Back to Languages

Lingala - Chapter 21 - Al-Anbiya

Translation by Zakariya Muhammed Balingongo — Permalink

Verse 1 — Surah Al-Anbiya 21:1

Eleko ya kokata likambo ya bato ekomi pembeni, kasi bazali komitungisa te тропа yango mpe bapesi mokongo

Verse 2 — Surah Al-Anbiya 21:2

Bokundoli moko te ya Nkolo na bango, ekomelaka bango ezanga te sé bayoka yango na kotiola

Verse 3 — Surah Al-Anbiya 21:3

Mitema mia bango mizali mosika, mpe babubi babebisi mitema mia bango, balobi: Oyo azali moto lokola bino тропа nini bozali komipesa na bondoki mpe bino bozali kornona malamu

Verse 4 — Surah Al-Anbiya 21:4

Alobi: Nkolo wa ngai ayebi manso mazali kolobama o likolo mpe na nsé, mpe azali moyoki atonda boyebi

Verse 5 — Surah Al-Anbiya 21:5

Kasi balobaki: Oyo wana ezali bosangani ya bandoto to ezali makambo naye moko, to ekoki kozala lisapo, to ayela biso elembo, ndenge etindamaki na bato ba yambo

Verse 6 — Surah Al-Anbiya 21:6

Ezali na etuka (mboka) moko te eye topesaki etumbu liboso lia bango bandimaki te, boye bango nde bakondima

Verse 7 — Surah Al-Anbiya 21:7

Mpe totindaki liboso nayo sé mibali topesaki bango emoniseli, botuna ba oyo bayebi soki bino boyebi te

Verse 8 — Surah Al-Anbiya 21:8

Mpe topesaki bango nzoto mpo baliaka biloko, mpe batikalaki libela te

Verse 9 — Surah Al-Anbiya 21:9

Sima tokokiselaki bango elaka тропа oyo bazalaki kosala, mpe tobikisaki baye tolingaki kobikisa kati na bango, mpe topesaki etumbu na balekisi ndelo

Verse 10 — Surah Al-Anbiya 21:10

Tosilaki ya soló, kokitisela bino buku eye ezuami na bokundoli тропа bino. Boye bozali kokanisa te

Verse 11 — Surah Al-Anbiya 21:11

Mpe ebele bamboka oyo ezuamaki na mbeba mpe tobomaki yango, mpe tokelaki bato basusu na esika na bango

Verse 12 — Surah Al-Anbiya 21:12

Tango (bato wana) bamoni etumbu na biso, bakimaki na lombango

Verse 13 — Surah Al-Anbiya 21:13

Bokima te, bozonga na bisika biye bozalaki kobebisa kati na bandako na bino, mpo bokoka kotunama

Verse 14 — Surah Al-Anbiya 21:14

Bakolobaka: Oh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki babubi

Verse 15 — Surah Al-Anbiya 21:15

Bakotikaka komitungisa te, kino tokokomisaka bango lokola milona ya (mputulu miye mikawuka) mpe moto ezali kozikisa bango

Verse 16 — Surah Al-Anbiya 21:16

Мре tokelaki likolo mpe na mabele, na maye mazuami kati na yango na lisano te

Verse 17 — Surah Al-Anbiya 21:17

Soki tolingaki kozua yango na lisano, mbele tosalaki yango na ndenge ya biso moko soki ya soló tolingaki kosala

Verse 18 — Surah Al-Anbiya 21:18

Tozali kolobela тропа bosôló, kasi lokuta te, mpe lokuta elimwa mpe ekende. Mpe mabe ekozala likolo na bino тропа oyo bozali kokokisa (Allah) na yango

Verse 19 — Surah Al-Anbiya 21:19

Mpe manso oyo mazali o likolo mpe na nsé, mazali ya ye, тре baye bazuami pene naye (ba anzelu) basalaka lolendo te тропа kokumisa ye, mpe balembeke te

Verse 20 — Surah Al-Anbiya 21:20

Bazali kokumisa (ye) butu na moyi, taka ezali kotikala te

Verse 21 — Surah Al-Anbiya 21:21

Boye basili kozua banzambe oyo bakosekuisa bawa na mabele

Verse 22 — Surah Al-Anbiya 21:22

Soki o kati ya likolo na o nsé ezalaka na banzambe mosusu elongo na Allah, mbele mobulu ekotaki kati na yango (mapata na mabele), mpe nkembo na Allah kolo ya ngwende na maye bazali kokokisa

