Back to Languages

    Lingala - Chapter 29

    Translation by Zakariya Muhammed Balingongo

    Verse 1

    Alif, lâm, mîm

    Verse 2

    Bato bakanisi ete bakotika bango baloba ete tondimi, mpe bamekama te

    Verse 3

    Ya soló, tosilaki komeka baye baleka liboso na bango, ya sólo, Allah akoyebaka baye balobaka bosôló mpe baye bakosaka

    Verse 4

    To mpe baye bazali kosala mabe bazali kokanisa ete bakokima biso?, oyo lolenge mabe yakokata likambo

    Verse 5

    Oyo azali kolikia kokutana na Allah, ya solo elaka ya Allah ekoyaka. Mpe azali moyoki atonda boyebi

    Verse 6

    Mpe oyo akobunda, ya solo azali kobunda тропа ye moko. Ya solo molongo mobimba ezali тропа Allah

    Verse 7

    Mpe baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, tokolongola masumu na bango, mpe tokofuta bango malamu тропа maye basalaki

    Verse 8

    Мре toyebisaki na moto ete: S alela tata na mama nayo bolamu, mpe soki batindi yo na makasi mpo osangisa ngai na maye oyebi te, kotosa bango te. Epai na ngai nde bokozongaka, mpe nakoyebisaka bino maye bozalaki kosala

    Verse 9

    Mpe baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, tokokotisa bango ya soló elongo ya basali bolamu

    Verse 10

    Mpe bato mosusu bazali koloba ete; tondimi na Allah, mpe tango bakozua pasi тропа Allah, batia momekana ya bato lokola etumbu ya Allah. Mpe soki lisungi lia Nkolo wayo liyei, balobi: Tozalaki elongo na bino, boye ezali te Allah nde moyebi ya maye mabombami kati ya bantolo ya moto nyoso

    Verse 11

    Allah ayebi mpenza na bosóló bandimi mpe bato ya bilongi mibale

    Verse 12

    Bapengwi bazali koloba na bandimi ete: Bolanda nzela na biso, tondimi kozua mokumba ya masumu na bino kasi bakomema yango te. Ya sólo bazali bato ya lokuta

    Verse 13

    Ya sôló penza, bakomema mikumba mia bango, mpe mikumba misusu. Mpe bakotunama na mokolo ya suka тропа maye bazalaki kosala. (тропа mabe na bango na kobuka lokuta)

    Verse 14

    Mpe ya soló, totindaki Núh epai na bato naye, mpe avandaki okati na bango mbula nkoto moko, longola mibu ntuku mitano. Mpe mpela ya makasi ebomaki bango mpo ete bazalaki babubi

    Verse 15

    Mpe tobikisaki ye na baye bazalaki elongo naye na masuwa, mpe totiyaki yango ezala elembo тропа molongo mobimba

    Verse 16

    Mpe tango Ibrâhîm alobaki na bato naye: Bobondela Allah mpe bobanga ye. Wana ezali malamu тропа bino, soki sólo bozali koyeba

    Verse 17

    Bozali kobondela nde bikeko na botiki Allah mpe bozali kobuka lokuta, ya sólo baye bozali kobondela na botiki Allah bazali na bozui te ya kopesa bino, boluka nde bozui epai ya Allah mpe bobondela ye mpe botondo ye, epai naye nde bokozongisama

    Verse 18

    Мре soki boboyi, kaši mabota maye maleka liboso na bino basilaki mpe koboya. Na yango, motindami azali na eloko ya kosala te sé akomisa sango ya polele

    Verse 19

    Boye ozali kornona te lolenge Allah azali kobanda bokeli, sima azongisi yango? Ya soló, wana ezali pete тропа Allah

    Verse 20

    Loba: Botambola na mokili mpe bótala ndenge nini abandaki kokela, na sima Allah nde akozongisa bikelamu na mokolo ya suka. Ya solo, Allah azali na bokoki likolo ya biloko binso

    Verse 21

    Apesaka etumbu na oyo alingi, mpe ayokelaka mawa na oyo alingi. Mpe epai naye nde bokozongisama

    Verse 22

    Mpe bozali na makoki ya kotelemela ye te, ezala na mabele to na likolo. Mpe bozali na mokonzi mosusu te, mpe mosungi te bobele Allah

    Verse 23

    Mpe baye baboyi kondima na mikapo mia Allah mpe bazangi kolikia kokutana naye, bango wana bazangi ngolu na ngai, mpe bakozala na etumbu ya makasi

    Verse 24

    Bato naye bayanolaki ete: Boboma ye, to botumba ye mpe Allah abikisaki ye na moto, ya soló, wana ezali elembo тропа bandimi

    Verse 25

    Mpe (Ibrâhîm) alobi: Ya solo, bozui na esika Allah bikeko, mpe bolingi bango, na bolingo na bomoyi ya nsé, sima na mokolo ya suka, bokoboyana bino na bino, mpe basusu bakopesaka botutu na basusu, mpe esika na bino ekozalaka nde moto, mpe bokozuaka mosalisi te

