya mosala mitano), bökende na lombango koyoka bokundoli ya Allah тре botika koteka, wana ezali malamu тропа bino soki boyebaki

    [10] Mpe soki losambo esili, bopanzana na mabele тропа koluka bolamu ya Allah, mpe bokanisa Allah mingi mpo bolonga

    [11] Mpe tango bamoni mombongo to bisengo eleki, balandi yango mpe basundoli yo na esika ya kotelema (na mimbar). Loba: Oyo ezali epai ya Allah ezali malamu koleka mombongo na bisengo, mpe Allah nde mopesi bozui malamu

    Surah 63
    Bakosi

    [1] Soki bato ya bilongi mibale bayeli yo bazali koloba: Tondimi ya soló ete ozali motindami ya Allah, mpe Allah ayebi ete yo ozali motindami naye, mpe Allah atatoli ya soló ete bato ya bilongi mibale bazali bato ya lokuta

    [2] Bazui bondimi na bango nguba тропа kobundisa nzela ya Allah, ya solo, bazali mabe na maye bazali kosala

    [3] Wana mpo ete bandimaki sima bazongi na bopengwi, na yango mitema mia bango mikangami mpe bango bazali kososola te

    [4] Mpe soki omoni bango, banzoto na bango ezali kokamwisa yo, mpe soki bazali koloba, ozali koyoka bango, bazali lokola biteni ya mabaya bibetami (na efelo), bazali kokanisa ete mongongo nyonso ya makasi ezali тропа bango. Bango nde banguna, keba na bango. Allah asukisaki bango, tala ndenge batelenganaki

    [5] Mpe soki bayebisi bango boya mpo motindami ya Allah asengela bino bolimbisi, babaloli mitu na bango, okomona bazali kobongola mikongo na lolendo

    [6] Osengela bango bolimbisi to osengela bango te, ezali sé lolenge moko, Allah akolimbisaka bango te. Ya soló, Allah akambaka bato ya mabe te

    [7] Bango nde bato bazali koloba: Bosalisa baye bazali pene na motindami te kino bakopanzana, Allah nde Nkolo sanduku ya bomengo ya likolo na ya mabele, kasi bato ya bilongi mibale bazali koyeba te

    [8] Bazali koloba ete: Soki tozongi na Madinah, bato ya makasi kati na biso, bakobimisa baye bazangi makasi. Nzoka nde nguya ezali ya Allah na motindami naye mpe na bandimi, kasi bato ya bilongi mibale bazali koyeba te

    [9] Eh bino baye bondima! Misolo na bana na bino mibosanisa bino bokundoli ya Allah te. Mpe oyo akosala yango baye wana nde bazangi

    [10] Mpe bobimisa ndambo ya maye topesaki bino (o nzela ya Allah) yambo liwa liyela moko na bino mpe aloba: Nkolo na ngai; zelisa ngai ata mwa tango ya шоке mpo na kaba mpo nazala okati ya bato ya malamu

    [11] Tango wana Allah azelisaka moto te soki ngonga naye ekoki, kasi Allah ayebi malamu maye bozali kosala

    Surah 64
    Bokosi ya moto na moto

    [1] (Biloko) nyoso ezali na likolo mpe na nsé ezali kokumisa Allah, bokonzi bozali ya ye, mpe matondo mazali ya ye, mpe azali na makoki likolo ya biloko binso

    [2] Ye nde akela bino, basusu okati na bino bandimi, mpe basusu bapengwi. Allah azali kornona maye bozali kosala

    [3] Akela likolo na mabele na bosôló, mpe apesi bino lolenge, mpe abongisa bokeli bwa bino, mpe bokozongaka sé epai naye

    [4] Ayebi nyoso oyo ezali na likolo na oyo ezali na mabele, mpe ayebi maye bobombaka na maye bomonisaka polele. Mpe Allah ayebi oyo ebombami okati ya mitema

    [5] Boye sango ya baye bapengwaki liboso na bino ekomelaki bino te bamekaki (etumbu na mokili) mpe bamonaki oyo bamonaki тропа makambo na bango, mpe bakozala na etumbu ya makasi

    [6] Wana ezali mpo ete batindami na bango baydaki bango bosembo ya polde, kasi bazongisaki eyano ete: Moto nde akoya kokamba biso? Мре bapengwaki mpe bapesi mokongo, mpe esalaki Allah eloko te. Mpo ete Allah azali wa bomengo atonda lokumu

    [7] Bapagano bakanisi ete bakosekwisama te, Loba: Na nkombo ya Nkolo na ngai bokosekwisama mpe bokozua sango ya maye bosalaki. Мре kosala bongo ezali mpasi te тропа Allah

    [8] Mpe bondima na Allah тре bondima na motindami wa ye, mpe bongengi oyo tokitisaki yango (kurani). Mpe Allah ayebi maye bozali kosala

    [9] Mokolo akosangisa bino о mokolo ya lisekwa, wana ekozala mokolo ya bozangi bonene, kasi oyo akondima na Allah mpe asali misala milamu, (Allah) akolimbisa mabe naye mpe akokotisa ye na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, akovandaka kuna libela na libela. Wana ekozala elonga enene

    [10] Kasi тропа baye bapengwaki mpe baboyaki kondimela mikapo mia biso, bango nde bato ya moto mpe bakozalaka kuna libela na libela, kasi bozongi ya mabe nini wana

    [11] Likama moko te ekokwela moto sé ezala na ndingisa ya Allah, kasi oyo akondimela Allah, (Allah) akokamba motema naye. Мре Allah azali na boyebi ya eloko nyoso

    [12] Botosa Allah mpe botosa motindami (wa ye). Kasi soki boboyi boyeba ete motindami wa biso azali na eloko te sé akomisa nsango ya polele

    [13] Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye. Mpe epai ya Allah esengeli na bandimi bamikaba

    [14] Eh bino bandimi! Ya soló, kati na basi mpe bana na bino bazali banguna na bino, bokeba na bango. Mpe soki boyoki (bango) mawa, botiki mpe bolimbisi (bango), ya sólo Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [15] Ya sólo, misolo na bana na bino ezali mimekano, mpe epayi na Allah nde lifuta linene lizali

    [16] Mpe bobanga Allah na bokoki na bino, mpe boyoka mpe botosa mpe bobimisa (тропа Allah) ezali malamu тропа bino moko, mpe oyo akomibatela mosika na moyimi naye, ba oyo wana nde balongi

    [17] Soki bokotiseli Allah nyongo ya malamu akobakisela bino ebele, mpe akolimbisa bino, mpe Allah azongisaka matondi atonda mawa

    [18] Ayebi maye mabombami na maye mazali polele (azali) wa bokasi atonda bwanya

    Surah 65
    Koboma libala

    [1] Oh ntoma! Soki bolingi kokabwana na basi, bokabwana na bango o sima ya eleko na bango mpe botanga yango, bobanga Allah Nkolo wa bino mpe bobimisa bango na bandako te, longola sé soki basali mabe oyo emonani polele. Wana ezali mibeko mia Allah. Mpe oyo akotosa mibeko mia Allah te, amisali mabe sé ye moko. Oyebi te sima na yango, Allah akobimisa eloko ya sika

    [2] Mpe soki bakomi na suka ya mikolo miye mipesamaki bango тропа kozela, bozongela bango na libala na ndenge ya malamu, to mpe boboya bango na lolenge ya malamu, mpe bozua banzeneneke mibale ya mibali ya malamu mpe ya bosembo okati na bino, mpe bokokisa bonzeneneke тропа Allah. Wana ezali bolendisi тропа bino na moto oyo andimi na Allah mpe na mokolo ya suka. Mpe moto oyo abangi Allah, akofungola ye nzela

    [3] Мре akopesa ye bozui oyo akanaki yango te. Oyo akomipesa na Allah, asili kokoka ye. Ya soló, Allah azali kokokisa mibeko naye. Allah asila kotia eloko nyoso emekelo na yango

    [4] Soki bobosani bileko bia basi na bino baye bazali lisusu na elikia ya makila te, to mpe ba oyo naino bamoni makila te, eleko na bango ya kozela ezali sanza misato, kasi тропа ba oyo bazali na zemi, bakozela kino bakobota. Mpe moto oyo abangi Allah, (Allah) akolembisa makambo naye

    [5] Wana ezali mobeko ya Allah oyo akitisa yango epai na bino. Mpe oyo akobanga Allah, akolimbisa masumu naye, mpe akokolisa bolamu naye

    [6] Bovandisa bango esika bozali kovanda, kasi bosala bango mabe te ya kokangela bango nzela ya libiki. Mpe soki bazali na zemi, bosalisa bango kino bakobota. Mpe soki bamelisi тропа bino (mwana ya sika), bopesa bango lifuta na bango mpe boyokana malamu kati na bino, mpe soki bozui kpokoso, boluka momelisi mosusu mpo amelisa ye

    [7] Oyo azali na bozui ebele abimisa ebele ya bozui naye, kaši na oyo bozui naye ezali шоке, abimisa yango na ndenge oyo Allah apeși. Allah apesaka moto mokumba sé oyo apesi ye, sima ya kpokoso, Allah akopesa bozui

    [8] Lokola baye baboyaki mibeko mia Allah mpe bazangaki kotosa batindami naye, tolandelaki bango na makasi mpe topesaki bango etumbu oyo ezali kati ya bitumbu ya mabe

    [9] Bamekaki etumbu ya bizaleli na bango ya mabe, mpe suka na bango ezalaki sé bozangi

    [10] Allah abombeli bango etumbu ya makasi, eh bato ya mayele oyo bandima (na Allah na ntoma naye)! Bobanga Allah. Ya soló, Allah asila kokitisela bino bokundoli

    [11] Motindami oyo azali kotangela bino mikapo mia polele, mpo abimisa bandimi na baye bazali kosala misala milamu na molili atia bango na bongengi. Oyo akondima na Allah mpe asali bolamu, akokotisa ye na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, akovandaka kati na yango libela na libela. Allah asila kobongisela ye bozui bolamu

    [12] Allah mokeli ya likolo sambo mpe lolenge moko na mabele, mibeko mia ye mizali kokita kati na yango, mpo boyeba été ya soló, Allah azali na makoki likolo ya eloko nyoso, mpe ya solo, boyebi naye ezingi biloko binso

    Surah 66
    Kopekisa

    [1] Eh ntoma! Mpona nini na bosepelisi basi nayo ozali komipekisa na maye Allah apesi yo ndingisa. Kasi Allah azali molimbisi atonda ngolu

    [2] Allah asila kokomela bino ya soló komisikola mpona kolapa na bino. Allah nde mokonzi na bino mpe azali moyebi atonda bwanya

    [3] Tango ntoma apesaki sekele na moko kati na basi naye mpe abimisi sekele wana, Allah ayebisaki ntoma naye likambo yango, mosusu mpe ayebisi ye te, mpe tango ntoma atunaki ye (mwasi naye) akamwaki mpe alobaki: Nani ayebisi yo yango? Ntoma azongiselaki ye ete: Ezali oyo atonda boyebi na basango nyoso nde ayebisi ngai

    [4] Soki botubeli epai ya Allah, mitema na bino mipetuami, kasi soki bosalisani likolo naye, boyeba ete ya solo Allah azali mobateli naye, mpe anzelu Djibril lokola elongo na bandimi ya malamu, Mpe na sima ba anzelu bakosunga ye

    [5] Soki atiki bino, Nkolo naye akobalisa ye basi ya malamu koleka bino, bamisokia, bandimi, bazali na botosi, batubelaka, baye bazali kosambela, bakangi ya ngizi, baye babala liboso, mpe bangondo (baye bayebi mibali te) te

    [6] Oh bino bandimi! Bobatela milimo na bino mpe mabota na bino na moto oyo bankoni na yango bikozala bato na mabanga, bakengeli na yango ezali ba anzelu ya makasi, bazangisaka Allah botosi te na oyo atindi bango kosala, kasi bakokisaka nde oyo atindi bango kosala