Verse 23 — Surah Al-Anbiya 21:23

Akotunamaka na oyo asali te, kasi bango nde bakotunama na maye basalaki

Verse 24 — Surah Al-Anbiya 21:24

Boye bazali kondimela banzambe mosusu na botiki ye? (Allah) loba: Boya na bilembetele na bino. Oyo ezali bokundoli тропа baye bazali elongo na ngai, тре bokundoli тропа baye balekaka liboso na ngai. Kasi ebele na bango bazali koyeba bosôló te. Мре bazali komitiya mosika па yango

Verse 25 — Surah Al-Anbiya 21:25

Мре liboso nayo totindaki motindami te, sé topesa ye emoniseli ete: Ya soló, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te bobele ngai, mpe bobondela ngai

Verse 26 — Surah Al-Anbiya 21:26

Mpe bazali koloba: Ar-Rahmân azali na mwana, nkembo naye, kasi bazali sé bawumbu (naye) ya lokumu

Verse 27 — Surah Al-Anbiya 21:27

Balekaka ye na maloba te, basalaka sé na mitindo mia ye

Verse 28 — Surah Al-Anbiya 21:28

Ayebi oyo ezali liboso na bango mpe sima na bango mpe bazalaka balobeli ya moto te sé na ba oyo (Allah) asepeli na bango, mpe bazali kobanga ye bobangi ya sólo

Verse 29 — Surah Al-Anbiya 21:29

Мре oyo kati na bango akoloba ete: Ya soló ngai nazali nzambe kasi ye te (Allah), tokofuta ye lifelo. Boye nde tokofutaka babubi

Verse 30 — Surah Al-Anbiya 21:30

Boye bapengwi bazali kornona te, ete likolo na mabele bizalaki ya kokangama mpe to fungoli yango? Mpe tokela bomoyi nyonso kowuta na mayi? Boye bazali kondima te

Verse 31 — Surah Al-Anbiya 21:31

Mpe totiyaki bangomba o kati na mabele mpo ete esimbama makasi mpe eningana te na baye bazali likolo nayango mpe totiyeli yango banzela mpo bakoka kokambama

Verse 32 — Surah Al-Anbiya 21:32

Mpe totiyaki likolo ezala etando eye ebatelama, kasi bazali komitiya mosika na bilembo na yango

Verse 33 — Surah Al-Anbiya 21:33

Mpe yende akela butu na mokolo, moyi na sanza, nyoso ezali kotambola na nzela na yango

Verse 34 — Surah Al-Anbiya 21:34

Mpe totiaki moto liboso nayo te mpo atikala libela, soki yo okufi, bango nde bakotikala libela

Verse 35 — Surah Al-Anbiya 21:35

Molimo nyoso mokomeka liwa (moto nyoso akokufaka), mpe tokomeka bino na mabe mpe na malamu mpe epai na biso nde bokozongisama

Verse 36 — Surah Al-Anbiya 21:36

Mpe tango bapengwi bazali kotala yo mpe bazali koseka yo, mpe bazali koloba: Oyo nde azali kolobela banzambe na bino? Mpe bazali koboya bokundoli ya Ar- Rahmân

Verse 37 — Surah Al-Anbiya 21:37

Moto akelama na kowela wela. Nakolakisa bino bilembo na ngai, kaši bowelisa ngai te тропа yango (etumbu)

Verse 38 — Surah Al-Anbiya 21:38

Mpe bakolobaka: Elaka yango ekokokisama tango nini, soki bozali koloba solo

Verse 39 — Surah Al-Anbiya 21:39

Soki bapengwi bayebaka tango oyo bakopekisaka te móto ezua bango na bilongi bia bango mpe na mikongo mia bango, kaši bakolongisamaka te

Verse 40 — Surah Al-Anbiya 21:40

Kaši tango wana ekoyelaka bango na mbalakaka, mpe bakokoka kozongisa yango te, mpe bazali kotala

Verse 41 — Surah Al-Anbiya 21:41

Mpe batiolaki batindami yambo ya boyei nayo, mpe baye basakanaki na bango, babetamaka na lolenge nyoso, тропа oyo bazalaki kotiola yango

Verse 42 — Surah Al-Anbiya 21:42

Loba: Nani abatelaka bino o kati na butu тре па тоуі па etumbu ya Ar-Rahmân? Мре bazali kopesa mokongo na bokundoli ya Nkolo wa bango

Verse 43 — Surah Al-Anbiya 21:43

To bazali na banzambe basusu na esika na biso oyo bakobatela bango? Kasi bakokoka te komisalisa bango moko mpe bakokoka te koluka nani akosunga bango likolo na ngai

