Back to Languages
Lingala - Chapter 6
Translation by Zakariya Muhammed Balingongo
Verse 1
Lokumu na Allah oyo akela likolo na mabele, mpe atie molili mpe bongengi. Sima, baye bapengwi na Nkolo wa bango bazali kokokisa ye na bikelamu
Verse 2
Yende akela bino kowuta na mabele, sima ati elaka (mpona bino), mpe elaka etiyamaka sé epai naye. Sima, bozali kotia tembe
Verse 3
Mpe ye, azali Allah oyo azali o likolo mpe na nsé, ayebaka mabombami ma bino na maye bomonisaka polele. Mpe ayebi maye bozali kosala
Verse 4
Mpe elembo kati ya bilembo bia Nkolo wa bango ekomelaki bango te, sé baboya yango
Verse 5
Mpe basilaki koboya bosembo ntango eyelaki bango; mpe kala mingi te ekoyela bango bansango ya maye bazalaki kotiola
Verse 6
Boye, bazali kornona te bato boni tobomaki liboso na bango, tofandisaki bango kati na mokilina ndenge ya malamu ndenge tosalela naino bino te? Mpe tokitiselaki bango mbula ebele kowuta o likolo, mpe totiaki míngala mizalaki kotiola na nsé ya makolo ma bango, mpe tobomaki bango тропа masumu ma bango. Mpe sima na bango tokelaki lisanga mosusu ya bato ya sika
Verse 7
Ata soki tokitiselaka yo buku ekomami na lokasa eye bakoki kosimba na maboko ma bango, mbele bapengwi balingaki koloba: Oyó ezali sé bondoki bwa polele
Verse 8
Mpe bazali koloba: Mpona nini bakitiselaki ye anzelu te? Kasi soki tokitisaka anzelu, makambo malingaki makokisama, mpe nde bazelisamaki te
Verse 9
Mpe soki toponaka anzelu lokola (ntoma), tolingaki kopesa ye lolenge ya moto, mpe tolingaki kotiyela bango mikakatano na ndenge eye bazali na yango
Verse 10
Kasi ya soló, batiolaki batindami liboso lia yo; kasi, litio lizingaki bango moko mpona maye bazalaki kosakana na yango
Verse 11
Loba: Botambola na mabele, bótala ndenge ezalaki suka ya babuki lokuta
Verse 12
Loba: Nani azali kokonza maye mazuami o likolo na mabele? Loba: Allah. Asila komikatela kozala na ngolu. Akosangisaka bino o mokolo mwa suka moye mozali na tembe te o kati na yango. Baye bamizangisi bango moko, bango nde bandimaka te
Verse 13
Mpe maye manso mavandaka na butu mpe na moyi mazali ya ye. Mpe ye nde azali moyoki atonda boyebi
Verse 14
Loba: Boye natika Allah тропа kozua mosungi mosusu mokeli ya likolo na mabele, mpe yende moleisi, kasi baleisaka ye te? Loba: Bapesi ngai mobeko ete nazala moto ya yambo ya komisokia, kasi kozala te omolongo ya basangisi Allah
Verse 15
Loba: Ya soló, nazali kobanga soki nazangi Nkolo nangai botosi, ekozala etumbu enene mokolo yango
Verse 16
Oyó akobatelama na yango mokolo wana; ya sólo, (Allah) asili koyokela ye mawa: Мре wana nde elonga enene
Verse 17
Mpe soki Allah apesi yo mikakatano moto akolongola yango azali te kaka sé ye, тре soki apesi yo bolamu; yende oyoazali na nguya likolo ya biloko binso
Verse 18
Mpe ye nde mokonzi likolo ya bawumbu naye, mpe azali na bwanya atonda ba nsango
Verse 19
Loba: Eloko nini ezali monene koleka litatoli? Loba: Allah, azali nzeneneke kati na ngai na bino, mpe bakitiseli ngai kurani oyo mpo ete nakebisa bino na yango na bato banso ekokomela bango. Boye, bino bozali kotatola ete ezali na ba nzambe mosusu elongo na Allah? Loba: Nakotatola te. Loba: Azali solo Nzambe moko, mpe nazali mosika na maye bozali kosangisa ye na yango
Verse 20
Baye topesaki bango buku bayebi ye (Muhammad) ndenge bayebi bana na bango, baye bamizangisi bango moko, bango nde bandimaka te
Verse 21
Mpe nani azali mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta mpe azali koboya mikapo mia ye? Ya soló, babubi bakolonga te
Verse 22
Mpe mokolo oyo tokosangisa bango banso sima tokoloba na baye bazalaki kosangisa: Wapi basangisi na bino bozalaki kotutela tolo
Verse 23
Na masumu na bango, etikalaki te sé baloba ete: Nakombo ya Allah, Nkolo wa biso tozalaki basangisi te
Verse 24
Tala ndenge bakosi milimo na bango moko, mpe esundoli banga maye bazalaki kosangisa (na Allah)
Verse 25
Mpe okati na bango basusu bazali koyokamela yo, mpe tozipaki mitema na bango mpo ete bayeba yango te mpe matoyi na bango makangami. Mpe elembo nyoso bakomona yango bakondima na yango te. Kino bakoya epai nayo mpo na kosuanisa yo, bapengwi bazali koloba ete: Oyó ezali sé masapo ya bato ya kala
