Back to Languages
Lingala - Chapter 9
Translation by Zakariya Muhammed Balingongo
Verse 1
Allah na motindami naye ba wangani basambeli bikeko baye bozuaki na bango elaka
Verse 2
Botambola na mokili sanza minei mpe boyeba ete bokokitisa bokasi ya Allah te, kasi ya soló, Allah akosambwisa bapagano
Verse 3
Mpe mbela ewuti epai ya Allah na motindami waye epai na bato тропа mokolo ya hajj ya monene (mobembo esantu o mboka makkah), ya solo, Allah na motindami waye bazali mosika na basambeli ya bikeko. Soki botubeli, ezali malamu тропа bino, тре soki boboyi mpe bopesi mikongo, boyeba ete ya sólo, bokokitisa bokasi ya Allah te. Mpe pesa sango ya etumbu ya makasi epai ya baye baboyi kondima. (bapengwi)
Verse 4
Longola sé epai ya bapagano baye bokamataki na bango elaka mpe sima balongoli тропа bino eloko te, mpe basalisaki banguna te тропа kobundisa bino mpe kosala bino mabe te, bokokisela bango elaka na bango kino tango oyo boyokanaki na bango ekoka. Pamba te ya sôló, Allah alingaka baye babangaka
Verse 5
Mpe soki basanza esantu bileki, boboma bapagano о bisika binso bokokuta bango. Bokanga bango mpe bofandela bango, bokengele bango na bisika nyoso oyo batiyelaka bino mitambo. Kasi soki batiki mpe batubeli, mpe batelemisi losambo mpe bafuti zakat botungisa bango lisusu te, mpo ete ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu
Verse 6
Mpe soki moko o kati ya basangisi nzambe asengi nayo obatela ye epai nayo, yamba ye mpo akoka koyoka liloba lia Allah. Sima komisa ye na esika naye ya kimia, mpo bazali baye bayebi te
Verse 7
Ndenge nini basambeli ya bikeko bakozala na elaka epai ya Allah na motindami waye longola sé baye boyokanaki na bango pembeni ya ndako esantu? Tango inso bakomisembola epai na bino, bino mpe bozala semba epai na bango. Ya sólo, Allah alingaka babangi
Verse 8
Ndenge nini soki balongi bino, bazali kotosa lisusu elaka te, mpe bondeko te oyo ezali kati na bino na bango? Mpe bazali kosepelisa bino na lolemu na bango, nzoka nde mitema na bango mizali koboya. Kasi ebele na bango bazali bato mabe
Verse 9
Bazali koteka mikapo mia Allah na talo ya шоке mpe kokanga nzela naye. Ya soló, maye bazali kosala mazali mabe
Verse 10
Babatelaka elaka te, bondeko mpe te ya makila oyo ezali okati na bango na bandimi. Kasi bango nde babebisi ya mibeko
Verse 11
Soki batubeli, batelemisi losambo mpe babimisi zakat, bakomi bandeko na bino o kati ya lingomba. Mpe tozali kolimbola mikapo mpo bato bayeba
Verse 12
Mpe soki babebisi ndai na bango na sima ya koyokana, babundisi lingomba lia bino, bobundisa bakonzi ya bopagano mpo ete ya sólo, bango bazali na botosi te na bandai na bango. Tango mosusu bakotika
Verse 13
Boye bozali kobundisa te baye bazangi botosi na bandai na Bango, mpe bakani kobimisa motindami mpe bango nde babandi bino liboso? Boye bozali kobanga bango? Kasi Allah nde esengeli bobanga ye soki bozali bandimi
Verse 14
Bobundisa bango Allah akopesa bango etumbu na maboko na bino mpe akokitisa bango mpe akolongisa bino likolo na bango. Mpe akobikisa mitema mia bandimi
Verse 15
Мре akolongola nkanda o mitema mia bango, mpe Allah alimbisaka oyo alingi, mpe Allah azali na boyebi atonda bwanya
Verse 16
Boye, bozali kokanisa ete bokotikama bongo mpe Allah ameki naino te baye babundi o kati na bino, mpe bazui balingami basusu te na batika Allah na motindami naye mpe na bandimi? Mpe Allah azali na sango ya maye bozali kosala
Verse 17
Esengeli te na basambeli ya binzambe nzambe kokota na bandako esantu ya Allah, na matatoli ya bopagano ya polele bazali na yango, bango wana misala mia bango misili kobeba, mpe bakozalaka libela o kati ya moto