    [7] Eh bino bapengwi! lelo bakolimbisa bino te, ya soló bokofutama kolandana na maye bosalaki

    [8] Oh bino bandimi! Botubela tubela ya bosóló epai ya Allah, Allah akoki kolimbisa masumu na bino, mpe akokotisa bino na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, mokolo oyo Allah akotiya mabe mosika na ntoma na baye bandimaki elongo naye, bongengi na bango ekotambola liboso na bango mpe na ngambo ya mobali mpe bakolobaka: Nkolo kokisela biso bongengi mpe limbisa biso, ya soló ozali na bokoki ya biloko nyoso

    [9] Eh ntoma! Bundisa bapengwi na bato ya bilongi mibale mpe kozala mpete epai na bango te, mpe esika na bango ekozalaka nde lifelo, mpe esika nini ya bozongi ya mabe wana

    [10] Allah abeti ndakisa ya bapengwi (mibale) mwasi ya Núh na mwasi ya Loth bazalaki na nsé ya maboko ya bawumbu na biso mibale, kasi nyoso mibale baboyaki kondima mpe basalaki bango mabe, kasi mabe na bango elongisaki bango te epai na Allah, mpe bayebisaki na bango mibale ete: Bokota na moto na baye bakokota

    [11] Mpe Allah abeti ndakisa тропа baye bandimi, mwasi ya falo tango alobaki: Nkolo, tongela ngai ndako na lola ezala pene nayo, mpe longisa ngai na mabe ya falo na misala mia ye, mpe longisa ngai na bato mabe

    [12] (Lolenge moko) na Maryam mwana ya imrân ya mwasi oyo abatelaki nzoto naye, mpe tofulaki mopepe ya molimo kati (naye), mpe andimaki liloba lia Nkolo naye mpe babuku naye, mpe azalaki okati ya batosi Allah

    Surah 67
    Bokonzi

    [1] Apambolama ye oyo azali na bokonzi na maboko naye, mpe azali na makoki likolo ya biloko binso

    [2] Ye nde akela liwa mpe bomoyi mpo ameka bino mpe atala nani kati na bino akosala malamu koleka. Mpe azali wa bokasi atonda bolimbisi

    [3] Ye nde akeli mapata sambo ya komatelama, boye okomona eloko ya mabe na kati ya bokeli ya Ar-Rahmân te. Zongisa miso тропа kotala lisusu, okomona sé kitoko

    [4] Sima tala lisusu mbala mibale, kotala nayo ekozongela yo na nsoni mpe ezangi bokasi

    [5] Mpe ya soló, tosilaki kobongisa mapata ya pene na nsé na bonzenga ya bongengi ya minzoto, mpe totiaki yango (minzoto) тропа kobengana basatana, mpe tobombeli bango etumbu ya lifelo

    [6] Mpe тропа baye bapengwa na Nkolo wa bango. Bakozuaka etumbu ya lifelo, mpe bozongi nini ya mabe wana

    [7] Tango bakobwakama na kati, bakoyoka yango ezali kotoka, mpe bazali koganga

    [8] Moto wana ezali kokabola bango, tango nyoso soki bakobwaka bamosusu, bakengeli (ya lifelo) bazali kotuna bango: Boye mokebisi ayelaki bino te

    [9] Bakolobaka: Iyo. Mokebisi ayelaki biso kasi toboyaki kondimela ye mpe tolobaki: Allah akitisa eloko te, bozali sé na libungi linene

    [10] Mpe bakolobaka: Soki toyokaka mpe tokanisaka (malamu) tolingaki kozala okati ya bato ya lifelo ya saira te

    [11] Mpe bayebaki mabe na bango, mpe tika ete bato ya lifelo babebisama

    [12] Ya soló, baye bazali kobanga Nkolo na bango nakobombama bakozuaka lifuta linene

    [13] Soki ata bobombi maloba na bino to bobimisi yango polele, ya solo ye azali moyebi ya nyoso oyo ebombami o kati ya mitema (batolo)

    [14] Boye ayebi te baye akela mpe azali malamu atonda basango

    [15] Ye nde atiela bino mabele mpete botambola kati na yango lolenge bolingi, mpe bolia oyo apesi bino, mpe bozongi ekozala sé epai naye

    [16] To boye bozali na ebateli libanda na oyo azali na likolo été akoki kokotisa bino na mabele kasi bokomona ete mabele ekoningana

    [17] To boye bobatelami liboso na oyo azali na likolo été atindela bino mopepe ya mabanga? Bokoyeba ndenge nini bokebisi na ngai ezali

    [18] Mpe baye balekaki liboso na bango baboyaki, mpe etumbu na ngai ezalaki ndenge nini

    [19] Boye bazali kornona te bandeke na likolo lolenge akangaka mpe afungolaka mapapu naye? Oyo asimbi bango ezali sé Ar-Rahmân. Ya soló, ye amonaka biloko binso

    [20] Nani akosalisa bino na mapinga ya kosunga bino liboso ya Ar-Rahmân? Ya soló, bapengwi bazali mpenza na libungi

    [21] Mpe nani mosusu akoki koleisa bino soki akangi bozui naye? Kasi bazali sé kosala miso makasi kati na mabe mpe koboya

    [22] Boye oyo azali kotambola elongi na nsé akambami koleka oyo azali kotambola alima na nzela ya semba

    [23] Loba: Ye nde akela bino mpe atiela bino bomoni na boyoki mpe mitema, baye bazali kotondo bazali moke

    [24] Loba: Ye nde atia bino okati ya mabele, mpe epai naye bokosanganaka

    [25] Mpe bazali koloba: Elaka ekozalaka tango nini soki bozali koloba bosôló

    [26] Loba: Boyebi bwa yango ezali nde epai ya Allah, ya soló nazali mokebisi ya polele

    [27] Mpe tango bakomona (etumbu) pene na bango, bilongi ya bapagano bikokoma mawa mawa, bakoyebisa bango été: Oyo nde bozalaki kosenga

    [28] Loba: Bomoni boni soki Allah abomi ngai na baye bazali elongo na ngai to alimbisi biso, nani akosungaka bapengwi na etumbu ya makasi

    [29] Loba: Ye azali Ar-Rahmân, tondimi naye mpe epai naye nde tomipesi. Mpe bokoyebaka nani azali na nzela ya libungi ya polele

    [30] Loba: Bomoni boni soki mayi na bino ekomi mosika na nsé ya mabele, nani mosusu akopesa bino mayi kowuta na libulu

    Surah 68
    Ekomeli

    [1] Nún, (nalapi) na ekomeli na oyo ezali kokoma

    [2] Yo (Muhammad) na ngrásia y a Nkolo nayo ozali libgoma te

    [3] Mpe ya sôló, ozali na lifuta oyo esilaka te

    [4] Mpe ya sôló, ozali na ezaleli ya malamu

    [5] Yo okomona mpe bango bakomona

    [6] Nani kati na bino amekami

    [7] Ya sôló, Nkolo wa yo ayebi malamu oyo abunga nzela naye, mpe ayebi malamu baye bazali na bokambami

    [8] Kaši kotosa bato ya lokuta te

    [9] Bakosepela ozala malamu na bango mpo bazala mpe malamu nayo

    [10] Mpe kotosa moko te na bango, bazali kolapa na ntina te

    [11] Bato ya songi songi, bazali kokosela bato makambo

    [12] Baye bapekisaka bolamu ya bato, bazali kolekisa ndelo mpe basali na masumu

    [13] Bazali na mitema makasi mpe bazali na lolendo

    [14] Ata soki azali na misolo ebele na bana ebele, (alingi kobonguana te)

    [15] Soki batangeli ye mikapo mia biso, alobi: Wana ezali sé masapo ya bankoko ya kala

    [16] Tokomonisa elembo naye likolo na zolo

    [17] Ya soló, tomekaki bango lolenge tomekaki bato ya elanga tango bakanaki ete bakobuka yango lobi na tongo

    [18] Bazangaki koloba: Na bolingi ya Allah. (In cha Allah)

    [19] Mabe kowuta epai ya Nkolo nayo ekwelaki yango bazali kolala

    [20] Na tongo ekomi lokola eloko ezalaki te

    [21] O mokolo molandi: Babiangani bango na bango

    [22] Bökende noki na bilanga na bino soki bolingi kobuka mbuma

    [23] Basololi kati na bango na bango na nsé tango babimaki тропа kokende

    [24] Mobola moko te akotela bino lelo na elanga

    [25] Mpe bakendeki na tango ya malamu na mokano nyoso ete bakoka kopimela babola

    [26] Mpe tango bamoni (elanga) yango, balobi: Ya soló tobungi nzela na biso

    [27] То yango; Kasi tozali na eloko te

    [28] Moto ya bosembo kati na bango alobi: Nayebisaki bino te ete: Soki bosanzolaki lukumu ya Allah

    [29] Balobi: Lokumu na Nkolo wa biso, ya sólo tozalaki bato mabe

    [30] Batalani bango na bango, bakomi koloba: Yo nde osali mabe

    [31] Mpe balobaki ete: Eh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki batomboki

    [32] Tozali kolikia na Nkolo wa biso été abongola eloko ya malamu тропа biso, tozali kolikia pene na Nkolo wa biso

    [33] Lolenge wana nde etumbu ezalaki, kasi etumbu ya mokolo ya suka eleki monene. Soki bazali koyeba

    [34] Ya soló, babangi (Allah) bakozalaka epai ya Nkolo na bango na lola ya kitoko

    [35] Boye tokozua bandimi ndenge moko na batomboki

    [36] Boni bozali kokata likambo na lolenge wana

    [37] To boye bozali na buku eye bozali koyekola

    [38] Ete ya sólo, bokozua nyoso oyo bokolinga

    [39] To boye bolapelaki biso bandai ya bosôló kino mokolo ya suka, mpo topesa bino maye bolingi

    [40] Tuna bango, nani kati na bango azali nkumu na yango

    [41] To boye bazali na basangani? Baya na bango soki bazali koloba bosôló

    [42] Mokolo oyo lokolo ekomonamaka, mpe bakobengaka bango ete bafukama elongi na mabele kasi bakokokaka kofukama te

    [43] Bilongi na bango bikokitisama mpe bakozanga lokumu, nzoka nde babiangamaki mpo bafukama tango bazalaki malamu (na mokili)

    [44] Tika ngai na oyo nyoso azali kozua masolo oyo na lokuta, tokozua bango malembe na esika oyo bakoyeba te

    [45] Мре natikelaki bango tango kaši, motambo na ngai ezali ya soló

    [46] То boye osengaki bango lifuta to osengaki bango bazua nyongo ya monene

    [47] To boye bayebi maye mabombami, yango bazali кокота

    [48] Мре kanga motema (Muhammad) na kozela mokano ya Nkolo nayo, kasi kozala lokola moto oyo azalaki na libumu ya mbisi te (Yûnus), tango abelelaki (Allah) na kati ya mawa ya monene

    [49] Soki тропа bolamu ya Nkolo naye te likolo naye, nde abwakamaki libanda bolumbu likolo ya mabele ekauka

    [50] Mpe Nkolo naye aponaki ye mpe atiaki ye o molongo ya bato malamu

    [51] Tango bapengwi bayokelaki yo likunya mpe kotala yo na miso ya mabe na tango bayokaki kurani, balobi: Ya sólo azali ligboma

    [52] Wana ezali sé bokundoli тропа mokili mobimba

    Surah 69
    Bosolo

    [1] Mokolo ya Sólo

    [2] Nini nde mokolo ya Sólo

    [3] Eloko nini ekolakisa yo mokolo ya sólo nde nini

    [4] Bato ya mboka Thamúd na Aad baboyaki kondimela likambo ya somo

    [5] Mpona bato ya Thamúd, babebisamaki na tangba ya makasi

    [6] Mpe mpona bato ya aad, babebisamaki na mopepe ya makasi

    [7] Mabe wana ekwelaki bango butu sambo na mikolo mwambe, okomona sé bibembe ya bato, bakomi lokola biteni ya nagh’l ya kokata kata