Verse 26
Mpe bazali kopekisa bato bapusana pembeni naye mpe bango moko bazali komipekisa. Nzoka nde bazali komiboma kasi bazali koyeba te
Verse 27
Mpe soki omona, ntango bakotelemisa bango liboso ya lifelo bakoloba ete: Eh biso mpasi! Tozonga lisusu na mokili tokoboya mikapo mia Nkolo na biso te, mpe tokozala okati ya bandimi
Verse 28
Te! Kasi maye bazalaki kosala mabimi polele, soki bazongisi bango na mokili, bakozongela sé maye bapekisaki bango. Ya soló, bazali nde bato ya lokuta
Verse 29
Mpe bazali koloba: Ezali sé bomoyi na biso ya nsé, mpe tokosekwa te
Verse 30
Mpe soki omonaka ntango bakotelemisama liboso ya Nkolo na bango, akoloba: Boye oyo ezali solo te? В akoloba: Iyo na Nkolo na biso! Akoloba: Bomeka etumbu ya maye bozalaki ко mpengwa na yango
Verse 31
Basili kozanga baye baboyi kondima na bokutani na Allah, kino ntango ekoyela bango mbalakaka. Bakoloba: Eh! Mawa na biso na maye oyo tomonaki mpamba na kati na yango! Mpe bako mema mikumba na bango na mikongo na bango, mpe oyo nde mikumba ya mabe
Verse 32
Mpe bomoyi ya nsé ezali sé liseki mpe lisano, kasi ndako ya lobi nde ezali malamu тропа babangi. Boye bokososola te
Verse 33
Tosili koyeba ya soló ete, ezali kosala yo mpasi maye bazali koloba. Bazali koboya yo te, kasi babubi bazali nde koboya mikapo mia Allah
Verse 34
Mpe basilaki koboya batindami liboso nayo, mpe bakangaki mitema na maye bazuaki bango na lokuta, mpe banyokuamaki, kino lisungi na biso eyaki. Kasi,mbongwana ezali te na maloba ya Allah. Мре ya soló nsango ya batindami esili kokomela yo
Verse 35
Mpe soki koboya na bango ezali kosala yo mpasi, mpe soki ozalaki na makoki, ya koluka nzela na mabele to mpe ozua emateli тропа kobuta na mapata тропа komemela bango bikamwiseli; mpe soki Allah alingaki nde atiaki bango banso na nzela ya semba, kasi kozala te o kati na baye bazanga mayele
Verse 36
Ya sólo, ezali sé baye bazali koyoka nde bayambaka mbela (ya bondimi); kasi тропа bawa, Allah akosekwisa bango. Mpe epai naye nde bakozongisama
Verse 37
Mpe balobi: Mpona nini elembo ekitelaki ye te epai na Nkolo naye? Loba: Ya sólo Allah azali na makoki ya kokitisa elembo, nzoka nde ebele na bango bazali koyeba te
Verse 38
Mpe ezali na nyama mokote ezali kotambola likolo na mabele, mpe ndeke moko te ezali kopumbwa na mapapu naye, sé kaka bazala na lisanga lokola bino. Mpe totikaki eloko moko te okati ya buku. Na sima, epai na Nkolo na bango nde bakosangisama
Verse 39
Mpe baye bazali kozua mikapo mia biso na lokuta, bazali lokola baye matoyi mpe minoko mia bango mikufa bazali okati ya molili: Allah azali kobungisa oyo alingi mpe azali kokamba oyo alingi na nzela ya semba
Verse 40
Loba: Boyebisa ngai soki etumbu ya Allah eyeli bino to mpe mokolo ya suka ekomeli bino? Bokobelela nzambe mosusu botika Allah soki bozali na bosembo
Verse 41
Te; ye nde bokobelela mpe akolongola maye bozalaki kobondela ye тропа yango soki alingi, mpe bokobosana maye bozalaki kosangisa ye na yango
Verse 42
Mpe ya soló, tosilaki kotinda epai ya bato liboso nayo, na sima tozuaki bango na bampasi ya makasi nzala mpe bamalali ya makasi mpo ete ntango mosusu bakolomba (ngolu na biso)
Verse 43
Ntango bampasi na biso eyelaki bango, тропа nini balombaki ngolu na biso te! Mitema na bango mikomaki makasi mpe satana abongisela bango maye bazalaki kosala
Verse 44
Мре ntango babosanaki maye bayebisaki bango, tofungolelaki bango bizipela ya biloko binso kino ntango basepeli na maye bazui, tozuaki bango mbalakaka, tala ndenge basilaki kozanga elikia
Verse 45
Boye nde lisanga ya babubi esilaki kopanzana, mpe matondi na Allah Nkolo ya mikili
Verse 46
Loba: Bomoni boni soki Allah azui koyoka na bino na kornona na bino mpe akangi mitema na bino? Nzambe mosusu nani akoyela bino yango na esika ya Allah? Tala ndenge tozali kolimbolela bango bilembo polele, kasi bazali sé kopesa mokongo
Verse 47
Loba: Bokanisi nini soki etumbu ya Allah eyeli bino mbalakaka to polele? Boye, ekobebisama sé bato mabe (babubi)
Verse 48