Verse 18
Kasi baye bazali na ndingisa ya kokota na bandako esantu ya Allah. Sé baye bandimi na Allah, na mokolo ya suka, mpe batelemisi losambo mpe babimisi zakat, mpe babangi mususu te sé Allah, baye wana bakozala elongo na bakambami
Verse 19
Boye, bolingi kotia moto oyo azali komelisa bapaya ya hajj mayi mpe azali kobongisa ndako esantu ya Allah, lolenge moko na moto oyo andimi na Allah mpe na mokolo ya suka mpe abundi o nzela ya Allah? Bakokani te epaí ya Allah, kasi Allah akambaka babubi te
Verse 20
Baye bandimaki mpe batiki (Makkah), mpe babundi o nzela ya Allah na misoio mia bango mpe na milimo mia bango, baleki kozala na esika ya likolo epai ya Allah mpe bango nde balongi
Verse 21
Nkolo wa bango azali kopesa bango sango elamu ya ngolu naye, mpe esengo naye mpe bilanga ya lola mpo na bango, kati na yango kofanda ya kitoko
Verse 22
Libela o kati na yango mpe ya soló, lifuta linene likozuamaka sé epai ya Allah
Verse 23
Eh bino baye bondima! Bozua baboti ba bino na bandeko ba bino lokola balingami te soki baponi bopengwi batiki bondimi. Mpe kati na bino oyo akozua bango lokola balingami, bango nde babubi
Verse 24
Loba: Soki baboti ba bino, na bana ba bino na bandeko na bino, na basi na bino na mabota na bino, na misolo mia bino miye bozui na mombongo moye bozali na bobangi ete ekweya, na bandako kitoko bozali na yango, bilingami mingi epai na bino koleka Allah na motindami waye na kobunda na nzela naye, bozelakino Allah akoya na mitindo (mikano) mia ye, mpe Allah akambaka babebisi te
Verse 25
Allah asilaki ya soló, kolongisa bino obisika ebele, na o mokolo mwa (bitumba) bia Huna’ín, tango bosepelaki na motango monene mwa bino, kasi yango esalisaki bino na eloko te. Mabele ekomelaki bino шоке na maye bozalaki kokanisa. Sima bopesaki mikongo mpe bokimaki
Verse 26
Sima, Allah akitisaki kimia naye epai ya motindami wa ye mpe epai ya bandimi. Mpe akitisaki basoda naye baye bomonaki bango te, mpe apesaki etumbu na bapengwi. Mpe wana nde lifuta lia bapengwi
Verse 27
Sima, Allah andimaka tubela ya oyo alingi. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu
Verse 28
Eh bino bandimi! Ya sólo, bapagano bazali mbindo, (basambeli bikeko) bapusana pena na ndako esantu te o sima ya mobu mwa bango moye. Kasi soki bozali kobanga kimobola, Allah akopesaka bino bomengo na bolamu bwaye soki alingi, ya sólo, Allah azali moyebi atonda bwanya
Verse 29
Bobundisa baye bazali kondima na Allah te, na mokolo ya suka te, mpe bazali kopekisa te maye Allah na motindami waye bapekisa, mpe bazali коропа lingomba lia lokuta. Batiki oyo ya bosôló, o kati ya baye bapesama buku (bayuda na baklišto), kino bakofuta lomande na maboko na bango na sima ya koyoka soni
Verse 30
Mpe bayuda balobi: Uzairi azali mwana ya Allah. Mpe baklišto balobi: Masiya azali mwana ya Allah. Wana ezali liloba oyo ebimaka na minoko mia bango. Bazali komekola liloba lia bapengwi baye bapengwa liboso. Allah aboma bango na maye bazalaki kosala. Ndenge bamitiye mosika na bosôló
Verse 31
Bazui bakonzi ya mangomba na bango na masiya mwana ya Maryam lokola banzambe na botiki Allah. Kasi batindamaki te sé babondela nzambe moko oyo azali na mosangani te sé ye mei (Allah), nkembo naye oyo azali likolo ya maye bazali kosangisa ye na yango
Verse 32
Balingi kozimisa bongengi bwa Allah na minoko mia bango, kasi Allah azali sé kokolisa bongengi bwa ye, ata soki bapengwi bazali koboya
Verse 33
Yende atindaki motindami naye na bokambi mpe na lingomba lia bosôló, mpo été ezala likolo ya mangomba nyoso, ata soki basambeli ya bikeko (basangisi) bazali koyina yango
Verse 34