    Verse 26

    Mpe Loth andimelaki ye, mpe (Ibrâhîm) alobi: Ya sólo, nakei epai ya Nkolo na ngai. Ya soló ye azali na bokasi atonda bwanya

    Verse 27

    Mpe topesaki ye Is’háq na Ya’qúb, mpe totiaki na libota naye bokitani ya bantoma mpe likabo ya kozua buku, mpe topesaki ye lifuta ya nsé. Mpe mokolo ya suka akozala na molongo ya bato malamu

    Verse 28

    Mpe tango Loth alobaki na bato naye: Ya sólo, bino bozali koya na mabe oyo ata moto moko te asalaki yango liboso na mokili

    Verse 29

    Ya soló penza, bozali kokutana mibali na mibali тропа kosilisa ba mposa na bino ya nzoto mpe bozali kokanga nzela (ya mabota)? Mpe bozali koya na mabe na esika bovandaka? Kasi eyano ya bato naye ezalaki ete; yela biso etumbu soki ozali moto ya bosembo

    Verse 30

    Alobaki ete: Nkolo, longisa ngai likolo ya bato ya mabe

    Verse 31

    Mpe tango batindami na biso bayelaki Ibrâhîm sango elamu (sango ya kobotama ya Is’hâq na mwana naye Ya’qüb), balobi: Ya soló, toyei mpo toboma bato ya mboka oyo. Ya soló, bato na yango bazali babubi

    Verse 32

    Alobi: Ya sólo Loth azali wana, balobi: Biso toyebi malamu baye bavandi wana, tokobikisa ye na libota naye, longola sé mwasi waye, akozala o kati ya batikali тропа kozua etumbu

    Verse 33

    Mpe tango batindami ba biso bakomaki epai na Loth, abangaki mpe ayokaki mpasi na motema тропа bango ete bakotungisama na bato ya mboka, kasi balobaki naye ete; kobanga te, mpe koyoka mpasi te, tokobikisa yo mpe libota nayo. Longola sé mwasi wayo, akozala o kati ya babebisami

    Verse 34

    Ya sólo, tozali kokitisela bato ya mboka oyo etumbu kowuta o likolo kolandana masumu na bango

    Verse 35

    Mpe totikaki elembo ya polele (ya bokebisi) kati na yango mpo bato bakoka koyeba

    Verse 36

    Lolenge moko na mad’yan, ndeko wa bango Shuaîb alobaki: Oh bato ba ngai! Bobondela Allah mpe bolikia na mokolo ya suka, kasi botia mobulu na mokili te

    Verse 37

    Bazuaki ye moto ya lokuta, mpe etumbu ya boningani ya mabele ezuaki bango mpe tongo etanelaki bango basili kokufa na bandako na bango

    Verse 38

    Mpe lolenge moko tobebisaki bato ya mboka aad mpe thamûd, bozali kornona bango polele na bisika na bango. Mpe satana abongiselaki bango misala mia bango, mpe apekisaki bango nzela ya semba na bango bazalaki kati na koyeba te

    Verse 39

    Mpe (lolenge moko) na Qârûn, falo, na Hâmân. Mûssa asilaki koyela bango bilembo, basalaki lolendo na mokili, kasi bakokaki kokima (biso) te

    Verse 40

    Mpe topesaki bato na bato etumbu тропа lisumu na bango, basusu totindelaki bango mopepe ya makasi, mpe basusu kati na bango bazuaki bogangi ya makasi (tángbá) lokola nkake ezuaki bango, mpe basusu kati na bango tozindisaki na mabele mpe basusu tozindisaki bango na mayi. Мре Allah asalaki bango mabe te, kasi bango moko nde bamisalaki mabe

    Verse 41

    Ndakisa ya baye bazui babateli na botiki Allah, ezali lokola limpulututu oyo atongi ndako ya motawu, nzoka nde ndako oyo ezali motawu koleka, ezali ndako ya limpulututu. Soki solo bazali koyeba

    Verse 42

    Ya soló, Allah ayebi manso babondelaka na botiki ye mpe azali wa nguya atonda bwányá

    Verse 43

    Wana ezali bandakisa tozali kopesa yango тропа bato, тре baye bakoki koyeba yango sé baye bazali na boyebi

    Verse 44

    Allah akela likolo na mabele na bosôló bonso. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bandimi

    Verse 45

    Tanga oyo ekitelaki yo kati na buku, mpe telemisa losambo. Ya sólo, losambo epekisaka (moto) kosala mabe, kasi bokundoli bwa Allah nde ezali monene koleka. Mpe Allah ayebi maye bozali kosala