Mpe totindaka batindami te sé bazala bapesi nsango malamu to bakebisi. Na yango; oyo akondima mpe abongisi, babanga te mpe bazala na mawa te
Verse 49
Mpe ba oyo bakozua bilembo nabiso na lokuta, etumbu ekozua bango na ntina ya maye bazalaki kobebisa
Verse 50
Loba: Nakoki koyebisa bino te ete nazali na sanduku ya nkita ya Allah, mpe nayebi mabombami te, mpe nakoki koloba te ete na zali anzelu, nazali; kolanda sé maye makiteli ngai na emoniseli. Loba: Oyó azali na miso akokani na oyo akufa miso? Bokokanisa te
Verse 51
Mpe kebisa na yango baye bazali kobanga ete bakosangisama liboso ya Nkolo wa bango, bazali na mobateli te mpe molobeli te na botiki naye mpo ete babanga
Verse 52
Mpe kobengana te baye bazali kobondela Nkolo na bango ntongo mpe mpokwa bazali koluka elongi naye. Ozali na eloko te тропа lifuta na bango, bango mpe bazali na eloko te тропа lifuta пауо. Soki obengani bango okozala akati ya babubi
Verse 53
Na boye nde totiaki bango na bango na kati ya komekama mpo baloba ete: Ba oyo nde Allah apesi bango bolamu likolo na biso? Boye Allah te nde ayebi baye bapesaka melesi
Verse 54
Мре soki baye bandimi na mikapo na biso bayei epai nayo, mpe loba: Kimia ezala likolo na bino, Nkolo na bino akoma likolo naye ngolu ete oyo kati na bino akosala mabe nakozanga koyeba, sima atubeli mpe abongisi, ya soló azali molimbisi atonda ngolu
Verse 55
Ndenge wana nde tozali kolimbola mikapo, mpo ete nzela ya bato mabe ebima polele
Verse 56
Loba: Bapekisaki ngai kobondela baye bozali kobondela elongo na Allah. Loba: Ngai nakolanda ba mposa na bino te, noki nakobunga mpe nakozala kati ya bakambami te
Verse 57
Loba: Ya solo, nazali na polele ya Nkolo na ngai, mpe boboyi yango. Maye bozali kowelisa ezali na maboko na ngai te. Kokata makambo ezali sé mibeko ya Allah, azali kokata na bosembo mpe ye nde mokaboli ya malamu
Verse 58
Loba: Soki oyo bozali kowelisa (etumbu eya noki) ezalaki na maboko na ngai mbele esilaki kokata kati na ngai na bino, mpe Allah nde ayebi babubi
Verse 59
Mpe ye nde azali na bafungola ya mabombami, moko te ayebi yango sé ye, mpe ayebi mayemazali na mabele mpe na mayi; mpe lokasa moko te (ya nzete) ekokweya kino ayeba yango. Mpe ezali na mbuma moko te (ya moke) na kati na molili ya mabele, ezala ya mobesu to ya kokawka kino esila kokomama o kati ya buku ya polele
Verse 60
Mpe na kati ya butu ye nde azali kozua milimo na bino, mpe ayebi maye bosalaki na moyi. Sima azali kolamusa bino kati na yango mpo ete elaka ekokisama. Mpe epai naye bozongi na bino ezali, sima akoyebisa bino maye bozalaki kosala
Verse 61
Mpe azali mokonzi likolo na bawumbu naye. Mpe azali kotindela bino bakengeli. Kino liwa ekokomela moko kati na bino, batindami na biso (ba anzelu) bazali kolongola ye molimo na liseki te
Verse 62
Sima, bazongi epai na Allah mokonzi na bango ya soló, boye mobeko mozali ya ye te? Mpe azali lombango na kofuta
Verse 63
Loba: Nani akobikisa bino na molili ya mabele mpe ya mayi? Bokobelela ye na kokitisama mpe na kobanga ete soki abikisi biso na oyo, tokozala okati ya batondi
Verse 64
Loba: Allah nde akokangola bino kati na yango mpe na ba mpasi nioso, na sima, bozongi kosangisa ye lisusu (na binzambe nzambe)
Verse 65
Loba: Azali na makoki ya kotindela bino etumbu na likolo to na nsé, na makolo na bino to mpe azipa bino na mabulu ya bitumba mpe ayokisa bino mpasi ya bitumba bino nabino. Tala ndenge tozali kolimbola mikapo mia biso, ntango mosusu bakoki kososola
Verse 66
Mpe bato nayo bazui yango lokuta mpe yango ezali bosembo. Loba: Nazali mobateli na bino te
Verse 67
Nsango na nsango ezali na ngonga na yango, mpe kala mingi te bokoyeba
Verse 68
Mpe soki omoni baye bazali kotiola mikapo na biso, zala mosika na bango kino bakozua lisolo mosusu. Mpe soki esali ete satana abosanisi yo, koranda te sima ya bokundoli elongo na babubi
Verse 69
Mpe babangi (Allah) bazali na eloko te ya kofuta тропа bato ya lolenge wana, kaši ezali sé bokundoli ntango mosusu bakobanga
Verse 70