Eh bandimi! Ya soló, ebele ya bakonzi ya lingomba epai ya bayuda na ba klišto, bazali kolia misolo mia bato na lokuta, mpe bazali kobundisa nzela ya Allah, mpe na baye bazali kobomba nkita ya wolo mpe mpalata (mbongo), mpe baboyi kobimisa yango na nzela ya Allah, pesa bango sango ya etumbu makasi
Verse 35
Mokolo oyo wolo na mpalata na bango mikotoka na moto ya lifelo sima bakozikisaka bilongi na bango na yango, na mipanzi na bango na mikongo na bango. Oyo nde lifuta ya maye bozalaki kosangisa na nkita ya mokili. Na yango, bomeka etumbu ya maye bobombaki
Verse 36
Ya sólo, motango ya basanza epai ya Allah mozali (sanza) zomi na mibale okati ya makomi ma Allah, uta mokolo akela likolo na nsé, okati na yango (sanza) minei mizali esantu, wana ezali lingomba lia semba, mpe bobuba milimo na bino te okati na yango, mpe bobundisa basangisi Allah mobimba, ndenge bazali kobundisi bino, тре boyeba ete ya soló, Allah azali elongo na babangi
Verse 37
Ya sólo, kozongisa mikolo ya sanza esantu sima, ezali kobakisa bopengwi, na yango nde ezali kobungisa ba oyo bapengwa. Mobu moye bamoni yango pamba mpe mobu mosusu babulisi yango, pona kobebisa motango ya basanza esantu biye Allah atia, boye nde bazali kornona pamba maye Allah atia yango esantu, babongiseli bango misala mabe liboso na bango na bonzenga. Kasi Allah akambaka bapengwi te
Verse 38
Eh bino baye bondima! Mpona nini soki bayebisi bino bobima na nzela ya Allah, bozali kofanda na nsé. Boye bolingi bomoyi bwa mokili koleka oyo ya mokolo ya suka? Bisengo bia mokili bizali mike, oyo ya lobi nde bileki
Verse 39
Soki bokei kobunda te, akopesa bino etumbu ya makasi mpe akokela bato basusu o esika na bino mpe eloko moko ya mabe ekosala ye te. Mpe Allah azali na bokoki likolo ya biloko binso
Verse 40
Soki bopesi ye lisungi te, (Muhammad) Allah asilaki kolongisa ye. Tango bapengwi babimisaki ye, ya mibale bango babale, tango bazalaki kati ya libanga, tango azali koloba na moyekoli naye: Kobanga te, ya soló, Allah azali elongo na biso, Allah akitisaki lisungi lia ye epai naye, mpe asalisi ye na mapinga baye bomonaki bango te, mpe atiyaki liloba lia bapengwi nanse, mpe liloba lia Allah lizala likolo, mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya
Verse 41
Bökende moko moko to na lisanga kobunda na nzela na Allah na misolo na bino mpe na nzoto na bino, wana ezali malamu тропа bino soki bozali koyeba
Verse 42
Soki bozui (ya bitumba) ezalaki pete, mpe mobembo ezalaki pembeni kasi balandaki yo, kasi etamboli ya mosika epekisaki bango mikakatano, mpe bazali kolapa na nkombo ya Allah été: Soki tozalaka na makasi, tolingaki kobima elongo na bino. Bazali komibebisa sé bango moko. Mpe Allah ayebi ya soló, bazali babuki lokuta
Verse 43
Allah alimbisa yo na maye opesaki bango ndingisa, kino oyeba bato ya bosóló, mpe oyeba babuki lokuta
Verse 44
Baye bandimi па Allah mpe na mokolo ya suka basenga yo nzela te liboso ya kokende kobunda o nzela ya Allah na misolo na bango na banzoto na bango. Allah nde moyebi wa babangi
Verse 45
Ya soló, baye bazali kosenga yo nzela, bandimi na Allah te, mpe na mokolo ya suka te, mpo mitema mia bango mitondi na ntembe, тропа ntembe wa bango bazali sé koyimayima
Verse 46
Kasi soki balingaka kobima (тропа kobunda), balingaki komilengele тропа yango. Kasi Allah asepelaki te na kobima na bango. Mpe avandisi bango. Mpe ayebisaki bango: Botikala elongo na baye batikalaki
Verse 47
Soki babimaka elongo na bino, balingaki sé kotiela bino mobulu o mapinga mpe kobakisela bino mabe, mpe koluka kokabola. Mpe kati na bino ezali na bato bazali koyoka bango, kasi Allah ayebaka babubi
Verse 48