    [8] Boye okomona ata eloko etikali

    [9] Falo na baye bazalaki liboso naye na bato ya mboka bikweisama, bayaki na mabe

    [10] Mpe baboyaki kondima na motindami ya Nkolo na bango, kasi azuisaki bango kozuama ya mawa te

    [11] Ya soló, tango mayi etondaki, biso nde tomatisaki bino okati ya masuwa

    [12] Mpo totiya yango etikala elembo mpo bato bakoka kokanisa

    [13] Mpe tango bakofula na kelelo mbala moko

    [14] Mabele na bangomba bikotombwana nako pasuka mbala moko

    [15] Mokolo wana ekozala bokweisami ya suka

    [16] Likolo likopasuka mpe langi na yango ekobongwanaka

    [17] Mpe ba anzelu (basantu) bakozalaka pembeni ya mapata (bazali na bobangi ya Nkolo wa bango) mpe ba anzelu mwambe bakomema ngwende (ya Allah) mokolo wana

    [18] Mokolo wana bokozongisaka nyoso epai ya Allah, bokobombaka eloko moko te

    [19] Oyó bakopesaka ye buku naye na loboko ya mobali, akolobaka: Bosimba mpe botanga buku na ngai

    [20] Nazalaki kolikia ete nakokutana na mbano mwa ngai

    [21] Мре akozala na bomoyi ya esengo

    [22] (Akozalaka) okati ya Iola ya likolo

    [23] Bambuma na yango ezali pembeni

    [24] Bolia mpe bomela na esengo kolandana na mikolo oyo bolekisaki

    [25] Mpe oyo bakopesa ye buku naye na loboko ya mwasi akolobaka: Eh ngai! Soki bapesaka ngai ata yango te

    [26] Mpe nayebaki ata eloko moko na yango te

    [27] Natikala ata na liwa na ngai

    [28] Misolo mia ngai misalisi ngai na eloko te

    [29] Bokonzi na ngai esili kobebisama

    [30] Bokanga ye singa na kingo

    [31] Sima bobwaka ye na moto

    [32] Bokanga ye na minyololo ya ntaka ntuku nsambo

    [33] Ya soló, azalaki kondima na Allah wa monene te

    [34] Mpe azalaki na (mawa) ya koleisa babola te

    [35] Lelo azali na mosungi te

    [36] Mpe bilia naye ekozala sé mayi ya moto ya tofina

    [37] Baye bakoliaka yango sé ba oyo basalaki mabe

    [38] Nalapi na maye bozali kornona

    [39] Мре na maye bozali kornona te

    [40] Yango, ezali liloba lia motindami ya lokumu

    [41] Kasi ezali liloba lia moto mpamba te, kasi bozali moke oyo bozali kondima

    [42] Mpe ezali liloba lia nganga te. Ebele bazali kokanisa te

    [43] Ekitaki kowuta epai ya Nkolo ya molongo

    [44] Ata alobelaki biso ndambu ya maloba ya lokuta oyo balobaki

    [45] Tolingaki kozua ye na loboko ya mobali

    [46] Sima, tolingaki kokata ye singa ya motema

    [47] Moko azali te ya kopekisa biso

    [48] Ya soló, wana ezali sé bokundoli тропа babangi

    [49] Mpe toyebi malamu banani bakosi kati na bino

    [50] Мре ya soló, ye akozangisaka bapengwi te (na etumbu)

    [51] Mpe ya soló, wana ezali bosembo mpenza ya bondimi

    [52] Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya lokumu

    Surah 70
    Nzela ya komata

    [1] Mosengi azali kosenga etumbu oyo ekozanga kokweya te

    [2] Ekopekisama te mpo ekwela bapengwi

    [3] Epai ya Allah nde nzela ya komata mpe kokita ezali

    [4] Ba anzelu mpe molimo mosantu bazali komate epai naye na mokolo moko oyo tango na yango ezali kowumela lokola mibu nkoto ntuku mitano

    [5] Zela bozeli ya malamu

    [6] (Bapengwi) bazali kornona yango mosika

    [7] Kasi tozali kornona yango pembeni

    [8] Mokolo oyo likolo likopelaka lokola ebende ya mafuta

    [9] Mpe bangomba bikokoma lokola elamba ya kofinika

    [10] Molingami akotuna moninga te

    [11] Bazali kotalana, moto mabe akoluka ete akaba bana naye mpo abatelama na etumbu ya mokolo wana

    [12] To mwasi, to ndeko naye ya mobali

    [13] (Ata soki bayei) moto naye ya libota oyo azalaki kobatela ye

    [14] Ata bayei na manso mazali na nsé тропа kobatela ye

    [15] Eloko te, ezali nde moto

    [16] Ekolongola ye bamposa ya mutu na makasi

    [17] Moto ekobengaka baye baboyaki kondima

    [18] (Kolandana) na misolo oyo asangisaki na mokili mpe apekisaki na yango nzela ya Allah epanzana

    [19] Ya soló, moto akelamaki na kozanga kimia

    [20] Soki mabe ezui ye, akomi na bobangi

    [21] Mpe soki bolamu ezui ye, akomi kopima yango

    [22] Longola sé baye bazali kotelemisa losambo

    [23] Baye bakangami na losambo na bango libela

    [24] Мре baye bazali kobimisa (zakat) na misoio mia bango

    [25] Mpona (kopesa) basengi na baye bazangi

    [26] Mpe baye bazali kondima ya soló na mokolo ya suka

    [27] Мре baye bazali kobanga etumbu ya Nkolo na bango

    [28] Ya soló, eloko moko ya kopekisa etumbu ya Nkolo na bango ezali te

    [29] Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango

    [30] Longola sé epai ya basi na bango to mpe bawumbu na bango ya basi, wana ezali lisumu te epai na bango

    [31] Kasi baye bakokende libanda ya oyo etindami awa, bango nde balekisi ndelo

    [32] Mpe baye bazali kobatela biloko ya bato malamu, mpe bazali kotosa maloba na bango tango ya boyokani

    [33] Mpe baye bazali kotatola sé bosóló

    [34] Mpe baye oyo bazali kobatela losambo na bango

    [35] Bango nde bakozala na lukumu okati ya bilanga ya lola

    [36] Kasi nini na bapengwi oyo bazali kokima epai nayo bakingo etelemi

    [37] Ngambu ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi bazali ya kokabwana

    [38] Boye moko na moko kati na bango azali kosepela ete bakotisa ye na lola ya nkembo

    [39] Eloko te, mpo tokelaki bango na maye bayebi

    [40] Mpe nalapi na Nkolo ya miniele mpe biloli na bilembo bia ngrásia ete: Ya soló, tozali na makoki

    [41] Mpo ete tolongola bango toya na baye ya malamu, mpe moto akopekisa biso azali te

    [42] Tika bango basakana mpe babunga kino bakokutanaka na mokolo oyo tolakaki bango

    [43] Mokolo bakobima na malita noki lokola bazali kokima mbangu epai na mabanga matandami

    [44] Bakokitisaka miso na bango mpe kotombola yango na soni, wana ekozalaka mokolo ya elaka na bango

    Surah 71
    Nuhu

    [1] Ya soló totindaki Nûh epai ya bato naye ete: Kebisa bato nayo yambo ya etumbu makasi eyela bango

    [2] Alobaki: Oh bato na ngai! Ya sôló, nazali mokebisi ya polele тропа bino

    [3] Bobondela Allah, bobanga ye тре botosa ngai

    [4] Mpo alimbisa bino masumu тре apesa bino mikolo kino elaka yango ekoka. Ya soló, tango elaka ya Allah ekoki ezelaka te soki bozali koyeba

    [5] Alobi: Nkolo! Ya sólo, natei bato na ngai butu na moyi

    [6] Kasi mateya na ngai ebakiseli bango sé kokima

    [7] Mpe tango nazali kobenga bango mpo olimbisa bango, bazali kotiya misapi na matoyi na bango mpe kozipa yango na bilamba, basali motu makasi mpe lolendo

    [8] Sima nabengaki bango na polele

    [9] Mpe nayebisaki bango na polele mpe na lolenge ya kobombama

    [10] Nayebisaki bango été: Botubela epai ya Nkolo na bino. Ya soló, ye azali molimbisi

    [11] Mpo akitisela bino kowuta na likolo mbula ezala ya kolandana

    [12] Mpe apesa bino misolo na bana ebele, mpe abómbela bino bilanga mpe mingala

    [13] Mpona nini bozali kokumisa Allah te na ndenge esengeli

    [14] Mpe akela bino ndambu ndambu ya kotangama

    [15] Bozali kornona te lolenge Allah akela mapata sambo elandani

    [16] Mpe atiya bongengi kati ya sanza mpe mwinda okati ya moyi

    [17] Allah nde abimisa bino na mabele lokola milona

    [18] Sima akozongisa bino kati na yango mpe sima akobimisa bino penza

    [19] Allah atandela bino mabele ezala lokola etoko

    [20] Mpo botambola na kati ya banzela na yango

    [21] Nûh alobaki ete: Nkolo! Baboyi kotosa ngai kaši balandi sé moto oyo bozui naye na bana ekobakisela ye sé libungi

    [22] Mpe basali likita ya monene, (ya mabe)

    [23] Mpe balobi ete: Botika banzambe na bino te, botika Waad te, botika mpe Suwaa te, yarúsa te, yaúqa mpe te na Nasra te. (ezali bankombo ya bikeko ya bango bazalaki kobondela)

    [24] (Mpe) yango bisili kobungisa ebele mpe ezali kobakisela babubi sé libungi

    [25] Mpona mabe na bango, bazindisamaki na mayi, mpe bakotaki na móto, mpe bazuaki basungi te na botiki Allah

    [26] Mpe Nûh alobi: Nkolo! Kotika ata mopagano moko te na mokili

    [27] Soki otiki bango (na bomoyi), bakobungisa bawumbu nayo mpe bakobota sé basumuki

    [28] Nkolo! Limbisa ngai, na baboti na ngai na moto nyoso oyo akokota ndako na ngai mondimi mpe bandimi ya mibali na ya basi, mpe kobakisela bapengwi te sé libungi

    Surah 72
    Bilima

    [1] Loba: Emoniseli ekitela ngai ya soló ete: Lisanga moko ya bilima batiaki matoyi тропа koyoka mpe balobaki ete: Ya sólo, toyoki buku ya lokumu na etangeli ya somo

    [2] Ezali kokamba na nzela ya semba mpe tondimaki na yango, mpe tokosangisa Nkolo wa biso na eloko mosusu te

    [3] Ya sólo, bonene naye Nkolo ya biso ekumama, azali na mwasi te, mpe mwana te

    [4] Mpe ya sólo, ye (satana) azali koloba mabe тропа Allah

    [5] Mpe tokanisi ete: Bato na bilima bakoki kokosela Allah te

    [6] Mpe ya sólo, Kati na bato, ezali na mibali misusu bazali koluka libateli epai ya bilima ya mibali, kasi yango ezali kobakisela bango sé mpasi

    [7] Mpe bakanisaki lolenge bokanisaki été Allah akosekwisa moto te

    [8] Мре ya soló tomataki na mapata тропа koluka koyokamela, kasi tokutaki yango na babateli ya makasi mpe minzoto ya moto (mizali kobamba na mbangu mingi)

    [9] Мре tozalaki kofanda mpe koyoka, kasi oyo akoyokamela sika oyo akokutana na masasi ya moto (minzoto) ekobengana ye

    [10] Mpe ya sólo, toyebi te soki bazali kolingela bato ya mokili mabe to Nkolo na bango alingi kotiya bango na nzela ya semba

    [11] Mpe kati na biso tozali na baye ya malamu mpe basusu bazali mabe, mpe tokabwanaki na mangomba ebele

    [12] Mpe ya sólo, tokanisaki été tokokutola nguya ya Allah awa na nsé te mpe lisusu ete tokosilisa nguya naye te na kokima

    [13] Mpe ya sólo, tango toyokaki bokambi, (kurani) tondimaki na yango, mpe oyo akondima na Nkolo naye, abanga te тропа bokutolami ya lifuta naye, mpe akobebisama te