Tika baye bazui lingomba na bango na liseki mpe lisano, mpe bomoyi ya nsé ekosi bango. Mpe kundola na oyo mpo ete molimo moko te ebebisama na maye azuaki. Akozala na mobateli te lokola Allah mpe na molobeli te, likabo nyoso akoya na yango тропа kokangola ye ekondimama te. Ba oyo wana nde bamibebisaki bango moko тропа maye bazuaki, bakomela mayi ya moto mpe bakozala na etumbu ya makasi na ntina ya maye bazalaki kopengwa
Verse 71
Loba: Boye, tokobelela elongo na Allah oyo ekosalisa biso te mpe ekonyokolo biso te? Mpe tozonga sima wana Allah asili kokamba biso mpo tozala lokola moto oyo basatana basili kokweisa ye mpe azali kotelengana na mabele? Ata baninga bazali kobenga ye na nzela ya semba ete: Yaka epai na biso; lobamzela ya Allah ezali nzela ya semba mpe tobengamaki ete tomisokia epai na Nkolo ya mikili
Verse 72
Mpe ete botelemisa losambo mpe bobanga ye, mpe epai naye nde bokosangisama
Verse 73
Mpe yende akelaki likolo na mabele na bosembo, mpe mokolo akoloba zala mpe ekozala, liloba naye ya soló, ye nde mokonzi ya mokolo bakofula na kelelo, azali moyebi ya mabombami na makambo ya polele mpe azali wa bwányá atonda bansango
Verse 74
Mpe ntango Ibrâhîm alobaki na tata naye Azar: Ozali kozua bikeko banzambe? Ya solo nazali kornona yo na bato nayo na libunga ya polele
Verse 75
Lolenge wana nde tolakisaki Ibrâhîm bokonzi ya likolo na ya nsé mpo ete azala nakondima ya solo
Verse 76
Mpe ntango butu eyindelaki ye, amonaki monzoto mpe alobi: Oyo nde Nkolo na ngai, mpe ntango elimwaki, alobi: Nalingaka biloko ya kolimwa te
Verse 77
Mpe ntango amonaki sanza ebimi, alobi: Oyo nde Nkolo na ngai, mpe ntango elimwaki alobaki: Soki Nkolo na ngai akambi ngai te nakozala elongo na baye babunga
Verse 78
Mpe ntango amonaki mwese (moyi) alobi: Oyo nde Nkolo na ngai, oyo azali monene koleka! Mpe ntango elimwaki alobi: Ohbato na ngai! Ya soló, nazali mosika na bino na maye bozali kosangisa (Allah) nayango
Verse 79
Ya sólo, ngai na bongoli elongi na ngai epai ya oyo akeli likolo mpe mabele na bomoko bwaye, mpe nazali o kati ya basambeli ya bikeko te
Verse 80
Mpe bato naye basuanisi ye, alobi: Bokosuanisa ngai mpo na Allah naye asili kokamba ngai? Mpe nazali kobanga te maye bozali kosangisa ye na yango, sé oyo Nkolo na ngai alingi, Nkolo na ngai aleka biloko nyoso na boyebi, bokokanisa te
Verse 81
Mpe ndenge nini nakobanga maye bosangisi mpe bozali kobanga te ete bosangisi Allah na maye akitisela yango elembetele te? Na yango; Lisanga nini Esengeli ebatelama soki boyebi
Verse 82
Baye bandima mpe balatisi bondimi na bango mabe te, bango wana nde bazali na kimia (babatelami) mpe bango nde bakambami
Verse 83
Wana nde elembetele na biso eye topesaki na Ibrâhîm likolo ya bato naye. Totombolaka mpete ya nani tolingi, ya sólo, Nkolo nayo azali wa bwanya atonda boyebi
Verse 84
Мре Topesaki ye likabo yaIs’hâq na Ya’qúb, mpe tokambaki bango banso babale, тре Nûh tokambaki liboso, mpe na libota naye: Dâwud, Suleyman, Ayûb, Yûsuf, Mûssa mpe Hâruna. Na boye nde tofutaka bato malamu
Verse 85
Mpe Zakariya na Yahya mpe Issa mpe Il’yâs, nyoso bazalaki bato ya misala malamu
Verse 86
Mpe İsmail na Al-yasa’ mpe Yûnus na Loth, тре topesaki bango koleka bato awa na mokili
Verse 87
Mpe basusu kati ya batata na bango mpe bana na bango mpe bandeko na bango, toponaki bango mpe tokambaki bango na nzela ya semba
Verse 88
Wana nde bokambi ya Allah azali kokamba na yango nani alingi kati na bawumbu naye. Soki basangisaki (Allah) mbele misala na bango mibebisamaki
Verse 89
Ba oyo wana nde topesaki bango buku mpe mibeko тре bontoma, тре soki ba oyo bapengwi na yango, kaši tosili kopesa mokumba na yango epai na bato mosusu oyo bakopengwa na yango te
Verse 90
В a oyo wana nde Allah akambi bango, landa nzela na bango. Loba: Nazali kosenga bino yango lifuta te, yango ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba
Verse 91
Bapesi Allah lukumu naye te ndenge esengeli, ntango balobi ete: Allah akitisi eloko te apai na moto. Loba: Nani akitisaki buku oyo Mûssa ayaki na yango bongengi mpe bokambi тропа bato? Bokomaki yango na bamakasa bazali kobimisa yango mpe bozali kobomba ebele kati na yango. Etangisi bino na batata na bino maye boyebaki liboso te, loba: Allah, sima tika bango basakana na kati ya libunga na bango