Verse 44 — Surah Al-Anbiya 21:44

Kasi topesaki ba oyo mpe batata na bango bisengo ya ntango шоке kino mibu na bango mikoma ebele. Boye bazali kornona te ete tozali kokutola mabele bangambo na yango nyoso? Boye bakanisi ete bakolonga

Verse 45 — Surah Al-Anbiya 21:45

Loba: Nazali kokebisa bino na emoniseli. Mpe oyo matoyi naye ekufa, akoyokaka te o tango bazali kokebisa ye

Verse 46 — Surah Al-Anbiya 21:46

Mpe soki mopepe ya etumbu ya Nkolo wa bango mozui bango, balobi: Eh biso! Mpasi na biso, ya soló, tozalaki babubi

Verse 47 — Surah Al-Anbiya 21:47

Mpe o mokolo mwa suka, tokotiyaka bimekeli bia bosembo, molimo moko te mokobubama, ata soki ezali emekelo ya mbuma ya moke ezanga kilo tokoya na yango. Tokoki mpenza тропа kofuta

Verse 48 — Surah Al-Anbiya 21:48

Mpe tosilaki kopesa Mûssa na Háruna buku, ya bososoli (torah) mpe na bongengi mpe ezala bokundoli тропа babangi

Verse 49 — Surah Al-Anbiya 21:49

Baye bazali kobanga Nkolo wa bango ata soki bazali kornona ye te, mpe bazali kobanga eleko ya mokolo ya suka

Verse 50 — Surah Al-Anbiya 21:50

Мре (kurani) oyo ezali bokundoli oyo epambwama tokitisaki yango, boye bino bozali koyina yango

Verse 51 — Surah Al-Anbiya 21:51

Mpe liboso tosilaki kopesa Ibrâhîm bokambi mpe biso nde toyebaki yango

Verse 52 — Surah Al-Anbiya 21:52

Tango alobaki na tata waye mpe bato naye: Oyo bikeko nini bozali komipesa na yango

Verse 53 — Surah Al-Anbiya 21:53

Balobaki: Tokutaki batata na biso (to, bankoko na bango ya kala) bazalaki kobondela yango

Verse 54 — Surah Al-Anbiya 21:54

Alobi: Ya soló, bino na bango bozalaki na libunga ya polele

Verse 55 — Surah Al-Anbiya 21:55

Balobaki: Oyeli biso bosóló to ozali kosakana

Verse 56 — Surah Al-Anbiya 21:56

Alobi: Kasi Nkolo wa bino azali Nkolo wa likolo mpe nsé oyo akela yango, mpe ngai nazali moko kati ya banzeneneke na yango

Verse 57 — Surah Al-Anbiya 21:57

Mpe na lapi na Allah, ete nakani bikeko bia bino osima ya kokende na bino

Verse 58 — Surah Al-Anbiya 21:58

Abuki yango biteni biteni, atiki oyo ya monene, mpo tango mosusu bakozongela yango

Verse 59 — Surah Al-Anbiya 21:59

Balobi: Nani asali banzambe na biso boye? Ya soló, ye azali moko ya babubi

Verse 60 — Surah Al-Anbiya 21:60

Balobi: Bayebisi biso oyo asali boye ezali elenge mobali moko nkombo naye Ibrâhîm

Verse 61 — Surah Al-Anbiya 21:61

Balobi: Bomema ye awa na miso ya bato mpo bakoka kotatola

Verse 62 — Surah Al-Anbiya 21:62

Balobi: Yo nde osali boye na banzambe na biso oh Ibrâhîm

Verse 63 — Surah Al-Anbiya 21:63

Alobi: Oyo asali boye nde mokolo wa bango oyo, botuna bango soki bakoki koloba

Verse 64 — Surah Al-Anbiya 21:64

Bazongisaki mayele na bango mpe balobi: Ya sólo, bino nde bozali babubi

Verse 65 — Surah Al-Anbiya 21:65

Sima mabe ezongeli bango moko mpe balobi: Oyebi malamu ete (bikeko) oyo bilobaka te

Verse 66 — Surah Al-Anbiya 21:66

Alobi: Boye bozali kobondela na botiki Allah maye makosalisa bino te mpe makosala bino mabe te

Verse 67 — Surah Al-Anbiya 21:67

Ufi na bino na maye bozali kobondela biye bizali Allah te, boye bozali kokanisa te