    [14] Mpe kati na biso, tozali na baye bazali bamizilima mpe na baye bazali babubi mpe baye bayambaki islam nde baye balukaki nzela ya semba

    [15] Kasi тропа babubi, bakozala na moto ya lifelo ya bakoni oyo ezali kopela

    [16] Soki bamitiyaka na nzela ya malamu, tolingaki komelisa bango mayi ya malamu

    [17] Mpo tomeka bango kati na yango. Kasi oyo akoboya bokundoli ya Nkolo naye, akosukisa ye na nzela ya etumbu oyo ekosilaka te

    [18] Mpe ya sôló, ba Masâdjid bizali тропа Allah, kasi bobondela eloko mosusu elongo na Allah te

    [19] Mpe tango mowumbu ya Allah atelemaki тропа kosambela ye, bayaki ebele kotelema pembeni naye (tango wana nde bilima bandimaki na kurani esantu tango etangamaki)

    [20] Loba: Nazali kobondela Nkolo na ngai mpe nakosangisa ye na eloko mosusu te

    [21] Loba: Ya sólo, ngai nazali na bokoki ya kosala bino mabe to kotiya bino na nzela ya semba te

    [22] Loba: Ya soló, moko te akobatela ngai na botiki Allah, mpe nazui ekimeli mosusu te na botiki Allah

    [23] (Nazali se) momemi sango mpe kokomisa liloba ya Allah. Mpe oyo akozanga kotosa Allah na motindami naye, ya solo akozala na moto ya lifelo libela na libela

    [24] Kino bakomona oyo elengelami тропа bango ya etumbu, тре bakoyeba ba nani bazali па lisungi ya makasi, mpe ba nani bazali mike

    [25] Loba: Nayebi te maye balaki bino ezali pene to Nkolo na ngai atikeli yango tango molai

    [26] Moyebi ya mabombami, mpe moko te ayebi mabombami naye

    [27] Longola sé oyo akosepela naye lokola motindami, mpe akotiela ye bakengeli liboso na sima naye

    [28] Mpo bayeba été bakomisa maloba ya Nkolo na bango, mpe azingi maye bazali na yango, mpe ayebi motango ya biloko nyoso

    Surah 73
    Ye oyo azingami

    [1] Eh yo (Muhammad) mofiniki bilamba

    [2] Telema mpo (osambela) butu mobimba, longola sé mwa tango moke

    [3] Kati kati na yango to moke

    [4] To bakisa yango mpe tanga kurani malembe mpe polele

    [5] Tokokitisela yo maloba ya kilo (ya lokumu penza)

    [6] Kosambela na butu ezali malamu mpe epesaka makasi, mpe ezali malamu mingi тропа botangi

    [7] Mpo ete ya soló, ozali na misala ebele na moyi

    [8] Mpe kanisa nkombo ya Nkolo nayo mpe mipesa naye

    [9] Nkolo ya moniele mpe eloli, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, zúa ye mobateli (wa bino)

    [10] Kanga motema na maye bazali koyebisa yo, mpe mitiya mosika na bango na lolenge ya malamu

    [11] Мре tika ngai na baye bazuaka manso na lokuta baye bazali kosepela na bisengo na bango, bazali sé na tango moke ya kozela

    [12] Ya soló, tobombeli bango singa ya monene mpe lifelo

    [13] Mpe bilia ya solo mabe, mpe etumbu ya makasi

    [14] Mokolo oyo mabele na bangomba bikoningana, mpe bikokoma lokola mputulu ya zelo ya kopanzana

    [15] Ya soló, totindelaki bino motindami, azala nzeneneke epai ya bino, lolenge moko totindaki motindami epai ya falo

    [16] Mpe falo aboyaki kotosa motindami mpe tozuaki ye kozua moko ya mabe

    [17] Ndenge nini bokomibatela na bopengwi na mokolo oyo ekokomisa bana lokola bampaka suki mpembe

    [18] Likolo likopasukaka (na somo wana) mpe akokokisaka elaka naye, wana ezali na tembe te

    [19] Ya sólo, oyo ezali bokundoli, oyo alingi, azua nzela epai na Nkolo naye

    [20] Ya soló, Nkolo nayo (Muhammad), ayebi ete otelemaka na nsé ya mibale ya misato ya butu, mpe kati kati na yango, mpe moko ya misato na yango, elongo na ndambu ya bandimi batelemaka mpe lokola. Allah azali kokabola butu na mokolo, ayebi ete bokokoka kotanga yango te yango ayambi tubeli na bino. Kasi botanga oyo ezali mpete kati na kurani, ayebi ete kati na bino bato ya bokono bakozala, basusu bakotambola тропа koluka bolamu ya Allah, mpe basusu bakokende kobunda na nzela ya Allah. Botanga oyo ezali mpete kati na yango, mpe botelemisa losambo mpe bofuta zakat mpe bokotisa Allah nyongo ya malamu. Mpe bolamu nyoso bokosala, bokokuta yango epai na Allah, azali malamu mpe monene na kofuta, mpe bosenga Allah bolimbisi. Ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu

    Surah 74
    Ye oyo azipi

    [1] Eh yo (Muhammad) mozipani na bulangiti

    [2] Telema mpe kebisa

    [3] Mpe kumisa Nkolo nayo ya monene

    [4] Mpe petóla bilamba nayo

    [5] Mpe mitiya mosika na masumu nyoso. (mpe tika yango)

    [6] Mpe kopesa te mpo bafuta yo

    [7] Mpe zala na bozeli тропа Nkolo nayo

    [8] Mpe tango bakofula kelelo

    [9] Wana ekozala mokolo ya mpasi

    [10] Mpona bapengwi ekozala mpete te

    [11] Tika ngai na oyo nakeli ye moko

    [12] Mpe oyo napesaki misolo ebele

    [13] Mpe (napesi ye) bana oyo bazali naye tango nyoso

    [14] Mpe oyo nalongolelaki mindondo nyoso

    [15] Sima, apengwi na bolamu (na ngai)

    [16] Te; ya soló, azalaki kowangana mikapo mia biso na mutu makasi

    [17] Nakopesa ye pasi ya koleka

    [18] Ya sólo, akanisaki mpe azuaki mokano

    [19] Akufa na ndenge akanaki

    [20] Sima akufa na ndenge akanaki

    [21] Sima atalaki

    [22] Sima abebisi elongi mpe akangi

    [23] Sima abongoli mokongo mpe asali lolendo

    [24] Mpe alobi: (Kurani) oyo ezali bonganga oyo etangisami

    [25] Wana ezali sé liloba lia moto

    [26] Nakozikisa ye na moto ya saqar

    [27] Nani akoyebisa yo nini saqar

    [28] Etiki eloko te mpe ebateli te

    [29] Ezali kozikisa mposo ekomi moyindo

    [30] O kati na yango ezali na (ba anzelu) zomi na libua

    [31] Mpe totiaki bakengeli ya moto sé ba anzelu, mpe totiaki motango na bango sé ezala komekama epai ya bapengwi, mpo ete baye bazua buku liboso bayeba yango mpe ebakisa bondimi epai na bandimi, mpo ete baye bazua buku liboso na bandimi bazala na ntembe te, mpe mpo ete bapagano na baye bazali na bokono o mitema baloba ete: Allah alingi nini na ndakisa oyo? Lolenge wana nde Allah azali kokamba nani alingi mpe kobungisa nani alingi. Mpe moko te ayebi mapinga ya Nkolo nayo sé ye mei. Mpe wana ezali sé bokundoli тропа bato

    [32] Te; (nalapi) na sanza

    [33] Mpe butu tango elalaka

    [34] Mpe tongo tango etanaka

    [35] (Saqar) ezali moko ya (etumbu) ya monene

    [36] Ezali bokundoli тропа bato

    [37] Oyo akolinga okati na bino, alanda yango to azonga sima

    [38] Molimo nyoso akozua oyo asalaki

    [39] Longola sé bato ya ngambu ya loboko ya mobali. (balongi)

    [40] (Bakozalaka) na lola bakomitunama

    [41] (Mpona) batomboki

    [42] Eloko nini ekotisi bino na saqar

    [43] Bakolobaka: Tozalaki kosambela te

    [44] Mpe tozalaki koleisa babola te

    [45] Mpe tomitiyaki ngambu ya baye balingaki sé koloba mabe

    [46] Mpe tozalaki kondima тропа mokolo ya suka te

    [47] Kino liwa liyelaki biso

    [48] Bolobeli ya balobeli ekosalisaka bango te

    [49] Mpona nini bapesaki bokundoli mokongo

    [50] Bakomi lokola humuru ya kopanzana

    [51] Tango bazali kokima nkosi

    [52] Nyoso kati na bango azali koluka azua mokanda mpo ayeba

    [53] Ah kasi te! Bazalaki kobanga mokolo ya suka te

    [54] Ah te! Oyo ezali ya soló bokundoli

    [55] Oyo alingi akanisa

    [56] Mpe bakokanisaka te sé Allah alinga. Ye nde esengeli babanga mpe ye nde Nkolo bolimbisi. atonda ngolu

    Surah 75
    Lisekwa

    [1] Nalapi na mokolo ya lisekwa

    [2] Mpe nalapi na molimo oyo elingi kotika mabe te

    [3] Moto akanisi été tokosangisa mikuwa mia ye te

    [4] Kasi tozali na bokoki ya kobongisa ye. (mpe kozongisa ye lolenge azalaki)

    [5] Moto alingi sé atikala na mabe

    [6] Azali kotuna: Lisekwa ekozalaka mokolo nini

    [7] Tango miso ekobulungana (ezangi kornona)

    [8] Mpe sanza ekozanga bongengi na yango

    [9] Mpe moyi na sanza ekosanganaka

    [10] Mokolo wana moto akolobaka: Wapi nzela ya kokima

    [11] Esika ya kokima ezali te

    [12] Bozongi ekozalaka mokolo wana epai ya Nkolo nayo

    [13] Bakoyebisa moto mokolo wana maye asalaki na maye atikaki тропа kosala sima

    [14] Kasi moto ye moko akoyebaka (makambo naye)

    [15] Mpe ata asengi bolimbisi

    [16] Kowelisa lolemu nayo te тропа kotanga na yango (kurani)

    [17] Ya soló, biso nde tokosangisa yango na motema nayo mpe kotanga yango

    [18] Tango tozali kotangisa yo yango, landa yango malamu

    [19] Sima ya sólo, tokolimbolela yo yango

    [20] Kasi bolingi sé (bomoyi) ya nsé

    [21] Mpe botiki oyo ya mokolo ya suka

    [22] Mokolo wana okomona bilongi bikongenga

    [23] Bizali kotala Nkolo na yango

    [24] Mpe mokolo wana bilongi bikoyinda

    [25] Bizali kozela etumbu

    [26] Kasi te! Tango (molimo) тококота na mongongo

    [27] Мре ekolobama: Nani sika oyo mobikisi

    [28] Akanisi été alingi akufa. (azali kobunda na liwa)

    [29] Mpe lokolo elali likolo ya moninga

    [30] Bakomema yo epai ya Nkolo nayo mokolo wana

    [31] Mpo andimaki te mpe atelemisaki losambo te

    [32] Kasi aboyaki mpe apesaki mokongo

    [33] Sima akendaki epai ya bato naye azali kosala lolendo

    [34] Mpasi nayo mpasi

    [35] Sima mpasi nayo mpasi

    [36] Moto azalaki kokanisa ete bakotika ye sé pamba bongo (sima ya kokela ye)

    [37] Boye abima kowuta na mayi ya mokongo te oyo elonama

    [38] Sima na yango akomaki liboke ya makila mpe apesaki ye lolenge ya kitoko te

    [39] Sima akelaki lolenge ya bato mibale te? Mwasi na mobali

    [40] Ezali (Allah) te nde azali na bokoki ya kosekwisa bawei

    Surah 76
    Ntango

    [1] Ezali na tango molayi eleka na mokili moto azalaki eloko moko te liboso ete akelama