Verse 92
Kaši buku oyo (kurani) tokitisi yango epambolami ezali kondima na oyo ekitaki liboso, mpe mpo ete okebisa na yango mama ya bituka na baye bazali zingazinga na yango. Mpe na baye bandimi na mokolo ya suka bazali kondima na yango mpe bazali kobatela losambo na bango
Verse 93
Mpe nani azali moto mabe koleka moto oyo alobi lokuta na nkombo ya Allah? То mpe azali koloba ete: Bapesi ngai emoniseli, nzoka nde bakitiseli ye eloko te? To mpe oyo akoloba: Nakokitisa emoniseli ndenge Allah akitisi? Mpe soki okomona bato mabe ndenge bakozala o kati ya molangwa ya liwa, mpe ba anzelu bakotandela bango maboko: Bobimisa milimo na bino, lelo bokozua etumbu ya kosilisa lokumu тропа maye bozalaki koloba bosembo te na nkombo ya Allah, mpe bozalaki kosala lolendo na mikapo naye
Verse 94
Bino wana boye liboso na biso lelo bino moko, ndenge tokelaki bino mbala ya liboso. Botiki sima na bino nyoso oyo topesaki bino mpe tozali kornona te banani bakolobela bino, baye bozalaki kotuta ntolo ete bozali na basangani, kosangana na bino esili kokatana, mpe baye bozalaki kotutela ntolo basundoli bino (lokola balobeli)
Verse 95
Ya soló, Allah nde azali kopasola mbuma mpe mokokoli. Azali kobimisa bomoyi kowuta na liwa mpe mobisi liwa kowuta na bomoyi. Wana nde Allah, ndenge nini bozali komibungisa
Verse 96
Ye nde azali kobimisa pole ya ntongo na molili ya butu mpe atia butu ezala bopemi, kasi moyi na sanza тропа koyeba motango. Oyo nde mokano ya Nkolo nguya atonda boyebi
Verse 97
Mpe ye nde atielaki bino minzoto mpo bokambama na yango na molili ya mokili mpe ya ebale. Tosili kolimbola bilembo polele тропа bato oyo bayebi
Verse 98
Mpe ye nde akeli bino ebele kowuta na molimo moko; mpe ezali na efandelo mpe ebombelo. Tosili kolimbola bilembo mpo na bato basosolaka
Verse 99
Mpe ye nde azali kokitisa mayi kowuta na likolo. Mpe tozali kobimisa na yango milona. Mpe tobimisi bamatiti, sima tozali kobimisa bambuma ekangami ekangami mpe nzete ya tamru na mutu na yango ezali kobimisa bambuma ya tamru bizembeli pembeni pona kobuka epai na epai, mpe bilanga ya a’nâb mpe ya zaîtûn mpe ya rumân, bikokana mpe bisusu bikokana te. Tala bambuma na yango ntango
Verse 100
Мре batieli Allah ba mbanda ya bilima тре yende akeli bango, тре bapesi ye bana basi na bana mibali na kozanga koyeba, nkembo naye na maye bazali kopesa ye
Verse 101
Mokeli ya likolo na nsé. Ndenge nini akozala na mwana azali na molongani te mpe yende akela biloko binso тре azali moyebi ya biloko binso
Verse 102
Wana Allah Nkolo na bino, nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ye, mokeli ya biloko binso bobondela ye, mpe azali mobateli ya biloko binso
Verse 103
Miso ekomonaka ye te kasi ye nde akomona mpe azali malamu atonda bansango
Verse 104
Bilembo ya polele bisili koyela bino epai ya Nkolo nabino, oyo akomona polele ezali тропа molimo naye, mpe oyo akozanga kornona ezali mpe тропа molimo naye, kasi na zali mokengeli likolo na bino te
Verse 105
Na boye nde tozali kolimbola mikapo mpo baloba ete otangaki, mpe tozali kolimbola yango polele тропа bato oyo bayebi
Verse 106
Landa maye makiteli yo epai ya Nkolo nayo, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye, mpe zala mosika na basangisi (Allah)
Verse 107
Mpe soki Allah alingaki mbele basangisaki ye na eloko te, mpe totiaki yo mokengeli likolo na bango te, mpe ozali mobateli na bango te
Verse 108
Mpe bofinga te baye bazali kobondela misusu batiki Allah, bakofinga Allah na nkanda kati na kozanga mayele, na boye nde tobongisaki mosala ya umma nionso, sima epai na Nkolo na bango nde bozongi na bango ezali nde akoyebisa bango na ntina ya maye bazalaki kosala
Verse 109
Mpe bazali kolapa na Allah na makasi ya bolapi na bango ete soki elembo eyeli bango bakondima na yango, loba: Ya soló bilembo bizali epai na Allah, mpe eloko nini ekotinda bino kokanisa ete soki yango eye bakondima te
Verse 110
Мре tokobalola mitema na bango mpe miso na bango mpo bandimaki mbala ya liboso te, mpe totiki bango o kati ya botomboki na bango nakozanga kornona
