Back to Languages

    Lingala - Chapter 35

    Translation by Zakariya Muhammed Balingongo

    Verse 1

    Matondo na Allah mokeli wa likolo na nsé, asali ba anzelu bazala batindami mpe apesi bango mapapu mibale, misato, to mpe minei, abakisaka na ekelamu lolenge alingi. Ya soló, Allah azali na makoki likolo ya biloko binso

    Verse 2

    Oyo Allah afungoli bato тропа ngolu naye, moto ya kokanga yango azali te, mpe oyo akangi, moto ya kofungola yango sima azali te, mpe azali wa ngolu atonda bwanya

    Verse 3

    Oh bino bato! Bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, boye bozali na mokeli mosusu elongo na Allah oyo azali koleisa bino olikolo kino na nsé? Nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te bobele ye, na yango тропа nini bozali kopesa bosembo mokongo

    Verse 4

    Mpe soki baboyi kondimela yo, kasi ebele ya batindami baboyamaki kondimela liboso nayo, mpe epai ya Allah makambo manso makozongisama

    Verse 5

    Eh bino bato! Ya soló, elaka ya Allah ezali ya lokuta te, bomoyi ya nsé ekosa bino te, mpe (satana) mokosi monene akosa binoтропа Allah te

    Verse 6

    Ya sólo, satana azali monguna na bino, bozua ye mpe monguna. Ya sólo, azali kobenga bato naye sé mpo bazala balongani ya moto ya lifelo

    Verse 7

    Baye bapengwa bakozala na etumbu ya makasi, kasi baye bandimaki mpe basalaki misala ya malamu, bakozua bolimbisi mpe lifuta linene

    Verse 8

    Boye moto oyo babongiseli ye mosala naye ya mabe mpe azali kornona yango malamu? Ya sólo, Allah abungisaka oyo alingi, mpe akambaka oyo alingi, mpe konyokola molimo nayo te тропа bango. Ya sólo Allah ayebi malamu maye bazali kosala

    Verse 9

    Allah nde azali kotinda mopepe ezali kotombola londende ya mbula, mpe tonukisi yango na mboka oyo ekufa, mpe tobikisi mabele yango na mayi wana. Lolenge wana nde lisekwa likozalaka

    Verse 10

    Oyo azali koluka nguya, ayeba ete nguya nyoso ezali ya Allah. Epai naye nde maloba kitoko ezali komata, mpe azali kotombola mosala ya malamu. Kasi baye bazali kosala likita ya mabe, bakozala na etumbu ya makasi, mpe likita na bango wana ekolonga te

    Verse 11

    Mpe Allah nde akeli bino na mabele, sima akeli bino na mayi ya mobali, sima asali bolongani (mwasi na mobali), mwasi moko te akomema zemi to akobota sé ezala na boyebi naye (Allah), mpe mibu mikobakisama te to kokutoama te kino esilaki kokomama na buku. Ya soló, wana ezali pete тропа Allah

    Verse 12

    Mpe bibale mibale bikokani te, oyo ezali mpiyo kitoko тропа komela, mpe oyo mosusu ezali mungwa mpe bololo, mpe na nyoso mibale bozali kolia misuni na yango, mpe okati na yango, bozali kobimisa mabanga na biloko ya bonzenga тропа kolata, mpe okomona masuwa ya monene ezali kotambola na mayi na makelele ya makasi, etondi na mikumba, bozali kotambola na yango тропа koluka bolamu ya Allah, mpo ete bozala na botondi na (ye)

    Verse 13

    Мре azali kokotisa butu kati na mokolo mpe mokolo okati ya butu mpe akeli sanza na moyi, mpe moko na moko ezali kotambola na nzela na yango na tango na yango. Oyo nde Allah oyo azali Nkolo wa bino. Azali na bokonzi bonso, kasi baye bozali kobelela na esika naye, bazali na eloko moko te ata lokola mposo ya mbuma ya tamru

    Verse 14

    Mpe soki bobeleli bango, bakoyoka losambo na bino te, ata soki bayoki, bakokoka koyanola bino te. Mpe o mokolo mwa suka, bakopengwa na bosangisi bwa bino, mpe moko te akopesa yo sango koleka oyo atonda basango

    Verse 15

    Eh bino bato! Bozali babola epai ya Allah, mpe Allah nde atonda bomengo mpe akumama

    Verse 16

    Soki alingi, akolimwisa bino mpe akoya na bikelamu ya sika, (bato)

    Verse 17

    Mpe wana ezali makasi te epai ya Allah

    Verse 18

    Mpe moto moko te akomema mokumba ya moninga, mpe soki mokumba ya masumu ya moto eleki ye kilo, akoki kobenga basalisa ye te, ekosalama te ata bato ya libota naye, kasi ozali kokebisa baye bazali kobanga Nkolo wa bango na kobombama, mpe bazali kotelemisa losambo. Mpe oyo akomipetola, ezali sé тропа ye moko, mpe bozongi ezali epai na Allah

    Verse 19

    Mpe moto oyo miso ekufi, akokani te na moto oyo azali kornona

    Verse 20

    Mpe molili ekokani na mwinda te

    Verse 21

    Mpe malili ekokani na molunge te

    Verse 22

    Mpe baye ya bomoyi bakokani te na baye bawa. Ya soló, Allah ayokisaka nani alingi, kasi yo (Muhammad), okoki te koyokisa baye bazali na malita

    Verse 23

    Kasi, yo ozali sé mokebisi

    Verse 24

    Ya solo, totindaki yo na bosembo ete ozala mokebisi mpe mopesi sango ya malamu, mpo umma moko te oyo eleka sé bazua mokebisi