    [2] Ya soló, tokelaki moto na litanga ya mayi ya mokongo (oyo esangani na biloko ebele), тропа tomeka ye na yango, mpe totieli ye boyoki mpe bomoni mpo oyoka mpe amona

    [3] Ya solo, tolakisaki ye nzela mpo atondo (Allah) to apengwa

    [4] Ya solo, tolengeli тропа bapengwi minyololo ya basinga milai ya makasi mpe etumbu ya saira. (moto ya makasi ya lifelo)

    [5] Ya solo, babangi (Allah) bakomelaka na bakopo ya kitoko ya kafura ya malili solo kitoko

    [6] Esika oyo bawumbu ya Allah bakomelaka ndenge balingi ezali kobimisa mayi ya malamu

    [7] Bazali kokokisa bilaka mpe bazalaki kobanga mokolo moye mabe na yango ekopanzana bisika binso

    [8] Мре bazali koleisa babola na bana bitike mpe bato ya boloko, na bolingo (ya biloko yango)

    [9] Ya soló, tozali koleisa bino тропа Allah, tolingi bofuta biso te mpe bopesa biso melesi te

    [10] Tozali kobanga Nkolo na biso тропа mokolo oyo ya somo mpe ya mabe koleka

    [11] Allah akobatela bango na mabe ya mokolo wana, mpe bakokutana na bongengi mpe esengo

    [12] Mpe akofuta bango lola тропа maye basalaki, mpe akopesa bango bilamba bia fafala

    [13] Bakoyekamaka likolo ya bakiti ya kitoko, moyi ekotungisaka bango te mpe bakoyokaka malili makasi te

    [14] Bilili na yango bikozipa bango penepene, mpe mbuma na yango bikokita tii pembeni na bango тропа kobuka

    [15] Mpe bakopesaka bango bitiyelo biye bisalami na mabende ya mbongo na bakopo bisalami na mabanga ya pembe ya kitoko bikotambwisama likolo na bango тропа kólia mpe komela

    [16] Bakopo to milangi ya mabende ya kongenga ya кококапа

    [17] Мре bakomelaka mayi oyo esangani na tangawisi

    [18] Ezali kowuta na liziba oyo ebengami salsabila kuna na kati

    [19] Мре bilenge mibali ya libela bakotambola nakati na bango тропа kosalela bango, soki omoni bango okokanisa ete bazali mabanga ya mayi ya kongenga oyo epanzani

    [20] Mpe soki otali kuna okomona kitoko na bokonzi bonene

    [21] Мре bakolata bilamba ya langi ya mayi ya pondu ya lolenge ebele тре basinga ya palata na maboko na bango mpo na bonzenga. Mpe Nkolo wa bango akomelisa bango mayi ya bopeto

    [22] Ya soló, oyo ezali lifuta тропа bino, mpe molende na bino ekofutama

    [23] Ya sólo, biso nde tokitiselaki yo kurani oyo na ndambu ndambu

    [24] Zala na bozeli na oyo Nkolo nayo apesi mibeko, mpe kotosa mosumuki to mopengwi te okati na bango

    [25] Мре tanga nkombo ya Nkolo nayo tongo mpe pokwa

    [26] Mpe na butu ofukamela ye, mpe okumisa ye butu molayi

    [27] Ya soló, bango balingi (bomoyi) ya nsé, mpe batiki sima na bango mokolo ya kilo mpe ya somo

    [28] Biso nde tokela mpe tobongisi bokeli, soki tolingi tokoya na bato mosusu na esika na bango

    [29] Ya sólo, oyo ezali bokundoli, oyo alingi, azwa nzela ya kokende epai ya Nkolo naye

    [30] Na yango: Bokolinga eloko te sé ezala na bolingi ya Allah. Ya sólo, Allah azali moyebi atonda bwanya

    [31] Akotisaka oyo alingi na mawa naye, kasi тропа bato mabe, abombeli bango etumbu ya makasi

    Surah 77
    Bamitindami

    [1] (Nalapi na nkombo) ya baye batindamaki ya kolandana! (ba anzelu)

    [2] Mpe na baye bafulaka mopepe na mbonge makasi

    [3] Mpe bazali kopanza bisika binso

    [4] Mpe na baye bakabolaka mabe na malamu

    [5] Mpe na baye babwakaka mbela

    [6] Mpona bolimbisi to bokebisi

    [7] Oyo bolakamaki ekozangaka te

    [8] Tango minzoto mikolimwaka

    [9] Mpe tango mapata ekopasuka

    [10] Mpe tango bangomba bikolalisamaka

    [11] Mpe tango ngonga ya bosangani ya batindami ekotiyamaka

    [12] Yango ezongisami mpona mokolo nini

    [13] O mokolo ya kokata makambo

    [14] Mpe nani akoyebisaka yo mokolo ya kokata makambo

    [15] Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi

    [16] Boye tobomaki bamisusu liboso te

    [17] Sima tolandisaki bamisusu te

    [18] Lolenge wana nde tokosalelaka batomboki

    [19] Etumbu ekozala mokolo wana тропа bakosi

    [20] Boye tokelaki bino na mayi ya moselu te

    [21] Мре totiyaki yango na ebombelo elamu te

    [22] Na elaka oyo eyebani te

    [23] Totiyaki mibeko na lolenge ya malamu te

    [24] Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi

    [25] Boye totiyaki mabele ezala ebombelo ya (makambo) nyoso te

    [26] (Mpona) baye bazali na bomoyi na baye bakufa

    [27] Boye topikelaki yango bangomba ya milai? Mpe tomelisaki bino mayi ya elengi te

    [28] Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi

    [29] Bökende epai ya maye bozalaki kozua yango nalokuta

    [30] Bökende epai ya elili ya milinga oyo ezali na mozindo misato

    [31] Oyo ezali na elili te mpe ekoki kobatela moto na motó te

    [32] Ya soló motó ezali kobwaka balolemo na yango ya kilo lokola bandako ya kilo

    [33] Ezali lokola bakamela langi na yango lokola mayi ya mosaka

    [34] Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi

    [35] Mokolo wana bakolobaka te

    [36] Mpe bakolingela moto moko bolimbisi te

    [37] Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi

    [38] Oyo nde mokolo ya kokata (makambo), tokosangisa bino na bato ya liboso

    [39] Soki bolingi bosala likita ya mabe тропа ngai, bosalela ngai

    [40] Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi

    [41] Ya soló babangi, bakozala na bisika ya malili mpe ya maziba

    [42] (Bakoliaka) bambuma oyo balingi

    [43] Bolia, mpe bomela na mposa na bino тропа maye bosalaki

    [44] Ya sólo, lolenge wana nde tokofutaka babongisi

    [45] Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi

    [46] Bolia mpe bomela (токе na mokili), Ya sólo penza bozali batomboki

    [47] Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi

    [48] Mpe tango bayebisaki bango: Ete bogumbama, kasi balingaki kogumbama te. (тропа Allah)

    [49] Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi

    [50] (Sima na yango), liloba nini lisusu bokondimaka

    Surah 78
    Nsango

    [1] Na likambo nini bazali komitunana

    [2] Likolo ya sango enene

    [3] Eye pona yango bakeseni makanisi

    [4] Te kasi bakoyeba yango sima ya mwa ngonga moke

    [5] Te sima lisusu bakoyeba yango

    [6] Tozalisaki te mabele etando

    [7] Mpe bangomba lokola makonzi

    [8] Tokelaki bino te mibale mibale

    [9] Мре tozalisaki te mpongi ezala pona bino bopemi

    [10] Мре tokelaki te butu ezala elamba ekozipa bino

    [11] Mpe tosalaki te mokolo тропа misala mia bomoyi

    [12] Mpe totongaki te likolo na bino (mapata) sambo ekembama

    [13] Mpe totiaki te o’teyi na yango mwinda mozali kongenga

    [14] Mpe tokitisaki kowuta na mapata mayi ebele

    [15] Mpo ete na mayi tobimisa bambuma mpe bilona

    [16] Na bilanga ekembisami (kitoto)

    [17] Ya soló, mokolo ya mbano mozali na ntango ya koyebana

    [18] Mokolo bakofula kelelo bokoya lisanga lisanga

    [19] Mpe likolo likofungwama bikokoma bikuke

    [20] Mpe bangomba bikotambola na lombango

    [21] Ya solo, lifelo ezali kozela

    [22] Esika yakofanda тропа batomboki

    [23] O’kati na yango bakofanda seko na seko

    [24] O’kati na yango bakoyoka mopepe ya kitoko te mpe bakomela eloko te

    [25] Longola sé mayi ya moto ya tofina

    [26] Lokola lifuta lia bosembo тропа bango

    [27] Mpo ete bazalaki kondima na mokolo mwa bosambisami te

    [28] Mpe batiaki ntembe na maloba na biso

    [29] Nzoka nde biso totiaki manso na mokanda

    [30] Kasi bomeka! Biso tokobakisa pona bino te sé etumbu

    [31] Ya soló, elonga ezali тропа babangi (Allah)

    [32] Bilanga mpe masanga ya bilengi

    [33] Mpe bilenge basi baye bazali banso ya mbula moko

    [34] Mpe bankopo ebele ya bomeli

    [35] O’kati na yango bakoyokaka makambo mazanga ntina te mpe lokuta te

    [36] Yango nde lifuta kowuta na Nkolo nayo lokola libonza

    [37] Ye Nkolo mapata mpe mabele na maye mazwami kati kati na yango, Ar-Rahmân bakozala na liloba te o’boso bwa ye

    [38] Mokolo molimo mosantu mpe na ba anzelu bakotelema molongo moko mpe moto akozala na liloba te longola sé oyo Ar-Rahmân (Allah) akopesa ye ndingisa mpe akoloba sé bosembo

    [39] Mokolo yango ezali ya sólo. Oyo alingi amitia na libateli ya Nkolo naye

    [40] Ya sólo, tokebisi bino na etumbu ya pene, mokolo moto akomona maye maboko maye masalaki na ntango ena mopagano akoloba ete: Eh mpasi na ngai! Na bongwana ata mabele

    Surah 79
    Baoyo babendi libanda

    [1] (Na lapi) na baye bapikolaka na makasi

    [2] Mpe na baye bayambaka na boboto

    [3] Mpe baye batambolaka ndenge balingi

    [4] Mpe balekaka na lombango

    [5] Mpe bazali kobongisa makambo

    [6] Mokolo moye mabele makoningana (na bofuli ya yambo)

    [7] Sima elandani ya mibale

    [8] Mokolo mona mitema mikoningana na bobangi

    [9] Miso ma bango mikobanga

    [10] Bakoloba ete: Ya sôló, tokozongisama na bomoyi na biso sima ya liwa

    [11] Sima, yakokoma mikuwa ya kopola

    [12] Balobi ete: Wana ezali bozongisami ya mpamba

    [13] Ya sôló, yango ezali bosangisi ya mbala moko

    [14] Mpe bakozwamaka likolo ya mabele kowuta na malita ma bango

    [15] Sango ya Mûssa ekomelaki yo te

    [16] Ntango Nkolo naye abengaki ye na ngomba esantu

    [17] Kende epai ya falo pamba te asili kotomboka

    [18] Мре loba naye ококі komipetola te

    [19] Мре nakamba yo epai ya Nkolo nayo mpo obanga ye

    [20] Mpe (Mûssa) alakisaki ye likamwisi linene

    [21] (Falo alobaki) eza lokuta mpe aboyaki kotosa

    [22] Sima apesaki mokongo mpe asali lolendo

    [23] Abiangi mpe asangisi bato naye

    [24] Sima alobaki ete: Ngai nazali Nkolo na bino oyo azali na likolo koleka

    [25] Na yango Allah azwaki ye na etumbu awa na nsé mpe na mokolo ya suka

    [26] Wana ya soló, ezali elembo тропа moto azali na bobangi

    [27] Kokelama na bino ezali makasi koleka to mapata maye atonga

    [28] Atombola etando na yango mpe akokisa yango

    [29] Atieli yango butu na moyi

    [30] Mpe na sima atandi mabele

    [31] Mpe na kati na yango abimisi mayi na matiti

    [32] Mpe atelemisi bangomba

    [33] Ezali bilei тропа bino mpe na bibuele na bino

    [34] Kasi ntango bobulungani ya monene ekoya

    [35] Mokolo moye moto akokanisa maye asalaki

    [36] Moto ya lifelo mokozala polele na oyo akomona

    [37] Mpona oyo alekisaki ndelo

    [38] Mpe aponaki bomoyi bwa nsé

    [39] Ya soló, lifelo ekozala esika naye ya kofanda

    [40] Kasi mpona oyo abangaki kotelema liboso ya Nkolo naye mpe amipekisaki na bamposa