    Verse 46

    Mpe bosuanisa te baye bazuaki buku liboso, sé na lolenge ya malamu, longola sé baye kati na bango basali mabe, mpe boloba na bango ete; tondimi na maye ekiteli biso, mpe maye ekitaki epai na bino, тре nzambe na biso na bino azali sé moko oyo biso tomisokie epai naye. (Allah)

    Verse 47

    Ndenge wana nde tokitiselaki yo buku. Мре baye topesaki bango buku bazali kondimela yango, mpe kati na yango basusu bazali kondima na yango. Mpe bazali koboya kondimela mikapo mia biso sé bapengwi

    Verse 48

    Mpe yambo na yango (kurani), otangaki ata buku moko te, mpe okomaki na loboko nayo ya mobali te, soki te, baye bazali kotia tembe na bosóló, balingaki kotia ntembe

    Verse 49

    Kasi ezali na bilembo bia polele bizali okati ya mitema mia baye bapesami boyebi. Mpe baboyaka mikapo mia biso sé babubi

    Verse 50

    Mpe balobi: Soki ata bilembo ekitelaka ye kowuta epai ya Nkolo waye, loba: Ya soló bilembo ewutaka epai ya Allah. Мре ya sólo, ngai nazali mokebisi ya polele

    Verse 51

    Boye ekoki тропа bango te buku oyo tokitiselaki yo mpo etangamela bango? Ya sólo, wana ezali nde ngolu mpe bokundoli тропа bandimi

    Verse 52

    Loba: Allah akoki na bonzeneneke kati kati na ngai na bino, azali moyebi ya manso maye mazali o likolo na mabele, mpe baye bazali kondima na makambo ya mpamba, mpe bazali kopengwa na Allah, bango nde bazangi

    Verse 53

    Mpe bazali kotuna yo (óyela) bango etumbu na lombango, soki ezalaki na elaka na yango te oyo esila kotiama, elingaki ekomela bango mbalakaka, mpe bango bakoyebaka te

    Verse 54

    Bazali koyebisa yo (óyela) bango etumbu na lombango, kasi ya soló moto mwa lifelo mokozinga bapengwi

    Verse 55

    Mokolo oyo etumbu ekozingaka bango o likolo na nsé ya makolo na bango mpe akolobaka na bango: Bomeka oyo bosalaki

    Verse 56

    Eh bawumbu na ngai! Baye bandimelaki ngai! Ya sólo mabele na ngai mazali monene, bobondela ngai

    Verse 57

    Molimo nyoso mokomekaka liwa, sima bokozongisama epai na biso

    Verse 58

    Mpe baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, tokovandisa bango okati ya Iola ya likolo koleka, oyo ezali kolekisa mingala na nsé na yango, bakozalaka seko kati na yango. Oyo nde litomba ya malamu тропа basali

    Verse 59

    Baye bakangaki mitema mpe bamipesaki epai ya Nkolo wa bango

    Verse 60

    Ata nyama moko te ekoki komileisa yango moko, kino Allah akopesa ye bilei naye na bino (bato) тре lokola. Мре azali moyoki atonda boyebi

    Verse 61

    Мре soki otuni bango: Nani akela likolo na mabele, mpe ati moyi na sanza, bakolobaka: Allah. Boye boni lisusu (sima) bazali koboya (kolanda nzela ya semba)

    Verse 62

    Allah apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko yango na oyo alingi kati ya bawumbu naye. Ya soló, Allah azali na boyebi ya biloko binso

    Verse 63

    Mpe soki otuni bango: Nani akitisaka mayi kowuta na likolo mpo epesa bomoyi na mabele osima ya kokauka na yango? Bakolobaka: Ya sólo, ezali Allah. Loba: Lokumu na Allah, kasi ebele na bango bazali koyeba te

    Verse 64

    Mpe ya sólo, bomoyi ya mokili oyo ezali sé liseki mpe lisano, mpe bovandi ya mokolo mwa suka, ezali bomoyi ya soló, soki solo bazali koyeba

    Verse 65

    Mpe soki bamati na masuwa, babondeli Allah na bomoko mpe balandi lingomba lia ye, mpe soki abikisi bango akomisi bango na mokili, okomona bakomi kosangisa ye

    Verse 66

    Baboya oyo topesaki bango, mpe basepela na mokili, kasi bakoyebaka kala mingi te

    Verse 67

    Boye bazali kornona te ete: (Ya sólo) totiaki mboka esantu ezala ndako ya kimia, nzoka nde bato bazali kolongolama zinga zinga na yango? Boye bazali kondima na maye mazanga ntina mpe baboyi bolamu ya Allah

    Verse 68

    Mpe nani azali mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta, to aboyi kondima na bosóló ntango eyeli ye? Boye esika ya bapengwi ezali kati na lifelo te

    Verse 69

    Mpe baye basalaka makasi тропа biso, ya sólo tokokambaka bango na banzela na biso. Mpe ya sólo, Allah azali elongo na babongisi