Verse 68 — Surah Al-Anbiya 21:68

Balobi: Bozikisa ye, mpe bosunga banzambe na bino. Soki ya sólo, bolingi kosala

Verse 69 — Surah Al-Anbiya 21:69

Tolobaki: Eh móto! Zala malili mpe kimia тропа Ibrâhîm

Verse 70 — Surah Al-Anbiya 21:70

Mpe balingaki kosala ye mabe, kasi totiyaki bango o kati ya bazangi mpenza

Verse 71 — Surah Al-Anbiya 21:71

Mpe topesaki ye elonga, mpe Loth lokola, mpe totindaki bango o mboka eye to pambolaki yango mpo na bato ya mokili mobimba

Verse 72 — Surah Al-Anbiya 21:72

Mpe topesaki ye Is’háq na Ya’qúb ndenge asengaki, mpe banso totiyaki bango o kati ya bato malamu

Verse 73 — Surah Al-Anbiya 21:73

Mpe totiyaki bango bakambi, mpo bakamba na mibeko mia biso, mpe tolakisaki bango kosala bolamu, mpe kotelemisa losambo mpe kopesa zakat mpe bazalaki babondeli na biso

Verse 74 — Surah Al-Anbiya 21:74

Mpe topesaki Loth bwanya na boyebi, mpe tobikisaki ye na mboka oyo bazalaki kosala mabe. Ya soló, bazalaki bato mabe mpe bazangi

Verse 75 — Surah Al-Anbiya 21:75

Mpe tokotisaki ye na mawa та biso, ya sólo azali kati na bato ya malamu

Verse 76 — Surah Al-Anbiya 21:76

Mpe tango Núh abelelaki liboso, tondimelaki ye, mpe tobikisaki ye na libota lia ye kowuta na milelo monene

Verse 77 — Surah Al-Anbiya 21:77

Mpe tolongisaki ye kowuta na bato baye baboyaki kondimela bilembo bia biso mpe bazuaki yango ete: Ezali lokuta. Ya soló, bazalaki bato ya mabe, mpe tozindisaki bango banso

Verse 78 — Surah Al-Anbiya 21:78

Mpe Dâwud na Suleyman, tango basambisaki тропа bilanga oyo bameme ya bato bakendaki kolia yango na butu, mpe tozalaki nzeneneke тропа bosambisi bwa bango mibale

Verse 79 — Surah Al-Anbiya 21:79

Mpe topesaki Suleyman bososoli na yango, mpe topesaki bango banso bwanya mpe boyebi, mpe topesaki ngolu na biso epai ya Dâwud ete: Bangomba mpe bandeke basanzola biso elongo naye, mpe biso nde tozalaki kosala yango

Verse 80 — Surah Al-Anbiya 21:80

Mpe tolakisaki ye kosala nguba mpo ezala lisungi lia bino, boye bozali na botondi

Verse 81 — Surah Al-Anbiya 21:81

Mpe tondimelaki Suleyman, mopepe moye na motindo naye mopepaki noki noki о ngambu ya mabele maye topambolaki yango. Mpe tozali bayebi ya biloko binso

Verse 82 — Surah Al-Anbiya 21:82

Mpe bazabulu mosusu bazali kosalela ye mosala na nsé ya mayi mpe bazalaki kosalela ye misala misusu, kasi biso nde tozalaki kokengela bango

Verse 83 — Surah Al-Anbiya 21:83

Mpe Ayûb, tango abelelaki Nkolo wa ye, ete ya soló, mpasi esili koleka ngai, mpe yo nde ozali ngolu wa bangolu koleka

Verse 84 — Surah Al-Anbiya 21:84

Tondimelaki ye mpe tolongolelaki ye mpasi oyo azalaki na yango, mpe tozongiselaki ye libota lia ye mbala mibale ngolu kowuta epai na biso, mpe bokundoli тропа babondeli

Verse 85 — Surah Al-Anbiya 21:85

Mpe Ismâîl na Idrîs na Dzul-kifl bango banso bazalaki bakangi mitema

Verse 86 — Surah Al-Anbiya 21:86

Mpe tokotisaki bango na ngolu na biso. Ya soló, bazalaki o kati ya bato ya malamu

Verse 87 — Surah Al-Anbiya 21:87

Mpe Yûnus, tango akendeki na kanda, akanisaki ete tokoki komeka ye te, mpe abelelaki na molili (na mozindo ya ebale) ete: Nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló seyo (Allah) lokumu ezala nayo, ya sólo, nazalaki o kati ya babubi

Verse 88 — Surah Al-Anbiya 21:88

Tondimelaki ye mpe tobikisaki ye na kolela naye. Lolenge wana nde tosalisaka bandimi

Verse 89 — Surah Al-Anbiya 21:89

Mpe Zakariya, tango abelelaki Nkolo wa ye, Nkolo wa ngai kotika ngai moko te, mpe ya sólo, ozali malamu ya bakitanisi