    [41] Ya soló, lola ekozala esika naye ya bopemi

    [42] Bazali kotuna yo na maye matali mokolo ya suka ntango nini mokolo yango

    [43] Bwanya nini ozali na yango тропа koyanola bango

    [44] Ngonga na yango eyebani epai na Nkolo nayo

    [45] Ya soló yo ozali sé mokebisi тропа oyo azali na bobangi ya mokolo wana

    [46] Ntango bakomona yango bakomimona lokola barandaki na malita sé mokolo moko to ndambo ya mokolo

    Surah 80
    Abukaki elongi

    [1] Akangi elongi mpe apesi mokongo

    [2] Mpo ete mokufi miso aye epai naye

    [3] Nani akoyebisa yo ntango mosusu ye alingi komipetola

    [4] To mpe kokanisa mpo ete mateya esalisa ye

    [5] Mpona moto oyo amitondisi na lolendo mpona bozwi naye

    [6] Ozali koyamba ye na lombango

    [7] Kasi bopetwami naye ezali na maboko nayo te

    [8] Kasi mpona oyo aye na lombango epai nayo

    [9] Naye azali na bobangi

    [10] Ozali kotala ye te

    [11] Kosala lisusu boye te oyo ezali ya soló liteya

    [12] Oyo alingi akanisa yango

    [13] Ezwami kati ya makomi ya lokumu

    [14] Etombwami mpe epetolami

    [15] O’maboko ma bantoma

    [16] Baye ya lokumu тре botosi

    [17] Moto amibomi na bopengwi naye

    [18] Na eloko nini akelamaki

    [19] Akelamaki kowuta na mayi ya mokongo, akeli ye mpe akokiseli ye mokano mwa ye

    [20] Sima alakisi ye nzela

    [21] Sima abomi ye mpe akotisi ye na lilita

    [22] Mpe akosekwisa ye na ntango alingi

    [23] Moto akokisi te maye atindamaki

    [24] Esengeli na moto atala bileyi naye

    [25] Ya soló, biso nde tozali kokitisa mayi

    [26] Sima topasoli mabele na nzela

    [27] Mpe na nzela wana tobimisi bambuma

    [28] Ba inab mpe bandunda

    [29] Na nzete ya zaítún na nzete ya nagh’l

    [30] ЗО. Мре bilanga ebele

    [31] Мре tobimisi mbuma mpe matiti

    [32] Bileyi тропа bino na An’âm na bino

    [33] Kasi tango bobulungani ekoya

    [34] Mokolo moye moto akokima ndeko naye

    [35] Mpe akokima mama naye mpe tata naye

    [36] Akokima mwasi naye mpe bana baye

    [37] Mpamba te mokolo wana moto na moto akotala sé makambo matali ye

    [38] Mokolo wana bilongi bisusu bikongenga

    [39] Bakoseka mpe bakosepela

    [40] Kasi bilongi bisusu mokolo yango bikozala na putulu

    [41] Bikozipama na molili

    [42] Baye wana nde bazali bapengwi mpe bato ya mabe

    Surah 81
    Kobwaka na nse

    [1] Ntango mwese (moyi) mokokoma molili

    [2] Mpe ntango minzoto miko limwa

    [3] Mpe bangomba bikotambola

    [4] Mpe ntango bakamela ya zemi bakosundolama

    [5] Mpe banyama ya mabe bakosangisama

    [6] Mpe ntango bibale bikopela móto

    [7] Mpe milimo mikosangisama

    [8] Mpe ntango mwana шоке ya mwasi akotunama

    [9] Nalisumu nini asalaki mpo baboma ye

    [10] Mpe ntango bakosakola makomi

    [11] Mpe ntango mapata makopasuka

    [12] Mpe ntango lifelo likopelisama

    [13] Mpe ntango lola ekokoma pembeni na bato

    [14] Moto akoyeba maye asalaki

    [15] Te, na lapi na mapata maye matongami

    [16] Maye mazali kokima mpe kolimwa

    [17] Na lapi mpe na butu ntango ekweyaka

    [18] Mpe na ntongo ntango etanaka

    [19] Ya soló, oyo ezali liloba ya motindami gabiliyele ya lokumu

    [20] Atondi na nguya kowuta epai na Nkolo ya ngwende ya lokumu

    [21] Atosami atonda bosembo

    [22] Sôló ndeko na bino (Muhammad) azali na ligboma te

    [23] Amonaki ye ya sôló na suka, oyo likolo emonanaka polele lokola ekweyi na mabele

    [24] Azali kobomba te maye makitaki epai naye

    [25] Yango (kurani) ezali liloba ya satana te

    [26] Bozali kokende wapi

    [27] Ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba

    [28] Na oyo alingi kati na bino amisembwama

    [29] Bokolingaka te sé sima ya kolinga ya (Allah) Nkolo ya mokili

    Surah 82
    Kopasuka

    [1] Ntango likolo ekokabwana

    [2] Mpe ntango minzoto mikolimwa

    [3] Mpe ntango bibale bikosangisama

    [4] Mpe ntango malita makobalusama mpe makobimisa bawa

    [5] Molimo mokoyeba maye awelisaki mpe maye azelisaki

    [6] Oh yo moto! Nini ekosi yo тропа Nkolo nayo ya bolingo

    [7] Oyo akeli yo mpe abongisi lolenge nayo

    [8] Mpe asali yo na lolenge naye alingaki

    [9] Kaši bozali na ntembe тропа mokolo ya suka

    [10] Mpe ya sôló, bozali na bakengeli

    [11] Bankomi ya sôló

    [12] Bayebi maye manso bozali kosala

    [13] Ya soló, bato ya malamu bakozala o’kati ya bisengo

    [14] Mpe ya soló bato ya mabe bakozala okati ya lifelo

    [15] Bakozikisama na yango mokolo ya mbano

    [16] Mpe bakozangisama te na etumbu ena

    [17] Kasi nani akoyebisa yo nini yango mokolo ya mbano

    [18] Sima lisusu nani akoyebisa yo nini yango mokolo ya mbano

    [19] Mokolo moye molimo ekosalisa molimo mosusu na eloko te mpe mokolo mona mobeko mokozala sé ya Allah

    Surah 83
    Kokosa

    [1] Mawa na baye bazali koy iba

    [2] Baye ntango bazali (kosomba) bazali kosenga ete bakokisela bango emekeli

    [3] Kaši ntango bazali komeka pona bato mosusu bazali kozangisa

    [4] Bango bazali kokanisa ete bakozonga na bomoi te sima ya liwa

    [5] Na mokolo ya monene

    [6] Mokolo moye bato bakotelema liboso ya Nkolo ya molongo

    [7] Kasi ya soló, buku ya bato ya mabe ekozala okati ya sidjíne

    [8] Nani akoyebisa yo eloko nini sidjíne

    [9] Buku eye ekomama

    [10] Mokolo wana etumbu ekozala тропа baye baboyi kondima

    [11] Baye bazali kozwa mokolo ya suka na lokuta

    [12] Kasi akoboya kondima sé molekisi ndelo mosumuki

    [13] Oyo soki batangeli ye maloba na biso alobi: Wana ezali másese ya bakoko ya kala

    [14] Ezali boye te, kaši mitema miabango mizali na mbindo na maye bazalaki kosala

    [15] Kasi basala angele ya soló mokolo mona mokozipa bango mpo ete bamona Nkolo na bango te

    [16] Sima bakozikisama ya sólo okati ya lifelo

    [17] Sima bakoloba na bango wana maye bozalaki koboya kondima

    [18] Ya sólo, buku ya bato malamu ekozala o’kati ya iliyíne

    [19] Nani akoyebisayo eloko nini iliyíne

    [20] Buku eye ekomama

    [21] Ba anzelu ya pembeni ya Nkolo (Allah) bazali banzeneneke тропа yango

    [22] Ya sólo bato ya malamu bakozala okati ya bisengo

    [23] Likolo ya bakiti ya lokumu bazali kotalana

    [24] Okoyeba bilembo bia bisengo o’bilongi bia bango

    [25] Bakomela masanga ya sukali oyo esila kobongisama

    [26] Etikaka solo ya mpimbo na suka lokola malasi, na yango esengeli nabaye bazali kolikia тропа yango basala molende

    [27] Mpe esangisani na masanga ya tasmin (liziba)

    [28] Baye bakozala pembeni na Nkolo (Allah) bako mela mayi ya liziba wana

    [29] Ya soló, bato mabe bazalaki kotiola bandimi

    [30] Mpe soki baleki pene na bango bazali (kodongola bango miso nako fina) miso na bango

    [31] Mpe soki bazongi o’mabota na bango bazali kokosa bango

    [32] Mpe soki bamoni bandimi balobi ete: Ya sólo, baye wana nde babunga nzela

    [33] Nzoka nde batindamaki te bazala bakengeli likolo ya bandimi

    [34] Kasi lelo bandimi bako tiola bapagano

    [35] Likolo ya bakiti ya lokumu bazali kotala

    [36] Bapagano bazwi te lifuta liye ekoki na bango na tina ya maye bazalaki kosala

    Surah 84
    Kofungwama

    [1] Ntango mapata mako pasuka

    [2] Mpe makotosa Nkolo na yango, mpe ekosala maye esengeli esala

    [3] Mpe ntango mabele makolalisama

    [4] Mpe makosanza maye manso mazwami okati na yango mpe makotikala mpamba

    [5] Mpe makotosa Nkolo na yango mpe ekosala oyo esengeli esala

    [6] Oh yo moto! Ozali koyika mpiko тропа Nkolo nayo ntango nyoso yeba ete okokutana naye

    [7] Moto oyo akoyamba buku naye na loboko naye ya mobali

    [8] Akosambisama na ndenge ya malamu

    [9] Mpe akozonga o’libota naye na esengo

    [10] Kasi na moto oyo akoyamba buku naye nasima ya mokongo naye

    [11] Akomisengela mabe

    [12] Мре akozikisama okati ya moto ya makasi

    [13] Ya soló, ye na mokili azalaki na esengo o’kati na libota naye

    [14] Azalaki kokanisa te ete akosekwisama

    [15] Kasi ya sólo, Nkolo naye azalaki kotala ye

    [16] Te na lapi na ngonga ya mpokwa

    [17] Mpe na lapi na butu na molili na yango

    [18] Mpe na lapi na nsanza ntango ekomaka mobimba

    [19] Ya sólo, bokolekanaka biteni na biteni

    [20] Mpona nini bazali kondima te

    [21] Mpe mpona nini bafukamaka te ntango kurani ezali kotangama likolo na bango

    [22] Kasi bapengwi bazali kozwa yango lokuta

    [23] Nzoka Allah ayebi maye bazali kobomba

    [24] Pesa bango sango ya etumbu ya makasi

    [25] Longola sé baye bandimi mpe basali misala ya malamu bazali na lifuta ya suka te

    Surah 85
    Bituluku ya minzoto

    [1] (Na lapi) na mapata eye etonda minzoto

    [2] Mpe na lapi na mokolo ya elaka

    [3] Mpe na lapi na nzeneneke na baye bazali kotala

    [4] Babomaki bato ya nsé ya ngomba

    [5] Na moto etonda bankoni

    [6] Mpe bango bazingaki yango yakofanda

    [7] Mpe bazalaki kornona maye bazali kosala na bandimi

    [8] Bayinamaki mpo ete bandimi na Allah wa nguya atonda lokumu

    [9] Ye oyo azali na bokonzi ya likolo na nsé, Allah azali na boyebi na biloko binso