Verse 111
Mpe soki tokitisa ba anzelu likolo na bango, mpe bibembe bilobisa bango, mpe soki tosangisaki biloko binso liboso na bango, balingaki kondima sé soki Allah alingaki, nzoka nde ebele na bango bazangi koyeba
Verse 112
Mpe ndenge wana totiaki na ntoma nionso, monguna kati ya basatana ya bato mpe bilima. Bazali kopesana bimoniseli maloba ya kitoko mpe sukali maloba mazanga ntina; mpe soki Nkolo nayo alingaki nde basalaki yango te. Mpe tika bango na maye bazali kokosa
Verse 113
Mpe mpo ete mitema ya baye bandimi na mokolo ya suka te bikende epai na yango mpe basepela na yango mpe mpo bakotisa oyo balingi kokotisa
Verse 114
Na boye, naluka zuzi mosusu kotika Allah mpe ye nde akitisi epai na bino buku ya polele? Mpe baye napesaki buku bayebi ete yango ekiti ya soló kowuta epai ya Nkolo nayo na bosembo, kasi kozala te elongo na baye bazali kotia ntembe
Verse 115
Мре liloba ya Nkolo nayo ekokisami ya soló mpe na bosembo, mbongwana ezali te na maloba naye azali moyoki mpe moyebi
Verse 116
Mpe soki otosi ebele ya bato awa na nsé, bakobungisa yo nzela ya Allah. Bazali kolanda sé makanisi mpe bazali kosala sé balokuta
Verse 117
Ya solo Nkolo nayo ayebi banani babungi nzela naye mpe ayebi banani bakambami malamu
Verse 118
Mpe bolia maye batangeli yango nkombo ya Allah soki bozali kondima na mikapo naye
Verse 119
Mpona nini bokolia te maye batangeli yango nkombo ya Allah mpe asili kolimbolela bino maye mapekisami, longola sé soki bokutani na kpokoso ya makasi koleka? Mpe ya solo, ebele ya bato bazali kobungisa bato na bamposa na bango na kozanga boyebi. Ya solo, Nkolo nayo nde ayebi mpenza bato ya mabe (balekisi ndelo)
Verse 120
Mpe botika masumu ya polele na ya kobatama. Ya solo, baye bazali kosala masumu bakofutama na maye bazalaki kosala
Verse 121
Мре bolia te maye bat angelí yango nkombo ya Allah te mpo ete ezali mbindo. Mpe ya soló, basatana bazali kotinda bato na bango mpo na kosuanisa bino, mpe soki botosi bango bokozala basambeli ya bikeko
Verse 122
Boye! Moto oyo azalaki ebembe mpe topesi ye bomoyi mpe totieli ye bongengi azali kotambola na yango kati na bato, azali lokola moto oyo azali na molili akoki kobima kati na yango te? Lolenge wana nde babongisela bapengwi maye bazalaki kosala
Verse 123
Na boye nde totiaki na mboka moko moko batomboki ya minene minene тропа kosala bamwango, kasi bazali kosala yango sé na banzoto na bango moko kasi bazali koyeba te
Verse 124
Mpe soki elembo moko eyeli bango, balobi: Tokondima te kino tokozua likabo ndenge moko eyelaki batindami ya Allah. Allah ayebi esika nini akoki kotia bontoma naye baye basali mabe bakozala na ntina te epai ya Allah mpe bakozua etumbu ya makasi тропа bamwango bazalaki kosala
Verse 125
Moto oyo Allah alingi kokamba ye akofungola motema naye mpo na islam, mpe oyo alingi kobungisa, akotia motema naye ekangami ekomi moke lokola moto oyo azali kobunda mpo na komata na likolo. Ndenge wana Allah azali kotia mbindo (etumbu) likolo na baye bandimi te
Verse 126
Mpe oyo ezali nzela ya Nkolo nayo ya nsemba, tosili kolimbola mikapo тропа bato bakanisa
Verse 127
Bazali na ndako ya kimia epai na Nkolo na bango, mpe azali mobateli na bango na maye bazalaki kosala
Verse 128
Mpe mokolo akosangisa bango banso, eh bino bilima bosili! Konyokolo bato mingi, тре baninga na bango kati ya bato bakozongisa liloba ete: Eh Nkolo! Tozalaki kosalisana kati na biso kino tokomi na elaka na biso eye osilaki kotia. Akoloba na bango: Lifelo nde esika na bino ya kofanda libela, sé ndenge Allah akolinga. Ya soló, Nkolo nayo azali wa bwanya atonda boyebi
Verse 129
Lolenge wana nde tozali kopesa babubi bokonzi likolo na baninga na bango na ntina ya maye bazalaki kozua
Verse 130
Eh lisanga ya bilima mpe bato! Batindami baponamaki te kati na bino, bazali kolobela bino bilembo biangai mpe bazali kokebisa bino mpo na bokutani na bino ya lelo oyo? Bakoloba: Totatoli na nzoto na biso moko, mpe bomoyi ya nsé mokosi bango, mpe bamitatoli ete ya soló bazalaki bapengwi
Verse 131