    Verse 25

    Mpe soki baboyi kondimela yo, yeba ete baye ya liboso basilaki mpe koboya batindami na bango, bayelaki bango bilembo bia polele, na makomi, na buku ya bongengi

    Verse 26

    Na sima, tozuaki ba oyo bapengwi, mpe tala ndenge nini (etumbu) na ngai ezalaki

    Verse 27

    Boye omoni te ndenge Allah azali kokitisa mayi kowuta na mapata, mpe tozali kobimisa na yango bambuma ya ndenge na ndenge? Mpe okati na bangomba, banzela ya pembe mpe ya motané, na balangi ndenge na ndenge, mpe na misusu ya miyindo makasi

    Verse 28

    Ndenge moko mpe bato na banyama ya mabele na an’ám binso bizali na balangi ya kokesene. Ya soló, baye bazali kobanga Allah kati na bawumbu naye, ezali nde banganga mayele. Ya sólo, Allah azali na nguya atonda bolimbisi

    Verse 29

    Ya sólo, baye bazali kotanga buku ya Allah mpe bazali kotelemisa losambo, mpe bazali kobimisa (тропа Allah) bozui oyo topesi bango, bazali kobimisa yango na polele to na kobomba, bazali kolikia na mombongo oyo ebebisamaka te

    Verse 30

    Mpo ete (Allah) apesa bango lifuta na bango mpe abakisela bango bolamu naye. Ya sólo, ye azali molimbisi atonda melesi

    Verse 31

    Mpe oyo tokitisaki epai nayo kowuta na buku oyo ezali na bosembo, ezali kondima na maye makitaki liboso. Ya sólo, Allah azali kornona bawumbu naye mpe azali na sango na bango

    Verse 32

    Na sima tokitanisaki buku epai na ba oyo toponaki okati ya bawumbu na biso, basusu kati na bango bamisalaki mabe, mpe basusu batelemi na bosembo, mpe basusu bawelaka kosala bolamu na ndingisa ya Allah. Wana nde ezali ngrásia ya monene

    Verse 33

    Bilanga ya edeni nde bakokota, mpe bakolata ba wolo na mabanga ya talo na maboko mpe bilamba nabango ekozala ya fafala

    Verse 34

    Mpe bakoloba ete: Matondo na Allah, oyo alongoli biso mpasi, ya soló, Nkolo wa biso azali molimbisi atonda matondi

    Verse 35

    Na ngrásia naye, afandisi biso na bandako ya kimia, oyo bolembu mpe mpasi ekozua biso te

    Verse 36

    Kaši ba oyo bapengwa, bakozala na moto ya lifelo, bakokufa na kati te, mpe na kati kuna, etumbu na bango ekokutolama te. Na lolenge wana nde tokofuta mopagano nyoso

    Verse 37

    Mpe kuna na kati, bakoganga na kolele ete: Oh Nkolo na biso! Bimisa biso na kati, mpo tosala malamu totikaki kosala, boye topesaki bino bomoyi molai te ete oyo akokanisa, akanisa? Mpe mokebisi ayelaki bino. Na yango bomeka etumbu, kasi bato mabe bakoki kozua lisungi te

    Verse 38

    Ya soló, Allah azali moyebi ya mabombami ya likolo na ya nsé. Ya sólo, ayebi maye manso mazali o kati ya mitema

    Verse 39

    Ye nde atiaki bino bakitani na nsé. Mpe oyo akopengwa etali sé ye, mpe bapengwi na bopengwi na bango epai na Nkolo na bango ekobakisela bango sé soni, mpe ekobakisela bango sé bozangi

    Verse 40

    Loba: Boye bomoni banzambe na bino baye bozali kobondela na botiki Allah? Bolakisa ngai eloko nini bakela awa na nsé. To mpe bazali na mosangani o likolo? To mpe topesaki bango buku eye ezali kokamba bango? Nzoka nde bazali kopesana bango na bango elaka ya lokuta

    Verse 41

    Ya sólo, Allah asimbi likolo na mabele ete elimwa te, mpe soki elimwi, moko te sima naye akotombola yango. Ya sólo azali malamu atonda bolimbisi

    Verse 42

    Мре bazali kolapa na nkombo ya Allah тропа kondima na bango ete: Soki mokebisi ayeli bango bakokambama malamu koleka mabota manso, тре tango mokebisi ayelaki bango (Muhammad), ebakiselaki bango sé bopengwi

    Verse 43

    (Batondaki sé na) lolendo na mokili тре kosala likita ya mabe. Kasi likita ya mabe ezongelaka sé baye basali yango, mpe bakomonaka eloko mosusu te sé lokola eye ezuaki bato ya liboso? Мре okokuta mbongwana na mibeko ya Allah te. Mpe okokuta kotengama te na mibeko ya Allah

    Verse 44

    Boye bazali kotambola na mokili te mpo bamona lolenge esukaki na baye bazalaki liboso na bango? Bazalaki makasi koleka, kasi ezali na eloko moko te kati na likolo na mabele oyo ekolembisa Allah. Ya soló, azali moyebi atonda nguya

    Verse 45

    Mpe soki Allah azuaka bato na maye bazali kosala, nde ata nyama токе elingaki kotikala te, (likolo ya mabele ezala na bomoyi), kasi azali kozelisa bango kino mokano ekokoka. Mpe tango mokano ekokokisama (ekozuaka bango), ya soló Allah azali kornona malamu bawumbu naye

    Unexpected Application Error!

    Unexpected token '<', "<!DOCTYPE "... is not valid JSON

    SyntaxError: Unexpected token '<', "<!DOCTYPE "... is not valid JSON