    [10] Baye bazali konyokola bandimi ya mibali na ya basi, soki batubeli te bakozwa etumbu ya lifelo mpe monyokoli ya moto

    [11] Ya soló, baye bandimi mpe basali misala ya malamu bakozwaka Iola eye mingala mizali kotiola na nsé na yango. Wana nde ezali elonga ya monene

    [12] Ya sólo, etumbu ya Nkolo nayo ezali makasi

    [13] Ye nde abandaka mpe azongelaka (bokeli)

    [14] Mpe azali molimbisi mpe atonda bolingo

    [15] Nkolo ya ngwende ya lokumu

    [16] Asalaka maye alingi

    [17] Ekomelaki yo te sango ya mapinga

    [18] Ya Falo na Thamúd

    [19] Kasi bapagano bazali sé koboya kondima

    [20] Nzoka nde Allah azingi bango

    [21] Kasi yango ezali kurani ya lokumu

    [22] Ekomami likolo ya libaya liye libatelami epai na Allah

    Surah 86
    Minzoto ya ntongo

    [1] (Na lapi) na mapata mpe na monzoto y a butu

    [2] Nani akoyebisa yo nini monzoto ya butu

    [3] Ezali monzoto ya bongengi makasi

    [4] Ezali na molimo moko te sé azala na mokengeli likolo naye

    [5] Esengeli na moto ayeba na nini yango akelamaki

    [6] Akelamaki kowuta na litanga ya mayi

    [7] Ewuti o’kati na mokongo mpe mipanzi

    [8] Ya soló Allah azali na nguya ya bozongisi ye na bomoyi

    [9] Mokolo moye mitema mikobimisa maye ebombaki

    [10] Akozala na nguya te mpe akozala na mosalisi te

    [11] (Na lapi) na mapata maye mazali kokitisa mbula

    [12] Мре (na lapi) na mabele maye mazali kofungwama

    [13] Ya soló, oyo (kurani) ezali liloba ya bosembo

    [14] Kasi ezali eloko ya pamba te

    [15] Ya soló, bango bazali koyangela mwango

    [16] Ngai mpe nazali na ya ngai mwango

    [17] Pesa bapagano elaka, pesa bango elaka ya mokuse

    Surah 87
    Oyo aleki likolo

    [1] S anzola kombo ya Nkolo nayo oyo azali na likolo koleka

    [2] Oyo akela mpe akokisa

    [3] Mpe atia mokano mpe akamba o nzela ya nsemba

    [4] Mpe oyo abimisa matiti

    [5] Mpe apesi yango langi ya mayi ya mpondu

    [6] Tokotangisa yo na lolenge ete obosana te

    [7] Sé na oyo ye moko Allah alingi, Nde ayebi maye mazali polele mpe maye mabombama

    [8] Mpe tokolakisa yo nzela ya pete

    [9] Pesa liteya na baye ekosalisa bango

    [10] Oyo azali na bobangi nde akokanisa

    [11] Oyo Akomitia mosika na yango ye nde moto ya mpasi

    [12] Oyo akozika na moto ya monene

    [13] O’nteyi na yango akokufa te mpe akozala na bomoyi te

    [14] Asili kolonga oyo amipetoli

    [15] Akanisi kombo ya Nkolo naye mpe asambeli

    [16] Kasi bino bolingi na bolingo makasi bomoyi ya nsé

    [17] Nzoka nde bomoyi ya lobi nde ezali malamu mpe ekowumelaka seko

    [18] Ya sôló oyo esila kokomama na mikanda ya yambo

    [19] Mikanda ya Ibrâhîm mpe ya Mûssa

    Surah 88
    Kozinda

    [1] Ekomeli yo sango ya oyo ekozipa

    [2] Mokolo wana bilongi bikobanga

    [3] Makambo maleki bango bakomi na bolembu

    [4] Bakozikisama o’kati ya moto ya makasi

    [5] Mpe bakomelisa bango mayi ya moto

    [6] Bakozala na bilei te sé matiti ya nzube

    [7] Ekosilisa bango nzala te mpe ekopesa bango nzoto Nkolongono te

    [8] Mokolo wana bilongi misusu bikozala na esengo

    [9] Bikosepela pona maye basalaki

    [10] Okati ya lola ya likolo

    [11] Okati na yango okoyoka te makambo ya pamba pamba

    [12] Okati na yango maziba mazali kotiola

    [13] Okati na yango bambeto ya kotombwama

    [14] Mpe bakopo bitiami

    [15] Mpe bikáta bitandami

    [16] Mpe bankwala bizali ya kotandama

    [17] Bazali kot ala te ba ibil ndenge ekelama

    [18] Mapata lolenge etombwama

    [19] Mpe bangomba lolenge epikama

    [20] Mpe mabele lolenge etandama

    [21] Kundola, pamba te yo ozali sé mokundoli

    [22] Kasi ozali mokengeli likolo na bango te

    [23] Longola sé oyo apesi mokongo mpe aboyi kondima

    [24] Allah akopesa ye etumbu ya monene

    [25] Ya soló, epai na biso nde bozongi na bango

    [26] Mpe ya sólo lifuta lia bango ezali omaboko na biso

    Surah 89
    Ntongo

    [1] (Nalapi) na eleko ya ntongo

    [2] (Mpe nalapi) na babutu zomi

    [3] (Mpe nalapi) na motango libale, mpe na motango libale te

    [4] (Mpe nalapi) na butu ntango esilaka

    [5] Kolapa oyo ezali te mpo na moto oyo atonda mayele

    [6] Omoni te ndenge Nkolo nayo asalaki na bato ya aad

    [7] Na mboka Irama ndenge etongamaki na bandako ya likolo

    [8] Mboka eye etongama te lolenge wana na mokili

    [9] Mpe na bato ya Thamúd baye bazalaki kotobola mabanga okatikati ya bangomba

    [10] Na Falo moto ya mapinga

    [11] Bango banso bazalaki babuki mibeko o’kati ya bamboka na bango

    [12] Mpe babebisaki mingi koleka

    [13] Na yango Nkolo nayo akitiselaki bango fimbu ya etumbu

    [14] Mpo ete Nkolo nayo azali kotala

    [15] Moto azali soki Nkolo naye ameki ye na bokumisi ye mpe na bopesi ye bozwi alobi: Nkolo na ngai akumisi nga

    [16] Kaši soki ameki ye na bokangeli ye bozwi alobi ete: Nkolo na ngai asundoli nga

    [17] Kaši te, bino nde bosalisaka bana bitike te

    [18] Mpe bolendisaka bato te pona koleisa babola

    [19] Mpe bozalaki kólia bikitano (bozui mowei atiki) na ndenge ya mabe

    [20] Mpe bolingi bomengo na bolingo ya makasi

    [21] Kaši ntango mabele ekobalusama na ndenge ya somo

    [22] Ntango Nkolo nayo akoya mpe ba anzelu bakozala milongo milongo

    [23] Mpe bakoya na lifelo mokolo yango, mokolo wana moto akokanisa makanisi, kaši makanisi wana ekosalisa ye na eloko te

    [24] Akoloba eh! Ngai mawa na ngai, soki nasalaki bolamu pona bomoyi na ngai

    [25] Mokolo wana etumbu naye ekokokana na ya moto moko te

    [26] Mpe moto moko te akokangama lokola ye

    [27] Oh yo molimo y a kimia

    [28] Zonga epai ya Nkolo nayo na bozongi ya esengo

    [29] Kota elongo na bawumbu ba ngai

    [30] Mpe kota okati ya lola na ngai

    Surah 90
    Engumba

    [1] Na lapi na mboka oyo

    [2] Mpe yo (Muhammad) ozali mwana ya mboka oyo

    [3] (Mpe na lapi) na tata mpe na oyo azali kobota

    [4] Ya soló, tokelaki moto na bomoyi moko ya paši

    [5] Azali kokanisa ete moto moko te azali na nguya koleka ye

    [6] Mpe alobi ete, na bebisi bomengo na ngai mpamba

    [7] Azali kolikia ete moto moko te azali kornona ye

    [8] Tokelaki te тропа ye miso mibale

    [9] Na lolemo тре па mbebo mibale

    [10] Мре tolakisaki ye te nzela mibale

    [11] Kasi aponaki nzela ya mpasi te

    [12] Nani yango akoyebisa yo nini nzela ya pasi

    [13] Ezali kolongola bato na bowumbu

    [14] To mpe koleisa na mokolo moko ya nzala

    [15] To mpe mwana ya etike ya pembeni

    [16] To mpe mobola oyo azali na paši

    [17] Mpe ezali na kati ya bandimi baye bazali kosalisana na kokanga motema mpe bazali kosalisana na mawa

    [18] Baye wana nde bato bakozala na loboko ya mobali

    [19] Kaši baye baboyi kondima na maloba na biso bazali bato ya loboko ya mwasi

    [20] Motó ekozipa bango

    Surah 91
    Moyi

    [1] (Na lapi) na mwese mpe na bongengi na yango

    [2] (Mpe na lapi) na sanza ntango elandaka mwese

    [3] (Mpe na lapi) na moyi ntango ezali kongala

    [4] (Mpe na lapi) na butu ntango ezipi (mokili)

    [5] Mpe mapata na oyo atongi yango

    [6] Mpe mabele na oyo atanda yango

    [7] Mpe na molimo na oyo abongisa yango

    [8] Mpe alakisi ye mabe naye mpe malamu naye (kobunga naye na bokambami)

    [9] Asili kolonga moto oyo apetoli (molimo naye)

    [10] Asili kobebisama oyo aboyi kopetola yango

    [11] Bato ya Thamúd balekisaki ndelo mpe baboyi kondima

    [12] Ntango moto mabe kati na bango atelemaki

    [13] Motindami ya Allah alobaki na bango ete: Oyó ezali náqah ya Allah botika yango emela mayi

    [14] Kasi baboyaki koyoka maloba naye mpe babomi yango, Nkolo na bango abomaki bango pona lisumu wana mpe akitisaki etumbu likolo na bango

    [15] Mpe (Allah) azali na bobangi te na maye makoya sima

    Surah 92
    Butu

    [1] (Nalapi) na butu ntango ezipaka biloko binso

    [2] (Mpe na lapi) na moyi ntango ezali ко ngala

    [3] Mpe (Allah) akeli mobali na mwasi

    [4] Ya soló, molende na bino ezali ya kokesene

    [5] Kaši тропа oyo apesi mpe abangi Allah

    [6] Mpe andimi na bosôló ya lifuti (lola)