Wana ezali mpo ete Nkolo nayo akoki koboma mboka moko te na ntango oyo bato na yango bakebisami te
Verse 132
Mpe moto na moto na lopete kati na maye basalaki, mpe Nkolo nayo abosani te na maye bazalaki kosala
Verse 133
Mpe Nkolo nayo azali na bomengo atonda ngolu, soki alingi akolongola bino mpe akokela basusu oyo alingi na esika na bino ndenge akelaki bino wuta na basusu mpe lokola
Verse 134
Maye balaka bino yango ekoya sólo, mpe bokokoka kokima te
Verse 135
Loba: Eh bato na ngai! Bosala na bisika na bino ngai mpe nazali kosala, mpe bokoyeba kala mingi te nani akofutama malamu mpo na lobi. Ya sólo, babubi bakoki kolonga te
Verse 136
Мре bazali kopesa Allah mwa eteni kati ya maye akela bibwele mpe milona тре balobi: Oyo ezali тропа Allah na makanisi na bango, тре oyo ezali тропа banzambe na biso, kasi oyo ya banzambe na bango ezali кокота epai na Allah te, mpe oyo ya Allah ezali кокота epai na banzambe na bango, mabe ndenge bazali kokata likambo
Verse 137
Mpe lolenge wana nde banzambe ya basambeli bikeko babongiselaki bango mabe ya koboma bana na bango тропа konyokolo bango mpe тропа kozipa bango miso na lingomba na bango, mpe soki Allah alingaki mbele basalaki yango te, mpe tika bango na maye bazali kosala
Verse 138
Mpe balobaki: Oyo bibwele mpe bilona biye bipekisami nakolia, sé na ba oyo tokolinga na makanisi na bango, mpe banyama biye mikongo na yango mipekisami, mpe banyama oyo batangeli yango nkombo ya Allah te nakobukela ye lokuta, akofuta bango na maye bazalaki kosala (ya lokuta)
Verse 139
Mpe balobi: Maye mazali o mabumu ya banyama oyo bizali sé тропа mibali kati nabiso, kasi bipekisami тропа basi na biso, тре soki yango ebimi ya kokufa tala bango basangani likolo na yango, akofuta bango na mibeko na bango, ya soló, azali na bwanya atonda boyebi
Verse 140
Basili kozanga; baye babomaki bana na bango na bozoba mpe kozanga mayele mpe bapekisaki bozui oyo Allah apesaki bango тропа kobukela Allah lokuta, basili kopengwa mpe bakambama te
Verse 141
Mpe ye nde abimisa bilanga ya kokangama mpe ya kokangama te, na banzete ya tamru mpe milona ya ndenge na ndenge na bambuma na yango na elengi na yango, mpe bazaítún na barumane mikokana mpe misusu mikokana te. Bolia ba mbuma na yango ntango eboti mpe bofuta zakat na yango na mokolo yango bizali kobukama mpe bolekisa ndelo te. Ya soló, alingaka babebisi te
Verse 142
Mpe banyama mosusu akela yango mpo na komatela, mpe bisusu тропа ba litomba ya ndenge na ndenge. Bolia na maye Allah apeși bino. Mpe bolanda makolo ya satana te. Mpo ete azali monguna na bino ya polele
Verse 143
Na bibwele akeli balongani mwambe, mibale ya bantaba mpe mibale ya bameme. Loba: Boye mibali mibale nde apekisi to ya basi mibale to mpe maye makangami na matilisi ya basi mibale? Bopesa ngai boyebi na yango soki bozali na bosembo
Verse 144
Mpe mibale kati ya bakamela mpe mibale kati ya bangombe. Loba:boye; apekisi ya mibali mibale to ya basi mibale to mpe lisusu maye makangami о mabumu ya oyo ya basi mibale, to bozalaki banzeneneke na ntango Allah azalaki kopesa bino mibeko oyo? Mpe nani azali moto mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta тропа kobungisa bato na kozanga mayele? Ya soló, Allah akambaka babubi te
Verse 145
Loba: Mpona maye makiteli ngai kati ya emoniseli, namoni epekisami te mpona kolia, longola nsé soki ezali ya kokufa to makila ebele oyo esopani to mpe mosuni ya ngulu mpo ete yango ezali mbindo to nyama eye babomi yango mpona Allah te, kasi moto oyo akokutana nakpokoso ya makasi koleka (mpe alei yango na nko te to alekisi ndelo te ayeba ete), ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu
Verse 146
Mpe тропа baye bamibenga bayuda topekisaki bango nyama nyoso ya manzaka, mpe тропа bangombe na bantaba mpe bameme topekisaki bango bamafuta na yango, longola sé oyo ya mikongo na yango to тре ya mipanzi to mpe oyo esangani na mikwa. Wana etumbu topesaki bango mpo na botomboki na bango, тре ya soló, biso nde tozali na bosembo
Verse 147
Mpe soki bazui yo moto na lokuta, loba: Nkolo na bino atonda ngolu ebele etumbu naye ekoki kozangisa bato ya mabe te