Ya soló, basilaki kotiya songi songi liboso, mpe bakangeli yo makambo kino bosóló boyaki, mpe bokasi na mibeko mia Allah mimonanaki, mpe bango bazali koboya
Verse 49
Мре kati na bango, basusu bazali koloba: Pesa ngai ndingisa (ya kotikala), kasi komeka ngai te! Kaši basilaki kokweya na kati yakomekama, mpe ya soló moto mwa lifelo mokozinga bapangano
Verse 50
Soki bolamu bozui yo bamoni yango mabe, soki mabe mazui yo balobi: Soki tomilengeleke te oyo ezui ye, elingaki ezua biso mpe bapesi mikongo bakei na kosepela
Verse 51
Loba: Mpasi ekoki kozua biso te, sé eye Allah akomela biso, ye nde mobateli wa biso, mpe epai ya Allah esengeli na bandimi komipesa
Verse 52
Loba: Boye bozali kozela nini тропа biso okati ya bolamu mibale ya malamu (elonga to kokufa тропа Allah)? Kasi biso tozali kozela тропа bino, été Allah apesa bino etumbu to, ewuta na maboko na biso. Na yango bozela, biso mpe tozali kozela elongo na bino
Verse 53
Loba: Bopesa na kosepela to nakoyina, bakondimela bino yango te, ya soló, bozalaki bato mabe
Verse 54
Makabo na bango endimamaki te mpo baboyaki kondima na Allah na motindami naye, mpe basambelaka te, sé batelema na bolembu, mpe babimisaka mabonza na esengo te
Verse 55
Bomengo na bana na bango bikamwisa yo te. Kasi Allah alingi kopesa bango etumbu тропа yango o kati ya mokili, тре alongóla milimo mia bango тре bazali o kati na bopengwi
Verse 56
Мре bazali kolapa па Allah, (bato ya bilongi mibale) ete bazali penza bato ba bino, kasi bazali na bino te, mpe ya soló bango bazali kobanga bino
Verse 57
Soki bazuaka esika ya bokimi to lidusu o nsé ya ngomba, to esika ya kokotela, balingaki bakima epai wana bango banso na lombango
Verse 58
Mpe basusu kati na bango bazali kotongo yo тропа mabonza. Soki bapesi bango yango, basepeli, mpe soki bapesi bango te, basiliki
Verse 59
Mpe soki bango ya sólo, basepelaki na maye Allah na motindami waye bapesaki bango mpe balobi été: Allah akoki na biso. Allah akopesa biso bolamu bwaye, mpe motindami naye, ya sólo epai ya Allah nde tokozongisa makambo na baposa ya biso
Verse 60
Ya sólo, makabo mazali тропа babola na bazangi nyoso na baye bazali kosala mosala wana ya kokongola yango, mpe тропа kolendisa mitema ya bandimi ya sika, ezali mpe тропа kokangola bawumbu to bakangami na boloko, ezali mpe тропа baye bazangi makoki ya kofuta ba nyongo, ezali mpe тропа baye babimi na nzela ya Allah, ezali mpe тропа mopaya na moto ya mobembo oyo azali na bokoki te, wana ezali lotomo oyo ewuti epai ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya
Verse 61
Mpe basusu kati na bango bazali komonisa ntoma pasi mpe bazali koloba: Afungoli litoyi naye тропа kolanda nyoso tozali koloba, loba: Litoyi yango ezali тропа bolamu na bino, azali kondima na Allah mpe azali na makanisi ya malamu likolo ya bandimi. Mpe azali mawa тропа basusu. Kati na bino bazali na kondima kasi baye bazali konyokolo motindami ya Allah, bakozua etumbu ya makasi
Verse 62
Bazali kolapa na nkombo ya Allah тропа kosepelisa bino, kasi Allah na motindami waye nde esengeli basepelisa soki bazali bandimi ya solo
Verse 63
Boye boyebi te ete ya sólo, oyo akozanga kotosa Allah na motindami waye, ya sólo ye akozalaka na móto mwa lifelo, libela kati na yango? Wana nde ekozala etumbu ya monene
Verse 64
Bazali kobanga bato ya bilongi mibale été suratu ekitela bango, mpo ekundola makambo maye mazali o mitema mia bango. Loba: Bosala litio, ya soló, Allah nde mobimisi ya maye bozali kobangela
Verse 65
Mpe soki otuni bango, bakolobaka: Ya sólo, tozali nde kosolola mpe kosakana. Loba: Boye Allah, na mikapo mia ye, mpe na motindami waye bozali kotiola