    [7] Tokolembisela ye nzela ya bozui

    [8] Kaši тропа oyo azali mopimi mpe azali komipesa na mabondeli te

    [9] Mpe aboyi kondima na mokolo ya mbano

    [10] Toko bongisela ye nzela ya paši

    [11] Bomengo naye ekosalisa ye na eloko te na ntango ya paši

    [12] Bokambi bozali bwa biso

    [13] Мре ya soló, bomoyi ya lelo na ya lobi bozali bwa biso

    [14] Nazali kokebisa bino na moto ezali kopela

    [15] Akozikisama na yango sé moto ya mabe

    [16] Oyó aboyi kondima mpe apesi mokongo

    [17] Kasi moto ya bobangi Allah akozala mosika na yango

    [18] Oyó azali kopesa bomengo bwaye mpo apetwama

    [19] Ezali te тропа ye kosepelisa moko o’kati ya bato

    [20] Sé тропа koluka kornona elongi ya Nkolo naye oyo azali olikolo koleka

    [21] Mpe na nsima Nkolo naye akosepela naye

    Surah 93
    Ntango ya ntongo

    [1] (Nalapi) na kobuta ya mokolo

    [2] (Mpe na lapi) na butu ntango ezali kozipa biloko binso

    [3] Nkolo nayo asundoli yo te mpe ayini yo te

    [4] Bomoyi ya suka ezali malamu тропа yo koleka bomoyi ya nsé

    [5] Nkolo nayo akopesa yo bolamu naye mpe okosepela

    [6] Akutaki yo mwana etike te тре ayambi yo

    [7] Mpe akutaki yo te na libungi mpe akambi yo na nzela ya nsemba

    [8] mpe akutaki yo te mobola mpe apesiyo bozwi

    [9] Kasi тропа mwana etike konyokolo ye te

    [10] Mpe pona mosengi kobengana ye te

    [11] Mpe pona bolamu ya Nkolo nayo sakola yango

    Surah 94
    Lisungi

    [1] Biso te nde tofungolaki yo motema

    [2] Mpe tokitisaki mokumba nayo

    [3] Mokumba moye mozalaki kobuka mokongo nayo

    [4] Mpe totombolaki lokumu nayo

    [5] Ya soló, mpasi ezalaka péne ya esengo

    [6] Ya solo, mpasi ezalaka péne ya esengo

    [7] Soki osilisi misala telema тропа kosambela

    [8] Mpe pona Nkolo nayo zala na elikya

    Surah 95
    Figi

    [1] (Na lapi) na nzete ya tini mpe nzete ya zaîtûn

    [2] (Мре na lapi) na ngomba ya sinayi

    [3] (Мре na lapi) na mboka oyo ya kimia (makkah)

    [4] Ya soló, tokelaki moto na lolenge ya kitoko

    [5] Sima tokitisi ye na nsé koleka

    [6] Longola sé baye bandimi mpe basali misala ya malamu, baye wana nde bako zala na lifuta ya libela

    [7] Nasima nini ekopekisa yo kondima na mokolo ya suka

    [8] Allah azali te zuzi wa bazuzi

    Surah 96
    Ligombo

    [1] Tanga na kombo ya Nkolo nayo oyo akela

    [2] Akela moto kowuta na liboke ya makila

    [3] Tanga mpo Nkolo nayo azali malamu

    [4] Oyo atangisi na ekomeli

    [5] Atangisi moto maye azalaki koyeba te

    [6] Kasi ya soló, moto akomi motomboki

    [7] Ntango amimoni ete akomi na bozwi

    [8] Nzoka nde bozongi ezali epai ya Nkolo nayo

    [9] Omoni te moto oyo azali kopekisa

    [10] Mowumbu (ya Allah) ntango azali kosambela

    [11] Omonite soki azalaki na bokambi

    [12] To mpe azali kotinda bato na bobangi Allah

    [13] Omoni te soki aboyi kondima to apeși mokongo

    [14] Ayebi te ete ya soló, Allah azali kornona

    [15] Kasi soki atiki te, tokokanga ye na elongi naye

    [16] Elongi ya moto ya lokuta mpe mosumuki

    [17] Kasi abenga lisanga naye

    [18] Biso tokobenga bakengeli ya lifelo

    [19] Te, kotosa ye te, kasi pusana тре fukama (pembeni ya Nkolo nayo)

    Surah 97
    Nguya

    [1] Ya soló, tokitisaki yango (kurani) o’butu ya mokano

    [2] Mpe nani akoyebisa yo eloko nini butu ya mokano

    [3] Butu ya mokano ezali malamu koleka sanza koto moko

    [4] Okatina yango ba anzelu bazali kokita elengo na molimo mosantu, na ndingisa ya Nkolo na bango na mokano ya makambo manso

    [5] Yango ezali kimia mpe boboto kino ntongo ekotana

    Surah 98
    Elembeteli ya polele

    [1] Bapagano kati ya baye bazwa buku mpe na basangisi (Allah) bakotika kompengwa te kino elembo ya polele ekoyelaka bango

    [2] Motindami ayeli bango kowuta epai na Allah azali kotangela bango buku ya bopeto

    [3] O’kati na yango mikapo ya nsemba mizwami

    [4] Baye bazwaki buku bakabwanaki te sé ntango elembo ya polele ekomelaki bango

    [5] Batindamaki te sé kaka babondela Allah na bomoko bwa ye mpe batelemisa losambo mpe bafuta zakat boye nde lingomba ya bosembo

    [6] Ya sôló, Bapagano kati ya baye bazwa buku na basangisi (Allah) bakozala o’kati ya móto seko na seko bango wana nde bazali bikelamu ya mabe

    [7] Ya sôló, baye bandimi mpe basali misala ya malamu, bango nde bazali bikelamu ya malamu

    [8] Lifuta lia bango epai ya Nkolo na bango likozala lola ya eden loye míngala mizali kotiola o’nse na yango тропа libela, Allah akosepela na bango, bango pe bakosepela naye wana nde ekozala lifuta ya oyo abangi Nkolo naye

    Surah 99
    Konikana ya mabele

    [1] Ntango mabele ekoningana na koningana moko ya makasi

    [2] Mpe sima mabele ekobimisa mikumba na yango

    [3] Mpe moto akoloba ete oyo nini boye

    [4] Mokolo wana mabele ekosakola basango na yango

    [5] Pamba te mpo Nkolo nayo asili komonisa yango

    [6] Mokolo wana bato bakobima bipai na bipai mpo ete bamonisa bango misala na bango

    [7] Moto oyo asalaki bolamu moke lokola mbuma zelo akomona yango

    [8] Na oyo mpe asalaki mabe moke lokola mbuma zelo akomona yango

    Surah 100
    Batambwisi

    [1] (Na lapi) na bakimi mbango baye batondi na pema

    [2] Baye bazali kobimisa bambuma ya moto ezali kongala (mikalali)

    [3] Baye babandaka bitumba na ntongo

    [4] Mpe sima bazali komatisa putulu

    [5] Mpe bazali kokota o’kati ya mapinga ya banguna

    [6] Ya soló, moto azali na botondi te тропа Nkolo naye

    [7] Mpe ya sólo, moto azali nzeneneke na yango

    [8] Kasi pona mposa ya bomengo azali komipesa makasi

    [9] Ayebi te ntango bakobimisa maye mazwami na malita

    [10] Mpe maye mabombamaki na mitema mikobima polele

    [11] Ya sólo, mokolo wana Nkolo na bango ayebi sango na bango malamu mpenza

    Surah 101
    Makama

    [1] Bobangi

    [2] Eloko nini yango bobangi

    [3] Nani akoyebisa yo eloko nini bobangi

    [4] Mokolo moye bato bakozala lokola bapomboli ya kopanzana

    [5] Mpe bangomba bikozalaka lokola bilamba bilemba

    [6] Mpona moto oyo emekelo naye ekozala nkilo

    [7] Akozala na bomoyi ya esengo

    [8] Kasi mpona moto oyo emekelo naye ekozanga kilo

    [9] Bozongi mpe bofandi naye ekozala libulu ya mozindo makasi

    [10] Mpe nani akoyebisa yo ntina na yango

    [11] Ezali nde moto ya makasi

    Surah 102
    Komekana na bokoli ya mokili

    [1] Kowela bomengo ezali kokosa bino

    [2] Kino bokoya kotala malita (boko mona liwa)

    [3] Kasi bokoyeba

    [4] Sima lisusu bokoyeba

    [5] Kasi soki boyebaki yango ya soló

    [6] Ya soló bokomona lifelo

    [7] Sima bokomona yango ya sólo na miso na bino

    [8] Мре ya sólo, bokotunama mokolo wana na ntina ya bisengo (ya Allah) apesaki bino

    Surah 103
    Mokolo oyo ezali kokita

    [1] (Na lapi) na eleko

    [2] Ya soló, moto azali na kati ya bozangi

    [3] Longola sé baye bandimi mpe basali misala ya malamu, mpe bazali komisalisana na bosembo, mpe bazali komisalisana na koyika mpiko

    Surah 104
    Mokosi

    [1] Etumbu ezali тропа moto nyoso ya songisongi тре maloba mabe

    [2] Oyó azali kosangisa bomengo naye mpe azali kotanga yango

    [3] Akanisi ete bomengo naye ekopesa ye bomoyi ya seko

    [4] Kasi te. Ya soló, akobwakama na kati ya Hutwama

    [5] Nani akoyebisa yo eloko nini Hutwama

    [6] Moto ya Allah oyo ezali ya kopelisama

    [7] Oyo ezali komata na motema

    [8] Ya sólo, yango ekozipa bango

    [9] Na makonzi (ya moto) mitandami na molongo

    Surah 105
    Nzoku

    [1] Omonaki te ndenge Nkolo nayo asalaki na bato ya nzoku

    [2] Asukisaki mayele na bango te

    [3] Atindaki likolo na bango mapinga ya bandeke

    [4] Babwakelaki bango mabanga ya mabele

    [5] Mpe ekomisaki bango lokola misisa miliami

    Surah 106
    Ba Quresh

    [1] Ezali тропа elaka ya baquraych

    [2] Na mibeko mia bango mitali mibembo na ntango ya elanga mpe ntango ya molunge

    [3] Esengeli na bango babondela Nkolo ya ndako oyo (ka’aba)

    [4] Ye oyo azali koleisa bango o’tango ya nzala mpe kobatela bango na tango ya bobangi

    Surah 107
    Boboto ya mike

    [1] Omoni te oyo azali kozwa mokolo ya suka na lokuta

    [2] Ye wana nde azali kobengana mwana ya etike

    [3] Мре azali kotinda te baleisa babola

    [4] Etumbu ezali pona basambeli

    [5] Baye bazali kolekisa ngonga ya losambo na ntina te

    [6] Baye bazali kosambela тропа bamona bango

    [7] Mpe bazali kopekisa bisengelami

    Surah 108
    Ebele

    [1] Ya soló, topesaki yo kawtsar

    [2] Sambela тропа Nkolo nayo mpe bonzela ye mbeka

    [3] Ya sôló, oyo akoyina yo ye wana nde akolimwa mpe akozala na mokitani te

    Surah 109
    Bapani

    [1] Loba oh bino bapagano

    [2] Na kobondela te oyo bozali kobondela

    [3] Bino mpe bokobondela te oyo nazali kobondela

    [4] Mpe ngai na kobondela sókó шоке te oyo bozali kobondela

    [5] Bino mpe lokola bokobondela sókó moke te oyo nga nazali kobondela

    [6] Bino na lingomba na bino ngai mpe na oyo ya ngai lingomba atonda ngolu

    Surah 110
    Lisungi

    [1] Ntango lisungi y a Nkolo nayo mpe elonga naye ekoya

    [2] Мре okomona bato ebele bakoyingela o’lingomba ya Allah

    [3] S anzola matondo ya Nkolo nayo mpe senga ye bolimbisi, mpo ete ye ya soló, ayambaka tubela

    Surah 111
    Lolemo ya moto

    [1] Tika ete maboko ya Abu lahabe mabebisama

    [2] Bomengo bwaye na maye azwa ekosalisa ye te

    [3] Akozikisama na moto ya kopela

    [4] Mpela moko na mwasi naye mokumbi nkoni

    [5] Monyololo mokozala na kingo naye

    Surah 112
    Bosembo

    [1] Loba: Allah azali sé moko

    [2] Allah akoka

    [3] Abota te mpe abotama te

    [4] Mpe akokani na eloko moko te

    Surah 113
    Ntongo

    [1] Loba: Nazali kosenga libateli epai ya Nkolo oyo atanisaka ntongo

    [2] Kowuta na mabe oyo ye akela

    [3] Kowuta na mabe ya molili ya makasi

    [4] Mpe kowuta na mabe ya baye bazali kofula mopepe ya mabe na mazita

    [5] Mpe kowuta na mabe ya bato ya mitema likunya ntango bazali kosala likunya

    Surah 114
    Bato

    [1] Loba: Nasengi libateli epai ya Nkolo ya bato

    [2] Mokonzi ya bato

    [3] Nzambe ya bato

    [4] Kowuta na komekama ya milimo mabe

    [5] Oyo azali kofula makanisi mabe o’mitema mia bato

    [6] Azala okati ya bilima to bato