Verse 90 — Surah Al-Anbiya 21:90

Tondimelaki ye mpe topesaki ye Yahya, mpe tobikisaki mwasi naye (na ekomba). Ya soló, bazalaki kowelela тропа kosala bolamu, bazalaki kobondela biso na bolingo mpe na kobanga mpe bazalaki komikitisa liboso na biso

Verse 91 — Surah Al-Anbiya 21:91

Mpe oyo abatelaki bongondo naye (Maryam) mpe tofulaki mpema na biso kati naye, mpe totiaki ye na mwana naye bazala elembo тропа mokili mobimba

Verse 92 — Surah Al-Anbiya 21:92

Ya soló umma na bino oyo ezali sé moko mpe ngai nde Nkolo wa bino bobondela nga

Verse 93 — Surah Al-Anbiya 21:93

Mpe bokabwani ekoti kati na bango, mpe bango banso bakozonga epai na biso

Verse 94 — Surah Al-Anbiya 21:94

Oyo akosala misala malamu mpe azali mondimi, tokoboyaka molende mwa ye te. Mpe ya soló tokokomela ye (yango)

Verse 95 — Surah Al-Anbiya 21:95

Epekisami na mboka oyo tosili koboma yango ete bazonga lisusu na bomoi likolo na yango

Verse 96 — Surah Al-Anbiya 21:96

Kino tango ba kofungola ya’djûdj na ma’djûdj mpe bango bakokita na lombango

Verse 97 — Surah Al-Anbiya 21:97

Wana elaka ya sólo ekomi pene, mpe okomona bapengwi bakomi kotala, bakolobaka: Mpasi na biso, tozalaki na bozangi kokanisa na oyo mpe tozalaki babubi

Verse 98 — Surah Al-Anbiya 21:98

Ya soló, bino na maye bozali kobondela na botiki Allah, bokozala koni mwa lifelo bokokotaka na kati bino banso

Verse 99 — Surah Al-Anbiya 21:99

Soki bango bazalaki banzambe, balingaki kokoto yango te (lifelo), mpe bango banso o kati na yango libela na libela

Verse 100 — Surah Al-Anbiya 21:100

Kati na yango bakonyokwama mpe bako ganga makasi, mpe bakoyokaka kati na yango te

Verse 101 — Surah Al-Anbiya 21:101

Ya sólo, baye bakozala mosika na lifelo, ezali ba oyo tosilaki kolaka bango bolamu

Verse 102 — Surah Al-Anbiya 21:102

Bakoyokaka lolaka na yango te, mpe bakosepelaka lolenge balingi seko na seko

Verse 103 — Surah Al-Anbiya 21:103

Kobanga ya monene ekozua bango te, mpe ba anzelu bakoyambaka bango: Oyo nde mokolo ba laka bino

Verse 104 — Surah Al-Anbiya 21:104

Mokolo moye tokogumba mapata ndenge bagumbaka makasa ya makomi. Ndenge tokelaki mbala ya yambo, ndenge wana mpe tokozongela yango. Wana ezali elaka na biso tokokokisa yango

Verse 105 — Surah Al-Anbiya 21:105

Mpe ya soló, tosilaki kokoma o kati ya zabur, o sima ya makundoli, ya solo, baye bakoki kozua bokitani ya mabele ezali bawumbu na ngai ya malamu (bandimi)

Verse 106 — Surah Al-Anbiya 21:106

Ya sólo, oyo ezali botangisi тропа babondeli

Verse 107 — Surah Al-Anbiya 21:107

Mpe totindaki yo te sé тропа ozala ngolu тропа mokili mobimba

Verse 108 — Surah Al-Anbiya 21:108

Loba: Ya sólo, ngai nazui emoniseli ete ya sólo Nzambe wa bino azali Nzambe moko, boye bondimi komisokia

Verse 109 — Surah Al-Anbiya 21:109

Mpe soki baboyi mpe bapesi mikongo, loba: Nazali kokebisa bino, mpe nayebi te, soki oyo elengelemi тропа bino ezali pene to mosika

Verse 110 — Surah Al-Anbiya 21:110

Ya sólo, ye ayebi polele ya maloba mpe maye bobombaka

Verse 111 — Surah Al-Anbiya 21:111

Mpe nayebi te soki ezali komekama mpo na bino to esengo ya ntango токе

Verse 112 — Surah Al-Anbiya 21:112

Alobi: Nkolo kata na bosembo bonso. Mpe Nkolo wa biso Ar- Rahmán ye nde mosalisi likolo ya maye balobelaka