Verse 66
Bokolimbisama te, bosilaki ya sólo, kopengwa o sima ya bondimi bwa bino, soki tolimbisi basusu kati na bino, tokopesa etumbu na basusu. Ya sólo, bango bazalaki batomboki
Verse 67
Basi mpe mibali ya bilongi mibale bango na bango, bazali kotinda na mabe, mpe bazali kopekisa bolamu. Mpe bazali kokanga maboko na bango тропа kosala bolamu, babosani Allah, mpe atiki bango. Ya sólo, bango bazali babebisi
Verse 68
Allah alaki basi mpe mibali ya bilongi mibale, na bapengwi, bakozalaka libela o móto ya lifelo, wana ekoki na bango. Mpe Allah alakeli bango botutu, mpe bakozalaka na etumbu ya suka te
Verse 69
Lolenge moko na baye bazalaki liboso lia bino, bazalaki makasi mingi koleka bino ezala na misolo, mpe bana mingi koleka bino. Basepelaki na bomengo oyo bakitanaki na mokili. Bino mpe bozali kosepela na oyo ya bino, lolenge bato ya liboso basepelaki, (kokitana), mpe bazali kosuanisa na bosôló te lolenge bato ya liboso basuanisaki na bosôló te, bango basili kobebisa misala mia bango o kati ya mokili mpe o mokolo mwa suka, mpe bango nde bazangi
Verse 70
Boye eyelaki bango te sango ya baye baleka o liboso lia bango bato ba Nûh, na bato ya aad, na Thamúd, na bato ya Ibrâhîm na bato ya madiyanat, na baye tobalusaki (o kati ya bato ya Loth)? Batindami ba bango bayelaki bango bilembo, Allah azalaki te тропа kobuba bango, kasi bango moko nde bamibubaki
Verse 71
Mpe bandimi ya mibali mpe ya basi, bango na bango bazali balingami. Bazali kotinda na bolamu mpe bazali kopekisa mabe. Mpe bazali kotelemisa losambo mpe kobimisa zakat, mpe bazali kotosa Allah na motindami waye. Baye wana nde Allah akoyokelaka mawa, ya soló, Allah azali na bokasi atonda bwanya
Verse 72
Allah alaki bandimi ya mibali mpe ya basi, Iola, eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka libela o kati na yango, mpe bivandeli bilamu o lola ya edeni. Mpe bosepeli bonene bokowutaka epai ya Allah. Wana nde elonga enene
Verse 73
Eh ntoma! Bundisa bato ya bilongi mibale na bapagano, mpe kozala na mawa epai na bango te. Mpe esika na bango bikozalaka nde na lifelo, mpe bozongi ya mabe nini wana
Verse 74
Bazali kolapa na Allah été basali eloko te, mpe basilaki solo koloba liloba lia bopagano, mpe babwaki kondima na bango bazongeli bopagano, mpe bakokisaki te na maye bakanaki (koboma ntoma), mpe bazali na nkanda te sé epai ya Allah na motindami naye, kowuta na maye Allah, na motindami naye bapesaki bango bozui mpe soki batubeli ekozala malamu тропа bango, kaši soki baboyi bapesi mikongo, Allah akopesa bango etumbu ya makasi, o kati ya mokili na o mokolo mwa suka. Mpe bakozuaka mobateli te mpe mosungi te na mokili
Verse 75
Mpe basusu o kati na bango bazuaki elaka na Allah, (balobi) soki tozui bolamu bwa Allah, tokopesa makabo, mpe tokozala o kati ya basali bolamu
Verse 76
Мре tango apeși bango bolamu bwaye, bakangi maboko тропа yango, mpe baboyi bapesi mikongo, balandi nzela mosusu
Verse 77
Mpe bazui etumbu o kati na mitema mia bango kino mokolo mwa bokutani, тропа maye bazangaki kotosa, mpe тропа maye balaki Allah, mpe na maye bazalaki kokosa
Verse 78
Bazali koyeba te été Allah ayebi sekele na bango mpe ayebi masolo na bango ya kobombama mpe Allah azali moyebi ya mabombami
Verse 79
Baye bazali kotongo bandimi baye bazali kobanga (Allah) mpe kobimisa makabo, Mpe baye bazali kozwa токе kowuta na bokasi bwa bango. Mpe lisusu bazali kofinga bandimi baye bazali na bozui токе, mpe kotiola, Allah atioli bango, kasi bakozalaka na etumbu monene
Verse 80
Osengela bango bolimbisi to te, ata soki osengeli bango bolimbisi mbala ntuku sambo, Allah akolimbisa bango te, mpo bapengwi na Allah na motindami waye. Mpe Allah akambaka babebisi te
