Back to Languages
Lingala - Chapter 76
Translation by Zakariya Muhammed Balingongo
Verse 1
Ezali na tango molayi eleka na mokili moto azalaki eloko moko te liboso ete akelama
Verse 2
Ya soló, tokelaki moto na litanga ya mayi ya mokongo (oyo esangani na biloko ebele), тропа tomeka ye na yango, mpe totieli ye boyoki mpe bomoni mpo oyoka mpe amona
Verse 3
Ya solo, tolakisaki ye nzela mpo atondo (Allah) to apengwa
Verse 4
Ya solo, tolengeli тропа bapengwi minyololo ya basinga milai ya makasi mpe etumbu ya saira. (moto ya makasi ya lifelo)
Verse 5
Ya solo, babangi (Allah) bakomelaka na bakopo ya kitoko ya kafura ya malili solo kitoko
Verse 6
Esika oyo bawumbu ya Allah bakomelaka ndenge balingi ezali kobimisa mayi ya malamu
Verse 7
Bazali kokokisa bilaka mpe bazalaki kobanga mokolo moye mabe na yango ekopanzana bisika binso
Verse 8
Мре bazali koleisa babola na bana bitike mpe bato ya boloko, na bolingo (ya biloko yango)
Verse 9
Ya soló, tozali koleisa bino тропа Allah, tolingi bofuta biso te mpe bopesa biso melesi te
Verse 10
Tozali kobanga Nkolo na biso тропа mokolo oyo ya somo mpe ya mabe koleka
Verse 11
Allah akobatela bango na mabe ya mokolo wana, mpe bakokutana na bongengi mpe esengo
Verse 12
Mpe akofuta bango lola тропа maye basalaki, mpe akopesa bango bilamba bia fafala
Verse 13
Bakoyekamaka likolo ya bakiti ya kitoko, moyi ekotungisaka bango te mpe bakoyokaka malili makasi te
Verse 14
Bilili na yango bikozipa bango penepene, mpe mbuma na yango bikokita tii pembeni na bango тропа kobuka
Verse 15
Mpe bakopesaka bango bitiyelo biye bisalami na mabende ya mbongo na bakopo bisalami na mabanga ya pembe ya kitoko bikotambwisama likolo na bango тропа kólia mpe komela
Verse 16
Bakopo to milangi ya mabende ya kongenga ya кококапа
Verse 17
Мре bakomelaka mayi oyo esangani na tangawisi
Verse 18
Ezali kowuta na liziba oyo ebengami salsabila kuna na kati
Verse 19
Мре bilenge mibali ya libela bakotambola nakati na bango тропа kosalela bango, soki omoni bango okokanisa ete bazali mabanga ya mayi ya kongenga oyo epanzani
Verse 20
Mpe soki otali kuna okomona kitoko na bokonzi bonene
Verse 21
Мре bakolata bilamba ya langi ya mayi ya pondu ya lolenge ebele тре basinga ya palata na maboko na bango mpo na bonzenga. Mpe Nkolo wa bango akomelisa bango mayi ya bopeto
Verse 22
Ya soló, oyo ezali lifuta тропа bino, mpe molende na bino ekofutama
Verse 23
Ya sólo, biso nde tokitiselaki yo kurani oyo na ndambu ndambu
Verse 24
Zala na bozeli na oyo Nkolo nayo apesi mibeko, mpe kotosa mosumuki to mopengwi te okati na bango
Verse 25
Мре tanga nkombo ya Nkolo nayo tongo mpe pokwa
Verse 26
Mpe na butu ofukamela ye, mpe okumisa ye butu molayi
Verse 27
Ya soló, bango balingi (bomoyi) ya nsé, mpe batiki sima na bango mokolo ya kilo mpe ya somo
Verse 28
Biso nde tokela mpe tobongisi bokeli, soki tolingi tokoya na bato mosusu na esika na bango
Verse 29
Ya sólo, oyo ezali bokundoli, oyo alingi, azwa nzela ya kokende epai ya Nkolo naye
Verse 30
Na yango: Bokolinga eloko te sé ezala na bolingi ya Allah. Ya sólo, Allah azali moyebi atonda bwanya
Verse 31
Akotisaka oyo alingi na mawa naye, kasi тропа bato mabe, abombeli bango etumbu ya makasi