Verse 148
Baye basangisaki (Allah) bakoloba: Soki Allah alingaki kasi tosangisaki Allah te mpe biso na batata na biso, tokokaki kopekisa eloko te. Ndenge wana nde baye balekaki liboso na bango baboyaki kino bazuaki etumbu na biso. Loba: Boye bozali na boyebi epai na bino bobimisela yango, biso? Bozali kolanda sé makanisi mpe bozali kosala sé lokuta
Verse 149
Loba: Allah nde azali na elembetele ya makasi, mpe soki alingaki nde akambaki bino banso
Verse 150
Loba: Boya na banzeneneke na bino batatola ete ya soló, Allah nde apekisaki oyo. Mpe soki batatoli, kotatola na bango te, mpe kolanda te mposa ya baye baboyi mikapo na biso, mpe kolanda te baye bazali kondima na mokolo ya suka te mpe bazali kokokisa Nkolo na bango na bikelamu
Verse 151
Loba: Boya na tángela bino maye Nkolo na bino Apekisi bino: Ete bosangisa ye na eloko te, mpe bozala malamu na baboti na bino, mpe boboma bana na bino te тропа kozanga; biso nde tozali koleisa bino na bango, mpe bopusana na masumu te na polele to na kobombana, mpe boboma molimo ya moto te oyo Allah atie yango bule (mosantu) sé na bosembo, wana ntoli apesi bino (Allah) mpo ete bososola
Verse 152
Mpe bopusana te pembeni ya bozui ya mwana etike sé ezala na lolenge ya malamu kino akokola. Mpe bopesa bimekelo na bosembo (komeka ntaka ya metele mpe kotia nkilo), tokopesa moto mokumba te sé oyo ekoki naye, mpe soki bozali koloba boloba malamu na bosembo ata soki ezali bayi libota, mpe bokokisa elaka ya Allah. Wana mibeko atindi bino na yango mpo ete bozala kokanisa
Verse 153
Mpe ya soló, oyo nde nzela na ngai ya semba bolanda yango kasi bolanda banzela ya mikemike te ekokabola bino na nzela naye. Wana nde atindi bino na yango mpo ete bobanga ye
Verse 154
Sima topesaki Mûssa buku ya kokoka mbano тропа bolamu asalaki mpe ezala ndimbola ya eloko nyoso, bokambi mpe ngolu ntango mosusu bakondima na bokutani ya Nkolo na bango
Verse 155
Mpe oyo buku ya mapamboli tokitisaki yango, bolanda yango mpe bobanga mpo ete bozua ngolu
Verse 156
Mpo boloba te ete: Bakitisaki nde buku epai ya mabota mibale liboso na biso mpe tomipesaki na kotanga yango te
Verse 157
То mpe boloba ete: Soki bapesaki biso buku mbele tokambamaki koleka bango. Pole esili koyela bino epai na Nkolo na bino bokambi mpe ngolu, тре nani moto mabe koleka oyo azali koboya mikapo mia Allah тре azali kopesa yango mokongo tokofuta baye bazali kopesa mikapo na biso mokongo etumbu ya mabe тропа maye bazalaki kokima
Verse 158
Bazali kozela nini ete ba anzelu bayela bango ete Nkolo nayo aya to тре ndambu ya bilembo ya Nkolo nayo? Mokolo oyo ndambo ya bilembo ya Nkolo nayo ekoya kondima naye ntango wana ekosalisa molimo moko te oyo andimaki te liboso to azuaki bolamu liboso na kondima naye, loba: Bozela! Biso mpe tozali kozela
Verse 159
Ya soló, baye bakabolaki lingomba na bango mabota mikemike, ozali na eloko te kati na bango. Kasi likambo na bango etali nde Allah sima akoyebisa bango na maye bazalaki kosala
Verse 160
Oyo akoya na bolamu moko akofutama na yango mbala zomi, mpe oyo akoya na mabe, akofutama sé na lolenge na yango mpe bakobubama te
Verse 161
Loba: Ya sólo, Nkolo na ngai akambi ngai na nzela ya semba lingomba ya semba lingomba ya Ibrâhîm amisokia mobimba na Allah mpe azalaki te kati ya basangisi (Allah)
Verse 162
Loba: Ya soló, losambo na ngai, kosasa na ngai, bomoyi na ngai mpe liwa na ngai mazali ya Allah Nkolo ya mikili
Verse 163
Azali na mosangani te, mpo na yango nde na tindamaki mpe na zali wa yambo ya bamisokié (nazali moto wa yambo ya kozala mizilima na umma na ngai)
Verse 164
Loba: Boye nakoluka Nkolo mosusu тропа kotika Allah mpe ye nde Nkolo ya biloko binso? Molimo mokozua sé lifuta ya mabe asalaki. Moko te akomema mokumba ya moninga. Sima epai na Nkolo na bino bozongi na bino ezali mpe akoyebisa bino mpo na maye bozalaki kokabwana na yango
Verse 165
Mpe ye nde atiaki bino bakitani na mabele mpe atomboli basusu likolo ya baninga тропа komeka bino na maye apesi bino. Ya soló, Nkolo nayo azali lombango na kopesa etumbu, mpe ya sólo, azali molimbisi atonda ngolu