Verse 81
Baye batikalaki sima, basepeli mpo batikali epai na bango, sima ya motindami wa Allah, baboyi kobunda na misolo mia bango na milimo mia bango o nzela ya Allah. Мре balobi: Bökende kobunda te na molunge oyo. Loba: Moto ya lifelo moleki molunge, soki bazali koyeba
Verse 82
Baseka moke mpe balela mingi, lifuta lia maye bazalaki kosala
Verse 83
Soki Allah azongisi yo o ngambu ya (bato bana) mpe soki batuni yo ndingisa тропа kokende kobunda, loba: Bokobimaka na ngai te, mpe bokobundisaka banguna elongo na ngai te. Bosepelaki kotikala mbala ya yambo epai na bino, bovanda esika moko na batikali
Verse 84
Mpe kosambelela te тропа bango soki moko wa bango akufi, mpe kotelema na lilita lia ye te. Mpo ya soló, bango basili kopengwa na Allah na motindami waye, mpe bakufaki bazali babebisi
Verse 85
Bana na misolo mia bango mikamwisa yo te. Mpo ya sólo, Allah alingi nde kopesa bango etumbu тропа yango awa na mokili, mpe azua milimo mia bango bazali na bopengwi
Verse 86
Мре soki mokapo moko ekiti kowuta epai ya Allah été bandima na Allah mpe babunda elongo na motindami waye, okomona baye bazali na makoki nyoso ya kobunda bazali kosenga yo nzela mpo batikala elongo na baye batikali
Verse 87
Bazali kosepela kotikala elongo na baye oyo bazwaki ndingisa ya kotikala тре mitema na bango masili kokangama mpe bazali koyeba eloko te
Verse 88
Kasi motindami na baye bandimaki naye, babundaki na misolo mia bango na milimo mia bango. Mpe bango nde bakozalaka na bolamu, mpe bango nde balongi
Verse 89
Allah asila kolengelela bango solo Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala. Bakozalaka libela o kati na yango, wana nde elonga enene
Verse 90
Mpe o kati na baye bavandaka na bamboka, bayei kosenga ndingisa, mpe na baye bakoselaki Allah na motindami waye batikali epai na bango. Bapengwi kati na bango bakozuaka etumbu ya makasi
Verse 91
Kasi baye bazangi makasi ya nzoto, na bato ya bokono, na baye bazangi eloko ya kobimisa (тропа Allah) bazali na lisumu te soki bakei kobunda te, soki bazali na bosembo na mitema mia bango тропа Allah na motindami waye. Мре basali bolamu, bazali na Likebisi te тре Allah azali molimbisi atonda ngolu
Verse 92
Ezali mabe te тропа baye bayelaki yo mpo opesa bango bibundeli ya komatela, olobi na bango été: Nazali na bibundeli ya komatele te тропа bino. Bazongi na kolela mayi ya miso ezali kotanga na mawa nyoso été bazui eloko te ya kobimisa
Verse 93
Kasi mabe (lisumu) ezali nde na baye bazali kosenga yo nzela ya kotikala mpe bazali na makoki nyoso ya bitumba, basepeli kotikala elongo na baye bakendeke bitumba te. Yango wana Allah abeti palata o mitema mia bango kasi bazali koyeba te
Verse 94
Bazali kosenga bino bolimbisi soki bozongeli bango (kowuta na bitumba). Loba: Bosenga bolimbisi te, tokoki kondimela bino te. Allah asilaki soló koyebisa biso ba sango na bino. Mpe Allah akotalaka misala та bino, na motindami waye lokola, sima bokozongaka epai ya oyo ayebaka makambo ma polele na maye mabombami mpe akoyebisaka bino maye bozalaki kosala
Verse 95
Bakolapela bino ndayi na nkombo ya Allah na bozongi na bino été boleka epai na bango, mpo bolimbisa, bozala mosika na bango! Ya soló, bango bazali mbindo, mpe esika na bango ekozala nde o moto ya lifelo, lifuta lia maye bazalaki kosala
Verse 96
Bazali kolapela bino ndayi mpo bosepela na bango. Kasi soki bosepeli na bango, ya soló Allah asepelaka na babebisi te
Verse 97
Ba arabo, bazalaki na bopagano makasi koleka, mpe kozala bato ya bilongi mibale mpe bato ya liboso ya koboya mibeko miye Allah akitisaki epai ya motindami waye. Kasi Allah azali moyebi atonda bwanya
Verse 98
Mpe o kati ya ba arabo basusu bazali kozua maye bazali kobimisa lokola nyongo mpe bazali kozela mabe ezua bino, mabe ya makasi ekozua nde bango! Mpe Allah azali moyoki atonda boyebi
Verse 99
Мре lisusu о kati ya ba arabo basusu bazali kondima na Allah mpe na mokolo mwa suka, mpe bazali kozua mabonza maye bazali kobimisa na nzela ya bopusani pene ya Allah, mpo été azua litomba ya mabondeli ya motindami. Ya sôló, wana mbeka тропа bango epai na Allah. Мре Allah akokotisaka bango na nsé ya ngolu naye, ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu
Verse 100
Allah asepeli na bandimi ya liboso baye batikaki (Makkah) na baye bayambaki bango, (na Madinah) lolenge moko na basusu baye bayaki sima na bango na bolamu, bango mpe basepeli naye. Mpe abongiseli bango Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka libela na libela kati na yango, wana nde elonga enene
Verse 101
Mpe ezali na basusu bazali pembeni na bino bato ya bilongi mibale, mpe na ndambu ya bato ya mboka Madinah, balendi na bokono ya kozala bato ya bilongi mibale, (yo ntoma) oyebi bango te, kasi biso nde toyebi bango. Tokopesaka bango etumbu mbala mibale, sima bakozuaka etumbu ya monene
Verse 102
Мре basusu kati na bango bayebi masumu ma bango. Basangisi misala ya malamu na ya mabe. Mpo tango mosusu Allah akolimbisa bango. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu
Verse 103
Zúa okati ya misolo na bango suadaka (makabo) oyo ekopetola mpe kopambola bango. Sima osengela bango, pamba te libondeli nayo ekofandisa bango na kimia. Ya sólo, Allah azali moyoki atonda boyebi
Verse 104
Boye bayebi te ete Allah nde moyambi tubela ya bawumbu naye, mpe ayambaka makabo na bango? Kasi ya soló, Allah nde mondimeli tubela atonda mawa
Verse 105
Mpe loba: bosala, Allah akomona mosala na bino, mpe motindami waye lokola, na bandimi. Mpe sima bokozongisama epai ya oyo amonaka makambo ya polele na maye mabombami, mpe akoyebisaka bino тропа maye bozalaki kosala
Verse 106
Mpe basusu bazali kozela mokano ya Allah: Apesa bango etumbu, to akoki kondimela bango, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya
Verse 107
Mpe baye batongi Masdjid mpo bazua yango esika ya bonyokoli mpe bopengwi mpe тропа kokabola bandimi тре kolengele yango тропа moto oyo abundisaki Allah na motindami waye liboso. Mpe bazali kolapa été balingi eloko mosusu te sé kobongisa, kasi Allah ayebi ete ya soló bango bazali babuki lokuta
Verse 108
Kotelama o kati na yango te mpo na kosambela (masdjid). Kasi ndako esantu oyo etongama na bobangi Allah o mokolo ya ebandeli ezali malamu mpo otelema na kati. Okati na yango, mibali baye balingi komipetuama. Mpe Allah alingaka bapetolami
Verse 109
Boye, oyo atongi ndako naye likolo ya bobangi Allah mpe esengo naye, azali malamu to ezali oyo atongi ya ye ndako pembeni ya libulu ya monene, oyo ekokweisa ye na moto ya lifelo? Mpe Allah akambaka babubi te
Verse 110
Ndako na bango batongi, ekotikala sé liziba ya koyimayima o mitema na bango kino mitema na bango mikopasuka. Mpe Allah azali wa boyebi atonda bwanya
Verse 111
Ya sólo, Allah asila kosomba epai na bandimi milimo na bango na misolo mia bango mpo ete bazua lola. Bazali kobunda na nzela ya Allah, na yango ba bomaka mpe ba bomaka bango., elaka ya soló esila kokomama okati ya torah mpe indjil na kurani. Mpe nani aleki Allah nakokokisa elaka? Bosepela na mombongo na bino oyo bosali, mpe oyo wana nde elonga enene
Verse 112
Bazali baye batubelaka, basambelaka, bakumisaka, bakangaka ngizi, bagumbamaka, bafukamaka, batindaka kosala bolamu mpe bapekisaka kosala mabe mpe babatelaka mibeko ya Allah. Mpe pesa nsango elamu epai na bandimi
Verse 113
Mpe esengeli te na ntoma na bandimi kosengela bapagano bolimbisi ata soki bazali libota na bango na ntango emonisami polele ete bazali solo bato ya moto
Verse 114
Mpe bolimbisi ya Ibrâhîm тропа tata naye ezalaki te sé тропа elaka eye alakaki ye, mpe ntango emonanaki ete azali monguna ya Allah, asundolaki ye. Ya sólo, Ibrâhîm azalaka moto ya komikitisa mpe motema ya ngolu
Verse 115
Mpe Allah akoki kobungisa bato te wana asili kokamba bango kino akomonisa bango eloko oyo bakoki kobanga. Ya sólo, Allah azali naboyebi likolo na biloko binso
Verse 116
Ya sôló, Allah azali na bokonzi ya likolo mpe ya nsé, apesaka bomoyi mpe liwa, mpe bozali na mobateli te mpe mosungi te sé kaka Allah
Verse 117
Allah asili koyamba tubela ya ntoma na bato ya (makkah) mpe bato ya (madinah), bango oyo balandaki ye na ntango ya mpasi, tango etikalaki moke mitema ya basusu mitengama, mpe alimbisaki bango. Ya sólo, azalaki na bolingo mpe ngolu mingi mpo na bango
Verse 118
Mpe andimelaki bato misato oyo batikalaki na nsima kino bamonaki ete mabele ekomelaki bango moke, makambo makomelaki bango mpasi kino bakanisaki ete esika mosusu yakokimela ezali te sé epai ya Allah. Sima andimi tubela na bango mpo ete bazonga epai naye. Ya sólo, Allah azali moyambi monene ya tubela atonda ngolu
Verse 119
Eh bino bandimi! Bobanga Allah mpe bozala elongo moko na bato ya bosembo
Verse 120
Mpe esengeli te na bato ya madinah na bato ya zingazinga na yango kati ya ba arabo ete batikala sima mosika na motindami, esengeli mpe te na bango kobatela nzoto na bango koleka ya motindami. Mpo ete bakoyoka mposa ya mayi te тре bakoyoka bolembu te, bakoyoka тре nzala te na nzela ya Allah, bakoleka na mboka moko te kino bapagano batomboka, mpe elonga nyoso bakozala na yango likolo na banguna kino bakotiela bango bolamu monene. Ya soló, Allah abungisaka lifuta ya basali malamu te
Verse 121
Mpe bakobimisa eloko moko te ya moke to ya monene, mpe bakokatisa ngomba moko te kino bakoma yango тропа bango mpo ete Allah afuta bango maye ya kitoko bazalaki kosala
Verse 122
Mpe esengeli te bandimi babima bango nyoso na mboka (pona koluka boyebi). Kasi esengeli na ndambu okati ya libota na libota mpo na koyekola mpe kokebisa bato na bango ntango bakozonga epai na bango mpo ete bazala na bokebi
Verse 123
Eh bino bandimi! Bobundisa bapengwi oyo bazali pembeni na bino mpe bozala mpete te epai na bango. Mpe boyeba ete ya soló, Allah azali elongo na babangi
Verse 124
Mpe soki suratu ekiti, moko kati na bango akoloba: Nani liloba oyo ebakiseli ye kondima? Kasi, mpo na bandimi ekobakisela bango kondima mpe batondi na esengo
Verse 125
Kasi, mpo na baye mitema na bango mitondi na malali (bokono), ekobakisela bango mbindo likolo ya mbindo na bango, mpe bakokufa bazali bapagano
Verse 126
Boye, bazali kornona te ete mbula na mbula bazali komekama mbala moko to mbala mibale, mpe bazali kotubela te mpe bazali kokanisa te
Verse 127
Mpe soki suratu ekiti bakotalana bango na bango mpe balobi: Boye moto moko azali kornona bino? Sima bakimi. Allah mpe akimisi mitema na bango mpo ete bazali bato oyo bazanga mayele
Verse 128
Ya soló, motindami awuti kati na bino aye тропа bino na ntina ya mpasi ya kilo makasi bozalaki na yango, azalaki koyokela bino mawa mpe kotala bino, azalaki na bolingo mpe ngolu epai ya bandimi
Verse 129
mpe soki baboyi mpe bapesi mokongo, loba: Allah akoki na ngai, nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te kaka sé ye. Epai naye na mikabi mpe azali Nkolo ngwende ya monene